MOKAPO 5
Bakɛngɛli mpo na kobatela etonga
NA BOUMELI ya mosala na ye awa na mabele, Yesu amonisaki ete azali “mobateli ya bampate oyo aleki malamu.” (Yoa. 10:11) Ntango amonaki ebele ya bato bazali kolanda ye na mposa mpenza, “ayokelaki bango mawa, mpo banyokwamaki mpe basundolamaki lokola bampate oyo ezangá mobateli.” (Mat. 9:36) Petro ná bantoma mosusu bamonaki ndenge azalaki kotyela bato likebi mpe kolinga bango. Yesu akesanaki mpenza na babateli ya mpate ya lokuta oyo bazalaki na Yisraele, oyo bazalaki kotyela bampate likebi te; bampate yango epalanganaki mpe ezalaki kokufa nzala na elimo! (Ezk. 34:7, 8) Ndakisa malamu oyo Yesu apesaki na ndenge na ye ya koteya mpe kobatela bampate tii kopesa bomoi na ye mpo na bango eteyaki bantoma ndenge ya kosalisa baoyo bazalaki na kondima bázonga epai ya Yehova, ‘mobateli ya mpate mpe mokɛngɛli ya milimo na bango.’—1 Pe. 2:25.
2 Mokolo moko, ntango Yesu asololaki na Petro, amonisaki ye polele ete koleisa bampate mpe kobatela yango ezali na ntina mingi. (Yoa. 21:15-17) Na ntembe te, likambo yango esimbaki mpenza motema ya ntoma Petro, mpe na nsima alendisaki bankulutu ya lisangá na siɛklɛ ya liboso na maloba oyo: “Bóbatela etonga ya Nzambe oyo bapesi na mabɔkɔ na bino, bósala yango na kotindikama te, kasi na motema moko; ezala te na kolinga litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe, kasi na motema ya esengo; bómikómisa te bakonzi ya baoyo bazali libula ya Nzambe, kasi bókóma nde bandakisa ya etonga.” (1 Pe. 5:1-3) Maloba ya ntoma Petro etali mpe bakɛngɛli na masangá lelo oyo. Ndenge moko na Yesu, bankulutu basengeli kopesa etonga ndakisa; bazalaka bato ya liboso ya komipesa na mosala ya Yehova na motema moko mpe na molende.—Ebr. 13:7.
Ndenge moko na Yesu, bankulutu basengeli kopesa etonga ndakisa; bazalaka bato ya liboso ya komipesa na mosala ya Yehova na motema moko mpe na molende
3 Tosengeli komonisa botɔndi epai ya bakɛngɛli oyo elimo santu etye na kati ya lisangá. Tozwaka bolamu mingi na mosala na bango. Na ndakisa, bakɛngɛli balendisaka moto nyonso na lisangá mpe batyelaka ye likebi. Pɔsɔ na pɔsɔ, batambwisaka na motema moko makita ya lisangá, epai bandeko nyonso baleisaka kondima na bango. (Rom. 12:8) Milende na bango mpo na kobatela etonga na makambo to na bato oyo bakoki kosala yango mabe esalaka ete tóbatelama na elimo. (Yis. 32:2; Tito 1:9-11) Ndenge bapesaka ndakisa na mosala ya kosakola elendisaka biso tósakolaka nsango malamu na molende sanza na sanza. (Ebr. 13:15-17) Na nzela ya “makabo [wana] oyo ezali bato,” Yehova apesi lisalisi oyo esengeli mpo na kotonga lisangá.—Ef. 4:8, 11, 12.
MASƐNGAMI YA BIBLIA MPO NA KOKÓMA MOKƐNGƐLI
4 Mpo lisangá ebatelama malamu, bandeko mibali oyo batyami bakɛngɛli basengeli kokokisa masɛngami oyo ezali na Liloba ya Nzambe. Tokoki koloba ete batyami na elimo santu kaka soki bakokisi masɛngami yango. (Mis. 20:28) Ezali solo ete masɛngami ya Biblia mpo na bakɛngɛli bakristo ezali pɛtɛɛ te, mpo kozala mokɛngɛli ezali mokumba ya lisɛki te. Kasi, masɛngami yango eleki mpasi te mpo na mibali oyo balingaka mpenza Yehova mpe bazalaka na mposa ete asalela bango. Bato nyonso basengeli komona polele ete bakɛngɛli bazali bato oyo basalelaka toli ya Biblia na makambo nyonso ya bomoi na bango ya mokolo na mokolo.
Mpo lisangá ebatelama malamu, bandeko mibali oyo batyami bakɛngɛli basengeli kokokisa masɛngami oyo ezali na Liloba ya Nzambe
5 Na mokanda ya liboso oyo ntoma Paulo akomelaki Timote mpe na mokanda oyo akomelaki Tito, amonisaki polele masɛngami ya Biblia mpo na kokóma mokɛngɛli. Na 1 Timote 3:1-7, totángi boye: “Soki moto azali koluka kosala mosala ya mokɛngɛli, azali na mposa ya mosala moko ya malamu mingi. Yango wana, mokɛngɛli asengeli kozala moto oyo azali na likambo te ya kofundama na yango, mobali ya mwasi kaka moko, moto oyo alekisaka ndelo te na bizaleli na ye, moto ya makanisi malamu, moto ya makambo na molɔngɔ, moyambi bapaya, moto oyo ayebi koteya, molangwi-masanga te mpe aswanaka na bato te, abɛtaka bato te, moto ya makambo makasimakasi te, moto oyo alingá bitumba te, moto oyo alingá mbongo te, moto oyo akambaka ndako na ye moko na ndenge ya malamu mpenza, oyo azali na bana oyo bazali na botosi mpe bazwaka makambo na lisɛki te (ya solo, soki moto ayebi kokamba ndako na ye moko te, ndenge nini akobatela lisangá ya Nzambe?) azala mondimi ya sika te, noki avimba na lolendo mpe azwa etumbu oyo bakatelá Zabolo. Lisusu, asengeli mpe kozala moto oyo bato ya libándá bazali kolobela ye malamu, mpo akwea te na nsɔni mpe na motambo ya Zabolo.”
6 Paulo akomelaki Tito boye: “Natikaki yo na Krɛtɛ mpo na ntina oyo: osembola makambo oyo ezali kotambola malamu te mpe otya bankulutu na engumba mokomoko, ndenge napesaki yo mitindo, soki azali mobali oyo afundami na likambo ata moko te, mobali ya mwasi kaka moko, oyo azali na bana oyo bazali bandimi oyo bafundami te mpo na bomoi ya mbindo mpe bazali mitó makasi te. Mpo mokɛngɛli asengeli kozala moto oyo afundami te mpo azali kapita ya Nzambe, azala matoi mangbongi te, asilikaka mpambampamba te, molangwi-masanga te mpe aswanaka na bato te, abɛtaka bato te, azala te moto ya lokoso oyo alukaka kozwa litomba na ndenge ya mabe, kasi azala nde moyambi bapaya, moto oyo alingaka makambo ya malamu, moto ya makanisi malamu, moyengebene, moto ya sembo, moto oyo amipekisaka, oyo akangami makasi na liloba ya sembo na ndenge na ye ya koteya, mpo ayeba kolendisa na mateya oyo epesaka litomba mpe ayeba kopamela batɛmɛli.”—Tito 1:5-9.
7 Atako masɛngami ya Biblia mpo na kokóma mokɛngɛli ekoki komonana lokola eleki ndelo, bandeko mibali basengeli kokakatana te mpo na komonisa ete bazali na mposa ya kozwa mikumba. Ntango bazali komonisa bizaleli malamu oyo esɛngami mpo na bakɛngɛli, bazali kolendisa bandeko mosusu ya lisangá básala mpe bongo. Ntoma Paulo akomaki ete “makabo oyo ezali bato” epesami “mpo na kosembolama ya basantu, mpo na mosala ya kosunga, mpo na kotongama ya nzoto ya Kristo, tii ntango biso nyonso tokokóma na bomoko na kondima mpe na boyebi ya solosolo ya Mwana ya Nzambe, na motindo ya moto oyo akoli mpenza, na bokoli mobimba ya Kristo.”—Ef. 4:8, 12, 13.
8 Bakɛngɛli bazalaka bana mike te to mibali oyo bakómi bandimi sika. Bazali nde mibali oyo bameseni na bomoi ya bokristo, oyo bayebi makambo ya Biblia malamu mpenza, bazali na bososoli ya mozindo ya Biblia mpe balingi mpenza lisangá. Bazali bato ya mpiko, babangaka te kosembola bato oyo basali mabe, mpo bákoka kobatela etonga mpo ete moto nyonso oyo azali koluka kolyela bandeko akoka kosala yango te. (Yis. 32:2) Bakɛngɛli bazali mibali oyo lisangá mobimba eyebi ete bakɔmeli na elimo mpe batyelaka etonga ya Nzambe likebi.
9 Bandeko oyo bakokisi masɛngami ya Biblia mpo na kozala bakɛngɛli bamonisaka ete bazali na bwanya na bomoi na bango. Soki mokɛngɛli abalá, asengeli kolanda malako oyo Yehova apesi mpo na libala, elingi koloba, kozala mobali ya mwasi kaka moko, mpe kozala moto oyo akambaka ndako na ye moko na ndenge ya malamu mpenza. Soki mokɛngɛli azali na bana oyo bazali bandimi oyo bazali na botosi mpe bazwaka makambo na lisɛki te mpe bafundami te mpo na bomoi ya mbindo mpe bazali mitó makasi te, bandeko ya lisangá bakoki kotyela mokɛngɛli yango motema mpe koluka toli epai na ye, mpo na makambo oyo etali libota mpe bomoi ya bokristo. Mokɛngɛli azali mpe moto oyo azali na likambo te ya kofundama na yango mpe oyo afundami na likambo ata moko te mpe azali moto oyo bato ya libándá bazali kolobela ye malamu. Esengeli kozala na likambo moko te oyo ekosala ete afundama ete azali na etamboli mabe, mpo yango ekoki kobebisa lokumu ya lisangá. Esengeli kozala te moto oyo azwaki mpamela mikolo eleki mpo na lisumu monene oyo asalaki. Na ndenge yango, bandeko ya lisangá bakolanda ndakisa na ye ya malamu mpe bakozala na esengo ya kotyela ye motema ete akobatela bango na elimo.—1 Ko. 11:1; 16:15, 16.
10 Na lisangá ya bokristo, mibali oyo bakokisi makambo wana bakoki kozala bankulutu mpo na kosalela lisangá, ndenge moko na bankulutu ya Yisraele, oyo Biblia elobi ete bazalaki “mibali ya bwanya mpe ya mayele mpe oyo bayebi makambo mingi.” (Mib. 1:13) Bankulutu bazali bato ya kozanga kokoka, kasi bayebani na lisangá mpe na bato oyo bafandi na bango ete bazali mibali ya bizaleli malamu, babangaka Nzambe, mpe bamonisi na boumeli ya ntango molai ete bomoi na bango mobimba etambwisami na mitinda ya Nzambe. Lokola bazali sembo, bazali na likoki ya koloba polelepolele mpe na bosembo na lisangá.—Rom. 3:23.
11 Mibali oyo bakokisi makambo oyo Biblia esɛngi mpo na kokóma bakɛngɛli bamonisaka ete balekisaka ndelo te na bizaleli na bango mpe na makambo oyo basɛngaka basusu. Basengeli kokangama na moto te, na eloko te to na likambo moko te na ndenge ya kolekisa ndelo. Kasi na bomoi na bango basengeli kozala na bokatikati mpe komipekisa. Basengeli komonisa ete balekisaka ndelo te na makambo lokola kolya, komɛla, kominanola, masano mpe kozwa mopɛpɛ. Basengeli kolekisa ndelo te na komɛla masanga, mpo báfunda bango te ete balangwe to bazali balangwi-masanga. Moto oyo makoki na ye ya kokanisa ebebá mpo na masanga ayebaka komipekisa te mpe akoki te kolandela bolamu ya elimo ya lisangá.
12 Mpo moto azala na mokumba ya kokɛngɛla lisangá, asengeli kozala moto oyo asalaka makambo na molɔngɔ. Ndenge oyo amonanaka na miso ya bato, ndako na ye mpe makambo oyo asalaka mokolo na mokolo esengeli komonisa ete azali na mimeseno malamu. Azali moto oyo alalisaka makambo te; ayebaka liboso nini asengeli kosala mpe azwaka bibongiseli oyo esengeli. Atosaka mitinda ya Biblia.
13 Mokɛngɛli asengeli kozala moto ya makambo makasimakasi te. Asengeli koyeba kosala na bomoko mpe koyokana na bankulutu mosusu na kati ya lisangani ya bankulutu. Asengeli kotalela makoki na ye na bokatikati mpe kosɛnga basusu te makambo oyo eleki makoki na bango. Lokola mokɛngɛli azali moto ya makambo makasimakasi te, asengeli te kokangama kaka na makanisi na ye moko, mpe kotalela yango lokola nde eleki ya bankulutu mosusu. Ekoki kozala ete basusu bazali na bizaleli oyo ye azangi, to bayebi makambo mosusu koleka ye. Nkulutu akomonisa ete azali moto ya makambo makasimakasi te soki makanisi oyo azali kopesa euti na Biblia mpe soki azali kosala makasi alanda ndakisa ya Yesu Kristo. (Flp. 2:2-8) Nkulutu azali moto oyo alingá bitumba te to abɛtaka bato te kasi apesaka basusu limemya, mpe atalelaka bango lokola baleki ye. Azalaka matoi mangbongi te, alingaka kaka kondimisa basusu makanisi na ye te to ndenge oyo ye azali kotalela makambo. Asilikaka mpambampamba te kasi azalaka nde moto ya kimya na boyokani na ye na basusu.
14 Moto oyo akokisi makambo oyo Biblia esɛngi mpo na kozala mokɛngɛli na lisangá asengeli mpe kozala moto ya makanisi malamu. Yango elingi koloba ete azalaka moto ya motema mpiɔ, azwaka bikateli mbangumbangu te. Ayebi malamu mitinda ya Yehova mpe ndenge ya kosalela yango. Moto oyo azali na makanisi malamu andimaka toli mpe atosaka malako. Azalaka na bokosi te, to na ezaleli ya liso na nse ya lokasa.
15 Ntoma Paulo akundwelaki Tito ete mokɛngɛli asengeli kozala moto oyo alingaka makambo ya malamu. Asengeli kozala moyengebene, mpe moto ya sembo. Bizaleli yango esengeli komonana na ndenge afandaka na bato mpe na ndenge akangamaka na makambo ya sembo mpe ya malamu. Asengeli kokangama na Yehova makasi mpenza, kotengatenga te; mpe asengeli ntango nyonso kolongisa mitinda ya boyengebene ntango azali kozwa bikateli. Ayebaka kobomba sekele. Azali mpenza moyambi-bapaya, moto oyo andimaka komipesa mpe kopesa biloko na ye mpo na bolamu ya basusu.—Mis. 20:33-35.
16 Mpo mokɛngɛli asala mosala na ye malamu, asengeli kozala moto oyo ayebi koteya. Na kotalela maloba oyo Paulo akomelaki Tito, mokɛngɛli asengeli kozala moto “oyo akangami makasi na liloba ya sembo na ndenge na ye ya koteya, mpo ayeba kolendisa na mateya oyo epesaka litomba mpe ayeba kopamela batɛmɛli.” (Tito 1:9) Asengeli koyeba kotinda bato bákanisa, kopesa bilembeteli ya makambo oyo azali koloba, kolonga maloba ya botɛmɛli, mpe kosalela Makomami mpo na kondimisa bato mpe kolendisa kondima na bango. Mokɛngɛli asalelaka mayele wana ya koteya ezala na eleko ya malamu to na eleko ya mpasi. (2 Tim. 4:2) Asengeli kozala na motema molai mpo akoka kopamela na boboto nyonso moto oyo asali libunga to kondimisa moto oyo azali na ntembe mpe kosalisa ye amonisa kondima na ye na misala malamu. Mpo na kokokisa lisɛngami wana ya ntina mingi, mokɛngɛli asengeli koyeba koteya liboso ya bato mingi, to liboso ya moto moko.
17 Ezali na ntina mingi ete bankulutu básakolaka na molende. Na likambo wana, esengeli mpe komonana polele ete bazali kosala makasi bálanda ndakisa ya Yesu, oyo azalaki kotya mosala ya kosakola nsango malamu na esika ya liboso. Yesu azalaki kotyela bayekoli na ye likebi, azalaki kosalisa bango bápalanganisa nsango malamu na molende. (Mrk. 1:38; Luka 8:1) Soki bankulutu bazali kosala makasi básakolaka na molende mpe bazali kolekisa ntango mingi na mosala yango atako bazali na makambo mingi ya kosala, yango ekotinda lisangá mobimba ezala mpe na molende lokola bango. Mpe soki bankulutu bazali kosakola na bato ya libota na bango mpe na bandeko ya lisangá, ‘bakolendisana.’—Rom. 1:11, 12.
18 Nyonso wana ekoki komonana lokola nde bazali kosɛnga bakɛngɛli makambo mingi. Ezali solo ete, mokɛngɛli moko te akokokisa na ndenge ya kokoka mpenza makambo nyonso oyo Biblia esɛngi. Kasi, moto oyo atyami nkulutu na lisangá asengeli ata moke te kozanga moko na bizaleli yango tii emonana polele ete azali na bolɛmbu makasi na likambo yango. Bankulutu nyonso bazalaka ndenge moko te; mosusu akoki kozala na makoki mosusu koleka baninga, nzokande baninga mpe bakoki koleka ye na makambo mosusu. Yango esalaka ete lisangani mobimba ya bankulutu ezala na bizaleli nyonso ya malamu mpenza oyo esengeli mpo na kokɛngɛla lisangá ya Nzambe malamu.
19 Ntango lisangani ya bankulutu elingi kotinda nkombo ya bandeko mpo bátyama bakɛngɛli, basengeli kobosana te maloba oyo ya ntoma Paulo: “Nazali koyebisa moto nyonso na kati na bino ete akanisa te ete azali koleka ndenge oyo ye azali mpenza; kasi akanisa nde na ndenge oyo ezali komonisa ete azali na makanisi malamu, moto na moto na kolanda bonene ya kondima oyo Nzambe akabeli ye.” (Rom. 12:3) Nkulutu mokomoko asengeli komona ete basusu baleki ye. Moko te asengeli koluka komimonisa “moyengebene koleka ndelo” ntango bazali kotalela makambo oyo Biblia esɛngi mpo na ndeko mosusu. (Mos. 7:16) Lokola lisangani ya bankulutu eyebi malamu makambo oyo Biblia esɛngi mpo na kozala mokɛngɛli, bakoluka koyeba soki ndeko oyo bazali kotalela akokisi yango na ndenge esengeli to te. Soki bankulutu babosani te ete biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, baboyi kopona bilongi mpe kosala makambo na bokosi ntango bazali kotinda nkombo ya bandeko oyo bakoki kozwa mikumba, bakomonisa ete bamemyaka mitinda ya sembo ya Yehova mpe balukaka bolamu ya lisangá. Bakosala libondeli ntango bazali kotalela bandeko oyo bakoki kozwa mikumba mpe bakolanda litambwisi ya elimo santu ya Nzambe. Yango ezali moko ya mikumba minene oyo bazali na yango, mpe basengeli kosala yango na boyokani na toli ya Paulo oyo elobi ete: “Kotyela moto mabɔkɔ nokinoki te.”—1 Tim. 5:21, 22.
MBUMA YA ELIMO
20 Mibali oyo bazali na makoki ya elimo bamonisaka ete batambwisami na elimo santu mpe bamonisaka mbuma na yango na bomoi na bango. Ntoma Paulo atángi bizaleli libwa ya mbuma ya elimo: “Bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu, kondima, motema pɛtɛɛ, komipekisa.” (Gal. 5:22, 23) Bakɛngɛli yango babɔndisaka bandeko mpe basalaka ete lisangá esala mosala mosantu na bomoko. Etamboli na bango mpe mbuma ya mosala na bango emonisaka polele ete batyami na elimo santu.—Mis. 20:28.
MIBALI OYO BASALAKA ETE BOMOKO EZALA
21 Bankulutu basengeli mpenza kosalaka elongo mpo bomoko ezala na lisangá. Ata soki bomoto na bango ekeseni mpenza, babatelaka bomoko kati na bango na ndenge bayokaka na limemya nyonso ntango moko na bango azali koloba, ata soki ekoki kokóma ete bázala na likanisi moko te na likambo oyo bazali kotalela. Soki likanisi oyo epesami ebuki etinda ya Biblia te, nkulutu mokomoko asengeli kondima kotika likanisi na ye mpe kokangama na ekateli oyo lisangani ya bankulutu ezwi. Moto oyo andimaka kotika likanisi na ye amonisaka ete atambwisami na “bwanya oyo euti na likoló” oyo ezali “kimya, makambo makasimakasi te.” (Yak. 3:17, 18) Nkulutu moko te asengeli kokanisa ete aleki bankulutu mosusu mpe nkulutu moko te asengeli koluka kokonza baninga. Ntango bankulutu bazali kosala na boyokani kati na bango mpo na bolamu ya lisangá, bazali mpenza kosala elongo na Yehova.—1 Ko., mok. 12; Kol. 2:19.
LUKÁ KOZWA MOKUMBA YANGO
22 Bandeko mibali oyo bakɔmeli na elimo basengeli kozala na mposa ya kokóma bakɛngɛli. (1 Tim. 3:1) Nzokande, kozala nkulutu esɛngaka kosala mingi mpe komipimela makambo mosusu. Yango elimboli kopesa ntango mpo na kotalela bamposa ya bandeko, kotya likebi na bamposa na bango ya elimo. Koluka kokóma mokɛngɛli elimboli kosala makasi mpo na kokokisa makambo oyo Nzambe asɛngi na Makomami.
MAKAMBO YA BOMOI YA NKULUTU MOKO EKOKI KOBONGWANA
23 Ndeko mobali moko oyo asaleli Yehova na bosembo bambula mingi akoki kobɛla to kozala na mikakatano mosusu ya nzoto. Ekoki kozala ete akómi mobange, mpe azali kokoka lisusu te komema mikumba na ye ya mokɛngɛli. Atako bongo, tosengeli kaka komemya ye mpe kotalela ye lokola nkulutu, ntango nyonso oyo akotikala na molɔngɔ ya bankulutu. Ezali na ntina te ete atika mokumba na ye kaka mpo azali lisusu na makoki nyonso te ya kosala yango. Abongi ntango nyonso kozwa lokumu mbala mibale lokola bankulutu nyonso oyo basalaka mosala makasi mpo na koleisa etonga, na kotalela makoki na bango.
24 Kasi soki ndeko moko amoni malamu kotika mokumba na ye mpo makambo ya bomoi na ye ebongwani mpe ekómi kopekisa ye komema mokumba yango malamu, akoki kotika. (1 Pe. 5:2) Lisangá esengeli kokoba kopesa ye limemya. Azali na likoki ya kosala makambo mingi ya malamu na lisangá, ata soki azali kozwa lisusu te mikumba oyo bapesaka bankulutu.
MIKUMBA NA LISANGÁ
25 Bankulutu bazalaka na mikumba ndenge na ndenge na lisangá. Ezali na mokambi-misala ya bankulutu, sɛkrɛtɛrɛ, mokɛngɛli na mosala ya kosakola, motambwisi ya Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe mokɛngɛli ya likita Bomoi mpe mosala. Bankulutu mingi bazalaka bakɛngɛli ya bituluku ya mosala ya kosakola. Bakatelaka bango te ntango boni bakosala mosala yango. Kasi soki ndeko oyo azali na moko ya mikumba yango akei na lisangá mosusu, to soki azali kokoka lisusu mokumba yango te mpo na maladi, to soki azali kosala lisusu te makambo oyo Biblia esɛngi, bakopona nkulutu mosusu mpo na mokumba yango. Na masangá oyo ezali na bakɛngɛli mingi te, ekoki kosɛnga ete nkulutu moko azala na mikumba mingi tii bandeko mibali mosusu bakokokisa masɛngami ya Biblia mpo na kotyama bankulutu.
26 Mokambi-misala ya bankulutu akambaka makita ya lisangani ya bankulutu. Lokola azali na mokumba wana, asalaka na komikitisa elongo na bankulutu mosusu mpo na kobatela etonga ya Nzambe. (Rom. 12:10; 1 Pe. 5:2, 3) Asengeli koyeba kobongisa makambo mpe kozala na likoki ya kokamba na lisɛki te.—Rom. 12:8.
27 Sɛkrɛtɛrɛ atalelaka badosye ya lisangá mpe alakisaka bankulutu mosusu mayebisi ya ntina oyo etali lisangá. Soki esengeli, nkulutu mosusu to mosaleli na misala moko ya makoki akoki kotyama mpo na kosalisa ye.
28 Mokɛngɛli na mosala ya kosakola atambwisaka mosala ya kosakola mpe makambo mosusu oyo etali mosala yango. Asalaka programɛ mpo na kotala bituluku nyonso ya mosala ya kosakola; na sanza moko, atalaka etuluku moko, na mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo. Na masangá ya mike oyo ezali na bituluku ya mosala ya kosakola mingi te, akoki kotalaka etuluku moko mbala mibale na mbula. Ntango ayei kotala etuluku moko, akotambwisa likita mpo na mosala ya kosakola, akobima na mosala ya kosakola na bandeko ya etuluku yango, mpe akosalisa basakoli ntango bazali kozongela bato mpe koyekola na bango Biblia.
BAKƐNGƐLI YA BITULUKU YA MOSALA YA KOSAKOLA
29 Moko ya mikumba ya ntina mingi na lisangá ezali ya kozala mokɛngɛli ya etuluku. Mokumba na ye esɛngi makambo oyo: (1) kotya likebi na elimo ya ndeko mokomoko ya etuluku; (2) kosalisa ndeko mokomoko ya etuluku abimaka na mosala ya kosakola sanza na sanza, amipesa na mosala yango, mpe asalaka yango na esengo; mpe (3) kosalisa mpe kopesa basaleli na misala formasyo mpo bákokisa makambo oyo Biblia esɛngi mpo na kozwa mikumba mosusu na lisangá. Lisangani ya bankulutu nde eponaka bandeko oyo babongi mpo na kokokisa makambo nyonso oyo mokumba yango esɛngi.
30 Lokola mokumba ya mokɛngɛli ya etuluku esɛngi makambo mingi, soki likoki ezali, esengeli kopesa yango bankulutu. Kasi, ekoki mpe kopesama na mosaleli na misala ya makoki tii ntango nkulutu moko akomonana. Mosaleli na misala oyo azali na mokumba wana akobengama mosaleli ya etuluku, mpo azali mokɛngɛli na kati ya lisangá te. Kasi, akolanda nde malako oyo bankulutu bakopesa ye mpo na mokumba na ye.
31 Likambo mosusu ya ntina mingi na mokumba ya mokɛngɛli ya etuluku ezali ete apesaka ndakisa mosala ya kosakola. Lokola asakolaka mbala na mbala, na molende mpe na esengo, yango elendisaka bandeko ya etuluku na ye. Lokola basakoli basepelaka na bilendiseli mpe lisalisi oyo bazwaka ntango bazali elongo, ekozala malamu kozala na programɛ ya mosala ya kosakola oyo ebongi na bandeko mingi ya etuluku. (Luka 10:1-16) Mokɛngɛli ya etuluku asengeli komindimisa ete bateritware ezali kaka ebele. Mbala mingi, ye nde atambwisaka likita mpo na mosala ya kosakola mpe akabolaka basakoli oyo bakobima na mosala yango. Soki ayebi ete akozala te, asengeli kozwa bibongiseli mpo ete nkulutu mosusu, mosaleli na misala moko, to soki bazali te, mosakoli moko ya makoki atambwisa likita mpo na mosala ya kosakola mpo basakoli bázwa malako oyo esengeli.
32 Mokɛngɛli ya etuluku asengeli komibongisa liboso mpe koyebisa bandeko ya etuluku na ye ntango oyo mokɛngɛli na mosala ya kosakola akoya, mpe koyebisa bango matomba oyo bakozwa. Soki bandeko nyonso ya etuluku bayebi malamu ebongiseli yango, bakozala na esengo ya kopesa mabɔkɔ.
33 Etuluku ya mosala ya kosakola esengeli kozala na basakoli moke. Yango ekopesa mokɛngɛli ya etuluku likoki ya komesana malamu na bandeko nyonso ya etuluku yango. Lokola azali mobateli ya mpate ya bolingo, atyelaka mpate mokomoko likebi. Asalaka nyonso mpo na kosalisa mpe kolendisa ndeko mokomoko asakolaka mingi mpe ayanganaka na makita nyonso ya lisangá. Asalaka mpe makasi asala likambo nyonso oyo ebongi mpo na kosalisa ndeko mokomoko azala makasi na elimo. Akendaka kotala bandeko oyo bazali kobɛla to konyokwama na makanisi. Maloba na ye ya kolendisa to toli na ye ekoki kotinda bandeko báluka kokokisa makambo Biblia esɛngi mpo na kozwa mikumba mosusu na lisangá, mpe na ndenge yango, bákoka kosalisa bandeko. Mokumba ya mokɛngɛli ya etuluku ezali libosoliboso ya kosalisa basakoli ya etuluku na ye. Kasi, lokola azali nkulutu mpe mobateli ya mpate, atyaka mpe likebi na bolingo mpenza na bandeko nyonso ya lisangá mobimba mpe azalaka pene ya kosalisa ndeko nyonso oyo asengeli na lisalisi.—Mis. 20:17, 28.
34 Mokumba mosusu ya mokɛngɛli ya etuluku ezali ya kozwa balapolo ya mosala ya kosakola ya basakoli nyonso ya etuluku na ye. Na nsima, apesaka sɛkrɛtɛrɛ balapolo yango. Mosakoli mokomoko akosalisa mokɛngɛli ya etuluku na bango soki azali kopesa lapolo na ye nokinoki. Akoki kopesa lapolo yango mbala moko epai ya mokɛngɛli ya etuluku na nsuka ya sanza nyonso to akoki kotya yango na kɛsi oyo ebongisami mpo na kotya balapolo na Ndako ya Bokonzi.
KOMITE YA MOSALA YA LISANGÁ
35 Mikumba mosusu ya lisangá esalemaka na Komite ya mosala ya lisangá. Komite ya mosala esalemi na mokambi-misala ya bankulutu, sɛkrɛtɛrɛ mpe mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Na ndakisa, komite yango nde epesaka nzela ya kosalela Ndako ya Bokonzi mpo na diskur ya libala to ya kokunda ebembe, mpe ezali bandeko ya komite yango nde bakabolaka basakoli na bituluku ya mosala ya kosakola. Batalelaka mpe soki bandeko oyo basɛngi mosala ya mobongisi-nzela mosungi, mobongisi-nzela ya sanza na sanza, to mikumba mosusu ya ndenge wana bakoki kondimama to te. Komite ya mosala esalaka na nse ya litambwisi ya lisangani ya bankulutu.
36 Biro ya filiale epesaka malako mpo na mikumba ya sikisiki oyo bandeko yango bakokisaka, ezala mpe mikumba ya ndeko oyo atambwisaka Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, ya mokɛngɛli ya likita Bomoi mpe mosala, mpe ya bankulutu mosusu na kati ya lisangani ya bankulutu.
37 Lisangani ya bankulutu ya lisangá mokomoko esalaka likita nsima ya mwa basanza mpo na kotala ndenge lisangá ezali kokola na elimo. Longola likita ya bankulutu oyo esalemaka na vizite ya mokɛngɛli ya zongazonga, bankulutu basengeli kosala likita mosusu sanza soki misato nsima ya vizite ya mokɛngɛli ya zongazonga. Kasi, bankulutu bakoki mpe kosala likita ntango nyonso oyo likambo moko ebimi mpe esɛngi bátalela yango.
TÓMIKITISA LIBOSO NA BANGO
38 Bakɛngɛli bazali bato ya kozanga kokoka; kasi Biblia elendisi bandeko nyonso ya lisangá bámikitisa liboso na bango mpo yango ezali ebongiseli ya Yehova. Bakɛngɛli bakozongisa monɔkɔ epai ya Yehova mpo na makambo oyo bakosala. Bazali bamonisi na ye mpe ya boyangeli na ye ya Teokrasi. Baebre 13:17 elobi ete: “Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bómikitisaka liboso na bango, mpo bazali kokɛngɛla milimo na bino lokola bato oyo bakozongisa monɔkɔ; mpo básalaka yango na esengo kasi na komilelalela te, mpo ekozala likama mpo na bino.” Lokola Yehova asalelaka elimo santu mpo na kotya moto nkulutu, akosalela kaka elimo santu yango mpo na kolongola moto mokumba ya mokɛngɛli soki azali komonisa lisusu mbuma ya elimo te mpe soki bomoi na ye emonisi ete azali kokokisa lisusu te makambo oyo Biblia esɛngi.
39 Tosepelaka mpenza na mosala makasi oyo bakɛngɛli basalaka mpe ndakisa malamu oyo bapesaka lisangá. Ntango ntoma Paulo akomelaki lisangá ya Tesaloniki, alendisaki bandeko yango na maloba oyo: “Tozali kosɛnga bino, bandeko, ete bózala na limemya epai ya baoyo bazali kosala mosala makasi na kati na bino mpe kokamba bino na kati ya Nkolo mpe kokebisa bino; mpe ete bópesa bango lokumu oyo eleki mpenza na kati ya bolingo mpo na mosala na bango.” (1 Tes. 5:12, 13) Mosala makasi oyo bakɛngɛli basalaka ezali kosala ete mosala oyo tozali kosalela Nzambe ezala pɛpɛlɛ mpe esepelisa biso mingi. Na mokanda ya liboso oyo ntoma Paulo akomelaki Timote, alobeli ezaleli oyo bandeko ya lisangá basengeli kozala na yango epai ya bakɛngɛli, alobi ete: “Bankulutu oyo bazali kokamba na ndenge ya malamu mpenza bátángama bato babongi na lokumu mbala mibale, mingimingi mpenza baoyo bazali kosala mosala makasi ya koloba mpe ya koteya.”—1 Tim. 5:17.
MIKUMBA MOSUSU YA BAKƐNGƐLI NA EBONGISELI YA YEHOVA
40 Ntango mosusu, bankulutu mosusu bazwaka mokumba ya kosala na Bituluku ya bandeko mpo na kotala bato ya maladi. Basusu basalaka na Bakomite ya boyokani elongo na minganga mpe bakendaka na balopitalo mpe epai ya minganga mpo na kolendisa bango ete, ntango bazali kosalisa Batatoli ya Yehova, bátyaka bango makila na nzoto te. Mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi, bakɛngɛli mosusu basalisaka na mosala ya kotonga mpe kobatela Bandako ya Bokonzi mpe Bandako ya Mayangani to bazalaka na kati ya Bakomite ya mayangani. Bandeko nyonso na ebongiseli ya Yehova bazalaka na botɔndi mingi mpo na mosala makasi ya bandeko yango mpe na ndenge bandimaka komipesa mpo na kosala misala wana. Ya solo, ‘tokobaka kolɛngɛla bato ya ndenge wana.’—Flp. 2:29.
MOKƐNGƐLI YA ZONGAZONGA
41 Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezwaka bibongiseli mpo bankulutu oyo babongi bátyama bakɛngɛli ya zongazonga. Biro ya filiale esɛngaka mokɛngɛli ya zongazonga atalaka masangá ya zongazonga na ye, mingimingi mbala mibale na mbula. Ntango mosusu, akendaka mpe kotala babongisi-nzela oyo bazali kosakola na bisika oyo ezali mosika na teritware ya masangá. Asalaka programɛ mpe atindaka liyebisi na masangá ntango molai liboso mpo viziti na ye epesa mpenza bandeko matomba.
42 Mokambi-misala ya bankulutu nde abongisaka makambo mpo vizite yango elendisa bato nyonso na elimo. (Rom. 1:11, 12) Soki kaka mokambi-misala ya bankulutu azwi liyebisi ete mokɛngɛli ya zongazonga azali koya mpe ayebi bamposa ya mokɛngɛli mpe ya mwasi na ye (soki abalá), akozwa bibongiseli elongo na bandeko mpo mokɛngɛli ya zongazonga azwa esika ya kolala mpe biloko mosusu ya ntina oyo asengeli na yango. Akosala ete moto nyonso, ezala mpe mokɛngɛli ya zongazonga yango, ayeba malamu bibongiseli yango.
43 Mokɛngɛli ya zongazonga akosolola na mokambi-misala ya bankulutu mpo na kobongisa programɛ ya makita, ezala mpe ya makita mpo na mosala ya kosakola. Bakotalela makanisi oyo mokɛngɛli ya zongazonga akopesa mpe malako oyo euti na biro ya filiale. Esengeli moto nyonso ayeba liboso ngonga ya makita ya lisangá, ya likita elongo na babongisi-nzela, elongo na bankulutu mpe basaleli na misala, ná bisika mpe ngonga ya makita mpo na mosala ya kosakola.
44 Mokolo ya mibale nsima ya midi, mokɛngɛli ya zongazonga atalelaka Bafishɛ ya lisangá mpo na mosakoli ná bafishɛ oyo bakomaka mitángo ya bato oyo bayanganaka na makita, badosye ya teritware mpe ya kɔnti. Yango ekosalisa ye ayeba malamu bisika oyo akoki kosalisa lisangá mpe ndenge oyo akoki kosalisa baoyo basimbaka badosye yango. Mokambi-misala ya bankulutu asengeli kozwa bibongiseli mpo ete mokɛngɛli azwa badosye wana nyonso liboso.
45 Ntango mokɛngɛli ya zongazonga ayei kotala lisangá moko, akozwa ntango ya kosolola na bandeko na ndenge oyo akoki, ezala na makita, na mosala ya kosakola, na ntango ya kolya, mpe na mabaku mosusu. Lisusu, akosala likita elongo na bankulutu mpe basaleli na misala. Akopesa bango toli, makanisi mpe bilendiseli ya Biblia oyo ebongi mpo esalisa bango básala malamu mosala ya kobatela etonga oyo bapesi na mabɔkɔ na bango. (Mas. 27:23; Mis. 20:26-32; 1 Tim. 4:11-16) Akosala mpe likita elongo na babongisi-nzela mpo na kolendisa bango mpe kosalisa mokomoko na mikakatano nyonso oyo mbala mosusu azali kokutana na yango na mosala ya kosakola.
46 Soki ezali na makambo mosusu oyo ezali kosɛnga ete bátyela yango likebi, mokɛngɛli ya zongazonga akosala nyonso oyo ekoki mpo na kotalela yango na pɔsɔ wana. Soki basilisi yango te na ntango wana, mokɛngɛli ya zongazonga akoki kosalisa bankulutu to baoyo likambo yango etali básala bolukiluki mpo na koyeba malako ya Biblia oyo bakoki kosalela. Soki esɛngi ete biro ya filiale elandela likambo yango, mokɛngɛli ya zongazonga ná bankulutu bakotinda na biro ya filiale lapolo oyo emonisi likambo yango polelepolele.
47 Ntango mokɛngɛli ya zongazonga azali kotala lisangá moko, akoyangana na makita ya lisangá yango. Esɛngaka mbala mosusu kobongisa mikolo ya makita yango na kolanda malako oyo eutaka na biro ya filiale. Akosala badiskur mpo na kolendisa, kopesa bandeko mposa ya kosala, koteya mpe kopesa lisangá makasi. Akosala nyonso alendisa bandeko bálinga Yehova, Yesu Kristo mpe ebongiseli ya Yehova.
48 Moko ya bantina oyo mokɛngɛli ya zongazonga atalaka masangá ezali mpo na kolendisa bandeko básakola na molende mpe kopesa malako oyo ebongi. Basakoli mingi na lisangá bakoki kobongisa programɛ na bango mpo básakola mingi na pɔsɔ yango, mbala mosusu bakoki komibongisa mpo na kozala babongisi-nzela basungi na sanza oyo mokɛngɛli ya zongazonga akotala lisangá na bango. Basakoli oyo balingi kosakola elongo na ye to mwasi na ye bakoki kopesa nkombo liboso. Mokɛngɛli ya zongazonga to mwasi na ye bakoki kosalisa mingi soki tomemi bango epai ya bato oyo toyekolaka na bango Biblia to baoyo tozongelaka mpo basepeli na solo. Milende nyonso oyo okosala mpo na kosakola mingi na boumeli ya pɔsɔ yango ezali na motuya mingi.—Mas. 27:17.
49 Mbula na mbula, zongazonga nyonso esalaka mayangani ya zongazonga mibale. Mokɛngɛli ya zongazonga nde azali na mokumba ya kobongisa makambo mpo mayangani yango eleka malamu. Mokɛngɛli ya zongazonga atyaka mokɛngɛli ya liyangani mpe mosungi ya mokɛngɛli ya liyangani. Bandeko yango basengeli kosala elongo na mokɛngɛli ya zongazonga mpo na kobongisa mayangani. Lisalisi na bango ekopesa mokɛngɛli ya zongazonga likoki ya kotya likebi na ye libosoliboso na mateya ya liyangani. Mokɛngɛli ya zongazonga aponaka mpe bandeko mosusu ya makoki mpo na kotambwisa misala na badepartema ndenge na ndenge ya liyangani. Akozwa mpe bibongiseli ya kotalela kɔnti ya zongazonga nsima ya liyangani mokomoko. Ndeko moko oyo azali momonisi ya Betele akozala molobi-mopaya na liyangani moko ya zongazonga. Na bisika oyo basakoli mosusu bautaka mosika to soki esika ya liyangani ezali moke, bakabolaka bazongazonga mosusu na biteni oyo mokomoko na yango ekosala liyangani ya zongazonga.
50 Mokɛngɛli ya zongazonga atindaka lapolo na ye ya mosala ya kosakola mbala moko na biro ya filiale na nsuka ya sanza nyonso. Soki abimisaki mwa mbongo mpo na makambo lokola mobembo, kolya, esika ya kolala, mpe biloko mosusu oyo asengelaki na yango mpo na mosala na ye, mpe soki masangá ezongiseli ye mbongo yango te, akoki koyebisa biro ya filiale mpo ezongisela ye yango. Bamonisi yango oyo batambolaka na masangá batyaka motema ete soki batye makambo ya Bokonzi ya Yehova na esika ya liboso, bosɛnga na bango ya mosuni ekokokisama, kaka ndenge Yesu alakaki. (Luka 12:31) Masangá esengeli kobosana te ete ezali na libaku malamu ya koyamba bankulutu wana oyo bamipesi mobimba mpo na kosalela bandeko.—3 Yoa. 5-8.
KOMITE YA FILIALE
51 Na biro ya filiale nyonso ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, bandeko mibali misato to koleka, oyo bazali na makoki mpe bakɔmeli na elimo basalaka na Komite ya filiale mpo na kotambwisa mosala ya kosakola na ekólo to bikólo oyo filiale na bango etalelaka. Moko ya bandeko yango ya komite azalaka kordinatɛrɛ ya Komite ya filiale.
52 Bandeko oyo bazali na Komite ya filiale batalelaka makambo ya masangá nyonso ya teritware ya filiale yango. Komite yango ekambaka mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na teritware mobimba ya filiale. Elandelaka mpe ete masangá mpe bazongazonga ebongisama mpo na kokokisa malamu mposa ya teritware. Komite ya filiale etyaka mpe likebi na mosala ya bamisionɛrɛ, ya babongisi-nzela monene, ya babongisi-nzela ya sanza na sanza mpe ya babongisi-nzela basungi. Na ntango ya mayangani ya mike mpe ya minene, komite yango ezwaka bibongiseli mpe epesaka bandeko mikumba mpo “makambo nyonso esalema na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.”—1 Ko. 14:40.
53 Na bikólo mosusu oyo mosala na bango ya kosakola ezali kotalelama na Komite ya filiale oyo ezali na ekólo mosusu, Komite ya ekólo etyamaka. Yango esalaka ete bakɛngɛli oyo bazali na Komite ya ekólo yango bátala malamumalamu ndenge mosala ezali kotambola esika bazali. Komite yango etalelaka makambo etali bisika ya kofanda na Betele mpe mosala, ezwaka mikanda mpe balapolo oyo batindelaka yango mpe ezongisaka biyano na mikanda yango, mpe mbala mingi etalelaka makambo ya mosala ya kosakola. Komite ya ekólo esalaka na boyokani na Komite ya filiale mpo mosala ya Bokonzi ekende liboso.
54 Lisangani ya Mikóló-Bakambi nde etyaka bandeko nyonso oyo bazali na Komite ya filiale mpe na Komite ya ekólo.
BAMONISI YA BIRO MONENE
55 Mbala na mbala, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezwaka bibongiseli mpo na kotinda bandeko mibali oyo babongi bákende kotala bafiliale nyonso na mabele mobimba. Babengaka ndeko yango momonisi ya biro monene. Mosala na ye ya libosoliboso ezali ya kolendisa libota ya Betele mpe kosalisa Komite ya filiale na mikakatano to mituna oyo bakoki kozala na yango mpo na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli. Ndeko yango asalaka mpe likita elongo na bakɛngɛli ya zongazonga oyo baponami mpe na bantango mosusu akutanaka na bamisionɛrɛ oyo bazali kosala na teritware. Na libaku yango, asololaka na bango mpo na koyeba mikakatano mpe bamposa na bango, mpe alendisaka bango na mosala ya ntina mingi oyo bazali kosala, elingi koloba kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli.
56 Momonisi ya biro monene azalaka mpenza na mposa ya koyeba makambo oyo ezali kosalema na teritware mpo na mosala ya kosakola Bokonzi mpe makambo mosusu ya masangá. Soki likoki ezali, akoki mpe kokende kotala babiro ya kobongola mikanda oyo etyami na bitúká mosusu. Ntango momonisi ya biro monene azali kotala filiale, abimaka mpe na mosala ya kosakola Bokonzi soki likoki ezali.
Ntango tozali kokoba komikitisa liboso ya bakɛngɛli oyo batyami mpo na kobatela etonga, tokokóma na bomoko elongo na Mokonzi ya lisangá, Kristo Yesu
BAKƐNGƐLI YA BOLINGO
57 Tozwaka matomba mingi na mosala makasi mpe na lisalisi ya bolingo ya bandeko mibali oyo bakɔmeli na elimo. Ntango tozali kokoba komikitisa liboso ya bakɛngɛli oyo batyami mpo na kobatela etonga, tokokóma na bomoko elongo na Mokonzi ya lisangá, Kristo Yesu. (1 Ko. 16:15-18; Ef. 1:22, 23) Yango ekosala ete elimo ya Nzambe esala na masangá ya mokili mobimba, mpe Liloba ya Nzambe etambwisa mosala na mabele mobimba.—Nz. 119:105.