Mateya oyo mazali na litomba na mikolo na biso oyo ya mpasi mingi
“Kasi oyeba likambo oyo, ete na mikolo ya nsuka ntango ya mpasi ekozala. Kasi bato mabe mpe bakosi bakokóla longwa na mabe kino yango eleki mabe; bakozimbisa mpe bakozimbisama.”—2 TIMOTÉ 3:1, 13, NW.
1, 2. Mpo na nini tosengeli komibanzabanza mpo na mateya oyo tozali kolanda?
EZALI kosalisa yo to ezali nde kopesa yo mpasi? Mikakatano na yo mizali kobongisama, to mizali nde kobakisama? Ezali nini? Ezali bongo mateya. Ee, mateya makoki mpenza kosala bopusi monene likoló na bomoi na yo, mpo na kobongisa yango to mpo na kobebisa yango.
2 Balakisi misato ya eteyelo monene bautaki koyekola likambo yango mpe bamonisaki bosukisi ya bolukiluki na bango kati na Zulunalo ya boyekoli ya mangomba na motindo ya siansi (na Lingelesi). Ya solo, ekoki kozala ete bayekolaki bomoi na yo te to mpe oyo ya libota na yo te. Nzokande, bosukisi oyo bakómaki na yango emonisi ete boyokani ya sikikiki bozali kati na mateya mpe kolónga ya moto to kozanga kolónga na ye, na mikolo na biso oyo ya mpasi. Kati na lisoló oyo ekolanda, tokotalela makambo oyo bamonaki.
3, 4. Wapi mwa bilembeteli oyo bimonisi ete tozali kobika na ntango ya mpasi?
3 Kasi mpo na kobanda, motuna yango oyo: Ondimi mpenza ete tozali kobika na ntango ya mpasi? Soki ee, osengeli mpenza kozala na bilembeteli oyo bindimisi ete tozali kobika na “ntango ya mpasi.” (2 Timoté 3:1-5) Motindo oyo bato bazali komona mpasi mokeseni. Na ndakisa, osilá mbala mosusu koyoka nsango ya mikili oyo mizali sikawa kokabwana na bituluku mpo na bitumba kati na bituluku ya politiki oyo bizali kowela bokonzi. Na bisika mosusu, matáta kati na mangomba to kati na bikólo nde mazali kobomisa bato. Nzokande ezali bobele basodá te oyo bazali komona mpasi. Kanisá na ebele na basi mpe bilenge basi oyo babebisamaki, to na mibangé oyo bazali kozanga bilei, mɔ́tɔ mpo na koyotola to bazali kozanga ndako. Ebele na bato bazali konyokwama mingi, likambo oyo lizali komema ntalo monene ya bato ete bákima mboka na bango mpo na kokende na mboka mopaya mpe kondimáká bongo mpasi mingi oyo euti na likambo yango.
4 Ntango na biso emonisami mpe na mikakatano ya nkita, oyo mibimisi kokangama ya bakompanyi, kozanga mosala, benefisi na mosala ezali lisusu te, bato bazali kobimisama pension noki, kokita ya motuya ya mosolo, mpe kolya moke to bobele mbala moko. Ezali na makambo mosusu oyo okoki kobakisa na molɔngɔ́ oyo? Makambo yango makoki kozanga te. Bamilió mosusu kati na mokili bazali kokufa mpo na kozanga bilei mpe mpo na bokɔnɔ. Mbala mosusu osilá mpenza komona bafɔtɔ́ ya mibali, basi mpe bana oyo bakɔndakɔnda na Afrika ya Ɛ́sti. Bamilió na bato bazali konyokwama motindo moko na Azia.
5, 6. Mpo na nini tokoki koloba ete bokɔnɔ ezali mpe likambo mosusu ya monene ya ntango na biso oyo ya mpasi?
5 Biso banso tosilá koyoka nsango ya bokɔnɔ ya nsɔ́mɔ oyo bozali kobakisama sikawa. Na Yanuáli 25, 1993, zulunalo New York Times eyebisaki ete: “Kokóláká kati na pite, bokosi mpe myango ya bongo na bongo ya komibatela, bokɔnɔ ya SIDA na mikili ya Amérique latine elingi koleka oyo ezali kati na Etats-Unis. . . . Bokóli wana monene bouti na kopalangana na yango epai na . . . basi.” Na Ɔkɔtɔ́bɛ ya mobu 1992, zulunalo U.S.News & World Report elobaki ete: “Ekoki sikawa bobele mibu 20, mokambi ya makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na Etats-Unis, wana azalaki kokumisa moko na bolóngi boleki monene oyo ezwamá naino te kati na bobateli kolɔngɔ́nɔ́ ya bato, asakolaki ete eleko ya komitungisa ‘esili mpo na bokɔnɔ oyo bokopalanganaka.’” Kasi ezali boni lelo oyo? “Lopitalo etondi lisusu na bato ya bokɔnɔ oyo tokanisaki ete tolóngi yango. . . . Mikrobe ezali ntango nyonso kokólisa myango ya sika ya kokamwa oyo mizali kopesa yango makoki ya kozala liboso na nkisi ya sika. . . . ‘Tokɔti na eleko ya sika ya bokɔnɔ oyo bokopalanganaka.’”
6 Talá ndakisa moko, oyo zulunalo Newsweek ya Yanuáli 11, 1993, elobelaki: “Ekanisami ete mikrobe oyo ekopesaka malaria ezali mbula na mbula kozwa bato koleka bamilió 270, ezali koboma bato koleka bamilió 2 . . . mpe ezali kopesa na bato soko bamilió 100 mpasi makasi. . . . Bobele na ntango wana bokɔnɔ yango bozali kokoka kosilisama lisusu te na bankisi oyo ezalaki kosalelama kala. . . . Ekoki kozala ete mosika te mitindo misusu na yango mikokoka kosalisama lisusu te.” Yango ezali mpenza kobangisa.
7. Lolenge nini bato mingi bazali lelo oyo kosala liboso na mikakatano ya ntango oyo ya mpasi?
7 Mbala mosusu osilá komona ete na ntango na biso oyo ya mpasi bato mingi bazali koluka lisalisi mpo na kosilisa mikakatano na bango. Kanisá na baoyo bamibaloli epai na mikanda mitali lolenge ya kolónga bokɔnɔ ya kobulungana na makanisi to mikanda mitali bokɔnɔ mosusu ya ntango na biso. Basusu bazali koluka na motema likoló batoli na ntina na mikakatano ya libala, kobebisama ya bana, kolangwa masanga to komela bilangwiseli misusu, to na lolenge ya kobatela bokatikati kati na masengisi ya mosala na bango mpe mitungisi oyo bazali kokutana na yango na ndako. Ya solo, bazali mpenza na mposa ya lisalisi! Ozali nde kobundana na mokakatano motali yo moko, to ozali nde kotungisama na mpasi euti na bitumba, na nzala to na makámá? Ata soki mokakatano moko momonani ete mokoki kosila te, ozali na lotómo ya komituna ete: ‘Mpo na nini tokómi kino na ezalela oyo ya mpasi makasi motindo boye?’
8. Mpo na nini tosengeli komibalola epai na Biblia mpo na kozwa bososoli mpe litambwisi?
8 Ya solo, liboso ete tókoka mpenza kolónga mikakatano na biso mpe kosepela na bomoi, sikawa mpe na mikolo mizali koya, tosengeli koyeba mpo na nini tozali kobika na ntango oyo ya mpasi mingi. Ya solo, yango epesi moko na moko na biso ntina ya kotalela Biblia. Mpo na nini tozali kolobela Biblia? Mpamba te, bobele yango nde ezali na bisakweli ya solo, na makambo makomami liboso ete másalema, oyo mamonisi biso bantina ya bampasi na biso, esika tokómi mpe epai wapi tozali kokende.
Tózwa liteya na makambo ya kala
9, 10. Lolenge nini esakweli ya Yesu na Matai mokapo 24 ekokisamaki na ekeke ya liboso?
9 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Febwáli 15, 1994, epesaki lisusu bandimbola ya ntina ya esakweli monene na Yesu oyo ezali na Matai mokapo 24. Soki ofungoli Biblia na yo na mokapo yango, okomona na molɔngɔ́ 3, ete bantoma na Yesu batunaki ye elembo ya kozala na ye na mikolo mizali koya mpe ya nsuka ya ebongiseli na biloko oyo. Na nsima, na molɔngɔ́ 5 kino na molɔngɔ́ 14, Yesu asakolaki na ntina na ba Klisto ya lokuta, bitumba, kozanga bilei, minyoko ya baklisto, kotyolama ya mibeko mpe kosakolama monene na ntina na Bokonzi ya Nzambe.
10 Lisoló na bato limonisi ete makambo oyo masalemaki na nsuka ya ebongiseli ya Bayuda. Soki ozalaki na bomoi na ntango wana, mbɛlɛ okokaki komona ete ezalaki eleko ya mpasi, boye te? Atako bongo, makambo mazalaki kobɛlɛma epai na nsuka moko monene, bolózi boleki monene oyo elingaki kokwela Yelusaleme mpe ebongiseli ya Bayuda. Na molɔngɔ́ 15, tozali kotánga makambo oyo masalemaki ntango Baloma bazingaki Yelusaleme, na mobu 66 T.B. Makambo yango masukaki na bolózi oyo Yesu alobelaki na molɔngɔ́ 21—kobomama ya Yelusaleme na mobu 70 T.B, bolózi ya mpasi mingi oyo ekwelaki naino engumba wana te. Nzokande, oyebi ete, lisoló na bato esukaki bobele wana te, mpe ezali yango te oyo Yesu alingaki koloba. Na molɔngɔ́ 23 kino na molɔngɔ́ 28, amonisaki ete nsima na bolózi ya mobu 70 T.B., makambo mosusu masengelaki kobima.
11. Bokokani nini bozali kati na kokokisama ya Matai mokapo 24 na ekeke ya liboso mpe na ntango na biso?
11 Bato mosusu ya ntango na biso bazalaka na momeseno ya kotalela yango lokola makambo ya kala oyo mazali na ntina te. Yango ezali mpenza libungá. Kokokisama ya bisakweli wana ya kala ezali na ntina mingi. Mpo na nini? Mpamba te, bitumba, nzala, koningana ya mabelé, bampasi mpe minyoko oyo ekomáki na nsuka ya ebongiseli ya Bayuda esengelaki kokokisama na monene na yango nsima na kosuka ya “ntango na mabota,” na 1914. (Luka 21:24) Bato mingi oyo bazali naino na bomoi, bamonaki Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, ntango kokokisama oyo ya mikolo na biso ebandaki. Ata soki obotamaki nsima na 1914, ozali komona kokokisama ya esakweli na Yesu. Makambo oyo mazali koleka na ekeke oyo ya 20 matondi na bilembeteli oyo bimonisi ete tozali kobika na nsuka ya ebongiseli mabe ya ntango oyo.
12. Engebene maloba na Yesu, tosengeli komizela na komona nini?
12 Yango elimboli ete, “bolózi” oyo elobelami na Matai 24:29 esengeli naino koya. Ekosangisa komonana ya bilembo minene ya likoló oyo bato bakoki kokanisa yango te. Molɔngɔ́ ya 30 momonisi ete bato bakomona elembo moko ya lolenge mosusu—elembo oyo ekomonisa ete libebi libɛlɛmi. Engebene lisoló likokani na yango oyo lizali na Luka 21:25-28, na ntango wana, “bato bakosenjwa na nsɔmɔ na kotalela makambo makobima kati na mikili.” Lisoló ya Luka lilobi lisusu ete baklisto bakotombola mitó mpo ete kobikisama na bango esili mpenza kobɛlɛma.
13. Makambo nini mibale ya ntina oyo masengeli kobenda likebi na biso?
13 Mbala mosusu okoloba ete, ‘nyonso wana ezali malamu, kasi nakanisaki ete likambo ya ntina ezali ya koyeba lolenge nini nakoki kososola mpe kolónga mpasi oyo ya ntango na biso.’ Ozali na elónga. Mokano na biso ya liboso motali koluka koyeba mikakatano minene oyo mizali liboso na biso mpe lolenge tokoki kopɛngola yango. Mokano na biso ya mibale, oyo ekangami na mokano ya liboso, ezali bongo ya koyeba lolenge nini mateya ya Biblia makoki kosalisa biso lelo oyo, na kozala na bomoi moko ya malamu. Mpo na yango, fungolá Biblia na yo na 2 Timoté mokapo 3, talá lolenge nini maloba ya ntoma Paulo makosalisa yo na kolónga ntango oyo ya mpasi.
Esakweli oyo etali ntango na biso
14. Mpo na nini tokoki kondima ete botaleli ya 2 Timoté 3:1-5 ekoki kozala litomba mpo na biso?
14 Ntoma Paulo apemamaki na Nzambe ete akomela Timoté, moklisto ya sembo, ebele na batoli kitoko oyo esalisaki ye na kozala na bomoi moko ya malamu mpe ya esengo mingi. Eteni moko ya makambo oyo Paulo akomaki, esengelaki kokokisama na monene na yango na mikolo na biso. Ata soki okanisi ete oyebi yango malamu, landá sikawa na likebi nyonso maloba ya esakweli na 2 Timoté 3:1-5 (NW). Paulo akomaki ete: “Kasi oyeba likambo oyo, ete na mikolo ya nsuka ntango ya mpasi ekozala. Mpamba te bato bakozala balingi na bango moko, balingi na mosolo, bato na lofundo, bato na ngambo, batuki, bato bazangi botosi epai na baboti, bato bazangi matɔ́ndi, bato bazangi sembo, bato bazangi bolingo ya motema, bato bazangi boboto, batɔ́ngi, bato bazangi komipekisa, bato na yauli, bayini na malamu, basúli, bato na mitó makasi, bato bavimbi na lolendo, balingi na bisengo na esika ya kozala balingi na Nzambe, bazali na lolenge ya kosambela, kasi bazali koangana nguya na yango.”
15. Mpo na nini 2 Timote 3:1 esengeli mpenzampenza kosimba likebi na biso sikawa?
15 Soki otye likebi, okomona ete makambo 19 malobelami. Liboso ete tótalela yango mpe tókoka kozwela na yango litomba, tómeka naino kotalela esakweli wana na mobimba na yango. Talá na molɔngɔ́ 1. Paulo asakolaki ete: “Na mikolo ya nsuka ntango ya mpasi ekozala.” “Mikolo ya nsuka” oyo wapi? Bileko mingi bibéngami mikolo ya nsuka, na ndakisa mikolo ya nsuka ya Pompéi, na ntango ya kala, to mikolo ya nsuka ya mokonzi moko to ya libota moko oyo ezalaki koyangela. Ata Biblia mpe ezali kolobela ebele na mikolo ya nsuka, na ndakisa mikolo ya nsuka ya ebongiseli na Bayuda. (Misala 2:16, 17) Nzokande, Yesu atyelaki biso moboko mpo na kososola ete “mikolo ya nsuka” oyo ntoma Paulo azali kolobela etaleli ntango na biso.
16. Ezalela nini lisese ya nganu mpe matiti mabe lizalaki kosakola mpo na ntango na biso?
16 Yesu amonisaki yango wana apesaki lisese ya nganu (blé) mpe matiti mabe. Yango ekónamaki kati na elanga moko mpe batikaki ete yango ekóla esika moko. Alobaki ete nganu mpe matiti mabe ezali komonisa bato—baklisto ya solo mpe baklisto ya lokuta. Tozali kolobela esakweli oyo mpo ete yango emonisi ete ntango molai esengelaki koleka liboso ete nsuka ya ebongiseli mobimba oyo ya mabe eya. Ntango nsuka yango eyaki, eloko moko esengelaki komonana ete ekóli mingi. Eloko yango nini? Lipɛngwi, to kopɛngwa longwa na boklisto ya solo, oyo esengelaki kobota ebele na mbuma mabe. Bisakweli mosusu ya Biblia bizali kondimisa ete makambo yango masengelaki kobima na boumeli ya mikolo ya nsuka ya ebongiseli oyo mabe. Tozali kobika lelo oyo na ntango yango, elingi koloba na nsuka ya ebongiseli ya biloko.—Matai 13:24-30, 36-43.
17. Makambo nini makokani oyo 2 Timoté 3:1-5 epesi na ntina na nsuka ya ebongiseli ya biloko?
17 Okangi ntina na yango? 2 Timoté 3:1-5 emonisi elembo ya motindo moko ete na boumeli ya nsuka ya ebongiseli oyo, to na mikolo ya nsuka, mbuma oyo ebimisami na bato bazingi baklisto, ekozala mbuma mabe. Paulo alobaki te ete makambo 19 oyo matángami makozala mwango ya liboso ya komonisa ete mikolo ya nsuka mikómi. Kasi, akebisaki nde biso na ntina na makambo oyo tosengeli koyikela yango mpiko na boumeli ya mikolo ya nsuka. Molɔngɔ́ 1 molobeli “ntango ya mpasi.” Maloba wana mauti na Greke, oyo na kolanda liloba moko na moko elimboli “ntango eponami ya mabe.” (Kingdom Interlinear) Okanisi te ete liloba “mabe” ebongi mpenza mpo na kolimbola makambo oyo tozali kokutana na yango lelo oyo? Eteni oyo epemami ezali kolanda kopesa bososoli oyo bouti na Nzambe mpo na ntango na biso.
18. Tosengeli kotya likebi na biso likoló na nini wana tozali koyekola maloba ya esakweli ya Paulo?
18 Motuya oyo tozali kopesa na esakweli oyo esengeli kopesa biso nzela na kososola bandakisa ya mawa oyo ezali komonisa lolenge oyo ntango na biso ezali ya mpasi, to ya mabe. Kobosana te mikano mibale tozali na yango: (1) Kososola mikakatano oyo misali ete mikolo na biso mizala na mpasi mingi mpe lolenge oyo tokoki kopɛngola yango; (2) kolanda mateya oyo makoki solo kopesa litomba mpe oyo makoki kosalisa biso na kozala na bomoi moko ya malamu. Na bongo, na esika ete tólobela mingi makambo mabe, tokotya nde likebi na mateya oyo makoki kosalisa biso mpe mabota na biso, na “ntango oyo ya mpasi.”
Zwá matomba mingi
19. Bilembeteli nini osili komona oyo bindimisi ete bato bazali balingi na bango moko?
19 Ntoma Paulo abandi kotánga makambo yango na kosakoláká ete na mikolo ya nsuka “bato bakozala balingi na bango moko.” (2 Timoté 3:2) Alingaki koloba nini? Ya solo, na boumeli ya lisoló na bato, ezalaki na mibali mpe basi ya lofundo mpe ya moimi. Nzokande, ntembe ezali te ete mbeba yango epalangani mingi na mikolo na biso. Mpe eleki mpenza ndelo epai na bato mingi. Ekómi lolenge ya bomoi epai na bato ya politiki mpe epai na bato ya mombongo. Mibali mpe basi bazali kosala nyonso mpo na koluka nguya mpe lokumu. Mbala mingi, ata yango ezali kopesa basusu mpasi, mpamba te bato wana oyo bazali balingi na bango moko, bazali komibanzabanza ata moke te na lolenge oyo bazali kopesa bato mosusu mpasi. Baumelaka te na komema basusu na esambiselo mpe bazali kobuba bango. Okoki kososola sikawa mpo na nini bato mingi bazali kolobela yango lokola “libota ya bato oyo balobaka ete liboso ngai.” Bato oyo balukaka matomba na bango moko mpe bato ya moimi bayikani mingi.
20. Lolenge nini batoli ya Biblia ekeseni na ezaleli oyo epalangani mingi, oyo bato bazali na yango ya komilinga bango moko?
20 Tozali na mposa te ete bákundwela biso mikakatano oyo tokutanaki na yango elongo na bato oyo bazali “balingi na bango moko.” Nzokande, ezali solo ete na koyebisáká mabe wana polele, Biblia ezali nde kosalisa biso, mpamba te ezali koteya biso lolenge nini kokima motambo yango. Talá oyo yango ezali koloba: “Bowela koleka baninga ata moke te, bomikumisa te, kasi botika lofundu mpe moto nyonso atala baninga lokola nde baleki ye. Moto aluka bolamu na ye moko te, kasi aluka bolamu ya bato mosusu.” “Bolekisa ndelo ya makanisi na bino te. Kasi bozala na makanisi oyo ebongi.” Tozali kokuta batoli kitoko oyo na Filipi 2:3, 4 mpe na Roma 12:3 kati na Biblia Boyokani ya Sika.
21, 22. (a) Bilembeteli mingi nini tozali na yango ete batoli motindo wana ezali kopesa litomba na mikolo na biso? (b) Mbuma nini batoli ya Nzambe esili kobimisa epai na bato oyo bayebi kokanisa?
21 Basusu bakoki kotya ntembe, na kolobáká ete: ‘Nyonso wana ezali malamu, kasi ekoki kosalema te.’ Ya solo, ekoki kosalema! Ekoki kopesa matomba, mpe ezali lelo oyo kopesa matomba epai na bato ya mitindo nyonso. Na 1990, eteyelo monene ya Oxford ebimisaki búku oyo ezalaki na motó na likambo Matomba ya mangomba mike mpo na bato (na Lingelesi). Mokapo 8, oyo ezalaki na motó na likambo “Batatoli ya Yehova kati na mokili moko ya Katolike,” elobelaki bolukiluki moko oyo esalemaki na Belgique. Totángi boye ete: “Kolobáká na ntina na makambo kitoko oyo mabendaki bango na kokóma Batatoli, longola bobendami na bango mpo na ‘Solo’ yango moko, bato oyo batunamaki batángaki bizaleli kitoko mwa mingi. . . . Bosepeli, boninga, bolingo mpe bomoko ezalaki bizaleli oyo bizongelamaki mbala mingi koleka, kasi kolongobana mpe lolenge oyo moto na moto azali ‘kosalela mitinda ya Biblia’ ezalaki mpe bizaleli oyo Batatoli batalelaka yango na motuya mingi.”
22 Tokoki kokokanisa makambo nyonso wana na fɔtɔ́ moko oyo ekamatami na etalelo oyo ekolakisaka makambo mingi; soki na esika na yango osalelaki zoom (masini ya kobenda biloko penepene) to telephoto (masini oyo epesaka fɔtɔ́ monene ya biloko bizali mosika), okokaki komona na lolenge ya sikisiki, makambo mingi oyo mazali kosalema kati na bomoi ya bato mingi. Okokaki komona bato oyo kala bazalaki na lofundo, bato na makambo makasi to mpe na moimi mpenza, baoyo sikawa bakómi bato na bopɔlɔ, mibali mpe batata oyo bazali komonisa bolingo ya motema mpe boboto epai na basi na bango, na bana na bango mpe na bato mosusu. Ekoki lisusu kozala na basi oyo kala bazalaki komitombola likoló na basusu to bazalaki na makambo makasi, nzokande lelo oyo bazali kosalisa bato mosusu na koyeba nzela ya boklisto ya solosolo. Bandakisa motindo wana ezali mingi. Na bongo, kanisá na bosembo nyonso. Okolinga te kozala elongo na bato ya motindo wana, na esika ya kozala ntango nyonso elongo na mibali mpe basi oyo bazali balingi na bango moko? Yango ekokoka kopesa yo nzela na kolónga ntango na biso oyo ya mpasi mingi? Nzokande, kolanda mateya wana ya Biblia ekopesa yo esengo mingi, boye te?
23. Mpo na nini ekozala litomba kokóba botaleli ya 2 Timoté 3:2-5?
23 Totaleli bobele likambo ya liboso kati na makambo oyo Paulo atángi na 2 Timoté 3:2-5. Ezali boni mpo na makambo mosusu? Botaleli na yango ya sikisiki ekosalisa yo na kososola mikakatano minene ya ntango na biso mpo ete okoka kopɛngola yango? Ekosalisa yo na koyeba ezaleli nini ekomemela yo mpe balingami na yo bolamu mingi? Lisoló oyo likolanda likopesa yo biyano na mituna wana mpe mwango ya kozwa mapamboli mingi.
Makambo oyo tosengeli kosimba
◻ Wapi mwa bilembeteli oyo bimonisi ete tozali kobika na ntango ya mpasi mingi?
◻ Mpo na nini tokoki mpenza kondimisama ete tozali kobika na mikolo ya nsuka?
◻ Wapi makambo mibale ya ntina oyo tosimbi kati na boyekoli ya 2 Timoté 3:1-5?
◻ Na boumeli ya ntango oyo bato mingi bazali balingi na bango moko, lolenge nini mateya ya Biblia masili kosalisa libota ya Yehova?
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 8]
Photo top left: Andy Hernandez/Sipa Press; photo bottom right: Jose Nicolas/Sipa Press