Omibatela na kati ya bolingo ya Nzambe
“Balingami, . . . bómibatela na kati ya bolingo ya Nzambe, . . . mpo na bomoi ya seko.”—YUDA 20, 21.
1, 2. Osengeli kosala nini mpo Nzambe alinga yo mpo na libela?
LOKOLA Yehova alingaka bato mingi, andimaki kopesa Mwana na ye mobotami-se-moko mpo moto nyonso oyo akomonisa kondima na kati na ye azwa bomoi ya seko. (Yoane 3:16) Tosepelaka mpenza lokola Yehova alingi biso ndenge wana! Soki ozali mosaleli ya Yehova, na ntembe te okolinga ete Nzambe alinga yo mpo na libela.
2 Moyekoli Yuda ayebisi oyo tosengeli kosala mpo Nzambe alinga biso mpo na libela. Akomaki boye: “Na komitongáká bino moko likoló ya kondima na bino ya bosantu koleka, mpe na kobondeláká na elimo santu, bómibatela na kati ya bolingo ya Nzambe, wana bozali kozela motema mawa ya Nkolo na biso Yesu Klisto mpo na bomoi ya seko.” (Yuda 20, 21) Koyekola Liloba ya Nzambe mpe kosakola nsango malamu nde esalisaka mpo na komitonga likoló ya ‘kondima ya bosantu koleka,’ elingi koloba likoló ya mateya ya boklisto. Mpo omibatela na kati ya bolingo ya Nzambe, osengeli kobondelaka “na elimo santu,” elingi koloba na nguya ya elimo yango. Mpo na kozwa bomoi ya seko, osengeli mpe kosala makambo oyo ekomonisa kondima na yo na mbeka oyo Yesu Klisto apesaki mpo na kosikola bato.—1 Yoane 4:10.
3. Mpo na nini bato mosusu bazali lisusu Batatoli ya Yehova te?
3 Bato mosusu bazalaki na kondima, kasi bamibatelaki na kati ya bolingo ya Nzambe te. Lokola baponaki nzela ya masumu, lelo oyo bazali lisusu Batatoli ya Yehova te. Mpo likambo ya ndenge wana ekómela yo te, osengeli kosala nini? Komanyola likoló ya makambo oyo tokolobela na lisolo oyo ekosalisa yo okima masumu mpe omibatela na kati ya bolingo ya Nzambe.
Monisá na misala ete olingaka Nzambe
4. Kotosa Nzambe ezali na ntina nini?
4 Monisá ete olingaka Nzambe na ezaleli na yo ya botosi. (Matai 22:37) Ntoma Yoane akomaki boye: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka bakomandema na ye; kutu bakomandema na ye ezali kilo te.” (1 Yoane 5:3) Kotosa Nzambe ekoki kopesa yo esengo mpe makasi ya kolonga komekama. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Esengo ezali na moto oyo aboyi [kolanda] toli ya bato ya mabe, . . . kasi mposa na ye ezali kati na Mobeko ya [Yehova].”—Nzembo 1:1, 2.
5. Soki olingaka mpenza Yehova, okosala makambo ya ndenge nini?
5 Soki olingi mpenza Yehova, okolinga te kosala makambo oyo ekofingisa nkombo na ye. Agulu abondelaki Nzambe na maloba oyo: “Pesá ngai bobola te, bozwi mpe te. Leisá ngai bilei bikoki na ngai, ete natonda te mpe boye nawangana yo te, soki ete nazala mobola te mpe nayiba te, nabimisa nkombo ya Nzambe na ngai na mpamba te.” (Masese 30:1, 8, 9) Zalá na ekateli ya ‘kobimisa nkombo ya Nzambe mpamba te’ elingi koloba ya kosala te makambo oyo ekoki kofingisa ye. Salá nde makasi osalaka ntango nyonso makambo ya malamu, oyo ekokumisa ye.—Nzembo 86:12.
6. Nini ekoki kosalema soki ozali kosala masumu na nko?
6 Mokolo na mokolo, bondeláká Tata na yo ya likoló asalisa yo okwea na komekama te. (Matai 6:13; Baloma 12:12) Landáká toli ya Nzambe mpo mabondeli na yo ekangisama nzela te. (1 Petelo 3:7) Soki ozali kosala masumu na nko, okobuka mbuma mabe, mpamba te ndenge Biblia emonisi yango na maloba ya elilingi, Yehova atyaka mapata minene oyo ekangaka nzela mpo mabondeli ya bato ya matoi mangbongi ekóma epai na ye te. (Bileli 3:42-44) Yango wana, zalá na komikitisa, mpe bondeláká mpo osala te likambo oyo ekopekisa Nzambe ayoka mabondeli na yo.—2 Bakolinti 13:7.
Monisá ete olingaka Mwana ya Nzambe
7, 8. Ndenge nini kolanda toli ya Yesu ekoki kosalisa moto akima masumu?
7 Monisá ete olingaka Yesu Klisto na botosi na yo na mibeko na ye, mpamba te yango ekosalisa yo okima masumu. Yesu alobaki boye: “Soki botosi bakomandema na ngai, bokokoba kozala na kati ya bolingo na ngai, ndenge ngai mpe nazali kotosa bakomandema ya Tata mpe nakobi kozala na kati ya bolingo na ye.” (Yoane 15:10) Ndenge nini kolanda toli ya Yesu ekoki kosalisa yo omibatela na kati ya bolingo ya Nzambe?
8 Kolanda toli ya Yesu ekoki kosalisa yo obatela etamboli ya malamu. Mobeko moko oyo Nzambe apesaki Bayisalaele elobaki boye: “Okosala ekobo te.” (Exode 20:14) Kasi, Yesu ateyaki etinda moko oyo esimbi mobeko yango na maloba oyo: “Moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii na koyoka ye mposa asili kosala ekobo elongo na ye na kati ya motema na ye.” (Matai 5:27, 28) Na siɛklɛ ya liboso, ntoma Petelo alobaki ete bandeko mosusu na kati ya lisangá bazalaki na “miso oyo etondá na ekobo” mpe ‘bazalaki kobenda milimo oyo epikami te.’ (2 Petelo 2:14) Nzokande, yo okoki kokima pite to ekobo soki olingi Nzambe ná Klisto mpe ozali kotosa bango, mpe soki ozwi ekateli ya kobatela boyokani na yo na bango.
Tiká elimo ya Yehova etambwisa yo
9. Nini ekoki kokómela moto oyo azali na elimo santu, kasi amipesi na masumu?
9 Bondeláká Nzambe apesa yo elimo santu, mpe tiká elimo yango etambwisa yo. (Luka 11:13; Bagalatia 5:19-25) Soki omipesi na masumu, Nzambe akoki kolongola yo elimo na ye. Nsima ya kokwea na lisumu na Bata-seba, Davidi abondelaki boye: “Bwaká ngai mosika na elongi na yo te mpe longwelá ngai [elimo santu, NW] na yo te.” (Nzembo 51:11) Saulo abungisaki elimo ya Nzambe mpo azalaki kosala masumu mpe aboyaki kobongola motema. Saulo asalaki lisumu na ndenge atumbaki mbeka mpe na ndenge abikisaki mokonzi ya Baamaleki, mpe bampate, bantaba, ná bangɔmbɛ na bango. Yango wana, Yehova alongolaki elimo santu na ye epai ya Saulo.—1 Samwele 13:1-14; 15:1-35; 16:14-23.
10. Mpo na nini osengeli koboya mpenza likanisi ya kokóma na momeseno ya kosala masumu?
10 Boyá mpenza likanisi ya kokóma na momeseno ya kosala masumu. Ntoma Paulo akomaki boye: “Soki tozali na momeseno ya kosala lisumu na nko nsima ya kozwa boyebi ya sikisiki ya solo, etikali lisusu te na mbeka mpo na masumu.” (Baebele 10:26-31) Ekozala mawa mingi soki tokómi na momeseno ya kosala masumu!
Lingá bato na bolingo ya solo
11, 12. Ndenge nini bolingo mpe limemya ekoki kopekisa moto amipesa na pite to ekobo?
11 Bolingo mpo na bazalani ekopekisa yo okolisa na motema na yo mposa ya kosala pite to ekobo. (Matai 22:39) Bolingo yango ekotinda yo obatela motema na yo mpo oluka te ete mwasi to mobali ya moto mosusu akóma kolinga yo mingi koleka molongani na ye. Likambo ya ndenge wana ekoki komema bino na ekobo. (Masese 4:23; Yilimia 4:14; 17:9, 10) Zalá lokola Yobo, moto ya sembo oyo atikaki te ete motema na ye ebendama na mwasi mosusu.—Yobo 31:1.
12 Kozala na limemya mpo na libala, oyo ezali ebongiseli ya bosantu, ekosalisa yo okwea na lisumu monene te. Nzambe abongisaki ete mobali abala mwasi, básangisaka nzoto mpe bábota bana. (Genese 1:26-28) Kobosana te ete binama ya kobotela ezali mpo na kopesa bomoi, oyo ezali eloko ya bosantu. Bato oyo basalaka pite ná ekobo babukaka nde mobeko ya Nzambe, basilisaka lokumu ya likambo etali kosangisa nzoto mpe lokumu ya libala, mpe basalelaka nzoto na bango moko lisumu. (1 Bakolinti 6:18) Kasi, kolinga mpe kotosa Nzambe, bakisa mpe kolinga bazalani, ekosalisa moto akóma te na etamboli oyo ekoki kosala ete bábimisa ye na lisangá.
13. Na ndenge nini moto ya ekobo ‘abebisaka biloko na ye’?
13 Tosengeli kopikola na motema na biso makanisi oyo ekoki komema biso na kosala masumu mpo tóyokisa bandeko mpe baninga na biso mpasi te. Masese 29:3 elobi boye: “Ye oyo akozalana na basi ya pite akobebisa biloko na ye.” Moto oyo azali kosala ekobo mpe aboyi kobongola motema, azali kobebisa boyokani na ye na Nzambe mpe na bato ya libota na ye. Molongani na ye azali na lotomo ya koboma libala. (Matai 19:9) Ezala mobali to mwasi nde asali lisumu, kokabwana ekoki kopesa mpasi mingi na molongani na ye, bana na bango, mpe bato mosusu. Omoni te ete mbuma mabe ya ekobo esengeli kolendisa biso tóboya makambo nyonso oyo ekoki komema biso na kosala yango?
14. Liteya nini tokoki kozwa na Masese 6:30-35 na oyo etali etamboli ya mbindo?
14 Lokola moto oyo asali ekobo akoki kopesa eloko moko te oyo ekosala ete bato bábosana mabe na ye, yango esengeli kotinda ye aboya kosala likambo wana. Masese 6:30-35 emonisi ete moto oyo ayibi mpo na nzala bakoki ntango mosusu koyokela ye mwa moke mawa, kasi bakosepela ata moke te na moto ya ekobo mpamba te azalaki na makanisi ya mabe. Moto yango azali “kobungisa molimo [to bomoi] na ye.” Mibeko ya Moize elobaki ete moto ya ndenge wana asengeli kobomama. (Levitike 20:10) Moto ya ekobo apesaka bato mosusu mpasi kaka mpo na kokokisa mposa na ye ya nzoto; soki moto ya ndenge wana abongoli motema te, akotikala na kati ya bolingo ya Nzambe te, akobimisama nde na lisangá.
Batelá lisosoli ya malamu
15. Lisosoli oyo etyami elembo “lokola na ebende ya mɔtɔ makasi” ekómaka ndenge nini?
15 Mpo na komibatela na kati ya bolingo ya Nzambe, tosengeli kotika te ete lisosoli na biso ekufa. Tosengeli te kolanda etamboli mabe ya mokili, mpe tosengeli kopona malamu baninga na biso, mikanda oyo tokotánga, mpe masano oyo tokomipesa na yango. Paulo asakolaki boye: “Na bileko oyo ekoya bamosusu bakotika kondima, kotyáká likebi na maloba oyo epemami ya bokosi mpe na mateya ya bademo, na nzela ya bokosi ya bato oyo balobaka lokuta, oyo batyami elembo na kati ya lisosoli lokola na ebende ya mɔtɔ makasi.” (1 Timote 4:1, 2) Lisosoli oyo etyami elembo “lokola na ebende ya mɔtɔ makasi” ezalaka lokola mposo ekuba, oyo eyokaka lisusu mpasi te. Lisosoli ya ndenge wana ekokebisa biso lisusu te mpo tókima bapɛngwi mpe makambo oyo ekoki kolɛmbisa kondima na biso.
16. Mpo na nini ezali na ntina mingi tózala na lisosoli ya malamu?
16 Mpo tóbika, lisosoli na biso esengeli kozala malamu. (1 Petelo 3:21) Kondima na biso na makila ya Yesu epɛtoli lisosoli na biso na misala ya kokufa mpo tókoka ‘kosalela Nzambe ya bomoi mosala mosantu.’ (Baebele 9:13, 14) Soki tosali lisumu na nko, tokobebisa lisosoli na biso mpe tokozala lisusu te bato ya pɛto, baoyo babongi kosalela Nzambe. (Tito 1:15) Kasi, Yehova akoki kosalisa biso mpo tókóma lisusu na lisosoli ya malamu.
Ndenge mosusu ya koboya etamboli ya mabe
17. ‘Kolanda Yehova na motema moko’ ememaka matomba nini?
17 Na ndakisa ya Kalebe, ‘landá Yehova na motema moko.’ (Deteronome 1:34-36) Salá makambo oyo Nzambe azali kosɛnga yo, mpe benganá mpenza likanisi nyonso ya kolya na “mesa ya bademo.” (1 Bakolinti 10:21) Boyá mateya ya bapɛngwi. Zalá na botɔndi mpo na bilei ya elimo oyo tozali kolya na mesa ya Yehova; na ndenge yango, bateyi ya lokuta to bilimu mabe bakokosa yo te. (Baefese 6:12; Yuda 3, 4) Tyá makanisi na yo na makambo ya elimo, na ndakisa koyekola Biblia, koyangana na makita, mpe kosakola. Okozala na bomoi ya esengo soki ozali kolanda Yehova na motema mobimba mpe ozali kosala mingi na mosala ya Nkolo.—1 Bakolinti 15:58.
18. Kobanga Yehova ekosalisa yo ozala na etamboli ya ndenge nini?
18 Zwá ekateli ya “kosalela Nzambe mosala mosantu . . . elongo na ezaleli ya kobanga Nzambe mpe nsɔmɔ.” (Baebele 12:28) Kobanga Yehova ekopesa yo lisusu makasi ya koboya nzela nyonso ya mabe. Ekosalisa yo olanda toli oyo Petelo apesaki baninga na ye bapakolami ete: “Soki bozali kobelela Tata oyo asambisaka na kozanga koponapona engebene mosala ya moto na moto, bómitambwisa na kobanga na boumeli ya ntango oyo bofandi bapaya.”—1 Petelo 1:17.
19. Mpo na nini osengeli kotika te kosalela makambo oyo ozali koyekola na Liloba ya Nzambe?
19 Saleláká ntango nyonso makambo oyo ozali koyekola na kati ya Liloba ya Nzambe. Yango ekosalisa yo okwea te na lisumu monene mpamba te okozala na kati ya “bato oyo makoki na bango ya kososola, lokola bazali kosalela yango, eteyami mpo na kokesenisa ná mabe ná malamu.” (Baebele 5:14) Na esika ozala bilobaloba to otambola ndenge oyo motema na yo elingi, tamboláká lokola moto ya bwanya, “komisombeláká ntango oyo ebongi” na mikolo oyo mabe. ‘Kobá kososola soki mokano ya Yehova ezali nini,’ mpe kangamá na kosala mokano yango.—Baefese 5:15-17; 2 Petelo 3:17.
20. Mpo na nini tosengeli koboya bilulela?
20 Kotika te ete motema na yo ekolisa ezaleli ya kolula biloko ya bato. Moko ya Mibeko Zomi elobaki boye: “Okolula ndako ya mozalani na yo te. Okolula mwasi ya mozalani na yo te, soki moombo mobali na ye te, soki moombo mwasi na ye te, soki ngɔmbɛ mobali na ye te, soki mpunda na ye te, soki eloko nini ezali ya mozalani na yo te.” (Exode 20:17) Mobeko yango ezalaki kobatela biloko ya moto, lokola ndako, mwasi, basaleli, banyama na ye, mpe bongo na bongo. Kasi, na kolanda maloba ya Yesu, ntina ya libosoliboso oyo tosengeli koboya bilulela ezali ete ekómisaka moto mbindo.—Malako 7:20-23.
21, 22. Moklisto asengeli kokeba na makambo nini mpo akwea na lisumu te?
21 Kebá ete mposa mabe emema yo na lisumu te. Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Moto na moto amekamaka nde na komemamáká mpe na kobendamáká na mposa na ye moko. Na nsima mposa wana, ntango ezwi zemi, eboti lisumu; na ngala na yango, lisumu, ntango ekokisami, eboti liwa.” (Yakobo 1:14, 15) Na ndakisa, soki moto azalaki molangwi-masanga, ekozala malamu azwa ekateli ya kotyaka masanga na ndako na ye te. Mpo na kokima masɛnginya ya kolinga mwasi to mobali oyo azali moninga ya mosala, moklisto akoki kozwa ekateli ya kosala esika mosusu to koluka mosala mosusu mpo akwea te.—Masese 6:23-28.
22 Koluka te otya ata litambe moko na nzela oyo ekoki komema yo na lisumu. Moto oyo azali selesele na moto oyo azali molongani na ye te to moto oyo alingi kokanisakanisa makambo ya mbindo akoki kokwea na pite to na ekobo. Kokosa na makambo mikemike ekoki kolongola moto nsɔmɔ ya kokosa na makambo ya minene mpe nsukansuka akokóma na momeseno ya kobuka lokuta. Koyiba mwa biloko mikemike ekoki kobebisa lisosoli ya moto mpe na nsima, akokóma moyibi monene. Kondima koyoka mateya ya bapɛngwi ata mwa moke ekoki kozala litambe ya liboso oyo ekomema moto na nzela ya bapɛngwi.—Masese 11:9; Emoniseli 21:8.
Osengeli kosala nini soki okweaki na lisumu?
23, 24. Ndenge nini maloba ya 2 Ntango 6:29, 30 mpe Masese 28:13 ekoki kobɔndisa biso?
23 Biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka. (Mosakoli 7:20) Kasi, soki osalaki lisumu monene, libondeli oyo Mokonzi Salomo asalaki mokolo oyo bafungolaki tempelo ekoki kobɔndisa yo. Salomo abondelaki Nzambe boye: “Wana moto moko soki bato nyonso na yo, Yisalaele, bakobondela epai na yo to bakolɔmbaka yo, soki moto na moto ayebi mpasi na ye mpe mawa na ye mpe akosembola mabɔkɔ na ye epai na ndako oyo, yoká kuna na likoló, efandelo na yo, mpe limbisá; zongiselá moto na moto [kolanda] nzela na ye nyonso. Yo oyebi motema na ye, zambi yo, bobele yo, oyebi mitema ya bana ya bato.”—2 Ntango 6:29, 30.
24 Nzambe ayebi motema ya moto na moto mpe alimbisaka. Masese 28:13 elobi boye: “Ye oyo akobomba masumu na ye akolonga te; kasi ye oyo akoyambola mpe akotika yango akozwa ngɔlu.” Soki moto ayamboli lisumu na ye mpe abongoli motema, Nzambe akolimbisa ye. Kasi, soki olɛmbi na elimo, likambo nini mosusu ekoki kosalisa yo mpo omibatela na kati ya bolingo ya Nzambe?
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini tokoki komibatela na kati ya bolingo ya Nzambe?
• Ndenge nini kolinga Nzambe ná Klisto ekoki kosalisa biso tóboya masumu?
• Mpo na nini kolinga bazalani na bolingo ya solo ekoki kosalisa biso tóboya etamboli ya mabe?
• Tángá mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na koboya etamboli ya mabe.
[Elilingi na lokasa 21]
Yuda ayebisi biso ndenge oyo tokoki komibatela na kati ya bolingo ya Nzambe
[Elilingi na lokasa 23]
Kokabwana ekoki kopesa bana mpe molongani oyo asali mabe te mpasi mingi
[Elilingi na lokasa 24]
Na ndakisa ya Kalebe, ozali na mokano ya ‘kolanda Yehova na motema moko’?
[Elilingi na lokasa 25]
Bondeláká ntango nyonso Nzambe asalisa yo olonga komekama