Mokapo ya motoba
Likambo oyo etali biso nyonso
1, 2. (a) Likambo nini Satana abimisaki na Edene? (b) Ndenge nini likambo yango emonanaki na maloba oyo alobaki?
LIKAMBO moko oyo eleki ntina mpo na bato etaleli mpe yo. Ngámbo oyo okomitya ekomonisa soki okozwa bomoi ya seko na mikolo ezali koya to okozwa yango te. Likambo yango ebimaki ntango botomboki ebandaki na Edene. Na ntango wana, Satana atunaki Eva boye: “Nzambe alobaki solo ete bino bokoki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga te?” Azongisaki ete mpo na nzete moko Nzambe alobaki ete: “Bokolya yango te . . . mpo bókufa te.” Na nsima Satana amonisaki mbala moko ete Yehova akosaki, alobaki ete ezala bomoi ya Eva to ya Adama etalelaki likambo ya kotosa Nzambe te. Satana alobaki ete Nzambe apimelaki bikelamu na ye eloko moko ya malamu—likoki ya kotya mibeko bango moko na bomoi na bango. Satana alobaki ete: “Nzambe ayebi ete na mokolo bokolya yango, miso na bino makofungwama, mpe bino bokozala [lokola, NW] Nzambe, koyeba malamu mpe mabe.”—Genese 3:1-5.
2 Na maloba mosusu, Satana alingaki koloba ete bato bakozala malamu soki bazali kozwa bikateli na bango bango moko na esika ete bátosa mibeko ya Nzambe. Na yango, atyaki ntembe na lolenge ya Nzambe ya koyangela. Yango ebimisaki likambo eleki monene oyo etali boyangeli ya Nzambe ya molɔ́ngɔ́ mobimba, elingi koloba lotomo na ye ya koyangela. Motuna oyo ebimaki yango oyo: Lolenge nini ya koyangela eleki malamu mpo na bato, boyangeli ya Yehova to boyangeli oyo ezali kotalela ye te? Na ntango wana, Yehova akokaki koboma Adama na Eva mbala moko, kasi yango ekokaki te kosilisa likambo yango ya boyangeli na ndenge ya malamu. Ndenge atiki bato bámitambwisa bango moko na boumeli ya ntango molai, Nzambe akoki sikoyo komonisa mpenza nini ekoki kobima soki bato baboi kotalela ye mpe mibeko na ye.
3. Likambo nini ya mibale Satana abimisaki?
3 Matumoli ya Satana mpo na koboya kondima lotomo ya Yehova ya koyangela esukaki kaka na oyo elekaki na Edene te. Abimisaki mpe ntembe mpo na bosembo ya bato mosusu epai ya Yehova. Yango ekómaki likambo ya mibale oyo ezali na boyokani na likambo monene ya boyangeli. Ntembe yango eyaki kotalela bakitani ya Adama na Eve mpe bana nyonso ya elimo oyo Nzambe azalaki na bango, ata mpe Mwana na ye ya liboso, oyo alingaki mingi. Na ndakisa, na mikolo ya Yobo, Satana abimisaki ntembe ete soki bato bazali kosalela Yehova ezali te mpo balingaka ye mpe mpo na lolenge na ye ya koyangela, kasi nde mpo na bantina ya mabe. Alobaki ete soki bato yango bakutani na mikakatano, bango nyonso bakolanda bamposa ya mabe.—Yobo 2:1-6; Emoniseli 12:10.
Lisolo ya bato emonisi nini?
4, 5. Lisolo ya bato emonisi nini ndenge moto azali komitambwisa ye moko?
4 Liteya ya ntina mingi oyo etali likambo ya boyangeli yango oyo: Nzambe asalaki bato mpo bámitambwisa bango moko te kozanga kotalela boyangeli na ye. Asalaki bango ete bátalelaka mibeko na ye mpo na matomba na bango. Mosakoli Yilimia andimaki yango: “Ɛ [Yehova], nayebi ete nzela ya moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye [ye] moko.” (Yilimia 10:23, 24) Yango wana, Liloba ya Nzambe ekebisi ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te.” (Masese 3:5) Se ndenge Nzambe asalá bato ete bátambwisama na mibeko ya molɔ́ngɔ́ oyo asalá mpo na kozala na bomoi, asalá mpe mibeko ya bizaleli malamu, oyo soki bato batosi yango, bakozala malamu.
5 Nzambe ayebaki malamu ete bato bakolonga soki moke te komitambwisa bango moko kozanga boyangeli na ye. Na kati ya komekameka komitambwisa kozanga boyangeli ya Nzambe, bato basali bibongiseli ndenge na ndenge na makambo ya politiki, ya nkita mpe ya losambo. Makambo yango ememi matata kati na bato, mpe yango ebimisi mobulu, bitumba, mpe liwa. “Moto moko azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Yango ezali mpenza likambo oyo esalemi na lisolo mobimba ya bato. Lokola esakolamaki na Liloba ya Nzambe, bato mabe mpe bakosi “bakokende lisusu mosika na kati ya mabe.” (2 Timote 3:13) Mpe atako na ekeke ya 20 bato bakómi mosika na makambo ya sianse mpe ya kosala biloko, bato bamoni mpe mpasi oyo emonaná naino te. Maloba ya Yilimia 10:23 emonani mpenza solo—bato basalemaki te ete bámitambwisaka bango moko.
6. Ndenge nini mosika te Nzambe akosukisa boyangeli ya bato oyo eboi kotalela ye?
6 Monyoko, mbeba oyo euti na kozanga kotalela Nzambe emonisi mpo na libela ete boyangeli ya bato ekolonga soki moke te. Boyangeli ya Nzambe ezali nzela kaka moko mpo na kozala na esengo, na bomoko, nzoto kolɔngɔnɔ, mpe na bomoi. Mpe Liloba ya Nzambe ezali komonisa ete ntango oyo Yehova apesaki bato mpo na komiyangela elingi kokóma na nsuka. (Matai 24:3-14; 2 Timote 3:1-5) Etikali moke, akokɔta na makambo ya bato mpo na kotya boyangeli na ye na mabele. Esakweli ya Biblia elobi ete: “Na mikolo na mikonzi yango Nzambe na lola akotɛmisa bokonzi bokobebisama soko moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso [ya ntango oyo], mpe ekotikala lobiko na lobiko.”—Danyele 2:44.
Kobika mpo na kokɔta na mokili ya sika ya Nzambe
7. Ntango boyangeli ya Nzambe ekosukisa boyangeli ya bato, nani akobika?
7 Ntango boyangeli ya Nzambe ekosukisa boyangeli ya bato, nani akobika? Biblia eyanoli ete: “Basembwi [baoyo bazali kolongisa lotomo ya Nzambe ya koyangela] bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mokili mpe bato na masumu bakopikolama wana.” (Masese 2:21, 22) Ndenge moko mpe, mokomi ya nzembo alobaki ete: “Nsima ya mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te . . . Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”—Nzembo 37:10, 29.
8. Ndenge nini Nzambe akolongisa mpenza boyangeli na ye?
8 Ntango ebongiseli ya Satana ekobebisama, Nzambe akotya mokili na ye ya sika mpe yango ekolongola makambo nyonso ya mabe, na ndakisa mobulu, bitumba, bobola, mpasi, maladi, mpe liwa oyo enyokoli bato na boumeli ya bankóto ya bambula. Biblia elobeli na maloba kitoko mpenza makambo ya malamu oyo ezali kozela bato ya botosi: “[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, na mawa na koganga na mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.” (Emoniseli 21:3, 4) Na nzela ya bokonzi na ye ya likoló oyo ekotambwisama na Klisto, Nzambe akolongisa (akomonisa) lotomo na Ye ya kozala Moyangeli, elingi koloba, Mokonzi na biso.—Baloma 16:20; 2 Petelo 3:10-13; Emoniseli 20:1-6.
Ndenge bato mosusu batalelaka likambo yango
9. (a) Ndenge nini bato oyo bazalaki sembo epai ya Yehova batalelaki liloba na ye? (b) Ndenge nini Noa amonisaki bosembo na ye, mpe ndenge nini tokoki kozwa matomba na ndakisa na ye?
9 Kobanda kala, mibali mpe basi mosusu ya kondima bamonisaki bosembo na bango epai ya Yehova mpe batosaki ye lokola Moyangeli. Bayebaki ete bomoi na bango ezalaki kotalela koyoka ye mpe kotosa ye. Noa azalaki moko kati na bato yango. Na yango, Nzambe alobaki na Noa ete: “Nasili kokana kosilisa bato nyonso . . . Salá masuwa mpo na yo.” Mpe Noa atosaki maloba ya Yehova. Atako bazalaki kokebisa bango, bato mosusu ya ntango wana bazalaki komitambwisa lokola nde likambo moko ya nsɔmɔ ekosalema te. Kasi Noa atongaki masuwa moko monene mpe amipesaki na mosala ya kosakwela bato mosusu banzela ya sembo ya Yehova. Biblia elobi lisusu ete: “Noa asalaki bobele bongo, mpe asilisaki nyonso elakaki Nzambe ye.”—Genese 6:13-22; Baebele 11:7; 2 Petelo 2:5.
10. (a) Ndenge nini Abalayama na Sala balongisaki boyangeli ya Yehova? (b) Na lolenge nini tokoki kozwa matomba na ndakisa ya Abalayama na Sala?
10 Abalayama na Sala bazalaki mpe ndakisa malamu na likambo etali kolongisa boyangeli ya Yehova, basalaki nyonso oyo asɛngaki bango. Bazalaki kofanda na Ulu ya Bakaladi, engumba moko ya bozwi mingi. Kasi ntango Nzambe ayebisaki Abalayama akenda na mokili mosusu, mokili oyo ayebaki yango te, Abalayama ‘alongwaki lokola Yehova alobelaki ye.’ Na ntembe te, Sala azalaki na bomoi ya malamu—ndako, baninga, mpe bandeko. Kasi, azalaki kotosa Yehova mpe mobali na ye mpe akendaki na mokili ya Kanana, atako ayebaki te ndenge bomoi na ye ekozala kuna.—Genese 11:31–12:4; Misala 7:2-4.
11. (a) Na mabaku nini Moize alongisaki boyangeli ya Yehova? (b) Ndenge nini tokoki kozwa matomba na ndakisa ya Moize?
11 Moize azalaki mpe moto mosusu oyo alongisaki boyangeli ya Yehova. Mpe asalaki yango liboso ya mikakatano minene—andongwanaki na Falo ya Ezipito. Yango elingi koloba te ete Moize azalaki komityela motema. Kutu, azalaki kondima ata moke te makoki na ye ya koloba. Kasi atosaki Yehova. Na lisalisi ya Nzambe mpe na lisungi ya ndeko na ye Alona, mbala na mbala, Moize ayebisaki Falo maloba ya Yehova. Ata bana mosusu ya Yisalaele bazalaki koloba mabe mpo na Moize. Kasi, na bosembo mpenza, Moize asalaki nyonso oyo Yehova asɛngaki ye, mpe na nzela na ye, Yisalaele esikolamaki na boombo na Ezipito.—Exode 7:6; 12:50, 51; Baebele 11:24-27.
12. (a) Nini emonisi ete kozala sembo epai ya Yehova esuki kaka te na kosala oyo Yehova akomisaki yango polele? (b) Ndenge nini kokanga ntina ya bosembo ya ndenge wana ekoki kosalisa biso tósalela makambo oyo ezali na 1 Yoane 2:15?
12 Bato oyo bazalaki sembo epai ya Yehova balobaki te ete makambo oyo basɛngaki bango ezalaki kaka kotosa oyo Nzambe asilaki kokomisa. Ntango mwasi ya Potifala amekaki kolɛngola Yosefe mpo asala na ye ekobo, Nzambe akomisaki naino mobeko moko te oyo ezalaki kopekisa ekobo. Kasi, Yosefe ayebaki ebongiseli ya libala oyo Yehova abandisaki na Edene. Ayebaki ete kosangisa nzoto na mwasi ya moto ekoki kosepelisa Nzambe te. Yosefe alukaki te koyeba tii wapi Nzambe akokaki kopesa ye nzela ya komekola Baezipito. Alongisaki banzela ya Yehova na ndenge azalaki kokanisa makambo oyo Yehova azalaki koloba to kosala na bato mpe na yango, na lisosoli na ye moko, asalelaki oyo amonaki ete ezali mokano ya Nzambe.—Genese 39:7-12; Nzembo 77:11, 12.
13. Ndenge nini emonanaki ete Satana azali mokosi na likambo ya (a) Yobo? (b) Baebele misato?
13 Atako bakutani na komekama makasi, bato oyo bayebi Yehova malamumalamu bapesaka ye mokɔngɔ te. Satana alobaki ete soki Yobo abungisi bozwi na ye to soki bokolɔngɔnɔ ya nzoto na ye ebebi—atako Yehova akɔtelaki ye—akopesa Nzambe mokɔngɔ. Kasi Yobo amonisaki ete Zabolo azali mokosi, atako Yobo ye moko ayebaki te mpo na nini azalaki konyokwama. (Yobo 2:9, 10) Bambula mingi na nsima, Satana azalaki ntango nyonso koluka kolongisa makanisi na ye, asalelaki mokonzi moko mabe ya Babilone mpo na koluka koboma bilenge misato Baebele na litumbu ya mɔtɔ soki baboi kofukama mpe kosambela liboso ya ekeko oyo mokonzi yango atɛmisaki. Lokola basengelaki kopona kotosa mobeko ya mokonzi to kotosa mobeko ya Yehova oyo epekisi losambo ya bikeko, bamonisaki polele ete bazalaki kosalela Yehova mpe ete mpo na bango azali Mokonzi Oyo-Aleki-Nyonso. Kozala sembo epai ya Nzambe ezalaki na ntina mingi na miso na bango koleka bomoi na bango ya ntango wana!—Danyele 3:4-18.
14. Ndenge nini biso bato ya kozanga kokoka tokoki komonisa ete tozali mpenza sembo epai ya Yehova?
14 Na bandakisa ya ndenge wana, tosengeli nde koloba ete mpo na kozala sembo epai ya Yehova, esengeli kozala moto ya kokoka to ete moto oyo asali libunga akwei libela? Ezali bongo te! Biblia eyebisi biso ete na bantango mosusu Moize asalaki mabunga. Atako Yehova asepelaki te, abwakaki Moize te. Bantoma ya Yesu Klisto mpe bazalaki na bolɛmbu na bango. Lokola atalelaka ezalela na biso ya kozanga kokoka, Yehova asepelaka te soki tozali koboya kotosa ye na nko. Mpo na bolɛmbu na biso, soki tosali likambo moko ya mabe, esengeli ete tóbongola mpenza motema mpe tózongela libunga yango te. Na ndenge wana, tokolakisa ete tozali mpenza kolinga makambo oyo Yehova amonaka ete ezali malamu mpe toyinaka oyo azali komonisa ete ezali mabe. Soki tondimi motuya ya mbeka ya Yesu oyo elongolaka masumu, tokoki kozala na esengo ya kondimama na Nzambe.—Amosa 5:15; Misala 3:19; Baebele 9:14.
15. (a) Nani kati na bato nyonso amonisaki bosembo epai ya Nzambe na ndenge ya kokoka, mpe yango emonisaki nini? (b) Ndenge nini bosembo ya Yesu esalisaka biso?
15 Kasi, elingi koloba ete bato bakokoka ata moke te kotosa boyangeli ya Yehova na ndenge ya kokoka? Eyano na motuna yango ezalaki lokola “sɛkɛlɛ mosantu” na boumeli ya bambula soki 4000. (1 Timote 3:16) Atako Adama akelamaki moto ya kokoka, apesaki ndakisa ya kokoka te na likambo etali kokangama na Nzambe. Kasi, nani akokaki kopesa ndakisa ya kokoka? Moto moko te kati na bakitani na ye ya masumu. Moto kaka moko oyo akokaki kosala yango ezalaki Yesu Klisto. (Baebele 4:15) Oyo Yesu asalaki emonisaki ete lokola Adama azalaki na mabaku ya malamu koleka, akokaki kozala mpenza sembo soki alingaki. Ezalaki foti ya misala ya Nzambe te. Yango wana, Yesu Klisto azali mpenza ndakisa oyo tolukaka komekola mpo na komonisa kaka te botosi na mibeko ya Nzambe, kasi mpe bokangami na biso epai ya Yehova, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba.—Deteronome 32:4, 5.
Biso moko tozali na ngámbo nini?
16. Mpo na nini tosengeli kozala ntango nyonso ekɛngɛ na ezaleli na biso na likambo etali boyangeli ya Yehova?
16 Lelo oyo, mokomoko kati na biso asengeli kokutana na likambo etali boyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Soki tomonisi polele ete tozali na ngámbo ya Yehova, Satana akoluka kokweisa biso. Abimisaka matumoli na banzela nyonso mpe akokoba kosala bongo kino nsuka ya mokili oyo mabe. Tosengeli ntango nyonso kozala ekɛngɛ. (1 Petelo 5:8) Etamboli na biso emonisaka ngámbo oyo tomitii na likambo oyo etali boyangeli ya Yehova mpe na likambo ya mibale oyo etali bosembo na biso epai ya Nzambe na ntango tokutanaka na komekama. Tómeka soki moke te kotalela etamboli ya kozanga bosembo lokola likambo ya moke kaka mpo ete ezali kosalema mingi na mokili. Kotikala sembo esɛngaka ete tósala makasi mpo na kosalela mitinda ya sembo ya Yehova na makambo nyonso ya bomoi na biso.
17. Lokuta mpe moyibi oyo tosengeli kokima eutá wapi?
17 Na ndakisa, tosengeli te komekola Satana, oyo azali “tata ya lokuta.” (Yoane 8:44) Tosengeli kozala sembo na makambo na biso nyonso. Na mokili oyo ya Satana, mbala mingi bilenge bazalaka sembo te epai ya baboti na bango. Kasi bilenge baklisto basalaka bongo te, yango wana bakweisaka lokuta ya Satana oyo alobaka ete basaleli ya Nzambe bakoki kotikala sembo te ntango bakutani na komekama. (Yobo 1:9-11; Masese 6:16-19) Ezali mpe na makambo mosusu ya mombongo oyo ekoki komonisa ete moto azali na ngámbo ya “tata ya lokuta” na esika ete azala na ngámbo ya Nzambe ya bosolo. Makambo ya ndenge wana tosengeli koboya yango. (Mika 6:11, 12) Lisusu, moyibi ezali mabe, ata soki moto azali na bobola to ata nkolo ya biloko oyo ye ayibi azali na bozwi mingi. (Masese 6:30, 31; 1 Petelo 4:15) Ata soki ezali momeseno ya bato mingi esika tofandi to ata soki eloko oyo bazwi ezali na ntina te, moyibi ezali ntango nyonso likambo oyo eyokani te na mibeko ya Nzambe.—Luka 16:10; Baloma 12:2; Baefese 4:28.
18. (a) Na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto, komekama nini ekokómela bato nyonso? (b) Momeseno nini tosengeli kolona kobanda sikoyo?
18 Na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto, Satana na bademo na ye bakozala na lobwaku mozindo, bakokosa lisusu bato te. Ekozala mpenza ntango moko ya kobɔndisama! Kasi nsima ya mbula nkóto, bakobimisa bango mpo na mwa ntango moke. Satana na bademo na ye bakotungisa bato basikolami oyo bakobatela bosembo na bango epai ya Nzambe. (Emoniseli 20:7-10) Soki tozwi libaku ya kozala na bomoi ntango bakobimisa Satana, tokomonisa ezaleli nini na likambo etali boyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba? Lokola na ntango wana bato nyonso bakokóma bato ya kokoka, likambo nyonso oyo moto akosala oyo ekomonisa kozanga bosembo ekozala likambo oyo moto asali na nko, mpe yango ekomema liwa ya libela. Ezali mpenza na ntina ete kobanda sikoyo tólona momeseno ya kotosa toli nyonso oyo Yehova azali kopesa biso, ezala na nzela ya Liloba na ye to na nzela ya ebongiseli na ye! Soki tosali bongo, tokomonisa na bokangami na biso na ye ete azali Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba.
Bozongeli
• Likambo nini ya monene biso nyonso tosengeli kokutana na yango? Na nini likambo yango etali biso?
• Na lolenge nini ya kokamwa mibali mpe basi ya ntango ya kala bamonisaki bosembo na bango epai ya Yehova?
• Mpo na nini ezali na ntina ete tókumisa Yehova na etamboli na biso mokolo na mokolo?