Olingaka kozala moto ya ndenge nini?
MOKONZI moko ya bapolisi, na engumba moko na Philippines, atunaki mobongisi-nzela moko boye: “Osali nini mpo na kobongola moto oyo boye?” Alakisaki liboke ya bapapye oyo ezalaki na mesa na ye mpe atunaki boye: “Oyebi ete mikanda nyonso oyo ezali na makambo oyo tosambisá ye? Osalisi biso na moto oyo azalaki kopesa biso motó mpasi na engumba oyo.” Moto yango azalaki molangwi monene oyo azalaki ntango nyonso kotya mobulu. Nini esalisaki ye abongwana makasi bongo? Ezali Biblia, Liloba ya Nzambe.
Bato mingi balandi toli ya ntoma Paulo oyo elobi ete ‘tólongola bomoto ya kala oyo eyokani na etamboli na biso ya kala mpe tólata bomoto ya sika oyo ezalisamaki engebene mokano ya Nzambe.’ (Ef. 4:22-24) Ezala mbongwana oyo tosengeli kosala ezali ya monene to ya moke, tosengeli kolata bomoto ya sika mpo na kokóma baklisto.
Kasi, kosala mbongwana mpe kokokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo ezali kaka ebandeli. Ntango tokei kozwa batisimo, tozalaka lokola mwa eteni ya nzete oyo basali na yango ekeko, kasi babongisi yango naino malamu te. Okoki komona ete ezali ekeko ya eloko boye to boye, kasi mosala ezali naino. Moto oyo azali kosala yango asengeli kokembisa yango lisusu malamumalamu mpo akómisa yango kitoko. Ntango tozwaka batisimo, tozalaka na bizaleli oyo esengeli mpo na kokóma mosaleli ya Nzambe. Nzokande, bomoto na biso ya sika esengeli kokola lisusu. Tosengeli kokoba kobongwana ntango nyonso mpo na kobongisa bomoto yango.
Ata Paulo amonaki ete asengeli kobongisa bomoto na ye. Alobaki boye: “Ntango nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai.” (Lom. 7:21) Paulo ayebaki malamu ndenge azalaki mpe ndenge azalaki kolinga azala. Bongo biso? Biso mpe tosengeli komituna boye: ‘bizaleli nini nazali na yango? Nazali moto ya ndenge nini? Mpe nalingaka kozala moto ya ndenge nini?’
Bizaleli nini nazali na yango?
Soki ozali kobongisa ndako oyo ebebá, kotya kaka langi na libándá ebongi te, soki makonzi to mabaya na yango epɔlá. Soki tobongisi te makonzi to mabaya oyo ebebi, ndako yango ekobimisela biso mindondo na nsima. Ndenge moko, komonana sembo na miso ya bato ekoki te. Tosengeli komitalela malamu mpe koyeba makambo oyo tosengeli kobongisa. Soki te, bizaleli ya mabe oyo tozalaki na yango liboso ekozonga. Yango wana, tosengeli komitalelaka. (2 Kol. 13:5) Tosengeli koluka koyeba bizaleli na biso ya mabe mpe kobongisa yango. Mpo na kolonga, Yehova apesi biso eloko oyo ekoki kosalisa biso.
Paulo akomaki boye: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya mpe epeli makasi koleka mopanga nyonso ya mino mibale mpe ekɔtaka tii na kokabola molimo ná elimo, mpe matonga ná mafuta na yango, mpe ezali na likoki ya kososola makanisi mpe mikano ya motema.” (Ebe. 4:12) Nsango ya Biblia, Liloba ya Nzambe, ekoki mpenza kobongola bomoi na biso. Ekɔtaka mpenza na kati na biso, na ndenge ya elilingi, tii na kati mpenza ya mikuwa. Emonisaka polele makanisi na biso, elakisaka ete tozali mpenza te ndenge tozali komonana to ndenge tozali kokanisa ete tozali. Liloba ya Nzambe esalisaka biso mpenza tóyeba bomoto na biso!
Ntango tozali kobongisa ndako oyo ebebi, ekozala malamu te tósuka kaka na kobongisa biloko oyo ebebaki. Koyeba nini ebebisaki ndako ekosalisa biso tózwa bibongiseli mpo likambo yango ezonga lisusu te. Ndenge moko, koyeba bizaleli na biso ya mabe mpe koyeba makambo oyo esalaki ete tókóma na bizaleli yango ekoki kosalisa biso tólonga bolɛmbu na biso. Makambo mingi esalaka ete tózala na bomoto oyo tozali na yango. Na kati na yango, tokoki kotánga bakelasi oyo tótánga mpe mbongo oyo tozali na yango, esika tofandi, mimeseno ya mboka na biso, baboti na biso, baninga na biso mpe mangomba na biso. Ata mpe makambo oyo totalaka na televizyo mpe na bafilme, bakisá mpe lolenge mosusu ya kominanola, esalaka ete tózala na bomoto boye to boye. Koyeba makambo oyo ekoki kobebisa bomoto na biso ekosalisa biso tókima makambo yango.
Nsima ya komitalela, tokoki mbala mosusu koloba, ‘Ezali ndenge na ngai.’ Kokanisa bongo ezali bozoba. Mpo na bato mosusu ya lisangá ya Kolinti oyo kala bazalaki kosala pite, kosangisa nzoto mibali na mibali, kolangwa, mpe bongo na bongo, Paulo alobaki ete: “Bamosusu na kati na bino bazalaki ndenge wana. Kasi bosili kosukolama pɛɛ . . . na elimo ya Nzambe na biso.” (1 Kol. 6:9-11) Na lisalisi ya elimo santu ya Yehova, biso mpe tokoki kosala mbongwana oyo esengeli.
Tózwa ndakisa ya mobali moko na nkombo Marcos,a oyo afandaka na Philippines. Mpo na ndenge akolaki, Marcos alobaki ete: “Baboti na ngai bazalaki koswana ntango nyonso. Yango wana nakómaki motomboki ntango nakómaki na mbula 19.” Marcos ayebanaki lokola mosani ya masano ya mbongo, moyibi monene oyo azalaki ntango mosusu ata koyiba na mondoki na mabɔkɔ. Kutu, mokolo mosusu ye ná baninga na ye bakɔtaki na mpɛpɔ moko na makanisi ya koyiba yango, kasi balongaki te. Marcos akobaki na bizaleli wana ya mabe ata nsima ya kobala. Nsukansuka, abungisaki biloko na ye nyonso na masano ya mbongo. Mwa moke na nsima, Marcos abandaki kosangana na mwasi na ye na boyekoli ya Biblia na Batatoli ya Yehova. Na ebandeli, azalaki komona ete abongi te kokóma Motatoli ya Yehova. Kasi, kosalela makambo oyo azalaki koyekola mpe koyangana na makita esalisaki Marcos atika banzela na ye ya kala. Lelo oyo, azwá batisimo mpe azali komipesa na koteya basusu mpo bango mpe bábongola bizaleli na bango.
Olingaka kozala moto ya ndenge nini?
Mbongwana nini tokoki kosala mpo na kokolisa bizaleli na biso ya baklisto? Paulo apesaki baklisto toli ete: “Bólongola yango nyonso epai na bino, nkɛlɛ, nkanda, mabe, maloba ya kofinga, mpe maloba ya nsɔni na monɔkɔ na bino. Bólobanaka lokuta te. Bólongola bomoto ya kala elongo na misala na yango.” Ntoma Paulo abakisi lisusu boye: “Bólata bomoto ya sika, oyo na nzela ya boyebi ya solosolo ezali kokómisama sika engebene elilingi ya Oyo azalisaki yango.”—Kols. 3:8-10.
Na yango, mokano na biso ya libosoliboso ezali ya kolongola bomoto ya kala mpe kolata oyo ya sika. Bizaleli nini tosengeli kozala na yango mpo na kolata bomoto ya sika? Paulo alobi ete: “Bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, motema malamu, elimo ya komikitisa, boboto mpe motema molai. Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu. Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo. Kasi, longola makambo nyonso wana, bólata bolingo, mpo yango ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Kols. 3:12-14) Kosala makasi mpo na kokóma na bizaleli wana ekosalisa biso ‘tómonana na ngɔlu mingi liboso ya [Yehova] mpe liboso ya bato.’ (1 Sam. 2:26) Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu amonisaki mpenza bizaleli ya Nzambe. Soki tozali koyekola mpe kolanda ndakisa na ye, tokoki kokóma “bamekoli ya Nzambe” lokola Klisto.—Ef. 5:1, 2.
Lolenge mosusu oyo tokoki koyeba makambo oyo tokoki kobongisa na bomoi na biso ezali ya koyekola bomoto ya bato oyo Biblia elobeli, kotala makambo ya malamu mpe ya mabe oyo bazalaki na yango. Na ndakisa, okoki kokanisa Yozefe, mwana ya Yakobo. Atako basalaki ye mabe, Yozefe atikaki te kozala na makanisi mpe bomoto ya malamu. (Gen. 45:1-15) Ndakisa mosusu ezali ya Abesaloma, mwana ya Davidi, oyo azalaki kokosa bato ete alingi bolamu na bango mpe bato bazalaki kokumisa ye mpo na kitoko na ye. Nzokande, azalaki motɛki mpe mobomi. (2 Sam. 13:28, 29; 14:25; 15:1-12) Komikumisa ete tozali bato malamu mpe kozala kitoko na nzoto, yango te nde emonisaka ete tozali bato malamu.
Tokoki kolonga
Mpo na kobongisa bomoto na biso mpe kozala kitoko na miso ya Nzambe, tosengeli kotya likebi na bomoto na biso ya kati. (1 Pet. 3:3, 4) Mpo na kobongisa bomoto na biso, tosengeli koyeba bizaleli na biso ya mabe mpe makambo oyo ezali kokómisa biso bongo, mpe tosengeli kosala makasi tókóma na bizaleli ya Nzambe. Tokoki mpenza kozala na elikya ete soki tosali milende wana tokolonga?
Ɛɛ, na lisalisi ya Yehova, tokoki kosala mbongwana oyo esengeli. Lokola mokomi ya nzembo, tokoki kobondela boye: “Ee Nzambe, zaliselá ngai motema ya pɛto mpe pesá ngai [elimo, NW] ya sika ya boyengebene kati na ngai.” (Nz. 51:10) Tokoki kosɛnga Nzambe apesa biso elimo na ye esalisa biso tókolisa mposa oyo tozali na yango ya koyokanisa bomoi na biso na mokano na ye. Na ndenge yango, tokoki mpenza kokóma kitoko na miso ya Yehova!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi ye nkombo mosusu.
[Elilingi na lokasa 4]
Mpo na kobongisa ndako oyo ebebi na mopɛpɛ, tokoki kosuka kaka na kopakola yango langi?
[Elilingi na lokasa 5]
Bomoto na yo ekómi lokola oyo ya Klisto?