Tóyina oyo ezali Mabe
YEHOVA azali Nzambe ya bulɛɛ. Na ntango ya kala azalaki “Oyo na bulɛɛ na Yisalaele,” mpe na yango asɛngaki ete Yisalaele ezala pɛto, ezanga litɔnɔ. (Nzembo 89:18) Ayebisaki epai na libota na ye liponami ete: “Bino bokozala bulɛɛ mpo ete ngai nazali bulɛɛ.” (Levitike 11:45) Moto nyonso oyo azalaki na mposa ya ‘kobuta na ngomba na Yehova’ asengelaki kozala na “mabɔkɔ na mabe te mpe motema pɛto.” (Nzembo 24:3, 4) Yango elimbolaki bobele te koboya kosala masumu. Elimbolaki “koyinana na mabe.”—Masese 8:13.
Na bolingo nyonso, Yehova atyaki mibeko ya sikisiki mpo ete libota ya Yisalaele likoka koyeba oyo ezali mabe mpe koboya kosala yango. (Baloma 7:7, 12) Mibeko yango misangisaki mitindá ya ngwi mpo na etamboli malamu. Ekobo, kosangisa nzoto mibali na mibali, kosangisa nzoto kati na bandeko ya libota moko, mpe kosangisa nzoto na banyama etalelamaki nyonso lokola ete ezali makambo ya kozanga bulɛɛ oyo makobebisaka. (Levitike 18:23; 20:10-17) Baoyo bakweaki na misala ya nsɔ́ni motindo yango balongolamaki kati na libota ya Yisalaele.
Na ntango lisangá ya baklisto bapakolami ekómaki “Yisalaele na Nzambe,” mitindá lolenge moko mityamaki mpo na bango. (Bagalatia 6:16) Baklisto basengelaki bango mpe ‘koyina oyo ezali mabe.’ (Baloma 12:9) Maloba ya Yehova epai na Yisalaele matalelaki bango: “Bokozala bulɛɛ mpo ete ngai nazali bulɛɛ.” (1 Petelo 1:15, 16) Misala ya kozanga bulɛɛ lokola pite, ekobo, kosangisa nzoto mibali na mibali, kosangisa nzoto na banyama, mpe kosangisa nzoto kati na bandeko misengelaki te kobebisa lisangá ya boklisto. Baoyo baboyi kotika kosala makambo motindo yango bakokɔta te na Bokonzi ya Nzambe. (Baloma 1:26, 27; 2: 22; 1 Bakolinti 6:9, 10; Baebele 13:4) Na “mikolo na nsuka” oyo, mitindá yango misɛngisami mpe epai na “bampate mosusu.” (2 Timote 3:1; Yoane 10:16) Lokola litomba, baklisto bapakolami mpe bampate mosusu basali libota moko ya pɛto mpe ya kitoko, oyo babongi komema nkombo ya Nzambe lokola Batatoli ya Yehova.—Yisaya 43:10.
Tóbatela bopɛto ya lisangá
Na kokesana, mokili ezali kotika nzela na etamboli nyonso ya mbindo. Atako baklisto ya solo bakeseni, basengeli kobosana te ete mingi kati na baoyo bazali kosalela Yehova lelo oyo bazalaki liboso bato ya mokili. Ezali na mingi oyo, liboso ete bayeba Nzambe na biso ya bulɛɛ, bamonaki te ntina ya komipimela bamposa mpe makanisi mpamba ya nzoto na bango ya masumu, kotamboláká kati na “pɔtɔpɔtɔ ya ezalela ya mbindo.” (1 Petelo 4:4, NW) Ntoma Paulo, nsima ya kotánga misala ya mbindo ya bato mpamba ya mabota, alobaki ete: “Bamosusu na bino bozalaki bongo.” Nzokande, abakisaki ete: “Kasi bosili kosukwa, bosili kobulisama, bosili kozwa boyengebene na nkombo na nkolo Yesu Klisto mpe na [elimo, NW] na Nzambe na biso.”—1 Bakolinti 6:11.
Oyo nde maloba ya kobɔndisa! Ata soko moto asalaki makambo nini na lolenge ya bomoi na ye ya kala, abongwani na ntango nsango malamu na nkembo na ntina na Klisto esimbi motema na ye. Azali komonisa kondima mpe amipesi epai na Yehova Nzambe. Uta ntango yango azali na lolenge ya bomoi oyo ezali pɛto, esukwami pɛɛ na miso na Nzambe. (Baebele 9:14) Masumu oyo asalaki liboso malimbisami, mpe akoki ‘kotambola kino makambo mazali liboso.’a—Bafilipi 3:13, 14; Baloma 4:7, 8.
Yehova alimbisaki Davidi na ntango abongolaki motema nsima ya koboma moto mpe kosala ekobo, mpe alimbisaki Manasé na ntango abongolaki motema mpo na lolenge ya mbindo ya kosambela bikeko mpe kosopa makila. (2 Samwele 12:9, 13; 2 Ntango 33:2-6, 10-13) Tokoki solo kozala na botɔ́ndi na likambo oyo ete azali mpe pene na kolimbisa biso soki tobongoli motema mpe tobɛlɛmi epai na ye na bosembo mpe na komikitisa. Nzokande, atako Yehova alimbisaki Davidi mpe Manasé, mibali wana mibale—mpe Yisalaele mobimba—bakokaki te kopɛngola matomba mabe ya etamboli na bango ya masumu. (2 Samwele 12:11, 12; Yilimia 15:3-5) Lolenge moko, atako Yehova alimbisaka basáli mabe oyo babongoli motema, mbala mosusu matomba mabe ya etamboli na bango makoki kopɛngolama te.
Matomba mabe oyo makoki kopɛngolama te
Na ndakisa, moto moko oyo azali na lolenge ya bomoi ya mbindo mpe azwi bokɔnɔ ya SIDA akoki kondima solo mpe kobongola lolenge ya bomoi na ye kino komipesa mpe kozwa batisimo. Sikawa azali moklisto oyo azali pɛto na elimo mpe azali na boyokani elongo na Nzambe mpe azali na elikya kitoko mpo na mikolo mizali koya; atako bongo SIDA elongwe te. Akoki kokufa na bokɔnɔ yango, ezali wana litomba mabe ya etamboli na ye ya kala nzokande likoki ya kopɛngola yango ezali te. Mpo na baklisto mosusu, matomba mabe ya etamboli na bango ya kala ekoki kokóba na ndenge mosusu. Bambula mingi nsima ya batisimo na bango, mbala mosusu na boumeli ya bomoi na bango mobimba na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo, ekoki kozala ete basengeli kobundisa matindiki ya nzoto na bango oyo ezali kopusa bango ete bázongela motindo na bango ya bomoi ya kala. Na lisalisi ya elimo ya Yehova, mingi bazali kolónga na kotɛmɛláká bamposa wana. Nzokande basengeli ntango nyonso kobunda etumba.—Bagalatia 5:16, 17.
Bato motindo wana bakosala masumu te ntango nyonso oyo bazali kosɛnzɛla likoló na matindiki na bango. Nzokande soki bazali mibali, bakoki na mayele mpenza ‘kolinga’ te kozwa mikumba kati na lisangá ntango nyonso oyo bazali naino kobundisa matindiki makasi ya nzoto na bango. (1 Timoté 3:1) Mpo na nini? Mpamba te bayebi lolenge nini lisangá etyelaka bankulutu motema. (Yisaya 32:1, 2; Baebele 13:17) Bazali kososola ete bankulutu bayebisamelaka makambo mingi ya nkuku mpe basengeli kotalela makambo oyo ezali mpasi mpo na kokata yango. Ekozala likambo ya kozanga bolingo, ya kozanga mayele, mpe ya kozanga bososoli malamu mpo na ye oyo azali naino kobundisa bamposa ya mbindo na nzoto na ye ete andima etɛlɛmɛlo ya kozala na mokumba motindo yango.—Masese 14:16; Yoane 15:12, 13; Baloma 12:1.
Mpo na moto oyo azalaki kobebisa bana mike liboso ete akoka kozwa batisimo, litomba mabe ekoki kozala ya ndenge mosusu. Na ntango ayekoli solo, abongoli motema mpe atiki etamboli na ye ya kala, amemi te etamboli mabe wana ya masumu kati na lisangá. Na nsima akoki kosala bokóli malamu, kino kolónga mpenza matindiki na ye ya mabe, ata kokóma ‘kolinga’ etɛlɛmɛlo ya kozala na mokumba kati na lisangá. Kasi, ezali boni soki asengeli naino kolimwisa lokumu mabe oyo ayebanaki na yango epai ya bato ya kartyé ete azalaki kala mobebisi na bana mike? Akozala mpenza moto oyo azali na “ekweli te, . . .na litatoli malamu epai na bato na libándá, . . .[oyo azali] na efundeli te”? (1 Timoté 3:1-7, 10; Tito 1:7) Soko moke te. Na bongo, akobonga te kopesamela mikumba kati na lisangá.
Na ntango moklisto oyo asilá komipesa asali lisumu
Yehova azali koyeba malamu ete tozali bato na motau mpe ete ata nsima ya kozwa batisimo tokoki kokwea na lisumu. Ntoma Yoane akomelaki baklisto na eleko na ye ete: “Nazali kokomela bino makambo oyo, ete bosala lisumu te. Nde soko moto nani akosala lisumu, tozali na molobeli epai na Tata, ye Yesu Klisto, moyengebeni. Ye azali mpe mbɔndi mpo na masumu na biso. Kasi bobele mpo na yango na biso te nde mpo na mokili mobimba.” (1 Yoane 2:1, 2) Ɛɛ, na lisalisi ya mbeka ya Yesu, Yehova akolimbisa baklisto oyo bazwi batisimo kasi bakwei na lisumu—soko nde bakobongola motema solo mpe bakotika etamboli na bango ya mabe.
Ndakisa mpo na likambo oyo emonanaki na lisangá ya Kolinti na ekeke ya liboso. Ntoma Paulo ayokaki nsango ete kati na lisangá yango oyo liutaki kosalema sika, ezalaki na moto moko oyo azalaki kosangisa nzoto na mwasi ya tata na ye, mpe apesaki malako na ntina ete akoka kobimisama na lisangá. Na nsima, moto yango abongolaki motema, mpe Paulo alendisaki lisangá ete bákoka kozongisa ye. (1 Bakolinti 5:1, 13; 2 Bakolinti 2:5-9) Na lolenge yango, na nzela ya motema-boboto ya Yehova oyo ezali na nguya ya kobikisa mpe na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto oyo ezali na motuya monene, moto yango apɛtolamaki na lisumu na ye. Makambo motindo wana makoki kosalema lelo oyo. Nzokande, lisusu, atako moto asilá kozwa batisimo oyo asali lisumu monene abongoli motema mpe ete alimbisami na miso ya Yahova, ekoki kozala na matomba mabe ya etamboli mabe na ye oyo makotikala.—Masese 10:16, 17; Bagalatia 6:7.
Na ndakisa, soki elenge mwasi oyo asilá komipesa asali pité, akoki mpenza koyoka mawa makasi na ntina na etamboli na ye mpe akoki kozongisama na kolɔngɔ́nɔ́ ya elimo na nzela ya lisungi ya lisangá. Kasi, ekozala boni soki akumbi zemi mpo na etamboli na ye wana ya mabe? Na bongo bomoi na ye mobimba, na ntembe te, ekobongwana mpo na likambo oyo ye asalaki. Mobali oyo asali ekobo akoki kobongola motema mpe kosala ete abimisama te kati na lisangá. Kasi mobalani na ye oyo azangi ekweli azali na bantina eyokani na Makomami mpo na koboma libala elongo na ye, mpe akoki kopona kosala bongo. (Matai 19:9) Soko mwasi yango akolinga koboma libala, mobali wana, atako alimbisami epai na Yehova, akokumba matomba mabe ya etamboli na ye na boumeli ya bomoi na ye mobimba.—1 Yoane 1:9.
Ezali boni mpo na mobali oyo na kozanga bolingo mpenza abomi libala elongo na mwasi na ye mpo ete abala mwasi mosusu? Ekoki kozala ete moto yango abongoli motema mpe azongisami na lisangá. Nsima ya bambula akoki kosala bokóli mpe “kokende liboso kino ezalela ya moto ateli.” (Baebele 6:1, NW) Kasi na boumeli ya ntango nyonso oyo mwasi na ye ya liboso azali na mobali te, mobali yango abongi te mpo na kozwa mokumba kati na lisangá. Azali te “mobali na mwasi moko” mpamba te abomaki libala na mwasi na ye ya liboso kozanga ntina oyo ezwi mobɔkɔ na yango kati na Makomami.—1 Timoté 3:2, 12.
Ezali wana bantina ya makasi mpo na yango moklisto asengeli koyina oyo ezali mabe, boye te?
Ezali boni mpo na ye oyo abebisi mwana moke?
Ezali boni soko mokóló moklisto oyo asilá kozwa batisimo abebisi mwana moke? Moto wana asali lisumu azali mpenza mabe na meko oyo ete Yehova akoki te kolimbisa ye? Akoki mbala mosusu kolimbisa. Yesu alobaki ete ‘kotuka elimo santu’ ezali oyo ekoki kolimbisama te. Mpe Paulo alobaki ete ezali na mbeka te mpo na masumu ya ye oyo azali kosala masumu na nkó nzokande ayebi solo. (Luka 12:10; Baebele 10:26, 27) Kasi esika moko te kati na Biblia elobami ete mokóló moklisto oyo abebisi mwana moke na kosangisáká na ye nzoto—ezala kati na libota to mpe lolenge nyonso mosusu—akoki kolimbisama te. Ya solo, masumu na ye makoki kopɛtolama soko na bosembo nyonso abongoli motema mpe atiki etamboli mabe na ye wana. Nzokande, akoki kozala lisusu na mposa ya kobundisa matindiki mabe ya nzoto na ye oyo ye akólisaki. (Baefese 1:7) Mpe ekoki kozala na matomba mabe oyo makopɛngolama te.
Engebene mibeko ya esika oyo ye afandi, mobebisi wana akoki kokatelama etumbu ya bolɔ́kɔ to mpe kozwa etumbu mosusu epai na Letá. Lisangá ekoki te kobatela ye na likambo motindo wana. Lisusu, mobali yango asili komonisa bolɛmbu makasi oyo esengeli te kozanga kotalelama. Soko emonani ete abongoli motema, akolendisama ete asala bokóli na elimo, asangana na mosala ya kosakola, mpe ata kosangana na eteyelo ya mosala ya teokrasi mpe na mwa makambo misusu ya miké, lokola bilakiseli kati na likita ya mosala. Kasi, yango elimboli te ete akokisi masɛngami mpo na kozwa mokumba kati na lisangá. Wapi bantina ya Makomami mpo na likambo yango?
Ntina ya liboso ezali ete, nkulutu asengeli kozala na “komipekisa.” (Tito 1:8) Ya solo, moko te kati na biso azali na komipekisa na lolenge ya kokoka. (Baloma 7:21-25) Kasi mokóló moklisto oyo akwei na lisumu ya kobebisa mwana moke amonisi bolɛmbu ya nzoto oyo ezali mpenza ya kolongobana te. Makambo masalemá mingi liboso mamonisi ete mokóló motindo yango akoki mpe kobebisa bana mosusu. Ya solo, babebisi nyonso te bazongelaka lisumu wana, nzokande mingi kati na bango basalaka yango. Mpe lisangá ekoki te kotánga kati na mitema ya bato mpo na koyeba nani azali na makanisi ya kobebisa bana mike mpe nani azali na yango te. (Yilimia 17:9) Ntina yango, toli ya Paulo epai na Timoté esalelami na nguya nyonso epai na mokóló moklisto oyo abebisaki bana mike: “Otyá mabɔkɔ likoló na moto nokinoki te; osangana na masumu na bato mosusu te.” (1 Timoté 5:22) Mpo na libateli ya bana na biso, moto oyo ayebani ete azalaki mobebisi na mwana moke akokisi te masɛngami mpo na kozwa mokumba kati na lisangá. Lisusu, abongi te mpo kosala lokola mobongisi-nzela to mpe na lolenge mosusu ya sipesiale ya mosala ya ntango nyonso.—Kokanisá na etindá ezwami na Exode 21:28, 29.
Bamoko bakoki komituna ete ‘Ezali mpe na basusu oyo basalaki lolenge mosusu ya masumu mpe bamonisaki lokola ete babongoli motema, mpe na nsima bazongelaki masumu na bango na nsima, boye te?’ Ɛɛ, yango esilá kosalema, kasi ezali na makambo mosusu oyo ebongi kotalelama. Na ndakisa, soko mokóló moko abandi kolengola mokóló mosusu na ntina ete asangisa na ye nzoto, mokóló yango asengeli kozala na makoki ya kotɛmɛla kolengola motindo wana. Nzokande, ezalaka mpasi te mpo na kokosa bana mike, kobuba bango, to mpe kobangisa bango. Biblia elobeli kozanga mayele ya mwana moke. (Masese 22:15; 1 Bakolinti 13:11) Yesu asalelaki bana mike lokola ndakisa ya bopɔlɔ mpe ya kozanga koyeba makambo. (Matai 18:4; Luka 18:16, 17) Kozanga koyeba makambo epai na mwana moke esangisi mpe kozanga eksperiansi. Bana mike mingi bazali motema polele, bakosamaka nokinoki, mpe na bongo ezali mpasi te mpo na kobebisa bango epai na mokóló oyo bayebi ye mpe bazali kotyela ye motema nzokande azali na mwango mabe. Na ntina yango, lisangá ezali na mokumba liboso na Yehova ya kobatela bana mike oyo bazali kati na lisangá.
Bana oyo bateyami malamu bayekolaka kotosa mpe kokumisa baboti na bango, bankulutu, mpe mikóló nyonso mosusu. (Baefese 6:1, 2; 1 Timoté 5:1, 2; Baebele 13:7) Ekozala etamboli ya mabe mpenza soko moko na mikóló wana akosalela na lolenge mabe elikya oyo mwana moke, ayebi likambo te, azali kotya epai na ye, na kolengoláká mwana yango to mpe kotindikáká ye na makasi ete asangisa na ye nzoto. Mbala mingi, baoyo basili kobebisama lolenge yango babundisaka mayoki ya mpasi motindo wana na boumeli ya bambula mingi. Na yango, mobebisi mwana motindo wana asengeli kopesamela disipilini makasi mpe mpamela na lisangá. Ezali te etɛlɛmɛlo na ye kati na lisangá nde esengeli kotalelama, kasi, ezali bopɛto ya lisangá oyo esengeli kozala na litɔnɔ te.—1 Bakolinti 5:6; 2 Petelo 3:14.
Soko mobebisi mwana oyo amonisi solo kobongola motema, asengeli kondima mayele ya kosalela mitindá ya Biblia. Soki ayekoli solo koyina oyo ezali mabe, akotalela mpenza na mpii likambo mabe oyo ye asalaki mpe akobunda mpo na koboya kozongela lisumu na ye. (Masese 8:13; Baloma 12:9) Na koleka, na ntembe te akotɔ́nda Yehova mpo na bonene ya bolingo na Ye, oyo mpo na yango mosáli masumu oyo abongoli motema, lokola ye, akoki kolanda kosambela Nzambe na biso ya bulɛɛ mpe kozala na elikya ya kozala kati na “basembwi” oyo bakofanda na mabelé mpo na libela.—Masese 2:21.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá “Mituna ya batángi” kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Máí, 1996.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 28]
Atako Yehova alimbisaka basáli na masumu oyo babongoli motema, ekoki kozala na matomba mabe ya etamboli na bango oyo makoki kopɛngolama te