Mokanda ya Biblia nimero 53—2 Batesaloniki
Mokomi: Paulo
Esika ya bokomi: Kolinti
Nsuka ya bokomi: soko 51 T.B.
1. Nini emonisi ntango mpe esika ya bokomi mokanda ya mibale epai na Batesaloniki, mpe nini esalaki ete mokanda yango mótindama nokinoki?
MOKANDA ya mibale ya ntoma Paulo epai na Batesaloniki moumelaki te kolanda oyo ya liboso. Toyebi ete yango ekomamaki mwa moke nsima na oyo ya liboso, mpe bobele na engumba ya Kolinti, mpamba te bobele bandeko wana, Silwano mpe Timoté, batindelaki lisangá ya Tesaloniki mbote esika moko na Paulo. Bango nyonso bazalaki basaleli-batamboli kati na lisangá ya boklisto ya ebandeli, mpe longola bokutani na bango na Kolinti, ezali na lisoló mosusu te oyo emonisi ete, na nsima, bango nyonso misato bakutanaki lisusu esika moko. (2 Tes. 1:1; Mis. 18:5, 18) Likambo ya ntina oyo lizali kolobelama awa mpe elobeli ya lisoló yango emonisi ete Paulo asosolaki mposa makasi oyo ezalaki mpo na kosembola lisangá yango na ntina na mbeba monene oyo ekɔtaki kati na yango.
2. Nini ezali kondimisa bosolo ya Batesaloniki ya Mibale?
2 Lokola yango emonisamaki mpo na mokanda ya Batesaloniki ya Liboso, bosolo ya Batesaloniki ya Mibale endimisami mpe bongo. Yango mpe etángami na Irénée (ekeke ya mibale T.B.) mpe na bakomi mosusu ya kala, sangisá mpe Justin le Martyr (na ekeke ya mibale lisusu), oyo emonani ete alobelaki 2 Batesaloniki 2:3 ntango azalaki kokoma na ntina na “motyoli na mibeko [lisumu].” Mokanda yango mozali mpe kokutama kati na bakataloge ya kala epai kuna Batesaloniki ya Liboso mpe ezali. Atako sikawa yango ezali te kati na papirise Chester Beatty No. 2 (P46), nzokande ntembe ezali soko moke te ete yango ezalaki kati na nkasa mibale ya liboso ya bankasa nsambo oyo elongwá, nsima na Batesaloniki ya Liboso.
3, 4. (a) Mokakatano nini mobimaki kati na lisangá ya Batesaloniki? (b) Na ntango nini mpe epai wapi mokanda yango mokomamaki, mpe Paulo alukaki kokokisa mokano nini na yango?
3 Mokano ya mokanda oyo ezalaki nini? Na kotaleláká toli oyo Paulo apesaki na Batesaloniki, tozali kososola ete bamoko kati na lisangá bazalaki koloba ete koya ya Nkolo ekómaki penepene, tososoli lisusu ete bakanisikanisi yango bazalaki kosakola liteya na bango wana na molende nyonso, mpe ete bazalaki mpenza kobimisa mobulungano makasi kati na lisangá. Emonani ete bamoko bazalaki kosalela liteya yango lokola ntina ya koboya kosala mosala mpo na kokokisa bamposa na bango. (2 Tes. 3:11) Kati na mokanda na ye ya liboso, Paulo alobelaki koya ya Nkolo, mpe na ntembe te ntango bakanisikanisi wana bayokaki kotángama ya mokanda yango, babalolaki nokinoki maloba ya Paulo mpe bapesaki yango ndimbola mosusu. Ekoki mpe kozala ete basalelaki na bokosi nyonso mokanda moko, kolobáká ete yango eutaki epai na Paulo, mpo na komonisa ete “Mokolo na Nkolo esili koya.”—2:1, 2.
4 Emonani ete Paulo azwaki nsango ya ezalela wana, mbala mosusu epai na moto oyo amemaki mokanda na ye ya liboso na lisangá yango; na bongo, Paulo amibanzabanzaki mingi mpo na kosembola makanisi ya bandeko oyo azalaki kolinga na bolingo mozindo. Boye, na mobu 51 T.B., Paulo, elongo na baninga na ye mibale, atindelaki lisangá ya Tesaloniki mokanda uta na Kolinti. Longola kosembolama ya likanisi ya boyei ya Klisto, Paulo apesi mpe elendiseli makasi ya kotɛlɛma ngwi kati na solo.
MAKAMBO MAZALI KATI NA BATESALONIKI YA MIBALE
5. Mpo na nini Paulo mpe baninga na ye bapesi matɔ́ndi epai na Nzambe, bapesi endimiseli nini, mpe babondeli mpo na likambo nini?
5 Emoniseli ya Nkolo Yesu (1:1-12). Paulo mpe baninga na ye bazali kotɔ́nda Nzambe mpo na bokóli monene ya kondima ya Batesaloniki mpe mpo na bolingo na bango moko epai na mosusu. Mpiko mpe kondima na bango na nsé na minyoko izali bilembeteli oyo bimonisi ete, kati na bosembo na ye, Nzambe azali kotalela bango lokola bato babongi na Bokonzi. Nzambe akozongisa bolózi epai na baoyo bazali konyokola lisangá, mpe akopesa kopema epai na baoyo bazali konyokwama. Yango ekosalema “na ntango na komonana [“emoniseli,” NW] na Nkolo Yesu wana ekobima ye na Likoló esika moko na baanzelu na ye na nguya . . . wana ekoya ye na Mokolo yango ete akumisama na Babulami na ye.” (1:7, 10) Paulo mpe baninga na ye bazali ntango nyonso kobondela mpo na Batesaloniki, ete Nzambe atánga bango bato babongi na libyangami na Ye mpe ete nkombo ya Nkolo Yesu ekoka kokumisama kati na bango mpe bango kati na ye.
6. Nini esengeli koya liboso na mokolo ya Yehova, mpe ndenge nini?
6 Lipengwi likoya liboso na koya ya Yesu (2:1-12). Bandeko basengeli te kobulungana na ntina na nsango oyo ete mokolo ya Yehova mosili koya. “Yango ekoya te bobele ete kotomboka [“lipengwi,” NW] eyei liboso mpe Moto na lofundo [“motyoli na mibeko,” NW] amonisami, ye Mwana na Libebi.” Bayebi sikawa “[eloko oyo, NW] ezali kopekisa ye,” kasi libombami ya botyoli mibeko yango esili kobanda mosala. Ntango eloko oyo ezali kopekisa ye ekolongwa, “bongo, [motyoli na mibeko, NW] akomonana polele, ye oyo Nkolo Yesu akoboma ye na mpema na monɔkɔ na ye mpe akobebisa ye nyɛ wana ekomonana ye na ntango ekoya ye.” Koya ya motyoli na mibeko ezali engebene esaleli ya Satana elongo na misala ya nguya mpe bokosi, mpe Nzambe atiki nzela na esaleli yango ya mbeba ete ekende epai na baoyo bazangaki kolinga solo, na boye ete bándima makambo na lokuta.—2:3, 6, 8.
7. Ndenge nini bandeko bakoki kotɛlɛma ngwi mpe kozwa libateli liboso na oyo mabe?
7 Bótɛlɛma ngwi kati na kondima (2:13–3:18). Paulo akóbi ete: ‘Ebongi na biso kotɔ́nda Nzambe ntango nyonso mpo na bino, bandeko, balingami na Nkolo, mpo ete Nzambe aponi bino longwa na ebandeli ete bóbika na nzela na kobulisama na elimo mpe kondima na makambo na solo.’ Ezali na ntina yango nde nsango malamu esakolamaki epai na bango. Na yango, bandeko basengeli kotɛlɛma ngwi mpe kolanda kosimba mimeseno oyo bateyamaki, ete Yesu Klisto mpe Tata, oyo bapesaki na bolingo nyonso kobɔndisama mpe elikya ya seko, bákoka kozalisa bango “ngwi kati na misala nyonso mpe maloba nyonso malamu, NW.” (2:13, 17) Paulo asɛngi ete bábondelaka mpo na bango, “ete Liloba na Nkolo litambola mbangu mpe likumisama.” (3:1) Nkolo, oyo azali sembo, akotɛlɛmisa bango ngwi mpe akobatela bango longwa na oyo mabe, mpe libondeli ya Paulo lizali ete Nkolo akóba kokamba mitema na bango na bolóngi nyonso kino bolingo ya Nzambe mpe mpiko mpo na Klisto.
8. Likebisi makasi nini lipesami, mpe na likambo nini Paulo mpe etuluku ya basalani na ye bapesaki ndakisa?
8 Likebisi makasi lilandi sikawa: “Bandeko, tozali kolaka bino na nkombo na Nkolo Yesu Klisto ete bópɛngwela bandeko nyonso baoyo bakotambolaka na gɔigɔi mpe bakoboyaka koyamba ezaleli ezwi bino epai na biso.” (3:6) Ntoma akundweli bango ndakisa oyo etuluku na ye ya misionere epesaki, kosaláká mosala butu na moi mpo ete bázala bozito epai na bango te, mpe yango esalaki ete bákakatana te mpo na kopesa etindá oyo: “Soko moto nani alingi kosala mosala te, alya mpe te.” Kasi bazwi sikawa nsango ete bato mosusu ya kilikili bazali kosala mosala te mpe bazali komikɔtisa na makambo ya basusu. Bato yango basengeli komilukela bilei bango moko.—2 Tes. 3:10; 1 Tes. 4:11.
9. Paulo alobi nini na ntina na kosala malamu mpe na ntina na koyokisa nsɔ́ni epai na baoyo bazangi botosi, mpe lolenge nini asukisi mokanda na ye?
9 Bandeko basengeli te kotika kosala malamu. Kasi soki moko na bango amonisi botosi na mokanda ya Paulo te, lisangá lisengeli koyokisa ye nsɔ́ni na kotyáká elembo likoló na ye mpe na kosanganáká lisusu elongo na ye te; bobele na ntango yango, bakolanda kokebisa ye lokola ndeko. Paulo abondeli ete Nkolo na kimya akoka kopesa bango “kimya ntango nyonso mpe na nzela nyonso,” mpe asukisi mokanda na ye na mbote oyo akomaki na lobɔkɔ na ye moko.—2 Tes. 3:16.
LITOMBA NA YANGO
10. Wapi ndambo ya mateya mpe mitindá ya moboko oyo elobelami kati na mokanda ya mibale epai na Batesaloniki?
10 Mokanda moke oyo mopemami mpe motindami epai na Batesaloniki mozali kolobela makambo mingi matali solo ya boklisto, mpe makambo yango nyonso mazali na litomba soki totaleli yango. Tótalela mateya ya moboko mpe mitindá oyo milobelami: Yehova azali Nzambe na kobikisa, mpe azali kobulisa na nzela na elimo na ye mpe na kondima kati na solo (2:13); moklisto asengeli koyika mpiko na nsé na minyoko mpo na kotángama moto oyo abongi na Bokonzi ya Nzambe (1:4, 5); baklisto basengeli kosangisama esika moko epai na Nkolo Yesu Klisto na ntango ya koya na ye (2:1); Yehova akokweisa bikateli na sembo likoló na baoyo nyonso baboyi kotosa nsango malamu (1:5-8); baoyo babyangami bakozwa nkembo elongo na Klisto Yesu, engebene ngɔlu ya Nzambe (1:12); babyangami na nzela na kosakolama ya nsango malamu (2:14); kondima ezali lisɛngami ya ntina (1:3, 4, 10, 11; 2:13; 3:2); Kosala mosala ya mosuni ezali malamu mpo na kokokisa bamposa na yo kati na mosala ya kosakola; soki moto aboyi kosala mosala, akoki kokóma na gɔigɔi mpe kobanda komikɔtisa na makambo oyo matali ye te (3:8-12); bolingo ya Nzambe ekangani na mpiko (3:5). Oyo nde mayebisi ya motuya mpe ya kolendisa tokoki kozwa na mokanda moke oyo mopemami!
11. Mayebisi nini ya ntina mpe kondimisama nini epesami na ntina na Bokonzi?
11 Kati na mokanda oyo, Paulo amonisaki lobanzo mozindo mpo na bolamu ya elimo ya bandeko oyo bazalaki na Tesaloniki mpe mpo na bomoko mpe bokóli ya lisangá yango. Asembolaki makanisi na bango likoló na ntango ya koya ya mokolo ya Yehova, komonisáká ete, libosoliboso, “motyoli na mibeko” asengeli kobima mpo na kofanda kati na “tempelo ya Nzambe, komimonisáká ye moko ete azali nzambe.” Nzokande, baoyo “batángami ete babongi na bokonzi ya Nzambe” bakoki kondimisama mpenza ete Nkolo Yesu akomonana longwa na likoló na ntango etyami, kosaláká bobekoli kati na kopela na mɔ́tɔ “wana ekoya ye na Mokolo yango ete akumisama na Babulami na ye mpe asanzolama na bandimi nyonso.”—2:3, 4; 1:5, 10, NW.