Bilenge, mikolo malamu mizali liboso na bino
ZÚZI moko oyo azalaki kosambisa euti koleka mwa mikolo alobaki ete: “[Kosangisa nzoto na makasi na mwasi] ebulunganisaka mayoki makasi, epesaka mpasi makasi mpe etikaka mpota na motema.” Etuluku moko ya bilenge mwambe, ya mbula 14 kino 18, bakangaki turiste moko ya mwasi na ekɔteli ya kartyé moko na engumba Londres, basangisaki na ye nzoto na makasi, mpe na nsima babwakaki ye na mai atako alobaki ete akokoka kobɛta mai te. Kútu, mama ya mwana moko kati na bilenge oyo basalaki likambo yango alobaki ete azwaki maladi mpe etikalaki moke ete abɛla ligboma ntango amonaki na bililingi ya televizyó makambo mwana na ye asalaki.
Likambo ya mawa, lisoló oyo emonisi makambo mazali kosalema lelo oyo kati na bato. Ezaleli ya makambo makasimakasi ekómi momeseno, ezala likambo litali koboma bato, kozanga boyokani kati na ndako, to kowelana kati na bikólo ya Balkans, ya Afrika ya ntéi mpe ya wɛ́sti, mpe bipai mosusu. Bilenge bazali kokóla na bisika ya bizaleli motindo yango, to mbala mingi bazali koyoka nsango na ntina na yango. Likambo ya kokamwa ezali te ete mingi kati na bango bazangi mayoki, “bazangi bolingo,” mpe bazangi “komipekisa.”—2 Timoté 3:3.
“Kongala”
Ntango ntoma moklisto Paulo akomaki mokanda na ye ya mibale epai na moninga na ye Timoté oyo azalaki nkulutu, Loma ezalaki nguya ya mokili mobimba. Likambo ya konyokola bato mpe bonyama ezalaki mingi na bisika ya masano ya Loma. Nzokande, Paulo akebisaki ete na mikolo mizalaki koya, ntango esengelaki kozala “mpasi mpo na koyikela yango mpiko.” (2 Timoté 3:1, NW) Likambo ya kosepelisa, liloba ya Greke oyo lizali komonisa ete ntango yango ekozala “mpasi mpo na koyikela yango mpiko” esangisi likanisi ya ezaleli na bango ya “kongala.” Mbula 30 liboso ete mokanda oyo ekomama, likambo moko lisalemaki na boumeli ya mosala ya Yesu awa na mabelé ezali komonisa eloko oyo esalaki ete eleko yango ezala ntango ya mpasi.
Yesu akómaki na ngámbo ya ɛ́sti ya Mai Monene ya Galilai. Ntango atambolaki na mabelé, mibali mibale batɛlɛmaki liboso na ye. Lolenge na bango ya nsɔ́mɔ mpe lolenge bangangaki emonisaki ete eloko moko ya mabe mpenza ezalaki kati na bango. ‘Bangalaki mingi,’ ya solo, bazalaki na bademó.a Makambo oyo bangangaki eutaki epai na bademó oyo bazalaki kopusa bango na misala ya mobulu. Bato yango bangangi ete, “Ɛ mwana na Nzambe biso na yo tozali na likambo nini? Oyei koyokisa biso mpasi liboso naino ntango ekómi te?” Bilimo mabe oyo bazalaki kati na bato wana mibale bayebaki malamumalamu ete Nzambe asili kobongisa ntango mpo na kokweisa bikateli na ye likoló na bademó. Yango ekolimbola kobomama na bango ya seko. Kasi kino ntango wana bazalaki kokóba kosalela nguya na bango oyo eleki nguya ya bato mpo na kobimisa mobulu na kongala. Bobele ekamwiseli Yesu asalaki mpo na kobengana bademó nde ebikisaki mibali wana mibale.—Matai 8:28-32; Yuda 6.
Lelo oyo, ntango mikóló na bilenge lokola, bazali kosala makambo lokola bato na ligboma, tosengeli komikundwela likambo wana. Mpo na nini? Mpamba te na ekeke oyo ya 20, tozali kokutana na mokakatano oyo eyebisamaki, lokola mokanda ya nsuka ya Biblia, Emoniseli, ezali kolimbola yango: “Mawa na mokili mpe na mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.” (Emoniseli 12:12) Yebá, ete, koyokisama nsɔni ya Satana ezali kolandana na “kongala mingi” mpamba te ayebi ete ntango na ye ezali mokuse.
Bapusami
Lokola yango elobelamaka mingi na zulunalo oyo, mobu 1914 emonaki kotyama ya Klisto Yesu lokola Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe na likoló. Na mbala moko, Yesu abundaki na monguna monene ya Nzambe, Satana. Na yango, Zábolo mpe bademó na ye babwakamaki longwa na likoló, mpe sikawa batyé likebi na bango likoló na mokili. (Emoniseli 12:7-9) Lokola esika na ye ya kosala bopusi ekómi mpenza moke, Satana “azali kotambola lokola nkosi konguluma, kolukáká soko akolya nani.” (1 Petelo 5:8) Banani bazali kokangama kozanga nkaká? Ebongi kokanisa ete ezali baoyo bakɔmɛli naino te na bomoi mpe na makambo matali boyokani kati na bato, boye te? Lelo bilenge bakómi biloko oyo Zábolo azali koluka. Na komipesáká mingi na miziki mpe na kolandáká kominanola, Zábolo azali kosakana na bango kozanga nkaká.—Baefese 6:11, 12.
Ata ntango bilenge bazali koluka kosala likambo moko mpo na kokóma na lokumu, bazali komona bango moko ete bazali kolónga te. Uta nsuka ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, baboti mingi kati na mikili oyo mizalaki na etumba mpe oyo babungisaki bozwi na bango bamekaki kopesa na mabota na bango lolenge ya bomoi oyo etondi na biloko ya mosuni mpo na kokitana bomoi bazalaki na yango liboso. Biloko ya mosuni, kominanola, mpe bisengo ekómaki mikano ya liboso. Mbuma nini emonanaki? Bato mingi banyokwamaki. Ntoma Paulo akebisaki Timoté ete: “Baoyo bazali na mposa na kozwa mosolo, bakokwea na kati na komekama mpe na lilonga, mpe kati na mposa ezangi ntina mpe ikoyokisa mpasi . . . Zambi mposa na mosolo ezali ntina na mabe nyonso. Mpo na yango, bamosusu . . . bamitoboli bango mpenza na bolɔ́zi mingi.” (1 Timoté 6:9, 10) Mingimingi, tozali lelo komona bato oyo bazali na biloko ya mosuni komitobola na ntina na nkita, mosolo, mpe mpasi na mayoki. Kati na bango ezali na ebele ya bilenge, oyo bazali konyokwama na mwango ya monguna monene ya Nzambe.
Nzokande, likambo ya esengo, nsango malamu ezali. Yango etaleli bilenge oyo mikolo malamu ezali liboso na bango. Yango ekozala lolenge nini?
Bólukaka mpe bokozwa
Bilenge mingi bazali na makanisi malamu. Bazali kobwaka mimeseno mabe oyo mizali komonana epai na mikóló. Bazali komikɔtisa te na makambo matali kozanga bosembo mpe ezalela ya kozanga bolingo oyo bakonzi mabe ya politiki mpe bato ya mombongo bazali komonisa. Soki ozali elenge mbala mosusu yango ezali lolenge omiyokaka.
Tótalela elenge mobali Cédric, oyo etikali moke ete akokisa mbula 20, oyo ndakisa na ye ezali bobele yango moko te.b Lokola azalaki mwana, azalaki kobanga mingi, azalaki mpe kobanga liwa. Azalaki komituna soki bomoi ezali na mokano nini. Lokola azalaki kozwa biyano na mituna na ye te kino akómaki na mbula 15, amipesaki ye moko na kokanisa mingi na ntina na bomoi elongo na bilenge mosusu oyo bazalaki na makanisi malamu. Azali komikundola ete: “Tozalaki komela bilangwiseli mpe kobɛta masoló na boumeli ya ntango molai. Ozali kondima ete moto nyonso azali kokanisa lokola yo, kasi ata moko te azali na biyano.”
Lokola bilenge mingi, Cédric, azali kopusama na mayoki makasi. Bobele komela bilangwiseli ekokaki te mpo na ye. Mosika te akómaki koyiba mpe kosala mombongo ya bilangwiseli. Akanisaki likambo mosusu. Abandaki koyiba bobele biloko oyo bato bazalaki kopesa ye komande ete ayibela bango. Andimi ete, “Nasepelaki na mosala yango. Kasi nayibaki biloko ya babólá te. Soki nayibi motuka, nazalaki kozongisa yango ndenge nazwaki yango. Soki nayibi na magazini, ezalaki bobele epai oyo bazali na assurance. Lolenge yango ya kokanisa endimisaki ngai ete nazalaki kosala makambo ya mabe te.” Ndenge okoki komizela na yango, nsukansuka Cédric akɔtaki bolɔ́kɔ.
Cédric amikundoli ete: “Marc, moninga moko mokangami, asololaki na ngai. Amonaki ete na lobɔkɔ na ngai nazalaki na nzɔlɔkɔ lokola ekulusu monene, atunaki ngai mpo na nini nazalaki na yango. Akanisaki ete yango ezalaki na ntina mpo na losambo na ngai.” Nsima ya pɔ́sɔ soko mibale, Marc apesaki Cédric mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis.c “‘Okoki kozala na bomoi ya seko’—maloba mokuse oyo ebendaki likebi na ngai na mbala moko. Ezali na ntina na yango nde tozalaki kosolola mbala na mbala, kasi toyebaki na bosikisiki te bosolo na ntina na bomoi ya seko.” Nsima ya masoló mingi elongo na Motatoli ya Yehova oyo azalaki koya koteya bato kati na bolɔ́kɔ, Cédric asosolaki ete eloko oyo azalaki koluka ekokaki kozwama—kasi bobele kati na banzela ya Nzambe.
Cédric alobi ete: “Mbala moko, natikaki kosangana na baninga na ngai ya kala, nasalaki bokóli ya nokinoki.” Bokóli na ye mpo na kozwa mayele mpe esengo ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Alobi ete: “Nazali ntango nyonso kosala makasi mpo na kokende liboso. Nazali kokeba na lolenge oyo nazali kokanisa.” Ɛɛ, Cédric sikawa andimi ete kopusama na makanisi malongobani te ememaki ye na motambo ya Zábolo, azalaki kokanisa ete mikano na ye mikokokisama bobele na kosala misala oyo mikosepelisa ye.
Likambo ya esengo, Cédric abimá na bolɔ́kɔ uta kala, mpe azali na esengo ya kosangana elongo na baninga oyo basili kozwa eloko oyo bazalaki koluka. Azali sikawa moko ya Batatoli ya Yehova mpe azali na elikya moko lokola bango ya kofanda na Paladiso awa na mabelé. Azali lisusu kozela na motema mɔ́tɔmɔ́tɔ nsuka ya bopusi ya Satana na mitindo na yango nyonso.
Ya solo, mikolo malamu ezali bobele liboso ya Cédric te; bilenge mosusu babɔkwamaki na baboti oyo babangaka Nzambe, oyo balónaki kati na bango bolingo ya solo ya Biblia.
Mateya ya Nzambe epesaka mbano
Salomo, Mokonzi na mayele na ntango ya kala akomaki ete: “Bɔkɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola; ekokóma ye monene akopɛngwa na yango te.” (Masese 22:6) Yango emonanaki solo epai na bilenge oyo na molimo na bango mobimba baponaki kolanda mitindá ya Biblia.
Sheila, Gordon, mpe Sara basalaki yango. Bazali komikundola ete baboti na bango bapesaki motuya mingi na botosi ya mitindá ya Yesu ya ‘kokende kozalisa bayekoli’ na kosakoláká nsango malamu ya Bokonzi. (Matai 24:14; 28:19, 20) Sheila azali komikundola ete: “Kati na bikateli nyonso oyo esengelaki kozwama, ngai na mama tozalaki kolobana ete, ‘Ekozala na bopusi nini likoló na mosala na biso ya kosakola?’” Andimi ete: “Totikaki misala mingi oyo tosilaki kobanda nsima ya kokanisa motindo yango,” mpe abakisi ete, “kasi tozwaki mapamboli mingi!” Ata na nsuka ya mosala oyo balekisaki mokolo mobimba na kotala bato na bandako na bango mpo na nsango malamu, Sheila na mama na ye bazalaki koyemba na nzela ya bozongi na ndako. Alobi ete, “Esengo na ngai ezalaki monene. Nakoki koyoka yango kino sikawa.”
Gordon azali komikundola esengo monene ayokaki na Mwapɔ́sɔ moko na mpokwa. “Babengisaki ngai na bandako ya bankulutu ya lisangá, kuna tozwaki libaku ya kotunana mituna na ntina na Biblia mpe kosolola masoló ya elimo. Tolendisamaki na kosimba na motó bavɛrsɛ́ ya Biblia, kosolola masoló ya Biblia kozanga kokakatana, kopesa baeksperiansi ya mosala ya kosakola, mpe koyeba ndenge mosala ya Bokonzi ezalaki kokóla. Makambo oyo nyonso masungaki ngai ete namityela moboko malamu mpe kolóna bolingo mpo na Yehova Nzambe.”
Sara azali komikundwela bampokwa ya esengo oyo alekisaki na kotaláká Batatoli. “Tozalaki kolya bilei esika moko. Mpo na kosukisa mokolo, tozalaki kobɛta piano, wana bamoko bazalaki koyemba nzembo ya Bokonzi ya Nzambe. Miziki esungaki biso mingi, mingimingi na boumeli ya bambula oyo tozalaki na eteyelo, mpamba te epesaki biso likoki ya kosala makambo lokola na libota.”
Ya solo, ezali bilenge nyonso te oyo bazali koluka kosepelisa Yehova nde bazali na mabaku ya kosepela kati na mabota. Nzokande, boyokani ya penepene elongo na mabota mosusu ya Batatoli na lisangá ezali kopesa bango libateli mpe ntina ya kozala kati na lisangá.
Bómibombela moboko malamu mpo na mikolo mizali liboso
Lelo bilenge basengeli kosala liponi. Bakoki kokóba elongo na mokili mabe oyo lokola ezali komizindisa na lombangu nyonso kino na libebi na “bolɔ́zi monene” oyo ezali koya, oyo Yesu asakolaki. To bakoki “kotyá elikya na bango epai na Nzambe . . . kotosa mibeko na ye,” ndenge Asafa mokomi na nzembo ayembaki na kopemama na elimo ya Nzambe. Botosi Nzambe ekobatela bango ete bákóma te “libota na kotosa te mpe oyo na kotomboka, libota na motema sembo te mpe elimo na bango endimanaki na Nzambe te.”—Matai 24:21; Nzembo 78:6-8.
Kati na masangá koleka 80 000 ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, okokuta ebele ya bilenge oyo okosepela na bango. Bazali kotya likebi na toli ya ntoma Paulo epai na elenge Timoté ete: “Tiká ete básala malamu, bázala bazwi na misala kitoko, bákabela bato biloko, básangana na bato, boye bakomitongela miboko kitoko mpo na ekeke ekoya.” Lokola litomba, “básimba [sikawa] bomoi na seko.” (1 Timoté 6:18, 19) Kende koyangana na makita ya baklisto yango ya solo mpo na koyeba makambo mingi na ntina na bango. Na bongo yo mpe okoki kozala na elikya ya mikolo malamu oyo mizali liboso na yo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a “Kongala” ebongolami na liloba ya Greke oyo esalelami na Matai 8:28 mpe na 2 Timoté 3:1.
b Topesi bango nkombo mosusu.
c Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Elilingi na lokasa 7]
Bademó bazalaki kati na bato ya “kongala mingi” oyo Yesu abikisaki
[Elilingi na lokasa 8]
Tómitongela ‘moboko malamu mpo na mikolo mizali liboso’