Ndenge nini okoki kozala na bokatikati na makambo ya mbongo?
Kolinga mbongo mpe kozala na mposa ya kokóma na biloko mingi ezali makambo oyo ebandi lelo te; Biblia mpe elobeli yango, yango ezali komonisa ete ezali makambo ya sika te. Ebandá kala. Na kati ya Mibeko, Nzambe ayebisaki Bayisalaele boye: “Okolula ndako ya mozalani na yo te . . . soko eloko nini ezali na mozalani na yo te.”—Exode 20:17.
NTANGO Yesu azalaki awa na mabele, bato mingi mpe balingaki mbongo mpe bomɛngo. Talá lisolo ya Yesu na elenge mobali moko oyo azalaki na “mbongo mingi.” “Yezu . . . alobi: ‘Likambo moko kaka ezangi yo. Teka biloko na yo nyonso mpe kabola mbongo wana na bato bakelela, bongo okozwa bomengo na Likolo. Na nsima yaka mpe landa ngai!’ Kasi ntango moto wana ayoki makambo yango akomi mawa mawa, mpo azalaki na mbongo mingi.”—Luka 18:18-23, Boyokani ya Sika.
Lolenge malamu ya kotalela mbongo
Tókanisa te ete Biblia eboyi mbongo to makambo ya ntina oyo tokoki kosala na yango. Biblia ezali komonisa ete mbongo ebatelaka moto mpo akóma na bobola te mpe azwa te mikakatano oyo bobola ememaka, esalisaka moto azala na biloko oyo azali na yango mposa. Mokonzi Salomo akomaki ete: “Mayele ekobatelaka lokola ekobatelaka mosolo.” Akomaki lisusu ete: “Kwanga esalami mpo na kosɛka mpe vinyo ekosepelisa bomoi. Mosolo mpe ekosilisa ntembe nyonso.”—Mosakoli 7:12; 10:19.
Nzambe amonaka mabe moko te na kosalela mbongo na ndenge oyo esengeli. Na ndakisa, Yesu alobaki ete: “Bózwa baninga mpo na bino mpo na mosolo mabe.” (Luka 16:9) Yango esɛngi mpe kopesa makabo mpo losambo ya solo ekende liboso, mpamba te tosengeli koluka kozala baninga ya Nzambe. Salomo ye moko alandaki ndakisa ya tata na ye Davidi, apesaki mbongo mingi mpe ebele ya biloko ya motuya mpo na kotonga tempelo ya Yehova. Likambo mosusu oyo basɛngi na moklisto ezali ya kosalisa baoyo bazali kokelela. Ntoma Paulo alobaki ete: “Bokabola biloko na bino na bato ya Nzambe oyo bazali kokelela. Mpe boyamba malamu bapaya na bandako na bino.” (Roma 12:13, Boyokani ya Sika) Mpo na kosala makambo yango, mbala mingi esɛngaka kobimisa mbongo. Kasi, ezali boni mpo na bolingo ya mbongo?
“Bolingo ya palata”
Na mokanda oyo akomelaki elenge Timote, oyo azalaki moklisto lokola ye, Paulo alobelaki mingi “bolingo ya mbongo” to mpe, soki tolandi mpenza maloba ya Grɛki, “bolingo ya palata.” Toli ya Paulo ezali na 1 Timote 6:6-19. Alobelaki “bolingo ya mbongo” ntango azalaki kolobela biloko ya mokili. Soki totali ndenge oyo bato bazali kopesa motuya mingi na mbongo lelo oyo, ebongi mpenza tótalela malamumalamu maloba epemami oyo Paulo akomaki. Botaleli yango ezali na ntina mingi mpamba te ezali komonisa ndenge ya ‘kosimba makasi bomoi ya solosolo.’
Paulo akebisi boye: “Mposa ya [mbongo] ezali ntina ya mabe nyonso. Mpo na yango, bamosusu basili kopɛngwa longwa na kondima mpe bamitɔbɔli bango mpenza na bolɔzi mingi.” (1 Timote 6:10) Vɛrsɛ yango, ata mpe bavɛrsɛ mosusu , elobi te ete mbongo ezali mabe. Ntoma alobi mpe te ete mbongo nde ezali ntina ya liboso oyo ebimisaka “mabe nyonso” to mbongo nde ememaka makambo nyonso ya mabe. Kasi bolingo ya mbongo nde ekoki kozala ntina ya “mabe nyonso,” atako ezali kaka yango moko te nde ezali ntina ya mabe nyonso.
Kebá na lokoso
Lokola Makomami elobi te ete mbongo ezali mabe, esengeli te tómona likebisi ya Paulo lokola likambo moke. Moklisto oyo akómi na bolingo ya mbongo akoki kokwea na makambo ya ndenge nyonso, mpe oyo eleki mabe kati na yango ezali kopɛngwa na kondima. Maloba ya Paulo epai ya Bakolose ezali komonisa yango polele, alobaki ete: “Yango wana, bóboma binama na bino ya nzoto oyo ezali na mabele, na oyo etali . . . bamposa ya mabe mpe bilulela, oyo ezali losambo ya bikeko.” (Bakolose 3:5, NW) Ndenge nini bilulela, lokoso to mpe “bolingo ya mbongo” ekoki kozala ndenge moko na losambo ya bikeko? Elingi nde koloba ete koluka kozala na ndako ya monene, motuka ya sika, to mosala ya malamu koleka ezali mabe? Te, nyonso wana ezali mabe te. Kasi, motuna oyo tosengeli komituna yango oyo: Motema ya ndenge nini ezali kotinda moto azala na mposa ya biloko yango, mpe biloko yango ezali mpenza na ntina mpo na ye?
Bokeseni oyo ezali kati na mposa oyo ebongi na lokoso ezali lokola bokeseni kati na mɔ́tɔ oyo bakoki kolamba na yango mpe mɔ́tɔ oyo ekoki kotumba zamba. Mposa oyo ebongi ekoki kopesa litomba. Etindaka biso na kosala mosala oyo ezali kobota mbuma. Masese 16:26 elobi boye: “Moto ya mosala akomisalela zambi monɔkɔ na ye ezali na mposa kati na ye.” Nzokande, lokoso ezali mabe mpe etongaka te. Ezali mposa oyo eleki ndelo.
Mokakatano monene ezali nde ya kozala na bokonzi likoló ya mposa na biso ya mbongo. Mbongo oyo tozali konduka to biloko oyo tolingi kozala na yango, ezali mpo ekokisa bamposa na biso, to nde bamposa na biso ekokómisa biso baombo ya mbongo? Yango wana Paulo alobi ete “moto ya elulela (ye mosambeli ya bikeko).” (Baefese 5:5) Kozala na lokoso ya eloko moko boye elimboli mpenza komitika mobimba mpo na eloko yango, kokómisa eloko yango oyo tozali kosalela lokola mokonzi na biso, nzambe na biso. Nzokande, Nzambe alobi ete: “Okozala na banzambe mosusu liboso na ngai te.”—Exode 20:3.
Soki tozali na lokoso, emonisi ete totyelaka Nzambe motema te ete akokokisa elaka na ye ya kokokisa bamposa na biso. (Matai 6:33) Na bongo, kozala na lokoso ekokani na kopesa Nzambe mokɔngɔ. Na ndenge yango mpe, lokoso ezali “losambo ya bikeko.” Yango wana, Paulo akebisi biso mpenza mpo na yango!
Yesu mpe akebisaki na ntina na lokoso na maloba ya polele. Alobaki ete tókeba kokolisa mposa mpo na eloko oyo tozali na yango te: “Kebá mpe sɛnzɛlá na ntina na lokoso nyonso, mpo ete bomoi ya moto ezali kati na motuya ya biloko bizali na ye te.” (Luka 12:15) Vɛrsɛ oyo mpe lisese oyo Yesu apesaki na nsima emonisi ete moto ya lokoso akanisaka ete oyo eleki ntina na bomoi ya moto ezali biloko oyo azali na yango. Biloko yango ekoki kozala mbongo, lokumu, nguya to eloko mosusu ya ndenge yango. Moto akoki kozala na lokoso ata mpo na eloko nini. Moto akoki kokanisa ete soki azwi eloko wana nde akozala na esengo. Nzokande, Biblia mpe makambo oyo esalemá na bomoi ya bato ezali komonisa ete kaka Nzambe nde akoki mpe akokokisa bamposa na biso ya solosolo, lokola Yesu ayebisaki yango bayekoli na ye.—Luka 12:22-31.
Lelo oyo bato bamipesi mingi na mosala ya kotɛka mpe kosomba biloko; nyonso wana ezali kolendisa lokoso. Bato mingi, lokola bazali kobendama kozanga ete báyeba mpe na nzela ya mayele oyo ezali na bokasi, bazali kondima ete nyonso oyo bazali na yango ekoki kaka te. Balingi kobakisa, balingi biloko oyo eleki minene mpe oyo eleki malamu. Atako tokoki kobongola elimo ya bato te, biso moko tokoki koboya kolanda elimo yango. Ndenge nini?
Bokeseni oyo ezali kati ya ezaleli ya kosepela na oyo tozali na yango na ezaleli ya lokoso
Paulo amonisaki ezaleli oyo tosengeli kolona na esika ya kozala na lokoso: kosepela na oyo tozali na yango. Alobaki boye: “Awa ezali biso na biloko ya kolya mpe na bilamba ya kolata, ebongi na biso bongo.” (1 Timote 6:8) Moto mosusu akoki komona ete biloko oyo batángi oyo tozalaka na yango mposa lokola “biloko ya kolya mpe bilamba ya kolata,” emonisi kaka na ndenge ya likolólikoló mwa ndambo ya biloko oyo tozali na yango mposa. Bato mingi basepelaka na baemisyo ya televizyo oyo elakisaka bato ya lokumu oyo bafandi na bandako ya kitoko. Yango te nde ekosalisa bango básepela na oyo bazali na yango.
Ya solo, esɛngami na basaleli ya Nzambe te ete bámikómisa babola na makasi. (Masese 30:8, 9) Kasi, Paulo amonisi biso ete bobola ezali: kozanga biloko ya kolya, bilamba ya kolata, mpe esika malamu ya kolala. Epai mosusu, soki tozali na biloko wana, tokoki kosepela na yango.
Paulo akanisaki malamu ntango atángaki biloko oyo tokoki kosepela na yango? Moto akoki mpenza kosepela kaka na biloko wana: bilei, bilamba mpe esika ya kolala? Paulo ayebaki makambo oyo azalaki koloba. Ye moko azalaká na bomɛngo mpe na makambo malamu ya bato minene kati na Lingomba ya Bayuda mpe azalaki na oyo Moloma nyonso azalaki na yango. (Misala 22:28; 23:6; Bafilipi 3:5) Paulo akutanaki mpe na nsuka ya bwale na kati ya mosala na ye ya misionɛrɛ. (2 Bakolinti 11:23-28) Na nyonso wana, ayekolaki sɛkɛlɛ oyo esalisaki ye asepelaka ntango nyonso na oyo azali na yango. Sɛkɛlɛ yango ezalaki nini?
‘Nayekoli sɛkɛlɛ’
Na moko ya mikanda na ye, Paulo alobaki boye: “Nayebi mpenza kozanga biloko, nayebi mpenza kozala na biloko mingi. Na eloko nyonso mpe na makambo nyonso nasili koyekola sɛkɛlɛ ya kotonda mpe ya kozala na nzala; ya kozala na biloko mingi mpe ya kokelela.” (Bafilipi 4:12, NW) Maloba ya Paulo ezali komonisa lokola nde azalaki mpenza kobanga eloko te, azalaki mpenza na elikya! Moto akoki kokanisa ete bomoi na ye ezalaki malamu mpenza ntango akomaki mokanda yango, kasi ezalaki bongo te. Azalaki nde na bolɔkɔ na Loma!—Bafilipi 1:12-14.
Soki totaleli likambo wana, vɛrsɛ yango ezali kolimbola polele likambo ya kosepela na oyo tozali na yango, kaka na biloko ya mosuni te, kasi mpe na makambo oyo tozali kokutana na yango. Bomɛngo to kokelela ekoki kolakisa makambo nini mpenza totyaka na esika ya liboso. Paulo alobelaki bozwi ya elimo oyo esalisaki ye na kosepela ata azangaki: “Nayebi kosala makambo nyonso kati na [Nzambe] oyo akokembisaka ngai na nguya.” (Bafilipi 4:13) Na esika atya makanisi na ye na bozwi na ye, ezala ete azalaki na yango to te, to na esika oyo azalaki, ezala ya malamu to ya mpasi, Paulo atyelaki Nzambe elikya ete akokokisa bamposa na ye. Yango wana azalaki kaka kosepela.
Ndakisa ya Paulo ezalaki na ntina mingi mpo na Timote. Ntoma alendisaki elenge yango ete, na bomoi na ye, atya bobangi Nzambe mpe boninga na ye na Nzambe na esika ya liboso mpe koluka bozwi ezonga nsima. Paulo alobaki boye: “Nde yo, ɛ moto ya Nzambe, tiká ete okima makambo oyo nyonso. [Olanda] boyengebene, kosalela Nzambe, kondima, bolingo, etingya, bopɔlɔ.” (1 Timote 6:11) Atako maloba yango ekomamaki mpo na Timote, kasi ezali mpe kotalela moto nyonso oyo alingi kokumisa Nzambe mpe kozala mpenza na bomoi ya esengo.
Timote asengelaki kokeba na lokoso; ezali mpe bongo mpo na moklisto nyonso. Ekoki mpenza kozala ete bandimi mosusu ya lisangá ya Efese, mboka oyo Timote azalaki ntango Paulo akomelaki ye mokanda, bazalaki na bozwi mingi. (1 Timote 1:3) Paulo akɔtisaki nsango malamu ya Klisto na engumba yango oyo ezalaki na bozwi mingi mpe na bato mingi ya mombongo; akómisaki mpe bato mingi bandimi. Na ntembe te, bamosusu kati na bato yango bazalaki bazwi, ndenge moko mpe lelo oyo, ezali na bato mosusu oyo bazali bazwi na kati ya lisangá ya boklisto.
Na bongo, soki tozongisi mingimingi makanisi na liteya oyo tozwi na 1 Timote 6:6-10, motuna oyo tosengeli komituna yango oyo: Bato oyo bazali na mbongo mingi basengeli kosala nini soki balingi kokumisa Nzambe? Paulo alobi ete basengeli naino kotalela elimo na bango. Mbongo etindaka moto akanisa ete akoki na makambo nyonso. Paulo alobi boye: “Opesa toli na bazwi ya ekeke oyo ete bázala na lolendo te, bálikya epai na bozwi bokoumelaka solo te kasi epai na Nzambe oyo akozwisaka biso biloko nyonso ya malamu ete tósepela na yango.” (1 Timote 6:17) Bato ya mbongo basengeli koyekola kosukisa makanisi na bango nyonso kaka na mbongo na bango te; basengeli kotya elikya epai ya Nzambe, ye oyo apesaka mpenza bozwi nyonso.
Kasi, longola kotalela elimo na bango, basengeli mpe kosala makambo mosusu. Nsukansuka, baklisto oyo bazali na bozwi basengeli kosalela yango malamu. Paulo apesi toli oyo: “Básala malamu, bázala bazwi na misala kitoko, bákabela bato biloko, básangana na bato.”—1 Timote 6:18.
“Bomoi ya solosolo”
Likanisi ya ntina na toli ya Paulo ezali ete tosengeli kobosanaka te ete bozwi ekoki kosilisa makambo nyonso te. Liloba ya Nzambe elobi boye: “Biloko ya motuya ya mozwi bizali lokola engumba ya makasi na ye, mpe na makanisi na ye bizali lokola efelo ya monene mpo na komibatela.” (Masese 18:11, NW) Ya solo, libateli oyo bozwi ekoki kopesa ezali kaka na makanisi mpe ekosaka. Komipesa mobimba na yango mpe kobosana koluka ete Nzambe andima biso ezali mabe.
Eyebanaka te soki lobi to lobi kuna bozwi yango ekozala kaka to ekozala te; yango wana, esengeli te ete tótyelaka yango elikya. Tosengeli kotya elikya ya solosolo na eloko oyo eleki makasi, oyo ezali na ntina mpe oyo ekoumela. Moklisto atyelaka Mozalisi, Yehova Nzambe, elikya mpe atyelaka elaka na ye ya bomoi ya seko elikya. Mbongo ekoki kosomba bolamu te, ekoki mpe kosomba lobiko te. Kaka kondima na biso epai ya Nzambe nde ekoki kopesa biso elikya yango.
Na yango, tózala bazwi to babola, na bomoi na biso, tólanda nde nzela oyo ekokómisa biso ‘bazwi epai ya Nzambe.’ (Luka 12:21) Eloko moko te ezali na valɛrɛ koleka kondimama na Mozalisi. Molende nyonso oyo tokosala mpo na kobatela yango ekosala ete ‘tómibombela miboko kitoko mpo na ekeke ekoya, ete tósimba bomoi ya solosolo.’—1 Timote 6:19, NW.
[Elilingi na lokasa 7]
Paulo ayekolaki sɛkɛlɛ ya kosepela na oyo azalaki na yango
[Bililingi na lokasa 8]
Tokoki kozala na esengo mpe kosepela na oyo tozali na yango