Yunike na Loidi balakisi oyo bapesaki ndakisa malamu
Lokola tozali basaleli ya Yehova, toyebi ete koteya malamu bana na biso banzela ya losambo ezali mokumba oyo tosengeli kotyela yango likebi. Ata na esika ya malamu koleka, mokumba yango ekoki kokutana na mabaku mpe mikakatano ndenge na ndenge. Yango ezali mpenza bongo na ntango moboti moko moklisto azali kokutana na mokakatano mpo ete lingomba na ye ekeseni na oyo ya mobalani na ye. Likambo yango ebandi lelo te. Makomami mayebisi biso moboti moko oyo azalaki na mokakatano yango na ekeke ya liboso T.B.
Na engumba Lusutula, na etúká ya Lukaonia, oyo ezwami na ntei kasi mwa moke na sudi ya Asie Mineure, ezalaki na libota ya mwasi moko na nkombo Yunike. Lusutula ezalaki mwa engumba moke na kati ya etúká mpe eyebanaki mingi te. Ezalaki engumba moko eyangelamaki na Bokonzi ya Loma, ebéngamaki Julia Felix Gemina Lustra, mpe etongamaki na Kaisala Augusite mpo na kopekisa misala ya basali na mabe na zingazinga wana. Yunike azalaki moklisto Moyuda, kasi mobali na ye azalaki Mogreke mpe azalaki moklisto te; azalaki mpe na mwana na ye Timoté, mpe na mama na ye Loidi.—Misala 16:1-3.
Emonani ete Bayuda bazalaki mingi te na Lusutula, mpamba te ata na esika moko te Biblia elobi ete eyanganelo ya Bayuda ezalaki wana, kasi na engumba Ikoni, oyo ezwami na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 30 longwa na Lusutula, Bayuda bazalaki kuna. (Misala 14:19) Na yango, ezalaki pɛtɛɛ te mpo na Yunike ete asalela lingomba na ye. Likambo oyo ete Timoté akatamaki ngenga te nsima ya kobotama na ye epusaki banganga-mayele mosusu ya Biblia na kokanisa ete mobali ya Yunike aboyaki likambo yango.
Nzokande, Yunike azalaki ye moko te na losambo na ye. Emonani ete Timoté alakisamaki kati na “Makomi na bulɛɛ” na mama na ye mpe na Loidi, nkɔkɔ na ye ya mwasi.a Ntoma Paulo alendisaki Timoté ete: “Oumela kati na yango eyekoli yo mpe endimi yo, awa eyebi yo ete oyekoli yango epai na banani; mpe ete longwa na bomwana na yo, osili koyeba Makomi na bulɛɛ, makoki kopesa yo boyebi mpo na kobika na nzela na kondima kati na Klisto Yesu.”—2 Timoté 3:14, 15.
Kolakisama “longwa na bomwana”
Ntango Paulo alobaki ete Timoté alakisamaki kati na ‘Makomi na bulɛɛ longwa na bomwana,’ na ntembe te yango elimboli uta ntango azalaki mpenza bebe. Yango eyokani na kosalelama ya liloba ya Greke (breʹphos) oyo mbala mingi esalelamaka mpo na mwana oyo abotami sika. (Kokanisá na Luka 2:12, 16.) Boye, Yunike atyaki likebi na mokumba oyo Nzambe apesaki ye, alekisaki ntango te mpo na kobanda kopesa Timoté malako oyo masengelaki kosalisa ye ete akola kino kokóma mosaleli ya Nzambe oyo amipesi.—Deteronome 6:6-9; Masese 1:8.
Timoté “amemamaki na kondima” (NW) solo ya Makomami. Engebene moyekoli moko ya maloba ya Greke, liloba oyo Paulo asalelaki awa elimboli “kondimisama mpenza na; kozala na endimiseli na” likambo moko. Na ntembe te esengelaki ntango mpe milende mingi mpo na kokɔtisa kondimisama motindo wana na motema ya Timoté, kosalisa ye ete amanyola likoló na Liloba ya Nzambe mpe amonisa kondima kati na yango. Na bongo, emonani ete Yunike mpe Loidi basalaki molende makasi mpo na koteya Timoté kati na Makomami. Mpe basi yango oyo bazalaki na bobangi Nzambe babukaki solo mbuma malamu! Paulo akomaki na ntina na Timoté ete: “Nazwi ekaniseli mpo na kondima na solo oyo ezali kati na yo, oyo ezalaki liboso na nkɔkɔ na yo Loidi mpe na mama na yo Yunike; sasaipi nayebi solo ete ezali na yo.”—2 Timoté 1:5.
Yunike na Loidi bakokisaki mpenza mokumba monene kati na bomoi ya Timoté! Na ntina yango, mokomi David Read alobi ete: “Soki ntoma akanisaki ete eloko moko te ezalaki na ntina bobele mbongwana ya Timoté ye moko, mbɛlɛ akundwelaki ye yango liboso. Kasi likambo ya liboso alobaki na ntina na kondima ya Timoté ezalaki ete kondima yango ezalaki liboso ‘na Loidi . . . mpe Yunike.’” Maloba ya Paulo na ntina na kondima ya Loidi, Yunike, mpe Timoté mamonisi ete mbala mingi kolakisama kati na Makomami oyo epesami na ndako longwa na bomwana mpenza, na baboti mpe ata bankɔkɔ, ezali na ntina mingi mpo na kobongisa bokoli ya elimo ya elenge mpo na mikolo mizali koya. Yango esengeli kopusa basangani ya libota ete bákanisa na bozindo lolenge bazali kosala mpo na kokokisa mokumba na bango epai ya Nzambe mpe epai ya bana na bango, boye te?
Mbala mosusu Paulo azalaki kokanisa ezalela oyo Loidi mpe Yunike basalaki na yango kati na ndako na bango. Ekoki kozala ete ntoma akendaki kotala bango na ndako na bango ntango afandaki mbala ya liboso na Lusutula, pene na mobu 47 to 48 T.B. Ekoki kozala ete basi yango mibale bakómaki baklisto na ntango wana. (Misala 14:8-20) Mbala mosusu boyakani ya esengo mpe ya mɔ́tɔ oyo ezalaki na ndako wana epusaki Paulo na kopona maloba mabongi na ndenge abéngaki Loidi ete “nkɔkɔ” ya Timoté. Engebene nganga-mayele ya Biblia Ceslas Spicq, liloba ya Greke oyo asalelaki (mamʹme, na bokeseni na liloba oyo eyebani mpenza mpe ya limemya teʹthe) ezali “liloba oyo mwana asalelaka mpo na komonisa bolingo” mpo na nkɔkɔ na ye, oyo na lisolo oyo epesi “likanisi ya komesana mpe ya bolingo.”
Timoté atiki ndako
Eyebani mpenza te soki Yunike azalaki na mobali to te na ntango Paulo akendaki na Lusutula mpo na mbala ya mibale (soko na mobu 50 T.B.). Banganga-mayele ya Biblia mingi bakanisaka ete azalaki mwasi-mokufeli-mobali. Ezala ete ezalaki bongo to te, na litambwisi ya mama na ye mpe ya nkɔkɔ na ye, Timoté akolaki kino kokóma elenge malamu, akokaki kozala na mbula pene na 20 na ntango wana. “Bandeko na Lusutula mpe na Ikoni batatoli malamu na ntina na ye.” (Misala 16:2) Ɛɛ, mposa ya kopalangisa nsango malamu ya Bokonzi ekonamaki na motema ya Timoté, mpamba te andimaki libyangi ya Paulo mpo na kokende na ye na Sila na mobembo ya misionere.
Kanisá mayoki oyo Yunike na Loidi bazalaki na yango ntango Timoté alingaki kotika bango! Bayebaki ete na mobembo na ye ya liboso na engumba na bango, babolaki ntoma Paulo mabanga mpe batikaki ye lokola ebembe. (Misala 14:19) Na yango, ezalaki pɛtɛɛ te mpo ete bátika elenge Timoté akende. Ekoki kozala ete bamitunaki ntango boni akozala mosika na bango mpe soki akozanga malamu. Atako ekoki kozala ete bamitungisaki motindo wana, ntembe ezali te ete mama na ye mpe nkɔkɔ na ye balendisaki ye ete andima libaku malamu yango oyo elingaki kopesa ye nzela na kosalela Yehova mingi koleka.
Mateya ya ntina
Soki totaleli lisolo ya Yunike na Loidi na bozindo, tokoki kozwa mateya mingi. Kondima epusaki bango ete bábɔkɔla malamu Timoté na elimo. Ndakisa ya kokɔmɛla mpe ya kozanga kotɛngatɛnga kati na komipesa na Nzambe oyo bankɔkɔ bapesaka na bana ya bana na bango mpe bato mosusu, ekoki kozala na litomba mpo na lisangá mobimba ya boklisto. (Tito 2:3-5) Bobele bongo, ndakisa ya Yunike ezali kokundwela bamama oyo mibali na bango bazali bandimi te mokumba mpe mbano ya kopesa bana na bango malako ya elimo. Kosala bongo ekoki kosɛnga kozala na molende mingi na bantango mosusu, mingi mpenza soki tata azali kotɛmɛla bindimeli ya lingomba ya mwasi na ye. Esɛngeli mpe kozala na mayele, mpamba te mwasi moklisto asengeli komemya bokonzi ya mobali na ye.
Kondima, molende, mpe komipimela ya Loidi na Yunike ezwaki mbano na lolenge bamonaki Timoté kokola na elimo kino kokóma misionere mpe mokɛngɛli malamu. (Bafilipi 2:19-22) Bobele bongo, lelo oyo, koteya bana na biso solo ya Makomami esɛngaka ntango, motema molai, mpe etingya, kasi mbano malamu emonisaka ntina ya milende wana. Bilenge baklisto mingi oyo bazali ndakisa malamu bateyamaki ‘Makomi na bulɛɛ longwa na bomwana’ kati na libota oyo ekabwani na makambo ya losambo, bazali kopesa esengo mingi na moboti na bango oyo azali na bobangi Nzambe. Mpe yango emonisi bosolo ya lisese oyo elobi ete: ‘Ye oyo aboti mwana na mayele akomona esengo’!—Masese 23:23-25.
Ntoma Yoane alobaki na ntina na bana na ye ya elimo ete: “Nazali na esengo eleki oyo te ete nayoka ete bana na ngai bazali kotambola kati na makambo na solo.” (3 Yoane 4) Ya solo, mayoki mamonisami na maloba wana mazali mpe epai ya baboti mingi oyo basalaki lokola Yunike mpe Loidi, balakisi mibale oyo bapesaki ndakisa malamu.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Likambo oyo ete Loidi azalaki nkɔkɔ ya Timoté oyo abotaki Tata na ye te emonisami na lolenge maloba yango mabongolamaki na lokota Syriaque “mama ya mama na yo” na 2 Timoté 1:5.