Tyelá Yehova elikya mpe zalá na mpiko
“Tyelá Yehova elikya; zalá na mpiko mpe tiká motema na yo ezala makasi. Ɛɛ, tyelá Yehova elikya.”—NZEMBO 27:14, NW.
1. Elikya ezali na ntina nini, mpe ezali na ndimbola nini na kati ya Biblia?
ELIKYA ya solosolo ezali lokola mwinda oyo ezali kongɛnga makasi. Esalisaka biso tómonaka kaka te mikakatano oyo tozali kokutana na yango lelo oyo, kasi kotalela mpe bomoi na mpiko mpe na esengo. Kaka Yehova nde akoki kopesa biso elikya ya solosolo; mpe asalaka yango na nzela ya Liloba na ye. (2 Timote 3:16) Maloba lokola “elikya,” “kolikya,” ekomamá mbala mingi na Biblia mpe elimbolaka kozela na motema moko likambo moko ya malamu, to mpe likambo yango oyo ozali kolikya.a Elikya ya ndenge wana ekeseni mosika na mposa ya mpamba, oyo mbala mosusu ekoki kokokisama te.
2. Ndenge nini elikya esalisaki Yesu?
2 Ntango Yesu akutanaki na mikakatano, atalaki kaka mikakatano yango te, kasi atyaki elikya epai ya Yehova. “Mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye ayikelaki nzete moko ya mpasi mpiko, kotyoláká nsɔni, mpe afandi na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya Nzambe.” (Baebele 12:2) Lokola makanisi na ye nyonso ezalaki kaka na likambo ya kolongisa bokonzi ya Yehova mpe kosantisa nkombo na ye, Yesu azangaki ata mokolo moko te kotosa Nzambe, ata soki yango ememelaki ye mpasi.
3. Elikya ezali na ntina nini mpo na basaleli ya Nzambe?
3 Mokonzi Davidi amonisaki boyokani oyo ezali na kati ya elikya ná mpiko na maloba oyo: “Tyelá Yehova elikya; zalá na mpiko mpe tiká motema na yo ezala makasi. Ɛɛ, tyelá Yehova elikya.” (Nzembo 27:14, NW) Soki tolingi motema na biso ezala makasi, tosengeli ata moke te kotika elikya na biso elɛmba, kasi tóbatelaka yango ntango nyonso na makanisi mpe na motema. Kosala bongo ekosalisa biso tómekolaka mpiko mpe molende ya Yesu na mosala oyo apesá bayekoli na ye. (Matai 24:14; 28:19, 20) Na yango, Biblia elobeli elikya esika moko na kondima mpe bolingo, mpe emonisi ete ezaleli yango ezali na ntina mingi mpo na basaleli ya Nzambe.—1 Bakolinti 13:13.
‘Otondi na elikya’?
4. Baklisto bapakolami ná baninga na bango “bampate mosusu” bazali na elikya nini?
4 Basaleli ya Nzambe bazali na elikya moko kitoko. Baklisto bapakolami bazali kozela na motema likoló ntango oyo bakosala elongo na Klisto kuna na likoló, mpe “bampate mosusu” bazali na elikya ya ‘kolongolama na boombo ya kopɔla mpe kozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.’ (Yoane 10:16; Baloma 8:19-21; Bafilipi 3:20) “Bonsomi” yango ekosikola bango na boombo ya lisumu mpe makambo na yango ya mabe. Ya solo, Yehova, mopesi ya “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza,” akopesa basaleli na ye ya sembo kaka makabo oyo eleki malamu.—Yakobo 1:17; Yisaya 25:8.
5. Ndenge nini ‘tótondaka na elikya’?
5 Elikya ya boklisto ezali mpenza na ntina nini na bomoi na biso? Totángaka na Baloma 15:13 boye: “Tiká ete Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo nyonso mpe na kimya na nzela ya kondima na bino, mpo bótondana na elikya elongo na nguya ya elimo santu.” Ya solo, elikya ezali te lokola buji na esika ya molili, kasi nde lokola kongɛnga ya moi ya ntɔngɔ, oyo epesaka moto kimya, esengo, elikya mpe mpiko. Tósimba ete ‘tokotonda na elikya’ soki tondimi Liloba ya Nzambe mpe tozwi elimo santu. Baloma 15:4 elobi ete: “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo na kolakisa biso, mpo ete na nzela ya ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na nzela ya kobɔndisama oyo euti na Makomami tókoka kozala na elikya.” Na yango, omituna boye: ‘Natángaka Biblia mokolo na mokolo mpo na kobatela elikya na ngai ezala kaka makasi? Nabondelaka ntango nyonso mpo na kozwa elimo santu?’—Luka 11:13.
6. Mpo na kobatela elikya na biso ezala makasi, tosengeli kokeba na nini?
6 Yesu, ndakisa na biso, azalaki kozwa makasi na kati ya Liloba ya Nzambe. Soki tolandi mpenza ndakisa na ye, ‘tokosila makasi te mpe tokolɛmba te na milimo na biso.’ (Baebele 12:3) Soki tolongoli elikya na biso na makanisi mpe na motema to tokómi kotya makanisi epai mosusu, na ndakisa na biloko to mikano ya mokili, mosika te tokolɛmba na elimo, mpe nsukansuka tokozanga makasi mpe mpiko. Ezaleli wana ekoki kosala ete ‘kondima na biso ebeba lokola masuwa oyo epanzani.’ (1 Timote 1:19) Nzokande, elikya ya solosolo elendisaka kondima na biso.
Elikya ezali na ntina mingi mpo na kondima
7. Na ndenge nini elikya ezali na ntina mingi mpo na kondima?
7 Biblia elobi ete: “Kondima ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa, elakiseli ya polelepolele ya makambo ya solosolo atako ezali komonana te.” (Baebele 11:1) Na yango, elikya ezali eloko moke te na kati ya kondima, kasi soki yango ezali te, kondima ekozanga ntina. Tózwa ndakisa ya Abalayama. Ndenge eyebani, Abalayama ná mwasi na ye Sala balekaki mbula ya kobota ntango Yehova alakaki bango ete bakobota mwana. (Genese 17:15-17) Abalayama alobaki nini? “Atako azalaki mosika na elikya, kasi kotyáká motema na elikya azalaki na kondima, mpo akoka kokóma tata ya bikólo mingi.” (Baloma 4:18) Ɛɛ, elikya esalisaki Abalayama andima mpenza ete akobota mwana. Kondima na ye mpe ekómisaki elikya na ye makasi. Yango wana, Abalayama ná Sala bazwaki mpiko ya kotika mboka mpe bandeko na bango mpe bakendaki kofanda bomoi na bango mobimba na kati ya bahema na mboka mopaya!
8. Ndenge nini koyika mpiko ekómisaka elikya makasi?
8 Elikya ya Abalayama ezalaki ntango nyonso makasi mpamba te azalaki kotosa Yehova ata soki ayebi ete yango ekomemela ye mikakatano. (Genese 22:2, 12) Ndenge moko, soki biso tozali kosala mosala ya Yehova na botosi nyonso mpe na mpiko, tokoki kozala na elikya ete tokozwa mbano. Paulo akomaki ete: “Ezaleli ya koyika mpiko” esalaka ete moto ‘andimama,’ kondimama epesaka elikya, “mpe elikya yango eyokisaka mawa te.” (Baloma 5:4, 5) Yango wana Paulo akomaki boye: “Tolingi ete mokomoko na bino amonisa molende ya ndenge wana mpo na kozala na kondimisama makasi ya elikya tii na nsuka.” (Baebele 6:11) Elikya ya ndenge wana, oyo moto akómaka na yango soki azali na boyokani malamu na Yehova, ekoki kosalisa biso tózala na mpiko, ata na esengo, liboso ya mikakatano.
“Sepelá na kati ya elikya”
9. Momeseno nini ekosalisa biso ‘tósepelaka na kati ya elikya’?
9 Eloko moko te oyo mokili ekoki kopesa biso ekokani na elikya oyo Nzambe apesi. Nzembo 37:34 elobi boye: “Tyelá Yehova elikya mpe landá kaka nzela na ye, mpe ye akopesa yo lokumu ya kosangola mabelé. Ntango bato mabe bakolongolama, okomona yango.” Ya solo, tosengeli mpenza ‘kosepelaka na kati ya elikya.’ (Baloma 12:12) Mpo na yango, tosengeli ntango nyonso kobatela elikya yango na makanisi na biso. Okanisaka ntango nyonso elikya oyo Nzambe apesá yo? Okanisaka ndenge okozala na Paladiso, nzoto makasi, mitungisi te, ofandi esika moko na bato oyo olingaka mpe ozali kosala mosala oyo okozwela yango mpenza litomba? Okanisaka na mozindo na bililingi ya Paladiso oyo ezalaka na mikanda na biso? Soki ozali na momeseno ya kokanisaka ndenge wana, ekozala lokola nde ozali kopangwisa talatala ya lininisa mpo na komonaka malamu libándá. Soki tozali kopangwisa yango te, ekokóma mbindo mpe tokokoka lisusu komona malamu libándá te. Na ntango wana, makambo mosusu ekobenda likebi na biso. Tótika ata moke te ete likambo wana ekómela biso!
10. Mpo na nini kokanisaka mbano na biso esalisaka biso tózala na boyokani malamu na Yehova?
10 Toyebi ete tosalelaka Yehova libosoliboso mpo tolingaka ye. (Malako 12:30) Kasi, tosengeli kobosana te mbano na biso. Kutu, Yehova ye moko alingi bongo! Baebele 11:6 elobi boye: “Na kozanga kondima likoki ya kosepelisa ye mpenza ezali ata moke te, mpo moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe ete akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” Mpo na nini Yehova alingi tótalelaka ye lokola mopesi-mbano? Mpamba te soki tozali kosala bongo, yango ekomonisa ete toyebi Tata na biso ya likoló malamu. Azali lobɔkɔ pɛtɛɛ epai ya bana na ye mpe alingaka bango. Kanisá naino ndenge tolingaki kozala na mawa mpe kolɛmba nzoto soki tózalaka ata na “elikya” moko te.—Yilimia 29:11.
11. Ndenge nini elikya oyo Nzambe apesaki Moize esalisaki ye azwa bikateli ya malamu?
11 Moize azali ndakisa malamu mpenza ya kobatela ntango nyonso elikya na makanisi. Lokola azalaki “mwana ya mwana mwasi ya Falao,” azalaki na nguya, na lokumu mpe akokaki kozala na bozwi nyonso ya Ezipito. Moize aponaki kolanda makambo wana to aponaki kosalela Yehova? Na mpiko mpenza, Moize aponaki kosalela Yehova. mpo na nini? “Mpo azalaki kotala na likebi mpenza epai mbano ekofutama.” (Baebele 11:24-26) Ya solo, Moize alongolaki makanisi na ye ata mokolo moko te na elikya oyo Yehova apesaki ye.
12. Na ndenge nini elikya ya baklisto ekokani na ekɔti?
12 Ntoma Paulo alobaki ete elikya ezali lokola ekɔti. Ekɔti na biso ya elimo ebatelaka makanisi na biso mpe esalisaka biso tózwaka bikateli ya malamu, tóyebaka makambo oyo esengeli kozwa esika ya liboso na bomoi na biso mpe tótikala ntango nyonso sembo epai ya Yehova. (1 Batesaloniki 5:8) Olataka ntango nyonso ekɔti na yo ya elimo? Soki ezali bongo, boye lokola Moize ná Paulo, okotya elikya na yo te “na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi, kasi nde epai ya Nzambe, oyo apesaka biso biloko nyonso beboo mpo biso tósepela.” Toboyi te, mpo na koboya kolanda makambo oyo bato nyonso bamipesi na yango mpe kotika koluka bomɛngo ya mokili, esɛngaka kozala na mpiko, kasi kosala bongo ezali mpenza na litomba! Mpo na nini komipesa na makambo oyo ekokani ata moke te na “bomoi ya solosolo,” oyo ezali kozela bato oyo batye elikya na bango epai ya Yehova mpe balingaka ye?—1 Timote 6:17, 19.
“Nakotika yo soki moke te”
13. Elikya nini ya sikisiki Yehova apesá basaleli na ye ya sembo?
13 Lokola “bampasi” ezali se kobakisama na mokili, bato oyo bazali kotya elikya na bango na ebongiseli ya makambo ya ntango oyo basengeli kokanisa malamumalamu oyo ekoki kokómela bango lobi. (Matai 24:8) Kasi, baoyo batye elikya na bango epai ya Yehova bazali kobanga eloko te. Bakokoba ‘kofanda na kimya, mpe bakobanga mabe te.’ (Masese 1:33) Lokola elikya na bango ezali na mokili oyo te, balandaka na esengo nyonso toli ya Paulo oyo: “Tiká ete ezaleli na bino na bomoi ezanga bolingo ya mbongo, wana bozali kosepela na oyo bozali na yango na biloko ya sikoyo. Mpo alobaki ete: ‘Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.’”—Baebele 13:5.
14. Mpo na nini baklisto basengeli te komitungisa koleka ndelo mpo na bamposa na bango ya mosuni?
14 Maloba “Soki moke te” mpe “ata moke te” ezali mpenza kondimisa biso ete Nzambe akotika biso te. Yesu mpe amonisaki biso ete Nzambe amibanzabanzaka mpo na biso na maloba oyo: “Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe biloko nyonso wana mosusu [biloko ya kobikela] ekobakisamela bino. Bongo, bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko.” (Matai 6:33, 34) Yehova ayebi ete kozala na molende mpo na Bokonzi na ye mpe lisusu komema mokumba na biso ya kokokisa bamposa na biso ya mosuni ezali pɛtɛɛ te. Yango wana, tosengeli mpenza kondima ete Yehova azali na likoki mpe na mposa ya kokokisa bamposa na biso.—Matai 6:25-32; 11:28-30.
15. Ndenge nini baklisto babatelaka ‘liso alima’?
15 Tokomonisa ete totyelaka Yehova motema soki tozali kobatela ‘liso alima.’ (Matai 6:22, 23) Moto oyo azali na liso alima azalaka na bosembo, na makanisi malamu, azalaka na lokoso te mpe alukaka kaka matomba na ye moko te. Kozala liso alima elimboli te kozala mpenza mobola to kozanga kokokisa bamposa na biso. Elimboli nde kozala na “makanisi malamu” wana tozali kotya mosala ya Yehova na esika ya liboso.—2 Timote 1:7.
16. Mpo na nini tosengeli kozala na kondima mpe na mpiko mpo na kobatela liso alima?
16 Esɛngaka kozala na kondima mpe na mpiko mpo na kobatela liso alima. Na ndakisa, soki patrɔ na yo azali mbala na mbala kopesa yo mosala na ngonga oyo osengeli kokende na makita, okozala na mpiko mpo na kokoba kotya makambo ya elimo na esika ya liboso? Soki moto moko azali kokakatana mpo na kondima ete Yehova akokokisa bamposa ya basaleli na ye ndenge alaká, Satana akokoba kobakisela ye mitungisi oyo ekoki ata kosala ete atika koyangana na makita. Ya solo, soki tozangi kondima, na esika ya Yehova, Satana nde akobanda koyebisa biso makambo oyo tosengeli kotya na esika ya liboso na bomoi na biso. Ekozala mpenza mawa mpo na biso!—2 Bakolinti 13:5.
“Tyelá Yehova elikya”
17. Ndenge nini baoyo batyelaka Yehova motema bazwaka mapamboli ata lelo oyo?
17 Makomami emonisi na bisika mingi ete baoyo batyaka elikya mpe motema epai na Yehova balongaka kaka. (Masese 3:5, 6; Yilimia 17:7) Toboyi te, babomaka nzoto te mpo na koluka biloko ya mokili, kasi soki batali ebele ya mapamboli oyo Yehova abombeli bango, bamonaka biloko yango mpamba. Na ndenge yango, bamonisaka ete “batyelaka Yehova elikya” mpe batyaka motema ete nsukansuka akokokisa bamposa ya basaleli na ye nyonso ya sembo. (Nzembo 37:4, 34) Na yango, bazali na esengo ata lelo oyo. “Elikya ya bayengebene ezali esengo; nde elikya ya bato mabe ekobeba.”—Masese 10:28.
18, 19. (a) Elikya nini kitoko Yehova apesi biso? (b) Ndenge nini totyaka Yehova na ‘lobɔkɔ na biso ya mobali’?
18 Ntango mwana azali kotambola asimbi lobɔkɔ ya tata na ye, abangaka eloko te. Ezali mpe bongo mpo na biso ntango tozali kotambola elongo na Tata na biso ya likoló. Yehova alobaki na Bayisalaele boye: “Bangá te, zambi ngai nazali na yo. . . . Nakosunga yo. . . . Mpo ete ngai [ Yehova], Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali, bangá te: ngai nakosunga yo.”—Yisaya 41:10, 13.
19 Oyo mpenza elilingi kitoko! Yehova asimbi moto na lobɔkɔ na ye. Davidi akomaki boye: “Natye [ Yehova] liboso na ngai libela; azali na lobɔkɔ na ngai na mobali, bongo nakokwea te.” (Nzembo 16:8) Ndenge nini totyaka Yehova na ‘lobɔkɔ na biso ya mobali’? Tosalaka yango na lolenge soki mibale. Ya liboso, totikaka Liloba na ye etambwisa biso na makambo nyonso ya bomoi; mpe ya mibale, tótalelaka likabo kitoko oyo Yehova alaki biso. Asafa, mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Nazali na yo esika moko mikolo nyonso; yo okangi lobɔkɔ na ngai ya mobali. Okotambolisaka ngai na toli na yo, mpe na nsima okoyamba ngai na nkembo na yo.” (Nzembo 73:23, 24) Lokola toyebi bongo, tokoki mpenza kotalela bomoi na mpiko.
“Kosikolama na bino ekómi pene”
20, 21. Bomoi nini ezali kozela baoyo bazali kotyela Yehova elikya?
20 Wana mikolo ezali koleka, ezali mpenza komonana ete tosengeli kotya Yehova na lobɔkɔ na biso ya mobali. Mosika te, losambo ya lokuta ekobomama mpe na nsima mokili ya Satana ekokɔta na bolɔzi oyo emonaná naino te. (Matai 24:21) Bato oyo bazangi kondima bakotonda na nsɔmɔ. Nzokande, na ntango wana ya mpasi mpenza, basaleli ya Yehova ya mpiko bakosepela na kati ya elikya. Yesu alobaki ete: “Ntango makambo wana ekobanda kobima, bótɛlɛma alima mpe bótombola mitó na bino, mpamba te kosikolama na bino ekómi pene.”—Luka 21:28.
21 Na yango, tiká ete tósepelaka kati na elikya mpe tótika te ete Satana akosa biso na mayele mabe na ye. Tósala mpe makasi mpo na komonisa kondima, bolingo mpe ezaleli ya kobanga Nzambe. Soki tosali bongo, tokozala na mpiko ya kotosa Yehova ntango nyonso mpe tokotɛmɛla Zabolo. (Yakobo 4:7, 8) Ya solo, “Bózala na mpiko, tiká motema na bino ezala makasi, bino nyonso baoyo bozali kotalela Yehova.”—Nzembo 31:24, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Atako na Makomami ya Grɛki ya boklisto liloba “elikya” esalelami mbala na mbala mpo na kolobela mbano ya bomoi oyo baklisto bapakolami bakozwa na likoló, na lisolo oyo tosaleli yango na bandimbola na yango nyonso.
Okoki kopesa eyano?
• Ndenge nini elikya ya Yesu epesaki ye mpiko?
• Boyokani nini ezali kati na kondima mpe elikya?
• Ndenge nini elikya ná kondima epesaka moklisto mpiko ya kopona makambo oyo eleki ntina na bomoi na ye?
• Mpo na nini baoyo bazali ‘kotyela Yehova elikya’ babangaka te mikolo ezali koya?
[Elilingi na lokasa 28]
Ozala elenge to mokóló, ozali komimona na kati ya Paladiso?