-
Marko—‘Asalisaki mpo na mosala’Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2010 | Sanza ya 3 15
-
-
Ntango Paulo azalaki na bolɔkɔ na mbala ya mibale na Roma, na mobu soki 65 T.B., akomaki mokanda mpo na kobenga Timote na Efese. Paulo abakisaki boye: “Kamatá Marko mpe yaká na ye.” (2 Tim. 4:11) Na yango, Marko ayaki na Efese. Mpe ndenge nini tokoki kotya ntembe ete andimaki kozonga na Roma elongo na Timote ndenge Paulo asɛngaki? Kosala mobembo na ntango wana ezalaki pɛtɛɛ te, kasi Marko andimaki mpenza kosala mibembo yango.
-
-
Marko—‘Asalisaki mpo na mosala’Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2010 | Sanza ya 3 15
-
-
“Akosalisa ngai na mosala”
Kokoma Evanzile na ye ezalaki te kaka likambo moko oyo Marko asalaki na Roma. Tóbosana te ete Paulo alobaki na Timote ete: “Kamatá Marko mpe yaká na ye.” Paulo alobaki bongo mpo na nini? ‘Mpo akosalisa ye na mosala.’—2 Tim. 4:11.
Ndenge oyo Biblia elobeli Marko—na mbala oyo ya nsuka—elobi mingi na ntina na ye. Esika moko te na mosala oyo asalaki mpo na Nzambe batángi Marko lokola ntoma, mokambi, to mpe mosakoli. Azalaki mosaleli, elingi koloba, moto oyo azalaki kosunga mpe kosalela basusu. Mpe na ntango yango, mwa moke liboso Paulo akufa, na ntembe te Marko asungaki mpenza ntoma yango.
-