Timote—“Mwana na solo kati na kondima”
TIMOTE azalaki mpenza elenge ntango ntoma Paulo aponaki ye azala moninga na ye ya mobembo. Yango ezalaki ebandeli ya boninga oyo eumelaki mbula soki 15. Bango mibale bakómaki koyokana malamu mpenza na boye ete Paulo abéngaki Timote “mwana na ngai na bolingo mpe na kondima kati na Nkolo” mpe “mwana na solo kati na kondima.”—1 Bakolinti 4:17; 1 Timote 1:2.
Timote azalaki na bizaleli nini oyo esalaki ete Paulo asepela na ye mingi? Ndenge nini Timote akómaki moninga oyo Paulo azalaki na mposa na ye mingi? Liteya nini tokoki kozwa na lisolo ya misala ya Timote oyo ekomami na Biblia?
Paulo aponi ye
Paulo akutanaki na moyekoli Timote ntango azalaki naino elenge na mobembo na ye ya mibale ya misionere na Lusutula (lelo oyo ekólo Turquie) na mobu soki 50 T.B. Emonani ete ntango Timote akokisaki naino mbula 20 te to mwa moke nsima ya kokokisa yango, baklisto ya Lusutula na ya Ikoni bazalaki kondima ete azalaki mwana malamu. (Misala 16:1-3) Bomoi na ye eyokanaki mpenza na nkombo na ye, oyo elimboli “Moto oyo akumisaka Nzambe.” Nkɔkɔ na ye ya mwasi Loidi na mama na ye Yunike bateyaki Timote Makomi Mosantu banda bomwana. (2 Timote 1:5; 3:14, 15) Ekoki kozala ete bakómaki bandimi ntango Paulo akendaki na Lusutula na mbala ya liboso, esilaki koleka mwa bambula. Sikoyo, elimo santu elakisaki makambo oyo Timote asengelaki kosala na mikolo oyo ezalaki koya. (1 Timote 1:18) Paulo na mikóló na lisangá balandaki litambwisi yango, batyaki mabɔkɔ likoló ya elenge yango, baponaki ye mpo na mosala moko, mpe Paulo aponaki ye azala moninga na ye na mosala ya misionere.—1 Timote 4:14; 2 Timote 1:6.
Lokola tata na ye azalaki moto ya Grèce mpe azalaki mondimi te, Timote akatamaki ngenga te. Ya solo, likambo yango ezalaki lisɛngami te mpo na baklisto. Kasi, mpo Bayuda na esika basengelaki kokende bábɛta libaku te, Timote andimaki bákata ye ngenga atako ezalaka likambo ya mpasi makasi.—Misala 16:3.
Liboso, bazalaki kotalela Timote lokola Moyuda? Balimboli mosusu ya Biblia balobaka ete balabi bazalaki koloba ete, “bana oyo Moyuda aboti na moto ya ekólo mosusu bakolanda ekólo ya mama, kasi ya tata te.” Na ndenge yango, “bana oyo mwasi Moyuda azalaki kobota bazali Bayuda.” Kasi, Shaye Cohen, mokomi ya masolo ya kala, alukaki koyeba soki “mobeko wana ya balabi mpo na ekólo ya moto ezalaki na ekeke ya liboso T.B.” mpe soki Bayuda ya Asie Mineure bazalaki kosalela yango. Nsima ya kotalela makambo mingi ya kala, alobaki ete ntango bato ya mabota mosusu bazalaki kobala basi Bayuda, “bana bazalaki kotalelama lokola Bayuda kaka soki libota yango ezalaki kofanda na Yisalaele. Bana bazalaki kolanda ekólo ya mama kaka ntango bafandi na mboka ya mama. Ntango mwasi Moyuda akei na ekólo mosusu epai ya mobali na ye oyo azali Moyuda te, bana bazalaki kotalelama lokola Bayuda te.” Ezala bongo to te, lokola baboti ya Timote bazalaki moko Moyuda mpe mosusu Moyuda te, yango ezalaki na litomba mpo na mosala ya kosakola. Timote azalaki na likambo te na bato oyo bazalaki Bayuda to Bayuda te, mbala mosusu yango esalisaki ye asalisa bango bázala na boyokani.
Ntango Paulo akómaki na Lusutula bomoi ya Timote ebongwanaki. Elenge yango andimaki kotambwisama na elimo santu mpe azalaki kosala malamu misala oyo bankulutu ya lisangá bazalaki kopesa ye, yango wana azwaki mapamboli mpe mikumba mingi. Ata soki na ntango wana Timote ayebaki te ete akozwa mikumba minene ya Teokrasi, ntoma Paulo asalisaki ye na kozwa mikumba minene, mpo na yango akómaki tii na engumba Loma, mboka-mokonzi ya bokonzi ya Loma.
Timote asalelaki matomba ya Bokonzi
Biblia elobeli misala nyonso ya Timote te, kasi asalaki mibembo mingi mpo na matomba ya Bokonzi. Na mobu soko 50 T.B., Timote asalaki mobembo ya liboso elongo na Paulo na Sila, akendaki na Asie Mineure tii na Mpoto. Kuna, bateyaki nsango malamu elongo na baninga mosusu na Filipi, na Tesaloniki, mpe na Beloa. Lokola bato batombokaki, Paulo akendaki na Atene, Timote na Sila batikalaki na Beloa mpo na kosalisa bato oyo bakómaki bayekoli na mboka yango. (Misala 16:6–17:14) Na nsima, Paulo atindaki Timote na Tesaloniki mpo na kolendisa lisangá ya sika oyo esalemaki kuna. Timote amemelaki Paulo nsango malamu ntango bakutanaki na Kolinti ete lisangá yango ekómi monene.—Misala 18:5; 1 Batesaloniki 3:1-7.
Biblia emonisi te ntango boni Timote afandaki na Kolinti elongo na bandeko. (2 Bakolinti 1:19) Nzokande, ekoki kozala ete na mobu 55 T.B., Paulo amonaki malamu kotinda lisusu Timote na Kolinti mpo ayokaki bansango ya mabe mpo na bango. (1 Bakolinti 4:17; 16:10) Na nsima, atindaki Timote elongo na Elasata wana bazalaki na Efese mpo bákende na Makedonia. Mpe na Kolinti ntango Paulo akomelaki Baloma mokanda, azalaki lisusu na Timote.—Misala 19:22; Baloma 16:21.
Timote na bamosusu balongwaki na Kolinti elongo na Paulo mpo na kokende na Yelusaleme, mpe bakómaki na ye tii na Toloa. Toyebi te soki Timote akendaki tii na Yelusaleme. Kasi batángi nkombo na ye na ebandeli ya mikanda misato oyo Paulo akomaki na bolɔkɔ na Loma na mobu soki 60-61 T.B.a (Misala 20:4; Bafilipi 1:1; Bakolose 1:1; Filemona 1) Na Loma, Paulo azalaki kokana kotinda Timote na Filipi. (Bafilipi 2:19) Mpe ntango Paulo abimaki na bolɔkɔ, asɛngaki Timote atikala na Efese.—1 Timote 1:3.
Lokola kosala mobembo na ekeke ya liboso ezalaki mpenza mpasi, Timote abongaki mpenza kozwa longonya mpo na bolingo malamu oyo amonisaki ya kosala mibembo mpo na bolamu ya masangá. (Talá etanda na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 1996, lokasa 29.) Tótalela kaka mobembo moko oyo asalaki mpe makambo nini yango emonisi biso mpo na Timote.
Bizaleli ya Timote
Timote azalaki na Loma ntango Paulo azalaki na bolɔkɔ mpe ntango akomelaki baklisto ya Filipi oyo bazalaki konyokwama mpe alobaki ete: “Nazali kolikya kati na Nkolo Yesu ete natindela bino Timote nokinoki ete ngai nayoka malamu mpo na nsango na bino. Nazali na moto mosusu lokola ye te; akokanisa mpo na makambo na bino solo. Zambi bamosusu nyonso bakobatela malamu na bango mpenza, bakoluka malamu na Klisto Yesu te. Nde boyebi ezaleli malamu na ye ete asalanaki na ngai mosala mpo na Nsango Malamu lokola mwana esika moko na tata.”—Bafilipi 1:1, 13, 28-30; 2:19-22.
Maloba yango emonisi ete Timote azalaki komibanzabanza mpo na baninga na ye bandimi. Soki na masuwa te, kotambola makolo banda Loma tii Filipi na makolo ekokaki kosala mikolo 40, kokatisa Mai Monene ya Adriatique, mpe kotambola lisusu mikolo 40 na makolo mpo na kozonga na Loma. Timote andimaki kosala nyonso wana mpo na kosalela bandeko na ye.
Atako Timote azalaki kosala mibembo mingi, na bantango mosusu azalaki nzoto kolɔngɔnɔ te. Ekoki kozala ete azalaki na maladi ya estoma mpe na “maladi mwa mingi.” (1 Timote 5:23) Kasi, asalaki makasi mpo na nsango malamu. Tokoki kokamwa te na komona ete Paulo alingaki ye mingi!
Lokola Paulo azalaki kokenda na ye na mibembo mpe kotinda ye mpe lokola basalaki makambo mingi elongo, na ntembe te Timote amekolaki bizaleli ya Paulo. Na yango, Paulo alobaki boye mpo na ye: ‘Yo nde, osili [kolanda] mateya na ngai mpe etambweli na ngai mpe mokano na ngai mpe kondima na ngai mpe motema na ngai pɛtɛɛ mpe bolingo na ngai mpe mpiko na ngai mpe minyoko na ngai mpe bolɔzi na ngai, mpe yango ebimeli ngai na Antiokia na Ikoni mpe Lusutula mpe minyoko mizwi ngai.’ Timote alelaki elongo na Paulo, atángaki ye na mabondeli na ye, mpe basalaki bango mibale mosala elongo mpo na matomba ya Bokonzi.—2 Timote 1:3, 4; 3:10, 11.
Paulo alendisaki Timote ‘atika te ete moto moko atyola bolenge na ye.’ Yango ekoki komonisa ete mbala mosusu Timote azalaki nsɔninsɔni mpe na mwa kobanga ntango azalaki kokokisa mokumba na ye. (1 Timote 4:12; 1 Bakolinti 16:10, 11) Kasi, azalaki kosala misala mingi ye moko, mpe Paulo azalaki kotyela ye motema mpe kopesa ye misala mineneminene. (1 Batesaloniki 3:1, 2) Ntango Paulo amonaki ete lisangá ya Efese ezalaki na mposa ya kotambwisama mpenza na ndenge Teokrasi elingi, asɛngisaki Timote atikala kuna mpo na “kolaka bamosusu koteya makambo na bokesene te.” (Biso nde totɛngisi; 1 Timote 1:3) Kasi, atako Timote azalaki na mikumba mingi, azalaki na komikitisa. Mpe atako azalaki nsɔninsɔni, Timote azalaki mobali ya mpiko. Na ndakisa, akendaki na Loma kosunga Paulo, ntango azalaki kosamba mpo na kondima na ye. Kutu, Timote ye moko alekisaki mwa ntango na bolɔkɔ mpo na likambo yango.—Baebele 13:23.
Na ntembe te, Timote ayekolaki makambo mingi epai ya Paulo. Ndenge Paulo akomelaki Timote na mikanda mibale na lisalisi ya elimo santu, mikanda oyo ezali na kati ya Makomami ya Greke ya boklisto elakisi ete ntoma Paulo azalaki kosepela na moninga na ye ya mosala wana. Na mobu soki 65 T.B., ntango Paulo amonaki ete etikali moke akufa lokola martiru, abéngisaki lisusu Timote. (2 Timote 4:6, 9) Biblia eyebisi biso te soki Timote amonanaki na Paulo liboso báboma ye.
Ndimá komipesa!
Ndakisa malamu ya Timote ekoki koteya biso makambo mingi. Azwaki makambo mingi ya malamu na boninga na ye na Paulo; ye moto azalaki elenge ya nsɔninsɔni, akómaki mokɛngɛli. Lelo oyo mpe, bilenge baklisto basi na mibali, bakoki kozwa bolamu na boninga ya ndenge yango. Mpe soki bazwi mokano ya kosalela Yehova bomoi na bango mobimba, bakozala na misala mingi ya ntina. (1 Bakolinti 15:58) Bakoki kokóma babongisi-nzela, to basakoli ya ntango nyonso ya Bokonzi na masangá na bango, to bakoki kokende kosala na bisika oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali mingi. Na kati ya makambo oyo bakoki kosala totángi: mosala ya misionere na mboka mopaya to kosala na biro monene ya la Société Watch Tower to na Betele moko. Mpe lisusu, baklisto nyonso bakoki komonisa elimo oyo Timote amonisaki, ya kosalela Yehova na molimo mobimba.
Ozali na mposa ya kokola na elimo ntango nyonso, lisangá ya Yehova esalela yo na ndenge oyo ye moko akoki komona malamu? Soki ezali bongo, salá lokola Timote. Na kotalela makoki na yo, ndimá komipesa. Mbala mosusu yango ekoki kopesa yo mabaku ya kozwa mikumba mineneminene!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nkombo ya Timote etángami lisusu na mikanda minei ya Paulo.—Baloma 16:21; 2 Bakolinti 1:1; 1 Batesaloniki 1:1; 2 Batesaloniki 1:1.
[Elilingi na lokasa 31]
“Nazali na moto mosusu lokola ye te.”