Bolingo epai na bandeko ezali na nguya mpenza
Ndimbola ya makambo na ntina na mokanda epai na Filemo
YESU KLISTO asilaki kopesa bayekoli na ye “etinda ya sika”: balinganaka lokola ye alingaki bango. (Yoane 13:34, 35) Bolingo wana bokopusa bango na kokufa moko mpo na mosusu soki yango esengeli. Ee, bolingo epai na bandeko ezali na nguya mpenza.
Ntoma Paulo andimisamaki ete Filemona, moklisto na lisangá ya Kolose, na Asie Mineure, akomitika kotambwisama na bolingo epai na bandeko. Mpe kopusamáká na bolingo, Filemona andimaki ete makita na boklisto masalema na ndako na ye. Onezime, moombo na Filemona, akimaki. Mbala mosusu ayibaki mosolo ya nkóló na ye mpo na kofuta tiké ya mobembo na ye mpo na kokóma na Rome. Ezali na engumba wana nde na nsima, akutanaki na Paulo, mpe akómaki moklisto.
Pene na mobu 60-61, Paulo akomaki mokanda moko oyo motindamaki liboso epai na Filemona, wana azalaki na bolɔkɔ na Rome. Kati na mokanda yango, akundoli Filemona ete ayamba Onezime oyo azongeli ye, kati na elimo ya bolingo ya bandeko. Tángá mokanda oyo, mpe okomona ete ezali mpo na libota ya Nzambe, ndakisa ya bolingo mpe ya mayele.
Akumisami mpo na bolingo mpe kondima na ye
Kolobáká epai na Filemona mpe baninga na ye baklisto Paulo abandi mokanda na ye na kopesa longonya. (Versets 1 kino 7) Ntoma azalaki ntango nyonso koyoka nsango ya bolingo oyo Filemona azalaki na yango mpo na Klisto mpe mpo na basantu nyonso, ayokaki lisusu nsango ya koo ndima na ye. Yango etindaki Paulo na kotondo Jéhovah mpe na kozwa esengo mingi mpe libɔndisi. Tokumisaka bandeko na biso baklisto baoyo bazali kopesa ndakisa na kondima mpe na bolingo? Tosengeli kotya milende mpo na kosala yango.
Wana tozali kopesa toli epai na bandeko na biso baklisto, ebongi mpenza kosala yango “na bolingo,” lokola Paulo alobaki yango. (Versets 8 kino 14) Nsima na maloba na ebandeli oyo na mayele, ntoma akundweli Filemona ete akokaki “kolaka ye oyo ebongi kosalema,” kasi amoni malamu ete apesa ye toli. Alingaki kopesa ye toli na likambo nini? Mpo na koyamba na boboto Onezime, moombo na ye. Paulo alingaki kosalana elongo na Onezime, kasi akokaki kosala yango te kozanga ete Filemona apesa ndingisa mpo na yango.
Lokola oyo Paulo alimboli yango kati na mokanda na ye, mbala mingi makambo mabe makobóngwanaka malamu nsima. (Versets 15 kino 21) Ya solo, kokima ya Onezime ebongwani na likambo malamu mpo na Filemona. Ndenge nini? Na boye ete Filemona akozwa lisusu te moombo oyo akoki kozanga sembo to oyo na mikano mabe, kasi ndeko ya sembo mpe na mosala malamu. Paulo asengaki Filemona ete ayamba Onezime lokola soko nde ayambaki ye moko. Soki Onezime asalaki mabe epai na Filemona, ntoma amilengelaki mpo na kofuta yango. Mpo ete Filemona andima batoli na ye, ntoma akundolaki ye ete, ye mpe (Filemona) azalaki na nyongo epai na ye (Paulo) lokola akómaki moklisto. Na ezalela wana, Paulo andimisamaki ete Filemona akosala ata mingi koleka oyo ye asengaki; Oyo nde mayele mpe bolingo kati na libyangi oyo! Na ntembe te, tosengeli kozala na etamboli motindo wana epai na baninga na biso baklisto.
Paulo asukisi mokanda na ye na kolobeláká makambo oyo azalaki kozela nsima na mwa mikolo, na kotindáká mwa bambote mpe kotombela bango ete bapambolama. (Versets 22 kino 25) Amonisaki elikya ya kobima na boloko mosika te, mpo na mabondeli oyo mazalaki kosalema na bandeko na ye baklisto. (Na mokanda ya mibale epai na Timoté, totangi ete mabondeli yango mandimamaki.) Na nsuka ya mokanda na ye, Paulo apesi bambote mpe atombeli ete ngolu na Yesu Klisto ezala na elimo oyo emonisamaki na Filemona mpe baninga na ye, basambeli na Jéhovah.
[Etanda/Elilingi na lokasa 23]
Aleki moombo: Na ntina na bozongi ya Onezime, moombo na Filemona oyo akimaki, Paulo alobi ete: “[Mbala mosusu] atikaki yo mpo na mwa ntango moke, mpo ete azongela yo libela; lokola moombo te, kasi aleki moombo; lokola ndeko molingami—mpo na ngai mpenza, mpe alingami na yo koteka kati na mosuni mpe kati na Nkolo lokola.” (Filemona 15, 16, MN) Boombo bondimamaki na Bokonzi ya Baloma, oyo Paulo azalaki kotanga kati na “bakonzi baleki liboso.” (Baloma 13:1-7) Apesaki etinda na baombo te ete batomboka, kasi asalisaki bato oyo bazalaki na ezalela wana ete bazwa bonsomi ya elimo na kokómáká baklisto. Na boyokani elongo na malako oyo ye moko apesaki mpo ete baombo batosa bankóló na bango, Paulo azongisaki Onezime epai na ye. (Bakolose 3:22-24; Tito 2:9, 10) Onezime azalaki moombo te na ndimbola oyo eyebani na bato nyonso. Akómaki nde moninga moklisto, molingami, oyo asengelaki kozala moombo aleki malamu na kondimáká etinda ya kotósa nkóló na ye, moombo oyo asengelaki komitika kotambwisama na mibeko na Nzambe mpe komonisa bolingo epai na bandeko.