Baklisto bazali na mokumba ya kosalisa mibange
“Kino ntango ya konuna, ngai oyo, kino nsuki ekómi pɛɛ ngai nakokumba bino.”—YISAYA 46:4.
1, 2. Ndenge nini lisalisi ya Tata na biso ya likoló ekeseni na oyo baboti bakoki kopesa bana na bango?
BABOTI babomaka nzoto mpo na koleisa bana na bango ntango babotami, ntango bazali mike, mpe ntango bazali kokola. Ata soki bana bakoli mpe bakómi na bandako na bango moko, batata mpe bamama na bango babosanaka bango te mpe basungaka bango.
2 Atako baboti bazali na likoki ya kosalisa bana na bango mpo na libela te, Tata na biso ya likoló azali ntango nyonso na likoki ya kosalisa mpe kobatela basaleli na ye ya sembo. Yehova alobaki na libota oyo aponaki na ntango ya kala boye: “Kino ntango ya konuna, ngai oyo, kino nsuki ekómi pɛɛ ngai nakokumba bino.” (Yisaya 46:4) Yango ezali mpenza maloba ya kolendisa mpo na baklisto oyo bakómi mibange! Yehova abosanaka te bato oyo batikalaka sembo epai na ye. Kutu, alaki ete akobatela, akosunga, mpe akotambwisa bango bomoi na bango mobimba, ata soki bakómi mibange.—Nzembo 48:14.
3. Tokotalela makambo nini na lisolo oyo?
3 Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yehova na oyo etali kolinga mpe kosalisa mibange? (Baefese 5:1, 2) Tótalela ndenge oyo bana oyo baboti na bango bakómi mibange, bankulutu, mpe baklisto mosusu bakoki kokokisa bamposa ya mibange na kati ya lisangá.
Mokumba ya bana oyo baboti na bango bakómi mibange
4. Baklisto bazali na mokumba nini epai ya baboti na bango?
4 “Kumisá tata na yo ná mama na yo.” (Baefese 6:2; Exode 20:12) Na maloba moke wana, kasi oyo elobi mingi, oyo azwaki na Makomami ya Liebele, ntoma Paulo amonisaki mokumba ya bana epai ya baboti na bango. Kasi, maloba yango elimboli nini na likambo etali kosalisa mibange? Mpo na kozwa eyano, tokotalela likambo moko esalemaká kala.
5. (a) Nini ezali komonisa ete Yozefe abosanaki te mokumba na ye epai ya tata na ye? (b) Kokumisa baboti na biso elimboli nini, mpe ndakisa malamu nini Yozefe apesaki na likambo yango?
5 Na boumeli ya mbula koleka 20, Yozefe azalaki na nsango te ya Yakobo, tata na ye oyo akómaki mobange. Kasi, emonani polele ete Yozefe azalaki kaka kolinga tata na ye. Yango wana, ntango Yozefe amimonisaki epai ya bandeko na ye, atunaki bango boye: “Tata na ngai atikali na bomoi?” (Genese 43:7, 27; 45:3) Na ntango wana, nzala makasi ekɔtaki na mokili ya Kanana. Yango wana, Yozefe atindelaki tata na ye maloba oyo: “Kitá epai na ngai mpe umelá te. Okofanda na mokili ya Gosene, mpe okozala penepene na ngai . . . mpe ngai nakoleisa yo kuna.” (Genese 45:9-11; 47:12) Ya solo, kokumisa baboti oyo bakómi mibange elimboli mpe kobatela bango mpe kosunga bango na bamposa na bango soki bango moko bazali lisusu na makoki ya kosala yango te. (1 Samwele 22:1-4; Yoane 19:25-27) Yozefe andimaki mokumba yango na esengo.
6. Ndenge nini Yozefe amonisaki ete alingaki mpenza tata na ye, mpe ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na ye?
6 Yehova apambolaki Yozefe mpe akómaki moto monene mpe ya bozwi mingi na Ezipito. (Genese 41:40) Kasi alobaki te ete lokola azali na lokumu to na mikumba mingi, azali na ntango te ya kokumisa tata na ye oyo azalaki na mbula 130. Ntango ayokaki ete Yakobo (to Yisalaele) azali koya, “Yozefe abongisaki likalo na ye mpe akendaki kozwana na Yisalaele, tata na ye, na Gosene. Akómaki epai na ye mpe akweaki na nkingo na ye mpe alelaki na nkingo na ye mwa molai.” (Genese 46:28, 29) Koyamba oyo akendaki koyamba ye ezalaki te kaka limemya ya likolólikoló. Yozefe alingaki mingi tata na ye oyo azalaki mobange mpe ayokaki nsɔni te mpo na komonisa bolingo yango. Soki biso mpe baboti na biso bazali mibange, toyokaka nsɔni te mpo na komonisa bango ete tolingaka bango?
7. Mpo na nini Yakobo asɛngaki bákunda ye na Kanana?
7 Yakobo akangamaki makasi na Yehova tii liwa na ye. (Baebele 11:21) Lokola Yakobo azalaki kondima bilaka ya Yehova, asɛngaki ete bákunda ye na Kanana. Yozefe akumisaki tata na ye na ndenge akokisaki mposa wana, atako yango esɛngaki mbongo mingi mpe makambo mingi.—Genese 47:29-31; 50:7-14.
8. (a) Wapi ntina ya liboso oyo tosengeli kosalisa baboti na biso oyo bakómi mibange? (b) Ndeko moko oyo azalaki na mosala ya ntango nyonso asalaki nini mpo na kosalisa baboti na ye oyo bakómaki mibange? (Talá etanda na lokasa 17.)
8 Nini etindaki Yozefe asalisa tata na ye? Atako alingaki ye mpo ye moto abotaki mpe abokɔlaki ye mpe azalaki komiyoka ete azali na nyongo epai na ye, na ntembe te Yozefe azalaki mpe na mposa makasi ya kosepelisa Yehova. Biso mpe tosengeli kozala na mposa wana. Paulo akomaki boye: “Soki mwasi moko oyo akufelá mobali azali na bana to bana ya bana, tiká ete bango báyekola liboso kosalela ezaleli ya kokangama na Nzambe na kati ya ndako na bango moko mpe bákoba kopesa lifuti oyo ekoki epai ya baboti na bango mpe bankɔkɔ na bango, mpo yango endimami na miso ya Nzambe.” (1 Timote 5:4) Soki mpenza tolingaka Yehova mpe tobangaka ye, yango ekotinda biso tósalisa baboti na biso oyo bakómi mibange, ata soki kosala yango ezali kopesa biso mikakatano nini.a
Ndenge bankulutu bamonisaka ete bamibanzabanzaka mpo na mibange
9. Yehova aponi banani mpo na kokamba etonga, ata mpe baklisto oyo bakómi mibange?
9 Ntango Yakobo akómaki pene na kokufa, abengaki Yehova ete “Nzambe oyo akambi ngai bomoi na ngai mobimba kino lelo oyo.” (Genese 48:15) Lelo oyo, Yehova azali kokamba basaleli na ye awa na mabelé na nzela ya bankulutu, oyo bazali kolanda malako ya Mwana na ye, Yesu Klisto, “mobateli ya mpate mokonzi.” (1 Petelo 5:2-4) Ndenge nini bankulutu bakoki kolanda ndakisa ya Yehova ntango bazali kosalisa mibange na kati ya etonga?
10. Nini esalemaki mpo na kosalisa baklisto oyo bazalaki mibange? (Talá etanda na lokasa 19.)
10 Ntango lisangá ya boklisto esalemaki sika, bantoma baponaki “mibali nsambo ya lokumu ya malamu . . . oyo batondi na elimo mpe na bwanya” mpo na mosala ya “kokabola biloko ya mokolo na mokolo” epai ya basi bakufelá mibali oyo bazalaki na bosɛnga. (Misala 6:1-6) Na nsima, Paulo apesaki mokɛngɛli Timote malako ete asala liste ya mibange basi bakufelá mibali oyo bazali na etamboli malamu, oyo esengelaki lisangá esalisaka bango. (1 Timote 5:3, 9, 10) Lelo oyo mpe ndenge moko, bakɛngɛli bazwaka bibongiseli mpo na kosalisa baklisto oyo bakómi mibange ntango bazali na bosɛnga. Kasi, kosalisa mibange ya sembo esɛngi makambo mingi.
11. Yesu alobaki nini mpo na mobola mwasi akufelá mobali oyo apesaki likabo moke?
11 Ntango Yesu akómaki na nsuka ya mosala na ye awa na mabelé, mokolo moko afandaki na tempelo mpe “abandaki kotala ndenge ebele wana ya bato bazalaki kotya mbongo na bakesi ya makabo.” Kasi, moto moko abendaki likebi na ye. Biblia elobi boye: “Mwasi mobola moko oyo akufelá mobali ayaki mpe atyaki mbongo mibale ya bibende, oyo ezalaki na motuya moke mpenza.” Yesu abengaki bayekoli na ye mpe alobaki na bango boye: “Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete mwasi mobola wana oyo akufelá mobali atye mingi koleka bato nyonso oyo batyaki mbongo na bakesi ya makabo; mpo bango nyonso batyaki oyo balongolaki na biloko na bango oyo eleki ebele, kasi ye, na kokelela na ye, atyaki nyonso oyo azalaki na yango, nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobikela.” (Malako 12:41-44) Soki totali valɛrɛ ya mbongo, likabo ya mwasi wana ezalaki moke, kasi Yesu ayebaki ete Tata na ye ya likoló asepelaka na moto oyo amonisi komipesa na ye na motema mobimba. Ezala mwasi yango akufelá mobali azalaki mobange to te, likambo oyo asalaki ebendaki likebi ya Yesu.
12. Ndenge nini bankulutu bakoki komonisa ete basepelaka na mosala oyo baklisto oyo bazali mibange bazali kosala?
12 Lokola Yesu, bankulutu mpe batyaka likebi na makambo oyo mibange basalaka mpo na losambo ya solo. Ebongi mpenza ete bankulutu bápesaka mibange longonya ndenge basakolaka, ndenge bapesaka biyano na makita, ndenge balendisaka lisangá, mpe mpo na ezaleli na bango ya koyika mpiko. Mwa maloba ya kolendisa oyo elobami na bosembo ekoki kosalisa mibange bámona “ntina ya komikumisa” na mosala na bango ya bosantu, mpe na bongo, báyokaka mawa te soki bakokanisi yango na oyo baklisto mosusu bazali kosala to na oyo bango moko bazalaki kosala liboso.—Bagalatia 6:4.
13. Ndenge nini bankulutu bakoki kozwa litomba na mayele mpe ebele ya makambo oyo mibange bayebi?
13 Bankulutu bakoki komonisa ete basepelaka na mokumba ya ntina mingi oyo mibange bazali kokokisa ntango bazali kosalela ebele ya makambo oyo bayebi mpe mayele na bango. Mbala na mbala bakoki koponaka mibange oyo bazali kopesa ndakisa malamu mpo na kosala bilakiseli to mpo na kotuna bango mituna. Nkulutu moko alobaki boye: “Bayoki batyaka mpenza matoi soki nazali kotuna ndeko moko ya mobange oyo abokɔlaki bana na ye na kati ya solo.” Bankulutu ya lisangá moko bakomaki ete ndeko mwasi moko mobongisi-nzela oyo azali mobange ya mbula 71 apesaka bango mpenza mabɔkɔ mpo na kosalisa basakoli ya Bokonzi bázongela kosakola sanza na sanza. Alendisaka bango mpe na kosala “makambo oyo eleki ntina,” na ndakisa kotánga Biblia mpe kotánga mokapo ya mokolo mpe komanyola makambo oyo batángi.
14. Ndenge nini bankulutu ya lisangá moko bamonisaki ete basepelaka na mosala ya moninga na bango nkulutu oyo azali mobange?
14 Bankulutu basepelaka mpe na lisalisi ya baninga na bango bakɛngɛli oyo bazali mibange. Eleki mwa basanza, basalaki José lipaso moko monene; ye azali na mbula koleka 70 mpe azali nkulutu banda bambula ebele. Lokola eumelaki mpo nzoto na ye ezonga makasi, akómaki na likanisi ya kotika mokumba ya mokɛngɛli-mokambi. José alobi boye: “Bankulutu mosusu balobaki na ngai makambo oyo nakanisaki ata moke te. Na esika bándima likanisi na ngai, batunaki ngai soki nazali na mposa ya lisalisi nini mpo na kokokisa mikumba na ngai.” Bankulutu oyo bazali mibange te basalisaki José akoba kokokisa na esengo mokumba na ye ya mokɛngɛli-mokambi, mpe yango ezali kosalisa lisangá mingi. Nkulutu mosusu ya lisangá yango alobaki boye: “Bandeko basepelaka mingi na ndenge oyo José akokisaka mokumba na ye ya nkulutu. Balingaka mpe bamemyaka ye mpo na mayele mpe ndakisa na ye ya kondima. Azali mpenza lipamboli mpo na lisangá na biso.”
Tósalisanaka
15. Mpo na nini baklisto nyonso basengeli komibanzabanza mpo na bolamu ya bandeko oyo bazali mibange?
15 Komibanzabanza mpo na mibange ezali kaka te mokumba ya bana na bango ná bankulutu. Paulo akokanisaki lisangá ya boklisto na nzoto ya moto ntango akomaki boye: “Nzambe asangisaki biteni ya nzoto, kopesáká lokumu ya mingi koleka epai ya eteni oyo ezalaki kozanga yango, na ntina ete bokabwani ezala te na kati ya nzoto, kasi ete binama na yango ezala na lobanzo motindo moko yango na yango.” (1 Bakolinti 12:24, 25) Libongoli mosusu ya Biblia elobi boye: “Biteni nyonso [ya nzoto] esalisanaka.” (Bible na Lingala ya lelo oyo) Mpo makambo etambola malamu na kati ya lisangá ya boklisto, ndeko mokomoko asengeli komibanzabanza mpo na bolamu ya baninga na ye bandimi, ata mpe mibange.—Bagalatia 6:2.
16. Na makita, ndenge nini tokoki komonisa ete tomibanzabanzaka mpo na mibange?
16 Tozwaka libaku malamu ya komonisa ete tokanisaka mibange ntango tokendaka na makita. (Bafilipi 2:4; Baebele 10:24, 25) Na makita, tolukaka kosolola na mibange? Ezali malamu tótunaka bango soki bazali nzoto kolɔngɔnɔ, kasi tokoki mpe ‘kokabela bango mwa likabo ya elimo,’ na ndakisa, kobɛtela bango mwa lisolo ya kolendisa to komonisa bango likanisi moko ya Biblia. Lokola mibange bazalaka na mokakatano mpo na kotambola, ezali malamu biso tókende esika oyo bazali na esika tózela bango báya esika biso tozali. Soki mobange moko ayokaka lisusu malamu te, ntango mosusu ekosɛnga tólobaka mwa makasi mpe tóbimisaka maloba polele. Mpo ‘kolendisana ezala na kati na biso,’ tosengeli koyokaka malamu makambo oyo mobange moko azali koloba na biso.—Baloma 1:11, 12.
17. Ndenge nini tokoki komonisa ete tomibanzabanzaka mpo na mibange oyo babimaka lisusu libándá te?
17 Ezali boni soki tozali na mibange oyo bakoki koyangana na makita te? Yakobo 1:27 emonisi ete tozali na mokumba ya “kobatela bitike ná basi bakufelá mibale na kati ya bolɔzi na bango.” Ndimbola mosusu ya verbe ya Grɛki oyo ebongolami na “kobatela” ezali “kokende kotala.” (Misala 15:36) Mibange basepelaka mingi soki tokei kotala bango! Ntango “mobange” Paulo azalaki na bolɔkɔ na Loma, soki na mobu 65 T.B., azalaki kaka ye moko. Azalaki na mposa makasi ya komona moninga na ye ya mosala Timote mpe akomelaki ye boye: “Salá nyonso ekoki na yo mpo oya epai na ngai noki.” (Filemona 9; 2 Timote 1:3, 4; 4:9) Atako bazali mpenza na bolɔkɔ te, mibange mosusu babimaka lisusu libándá te mpo na maladi. Ekoki kozala ete bazali koloba ete, ‘Salá nyonso oyo ekoki na yo mpo oya kotala ngai noki.’ Tokokisaka mposa na bango wana?
18. Soki tozali kotala mibange, yango ekoki kozala na matomba nini?
18 Tóbosana te ete soki tozali kokende kotala ndeko moko ya mobange, yango ekoki kozala na matomba mingi. Ntango moklisto moko nkombo na ye Onezifolo azalaki na Loma, alukaki Paulo makasi, amonaki ye, mpe na nsima ‘azalaki mbala na mbala kopesa ye mwa kopema.’ (2 Timote 1:16, 17) Ndeko mwasi moko ya mobange alobaki boye: “Nalingaka mpenza kolekisa ntango na bilenge. Eloko nasepelaka na yango ezali ete bazwaka ngai lokola ndeko na bango mpenza. Likambo yango elendisaka ngai mingi.” Moklisto mosusu oyo azali mpe mobange alobaki boye: “Nasepelaka mingi soki moto akomeli ngai mwa mokanda, abengi ngai na telefone mpo tósolola ata mwa miniti, to ayei kotala ngai. Ezalaka lokola nde apesi ngai kɔpɔ ya mai ya mpiɔ.”
Yehova apesaka baoyo basalisaka mibange mbano
19. Mapamboli nini tokozwa soki tozali kosalisa mibange?
19 Bato oyo basalisaka mibange bakoki kozwa mapamboli mingi. Kolekisa ntango na mibange mpe kozwa mayele epai na bango ezali libaku moko malamu. Bato oyo babatelaka mibange bayokaka esengo monene oyo moto azwaka na kopesa, mpe bayokaka ete bazali kosala mosala ya ntina mpe bazalaka na kimya ya motema mpo bakokisi mokumba oyo Biblia epesi bango. (Misala 20:35) Lisusu, baoyo basalisaka mibange basengeli kobanga te ete bakosundola bango ntango bango mpe bakokóma mibange. Liloba ya Nzambe elobi na biso boye: “Molimo ya kokabela akofulisama monene; ye oyo akomema mai akozwa mpe mai mpo na ye moko.”—Masese 11:25.
20, 21. Ndenge nini Yehova atalelaka baoyo basalisaka mibange, mpe ekateli nini tosengeli kozala na yango?
20 Yehova apesaka mbano epai ya bana oyo babangaka Nzambe, bakɛngɛli, mpe baklisto mosusu oyo bamipesaka mpo na kokokisa bamposa ya bandeko na bango oyo bazali mibange. Elimo ya ndenge wana eyokani na lisese oyo: “Ye oyo akoyokela babola mawa azali kodefisela [Yehova]; akozongisela ye lisungi malamu na ye lisusu.” (Masese 19:17) Soki bolingo ezali kotinda biso tósalisa bato mpamba mpe babola, Nzambe akomona lokola nde tozali kodefisa ye mpe akofuta yango na mapamboli oyo akosopela biso. Lisusu, akofuta biso mpo tozali kosalisa bandeko na biso basambeli ya Yehova oyo bazali mibange, oyo mingi na bango bazali ‘babola na oyo etali mokili kasi bato ya bomɛngo na kati ya kondima.’—Yakobo 2:5.
21 Nzambe afutaka moke te! Akopesa biso mpe bomoi ya seko. Ebele ya basaleli ya Yehova bakozwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé, epai mabe ya lisumu oyo bankɔkɔ na biso ya liboso batikelá biso ekozala lisusu te mpe mibange ya sembo bakokóma lisusu na nzoto makasi lokola bilenge. (Emoniseli 21:3-5) Liboso tókóma na ntango oyo tokozwa mapamboli wana, tiká tókoba kokokisa mokumba na biso ya kosalisa mibange.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa makanisi mosusu na ndenge ya kosalisa baboti oyo bakómi mibange, talá Lamuká! ya 8 Febwali 1994, nkasa 3,4-5, 6-10 (ebimeli ya Lifalanse).
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini bana bakoki kokumisa baboti na bango oyo bakómi mibange?
• Ndenge nini bankulutu bamonisaka ete basepelaka na bandeko oyo bazali mibange?
• Moklisto akoki kosala nini mpo na komonisa ete amibanzabanzaka mpo na mibange?
• Mapamboli nini tokozwa soki tozali kosalisa mibange?
[Etanda na lokasa 17]
Baboti na ye bakómaki na mposa ya moto asalisaka bango
Ntango Philip azalaki kosala lokola volontɛrɛ mpo na kotonga bandako na Liberia na 1999, azwaki nsango ete tata na ye azali kobɛla makasi. Lokola ayebaki ete mama na ye akokoka te kobunda na mokakatano yango ye moko, Philip azwaki ekateli ya kozonga na mboka na bango mpo na kosalisa tata na ye azwa nkisi ya monganga.
Philip alobaki boye: “Nazalaki na mawa mingi mpo na kozonga na mboka, kasi namonaki ete kobatela baboti na ngai nde mokumba na ngai ya liboso.” Na boumeli ya mbula misato, asalisaki baboti na ye mingi: atyaki bango na ndako ya malamu mpe, na lisalisi ya baklisto ya lisangá na bango, abongisaki ndako yango mpo tata na ye oyo azalaki moto ya maladi afandaka malamu.
Makambo nyonso wana esalisaki mama ya Philip mpo azala na mpasi mingi te mpo na kosalisa mobali na ye oyo azali na maladi makasi. Kala mingi te, babengisaki Philip mpo akende kosala na biro ya Batatoli ya Yehova na ekólo Macédoine.
[Etanda na lokasa 19]
Babosanaki bamposa na ye te
Ntango Ada, moklisto moko ya ekólo Australie oyo azali na mbula 85, azalaki lisusu kobima na ndako te mpo akómaki kobɛla, bankulutu ya lisangá babongisaki makambo mpo na kosalisa ye. Baponaki bandeko oyo bakokaki kosalisaka ye. Bandeko yango basepelaki mingi kosalelaka ye misala lokola kosukola ndako, kosukola bilamba, kolamba, kokende kosombela ye biloko.
Basalisaka ye ndenge wana banda mbula zomi sikoyo. Batatoli nyonso oyo basilá kosalisa Ada bazali koleka 30. Tii lelo oyo bakendaka kotala ye, batángelaka ye mikanda oyo elimbolaka Biblia, bapesaka nsango ya lisangá, ndenge ezali kokola na elimo, mpe mbala na mbala babondelaka na ye elongo.
Nkulutu moko ya lisangá na bango alobaki boye: “Bandeko oyo basalisaka Ada bamonaka ete ezali libaku malamu. Bosembo na ye na mosala ya Nzambe na boumeli ya bambula ebele ezali ndakisa mpo na bandeko mingi, mpe bamonaka ete bazali mpenza na mokumba ya kosalisa ye.”
[Elilingi na lokasa 16]
Tolakisaka mpenza baboti na biso oyo bakómi mibange ete tolingaka bango mingi?
[Bililingi na lokasa 18]
Moto nyonso na kati ya lisangá akoki komonisa bandeko oyo bakómi mibange ete alingaka bango