Tozali mpenza na “mikolo ya nsuka”?
MBONGWANA oyo ezali kosalema na makambo mibale esalisi biso tóyeba eleko oyo Biblia ebengi mikolo ya nsuka. Biblia esakolaki makambo oyo ekomonana na “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (Matai 24:3) Elobaki mpe ete makanisi mpe bizaleli ya bato oyo bakozala na bomoi na “mikolo ya nsuka” ekobongwana.—2 Timote 3:1.
Makambo oyo ezali kosalema na mokili mpe mbongwana na bizaleli mpe na makanisi ya bato emonisi ete tozali na mikolo ya nsuka mpe ete etikali moke, Bokonzi ya Nzambe ekopesa kimya ya libela epai ya bato oyo balingaka Nzambe. Tótalela naino makambo misato oyo Yesu alobaki ete ekomonisa ete tokómi na mikolo ya nsuka.
“Ebandeli ya bampasi”
Yesu alobaki boye: “Ekólo ekotombokela ekólo mpe bokonzi ekotombokela bokonzi, mpe kozanga ya bilei ekozala mpe koningana ya mabelé ekozala epai na epai.” Abakisaki boye: “Makambo nyonso wana ezali ebandeli ya bampasi.” (Matai 24:7, 8) Tótalela ‘makambo wana’ mokomoko.
Na boumeli ya mbula nkama oyo eleki, ebele ya bato babomamaki na bitumba mpe na matata ya bikoló. Lapolo moko ya États-Unis elobi boye: “Motángo ya bato oyo babomami na bitumba [ya bambula ya 1900] eleki na mbala misato motángo ya bato oyo bakufaki na bitumba banda na siɛklɛ ya liboso tii na mobu 1899.” Na Buku na ye (Humanity—A Moral History of the Twentieth Century), Jonathan Glover akomaki boye: “Bato soki milio 86 bakufaki na bitumba banda na 1900 tii na 1989. . . . Ezali mpasi koyeba motángo ya bato oyo bakufaki na bitumba na bambula ya 1900. Moto moko te akoki kopesa motángo mpenza ya bato oyo bakufaki mpamba te mingi kati na bango (milio 58) bakufaki na bitumba mibale ya mokili mobimba. Nzokande, soki tokaboli motángo ya bato oyo bakufaki na boumeli ya bambula yango, tokoki koloba ete bato soki 2 500 bazalaki kokufa mokolo na mokolo, elingi koloba bato koleka 100 na ngonga mokomoko na boumeli ya mbula ntuku libwa.” Kanisá mpasi oyo bato nyonso oyo bakufelaki baninga mpe bandeko bayokaki!
Atako mabelé ezali na biloko mingi ya kolya, batángi mpe kozanga ya bilei na kati ya bilembo oyo emonisi ete tozali na mikolo ya nsuka. Balapolo mingi emonisi ete na boumeli ya bambula 30 oyo euti koleka, bilei ezalaki mingi kasi bato bazalaki moke. Atako bongo, mikili mingi ezangaka bilei mpo bato bazali mpenza na bisika ya kosala bilanga te to mpe bazali na mbongo te mpo na kosomba biloko ya kolya. Na mikili ya bobola, bato koleka miliare moko basalelaka dolare moko (1$) mokolo na mokolo mpo na kolya. Mpo na yango, bato soki milio 780 bazali kokufa nzala ntango nyonso. Lapolo ya ebongiseli ya ONU oyo etalelaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) elobi ete mbula na mbula, nzala ezali koboma bana koleka milio mitano.
Tokoki koloba nini mpo na koningana ya mabelé oyo esakolamaki? Ankɛtɛ ya ebongiseli moko ya États-Unis oyo eyekolaka mabelé emonisi ete banda 1990, koningana ya mabelé oyo ekoki kobuka bandako ya etaze esalemaki mbala soki 17 na mbula moko. Koningana ya mabelé oyo ekoki kobebisa mpenza bandako ya etaze esalamaki mbala moko na mbula. Lapolo mosusu elobi boye: “Koningana ya mabelé ebomi bankóto na bankóto ya bato na boumeli ya mbula nkama oyo euti koleka.” Makambo ezali kosalema ndenge wana mpamba te banda na 1914, bingumba minene oyo ezali kotonda na bato ezali na bisika oyo mabelé ekoki koningana.
Bilembo mosusu ya ntina
Yesu alobaki boye: “Ekozala . . . epai na epai bamaladi mabe.” (Luka 21:11) Mayele ya monganga ekoli mingi lelo oyo koleka na eleko mosusu nyonso. Kasi, bamaladi oyo ebimá kala ná oyo ezali kobima lelo oyo ezali se konyokola bato. Mokanda moko ya Leta na États-Unis elobi boye: “Maladi ntuku mibale oyo eyebani mingi, na ndakisa maladi ya ntolo (tuberculose), malaria, mpe choléra, epanzani mingi banda 1973, mpe mbala mingi nkisi ya monganga ezali lisusu kokoka kosilisa yango te. Banda na 1973, minganga bamoni bamaladi soki 30 oyo eyebanaki te liboso, na ndakisa Sida, Ebola, hépatite C mpe bamaladi mosusu oyo nkisi mpo na kosilisa yango ezali te.” Lapolo moko ya Croix-rouge ya 28 Yuni 2000 elobi ete motángo ya bato oyo bakufi na maladi eleki mbala 160 motángo ya bato oyo bakufaki na mbula oyo eleki na makambo lokola koningana ya mabelé mpe mipɛpɛ makasi.
Elembo mosusu ya mikolo ya nsuka ezali ete “botyoli-mibeko ekobakisama mingi.” (Matai 24:12) Na bisika mingi lelo oyo, bato batikaka lisusu baporte ya bandako na bango polele te mpe babangaka kotambola na butu. Tokoloba nini mpo na kobeba ya mopɛpɛ, mai mpe mabelé oyo ezali kosalema mpo bato bazali kosala makambo oyo ezali kotyola mibeko? Yango mpe ezali kokokisama ya likambo oyo Biblia esakolaki. Mokanda ya Emoniseli elobeli ntango oyo Nzambe atye mpo na “kobebisa baoyo bazali kobebisa mabelé.”—Emoniseli 11:18.
Bizaleli ya bato na mikolo ya nsuka
Fungolá Biblia na 2 Timote 3:1-5. Ntoma Paulo akomi boye: “Na mikolo ya nsuka bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza ekozala.” Na nsima, atángi bizaleli 20 oyo bato oyo batyolaka Nzambe bakomonisa. Yo mpe omonaka bizaleli yango epai ya bato? Tótalela balapolo oyo elobelaki bizaleli ya bato ya mikolo oyo.
“Bato oyo bamilingaka bango moko.” (2 Timote 3:2) “Lelo oyo, [bato bazali] koluka kokokisa kaka bamposa na bango moko. Bakómi lokola banzambe, mpe balingi ete bato mosusu bámonaka bango ndenge wana.”—Financial Times, zulunalo moko ya Angleterre.
“Bato balingá mbongo.” (2 Timote 3:2) “Elimo ya konduka biloko ya mokili oyo bato bakómi na yango elongoli elimo ya komikitisa. Soki ozali na bozwi te, bato bakomona yo ntina te.”—Jakarta Post, zulunalo moko ya Indonésie.
“Bato bazangi botosi epai ya baboti.” (2 Timote 3:2) “Mobali moko ná mwasi na ye bazangaki likambo ya koloba ntango bamonaki mwana na bango ya mbula 4 azali kopesa bango mitindo lokola Louis XIV [mokonzi ya France] mpe bayokaki mwana na bango ya mbula 8 azali koganga, ‘Nalingaka bino te!’”—American Educator, zulunalo moko ya États-Unis.
“Bato bazangi bosembo.” (2 Timote 3:2) “Ndenge oyo mibali mingi bakómi kosundola basi ná bana na bango, ezali mbala mosusu elembo eleki monene oyo emonisi ete bizaleli ya bato ebongwani mpenza na boumeli ya [mbula 40 oyo euti koleka].”—Wilson Quarterly, zulunalo moko ya États-Unis.
“Bazangi bolingo ya libota.” (2 Timote 3:3) “Mobulu na libota ezali likambo oyo esalemaka mokolo na mokolo na bisika mingi na mokili.”—Journal of the American Medical Association, zulunalo moko ya États-Unis.
“Bazangi komipekisa.” (2 Timote 3:3) “Mitó ya masolo oyo ebimaka na bazulunalo ntɔngɔ nyonso emonisaka ete bato bazangi komipekisa, bizaleli malamu mpe motema mawa epai ya bazalani na bango mpe ata epai na bango moko. . . . Soki Leta ezali kaka kotika nzela na makambo mabe oyo ezali komonana lelo oyo, na mikolo ezali koya bato bakozala lisusu ata na ndambo ya bizaleli malamu te.”—Bangkok Post, zulunalo moko ya Thaïlande.
“Bato ya kongala.” (2 Timote 3:3) “Kanda makasimakasi mpe kongala kozanga komipekisa [ezali] komonana epai ya batambwisi-mituka, na libota, . . . mpe [na] matata ya mikemike oyo esukaka mbala mingi na bitumba mpe na koboma. Mobulu ekoki kobima ata na ntango nini mpe bato bakómi kobangabanga mpe komona ete bazali na likama.”—Business Day, zulunalo moko ya Afrika ya Sudi.
“Bato balingá bisengo na esika ya kozala bato oyo balingaka Nzambe.” (2 Timote 3:4) “Bato bakómi kolendisa makambo ya mbindo na boye ete baboyi mpenza mitinda ya Biblia.”—Boundless, zulunalo moko ebimaka na Internet.
“Bazali na motindo moko boye ya ezaleli ya kokangama na Nzambe kasi bazali kowangana nguya na yango.” (2 Timote 3:5) “[Mwasi moko oyo, kala azalaká ndumba na Pays-Bas] alobaki ete mingimingi mangomba nde eboyaka ete kindumba endimama na Leta. Na nsima alobaki na kosɛka ete ntango azalaki naino kosala kindumba, bakiliya na ye mingi ezalaki [bakonzi ya mangomba]. Abakisaki boye: ‘Bandumba mingi balobaka ete bakiliya na bango ya malamu ezali bandimi.’”—National Catholic Reporter, zulunalo moko ya États-Unis.
Mikolo ezali koya ekozala ndenge nini?
Lelo oyo, mokili etondi na yikiyiki, kaka ndenge Biblia esakolaki. Kasi, esakweli ya “elembo ya kozala ya [Klisto] mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo” epesi biso elikya. Yesu alobaki boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso.” (Matai 24:3, 14) Nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali kosakolama na mikili koleka 230. Bato koleka milio motoba oyo bauti na “bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso” bazali kosakola Bokonzi na molende. (Emoniseli 7:9) Makambo nini mosala yango ezali kokokisa? Bato nyonso ya mabelé bakoki kozwa libaku ya koyoka nsango ya Bokonzi, makambo oyo Bokonzi yango ekosala, mpe ndenge ya kozwa mapamboli oyo Bokonzi yango ekomema. Ya solo, ‘boyebi efuluki na ntango oyo ya nsuka.’—Danyele 12:4.
Yo mpe osengeli kozwa boyebi yango. Talá makambo oyo ekosalema ntango nsango malamu ekosakolama ndenge Yehova alingi yango. Yesu alobaki boye: “Bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Na ntango wana nde Nzambe akolongola mabe nyonso na mabelé. Masese 2:22 elobi boye: “Kasi bato mabe bakolongolama na mokili mpe bato ya masumu bakobikolama wana.” Bongo Satana mpe bademo na ye? Bakobwakama na lobwaku, bakokoka lisusu kozimbisa bato te. (Emoniseli 20:1-3) Na nsima, “basembwi . . . mpe bato malamu bakotikala” na mabelé. Bokonzi ekopesa bango mapamboli mingi.—Masese 2:21; Emoniseli 21:3-5.
Osengeli kosala nini?
Ntembe ezali te. Nsuka ya ebongiseli oyo ya Satana ekómi pene. Bato oyo baboyi kondima ete tozali na mikolo ya nsuka, bakosutuka ntango nsuka ekoya. (Matai 24:37-39; 1 Tesaloniki 5:2) Yango wana, Yesu ayebisaki bato oyo bazalaki koyoka ye ete: “Bókeba na bino moko ete mitema na bino ekóma kilo ata moke te na kolekisa ndelo na kolya mpe na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi, mpe ete na pwasa mokolo wana ekwela bino na ntango wana kaka lokola motambo. Mpo yango ekoyela baoyo nyonso bafandaka na etando ya mabelé mobimba. Boye, bólala mpɔngi te, kopesáká malɔmbɔ ntango nyonso mpo bólonga kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kobima, mpe kotɛlɛma liboso ya Mwana ya moto.”—Luka 21:34-36.
Kaka bato oyo Mwana ya moto, Yesu, akondima mpo batɛlɛmi liboso na ye nde bakobika ntango ebongiseli ya makambo oyo ekokóma na nsuka na yango. Ebongi mpenza tósalela ntango oyo etikali mpo na koluka ete Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto bándima biso! Na libondeli moko, Yesu alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Na bongo, ezali likambo ya bwanya soki oyebi Yehova Nzambe malamumalamu mpe makambo oyo azali kosɛnga yo. Batatoli ya Yehova ya esika ofandi bazali na esengo ya kosalisa yo oyeba makambo oyo Biblia eteyaka. Tolendisi yo oluka bango to okomela babimisi ya zulunalo oyo.
[Etanda/Bililingi na lokasa 7]
BILEMBO YA MIKOLO YA NSUKA
MAKAMBO OYO EZALI KOMONANA:
▪Bitumba.—Matai 24:6, 7.
▪Kozanga ya bilei.—Matai 24:7.
▪Koningana ya mabelé.—Matai 24:7.
▪Bamaladi.—Luka 21:11.
▪Kobakisama ya botyoli-mibeko.—Matai 24:12.
▪Kobebisama ya mabelé.—Emoniseli 11:18.
BIZALELI YA BATO:
▪Bato oyo bamilingaka bango moko.—2 Timote 3:2.
▪Bato balingá mbongo.—2 Timote 3:2.
▪Bato ya lolendo.—2 Timote 3:2.
▪Bato bazangi botosi epai ya baboti.—2 Timote 3:2.
▪Bato bazangi botɔndi.—2 Timote 3:2.
▪Bato bazangi bosembo.—2 Timote 3:2.
▪Bazangi bolingo ya libota.—2 Timote 3:3.
▪Bazangi komipekisa.—2 Timote 3:3.
▪Bato ya kongala.—2 Timote 3:3.
▪Bato oyo balingá bisengo.—2 Timote 3:4.
▪Basambeli ya lokuta.—2 Timote 3:5.
BASAMBELI YA SOLO:
▪Bazali na boyebi mingi.—Danyele 12:4.
▪Bazali kosakola nsango malamu na mokili mobimba.—Matai 24:14.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
NATIONS UNIES/Foto ya F. GRIFFING