“Bókɛngɛlaka”!
“Oyo nazali koloba na bino nazali koloba yango na bato nyonso, Bókɛngɛlaka.”—MALAKO 13:37.
1, 2. (a) Liteya nini mobali moko azwaki na likambo etali kobatela biloko na ye? (b) Ndakisa ya moyibi oyo Yesu alobelaki ezali koteya biso nini na oyo etali kolala mpɔngi te?
JUAN azalaki kobomba biloko na ye ya motuya na ndako na ye. Atyaki yango na nse ya mbeto na ye, esika oyo akanisaki ete eleki malamu na kati ya ndako mobimba. Kasi, mokolo moko na butu, ntango ye na mwasi na ye balalaki, moyibi moko akɔtaki na eteni ya ndako na bango ya kolala. Na ntembe te, moyibi yango ayebaki esika oyo biloko wana ezalaki. Akɔngɔlaki na malɛmbɛ biloko nyonso ya motuya oyo ezalaki na nse ya mbeto; akamataki mpe mbongo oyo Juan atyaki na tirware ya mesa oyo ezalaki pembeni ya mbeto. Juan ayebaki ete bayibaki biloko na ye kaka na ntɔngɔ ntango alamukaki. Nyonso wana eteyaki ye likambo moko oyo akobosana yango soki moke te: Moto oyo alali mpɔngi akoki kobatela biloko na ye te.
2 Ezalaka mpe bongo na makambo ya elimo. Tokoki te kobatela elikya na biso mpe kondima na biso soki tolali mpɔngi. Yango wana, Paulo alendisaki biso na maloba oyo: “Tiká ete tólala mpɔngi te lokola bamosusu basalaka, kasi tózala nde ekɛngɛ mpe tóbatela makanisi na biso.” (1 Batesaloniki 5:6) Mpo na komonisa biso ete ezali mpenza na ntina ete tólalaka mpɔngi te, Yesu asalelaki ndakisa ya moyibi. Alobelaki naino makambo oyo ekosalema liboso aya kosambisa; na nsima, mpo na kokebisa biso, alobaki boye: “Na yango, bókɛngɛlaka mpo boyebi te na mokolo nini Nkolo na bino akoya. Kasi bóyeba likambo oyo, ete soki nkolo-ndako ayebaki na bokɛngɛli nini moyibi alingaki koya, mbɛlɛ alalaki mpɔngi te mpe mbɛlɛ atikaki te ete bábuka ndako na ye mpe bákɔta. Yango wana bino mpe bómilɛngɛla, mpamba te na ngonga oyo bozali kokanisa te ete ezali yango, Mwana ya moto akoya.” (Matai 24:42-44) Moyibi alakaka te ete akoya mokolo boye to ngonga boye. Ayaka na ntango oyo moto moko te azali kokanisa ete akoya. Ndenge moko mpe, lokola Yesu alobaki yango, nsuka ya ebongiseli oyo ekoya na ‘ngonga oyo tozali kokanisa te ete ezali yango.’
“Bólala mpɔngi te, bótɛlɛma ngwi na kati ya kondima”
3. Ndenge nini Yesu asalelaki ndakisa ya baombo oyo bazali kozela nkolo na bango oyo akendaki kobala mpo na komonisa ntina ya kolala mpɔngi te?
3 Na maloba na ye oyo ezali na Evanzile ya Luka, Yesu akokanisaki baklisto na baombo oyo bazali kozela bozongi ya nkolo na bango oyo akendaki kobala. Basengelaki kokɛngɛlaka mpo ntango akokóma, akuta bango na kati ya mpɔngi te, kasi bazali kozela ye mpo na koyamba ye. Ndenge moko mpe, Yesu alobaki boye: “Na ngonga oyo bozali kutu kokanisa te nde Mwana ya moto akoya.” (Luka 12:40) Bato mosusu oyo balekisi bambula mingi na mosala ya Yehova bakoki kobosana ete sikoyo, mikolo etikali ya kotánga. Bamosusu kutu bakoki kobanda kokanisa ete ntango mosusu nsuka ezali naino mosika. Kasi, makanisi motindo wana ekoki kosala ete tóbosana makambo ya elimo mpe ekoki kotinda biso tómipesa na koluka biloko ya mokili mpe na makambo oyo ekoki kopesa biso mpɔngi na elimo.—Luka 8:14; 21:34, 35.
4. Kondima nini ekopesa biso mposa ya kokɛngɛla, mpe ndenge nini Yesu amonisaki yango?
4 Ndakisa oyo Yesu alobaki ekoki mpe koteya biso likambo mosusu. Atako baombo bayebaki te ngonga nini nkolo na bango akokóma, kasi bayebaki butu oyo akoya. Ekokaki kozala mwa mpasi bálala te butu wana mobimba soki bayebaki ete nkolo na bango akoki kozonga na butu ya mokolo mosusu. Bayebaki butu nini akozonga, yango wana bazalaki na makasi ya kolala mpɔngi te. Ndenge moko mpe, bisakweli ya Biblia ezali komonisa biso polele ete tozali sikoyo na mikolo ya nsuka; kasi bisakweli yango eyebisi biso te mokolo to ngonga mpenza oyo nsuka ekoya. (Matai 24:36) Lokola tozali na elikya ete nsuka ekómi pene, yango ezali kosalisa biso tólala mpɔngi te, mpe soki tozali kondima ete mokolo ya Yehova ekómi mpenza pene, ekobakisa lisusu mposa na biso ya kokɛngɛla.—Sefania 1:14.
5. Ndenge nini tokoki kolanda toli oyo Paulo apesaki biso ete ‘tólala mpɔngi te’?
5 Na mokanda oyo Paulo akomelaki Bakolinti, alendisaki bango na maloba oyo: “Bólala mpɔngi te, bótɛlɛma ngwi na kati ya kondima.” (1 Bakolinti 16:13) Tokolala mpɔngi te soki tozali kotɛlɛma ngwi na kati ya kondima ya boklisto. Tosengeli kosala nini mpo tólala mpɔngi te? Tosengeli koluka koyeba Liloba ya Nzambe mingi. (2 Timote 3:14, 15) Soki tozali na momeseno malamu ya koyekola biso moko mpe koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ, kondima na biso ekokóma makasi, mpe kozanga kobosana mokolo ya Yehova ezali likambo moko ya ntina mingi na kati ya kondima na biso. Yango wana, soki tozali mbala na mbala kotalela makambo oyo ezali na Makomami oyo ezali kondimisa biso ete nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo ekómi pene, yango ekosalisa biso tóbosana te mateya ya ntina mingi oyo etali nsuka yango oyo ezali koya.a Ezali mpe malamu tólandaka makambo ezali koleka na mokili oyo ezali kokokisa bisakweli ya Biblia. Ndeko mobali moko na Allemagne akomaki boye: “Mbala nyonso oyo nalandaka bansango ya bitumba, koningana ya mabele, mobulu, mpe ndenge bazali kobebisa mabele, endimisaka ngai malamumalamu ete nsuka ezali lisusu mosika te.”
6. Yesu alobaki nini mpo na komonisa ete wana ntango epusani mpenza, moto akómaka koyoka mpɔngi na elimo?
6 Lisolo mosusu oyo Yesu alendisaki bayekoli na ye ete bálala mpɔngi te ezali na Malako mokapo 13. Mokapo yango eyebisi ete Yesu akokanisaki bayekoli na ye na mokɛngɛli ya ekuke oyo azali kozela bozongi ya nkolo na ye oyo akendaki mobembo na mboka mopaya. Mokɛngɛli ya ekuke ayebaki te ngonga nini nkolo na ye akozonga. Asengelaki kaka kokɛngɛlaka. Yesu alobaki ete nkolo yango akokaki kozonga na moko na bokɛngɛli minei ya butu moko. Bokɛngɛli ya minei ezalaki kobanda na ngonga ya misato ya butu tii ntango ntɔngɔ ekotana. Ezalaki mpasi te ete na bokɛngɛli wana ya nsuka, mokɛngɛli ya ekuke abanda koyoka mpɔngi. Balobaka ete ngonga wana, elingi koloba liboso ntɔngɔ etana, nde ngonga oyo basoda balingaka mingi kobimela monguna na mbalakaka. Ndenge moko mpe, na mikolo oyo ya nsuka mpenza, ntango oyo mokili ekufi mpenza na mpɔngi, nde ntango oyo tokoki mpenza kozala na etumba makasi mpo tókoka kolala mpɔngi te. (Baloma 13:11, 12) Yango wana, na ndakisa oyo apesaki, Yesu azongelaki maloba oyo: “Bókebaka, bólala mpɔngi te . . . Na bongo bókɛngɛlaka . . . Oyo nazali koloba na bino nazali koloba yango na bato nyonso, Bókɛngɛlaka.”—Malako 13:32-37.
7. Likama nini ezali mpenza, mpe mpo na yango, Biblia ezali kolendisa biso mbala na mbala na likambo nini?
7 Ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye mpe nsima ya lisekwa na ye, mbala mingi azalaki kolendisa likambo ya kokɛngɛla. Kutu, mbala nyonso oyo Makomami elobeli nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, tokutaka likebisi ete bólala mpɔngi te to bótika kokɛngɛla te.b (Luka 12:38, 40; Emoniseli 3:2; 16:14-16) Ezali polele ete kozala na mpɔngi na elimo ezali likama. Biso nyonso tozali na mposa ya makebisi wana!—1 Bakolinti 10:12; 1 Batesaloniki 5:2, 6.
Bantoma misato oyo bakokaki te kolala mpɔngi te
8. Na elanga ya Getesemane, bantoma misato ya Yesu basalaki nini atako Yesu alobaki na bango ete bákɛngɛlaka?
8 Likambo oyo ekómelaki Petelo, Yakobo na Yoane ezali komonisa ete mpo na kolala mpɔngi te esɛngi kaka te kozala na makanisi malamu ya kosala yango. Bango misato bazalaki bato ya elimo oyo balandaki Yesu tii na nsuka mpe balingaki ye mingi. Atako bongo, bakokaki te kolala mpɔngi te na butu ya 14 Nisana ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.). Ntango babimaki na eteni ya ndako oyo ezalaki na likoló, epai balyaki Elekeli, bantoma yango misato balandaki Yesu na elanga ya Getesemane. Kuna, Yesu alobaki na bango boye: “Molimo na ngai ezali na mawa makasi, ɛɛ tii na liwa. Bótikala awa mpe bókɛngɛlaka elongo na ngai.” (Matai 26:38) Yesu abondelaki Tata na ye ya likoló makasi mbala misato mobimba, mpe mbala misato azongaki esika oyo baninga na ye bazalaki, azalaki kokuta bango kaka bazali kolala.—Matai 26:40, 43, 45.
9. Ekoki kozala mpo na ntina nini nde bantoma bayokaki mpɔngi?
9 Mpo na nini mibali yango ya sembo bakokaki te kosala likambo oyo Yesu asɛngaki bango na butu wana? Ntina moko yango oyo: balɛmbaki. Ntango epusanaki mpenza, ekoki kutu kozala ete midi ya butu elekaki, mpe “miso na bango ezalaki kilo” na mpɔngi. (Matai 26:43) Kasi, Yesu alobaki ete: “Bókɛngɛlaka mpe bóbondelaka ntango nyonso, mpo bókɔta na kati ya komekama te. Ya solo, elimo ezali na molende, kasi mosuni ezali na bolɛmbu.”—Matai 26:41.
10, 11. (a) Atako alɛmbaki, nini esalisaki Yesu atika te kokɛngɛla na elanga ya Getesemane? (b) Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki bantoma misato ntango Yesu asɛngaki bango bákɛngɛlaka?
10 Na ntembe te, Yesu ye moko mpe alɛmbaki na butu wana. Kasi, alalaki mpɔngi te; alekisaki mwa ntango moke ya ntina mingi oyo azalaki naino na bonsomi na kobondela makasi. Elekaki mwa mikolo, alendisaki bayekoli na ye ete bábondelaka; alobaki na bango ete: “Boye, bólala mpɔngi te, kopesáká malɔmbɔ ntango nyonso mpo bólonga kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kobima, mpe kotɛlɛma liboso ya Mwana ya moto.” (Luka 21:36; Baefese 6:18) Soki tolandi toli ya Yesu mpe ndakisa malamu na ye na likambo etali kobondela, malɔmbɔ na biso epai ya Yehova ekosalisa biso mpo tólala mpɔngi te na elimo.
11 Ya solo, Yesu ayebaki ete etikali moke bákanga ye mpe bákatela ye etumbu ya liwa, kasi, bantoma na ye bayebaki likambo yango te na ntango wana. Asengelaki konyokwama tii kobomama likoló ya nzete ya mpasi. Yesu ayebisaki bantoma na ye makambo yango, kasi bakangaki ntina ya maloba na ye te. Yango wana, ntango azalaki kobondela, bango balalaki mpɔngi. (Malako 14:27-31; Luka 22:15-18) Se ndenge oyo ezalaki mpo na bantoma, nzoto na biso mpe ezali na bolɛmbu; lisusu, ezali na makambo oyo toyebi naino te. Atako bongo, soki tobosani ete mikolo etikali ya kotánga, tokoki kolala mpɔngi na elimo. Tosengeli kokɛngɛlaka mpo tólala mpɔngi te.
Bizaleli misato ya ntina mingi
12. Wapi bizaleli misato oyo Paulo atángaki oyo ekoki kosalisa biso na kobatela makanisi na biso?
12 Tokoki kosala nini mpo tóbosana te ete mikolo ekómi ya kotánga? Touti kolobela ntina ya kobondela mpe ya kobosana mokolo ya Yehova te. Longola yango, Paulo atángaki bizaleli misato ya ntina mingi oyo tosengeli kolona. Alobaki boye: “Na oyo etali biso baoyo tozali bato ya moi, tiká tóbatela makanisi na biso mpe tólata ebateli-ntolo ya kondima mpe bolingo mpe lokola ekɔti elikya ya lobiko.” (1 Batesaloniki 5:8) Tólobela naino na mokuse ndenge oyo kondima, elikya mpe bolingo ekoki kosalisa biso mpo tólala mpɔngi te na elimo.
13. Ndenge nini kondima esalisaka biso na kokɛngɛla?
13 Tosengeli kozala na kondima makasi ete Yehova azali mpe “akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” (Baebele 11:6) Lokola esakweli ya Yesu oyo elobelaki nsuka ekokisamaki liboso na ekeke ya liboso, yango ezali kolendisa kondima na biso ete, na ntango na biso, ekokokisama na bonene na yango. Lisusu, kondima na biso ezali kosalisa biso tózela mokolo ya Yehova na elikya ete “[emonaneli] ekozanga te. Ekoumela mingi te.”—Habakuku 2:3.
14. Na ndenge nini elikya ezali na ntina mingi mpo na kosalisa biso tólala mpɔngi te?
14 Elikya makasi oyo tozali na yango ezali lokola “longo mpo na molimo” oyo esalisaka biso na koyikela mikakatano mpiko ata soki tosengeli kozela mpo na komona kokokisama ya bilaka ya Nzambe. (Baebele 6:18, 19) Ndeko mwasi moko na nkombo Margaret azali mopakolami; azali sikoyo na mbula koleka 90 mpe akokisi mbula koleka 70 banda azwá batisimo; ye alobi boye: “Ntango mobali na ngai akufaki na maladi ya kanser na 1963, nazalaki komona ete ekozala malamu mpenza soki nsuka eyei nokinoki. Kasi, sikoyo nazali komona ete nazalaki kotala kaka matomba na ngai. Na ntango wana tokokaki kokanisa te ndenge oyo mosala ekopalangana na mokili mobimba. Ata sikoyo, ezali naino na bisika mingi oyo mosala ebandi se kobanda. Yango wana, nazali na esengo ete Yehova asalelaki motema molai.” Ntoma Paulo alobi na biso boye: “Ezaleli ya koyika mpiko [ememaka] kondimama; kondimama, na ngala na yango, elikya, mpe elikya yango eyokisaka mawa te.”—Baloma 5:3-5.
15. Ndenge nini bolingo etindaka biso tósala ata soki tomoni ete tobandá kozela kala?
15 Bolingo ya baklisto ezali ezaleli ya ntina mingi mpamba te yango nde ezali mposa oyo etindaka biso tósala nyonso oyo tozali kosala. Tosalelaka Yehova mpo tolingaka ye; totalelaka te bantango oyo aponi mpo na kokokisa makambo na ye. Bolingo mpo na bazalani na biso etindaka biso na kosakola nsango malamu ya Bokonzi, ata soki Nzambe akolinga tósala yango ntango boni lisusu mpe ata soki mbala boni tokozongela bandako oyo tosilá kotala. Lokola Paulo akomaki yango, “kondima, elikya mpe bolingo ezali, yango misato; kasi oyo eleki na kati na yango ezali bolingo.” (1 Bakolinti 13:13) Bolingo esalaka ete tóyika mpiko mpe esalisaka biso tólala mpɔngi te. “[Bolingo] elikyaka makambo nyonso, mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso. Bolingo esilaka soki moke te.”—1 Bakolinti 13:7, 8.
“Simbá makasi oyo ozali na yango”
16. Na esika ya kolɛmbisa mabɔkɔ, ezaleli nini tosengeli kolona?
16 Tozali na mikolo oyo makambo oyo ezali koleka na mokili ezali se komonisa biso ete mikolo ya nsuka ezali kokende na nsuka na yango. (2 Timote 3:1-5) Oyo ezali ntango ya kolɛmbisa mabɔkɔ te, kasi ya ‘kosimba makasi oyo tozali na yango.’ (Emoniseli 3:11) Soki tozali “ekɛngɛ na oyo etali mabondeli” mpe soki tozali kolona kondima, elikya mpe bolingo, tozali nde komibongisa mpo na ntango ya komekama. (1 Petelo 4:7) Tozali na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo. Soki tomipesi na misala oyo ezali komonisa ezaleli ya kokangama na Nzambe, yango ekosalisa biso mpo tóyoka mpɔngi te.—2 Petelo 3:11.
17. (a) Ata soki ntango mosusu bilikya na biso ekokisami te, mpo na nini tosengeli kolɛmbaka nzoto te? (Talá etanda na lokasa 21.) (b) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yehova, mpe baoyo bazali kolanda yango bakozwa bolamu nini?
17 Yilimia akomaki ete: “[Yehova] azali libula na ngai, bongo nakozala na elikya kati na ye. [Yehova] azali na malamu epai na baoyo [bazelaka] ye, epai na molimo oyo azali koluka ye. Ezali malamu ete moto [azela] na kimya mpo na kobika ya [Yehova].” (Bileli 3:24-26) Bamosusu kati na biso babandi kozela kala te. Bamosusu bazelaka lobiko ya Yehova banda bambula ebele. Kasi, ntango nyonso oyo tozali kozela ezali mokuse mpenza soki tokokanisi yango na bomoi ezangi nsuka oyo ezali koya! (2 Bakolinti 4:16-18) Wana tozali kozela ntango oyo Yehova ye moko aponi, tokoki kolona bizaleli malamu ya boklisto mpe kosalisa bato mosusu bázwa litomba na motema molai ya Yehova mpe bándima solo. Yango wana, tiká ete biso nyonso tókɛngɛlaka. Tólanda ndakisa ya Yehova mpe tózala na motema molai, tózala na botɔndi mpo na elikya oyo apesi biso. Mpe na ntango oyo tozali kokɛngɛla mpenza, tósimba makasi elikya ya bomoi ya seko. Na ndenge yango, bilaka oyo ekokokisama epai na biso: “[Yehova] akokɛmbisa yo ete osangola mokili; okomona kobeba ya bato mabe.”—Nzembo 37:34.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekozala malamu mpe kotalela makambo motoba oyo ezali kondimisa ete tozali na “mikolo ya nsuka,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali 2000, nkasa 12-13.—2 Timote 3:1.
b William Vine, moto moko ya mayele na maloba ya lokota alobi ete verbe ya Grɛki oyo ebongolami na “kolala mpɔngi te” elimboli mpenzampenza ‘kobengana mpɔngi,’ mpe ezali “komonisa kaka kozala na kati ya mpɔngi te, kasi ezaleli ya kokɛngɛla mpo na baoyo batii makanisi na likambo moko.”
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini tokoki kolendisa elikya na biso ete nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekómi pene?
• Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Petelo, Yakobo na Yoane?
• Wapi bizaleli misato oyo ekosalisa biso tólala mpɔngi te na elimo?
• Mpo na nini oyo ezali mpenza ntango ya ‘kosimba makasi oyo tozali na yango’?
[Etanda/Elilingi na lokasa 21]
“Esengo na oyo azali kozela.”—Danyele 12:12, NW
Kanisá ete sinzili moko azali komona lokola ete moyibi moko azali kokana koyiba na lopango oyo ye azali kokɛngɛla. Na butu, sinzili akofungola mpenza matoi mpo na koyoka makɛlɛlɛ nyonso oyo ekoki kolakisa ete moyibi akɔti na lopango. Nsima ya ngonga mokomoko akobanda kotya mpenza matoi mpe akokeba. Tokanisi ete ezali mpasi te mpo akosama ata na makɛlɛlɛ oyo eloko mosusu esali, lokola nkasa ya nzete oyo eningani na mopɛpɛ to nyau oyo atuti eloko moko.—Luka 12:39, 40.
Ekoki kosalema bongo epai ya bato oyo bazali “kozela na motema mɔtɔ mpenza emoniseli ya Nkolo na biso Yesu Klisto.” (1 Bakolinti 1:7) Bantoma bakanisaki ete Yesu ‘alingaki kozongisa bokonzi ya Yisalaele’ nokinoki ntango asekwaki. (Misala 1:6) Bambula mingi na nsima, esɛngaki ete báyebisa baklisto ya Tesaloniki ete kozala ya Yesu ezali naino mosika. (2 Batesaloniki 2:3, 8) Atako bongo, bayekoli ya ekeke ya liboso batikaki te kotambola na nzela ya bomoi mpo mokolo ya Yehova eyaki te na ntango oyo bango bazalaki kokanisa.—Matai 7:13.
Na mikolo na biso, kozela mingi to mpe kokosama na makambo mosusu na ntina etali nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo esengeli te komema biso na kolɛmbisa mabɔkɔ. Sinzili oyo azali ekɛngɛ akoki kokosama na likambo moko, kasi ezali mpo na yango te nde akotika kokɛngɛla! Ezali mosala na ye. Ezali mpe bongo mpo na baklisto.
[Elilingi na lokasa 18]
Ozali kondima mpenza ete mokolo ya Yehova ekómi pene?
[Bililingi na lokasa 19]
Makita, kobondela, mpe momeseno malamu ya koyekola ekosalisa biso na kokɛngɛla ntango nyonso
[Elilingi na lokasa 22]
Lokola Margaret, tózala na motema molai mpe tótika te kokɛngɛla