‘Memelá ngai barulo, mingimingi ya mposo ya nyama’
NA MALOBA wana, ntoma Paulo asɛngaki Timote, moninga na ye na mosala ya misionɛrɛ, amemela ye mwa mikanda. Paulo azalaki kolobela barulo mpe barulo ya mposo ya nyama ya ndenge nini? Nini etindaki ye aloba yango? Mpe liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?
Na katikati ya ekeke ya liboso T.B., ntango Paulo akomaki maloba wana, mikanda 39 ya Makomami ya Ebre ekabolamaki na mikanda 22 to 24, mpe ekoki kozala ete mikanda mingi ezalaki na barulo na yango moko. Profesɛrɛ Alan Millard alobaki ete barulo yango, atako ezalaki ntalo mingi, “bato ya mwa bozwi bakokaki kozala na yango.” Bamosusu bazalaki na rulo ata moko. Na ndakisa, mokube moko moto ya Etiopi azalaki na rulo na likalo na ye mpe azalaki “kotánga na mongongo makasi mosakoli Yisaya.” Azalaki “moto monene oyo azalaki kosalela Kandase mokonzi mwasi ya bato ya Etiopi, mpe ye nde azalaki kotalela mosolo na ye nyonso.” Na ntembe te, azalaki na bozwi oyo esengeli mpo azala na biteni na ye moko ya Makomami.—Mis. 8:27, 28.
Mpo na kosɛnga Timote barulo, Paulo akomaki boye: “Ntango okoya, memelá ngai kazaka oyo natikaki na Troase epai ya Karpusi, mpe barulo, mingimingi oyo ya mposo ya nyama.” (2 Tim. 4:13) Yango emonisi ete Paulo azalaki na mikanda na ye moko. Na mikanda nyonso oyo Paulo azalaki na yango, Liloba ya Nzambe nde elekaki ntina mpo na ye. Na oyo etali maloba ‘barulo ya mposo ya nyama’ na vɛrsɛ yango, Archibald Robertson, molimboli moko ya maloba ya Biblia, alobaki boye: “Na ntembe te, [barulo yango ya mposo ya nyama] ezalaki bakopi ya mikanda ya Kondimana ya Kala, mpo mposo ya nyama ezalaki na ntalo mingi [mpe koumela] koleka papirise.” Banda bolenge na ye, Paulo ‘atángaki kelasi na makolo ya Gamaliele,’ oyo azalaki koteya Mibeko ya Moize mpe oyo bato nyonso bazalaki kokumisa. Na yango, ezali likambo ya kokamwa te ndenge Paulo azalaki na barulo na ye moko ya Liloba ya Nzambe.—Mis. 5:34; 22:3.
Ndenge bakristo basalelaki barulo
Kasi, bato mingi te nde bazalaki na barulo ya Makomami Mosantu. Na yango, ndenge nini bakristo mingi ya ntango wana bayebaki Liloba ya Nzambe? Mokanda ya liboso oyo Paulo akomelaki Timote epesi biso mwa likanisi. Akomaki boye: “Liboso naya, kobá komipesa na kotánga liboso ya bato nyonso, na kolendisa, na koteya.” (1 Tim. 4:13) Kotánga liboso ya bato nyonso ezali moko na makambo oyo ezalaki kosalema na makita ya masangá ya bokristo, momeseno moko ya basaleli ya Nzambe banda na ntango ya Moize.—Mis. 13:15; 15:21; 2 Ko. 3:15.
Lokola azalaki nkulutu, Timote asengelaki “komipesa” na kotánga na mongongo makasi, mpo na kosalisa baoyo bazalaki na bakopi ya Makomami te. Na ntembe te, ntango bazalaki kotánga Liloba ya Nzambe liboso ya bato nyonso, bato nyonso bazalaki kolanda na likebi mpo bázanga ata liloba moko te, mpe na ntembe te baboti ná bana bazalaki kolobela na ndako makambo oyo etángamaki na makita.
Rulo ya Yisaya oyo eyebani mingi mpe eutaki na Mbu Ekufá ezalaka molai soki mɛtrɛ 7,3. Lokola ezalaki na banzete ya kosimbela na nsuka nyonso mpe mbala mingi ezalaki na ezipeli mpo na kobatela yango, rulo ezalaki kilo. Na ntembe te, bakristo mingi bazalaki kokoka te komema barulo mingi na mosala ya kosakola. Ata soki Paulo azalaki na mwa barulo na ye moko ya Makomami, mbala mosusu akokaki te komema barulo yango nyonso na mibembo na ye. Emonani polele ete atikaki barulo mosusu na Troase epai ya moninga na ye Karpusi.
Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Paulo?
Liboso asɛnga barulo, Paulo, wana azalaki na bolɔkɔ na Roma mpo na mbala ya mibale, akomaki boye: “Nabundi etumba ya malamu mingi, napoti mbangu tii na nsuka . . . Banda sikoyo babombeli ngai motole ya boyengebene.” (2 Tim. 4:7, 8) Mbala mosusu akomaki maloba yango na mobu soki 65 T.B., na ntango ya monyoko oyo Néron abimiselaki bakristo. Na mbala oyo, bolɔkɔ ezalaki mpasi mingi. Kutu, amonaki ete mosika te bakoboma ye. (2 Tim. 1:16; 4:6) Yango wana, Paulo amonisaki mposa ya kozala na barulo na ye pene na ye. Atako andimaki ete abundi etumba ya malamu mingi tii na nsuka, azalaki na mposa ya kokoba koyekola Liloba ya Nzambe mpo azwa makasi.
Mbala mosusu Timote azalaki kaka na Efese ntango Paulo asɛngaki ye barulo. (1 Tim. 1:3) Longwa na Efese tii na Roma na nzela ya Troase ekoki kozala kilomɛtrɛ 1 600. Na mokanda yango, Paulo ayebisaki Timote ete: “Salá nyonso ekoki na yo mpo oya liboso ya eleko ya mpiɔ makasi.” (2 Tim. 4:21) Biblia elobi te soki Timote azwaki masuwa mpo akóma na Roma na ntango oyo Paulo alingaki.
Kosɛnga oyo Paulo asɛngaki “barulo, mingimingi oyo ya mposo ya nyama” ekoki koteya biso nini? Azalaki kaka na mposa makasi ya Liloba ya Nzambe na ntango wana ya mpasi mingi koleka na bomoi na ye. Omoni te ete yango nde esalisaki ye azala ntango nyonso makasi na elimo mpe alendisa bato mingi?
Lelo oyo, tozali mpenza na lipamboli ndenge moto na moto azali na Biblia na ye moko na mobimba na yango! Bato mosusu bazali na Babiblia ebele mpe ya ndenge na ndenge. Lokola Paulo, tosengeli kolona mposa makasi ya koyeba Makomami malamumalamu. Na mikanda 14 oyo Paulo azwaki libaku ya kokoma na lisalisi ya elimo santu, mokanda na ye ya mibale epai ya Timote nde ya nsuka. Asɛngaki barulo pene na nsuka ya mokanda yango. Kutu, kosɛnga oyo Paulo asɛngaki Timote ‘amemela ye barulo, mingimingi oyo ya mposo ya nyama,’ ezali moko ya bamposa na ye ya nsuka oyo ekomamaki.
Ozalaka na mposa ya kobunda etumba ya malamu ya kondima tii na nsuka, lokola Paulo? Olingi kozala ntango nyonso makasi na elimo mpe kobongama mpo na komipesa na mosala ya kopesa litatoli ntango nyonso oyo Nkolo akolinga tókoba kosala yango? Boye, mpo na nini te kosala ndenge Paulo alendisaki bakristo? “Omibatela mpe okeba na mateya na yo ntango nyonso” na nzela ya koyekola Biblia mbala na mbala mpe na mozindo; Biblia ezali lelo na mabɔkɔ ya bato mingi koleka mpe na ndenge oyo ezali pɛtɛɛ kosalela koleka barulo.—1 Tim. 4:16.
[Karte/Bililingi na nkasa 18, 19]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Efese
Troase
Roma