Banani bazali baministre ya Nzambe lelo oyo?
“Kobonga na biso euti na Nzambe. Ye mpe abongisi biso ete tózala [baministre, NW] ya kondimana ya sika.”—2 BAKOLINTI 3:5, 6.
1, 2. Baklisto nyonso ya ekeke ya liboso bazalaki na mokumba nini, kasi ndenge nini makambo ebongwanaki?
NA EKEKE ya liboso T.B., baklisto nyonso bazalaki na mokumba monene ya kosakola nsango malamu. Bango nyonso bazalaki bapakolami na elimo mpe bazalaki baministre ya kondimana ya sika. Bamosusu bazalaki mpe na mikumba mosusu, lokola koteya na kati ya lisangá. (1 Bakolinti 12:27-29; Baefese 4:11) Baboti bazalaki kokokisa mikumba minene na kati ya mabota na bango. (Bakolose 3:18-21) Kasi bango nyonso bazalaki kosala mosala na bango ya libosoliboso mpe oyo eleki ntina, elingi koloba kosakola. Na Makomami ya boklisto oyo ekomamaki na lokota ya Greke ya kala, mokumba yango ebengamaki diakonia, elingi koloba mosala to kosalela basusu.—Bakolose 4:17.
2 Makambo eyaki kobongwana na nsima. Bato mosusu bakómaki kobengama bakonzi ya lingomba; batikaki nzela te ete bato mosusu mpe bázwa libaku malamu ya kosakola, kaka bango nde bakokaki kosala yango. (Misala 20:30) Bakonzi ya lingomba bazalaki moke na kati ya bato nyonso oyo bazalaki komibenga baklisto. Bato mosusu nyonso, oyo balekaki ebele, bakómaki kobengama bandimi. Atako bazalaki koteya bandimi ete bazali na mikumba oyo basengeli kokokisa, lokola kopesa makabo mpo na kosunga bakonzi ya lingomba, mingi bakómaki bato oyo bakendaka kaka koyoka mateya.
3, 4. (a) Na mangomba ya boklisto, ndenge nini moto akómaka ministre? (b) Na mangomba ya boklisto, nani oyo babengaka ye ministre, mpe mpo na nini ezali bongo te epai ya Batatoli ya Yehova?
3 Bakonzi ya lingomba balobaka ete bazali baministre (euti na liloba diakonos oyo babongoli na Latin na liloba minister, “mosaleli”).a Mpo na kokóma baministre, bakɔtaka bakelasi minene to makindo (séminaire) mpe baponaka bango kopona. Buku moko (The International Standard Bible Encyclopedia) elobi boye: “Mingimingi ‘kopona’ na ‘koponama’ emonisi esika ya lokumu oyo bapesi baministre to banganga-nzambe na nzela ya milulu oyo ebongisami, mpe balobelaka mingi bokonzi ya kosakola Liloba to kopesa basakramento, to kosala nyonso mibale.” Nani aponaka baministre? Buku mosusu (The New Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Na mangomba oyo babatelaka mosala ya episkɔpɔ na ndenge ya kala, ministre oyo aponaka ezali kaka episkɔpɔ. Na mangomba ya Protesta oyo etambwisamaka na lisangani ya bakambi, baministre oyo bazali na lisangani ya bakambi nde baponaka moto.”
4 Nyonso wana emonisi ete na mangomba ya boklisto, moto nyonso te nde akoki kozala ministre. Kasi, na lisangá ya Batatoli ya Yehova ezali bongo te. Mpo na nini? Mpo ete ndenge ezali kosalema na mangomba, ezalaki bongo te na lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso.
Banani bazali mpenza baministre ya Nzambe?
5. Na kotalela oyo Biblia elobi, banani mpe bazali kosala lokola baministre?
5 Biblia elobi ete basaleli nyonso ya Yehova, ezala kuna na likoló to awa na mabele, bazali baministre. Baanzelu basalelaki Yesu. (Matai 4:11; 26:53; Luka 22:43) Baanzelu mpe ‘basalelaka baoyo bakozwa libula ya lobiko.’ (Baebele 1:14; Matai 18:10) Yesu azalaki ministre. Ye moko alobaki boye: “Mwana ya moto ayaki te mpo bato basalela ye, kasi ayaki mpo asalela bango.” (Matai 20:28, Boyokani ya Sika; Baloma 15:8) Yango wana, lokola bayekoli ya Yesu basengeli ‘kolanda matambe na ye malamumalamu,’ bango mpe basengeli kozala baministre.—1 Petelo 2:21, NW.
6. Na maloba nini Yesu amonisaki ete bayekoli na ye basengeli kozala baministre?
6 Mwa moke liboso Yesu amata na likoló, ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya [elimo santu, NW], kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso oyo esili ngai kolaka bino. Mpe talá, ngai nazali na bino elongo mikolo nyonso kino nsuka ya ekeke.” (Matai 28:19, 20) Bayekoli ya Yesu basengelaki kosala mosala ya kokómisa bato bayekoli to basengelaki kozala baministre. Bato ya sika oyo bango bakokómisa bayekoli basengeli koyekola kotosa makambo nyonso oyo Yesu atindaki, bakisa mpe etinda ya kokende mpe kokómisa bato bayekoli. Ezala mwasi to mobali, mwana moke to mokóló, moto nyonso oyo azali moyekoli ya solosolo ya Yesu Klisto asengeli kozala ministre.—Yoele 2:28, 29.
7, 8. (a) Bavɛrsɛ nini emonisi ete baklisto nyonso ya solosolo bazali baministre? (b) Likambo ya koponama ezali kobimisa mituna nini?
7 Yango wana, na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., bayekoli nyonso ya Yesu oyo bazalaki wana, ezala basi to mibali balobaki “makambo kitoko ya Nzambe.” (Misala 2:1-11, NW) Mpe lisusu, ntoma Paulo akomaki boye: “Kondima oyo ekokómisa moto na boyengebene ezali na motema, mpe eyambweli ekokómisa moto na lobiko ezali na bibebu.” (Baloma 10:10) Paulo ayebisaki maloba yango na mwa etuluku ya bakonzi ya lingomba te, kasi epai ya bango “nyonso bato balingami na Nzambe kati na mboka ya Loma.” (Baloma 1:1, 7) Ndenge moko mpe, ‘babulami oyo bazalaki na Efese mpe bandimi kati na Klisto Yesu’ basengelaki “[kolata] sapato na makolo lokola bantoma ya Nsango ya kimya.” (Baefese 1:1; 6:15) Baoyo nyonso mpe bayokaki maloba oyo ezalaki na mokanda oyo atindelaki Baebele basengelaki ‘kosimba ngwi eyambweli ya elikya na bango.’—Baebele 10:23.
8 Kasi, ntango nini moto akómaka ministre? To, ntango nini moto aponamaka lokola ministre? Mpe nani aponaka ye?
Ntango nini moto aponamaka lokola ministre?
9. Yesu aponamaki ntango nini, mpe nani aponaki ye?
9 Mpo na koyeba ntango nini moto aponamaka lokola ministre mpe nani oyo aponaka ye, tótalela ndakisa ya Yesu Klisto. Yesu azwaki diplome na likindo moko te mpo na kondimisa ete azali ministre, mpe moto moko te aponaki ye. Kasi, mpo na nini tokoki koloba ete azalaki ministre? Tokoki koloba bongo mpamba te, akokisaki maloba oyo elimo santu etindaki Yisaya asakola ete: “[Elimo, NW] ya Nkolo ezali likoló na ngai, mpo ete apakoli ngai na mafuta ete nasakola na babola Nsango Malamu.” (Luka 4:17-19; Yisaya 61:1) Maloba wana ezali kondimisa mpenza ete Yesu atindamaki mpo na kosakola nsango malamu. Nani atindaki ye? Lokola apakolamaki na elimo ya Yehova mpo na mosala na ye, emonisi polele ete Yehova Nzambe nde aponaki Yesu. Aponaki ye ntango nini? Elimo ya Yehova ekitelaki Yesu ntango azwaki batisimo. (Luka 3:21, 22) Yango wana, tokoloba ete Yesu aponamaki ntango azwaki batisimo.
10. Nani oyo akómisaka ministre moklisto ‘moto oyo abongi’?
10 Tokoloba boni mpo na bayekoli ya Yesu na ekeke ya liboso? Yehova mpe moto aponaki bango lokola baministre. Paulo alobaki boye: “Kobonga na biso euti na Nzambe. Ye mpe abongisi biso ete tózala [baministre, NW] ya kondimana ya sika.” (2 Bakolinti 3:5, 6) Ndenge nini Yehova abongisaka basaleli na ye mpo bázala baministre? Tókamata ndakisa ya Timote, moto oyo Paulo abengaki “[ministre, NW] ya Nzambe kati na Nsango Malamu ya Klisto.”—1 Batesaloniki 3:2.
11, 12. Ndenge nini Timote akolaki tii na kokóma ministre?
11 Maloba oyo Paulo akomelaki Timote ezali kosalisa biso tóyeba ndenge oyo akómaki ministre: “Kasi yo, oumela kati na yango eyekoli yo mpe [bamemi yo na kondima, NW], awa eyebi yo ete oyekoli yango epai ya banani; mpe ete longwa na bomwana na yo, osili koyeba Makomi ya bulɛɛ, makoki kopesa yo boyebi mpo na kobika na nzela ya kondima kati na Klisto Yesu.” (2 Timote 3:14, 15) Kondima oyo etindaki Timote ayambola liboso ya bato etongamaki likoló na boyebi ya Makomami. Mpo Timote akóma ministre, asukaki kaka na kotánga ye moko? Te. Timote asengelaki na lisalisi mpo azwa boyebi ya solosolo mpe akóma na bososoli ya elimo ya makambo oyo azalaki kotánga. (Bakolose 1:9) Na bongo nde ‘bamemaki’ Timote ‘na kondima.’ Lokola ayebaki Makomami “longwa na bomwana,” na ntembe te balakisi na ye ya liboso ezalaki mama na ye na nkɔkɔ na ye; lokola emonani ete tata na ye azalaki mondimi te.—2 Timote 1:5.
12 Kasi, yango kaka te nde esalaki ete Timote akóma ministre. Ya liboso, kosangana na baklisto na masangá ya penepene elendisaki kondima na ye. Toyebi yango ndenge nini? Mpamba te ntango Paulo akutanaki na Timote mpo na mbala ya liboso, ‘bandeko ya Lusutula mpe Ikoni batatolaki malamu’ mpo na elenge mobali yango. (Misala 16:2) Longola yango, na ntango wana bandeko mosusu bakomelaki masangá mikanda mpo na kolendisa yango. Mpe lisusu, ezalaki na bakɛngɛli oyo bazalaki kokende kotala masangá mpo na kolendisa bandeko. Makambo nyonso wana esalisaki baklisto lokola Timote bákola na elimo.—Misala 15:22-32; 1 Petelo 1:1.
13. Ntango nini Timote aponamaki lokola ministre, mpe mpo na nini okoki koloba ete kokola na ye na elimo esukaki wana te?
13 Na kotalela etinda ya Yesu na Matai 28:19, 20, tokoki mpenza kokanisa ete Timote akómaki na kondima oyo etindaki ye alanda ndakisa ya Yesu mpe azwa batisimo. (Matai 3:15-17; Baebele 10:5-9) Batisimo emonisaki ete Timote amipesi mobimba na Nzambe. Ntango Timote azwaki batisimo, akómaki ministre. Kobanda ntango wana, bomoi na ye, makasi na ye, mpe biloko na ye nyonso ekómaki ya Nzambe. Yango ezalaki na kati ya losambo na ye, to “mosala ya bosantu.” Kasi, Timote azalaki na makanisi te ete oyo asalaki ekoki. Alandaki kokola na elimo, mpe akómaki moklisto oyo akɔmeli. Esalemaki bongo mpamba te Timote azalaki ntango nyonso penepene ya baklisto oyo bateli na elimo lokola Paulo, lisusu azalaki koyekola ye moko, mpe azalaki na molende na mosala ya kosakola.—1 Timote 4:14; 2 Timote 2:2; Baebele 6:1.
14. Lelo oyo, ndenge nini moto oyo ‘azali na mposa ya bomoi ya seko’ akolaka tii akokóma ministre?
14 Lelo oyo, koponama lokola ministre moklisto esalemaka se ndenge yango. Basalisaka moto oyo azali ‘na mposa ya kozwa bomoi ya seko’ ayekola Biblia mpo ayeba Nzambe mpe ayeba mikano na ye. (Misala 13:48, NW) Moto yango ayekolaka kotosa mibeko ya Biblia na bomoi na ye mpe kosala mabondeli oyo ezali kouta mpenza na motema. (Nzembo 1:1-3; Masese 2:1-9; 1 Batesaloniki 5:17, 18) Asanganaka na bandimi mosusu mpe alandaka bibongiseli ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45-47; Masese 13:20; Baebele 10:23-25) Na ndenge yango alandaka ebongiseli moko malamu ya mateya oyo ekosalisa ye akola.
15. Nini esalemaka ntango moto azwi batisimo? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
15 Nsukansuka, soki moyekoli ya Biblia alingi Yehova Nzambe mpe akómi na kondima makasi na mbeka ya lisiko, amonisaka mposa ya komipesa mobimba na Tata na ye ya likoló. (Yoane 14:1) Ye moko akoyebisa Nzambe na libondeli ete amipesi na ye mpe akozwa batisimo mpo na komonisa na miso ya bato nyonso ete amipesi na Nzambe. Batisimo nde ezalaka molulu ya koponama na ye mpamba te ezali na ntango yango nde eyebanaka ete azali mosaleli ya Nzambe oyo amipesi to diakonos. Moto yango asengeli kokabwana na mokili. (Yoane 17:16; Yakobo 4:4) Amipesi mobimba lokola ‘mbeka ya bomoi oyo ya bosantu mpe oyo ebongi ete Nzambe ayamba yango’ kozanga kokakola to kosɛnga naino likambo moko. (Baloma 12:1)b Azali ministre ya Nzambe, azali kolanda ndakisa ya Klisto.
Mosala ya baministre baklisto ezali nini?
16. Tángá mwa mikumba oyo Timote azalaki na yango lokola ministre.
16 Timote azalaki kosala makambo nini lokola ministre? Azalaki na mikumba oyo azalaki kokokisa lokola azalaki moninga ya Paulo na mibembo. Mpe ntango akómaki nkulutu, Timote asalaki mosala monene ya koteya mpe kolendisa baninga na ye baklisto. Kasi, mosala na ye ya libosoliboso, ndenge mpe ezalaki mpo na Yesu na Paulo, ezalaki nde kosakola nsango malamu mpe kokómisa bato bayekoli. (Matai 4:23; 1 Bakolinti 3:5) Paulo alobaki na Timote boye: “Kasi yo, omisɛnzɛla na makambo nyonso, oyamba bolɔzi, osala mosala na mopalanganisi na Nsango Malamu, okokisa lisungi na yo nyɛ.”—Biso nde totɛngisi makomi; 2 Timote 4:5.
17, 18. (a) Baklisto basalaka mosala nini? (b) Mosala ya kosakola ezali na ntina nini mpo na ministre moklisto?
17 Ezali se ndenge yango mpo na baministre baklisto lelo oyo. Baklisto bazali kosakola to kopalanganisa nsango malamu epai ya bato nyonso, bazali kolakisa bango nzela ya lobiko na lisalisi ya mbeka ya Yesu mpe bazali koteya bato ya komikitisa ete bábelela nkombo ya Yehova. (Misala 2:21; 4:10-12; Baloma 10:13) Na lisalisi ya Biblia, bazali kolakisa bato ete Bokonzi ya Nzambe nde ezali elikya kaka moko mpo na bato oyo bazali konyokwama, mpe bazali komonisa bato ete ata lelo oyo bomoi na biso ekoki kobonga soki tozali kotosa mibeko ya Nzambe. (Nzembo 15:1-5; Malako 13:10) Kasi mosala ya ministre moklisto ezali te ya koteya bato ete bakosilisa mikakatano na bango soki bazali kolanda mitinda ya boklisto. Moklisto ateyaka nde ete ‘bizaleli ya moto ya Nzambe ezali na elaka ya bomoi mpo na sikoyo mpe mpo na ntango ekoya.’—1 Timote 4:8.
18 Ya solo, baministre baklisto mingi bazali mpe na misala mosusu oyo bakokisaka, yango ekoki kokesana na kotalela moklisto mokomoko. Mingi bazali na mikumba ya mabota. (Baefese 5:21-6:4) Bankulutu na basaleli ya misala bazali na mikumba na kati ya lisangá. (1 Timote 3:1, 12, 13; Tito 1:5; Baebele 13:7) Baklisto mingi bapesaka mabɔkɔ na misala ya kotonga Bandako ya Bokonzi. Bamosusu bazali na libaku malamu mingi ya kosala lokola basali ya bolingo malamu na kati ya Babetele. Kasi, baministre baklisto nyonso basakolaka nsango malamu. Mosala ya kosakola ezali mpo na bango nyonso. Moto amonisaka na miso ya bato nyonso ete azali ministre ya solosolo ntango azali kosala mosala yango.
Elimo ya ministre moklisto
19, 20. Elimo nini baministre baklisto basengeli kozala na yango?
19 Baministre mingi ya mangomba ya boklisto balingaka bápesa bango limemya oyo eleki, mpe bamipesaka batitre lokola “tata.” Kasi, ministre moklisto ayebaka ete kaka Yehova nde abongi na lokumu oyo eleki. (1 Timote 2:9, 10) Ministre moklisto moko te alukaka lokumu ya ndenge wana to batitre ya mineneminene. (Matai 23:8-12) Ayebi ete ndimbola ya libosoliboso ya diakonia ezali “kosalela basusu.” Na kati ya Biblia, verbe oyo euti na liloba yango esalelamaka ntango mosusu mpo na kolobela misala oyo bazali kosalela bato, lokola kotyela bato bilei na mesa. (Luka 4:39; 17:8; Yoane 2:5) Atako ndenge oyo liloba yango esalelami mpo na mosala ya baklisto ezali na mwa lokumu koleka, diakonos azali kaka moto oyo asalelaka basusu.
20 Yango wana, ministre moklisto moko te asengeli komimona ete azali na ntina mingi koleka basusu. Baministre baklisto ya solosolo, ata baoyo bazali na mikumba minene na kati ya lisangá, bazali se baombo. Yesu alobaki boye: “Ye oyo alingi kozala monene kati na bino, akóma [mosaleli, NW] na bino mpe ye oyo alingi kozala moto ya liboso na bino, azala moombo na bino.” (Matai 20:26, 27) Ntango Yesu ateyaki bayekoli na ye ezaleli malamu oyo basengeli kozala na yango, asukolaki bango makolo, asalaki mosala ya moombo ya nsuka mpenza. (Yoane 13:1-15) Wana nde mosala ya komikitisa mpenza! Na yango, baministre baklisto basalelaka Yehova Nzambe na Yesu Klisto na komikitisa. (2 Bakolinti 6:4; 11:23) Basalelanaka misala na komikitisa. Mpe ntango basakolaka nsango malamu, bamipesaka mpenza mpo na kosalela bazalani na bango oyo bazali bandimi te.—Baloma 1:14, 15; Baefese 3:1-7.
Tóyika mpiko na mosala ya Nzambe
21. Lokola Paulo ayikaki mpiko na mosala, mbano nini azwaki?
21 Paulo ayikaki mpiko na mosala na ye lokola ministre. Ayebisaki Bakolose ete anyokwamaki mingi mpo na kosakwela bango nsango malamu. (Bakolose 1:24, 25) Kasi, lokola ayikaki mpiko, bato mingi bandimaki nsango malamu mpe bakómaki baministre. Babotamaki lokola bana ya Nzambe mpe bandeko ya Yesu Klisto, mpe bazwaki elikya ya kokóma bikelamu ya elimo elongo na Yesu kuna na likoló. Talá mbano monene bazwi mpo ete bayikaki mpiko!
22, 23. (a) Mpo na nini baministre baklisto basengeli koyika mpiko lelo oyo? (b) Wapi mbuma ya malamu oyo koyika mpiko ebotaka epai ya baklisto?
22 Lelo oyo, baministre ya solosolo ya Nzambe basengeli koyika mpiko. Mingi bazali kobunda na maladi to na bobange. Baboti bazali na mosala monene ya kobɔkɔla bana na bango; basusu kutu bazali na molongani te. Bana bazali kolakisa mpiko ntango bazali koboya kolanda makambo mabe oyo bazali komona na bakelasi. Baklisto mingi bazali na mikakatano ya mbongo. Mpe mingi bazali konyokwama to bazali na mikakatano mpo na “ntango ya mpasi” oyo tozali na yango lelo oyo! (2 Timote 3:1) Ya solo, pene ya milio motoba ya baministre ya Yehova lelo oyo bazali koloba lokola ntoma Paulo ete: “Kasi lokola [baministre, NW] ya Nzambe, tokomilobela biso mpenza kati na makambo nyonso na mpiko monene.” (2 Bakolinti 6:4) Baministre baklisto bazali kolɛmba te. Babongi mpenza kozwa longonya na ndenge oyo bazali koyika mpiko.
23 Mpe lisusu, ndenge esalemaki epai ya Paulo, koyika mpiko ebotaka mbuma malamu mingi. Koyika mpiko esalisaka biso tózala ntango nyonso na boyokani malamu na Yehova mpe tósepelisa motema na ye. (Masese 27:11) Tozali kolendisa kondima na biso mpe tozali kosalisa bato bákóma bayekoli mpe bazali kobakisama na molɔngɔ ya bandeko na biso baklisto. (1 Timote 4:16) Yehova asungi baministre na ye mpe apamboli mosala na bango na mikolo oyo ya nsuka. Yango wana, bato ya nsuka kati na ba 144 000 bayanganisami, mpe bamilio mosusu ya bato oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabele. (Luka 23:43; Emoniseli 14:1) Ya solo, mosala ya baklisto emonisi motema mawa ya Yehova. (2 Bakolinti 4:1) Tiká ete biso nyonso tóbatela yango mpe tózala na botɔndi lokola mbuma na yango ekoumela libela na libela.—1 Yoane 2:17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba “diakono” euti na liloba ya Greke diakonos, oyo elimboli mokonzi na kati ya lingomba. Na mangomba oyo basi bakoki kozala badiakono, mbala mosusu babengaka bango bamama-mokambi.
b Atako Baloma 12:1 etaleli mpenzampenza baklisto bapakolami, makanisi yango ebongi mpe mpo na “bampate mosusu.” (Yoane 10:16) Bampate mosusu ‘bamibakisi epai ya Yehova ete básalela ye mpe bálinga nkombo ya Yehova mpe ete bázala baombo na ye.’—Yisaya 56:6.
Okoki kolimbola?
• Baklisto nyonso ya ekeke ya liboso bazalaki na mokumba nini?
• Ntango nini moto aponamaka lokola ministre moklisto mpe nani aponaka ye?
• Ministre moklisto asengeli kozala na elimo nini?
• Mpo na nini ministre moklisto asengeli koyikela mikakatano mpiko?
[Bililingi na lokasa 16, 17]
Bateyaki Timote Liloba ya Nzambe banda bomwana na ye. Aponamaki lokola ministre ntango azwaki batisimo
[Elilingi na lokasa 18]
Batisimo ezali elembo ete moto amipesi na Nzambe mpe ete aponami lokola ministre
[Elilingi na lokasa 20]
Baministre baklisto balingaka kosalela basusu