Sikoyo mpenza nde, tólala mpɔngi te!
“Tiká ete tólala mpɔngi te lokola bamosusu basalaka, kasi tózala nde ekɛngɛ mpe tóbatela makanisi na biso.”—1 BATESALONIKI 5:6.
1, 2. (a) Pompéi na Herculanum ezalaki bingumba ya ndenge nini? (b) Likambo nini bato mingi ya Pompéi mpe ya Herculanum batyelaki yango likebi te, mpe esukelaki bango ndenge nini?
NA EKEKE ya liboso na ntango na biso, Pompéi na Herculanum ezalaki bingumba ya Loma oyo ezalaki na bozwi mingi; batongaki yango na lobwaku moko pene na Ngomba Vésuve. Bato ya Loma oyo bazalaki na bozwi bazalaki kokende kopema kuna. Bingumba yango ezalaki na bandako minene ya teyatre oyo ekokaki kokɔta bato koleka nkóto moko; mpe na Pompéi, ezalaki na libándá moko ya masano oyo bato nyonso ya engumba bakokaki kotonda kati na yango. Bato ya arkeoloji oyo batimolaki esika oyo Pompéi ezalaká batángaki banganda 118, oyo mosusu ezalaki bandako ya masano ya mbongo to baotɛlɛ epai bato bazalaki kosala pite. Bifelo mpe biloko mosusu oyo etikalá ezalaki na mayemi oyo ezali komonisa ete bato bamipesaki na pite mpe na koluka bomɛngo.
2 Mokolo ya 24 Augusto ya mobu 79 ya ntango na biso (T.B.), Ngomba Vésuve ebandaki kobimisa mɔtɔ. Bato ya mayele oyo bayekolaka bangomba oyo ebimisaka mɔtɔ balobaka ete ntango pɔtɔpɔtɔ ya mɔtɔ na mputulu ebimaki mpo na mbala ya liboso mpe ekitaki na bingumba wana mibale, yango ekokaki te kopekisa bato bákima. Kutu, ebele ya bato bakimaki. Kasi, bato mosusu oyo bakanisaki ete likama ezali te to batyaki likebi te na makambo oyo emonisaki ete likama ezali koya, batikalaki. Bongo, ntango ekómaki soki na midi ya butu, bagazɛ, pɔtɔpɔtɔ ya mɔtɔ mpe mabanga ebandaki kokita mbangu mpenza na Herculanum; ekangaki bato nyonso oyo batikalaki na engumba yango mpema. Na ntɔngɔntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, likambo moko wana esalemaki mpe na Pompéi mpe ebomaki bato nyonso ya engumba yango. Talá likambo ya nsɔmɔ oyo ekómelaki bato wana mpo batyaki likebi te na makambo oyo emonisaki ete likama ezali koya!
Nsuka ya ebongiseli ya makambo ya Bayuda
3. Likambo nini ekokani na kobebisama ya Yelusaleme na kobomama ya Pompéi na Herculanum?
3 Atako engumba Pompéi na Herculanum esukaki mabe ndenge wana, yango ezali eloko te soki tokokanisi yango na kobomama ya nsɔmɔ ya Yelusaleme oyo esalemaki mbula libwa liboso ya likambo wana, atako bato nde babomaki Yelusaleme. Balobaka ete “basoda bazingá bingumba mingi, kasi oyo basalaki Yelusaleme elekaki nsɔmɔ”; Bayuda koleka milio moko bakufaki. Kasi, ndenge moko na likama ya Pompéi na Herculanum, ezalaki na makambo oyo emonisaki ete etikali moke Yelusaleme ebomama.
4. Elembo nini Yesu apesaki oyo esengelaki komonisa bayekoli na ye ete nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekómi pene, mpe ndenge nini maloba na ye ekokisamaki na ekeke ya liboso?
4 Yesu Klisto asakolaki ete Yelusaleme ekobebisama, mpe ayebisaki makambo ya mpasi lokola bitumba, nzala, koningana ya mabele mpe kotyola mibeko oyo esengelaki komonana liboso na yango. Basakoli ya lokuta basengelaki kobima, kasi nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe esengelaki mpe kosakolama na mokili mobimba. (Matai 24:4-7, 11-14) Atako maloba ya Yesu ezali kokokisama mpenzampenza na mokili mobimba na mikolo na biso, na ntango wana mpe ekokisamaki na mboka wana. Masolo ya kala emonisaka ete nzala makasi ekɔtaki na Yudea. (Misala 11:28) Josèphe, moto moko ya mayele na makambo ya kala akomaki ete mabele eninganaki penepene na Yelusaleme mwa moke liboso engumba yango ebomama. Ntango etikalaki moke ete Yelusaleme ebebisama, mobulu ekómaki mingi mpe bato ya politiki ya Bayuda bazalaki kobunda bango na bango; lisusu, na bingumba mingi oyo ezalaki na Bayuda mpe bato ya bikólo mosusu, bato mingi bazalaki kobomama. Atako bongo, nsango malamu ya Bokonzi ezalaki kosakolama “na kati ya bozalisi nyonso oyo ezali na nse ya likoló.”—Bakolose 1:23.
5, 6. (a) Esakweli nini ya Yesu ekokisamaki na mobu 66 T.B.? (b) Mpo na nini bato oyo bakufaki bazalaki ebele mpenza ntango Yelusaleme ekweaki na mobu 70 T.B.?
5 Nsukansuka, na mobu 66 T.B., Bayuda batombokelaki bokonzi ya Loma. Ntango Cestius Gallus ayaki na basoda mpo na kozinga Yelusaleme, bayekoli ya Yesu bakanisaki mbala moko maloba ya Yesu ete: “Ntango bokomona Yelusaleme ezingelami na mampinga oyo esalisali milako, boye bóyeba ete libebi na yango ekómi pene. Boye tiká baoyo bazali na Yudea bábanda kokima na bangomba, mpe baoyo bazali na katikati na yango bálongwa, mpe baoyo bazali na bamboka ya zamba bákɔta na kati na yango te.” (Luka 21:20, 21) Esengelaki ete na ntango wana bayekoli bákima Yelusaleme, kasi balingaki kobima na nzela nini? Mbala moko, likambo moko oyo bakanisaki te esalemaki: Gallus na basoda na ye balongwaki zingazinga na Yelusaleme mpe bakendaki; yango epesaki baklisto oyo bazalaki na Yelusaleme mpe na Yudea nzela ya kokima na bangomba ndenge Yesu ayebisaki bango.—Matai 24:15, 16.
6 Mbula minei na nsima, na eleko ya Elekeli, basoda ya Loma bayaki lisusu, na mbala oyo Général Titus nde akambaki bango, ye azalaki na ekateli makasi ya kosukisa botomboki ya Bayuda. Basoda na ye bazingaki Yelusaleme mpe batongaki “lopango moko ya makasi na makonzí ya nsɔngɛ,” nzela ya kokima ezalaki lisusu te. (Luka 19:43, 44) Atako ezalaki komonana ete etumba ekoki kosalema, Bayuda bautaki bipai na bipai na bamboka oyo Loma ezalaki koyangela mpe bakendaki na Yelusaleme mpo na Elekeli. Nzokande, bakendaki komikɔtisa na motambo. Josèphe akomaki ete mingi kati na bato oyo bakufaki na ntango Baloma bazingaki Yelusaleme ezalaki nde bapaya wana.a Nsukansuka, ntango Yelusaleme ekweaki, Bayuda mwa mingi (14%) oyo bazalaki kofanda na mikili oyo Loma ezalaki koyangela bakufaki. Ekólo ya Bayuda na ebongiseli na yango ya losambo oyo esimbamaki na Mibeko ya Moize esukaki ntango Yelusaleme na tempelo na yango ebebisamaki.b—Malako 13:1, 2.
7. Mpo na nini baklisto ya sembo babikaki ntango Yelusaleme ebomamaki?
7 Na mobu 70 T.B., Bayuda oyo bakómaki baklisto bakokaki kobomama to komemama na boombo nzela moko na bato mosusu nyonso oyo bazalaki kofanda na Yelusaleme. Kasi, makambo ya kala ezali komonisa ete balandaki likebisi oyo Yesu apesaki mbula 37 liboso. Babimaki na engumba yango mpe bazongaki lisusu te.
Makebisi ya bantoma na ntango oyo ebongi
8. Mposa nini Petelo asosolaki, mpe na ntembe te azalaki kokanisa maloba nini oyo Yesu alobaki?
8 Lelo oyo, likama moko ya monene koleka ezali koya, yango ekosukisa ebongiseli ya makambo ya mokili mobimba. Na ntango oyo ebongi mpenza, elingi koloba mbula motoba liboso Yelusaleme ebebisama, ntoma Petelo apesaki toli oyo basengelaki mbala moko kotosa yango. Toli yango ezali malamu mpenzampenza mpo na baklisto ya mikolo na biso, elobi ete: Bózala ekɛngɛ! Petelo amonaki ete esengelaki baklisto bálamusa “makoki na [bango] ya kokanisa polele” mpo bábosana te “komandema ya Nkolo,” Yesu Klisto. (2 Petelo 3:1, 2) Ntango Petelo alendisaki baklisto ete bázala ekɛngɛ, na ntembe te azalaki kokanisa makambo oyo Yesu ayebisaki bantoma na ye mwa mikolo liboso akufa ete: “Bókebaka, bólala mpɔngi te, mpo boyebi te ntango nini ntango oyo etyamá ekokoka.”—Malako 13:33.
9. (a) Elimo nini ya mabe bato mosusu bazali kokóma na yango? (b) Mpo na nini elimo ya ntembe ezali mpenza likama?
9 Lelo oyo, bato mosusu bazali koloba na ndenge ya kotyola ete: “Wapi kozala na ye oyo elakamaki?” (2 Petelo 3:3, 4) Bato yango bazali komona ete makambo ezali mpenza kobongwana te, ezali kaka ndenge moko banda mokili ebandá. Elimo ya ntembe motindo wana ezali likama. Kobɛta ntembe ekoki kosala ete tóbosana ete mikolo etikali ya kotánga, mpe na bongo, tómipesa na kokokisa bamposa na biso. (Luka 21:34) Lisusu, ndenge Petelo amonisi yango, batyoli yango babosanaka Mpela ya ntango ya Noa oyo ebomaki ebongiseli ya makambo ya mokili mobimba. Makambo ebongwanaki mpenza na ntango wana!—Genese 6:13, 17; 2 Petelo 3:5, 6.
10. Petelo alobaki nini mpo na kolendisa bato oyo bakoki kokóma mitema mɔtɔmɔtɔ?
10 Mpo na kosalisa bato oyo bakotánga mokanda na ye bálona motema molai, Petelo alimbolelaki bango ntina oyo mbala mingi Nzambe azelaka liboso asala likambo moko. Petelo alobaki naino boye: “Epai ya Yehova mokolo moko ezali lokola mbula nkóto moko mpe mbula nkóto moko lokola mokolo moko.” (2 Petelo 3:8) Lokola Yehova azali na bomoi seko na seko, azali na likoki ya kotalela makambo nyonso mpe kopona ntango oyo eleki malamu mpo na kosala likambo oyo akani. Na nsima, Petelo amonisaki ete Yehova alingi ete bato nyonso bábongola mitema. Motema molai ya Nzambe ezali kopesa likoki ya kobika na ebele ya bato oyo bakokaki kokufa soki asalaki makambo mbangumbangu. (1 Timote 2:3, 4; 2 Petelo 3:9) Kasi, motema molai ya Yehova elingi koloba te ete akosala eloko te. Petelo alobi ete: “Mokolo ya Yehova ekoya lokola moyibi.”—2 Petelo 3:10.
11. Nini ekosalisa biso tólala mpɔngi te na elimo, mpe ndenge nini yango ‘ekobakisela’ mokolo ya Yehova ‘lombangu’?
11 Ndakisa oyo Petelo asalelaki ebongi mpenza. Kokanga bayibi ezalaka likambo moke te; soki sinzili azali kolalalala, akomona bayibi te, kasi sinzili oyo azali kolala mpɔngi te butu mobimba akomona bayibi. Sinzili akosala nini mpo alala mpɔngi te? Soki azali kotambolatambola, akolala mpenza te; kasi soki afandi kaka esika moko butu mobimba, akoyoka mpɔngi. Ndenge moko mpe, biso baklisto tokolala mpɔngi te na elimo soki tozali kokanga mabɔkɔ te. Yango wana, Petelo alendisi biso ete tómipesa na “misala ya etamboli ya bosantu mpe na misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe.” (2 Petelo 3:11) Misala ya ndenge yango ekosalisa biso tólanda ‘kobatela na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova.’ Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘kobatela na makanisi’ ekoki kobongolama mpenzampenza na “kobakisa lombangu.” (2 Petelo 3:12; maloba na nse ya lokasa) Ya solo, tokoki te kobongola mokolo oyo Yehova aponá. Mokolo na ye ekoya na ngonga oyo ye moko asilá kotya. Kasi, tokomona ete banda sikoyo tii mokolo yango ntango ezali koleka nokinoki soki tozali komipesa na mosala na ye.—1 Bakolinti 15:58.
12. Ndenge nini mokomoko na biso akoki kozwa litomba na motema molai ya Yehova?
12 Yango wana, tozali kolendisa baoyo nyonso bazali kokanisa ete mokolo ya Yehova ezali koumela bálanda toli ya Petelo ya kozela na motema molai ntango oyo Yehova ye moko asilá kotya. Tokoki kosalela malamu ntango oyo Nzambe atiki naino mpo na motema molai na ye. Na ndakisa, tokoki kolanda kolona bizaleli ya ntina mingi ya boklisto mpe kosakola nsango malamu epai ya bato mingi lisusu oyo balingaki koyoka yango te. Soki tozali kolala mpɔngi te, na nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo, Yehova akokuta biso “kozanga litɔnɔ mpe kozanga mbeba mpe na kati ya kimya.” (2 Petelo 3:14, 15) Ekozala mbano monene mpenza!
13. Wapi maloba Paulo akomelaki baklisto ya Tesaloniki oyo ebongi mpenza na mikolo na biso?
13 Paulo mpe alobelaki ntina ya kolala mpɔngi te na mokanda na ye ya liboso oyo atindelaki baklisto ya Tesaloniki. Apesaki toli oyo: “Tiká ete tólala mpɔngi te lokola bamosusu basalaka, kasi tózala nde ekɛngɛ mpe tóbatela makanisi na biso.” (1 Batesaloniki 5:2, 6) Likambo yango ezali na ntina mingi lelo oyo lokola nsuka ya ebongiseli ya makambo ya mokili mobimba ekómi pene! Basaleli ya Yehova bafandi na mokili oyo bato mingi bazali kotyela makambo ya Nzambe likebi te; bango mpe bakoki kobendama na elimo yango. Yango wana, Paulo apesaki toli oyo: “Tiká tóbatela makanisi na biso mpe tólata ebateli-ntolo ya kondima mpe bolingo mpe lokola ekɔti elikya ya lobiko.” (1 Batesaloniki 5:8) Soki tozali ntango nyonso koyekola Liloba ya Nzambe mpe tozali koyangana na makita elongo na bandeko na biso, yango ekosalisa biso mpo tósalela toli ya Paulo mpe tóbosana te ete mikolo etikali ya kotánga.—Matai 16:1-3.
Bamilio ya bato bazali kokɛngɛla
14. Mituya nini ezali komonisa ete lelo oyo ebele ya bato bazali kolanda toli ya kolala mpɔngi te oyo Petelo apesaki?
14 Ezali nde na ebele ya bato oyo bazali kolanda toli ya kozala ekɛngɛ? Ɛɛ, bazali. Na boumeli ya mobu ya mosala 2002, basakoli 6 304 645 bamonisaki ete bazali ekɛngɛ na elimo; motángo yango eleki oyo ya mobu 2001 (3,1%). Balekisaki ngonga 1 202 381 302 mpo na koyebisa bato mosusu nsango ya Bokonzi ya Nzambe. Basalaki mosala yango kaka mpo na kolekisa ntango te. Ezalaki mpenza mosala oyo eleki ntina na kati ya bomoi na bango. Mingi kati na bango bamonisaki elimo ndenge moko na Eduardo na Noemi, bato ya ekólo Salvador.
15. Ndakisa nini euti na ekólo Salvador ezali komonisa ete bato mingi bazali ekɛngɛ na elimo?
15 Eleki mwa bambula, Eduardo na Noemi bakanisaki na maloba ya Paulo oyo elobi ete: “Makambo ya mokili oyo ezali kobongwana.” (1 Bakolinti 7:31) Bakómisaki bomoi na bango pɛpɛlɛ mpe bakómaki babongisi-nzela. Na nsima, bazwaki mapamboli mingi; kutu, bazwaki libaku malamu ya kosala mosala ya mokɛngɛli ya zongazonga mpe ya etúká. Atako bakutanaki na mikakatano makasi, Eduardo na Noemi bazali kondima ete bazwaki ekateli malamu ntango baboyaki kolanda bozwi ya mokili mpo na kosala kaka mosala ya Nzambe. Na kati ya basakoli 29 269 ya Salvador oyo 2 454 bazali babongisi-nzela, mingi bamonisaki elimo ya ndenge yango ya komipimela makambo mosusu; yango ezali moko ya bantina oyo esalaki ete na ekólo yango basakoli babakisamaki (2%) koleka na mobu 2001.
16. Elimo nini ndeko mobali moko ya elenge na Côte d’Ivoire amonisaki?
16 Na Côte d’Ivoire, elenge mobali moko oyo amonisaki elimo ya ndenge wana akomaki boye na biro ya filiale: “Nazali mosaleli na misala. Kasi nakoki te kolendisa bandeko básala mosala ya mobongisi-nzela soki ngai moko nazali kopesa ndakisa te. Yango wana, natikaki mosala oyo bazalaki kofuta ngai malamu mpe nazali sikoyo kosala mosala na ngai moko, yango ezali kotikela ngai ntango mingi mpo na kosakola.” Elenge mobali yango akómaki moko na babongisi-nzela 983 na Côte d’Ivoire, mboka oyo ezalaki na basakoli 6701 na mbula eleki, elingi koloba basakoli babakisamaki (5%) koleka na mobu 2001.
17. Ndenge nini elenge Motatoli moko ya Belgique amonisaki ete abangaki te makanisi mabe oyo bato mosusu bazalaka na yango mpo na Batatoli?
17 Na Belgique, basakoli ya Bokonzi bazali 24961; bazali kotungisama mingi na bizaleli mosusu ya bato lokola koboya makanisi ya basusu, kokanisela basusu mabe, mpe kopona bilongi. Atako bongo, bazali na molende mpe bazali kobanga te. Na kelasi, ntango bazalaki kopesa liteya ya bizaleli malamu (éducation morale), Motatoli moko ya mbula 16, ayokaki bazali kolobaete Batatoli ya Yehova bazali mwa lingomba moko ya molili. Na yango, asɛngaki nzela amonisa makanisi ya Batatoli. Na lisalisi ya kasɛti video Les Témoins de Jéhovah: un nom, une organisation mpe na mwa buku Batatoli ya Yehova—Bazali banani?, alimbolaki malamumalamu soki Batatoli bazali mpenza banani. Bana-kelasi mingi basepelaki na bandimbola oyo apesaki, mpe na pɔsɔ oyo elandaki molakisi asalisaki bango mamekani oyo mituna na yango nyonso etalelaki kaka lingomba ya boklisto ya Batatoli ya Yehova.
18. Makambo nini ezali komonisa ete mikakatano ya mbongo elongolaki te likebi ya basakoli ya Argentine mpe ya Mozambique na mosala ya Yehova?
18 Baklisto mingi bazali kokutana na mikakatano makasi na mikolo ya nsuka oyo tozali. Atako bongo, bazali kosala makasi ete makambo yango elongola likebi na bango te. Na Argentine, atako mikakatano ya mbongo ekómaki makasi na mbula oyo euti kosila—likambo oyo bapanzi-nsango balobelaki yango mingi—Batatoli bakómaki 126 709. Na Mozambique, ebele ya bato bazali babola. Atako bongo, bato 37 563 basalaki mosala ya kotatola, elingi koloba babakisamaki (4%) koleka na mobu 2001. Na Albanie, ebele ya bato bazali na bomoi ya mpasi, kasi basakoli bakómi 2 708—motángo na bango ebakisami (12%) koleka na mobu 2001. Nyonso wana ezali komonisa polele ete mikakatano ya bomoi ekoki kopekisa elimo ya Yehova te ntango basaleli na ye bazali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso.—Matai 6:33.
19. (a) Nini ezali komonisa ete bampate oyo bazali na mposa ya solo ya Biblia bazali naino mingi? (b) Wapi mwa makambo mosusu ya lapolo ya mbula oyo ezali komonisa ete basaleli ya Yehova bazali kolala mpɔngi te na elimo? (Talá etanda na nkasa 12-15.)
19 Na mbula eleki, bato 5 309 289 bayekolaki Biblia na Batatoli sanza na sanza na mokili mobimba; yango ezali komonisa ete bampate oyo bazali na mposa ya solo ya Biblia bazali naino mingi. Na kati ya bato 15 597 746 oyo bayanganaki na Ekaniseli, mingi bakómi naino basaleli ya Yehova te. Bato yango bakoki kolanda kobakisa boyebi mpe bolingo na bango mpo na Yehova mpe mpo na bandeko. Ezali esengo mingi na komona “ebele ya bato” oyo bazali na kati ya “bampate mosusu” bazali ntango nyonso kobota mbuma na ndenge bazali kosalela Mozalisi “butu moi na kati ya tempelo na ye” elongo na bandeko na bango bapakolami na elimo.—Emoniseli 7:9, 15; Yoane 10:16.
Liteya oyo tozali kozwa na lisolo ya Lota
20. Likambo oyo ekómelaki Lota na mwasi na ye eteyi biso nini?
20 Ata basaleli ya sembo ya Nzambe bakoki kobosana mpo na mwa ntango ete mikolo etikali ya kotánga. Tókanisa lisusu Lota, mwana ya ndeko ya Abalayama. Baanzelu mibale oyo bayaki epai na ye bayebisaki ye ete Nzambe alingi koboma Sodoma na Gomola. Nsango yango ekokaki kokamwisa Lota te, mpo “atungisamaki makasi mpo na babuki-mibeko oyo bamipesaki na etamboli ya mbindo.” (2 Petelo 2:7) Kasi, ntango baanzelu yango mibale bayaki kobimisa ye na Sodoma, Lota “aumelaki.” Esɛngaki kutu ete baanzelu bábimisa ye na mwasi mpe bana na ye libándá ya engumba yango. Na nsima, mwasi ya Lota atosaki te maloba ya baanzelu ete bátala nsima te. Abungisaki bomoi mpo na bopɔtu na ye. (Genese 19:14-17, 26) Yesu alobaki ete: “Bókanisa mwasi ya Lota.”—Luka 17:32.
21. Mpo na nini ezali na ntina ete sikoyo mpenza nde tólala mpɔngi te?
21 Likama ya engumba Pompéi na engumba Herculanum, makambo oyo elekaki liboso Yelusaleme ebomama, Mpela ya mikolo ya Noa mpe ndakisa ya Lota, nyonso wana ezali komonisa ntina ya kozwa makebisi na lisɛki te. Biso basaleli ya Yehova tozali koyeba elembo ya ntango ya nsuka. (Matai 24:3) Tosili kobima na mangomba ya lokuta. (Emoniseli 18:4) Lokola baklisto ya ekeke ya liboso, tosengeli ‘kobatela na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova.’ (2 Petelo 3:12) Sikoyo mpenza nde, tosengeli kolala mpɔngi te! Makambo nini tokoki kosala, mpe bizaleli nini tokoki kolona mpo tólala mpɔngi te? Lisolo oyo elandi ekolobela makambo yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekoki kozala ete na ekeke ya liboso bato oyo bazalaki kofanda na Yelusaleme balekaki 120 000 te. Eusèbe akomaki ete bato oyo bautaki na etúká ya Yudea mpe bakendaki na Yelusaleme na Elekeli ya mobu 70 T.B. bazalaki 300 000. Esengeli mpenza kozala ete bato mosusu oyo bakufaki bautaki na mikili mosusu oyo Loma ezalaki koyangela.
b Mpo na Yehova, kondimana ya sika ezwaki esika ya Mibeko ya Moize na mobu 33 T.B.—Baefese 2:15.
Okopesa eyano nini?
• Likambo nini elekaki oyo esalisaki Bayuda oyo bakómaki baklisto bábika ntango Yelusaleme ebomamaki?
• Ndenge nini toli oyo ezali na mikanda ya ntoma Petelo na ntoma Paulo ezali kosalisa biso na kolala mpɔngi te?
• Lelo oyo banani bazali komonisa ete bazali kolala mpɔngi te?
• Lisolo ya Lota na mwasi na ye eteyi biso likambo nini?
[Etanda na lokasa 12-15]
LAPOLO YA BATATOLI YA YEHOVA NA MOKILI MOBIMBA MPO NA MBULA 2002
(Talá na zulunalo oyo ebimisamaki)
[Elilingi na lokasa 9]
Na mobu 66 T.B., baklisto ya Yelusaleme batosaki likebisi ya Yesu
[Bililingi na lokasa 10]
Kosala mosala esalisaka baklisto bálala mpɔngi te