Moná bokeseni kati na moto oyo asalelaka Nzambe mpe oyo asalelaka ye te
“Bokomona . . . bokeseni kati na moyengebene ná moto mabe.”—MALAKI 3:18.
1, 2. Mokakatano nini basaleli ya Nzambe bazali na yango lelo? (Talá elilingi ya ebandeli.)
MINGANGA ebele basalisaka bato oyo bazali na bamaladi oyo ekoki kozwa bato mosusu. Basalaka bongo mpo balingi kosalisa bato yango. Kasi, basengeli mpe komibatela mpo bázwa te maladi oyo bazali koluka kosilisa. Ndenge moko mpe, mingi na biso tofandaka mpe tosalaka elongo na bato oyo bazali na bizaleli oyo ekeseni na bizaleli ya Nzambe. Yango ekoki kozala mpasi mpo na biso.
2 Na mikolo ya nsuka ya ebongiseli oyo, bato oyo balingaka Nzambe te batosaka te mibeko na ye na oyo etali mabe ná malamu. Ntoma Paulo atángaki bizaleli na bango ya mabe mpe alobaki ete bizaleli yango ekokóma lisusu mingi wana tozali kopusana na nsuka ya ebongiseli oyo. (Tángá 2 Timote 3:1-5, 13.) Ata soki tosepelaka na bizaleli yango te, makanisi, elobeli, mpe etamboli ya bato oyo bazali zingazinga na biso ekoki kokɔtela biso. (Masese 13:20) Na lisolo oyo, tokomona ndenge bizaleli yango ekeseni na bizaleli ya basaleli ya Nzambe. Tokomona mpe ndenge oyo tokoki komibatela mpo tózwa te bizaleli yango ya mabe, wana tozali kosalisa bato báyeba Yehova.
3. Mokapo ya 2 Timote 3:2-5 elobeli bato ya ndenge nini?
3 Ntoma Paulo akomaki ete mikolo ya nsuka “ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” Na nsima, atángaki bizaleli mabe 19, oyo esengelaki komonana mingi na ntango na biso. Bizaleli yango ekokani na oyo ezali na Baroma 1:29-31, kasi na mokanda na ye epai ya Timote, Paulo asalelaki maloba oyo ezali na esika mosusu te na Makomami ya Grɛki ya bokristo. Abandaki na maloba “mpo bato bakozala.” Bato yango ezali basi mpe mibali, mpo bango nyonso bakoki kozala na bizaleli ya mabe. Kasi bato nyonso te nde bazalaka na bizaleli mabe oyo Paulo alobelaki. Bakristo bazali na bizaleli ya ndenge wana te.—Tángá Malaki 3:18.
NDENGE OYO TOMITALELAKA
4. Bato oyo batondi na lolendo bazalaka ndenge nini?
4 Nsima ya koloba ete bato mingi bakozala bato oyo bamilingaka mpe bato balingá mbongo, Paulo abakisaki ete bato bakozala bato ya lofundo, bato ya lolendo, mpe bato oyo batondi mpenza na lolendo. Mbala mingi, bato yango bamonaka ete baleki basusu mpo bazali kitoko, bazali mayele, bazali na bozwi, to mosala ya lokumu. Bato yango balukaka eloko mosusu te, kaka lokumu. Moto moko ya mayele akomaki ete moto ya ndenge wana, “na motema na ye, azalaka na mwa etumbelo esika afukamaka mpo na komisambela.” Bato mosusu balobaka ete lolendo ezali mpenza mabe mpo ata moto ya lolendo alingaka te komona ezaleli yango epai ya basusu.
5. Ndenge nini lolendo ekɔtelaki ata basaleli ya sembo ya Yehova?
5 Yehova alingaka lolendo te. Ayinaka mpenza “miso ya lolendo.” (Masese 6:16, 17) Kutu, lolendo epekisaka moto apusana penepene na Nzambe. (Nzembo 10:4) Lolendo ezali ezaleli ya Zabolo. (1 Timote 3:6) Kasi likambo ya mawa, lolendo ekɔtelaki ata basaleli mosusu ya sembo ya Yehova. Na ndakisa, Uziya, mokonzi ya Yuda, azalaki sembo bambula ebele. Kasi Biblia elobi: “Ntango kaka akómaki makasi, motema na ye ekómaki na lolendo kino ememelaki ye libebi, bongo azangaki bosembo epai ya Yehova Nzambe na ye.” Uziya akɔtaki na tempelo mpe atumbaki mpaka ya malasi, nzokande azalaki na lotomo ya kosala yango te. Na nsima, Mokonzi Hizikiya mpe akómaki na lolendo, atako ezalaki mpo na mwa ntango.”— 2 Ntango 26:16; 32:25, 26.
6. Makambo nini ekokaki kokómisa Davidi moto ya lolendo, kasi mpo na nini abatelaki komikitisa?
6 Bato mosusu bakómaka na lolendo mpo bazali kitoko, bayebani, bayebi kobɛta miziki, bazali na makasi, to mpe bato mingi basepelaka na bango. Davidi azalaki na nyonso wana, kasi azalaki na komikitisa bomoi na ye mobimba. Na ndakisa, ntango abomaki Goliate, Mokonzi Saulo alobaki ete Davidi akoki kobala mwana na ye. Kasi Davidi alobaki: “Ngai nde nani mpe bandeko na ngai, libota ya tata na ngai, nde banani na Yisraele mpo nakóma bokilo ya mokonzi?” (1 Samwele 18:18) Nini esalisaki Davidi abatela komitikisa? Ayebaki ete soki azali na bizaleli ya malamu, na mayele, mpe azwaki mikumba, ezalaki mpo Nzambe amonisaki komikitisa mpe atyelaki ye likebi. (Nzembo 113:5-8) Davidi ayebaki ete eloko nyonso ya malamu oyo azalaki na yango eutaki epai ya Yehova.—Talá mpe 1 Bakorinti 4:7.
7. Nini ekosalisa biso tómonisa komikitisa?
7 Lokola Davidi, basaleli ya Yehova lelo basalaka makasi bázala na komikitisa. Koyeba ete Yehova, ye Oyo-Aleki-Likoló, azalaka na komikitisa, esimbaka mpenza motema na biso. (Nzembo 18:35) Tolingaka kotosa maloba oyo: “Bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, boboto, elimo ya komikitisa, motema pɛtɛɛ mpe motema molai.” (Bakolose 3:12) Toyebi mpe ete bolingo “emikumisaka te, emivimbisaka na lolendo te.” (1 Bakorinti 13:4) Komikitisa na biso ekoki kotinda basusu báluka kosepela koyeba Yehova. Ndenge kaka mobali oyo azali mondimi te akoki kokóma mosambeli ya Yehova mpo na etamboli malamu ya mwasi na ye oyo azali mokristo, bato bakoki kokóma basambeli ya Nzambe mpo bamoni komikitisa ya basaleli na ye.—1 Petro 3:1.
BOYOKANI NA BISO NA BASUSU
8. (a) Ndenge nini bato mosusu batalelaka likambo ya kozanga botosi epai ya baboti? (b) Biblia esɛngi bana básala nini?
8 Ntoma Paulo alobelaki mpe ndenge bato bakobanda kosalelana makambo na mikolo ya nsuka. Akomaki ete bana bakotosa baboti te. Lelo, babuku, bafilme, mpe makambo oyo balakisaka na televizyo emonisaka ete ezali mabe te bana bázanga botosi epai ya baboti na bango. Nzokande, kozanga botosi ebebisaka boyokani na kati ya libota, ebongiseli oyo esimbaka ekólo. Bato bayebi likambo yango banda kala. Na ndakisa, na Grɛsi ya kala, soki mwana mobali abɛti baboti na ye, bazalaki kolongola ye lotomo ya kozala mwana-mboka. Na mibeko ya Baroma, moto oyo abɛti tata na ye akokaki kozwa etumbu ndenge moko na moto oyo abomi moto. Makomami ya Ebre mpe Makomami ya Grɛki esɛngi bana bákumisa baboti na bango.—Kobima 20:12; Baefese 6:1-3.
9. Nini ekoki kosalisa bana bátosaka baboti na bango?
9 Nini ekoki kosalisa mwana atosaka baboti na ye, ata soki bana mosusu batosaka te? Asengeli kokanisa makambo nyonso ya malamu oyo baboti basalelaka ye. Asengeli mpe koyeba ete Nzambe, Tata na biso nyonso, asɛngi ye atosaka baboti na ye. Lisusu, soki elenge azali koloba malamu ya baboti na ye, akotinda baninga bámemyaka mpe baboti na bango. Baboti mpe basengeli komonisela bana na bango bolingo na kati ya libota, soki te ekozala mpasi mingi mpo bana bátosa bango. Kasi soki mwana amoni ete baboti na ye balingaka ye mpenza, ekoki kosalisa ye atosa bango ata na ntango oyo ezali mpasi. Ndeko mobali moko na nkombo Austin alobi: “Nazalaki mbala mingi koluka kosala nyonso oyo nalingi, kasi baboti na ngai batyelaki ngai mibeko oyo ebongi, bamonisaki ngai ntina na yango, mpe tozalaki kosolola mingi. Yango esalisaki ngai natosaka. Namonaki ete bazali kotyela ngai likebi, mpe ezalaki kotinda ngai nasepelisa bango.”
10, 11. (a) Bizaleli nini ya mabe emonisi ete bato balinganaka te? (b) Ndenge nini bakristo ya solo bamonisaka ete balingaka bazalani na bango?
10 Ntoma Paulo alobelaki mpe bizaleli mosusu oyo emonisaka ete bato balinganaka te. Nsima ya kolobela bato oyo batosaka baboti te, alobelaki bato oyo bazangi botɔndi. Yango ebongi mpenza, mpo bato oyo bazalaka na botɔndi te bazwaka na motuya te makambo malamu oyo basusu basalelaka bango. Na nsima, Paulo alobaki ete bato bakozala bato oyo bazangi bosembo, mpe oyo balingaka kosala boyokani te, elingi koloba bakolinga te kotya kimya na basusu. Bakozala bato oyo bafingaka mpe oyo batɛkaka bamosusu, oyo babimisaka maloba ya mabe mpe ya kofinga basusu, ata mpe Nzambe. Mpe bakozala bato oyo bakoselaka bato makambo, oyo balobaka lokuta mpo na kobebisa lokumu ya basusu.a
11 Basaleli ya Yehova bakeseni na bato ya mokili mpo bamoniselaka basusu bolingo ya solosolo. Ezalaka bongo banda kala. Yesu alobaki ete nsima ya mobeko ya kolinga Nzambe, mobeko ya kolinga bazalani na biso ezalaki mobeko ya mibale oyo elakaki ntina na Mibeko ya Moize. (Matai 22:38, 39) Alobaki mpe ete bato bakoyeba bakristo ya solo ntango bakomona bolingo oyo bakomoniselana. (Tángá Yoane 13:34, 35.) Bakristo ya solo basengelaki kolinga ata banguna na bango.—Matai 5:43, 44.
12. Ndenge nini Yesu amonisaki ete alingaki bato?
12 Yesu amonisaki ete alingaki mpenza bato. Atambolaki engumba na engumba mpo na koteya bato nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Afungolaki miso ya bato oyo bakufá miso, abikisaki batɛngumi, bato ya maba, mpe bato oyo bakufá matoi. Asekwisaki bakufi. (Luka 7:22) Yesu apesaki ata bomoi na ye mpo na kobikisa bato, atako bato mingi bazalaki koyina ye. Amekolaki bolingo ya Tata na ye na ndenge ya kokoka. Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bamekolaka Yesu mpe balingaka basusu.
13. Ndenge nini komonisa bato ete tolingaka bango ekoki kotinda bango báluka koyeba Yehova?
13 Soki tozali komonisa bato ete tolingaka bango, ekoki kotinda bango báluka koyeba Yehova, Tata na biso ya likoló. Na ndakisa, mobali moko na Thaïlande akendaki na liyangani moko ya etúká mpe akamwaki komona bolingo oyo bandeko basi mpe mibali bazalaki komoniselana. Ntango azongaki na ndako na ye, asɛngaki Batatoli ya Yehova báyekola na ye Biblia mbala mibale na pɔsɔ. Na nsima, ateyaki bandeko na ye nyonso ya libota. Nsima ya sanza 6 mpamba, asalaki botángi ya Biblia na Ndako ya Bokonzi mpo na mbala ya liboso. Mpo na koyeba soki olingaka basusu, omituna boye: “Nasalaka nyonso mpo na kosalisa bato na libota na ngai, na lisangá, mpe na mosala ya kosakola? Nasalaka makasi namona bango ndenge Yehova amonaka bango?
“MBWA YA ZAMBA MPE MWANA-MPATE”
14, 15. Bizaleli nini ya mabe bato mingi bazali na yango, kasi ndenge nini basusu babongoli bizaleli na bango?
14 Na mikolo oyo ya nsuka, bato bazali mpe na bizaleli mosusu ya mabe oyo tosengeli koboya. Na ndakisa, bato mingi balingaka makambo ya malamu te. Bayinaka oyo ezali malamu, mpe batɛmɛlaka yango. Bato yango bazangi komipekisa, bazali bato ya nko. Basusu bazali motó makasi. Basalaka makambo miso ya kokangama kozanga bákanisa mpasi oyo misala na bango ekoki kobimisela basusu.
15 Bato mingi oyo liboso bazalaki kosala makambo lokola banyama mabe babongoli bizaleli na bango. Biblia esakolaki mbongwana yango ya kokamwa. (Tángá Yisaya 11:6, 7.) Biblia elobeli banyama, lokola mbwa ya zamba mpe nkɔsi, oyo efandi na kimya elongo na banyama ya mboka, lokola bana-mpate mpe bana-ngɔmbɛ. Mpo na nini efandi na kimya? Esakweli elobaki: “Mpo mabele ekotonda na boyebi ya Yehova.” (Yisaya 11:9) Lokola banyama ekoki koyekola makambo ya Yehova te, na ndenge ya elilingi, esakweli yango elobeli ndenge bato bazali kobongola bizaleli na bango.
16. Ndenge nini Biblia esalisi bato bábongola bomoto na bango?
16 Bandeko na biso mingi oyo liboso bazalaki bato ya nko lokola bambwa ya zamba, bazali lelo bato ya kimya. Okoki kotánga masolo ya bandeko yango mosusu na lisolo “Biblia ebongolaka bato” na jw.org. Bato oyo bayebi Yehova mpe basalelaka ye bazali te lokola bato oyo bamonisaka ete bazali na ezaleli ya kokangama na Nzambe nzokande bazali kowangana nguya ya ezaleli yango. Bato wana balobaka ete basambelaka Nzambe, kasi bizaleli na bango emonisaka yango te. Nzokande, epai ya basaleli ya Yehova, bato oyo bazalaki liboso bato ya nko, ‘balatá bomoto ya sika oyo ezalisamaki na boyokani na mokano ya Nzambe na boyengebene mpe bosembo ya solo.’ (Baefese 4:23, 24) Ntango moto abandi koyekola makambo ya Nzambe, amonaka ete asengeli kotosa mibeko na ye. Yango etindaka ye abongola bindimeli, makanisi, mpe bizaleli na ye. Ezalaka pɛtɛɛ te kosala bambongwana yango, kasi elimo ya Nzambe esalisaka baoyo balingi mpenza kosepelisa ye.
“KIMÁ BATO WANA”
17. Tokoki kosala nini mpo bizaleli ya mabe ekɔtela biso te?
17 Bokeseni kati na bato oyo basalelaka Nzambe mpe baoyo basalelaka ye te ezali se kokóma polele. Tosengeli kokeba ete bizaleli mabe ya bato oyo basambelaka Nzambe te ekɔtela biso. Tosengeli kolanda toli oyo Yehova apesi ete tókima bato oyo 2 Timote 3:2-5 elobeli. Ya solo, tokokoka te kokima bato nyonso oyo bazali na bizaleli ya mabe. Mbala mosusu tosalaka elongo na bango, totángaka kelasi moko, to tofandaka esika moko. Kasi tokoki koboya kokanisa to kosala makambo lokola bango. Nini ekoki kosalisa biso? Tosengeli kokómisa boninga na biso na Yehova makasi, tóyekolaka Biblia mpe tóponaka baninga oyo balingaka Yehova.
18. Ndenge nini maloba mpe makambo tosalaka ekoki kosalisa basusu báluka koyeba Yehova?
18 Epai mosusu, tolingi mpe kosalisa bato báyeba Yehova. Yango wana, lukáká mabaku ya kopesa litatoli, mpe sɛngá Yehova asalisa yo olobaka makambo oyo ebongi mpe na ntango ebongi. Tosengeli mpe koyebisa basusu ete tozali Batatoli ya Yehova. Na ndenge yango, etamboli na biso ya malamu ekopesa Nzambe nkembo, kasi biso moko te. Yehova ateyi biso “tóboya ezaleli ya kotyola Nzambe mpe bamposa ya mokili mpe tófanda na makanisi malamu mpe na boyengebene mpe na ezaleli ya kokangama na Nzambe na ntango oyo.” (Tito 2:11-14) Soki tozali komekola Yehova mpe kosala oyo asɛngi biso, bato bakomona yango. Bamosusu kutu bakoki koloba: “Tokokende na bino, mpo toyoki ete Nzambe azali na bino.”—Zekaria 8:23.
a Liloba ya Grɛki oyo basaleli mpo na “moto oyo akoselaka bato makambo” to “mofundi,” ezali diabolos. Biblia esaleli yango mpo na kolobela Satana, moto mabe oyo afundaka Nzambe.