Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Koluka mbongo—Ezali mabe?
“MBONGO ezali mpenza eloko eleki ntina na mokili.” Wana ezali maloba ya George Bernard Shaw, mokomi ya masano na ekólo Grande-Bretagne. Ondimi makanisi na ye? Mbala mosusu ozali na makanisi motindo moko na Tanya, elenge mwasi ya mibu 17 oyo alobaki ete: “Nalingi kozala moto ya mbongo te, kasi nazwa mwa mbongo oyo ekokokisa bamposa na ngai ya ntina.” Lolenge moko, elenge Avian atalelaka mbongo lokola eloko eleki ntina na mokili te, kasi lokola esaleli moko ya ntina mpo na kokokisa mikano mosusu. Alobi ete: “Mosolo ezali na ntina mpo na bamposa na ngai, na ndakisa kosomba bilamba mpe kofuta transport.”
Oyebi ete Biblia mpe etalelaka mbongo motindo wana? Na Mosakoli 7:12 (NW), Biblia elobi ete: “Mosolo ezali mpo na libateli.” Bobola elobelami lokola “monguna monene ya bolamu ya moto.” Mpe kozala na mwa mbongo ekoki kobatela yo—na makambo mosusu—na ndakisa na mikakatano oyo mbala mingi eutaka na bobola. Mbongo ekoki mpe kosunga na ntango mbeba oyo ebimaka na makama mauti na biloko bizalisami ebimi. Elenge Phyllis alobi ete: “Biblia elobi ete ‘ntango mpe makambo makanami te ekómelaka biso nyonso.’ Toyebaka soko moke te ntango mabe ekokwela biso, na yango tosengeli kobomba mwa mbongo.” (Mosakoli 9:11) Mpe lokola mbongo ekoki kozala na ntina mpo na yo sikawa, ekoki mpe lisusu kozala na ntina mingi na bomoi na yo na mikolo mizali koya.
“Bopusi makasi ya mposa ya biloko ya mosuni”
Atako ezali mabe te komibanzabanza na lolenge ekoki mpo na kozwa mbongo, nzokande bilenge mosusu bakómi na mposa ya mbongo makasi koleka. Ntango batunaki bilenge koleka 160 000 mpo na koyeba “eloko nini balingaka mingi koleka na bomoi na bango,” bilenge 22 likoló na monkámá balobaki ete: “Kozala moto ya mbongo.”
Na ntembe te mposa ya kozala na mbongo motindo yango ekólisami na oyo zulunalo Newsweek ezali kobénga ete “bopusi makasi ya mposa ya biloko ya mosuni” oyo ebebisi mokili. Martin, elenge ya mibu 18, alobi ete: “Ezali mpenza na ntina mpo na ngai ete nasomba biloko ya motuya mingi oyo ekeseni na biloko mosusu. Nandimaka ete motindo ya eloko oyo osombi etalelaka motuya ya mosolo oyo obimisi. Yango wana, nabimisaka mbongo mingi mpo na biloko oyo nalingaka.” Martin azali ye moko te elenge oyo ‘abimisaka mbongo mingi.’ Zulunalo U.S.News & World Report elobi ete: “Na mbula oyo eleki, bilenge ya mibu kobanda 12 kino mibu 19 [na États-Unis] babimisaki mbongo mingi mpenza mpo na kosomba biloko ya ntalo mingi na bamagazini, mbongo nyonso ezalaki dolare miliare 109, oyo emonisi bokóli ya 38 likoló ya monkámá soki tokokanisi yango na oyo ya 1990.”
Kasi, epai wapi bilenge bazwaka mbongo wana mpo na kosomba bilamba ya sika, ba disques compact mpe baordinatere ya mike? Engebene zulunalo U.S.News & World Report, “Soko katikati ya motángo ya bana nyonso ya mibu 16 kino mibu 19 bazali kosala mosala ya ndambo ya mokolo.” Kosala mosala nsima ya eteyelo ekoki kozala malamu soki bokatikati ezali, mpe mosala ya nsima ya eteyelo ekoki kozala na matomba, lokola oyo ya koteya elenge lolenge ya kokokisa mikumba. Nzokande, bilenge mosusu balekisaka ndelo na likambo yango. Zulunalo Newsweek elobi ete: “Banganga-mayele ya pisikoloji mpe balakisi bazali komona bopusi mabe likoló ya [mosala] ya banakelasi. Bazalaka na ntango mingi te mpo na kosala badevuare na bango, mpe balakisi oyo bamonaka mbala na mbala lolenge bana balɛmbi mpe bazali kobundabunda na bolɛmbu na bango, basɛngaka na bango makambo mingi te.”
Atako bongo, ezali bobele na bilenge moke oyo basalaka mpe balingi kotika mosala na bango. Elenge Vanessa alobi ete: “Kotánga ezali na ntina, kasi mbongo mpe ezali na ntina. Badevuare epesaka mbongo te.” Koluka mbongo ezali na ntina nini mpo na yo? Koluka mbongo ezali likambo lileki ntina kati na bomoi na yo?
‘Mposa ya kozwa mosolo’
Biblia ezali kopesa biyano na mituna yango ya ntina. Ntoma Paulo akomaki ete: “Baoyo bazali na mposa na kozwa mosolo, bakokwea na kati na komekama mpe na lilonga, mpe kati na mposa ezangi ntina mpe ikoyokisa mpasi. Mposa yango ikozindisa bato na liwa mpe libebi nyɛ. Zambi mposa na mosolo ezali ntina na mabe nyonso. Mpo na yango, bamosusu basili kopɛngwa longwa na kondima mpe bamitɔbɔli bango mpenza na bolɔzi mingi.”—1 Timoté 6:9, 10.
Na ntembe te Paulo ayebaki mpenza ntina ya maloba na ye. Liboso ete akóma moklisto, azalaki moko ya bakonzi ya lingomba oyo bayebani na nkombo “Bafalisai,” oyo Biblia ezali kolobela ete “balingaki mosolo.” (Luka 16:14) Atako bongo, ntoma alobaki te ete koluka mosolo ezali mabe. Nzokande, apesaki likebisi epai na baoyo bazali na “mposa ya mosolo” to, lokola libongoli mosusu elobeli yango, bato oyo “bazali kotya motema na kokóma na bozwi.” (Phillips) Kasi mabe ezali wapi na koluka mbongo?
Lokola Paulo alobaki yango, bato motindo wana “bakokwea na kati na komekama mpe na lilonga.” Masese 28:20 ezali komonisa likanisi motindo moko ntango elobi ete: “Ye oyo [akolandalanda, NW] bozwi akokima etumbu te.” Lokola bazali kokanisa ete bazali na mosolo mokoki te, bilenge mosusu babandi koyiba.
Ya solo, bilenge mingi bakolinga koyiba te. Kasi basusu bakoki komikɔtisa na bizaleli ya likama motindo wana. Zulunalo Christianity Today elobi ete: “Bamoko kati na bato na mayele bakanisi ete masano ya mbongo esili kokóma momeseno moko oyo ezali mpenza kokóla epai na bilenge.” Na mboka moko na États-Unis, “pene na bilenge 90 likoló na monkámá basilá kobɛta masano ya mbongo na boumeli ya bambula oyo balekisaki na eteyelo ya ntei.” Kútu bilenge mosusu basalelaka myango mosusu ya mabe. Matthieu, elenge ya mibu 16 alobi ete: “Ezali mpasi mpo na kozwa mosala ya malamu. Na bongo, nazwaka mbongo mingi na kotɛkáká to kosombáká biloko. . . . Na bantango mosusu [nazalaki] kotɛkisa [bilangwiseli].”
‘Komizindisa kati na libebi’
Ya solo, moto akoki komiyoka na bonsomi soki azali na mbongo. Kasi lokola ntoma Paulo alobi yango, komipesa na koluka mbongo ekoki mpenza kokómisa moto moombo ya “mposa izangi ntina mpe ikoyokisa mpasi.” Ɛɛ, soki mposa ya mbongo ekómi kotambwisa yo, bilulela, zuwa mpe bamposa mosusu mabe ekoki kokonza yo. (Kokanisá na Bakolose 3:5.) Lisoló moko kati na zulunalo Teen elobaki ete bilenge mosusu bakoki kokóma mpenza na mposa makasi ya kozwa mituka mpe bilamba oyo bilenge mosusu bazali na yango na boye ete “bakómaka komitungisa.” Lisoló yango ebakisaki ete mposa motindo wana mbala mosusu “esalaka ete elenge akóma komiyina, mpe akanisa makambo mosusu te, bobele eloko oyo azali na yango mposa.”
Na bongo, esengeli koyeba ete mposa ya bozwi ekoki bobele ‘kokweisa moto na komekama’ te kasi ekoki mpe ‘kozindisa moto kati na libebi.’ Albert Barnes, molukiluki na makambo ya Biblia, alobaki ete: “Elilingi moko ezali, yango kozinda ya masuwa mpe biloko nyonso bizali kati na yango. Kobebisama mpenza. Esengo, bizaleli malamu, lokumu mpe bomoto, nyonso ebebisami nyɛɛ.”—Kokanisá na 1 Timoté 1:19.
Na yango, Paulo azalaki na elónga ya koloba ete “mposa na mosolo ezali ntina na mabe nyonso.” Mpo na yango, mingi “basili kopɛngwa longwa na kondima mpe bamitɔbɔli bango mpenza na bolɔzi mingi.” Tókamata ndakisa ya elenge Rory. Abandaki kobɛta masano ya mbongo ntango akómaki na mibu 12. Amikundweli ete: “Ezalaki mwango ya kozwa mbongo kozanga kosala mosala.” Mosika te, akómaki na banyongo ya bankámá ya badolare mpe asundolaki baninga na ye, libota na ye, mpe kelasi. Andimi ete: “Namekaki kotika,” kasi azalaki kokwea mbala na mbala. Akóbaki ‘komitɔbɔlɔ na bolɔzi mingi’ kino ayaki koluka lisalisi wana akómaki na mibu 19. Mokomi Douglas Kennedy alekisaki ndelo te ntango, kati na búku na ye Chasing Mammon, abéngaki mposa ya kozwa mbongo ete “likambo ya kobulunganisa.”
Kosala na bokatikati
Na yango, toli oyo ya Salomo ezali na ntina lelo lokola yango ezalaki na ntina esili koleka bikeke mingi: “Salá makasi te mpo na kozala mozwi, tiká mpo na boyebi na yo moko. Okotya miso na yo na yango ezali te? Mpo ete biloko na mozwi ikomibimisela mapapu solo, ikopombwa mosika lokola mpongo kati na lola.” (Masese 23:4, 5) Bozwi ya biloko ya mosuni ezali mpo na ntango mokuse, na bongo, ezali bozoba kosala ete koluka bozwi ekóma likambo lileki ntina kati na bomoi na yo. Maureen, oyo azali bongo elenge moklisto alobaki ete: “Nalingaka komitika kolɛngolama te na mikano ya kozwa biloko mingi ya mosuni. Nayebi ete bomoi na ngai ya elimo ekotyama na likama soki namizindisi bobele na kolukáká mbongo.”
Ya solo, mbongo ezali na ntina. Mpe kozala na mwa mbongo ekosalisa yo mpo na kokokisa bamposa na yo—mpe na bantango mosusu kútu mpo na kosalisa basusu. (Baefese 4:28) Yekolá kosala na molende mpo na kozwa mosolo na lolenge elongobani. Lisusu, yekolá kobomba mbongo, kosala bidjɛ, mpe salelaka mbongo na yo na mayele. Kasi, kokómisa soko moke te mosolo eloko eleki ntina kati na bomoi na yo. Zalá na likanisi ya bokatikati oyo elobelami na mokomi ya Masese 30:8, wana abondelaki ete: “Pesá ngai bobola te, bozwi mpe te.” Na kotyáká matomba ya elimo na esika ya liboso, okozala na likoki ya kozwa bozwi moko ya malamu koleka. Lokola Masese 10:22 elobi yango, “mapamboli na [Yehova] ikoyeisa bozwi, akobakisa mawa na yango te.”
[Elilingi na lokasa 13]
Bilenge mingi balingaka mbongo mpo ete bázala lolenge moko na baninga na bango