Tiká ete mateya oyo mazali kopesa litomba mázala lolenge ya bomoi na yo
“Bijaleli na moto na Njambe ikopɛsaka litomba na njela yɔnsɔ.”—1 TIMƆTƐ 4:8.
1, 2. Na meko nini bato bazali komibanzabanza na kolɔngɔ́nɔ́ na bango ya nzoto, mpe yango ebimisi litomba nini?
NTALO monene ya bato bakondima nokinoki ete kolɔngɔ́nɔ́ malamu ezali moko na biloko oyo bileki motuya kati na bomoi. Bazali kopesa ntango mpe mosolo mingi mpo na kotikala na nzoto makasi mpe bazali koluka lisalisi libongi epai na monganga wana bazali na yango mposa. Na ndakisa, na Etats-Unis, motuya ya mosolo oyo mobimisami mbula nyonso mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mozali bamiliare 900 ya badolare. Yango ekokani na kopesa badolare koleka 3 000 mbula na mbula mpo na mobali, mwasi mpe mwana nyonso ya mboka yango, mpe mosolo oyo mosalelami mpo na moto na moto kati na mikili misusu ya bozwi mozali mpe penepene na yango.
2 Matomba nini mazwami na motuya nyonso oyo ya ntango, ya nguya mpe ya mosolo? Na ntembe te, moto moko te akoki koangana ete, soki totaleli makambo na mobimba na yango, myango mpe bibongiseli ya monganga ya mikolo na biso eleki nyonso oyo ezalaki na bileko mosusu ya liboso. Nzokande, yango ezali kobongwana te mbala moko na motindo ya bomoi oyo ezali kopesa litomba. Ya solo, kati na lisoló moko oyo ezalaki komonisa ebongiseli ya kobatela kolɔngɔ́nɔ́ mpo na mboka Etats-Unis, prezidá Bill Clinton amonisaki ete longola “motuya ya nsɔ́mɔ ya mosolo oyo mobimisami mpo na mobulu na mboka yango,” Etats-Unis “ezali na ntalo eleki monene ya bato na SIDA, ya bameli makaya mpe bato na kolekisa ndelo na masanga, ya bilenge basi oyo bazali kokumba zemi na balabála, ya bana oyo babotami na kilo moke” koleka mikili misusu ya bozwi. Akómaki na bosukisi nini? “Tosengeli kobongola lolenge na biso ya bomoi soki tolingi solo kozala libota oyo lizali na kolɔngɔ́nɔ́ malamu.”—Bagalatia 6:7, 8.
Lolenge ya bomoi oyo ezali kopesa litomba
3. Na kotalela mimeseno ya Bagreke ya ntango na kala, toli nini Paulo apesaki?
3 Na ekeke ya liboso, Bagreke bayebanaki mingi na molende na bango ya kokembisa nzoto, ya kokólisa nzoto, mpe na mimekano ya bopoti mbangu. Mpo na kotɛmɛla momeseno wana, ntoma Paulo apemamaki mpo na kokomela elenge mobali Timoté ete: “Mpɔ ete ata kokembisa na njoto ekopɛsa litomba mwa mokɛ, nde bijaleli na moto na Njambe ikopɛsaka litomba na njela yɔnsɔ, awa ejali yango na elaka na bomɔi mpɔ na sasaipi oyo mpe mpɔ na ntango ekoya.” (1 Timɔtɛ 4:8) Na yango, Paulo azalaki komonisa oyo bato bakómi kondima yango lelo oyo, ete, bibongiseli ya monganga mpe ya kokembisa nzoto ezali mpenza ndanga te ya lolenge ya bomoi oyo ezali kopesa litomba. Nzokande, Paulo azali kondimisa biso ete, oyo eleki ntina ezali ya kokólisa bolamu ya elimo mpe ezaleli ya kosambela Nzambe.
4. Wapi matomba mazali kozwama na ezaleli ya kosambela Nzambe?
4 Etamboli lolenge yango ezali na litomba mpo na “bomoi na ntango oyo” mpo ete ezali kopesa kobatelama mpo na kotɛmɛla makambo mabe ya bato oyo batukaka Nzambe, to baoyo bazali bobele na “lolenge [to, motindo ya libándá] ya kosambela,” bazali komibendela bango mpenza. (2 Timoté 3:5; Masese 23:29, 30; Luka 15:11-16; 1 Bakolinti 6:18; 1 Timoté 6:9, 10) Baoyo bazali kopesa nzela na bizaleli ya kosambela Nzambe ete ebongisa bomoi na bango, bazali komonisa limemya monene mpo na mibeko mpe masɛngami ya Nzambe, mpe yango ezali kolendisa bango na kokómisa mateya ya Nzambe oyo mazali kopesa litomba lolenge ya bomoi na bango. Etamboli lolenge yango ezali komemela bango kolɔngɔ́nɔ́, bosepeli mpe bolamu ya elimo mpe ya mosuni. Mpe bazali “komitongela miboko kitɔkɔ mpɔ na ekeke ekoya, ete basimba bomɔi [ya solosolo, NW].”—1 Timɔtɛ 6:19.
5. Malako nini Paulo apesaki kati na mokapo ya mibale ya mokanda na ye epai na Tito?
5 Mpo ete bomoi oyo etambwisami na mateya ya Nzambe oyo mazali kopesa litomba mazali kopesa mapamboli motindo yango na ntango oyo mpe na mikolo mizali koya, tozali na mposa ya koyeba, na motindo ya sikisiki, lolenge nini tokoki kokómisa mateya ya Nzambe oyo mazali kopesa litomba lolenge ya bomoi na biso. Ntoma Paulo apesaki eyano kati na mokanda na ye epai na Tito. Tokotya likebi mpenza na mokapo ya mibale ya mokanda wana, epai apesaki Tito malako ya “kotika te koloba makambo mabongi na mateya oyo mazali kopesa litomba.” Ya solo, biso banso, bilenge mpe mikóló, mibali mpe basi, tokoki kozwa bolamu lelo oyo na “mateya oyo mazali kopesa litomba.”—Tito 1:4, 5; 2:1, NW.
Toli mpo na Mibangé mibali
6. Toli nini Paulo apesaki na “mibangé mibali,” mpe mpo na nini yango ezalaki elembo ya boboto na ye?
6 Ya liboso, Paulo apesaki toli mpo na mibangé mibali kati na lisangá. Tángá Tito 2:2. “Mibangé mibali,” lokola etuluku, bazali kokumisama mpe kotalelama lokola ndakisa ya kondima mpe ya bosembo. (Levitike 19:32; Masese 16:31) Na ntina yango, basusu bakoki kokakatana mpo na kopesa toli to makanisi epai na mibangé mibali longola bobele na makambo oyo mazali mpenza minene. (Yobo 32:6, 7; 1 Timoté 5:1) Na bongo, Paulo amonisaki boboto wana alobelaki mibangé mibali na esika ya liboso, mpe esengelaki kozala malamu mpo na bango kotya motema na maloba ya Paulo mpe komindimisa ete bango, lokola Paulo, babongi na komekolama.—1 Bakolinti 11:1; Bafilipi 3:17.
7, 8. (a) Kozala na “bokatikati kati na bizaleli” esangisi makambo nini? (b) Mpo na nini kozala “moto na mobulu te” esengeli kotambola elongo na “makanisi mabongi”?
7 Mibangé mibali baklisto basengeli, libosoliboso, kozala “bato na bokatikati.” Atako liloba ya ebandeli ekoki kopesa likanisi ya momeseno ya komela (“na ndelo,” Kingdom Interlinear), ezali lisusu na ndimbola ya kozala na bokɛngi, na bososoli, to ya kobatela maoki na ye. (2 Timoté 4:5; 1 Petelo 1:13) Na yango, ezala na komela to na makambo mosusu, mikóló basengeli kozala bato ya bokatikati, kasi te oyo bazali kolekisa ndelo.
8 Na nsima, basengeli lisusu kozala “bato na mobulu te” mpe “na makanisi mabongi.” Kozala moto na mobulu te, to moto abongi kokumisama, mpe abongi kozwa limemya, eyaka wana moto azali kokóla na mbula. Nzokande, basusu bakoki komonisa ezaleli yango koleka ndelo, kino bakokoka te kokanga motema na lolenge ya bomoi ya bilenge oyo bazali na nguya. (Masese 20:29) Yango wana “kozala na mobulu te” elembisami moke na “makanisi mabongi.” Mikóló basengeli komonisa eyongí oyo ebongi na mbula na bango, nzokande bobele na ntango yango basengeli kozala na bokatikati, kozala na bokonzi likoló na maoki na bango mpe bamposa na bango.
9. Mpo na nini mibangé mibali basengeli kozala makasi na kondima mpe bolingo mpe mingi mpenza na mpiko?
9 Na nsuka, mikóló basengeli kozala “bato bakembi na kondima, na bolingo, mpe na mpiko.” Mbala na mbala kati na mikanda na ye, Paulo atángi kondima mpe bolingo esika moko na elikya. (1 Bakolinti 13:13; 1 Batesaloniki 1:3; 5:8) Awa akitanisi “elikya” na “mpiko.” Mbala mosusu ezali mpo ete maoki ya kolɛmba ekoki nokinoki koya mpo na bobangé. (Mosakoli 12:1) Nzokande, lokola Yesu amonisaki yango, “ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.” (Matai 24:13) Lisusu, mibangé bazali bandakisa oyo babongi komekolama na basusu bobele te mpo na mbula na bango to mpo na bwanya na bango, kasi lisusu mpo na bizaleli na bango ya elimo—kondima, bolingo, mpe mpiko.
Mpo na mibangé basi
10. Toli nini Paulo apesaki na “mibangé basi” kati na lisangá?
10 Na nsima, Paulo atye likebi na ye epai na mibangé basi ya lisangá. Tángá Tito 2:3. “Mibangé basi” bazali basi oyo kati na lisangá basili kokóma mikóló, ezala mpe basi ya “mibangé mibali” elongo na bamama mpe bankɔ́kɔ-basi ya basangani basusu ya lisangá. Na motindo yango, bakoki kozala na bopusi monene, ya malamu to ya mabe. Yango wana Paulo abandeli maloba na ye na “bobele bongo,” kolimboláká ete “mibangé basi” mpe bazali na misala oyo basengeli kosala mpo ete bákokisa mokumba na bango kati na lisangá.
11. Etamboli ya limemya mozindo ezali nini?
11 Ya liboso, Paulo alobaki ete “Tika ete mibange basi bajala na etamboli na bulɛɛ.” “Etamboli” ezali komonisa ezaleli ya kati mpe ya bomoto oyo elakisami na misala mpe na lolenge ya moto. (Matai 12:34, 35) Bongo, nini esengeli kozala ezaleli to bomoto ya mobangé mwasi moklisto? Na mokuse, “limemya ya mozindo.” Yango ebongoli liloba moko ya Greke oyo elimboli “oyo ebongi na bato, na misala, to na biloko oyo ekabami epai na Nzambe.” Oyo ezali solo toli kitoko soki totaleli bopusi oyo bazali na yango likoló na basusu, mingimingi likoló na bilenge basi kati na lisangá.—1 Timoté 2:9, 10.
12. Motindo nini ya mabe ya kosalela lolemo tosengeli kopengola?
12 Na nsima alobeli bizaleli mabe mibale: “batɔ́ngi te, to baombo na vinyo te.” Ezali likambo ya kosepelisa ete makambo oyo mibale masangisami esika moko. Molakisi E. F. Scott amonisi ete: “Na ntango ya kala, wana vinyo ezalaki masanga bobele moko, ezalaki kati na bilambo mike na bango ya komela vinyo nde mibangé basi bazalaki kotɔ́nga baninga na bango.” Mbala mingi basi bamibanzabanzaka na bato mosusu koleka mibali, likambo oyo libongi kokumisama. Nzokande, komibanzabanza ekoki kobongwana na bilobaloba mpe ata na matɔ́ngi, mingi mpenza ntango lolemo ezangi kopekisama mpo na vinyo. (Masese 23:33) Ya solo, baoyo nyonso bazali kolanda nzela ya bomoi oyo ezali kopesa litomba, mibali mpe basi, basengeli kokeba na motambo oyo.
13. Na lolenge nini mibangé basi bakoki kozala bateyi?
13 Mpo na lolenge malamu ya kosalela ntango oyo bazali na yango, mibangé basi balendisami na kozala “balakisi na makambo malamu.” Na mikapo mosusu, Paulo apesaki malako ya polele ete basi basengeli te kozala balakisi kati na lisangá. (1 Bakolinti 14:34; 1 Timoté 2:12) Nzokande, yango epekisi bango te na kopesa boyebi ya Nzambe oyo ezali na motuya mingi epai na bato na ndako na bango to liboso na bato ya libándá. (2 Timoté 1:5; 3:14, 15) Bakoki lisusu kosala malamu mingi na kozala baklisto oyo bazali ndakisa malamu mpo na bilenge basi kati na lisangá, lokola milɔngɔ́ milandi mizali komonisa yango.
Mpo na bilenge basi
14. Lolenge nini bilenge basi baklisto bakoki komonisa bokatikati na mikumba na bango?
14 Wana azalaki kolendisa mibangé basi na kozala “balakisi na makambo malamu,” Paulo alobeli sikisiki bilenge basi. Tángá Tito 2:4, 5. Atako makambo mingi ya malako yango matali mpenza misala ya ndako, bilenge basi baklisto basengeli te kolekisa ndelo, na kopesáká nzela na biloko ya mosuni ete eyangela bomoi na bango. Kasi, basengeli kozala “na makanisi mabongi, mpɛtɔ, . . . malamu,” mpe kondima ebongiseli ya boklisto etali bokonzi, “mpɔ ete Liloba na Njambe litukama tɛ.”
15. Mpo na nini bilenge basi mingi kati na lisangá babongi kozwa longonya?
15 Lelo oyo, motindo ya libota mosili kobongwana mingi mpenza soki tokokanisi yango na oyo ezalaki na mikolo na Paulo. Kati na mabota mingi, babalani bazali kati na kondima moko te, mpe mabota mosusu mazali bobele na moboti moko. Ata kati na mabota oyo tata mpe mama bazali elongo na bana na bango, ezali mpenza mpasi na komona mwasi ya libala to mama komipesa mobimba na misala ya ndako. Nyonso oyo ezali kotya bozito mpe mikumba likoló na bilenge basi baklisto, kasi yango elongoli bango te na mikumba na bango oyo miuti na Makomami. Na bongo, ezali mpenza esengo monene, na komona ebele ya bilenge basi oyo bazali kosala mosala makasi komonisa bokatikati kati na mikumba mingi na bango mpe kozwa ntango ya kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso; basusu bazali nkutu kati na mosala ya ntango nyonso, lokola babongisi-nzela basungi to babongisi-nzela ya sanza na sanza. (Matai 6:33) Babongi mpenza kozwa longonya!
Mpo na bilenge mibali
16. Toli nini Paulo apesaki na bilenge mibali, mpe mpo na nini yango ebongi mpenza na mikolo na biso?
16 Paulo akómi bongo na bilenge mibali, oyo Tito azalaki kati na bango. Tángá Tito 2:6-8. Na kotalela etamboli ya wayawaya mpe ya mobulu ya bilenge mingi na mikolo na biso—komela makaya, bilangwiseli mpe kolangwa masanga, etamboli ya mbindo, mpe kolanda makambo mosusu ya mokili, lokola masano ya makasimakasi elongo na miziki mpe kominanola ya mbindo—oyo ezali mpenza toli kitoko mpo na bilenge baklisto oyo balingi kolanda nzela ya bomoi oyo ezali kopesa litomba mpe ezali kosepelisa.
17. Lolenge nini elenge mobali akoki kokóma na “makanisi mabongi” mpe “ndakisa ya misala kitoko”?
17 Na kokesena na bilenge ya mokili, elenge mobali moklisto asengeli kozala “na makanisi mabongi” mpe kozala “ndakisa na misala kitoko.” Paulo alimbolaki ete makanisi mabongi mpe makanisi ya bato bakɔmɛli mazali kozwama, te bobele na baoyo bazali koyekola, kasi na baoyo “basili koyeba kosalela esoswɛli na bango mpo na kokesenisa malamu na mabe.” (Baebele 5:14, NW) Ezali mpenza esengo mingi na komona bilenge kopesa ntango mpe nguya na bango na bolingo malamu mpo na kosangana mingi na ebele ya misala oyo mizali kati na lisangá ya boklisto, na esika ya kobebisa makasi ya bolenge na bango na mikano ya moimi! Na kosaláká bongo, bakoki, lokola Tito, kokóma bandakisa ya “misala kitɔkɔ” kati na lisangá ya boklisto.—1 Timoté 4:12.
18. Elimboli nini kozala sembo kati na mateya, na eyongí kati na misala, mpe kozala na elobeli ya mpɛtɔ?
18 Paulo akundweli bilenge mibali ete basengeli “komonisa bosembo kati na mateya [na bango], na eyongí, na maloba ya mpɛtɔ oyo makoki kokweisama te.” Mateya oyo mazali ‘sembo’ masengeli kozwa moboko makasi kati na Liloba ya Nzambe; na yango, bilenge mibali basengeli koyekola Biblia na molende. Lokola mibangé mibali, bilenge mibali basengeli kozala bato na eyongí. Basengeli koyeba ete kozala moteyi ya Liloba ya Nzambe ezali mokumba monene, mpe na yango basengeli kozala “na etambweli ebɔngi na nsango malamu.” (Bafilipi 1:27) Bobele bongo, elobeli na bango esengeli kozala “sembo” mpe oyo “ekoki kokweisama te” ete bápesa batɛmɛli ntina moko te ya koimaima.—2 Bakolinti 6:3; 1 Petelo 2:12, 15.
Mpo na baombo mpe basaleli
19, 20. Lolenge nini baoyo bazali kosalela bato mosusu misala bakoki “kokembisa mateya na Mobikisi na biso, Nzambe”?
19 Na nsuka, Paulo akómi epai na baoyo bazali kosala mosala epai na bato mosusu. Tángá Tito 2:9, 10. Mingi te kati na biso bazali lelo oyo baombo to basaleli, kasi mingi bazali basáli na mosala ya bato mosusu. Na yango, mitindá oyo Paulo atángi mizali mpenza na ntina lelo oyo.
20 “Kotosa mikolo na bango na makambo yɔnsɔ” elimboli ete basáli baklisto basengeli komonisa limemya ya mozindo epai na bankóló mpe bakonzi na bango ya mosala. (Bakolose 3:22) Basengeli lisusu kozala na lokumu malamu ya basáli ya kolongobana, baoyo bazali kopesa na bankóló na bango bangonga oyo esɛngami na mosala. Mpe basengeli kobatela mitindá mitombwami ya etamboli ya boklisto na bisika na bango ya mosala atako baninga na bango ya mosala bazali na etamboli motindo nini. Nyonso wana ezali mpo na “kokɛmbisa mateyo na Njambe Mobikisi na biso, kati na makambo yɔnsɔ.” Mbala na mbala toyokaka matomba malamu wana bato ya motema sembo oyo bazali komona bayambi solo mpo na etamboli kitoko ya baninga na bango ya mosala to ya basáli na bango oyo bazali Batatoli! Oyo ezali mbano oyo Yehova azali kopesa baoyo bazali kolanda mateya na ye oyo mazali kopesa litomba na bisika na bango ya mosala.—Baɛfɛsɛ 6:7, 8.
Libota oyo lipɛtolami
21. Mpo na nini Yehova azali kopesa mateya oyo mazali kopesa litomba, mpe lolenge nini tosengeli koyanola na yango?
21 Mateya mazali kopesa litomba oyo Paulo alimbolaki mazali te bobele mitindá mitali lolenge ya kosala makambo to makanisi matali bizaleli malamu oyo tokoki kotalela ntango tolingi yango. Paulo alandi kolimbola ntina na yango. Tángá Tito 2:11, 12. Mpo na bolingo mpe boboto na ye epai na biso, Yehova Nzambe apesaki mateya wana mpo ete tokoka koyekola kozala na bomoi oyo ezali na ntina mpe oyo ezali kosepelisa na ntango oyo ya mpasi mpe ya likámá. Okondima na bolingo nyonso mpe okokómisa mateya oyo mazali kopesa litomba lolenge ya bomoi na yo? Kosala bongo ekolimbola lobiko na yo.
22, 23. Mapamboli nini tozali kozwa wana tokómisi mateya oyo mazali kopesa litomba lolenge ya bomoi na biso?
22 Likambo ya ntina koleka, kokómisa mateya oyo mazali kopesa litomba lolenge ya bomoi na biso ekomemela biso libaku moko lileki kitoko sikawa mpe elikya ya esengo na mikolo mizali koya. Tángá Tito 2:13, 14. Ya solo, kokómisa mateya oyo mazali kopesa litomba lolenge ya bomoi na biso ezali kokesenisa biso lokola libota moko lipɛtolami na mokili oyo esili kobeba mpe oyo ezali kokufa. Maloba ya Paulo makokani na bokundoli oyo Mose apesaki na bana ya Yisraele na Sinai: “[Yehova], . . . akotia yɔ na likolo liboso na mabota yɔnsɔ masalaki ye, na ntina na kosanjola mpe na koyebana mpe na kokumama, mpe ete okojala libota na bulɛɛ epai na [Yehova] Njambe na yɔ, lokola esili ye koloba.”—Dutɛlɔnɔmɛ 26:18, 19.
23 Tiká ete tóbatela libaku malamu oyo ya kozala libota lipetolami ya Yehova na kokómisáká mateya oyo mazali kopesa litomba lolenge ya bomoi na biso! Tózala ntango nyonso na bokɛngi ete tóbwaka lolenge nyonso ya kotuka Nzambe mpe bamposa ya mokili, na yango tótikala bato bapɛtɔlami mpe baoyo babongi kosalelama na Yehova kati na mosala monene oyo azali kokokisa lelo.—Bakolose 1:10.
Ozali komikundola?
◻ Mpo na nini ezaleli ya kosambela Nzambe ezali kopesa litomba na makambo nyonso?
◻ Lolenge nini mibangé mibali mpe mibangé basi oyo bazali baklisto bazali kolanda mateya oyo mazali kopesa litomba lokola lolenge ya bomoi?
◻ Mateya nini oyo mazali kopesa litomba Paulo apesaki mpo na bilenge mibali mpe bilenge basi kati na lisangá?
◻ Libaku kitoko nini mpe lipamboli nini tokoki kozwa soki tokómisi mateya oyo mazali kopesa litomba lolenge ya bomoi na biso?
[Bililingi na lokasa 18]
Lelo oyo mingi bazali kosalela toli oyo ezwami na Tito 2:2-4