Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mikanda epai ya Batesaloniki mpe epai ya Timote
LISANGÁ oyo eutaki kosalema na Tesaloniki ekutanaki na botɛmɛli kaka na ebandeli, ntango ntoma Paulo akendaki kotala yango. Yango wana, ntango Timote, oyo azalaki na mbula soki 20, autaki na Tesaloniki mpe amemaki nsango ya malamu mpo na bandeko yango, Paulo akomelaki bango mokanda mpo na kopesa bango longonya mpe kolendisa bango. Mokanda yango, oyo mbala mosusu akomaki yango nsima ya mobu 50 T.B., ekoki kozala mokanda ya liboso na kati ya mikanda oyo Paulo akomaki na lisalisi ya elimo santu. Mwa moke na nsima, akomelaki baklisto ya Tesaloniki mokanda ya mibale. Na mbala wana, asembolaki libunga moko oyo bandeko mosusu bakómaki na yango mpe alendisaki bandeko bátikala makasi na kondima.
Mbula soki zomi na nsima, Paulo azalaki na Masedonia mpe Timote na Efese. Paulo akomelaki Timote mpe alendisaki ye atikala na Efese mpo asalisa bandeko bálanda te bateyi ya lokuta oyo bazalaki na lisangá yango. Ntango mɔtɔ moko ezikisaki Loma na mobu 64 T.B. mpe bakómaki konyokola baklisto, Paulo akomelaki Timote mokanda ya mibale. Yango ezali mokanda na ye ya nsuka. Biso mpe lelo oyo tokoki kozwa litomba na mikanda minei wana ya Paulo.—Ebe. 4:12.
‘TÓZALA EKƐNGƐ’
Paulo apesi Batesaloniki longonya mpo na mosala na bango ya sembo, ya makasi mpe mpo na mpiko na bango. Ayebisi bango ete bazali ‘elikya mpe esengo mpe motole ya nsai’ mpo na ye.—1 Tes. 1:3; 2:19.
Nsima ya kolendisa baklisto ya Tesaloniki ete bábɔndisanaka na elikya ya lisekwa, Paulo alobi boye: “Mokolo ya Yehova ekoya mpenzampenza lokola moyibi na butu.” Apesi bango toli ete ‘bázala ekɛngɛ’ mpe bábatela makanisi na bango.—1 Tes. 4:16-18; 5:2, 6.
Biyano na mituna ya Biblia:
4:15-17—Banani ‘bakomemama na kati ya mapata mpo na kokutana na Nkolo na kati ya mopɛpɛ,’ mpe likambo yango ekosalema ndenge nini? Ezali baklisto bapakolami oyo bazali na bomoi na boumeli ya kozala ya Klisto na Bokonzi na ye. ‘Bakokutana’ na Yesu na likoló, esika oyo ekoki komonana na miso te. Mpo na yango, basengeli liboso kokufa mpe kosekwa lokola bikelamu ya elimo. (Lom. 6:3-5; 1 Kol. 15:35, 44) Kozala ya Klisto esilá kobanda, yango wana baklisto bapakolami oyo bazali kokufa lelo batikalaka bakufi te. ‘Bamemamaka,’ to basekwaka mbala moko.—1 Kol. 15:51, 52.
5:23—Paulo alingaki koloba nini ntango abondelaki ete “elimo mpe molimo mpe nzoto [ya] bandeko ebatelama”? Paulo alobelaki elimo, molimo mpe nzoto ya lisangá mobimba, elingi koloba baklisto bapakolami ya Tesaloniki. Na esika ya kobondela kaka ete lisangá ebatelama, abondelaki nde ete “elimo” to makanisi na yango ebatelama. Abondelaki mpe mpo na “molimo” na yango, elingi koloba mpo lisangá yango ekoba kozala, mpe abondelaki mpo na “nzoto” na yango, elingi koloba lisangani mobimba ya baklisto bapakolami. (1 Kol. 12:12, 13) Na yango, libondeli yango emonisaki ete Paulo azalaki mpenza komibanzabanza mpo na lisangá yango.
Mateya mpo na biso:
1:3, 7; 2:13; 4:1-12; 5:15. Lolenge malamu ya kopesa toli ezali ya kopesa moto longonya na motema moko mpe kolendisa ye asala malamu.
4:1, 9, 10. Basambeli ya Yehova basengeli ntango nyonso kokende liboso na elimo.
5:1-3, 8, 20, 21. Lokola mokolo ya Yehova ezali kobɛlɛma, esengeli “tóbatela makanisi na biso mpe tólata ebateli-ntolo ya kondima mpe bolingo mpe lokola ekɔti elikya ya lobiko.” Lisusu, tosengeli kotya likebi mpenza na Biblia, liloba ya esakweli ya Nzambe.
‘TÓTƐLƐMA NGWI’
Ekoki kozala ete lokola bandeko mosusu ya lisangá babongolaki makambo oyo Paulo alobaki na mokanda na ye ya liboso, bakómaki kotya ntembe ete “kozala ya Nkolo” ekómaki pene. Mpo na kosembola makanisi wana, Paulo ayebisi eloko oyo esengeli ‘koya naino.’—2 Tes. 2:1-3.
Paulo alendisi bango ete: “Bótɛlɛma ngwi mpe bókoba kokangama na mimeseno oyo boteyamaki.” Apesaki bango etinda ‘bákima ndeko nyonso oyo azalaki kotambola na ndenge ya mobulu.’—2 Tes. 2:15; 3:6.
Biyano na mituna ya Biblia:
2:3, 8—Nani azali “motyoli-mibeko,” mpe ndenge nini akobomama? “Motyoli-mibeko” yango ezali bakonzi ya mangomba ya boklisto. Moto oyo apesami nzela ya koyebisa bato mabe bitumbu ya Nzambe mpe kotinda báboma bango ezali “Liloba,” molobeli ya liboso ya Nzambe, Yesu Klisto. (Yoa. 1:1) Yango wana, tokoki koloba ete Yesu akoboma motyoli-mibeko “na elimo [nguya] ya monɔkɔ na ye.”
2:13, 14—Ndenge nini baklisto bapakolami ‘baponamaki banda na ebandeli mpo na lobiko’? Bapakolami baponamaki liboso ntango Yehova alakaki ete momboto ya mwasi ekopanza motó ya Satana. (Gen. 3:15) Yehova ayebisaki masɛngami oyo basengelaki kokokisa, mosala oyo basengelaki kosala mpe komekama oyo basengelaki kokutana na yango. Na yango, abengaki bango “mpo na ntina yango.”
Mateya mpo na biso:
1:6-9. Bitumbu ya Yehova ezwaka kaka bato oyo babongi na yango.
3:8-12. Atako mokolo ya Yehova ebɛlɛmi, tosengeli te koboya kosala mpo na kozwa mwa kwanga, mpo tókoba komipesa na mosala ya kosakola. Kozanga mosala ekoki kokómisa biso gɔigɔi mpe kotinda biso tókóma ‘komikɔtisa na makambo ya bato mosusu.’—1 Pet. 4:15.
“BATELÁ ELOKO OYO EBOMBISAMI EPAI NA YO”
Paulo alendisaki Timote ‘akoba kobunda etumba malamu; kobatela kondima mpe lisosoli ya malamu.’ Ntoma Paulo atángi masɛngami oyo mibali basengeli kokokisa mpo na kozwa mikumba na lisangá. Paulo alendisi Timote ‘aboya masapo ya lokuta oyo ebebisaka makambo ya bosantu.’—1 Tim. 1:18, 19; 3:1-10, 12, 13; 4:7.
Paulo akomaki ete: “Kopamela mokóló makasi te.” Alendisaki Timote ete: “Batelá eloko oyo ebombisami epai na yo, boyá bilobaloba ya mpamba oyo ebebisaka makambo ya bosantu mpe bongolabongola ya oyo ebengami na lokuta mpenza ‘boyebi.’”—1 Tim. 5:1; 6:20.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:18; 4:14—“Bisakweli” nini epesamaki mpo na Timote? Ekoki kozala bisakweli mosusu oyo elobelaki mikumba oyo Timote asengelaki kozwa na lisangá ya baklisto, oyo esakolamaki na lisalisi ya elimo santu ntango Paulo akendeki na Lisitala na mobembo na ye ya mibale ya misionɛrɛ. (Mis. 16:1, 2) Na kotalela “bisakweli” wana, bankulutu ya lisangá ‘batyaki mabɔkɔ na bango’ likoló ya elenge Timote, mpe na ndenge yango batyaki ye pembeni mpo na mosala moko ya sikisiki.
2:15—Na ndenge nini mwasi “akobatelama na lisalisi ya kobota”? Kobota, kobɔkɔla bana mpe kobongisa ndako ekoki ‘kobatela’ mwasi mpo amipesa te na ‘bilobaloba mpe amikɔtisaka te na makambo ya bato mosusu.’—1 Tim. 5:11-15.
3:16—Sɛkɛlɛ mosantu ya ezaleli ya kokangama na Nzambe ezali nini? Na boumeli ya bikeke, ezalaki koyebana te soki bato bakoki kotosa bokonzi ya Nzambe na ndenge ya kokoka. Yesu apesaki eyano na motuna yango ndenge atikalaki mpenza sembo epai ya Nzambe tii na liwa na ye.
6:15, 16—Maloba wana esalelami mpo na Yehova Nzambe to mpo na Yesu Klisto? Esalelami mpo na moto oyo balobeli komonisama na ye, elingi koloba Yesu Klisto. (1 Tim. 6:14) Na bokeseni na bakonzi mpe bankóló nyonso, kaka Yesu nde azali “Nkumu kaka moko,” mpe kaka ye moko nde akoki kokufa te. (Dan. 7:14; Lom. 6:9) Kobanda amatá likoló, moto moko te awa na mabelé “akoki komona” ye na miso.
Mateya mpo na biso:
4:15. Ezala tokómi baklisto sikoyo to tozali baklisto banda kala, tosengeli kosala makasi mpo na kokoba kokende liboso mpe kokola na elimo.
6:2. Soki tosalaka epai ya ndeko moko moklisto, na esika tómonela ye, tosengeli kosalela ye koleka kutu ndenge tokoki kosalela bato oyo bazali baklisto te.
“SAKOLÁ LILOBA, SALÁ YANGO NA MOLENDE”
Mpo na kosalisa Timote alonga mikakatano oyo ezalaki liboso na ye, Paulo akomaki boye: “Nzambe apesaki biso elimo ya bibangabanga te, kasi ya nguya mpe ya bolingo mpe ya makanisi malamu.” Paulo apesi Timote toli ete: “Moombo ya Nkolo asengeli te kobunda, asengeli nde kozala na boboto epai ya bato nyonso, moto oyo akoki mpo na koteya.”—2 Tim. 1:7; 2:24.
Paulo alendisaki Timote ete: “Kangamá na makambo oyo oyekolaki mpe oyo ondimisamaki.” Mateya ya bapɛngwi ezalaki mpenza kopalangana, yango wana ntoma Paulo apesaki mokɛngɛli wana ya elenge toli ete: “Sakolá liloba, salá yango na molende . . . , pamelá, sembolá mpe lendisá.”—2 Tim. 3:14; 4:2.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:13—“Ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba” ezali nini? “Maloba oyo epesaka litomba” ezali “oyo ya Nkolo na biso Yesu Klisto,” elingi koloba mateya ya solo ya baklisto. (1 Tim. 6:3) Makambo oyo Yesu azalaki koteya mpe kosala ezalaki na boyokani na Liloba ya Nzambe. Na yango, “maloba oyo epesaka litomba” ekoki kolimbola mateya nyonso ya Biblia. Mateya yango ekoki kosalisa biso tóyeba oyo Yehova azali kosɛnga biso. Tokokoba kosimba ndakisa ya maloba yango soki tozali kosalela makambo oyo tozali koyekola na Biblia.
4:13—‘Barulo ya mposo ya nyama’ ezalaki nini? Wana ezali ndenge bazalaki kobenga mikanda oyo bazalaki kokoma na mposo ya nyama. Ekoki kozala ete Paulo asɛngaki bámemela ye mwa barulo ya Makomami ya Liebele oyo akokaki kotánga ntango azalaki na bolɔkɔ na Loma. Barulo yango mosusu ezalaki ya papirise, mpe mosusu ya mposo ya nyama.
Mateya mpo na biso:
1:5; 3:15. Eloko mpenzampenza oyo esalisaki Timote azala na kondima epai na Klisto Yesu, elingi koloba kondima oyo etindaki ye asala makambo nyonso oyo azalaki kosala, ezali mateya ya Nzambe oyo bateyaki ye na ndako na bango banda bomwana. Ezali mpenza na ntina ete baboti bakanisa malamumalamu ndenge oyo bazali kokokisa mokumba wana liboso ya Nzambe mpe liboso ya bana na bango!
1:16-18. Ntango bandeko na biso baklisto bakutani na komekama, bazali konyokwama to bakɔti bolɔkɔ, tosengeli kobondela mpo na bango mpe kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa bango.—Mas. 3:27; 1 Tes. 5:25.
2:22. Baklisto, mingimingi bilenge, basengeli te komipesa kaka na kokembisa nzoto na bango, na masano, na miziki, na kominanola, na mibembo, na masolo ezangá ntina, mpe bongo na bongo, makambo oyo ekotikela bango kaka mwa ntango moke mpo na makambo ya elimo.
[Elilingi na lokasa 31]
Wapi mikanda ya nsuka oyo ntoma Paulo akomaki na lisalisi ya elimo santu?