Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Tyeláká Yehova motema ntango nyonso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2015 | 15 Sanza ya 4
    • 2 Na eleko wana ya mpasi makasi, ntoma Paulo akangamaki na bolɔkɔ. Ekoki kozala ete azalaki komituna soki bandeko na ye bakristo bakosalisa ye mpo akanisaki lisusu na likambo moko oyo esalemaki liboso, mpe moto moko te asalisaki ye. Kasi Yehova asalisaki ntoma Paulo na nzela ya Nkolo Yesu. Ntoma Paulo akomaki boye: “Nkolo atɛlɛmaki pene na ngai mpe atondisaki ngai na nguya.” Yesu apesaki ntoma Paulo nguya oyo asengelaki na yango. Kutu ntoma Paulo akomaki ete ‘abikaki na monɔkɔ ya nkɔsi.’​—2 Timote 4:16, 17.a (Talá maloba na nse ya lokasa.)

      3 Ntoma Paulo amikundolaki ndenge Yehova asalisaki ye na ntango ya kala. Na yango, andimisamaki ete Yehova akopesa ye makasi oyo asengeli na yango mpo na koyika mpiko liboso ya mokakatano oyo azalaki na yango na ntango wana mpe mikakatano nyonso oyo asengelaki kokutana na yango. Andimisamaki mpenza na likambo yango mpe akomaki ete: “Nkolo akobikisa ngai na mosala nyonso ya mabe.” (2 Timote 4:18) Ntoma Paulo ayebaki ete ata na makambo oyo bandeko na ye bakristo bakokaki te kosalisa, asengelaki ntango nyonso kotya motema ete Yehova ná Yesu bakosalisa ye. Azalaki ata na ntembe moke te na makanisi na ye.

  • Tyeláká Yehova motema ntango nyonso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2015 | 15 Sanza ya 4
    • a Ekoki kozala ete ntoma Paulo abikaki mpenza liboso ya bankɔsi ya solo to na likambo moko ya likama mpenza.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto