Okokisi masengami mpo na kozwa mokumba?
“Kobonga na biso euti epai na Nzambe.”—2 BAKOLINTI 3:5.
1. Bato ya motindo nini bazali na esika te kati na lisangá ya boklisto?
JÉHOVAH NZAMBE mpe Yesu Klisto bazali kosala mingi. Yesu alobaki ete: “Tata na ngai azali naino kosala mosala, ngai mpe nazali kosala.” (Yoane 5:17) Nzambe asepelaka te na bato oyo bazali koboya kosala, soko mpe na baoyo bazali koluka mikumba mpo na kozala na bokonzi likoló na bamosusu. Bato na goigoi to bato na lolendo oyo bazali koluka bokonzi, bazali na esika te kati na lisangá ya boklisto.—Matai 20:25-27; 2 Batesalonike 3:10.
2. Mpo na nini sikawa mposa ya mibali oyo bakoki komema mikumba kati na lisangá ya boklisto ezali monene?
2 Ba Témoins de Jéhovah “bazali na mosala mingi kati na Nkolo”, mingi mpenza na mikolo na biso ntango oyo ebele na bato bazali kosopana epai na “ngomba” ya losambo na solo. (1 Bakolinti 15:58; Yisaya 2:2-4) Mposa ya mibali bateli na elimo mpo na komema mikumba kati na lisangá ezali monene. Mibali yango, baoyo bapusami na mposa mabe te ya koluka bokonzi, bazali nde kokumisa Jéhovah, kasi bango moko te. (Masese 8:13) Bayebi ete Nzambe azali kosalisa bango na kokokisa masengami mpo na kozwa mikumba misusu kati na lisangá, lokola azali mpe ‘kobongisa basali ya kondimana na sika.’—2 Bakolinti 3:4-6.
3. Mikumba ya libosoliboso ya bankulutu mpe basaleli na misala ezali nini?
3 Lokola ezalaki bongo epai ya boklisto ya liboso, na mikolo na biso mpe elimo santu esili kopona mibali lokola bankulutu to basaleli na misala engebene bibongiseli oyo Jéhovah akamataki mpo na litambwisi malamu ya lisangá. (Misala 20:28; Bafilipi 1:1; Tito 1:5) Bankulutu bazali kokengela etonga ya Nzambe na elimo mpo na kobatela yango. Basungami na basaleli na misala, oyo mikumba na bango mitali mpenza kokengela na elimo te. (1 Petelo 5:2; tala Misala 6:1-6) Lokola Mwana na Nzambe, oyo ayaki mpo na kosalela, baklisto yango bazali na mposa ya kosalela bandeko na bango kati na kondima (Malako 10:45) Soki ozali mobali, ozali nde na mposa yango?
Masengami oyo bango nyonso basengeli kokokisa
4. Epai wapi mpenza bayebisi masengami ya bato oyo bazali na mikumba kati na lisangá?
4 Masengami na baoyo bazali na mikumba kati na lisangá mayebisami mpenza na ntoma Paulo kati na 1 Timote 3:1-10, 12, 13 mpe Tito 1:5-9. Tokotalela masengami yango, oyo misusu kati na yango etaleli bankulutu mpe basaleli na misala; nzokande, tosengeli kotalela yango te lokola masengami ya mokili, kasi tosengeli nde komikundola ete ekomamaki na ekeke ya liboso mpe yango,esengami epai na basaleli na Jéhovah. Ntina ya kozala moto na kokoka ezali te mpo na kokokisa masengami yango, soki boye mbele moto moko te akokokisa yango. (1 Yoane 1:8) Kasi soki ozali mobali, ezala ete ozali na mikumba kati na lisangá to mpe te, mpo na nini komitalela te mpo na koyeba soki ozali mpenza kokokisa masengami yango?
5. Kozala na likambo moko ya kopamelama te elimboli nini?
5 Azala na likambo moko ya kopamelama te; azala na litatoli malamu ya bato na libanda; na efundeli te. (1 Timote 3:2, 7, 8, 10; Tito 1:6, 7) Na ntango ya koponama na bango mpe wana ekozala bango naino kosala, basaleli na misala mpe bankulutu basengeli kozala na likambo moko ya kopamelama te, elingi koloba basengeli kofundama te na ntina na likambo moko ya solo oyo etali etamboli mabe to mateya na lokuta. Bifundeli ya lokuta oyo biuti epai na “bandeko ya lokuta” to bato mosusu ezali kokweisa moto te. Mpo na kopekisa moto ete asalela lisangá te, efundeli esengeli kozala ya bongo na bongo te, kasi esengeli komonisama ete ezali solo engebene mitinda na Biblia. (2 Bakolinti 11:26; 1 Timote 5:19) Moklisto oyo azali kokokisa mokumba kati na lisangá ‘asengeli mpe kozala na litatoli malamu epai na bato ya libanda, mpo akwea kati na nsoni te mpe kati na motambo ya Diable te’. Soki moto moko asalaki lisumu monene kala, asengeli koponama bobele soki asili kosala oyo esengeli mpo ete bato babosana nsoni oyo ebimaki na lisumu yango mpe soki azali na lokumu malamu sikawa.
6. Kozala mobali na mwasi moko elimboli nini?
6 Mobali na mwasi moko. (1 Timote 3:2, 12; Tito 1:6) Yango elimboli te ete bobele mibali oyo babala nde bakoki kozala basaleli na misala to bankulutu. Kasi, soki abala, moklisto asengeli kozala bobele na mwasi moko oyo azali na bomoi mpe kozala sembo epai na ye. (Baebele 13:4) Na kokesena na ebele na bapakano ya ekeke na liboso, asengeli kozala na basi mingi te.a
7. (a) Ezali mbula ya kobotama nde ezali kosala ete moklisto akoka kozala nkulutu? (b) Kokamba ndako na yo na lolenge malamu elimboli nini?
7 Oyo azali kokamba ndako na ye na lolenge malamu, oyo azali kotosisa bana na ye na sembo. (1 Timote 3:4, 5, 12; Tito 1:6) Bato mosusu bakanisaka ete bankulutu basengeli kozala na mibu 30 mpe likolo, kasi Biblia etie ndelo mpo na mbula ya kobanda te. Atako bongo, mpo na koponama, moklisto asengeli komitambwisa lokola moto ateli kati na elimo. Basaleli na misala mpe bankulutu basengeli mpenza kozala na mbula ekoki mpo na kozala na bana. Moklisto oyo abalá akokisi masengami te soki azali na etamboli malamu na libanda ya ndako na ye, kasi azali konyokola bato ya ndako na ye. Asengeli kozwa limemya ya bazalani na kotambwisaka ndako na ye engebene mitinda ya Biblia mpe kozala na mokano ete mosangani nyonso ya libota na ye alonga kati na bomoi na ye ya elimo. Soki nkulutu azali na bana mike, basengeli mpenza kozala na etamboli malamu mpe bakozala “bandimi.” Yango ekoki kozala ete bazali kokola mpo na komipesa na Nzambe, to bakóma ba Témoins de Jéhovah oyo basilá kobatisama. Moto oyo azali kolónga te na kolendisa kondima ya bana na ye, ezali polele ete akolonga mpe te na kolendisa kondima ya bato mosusu.
8. Liboso ete tata na libota akoka kokóma nkulutu, likambo nini asengeli koyekola kosala?
8 Liboso ete tata moko ya libota akoka kozala nkulutu ya makoki oyo azali kokengela lisangá kati na elimo, asengeli naino koyekola kotambwisa malamu ndako na ye moko. “Soki moto ayebi kokamba ndako na ye moko te, ndenge nini akobatela lisangá na Nzambe”? (1 Timote 3:5) Ya solo, ekoki kozala ete moklisto moko azali na mwasi oyo azali mondimi te oyo azali kotemela ye. (Matai 10:36; Luka 12:52) To mpe, moko kati na bana na ye akoki kosala lisumu monene, nzokande bamosusu bazali malamu kati na elimo. Na yango, soki moklisto wana asalaki nyonso oyo esengelaki na ye kosala, mpe mingi mpenza soki azwaki matomba malamu kati na elimo mpo na oyo etali basangani mosusu ya ndako na ye, likambo oyo ete mosangani moko ya libota na ye asundoli litambwisi na ye malamu epekisi ye mpenza te na kozala mosaleli na misala to nkulutu.
9. Kati na likambo etali masanga, na nini nkulutu to mosaleli na misala asengeli kokeba?
9 Molangwi na masanga te, moswani te, momeli na vinyo mingi te. (1 Timote 3:3, 8; Tito 1:7) Mosaleli na misala to nkulutu asengeli kolangwa masanga te. Soki te, mbele akozanga komipekisa kati na makanisi na ye mpe na mayoki na ye, mpe akoki komikotisa kati na koswana to kati na bitumba ya balangwi. Akozala ‘momeli na vinyo mingi te’ to kozala na lokumu mabe ya moto oyo akomelaka mikolo nyonso to akomelaka mingi. (Masese 23: 20, 21, 29-35) Ekozala mpenza mabe monene soko visite pastorale ebebi mpo na kozanga bokatikati! Soki ezali ete moklisto amelaka masanga, nzokande asengeli komela yango te na ntango azali kosangana na makita, na mosala ya kosakola to na mitindo mosusu ya mosala na bulee. -Levitike 10:8-11; Ezekiele 44:21.
10. Mpo na nini baluli na mosolo to bato na mombongo na nsoni bakokisi masengami te mpo na kozala bankulutu to basaleli na misala?
10 Moluli na mosolo te mpe moto na mombongo na nsoni te. (1 Timote 3:3, 8; Tito 1:7) Baoyo bazali kolula mosolo bazali na likámá kati na elimo, mpe bato na lokoso bakosangola Bokonzi na Nzambe te. Na yango, bakokisi masengami te mpo na kozala bankulutu to basaleli na misala. (1 Bakolinti 6:9, 10; 1 Timoté 6:9, 10) Liloba na greke oyo ebongolami na “kozanga kolongobana” elimboli mpenzampenza “na banzela ya nsoni”, mpe oyo ebongolami na “matomba” ezali kotalela matomba to ba bénéfice ya motindo nyonso. (Bafilipi 1:21; 3:4-8) Ya solo, moto oyo ezalela na ye ezali komonisa ete akosalela “bampate” na Nzambe na motindo ezangi kolongobana, akokisi masengami te mpo na komema mikumba kati na lisangá. (Ezekiele 34:7-10; Misala 20:3335; Yuda 16) Ezali ntina mpenza na kososola mpe na kokanisa malamu liboso ya kosala liponi wana eyebi bino ete soki moto boye aponami, akoki kopesamela mokumba ya kobomba mosolo mpe akoki koyiba mwa ndambo na yango. —Yoane 12:4-6.
11. Mpo na nini esengeli te kopona “mondimi na sika” mpo na mokumba moko kati na lisangá?
11 Azala mondimi na sika te; atyama liboso na komekama mpo na kotalela makoki na ye. (1 Timote 3:6, 10) Moklisto oyo abatisami sika azwi naino ntango te ya komonisa ete asili kokokisa mikumba na ye na bosembo nyonso. Mbala mosusu azali na motema mawa te mpo na bato oyo bazali na mpasi to mpe azangi mayele masengeli mpo na kosunga baninga na ye. Ekoki kozala ete azali kotyola baninga mosusu. Liboso ete aponama mosaleli na misala, mpe na nsima aponama lokola nkulutu, moklisto asengeli naino ‘komekama mpo na kotalela makoki na ye’ mpe komimonisa moto na elimo ebongi mpe oyo abongi ete batyela ye motema. Boumeli ya komekama wana etyameli ndelo te; moto na moto azali kokóla na lolenge na ye kati na elimo. Nzokande, bankulutu bakopona nokinoki te moyekoli ya sika, ’’noki te akovimba na lolendo mpe akokwea na etumbu elakami mpo na Diable”. Bakotika ye naino amonisa elimo ya komikitisa oyo Klisto amonisaki.—Bafilipi 2:5-8.
Mpo na oyo etali basaleli na misala
12. Masengami ya basaleli na misala matali bobele bango?
12 Masengami mosusu mataleli bobele basaleli na misala. Kasi atako bongo, soki nkulutu moko akokisi yango te akokisi mpe masengami te mpo na kozala nkulutu. Bino baklisto, bozali nde kokokisa masengami yango?
13. Kozala moto na bozito elimboli nini?
13 Moto na bozito. (1 Timoté 3:8) Mpo na kokokisa masengami matali basaleli na misala, moto asengeli kokamata mikumba na ye na bopoto te. Esengeli na ye komitambwisa na lolenge malamu, oyo ezali kobendela ye limemya ya bazalani. Atako akoki kosala maseki na bantango mosusu, mbele akokokisa masengami te soki mbala na mbala azali kosala makambo na motindo boye ete bato bazali kopesa ye kilo te.
14. (a) Kozala moto na minoko mibale te elimboli nini? (b) Likambo nini osengeli kosala mpo na kozala na lisosoli ya peto?
14 Moto na minoko mibale te; oyo azali na lisosoli na peto. (1 Timoté 3:8, 9) Basaleli na misala (mpe bankulutu) basengeli ntango nyonso koloba solo, bazala balobilobi mpamba te to kosala na mayele mabe te. Lokola bazali bato ya minoko mibale te, bakoloba na bokosi te likambo moko epai na moto moko mpe kobongola ndenge mosusu epai na moto mosusu. (Masese 3:32; Yakobo 3:17) Mibali yango basengeli mpe kolongisa solo oyo eyebisami, “kosimbáká libombami na kondima na lisosoli na peto”. Liboso na Nzambe, lisosoli motindo wana esengeli kotatola ete moto oyo azali na yango azali sembo ete azali kosala likambo moko te ya mbindo na nkuku. (Baloma 9:1; 2 Bakolinti 1:12; 4:2; 7:1) Moto moko akoki kosalela etongá na Nzambe te soki azangi kotosa solo mpe mibeko na Nzambe.
Masengami ya bankulutu
15. Nani asengeli kokokisa masengami oyo tokotalela sikawa, mpe yango etaleli mingimingi mosala nini?
15 Masengami mosusu mataleli bobele bankulutu. Yango ezali kotalela mingimingi mosala na bango ya babateli na mpate mpe ya bateyi Bino baklisto, bozali nde kokokisa masengami yango?
16. (a) Likambo nini ebongi kosala mpo na kozala mosembwi? (b) Ndenge nini nkulutu akoki kozala na komipekisa?
16 Mosembwi; moto ayebi komipekisa. (1 Timote 3:2; Tito 1:8) Nkulutu asengeli kozala na bokatikati, asengeli kozala moombo ya bizaleli mabe te. Ntango azali kokutana na mimekamo, Nzambe akosalisa ye na kozala na bokatikati soki asali libondeli motindo moko na mokomi na nzembo: “Mikakatano na motema na ngai eyei mingimingi; bimisa ngai na mpasi yango nyonso!” (Nzembo 25:17) Mokengeli asengeli mpe kobondela mpo na kozwa elimo na Nzambe mpe komonisa mbuma na yango, oyo moko na yango ezali komipekisa. (Luka 11:13; Bagalatia 5:22, 23) Na kokebáká ntango nyonso likoló na makanisi na ye, na maloba na ye mpe na misala na ye, nkulutu akomekola te ezalela ya kolekisa ndelo epai moko to epai mosusu kati na litambwisi na ye ya elimo oyo azali kopesa na lisangá.
17. Kozala na elimo ebongi elimboli nini?
17 Moto na elimo ebongi. (1 Timoté 3:2) Nkulutu asengeli kozala moto ayebi kokanisa mpe na mayele. Asengeli kokeba na maloba na ye mpe na misala na ye mpe kosenzela ete yango ezala ya kolongobana Elimo na ye ya bopolo mpe ya bokatikati etongami nde likoló na mayele ya Nzambe mpe likoló na mateya na sembo ya Liloba na Jéhovah, oyo esengeli koyekola na etingya.—Baloma 12:3; Tito 2:1.
18. Nkulutu asengeli kosala nini mpo azala moto na makambo mabongi?
18 Moto na makambo mabongi. (1 Timoté 3:2) Liloba na greke oyo esalelami kati na verset oyo ebongolami na liloba ya lifalanse “bien arrangée” kati na 1 Timoté 2:9. Nkulutu asengeli bongo kozala na bomoi moko ebongi. Na ndakisa, esengeli na ye kotosa ngonga. Baklisto ya liboso bazalaki mpenza kotya likebi mingi te na ntina etali kobatelama ya ba dossiers mpe, na mikolo na biso, esengami mpenza te ete mokengeli azala moto oyo akoti kelasi ya kontabilité to ya sekretaria malamumalamu. Basaleli na misala bakoki kopesa maboko na makambo mosusu matali kobongisa mikanda. Nzokande, liloba na greke oyo ebongolami na “makambo mabongi” ekoki komonisa ezalela malamu, mpe moto mbele akokokisa masengami te mpo na kozala nkulutu soki makambo na bomoi na ye mazali mobulumobulu.—1 Batesaloniki 5:14; 2 Batesaloniki 3:6-12; Tito 1:10.
19. Lokola azali moyambi na bapaya, nkulutu asengeli kosalaka nini?
19 Moyambi na bapaya. (1 Timoté 3:2; Tito 1:8) Nkulutu azali ‘moyambi na bapaya.’ (Baloma 12:18; Baebele 13:2) Liloba na greke mpo na “koyamba bapaya” elimboli mpenzampenza “moninga na bapaya”. Lokola azali moyambi na bapaya, nkulutu azali koyamba bato na sika kati na makita na boklisto mpe azali koponapona te kati na mobola mpe mozwi. Azali koyamba baoyo bazali kotambola mpo na matomba ya boklisto mpe azali kolekisa bango na mobembo na “motindo mobongi na Nzambe.” (3 Yoane 5-8) Nkulutu azali komonisa ezalela ya koyamba bapaya mingi mpenza epai na baninga na ye baklisto na kotalela bamposa na bango mpe oyo makoki na ye epesi ye nzela. —Yakobo 2:14-17.
20. Na makambo nini nkulutu azali na makoki ya koteya to kozala molakisi malamu?
20 Molakisi malamu. (1 Timoté 3:2) Ezali te mpo ete azali na makoki to na mayele ya mokili nde nkulutu akoki kopesa mateya ya elimo. (1 Bakolinti 2:1-5, 13) Soki azali molakisi malamu, ezali mpo ete “azali kosimba makasi liloba na sembo lizali ye kolakisa ete ayeba kolakisa na mateya na sembo mpe kozongisa monoko na bango bakopengolaka yango.” (Tito 1:9; tala Misala 20:18-21, 26, 27) Esengeli ete azala na makoki ya ‘koteya na motema petee baoyo bazali kotemela.’ (2 Timoté 2:23-26) Ata soki nkulutu moko azali molobi malamu te liboso ya lisangá, asengeli koyekola malamu Liloba na Nzambe mpo na kozala na likoki ya koteya mpe kopesa bandeko na ye toli, baoyo, bango mpe, bazali koyekola Biblia. (2 Bakolinti 11:6) Asengeli koyeba kopesa ‘mateya na sembo” oyo ekosalisa mabota mpe basangani ya lisangá na kozala na bomoi ya kobanga Nzambe.—Tito 2:1-10.
20 Moto na etumba te, kasi moto ayebi kokanisa, oyo akobetaka baninga te. (1 Timote 3:3; Tito 1:7) Lokola azali moto na kimya, nkulutu akobeta baninga na nzoto te soko mpe kopema na bango na maloba mabe to ya kozokisa’. (Tala 2 Bakolinti 11:20) (Moko na masengami oyo ezali liboso na oyo, “molangwi na masanga te, moswani te”, emonisi ete amipesi na kolangwa masanga te oyo mbeki mingi ezalaka ntina ya matata.) Lokola azali moto ayebi kokanisa (to “na boboto”), kasi moto na makambo makasi te, azongelaka makambo mikemike te. (1 Bakolinti 9:12; Bafilipi 4:5; 1 Petelo 2:18) Lokola nkulutu azali moto na etumba te, azali koboya kowelana mpe azali ’’moto ya nkandankanda te.”—Tito 3:2; Yakobo 1:19, 20.
21. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete nkulutu azali moto oyo abetaka te? (b) Kozala moto ayebi kokanisa elimboli nini? (c) Kozala moto na etumbu te elimboli nini?
21 Azala na motó makasi te. (Tito 1:7) Élimboli mpe “moto oyo azali komikumisa ye moko te.” (Tala 2 Petelo 2:10) Nkulutu akolukaka te ete bandimaka ntango nyonso makambo oyo ye alobi, kasi asengeli kotalela makoki na ye na bopolo nyonso. Koyebáká ete ye aleki bamosusu te, azali kokabola mikumba na bopolo nyonso elongo na bamosusu mpe azali kopesa motuya monene na bapesi mingi na toli.—Mituya 11:26-29; Masese 11:14; Baloma 12:3, 16.
22. Kulutu na motó makasi te elimboli nini mpo na nkulutu?
22 Molingi na makambo malamu; sembo. (Tito 1:8) Mpo na kokokisa masengami ya nkulutu, moto asengeli kolinga malamu mpe kozala sembo. Moninga na makambo malamu alingaka oyo ezali malamu na miso na Jéhovah, azali kosala na boboto, azali kosalisa bazalani na ye mpe azali komimonisa moto na botondi mpo na malamu oyo baninga bazali kosala. (Luka 6:35; tala Misala 9:36, 39; 1 Timote 5:9, 10) Moto na sembo atosaka mibeko mpe mitinda na Nzambe. Kati na makambo mosusu, azali na koponapona te mpe azali kotya makanisi na ye likoló na makambo na sembo, makambo na peto mpe na bulee. (Luka 1:6; Bafilipi 4:8, 9; Yakobo 2:1-9) Lokola malamu ekeseni na boyengebene mpo ete yango ezali kosala koleka nyonso oyo esengami na boyengebene, moninga na makambo malamu azali kosala mingi mpenza mpo na baninga koleka oyo esengami na ye. -Matai 20:4, 13-15; Baloma 5:7.
23. (a) Kozala “molingi na makambo malamu” elimboli nini? (b) Kozala sembo elimboli nini?
23 Motosi na ndai na ye (fidèle). (Tito 1:8) Moklisto oyo akokisi masengami mpo na kozala nkulutu azali kotosa ndai na ye ya kokangama libela epai na Nzambe mpe azali kotosa mibeko na Nzambe, ata soko bosembo na ye emekami motindo nini. Azali kosala makambo oyo Jéhovah azali kozela epai na ye, mingi mpenza na kotosa ndai na ye ya kozala mosakoli na sembo ya Bokonzi.—Matai 24:14; Luka 1:74, 75; Misala 5:29; 1 Batesalonike 2:10.
Tokokisa masengami
24. Likambo nini moto asengeli kosala mpo nzala motosi na ndai na ye.
24 Mingi kati na masengami oyo touti kotalela awa ezali masengami oyo Témoin de Jéhovah nyonso asengeli mpe akoki kokokisa soki, na lisalisi ya lipamboli na Nzambe, azali koyekola, azali kosala milende, azali na baninga malamu mpe azali kobondela. Bamoko bazali mbala mosusu na makoki mingi na makambo yango mosusu koleka na oyo mosusu. Kasi basaleli na misala mpe bankulutu basengeli kokokisa masengami nyonso wana na meko ekoki mpo na komema mikumba na bango.
25. Nani asengeli kokokisa masengami oyo touti kotalela mpe ndenge nini akoki kolonga?
25 Ba Témoins de Jéhovah nyonso basengeli kozala na mposa ya kosala mingi kati na mosala na Nzambe. Mposa yango ezali kobenda mibali kati na lisangá na kondima mikumba. Ozali mobali, oyo asili komipesa mpe abatisami? Soki ee, luka mokumba moko mpe sala nyonso ekoki na yo mpo na kokokisa masengami mpe na nsima ozwa yango!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala mpe La Tour de Garde ye 15 Juin 1983, lokasa 29, na sous-titre “Le divorce selon la Bible.”
Bozongeli
◻ Mpo na nini sikawa mposa ya mibali babatisami baoyo bamilengeli mpo na kondima mikumba kati na lisangá ezali monene?
◻ Tanga mwa masengami oyo matali basaleli na misala?
◻ Tanga mwa masengami oyo matali bankulutu.
◻ Mpo na nini nkulutu asengeli koyeba kokamba ndako na ye?
◻ Nini ezali kobenda baklisto na, kondima mikumba kati na lisanga?
26. Mpo na nini baklisto bazali kondima mikumba kati na lisangá?
[Elilingi na lokasa 24, 25]
Bankulutu mpe basaleli na misala basengeli kokamba ndako na bango engebene mitinda na Biblia