MOKAPO 7
“Bótya likebi mpenza epai ya moto oyo ayiki mpiko”
1-3. (a) Mpasi ya ndenge nini Yesu ayokaki na elanga ya Getesemane, mpe mpo na ntina nini? (b) Tokoki koloba nini na ndakisa ya koyika mpiko ya Yesu, mpe yango ebimisi mituna nini?
MAKAMBO eyei ndongo. Yesu ayoká naino mpasi ya boye te ezala na makanisi mpe na motema. Akómi na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele. Ayei na elanga ya Getesemane, esika amesaná kokende, elongo na bantoma na ye. Mbala mingi azalaki kokutana na bango na esika yango. Kasi na butu oyo, amoni malamu azwa mwa ntango ya kozala ye moko. Atiki bantoma, akei mpenza na kati ya elanga, afukami mpe abandi kobondela. Abondeli na molende mpenza mpe ayoki mawa mingi, yango wana motoki na ye ekómi “lokola matangá ya makila oyo ezalaki kokwea na nse.”—Luka 22:39-44.
2 Mpo na nini Yesu atungisami mingi boye? Ya solo, ayebi ete mosika te akonyokwama makasi na nzoto, kasi yango te nde likambo oyo ezali kopesa ye mpasi mingi. Ezali na makambo ya ntina koleka oyo azali kokanisa. Azali komitungisa mingi mpo na nkombo ya Tata na ye, mpe ayebi ete bato bakozwa bolamu na mikolo ezali koya soki atikali sembo. Yesu ayebi ete ezali mpenza na ntina ayika mpiko. Soki atikali sembo te, nkombo ya Yehova ekoyokisama mpenza nsɔni. Nzokande Yesu atikalaki sembo. Yesu atikalaki sembo ntango amekamaki mpe atikaki ndakisa eleki malamu na likambo etali koyika mpiko. Liboso akata motema, Yesu agangaki lokola moto alongi: “Ekokisami!”—Yoane 19:30.
3 Biblia elendisi biso ete ‘tótya likebi mpenza epai ya moto [Yesu] oyo ayiki mpiko.’ (Baebre 12:3) Yango ebimisi mituna ya ntina mingi: Wapi mwa makambo mosusu oyo Yesu ayikelaki mpiko? Nini esalisaki ye ayika mpiko? Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na ye? Kasi liboso tóyanola na mituna wana, tótalela soki koyika mpiko elimboli nini.
Koyika mpiko elimboli nini?
4, 5. (a) “Koyika mpiko” elimboli nini? (b) Ndakisa nini emonisi ete koyika mpiko esuki kaka te na kondima likambo moko ya mpasi oyo moto akutani na yango?
4 Ekómelaka biso nyonso ete ‘tóyoka mawa na komekama ndenge na ndenge.’ (1 Petro 1:6) Kasi soki moto azali kokutana na komekama, yango elingi koloba nde ete azali koyikela yango mpiko? Te. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “koyika mpiko” elimboli “likoki ya kotɛlɛma, to kopika mpende liboso ya mikakatano.” Na likambo etali koyika mpiko ndenge bakomi ya Biblia balobeli yango, moto moko ya mayele alobi ete: “Ezali ezaleli ya moto oyo akangaka motema na makambo oyo ekómeli ye, oyo abulunganaka na makanisi te, kasi azalaka na elikya makasi. . . Ezali ezaleli ya moto oyo azongaka nsima te liboso ya mokakatano. Ezali ezaleli oyo ekoki kobongola komekama makasi ekóma esengo, mpamba te esalisaka moto amona esengo oyo ekoya nsima ya komekama.”
5 Na yango, koyika mpiko esuki kaka te na kokutana na mikakatano oyo moto akoki kokima te. Ndenge Biblia elobeli yango, koyika mpiko elimboli kopikama makasi, kozala na makanisi oyo ebongi, mpe kozala na elikya ntango moto akutani na komekama. Tózwa ndakisa moko: Mibali mibale bakɔti bolɔkɔ esika moko kasi mpo na bantina ekeseni. Moko na bango azali mobomi; azwi etumbu, kasi andimi yango na mitema mibale. Mosusu azali mokristo ya solo oyo akɔti bolɔkɔ mpo na etamboli na ye ya sembo; atikali ngwi, mpe azali na makanisi malamu mpo ayebi ete ezali libaku mpo amonisa kondima na ye. Tokoloba te ete mobomi wana azali ndakisa malamu ya koyika mpiko, kasi mokristo wana ya sembo nde azali mpenza ndakisa na likambo etali koyika mpiko.—Yakobo 1:2-4.
6. Ndenge nini tolonaka ezaleli ya koyika mpiko?
6 Tosengeli koyika mpiko soki tolingi kobika. (Matai 24:13) Nzokande, tobotamaka te na ezaleli wana ya ntina mingi. Tosengeli kolona ezaleli ya koyika mpiko. Ndenge nini? Baroma 5:3 elobi ete: “Monyoko ebotaka ezaleli ya koyika mpiko.” Na yango, soki tolingi mpenza koyekola ndenge ya koyika mpiko, tosengeli te kokima makambo nyonso oyo ezali kotya kondima na biso na komekama. Kutu, na mpiko nyonso tokotɛlɛma ngwi liboso na yango. Tokokóma na ezaleli ya koyika mpiko soki mokolo na mokolo tozali kotɛlɛma ngwi liboso ya komekama ya mike mpe ya minene oyo tozali kokutani na yango mpe tozali kolonga yango. Ntango toyiki mpiko na mokakatano moko, yango epesaka biso makasi ya koyika mpiko na mokakatano oyo ekoya na nsima. Kasi, tokómaka na ezaleli ya koyika mpiko na makasi na biso moko te. Tosengeli kokoba ‘kotya motema na makasi oyo Nzambe apesaka.’ (1 Petro 4:11) Mpo na kosalisa biso tópikama makasi, Yehova apesi biso lisalisi oyo eleki malamu, elingi koloba ya Mwana na ye. Tótalela sikoyo ndenge oyo Yesu ayikaki mpiko na ndenge ya kokoka.
Makambo oyo Yesu ayikelaki mpiko
7, 8. Makambo nini Yesu ayikelaki mpiko ntango akómaki pene na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele?
7 Ntango Yesu akómaki pene na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele, ayikaki mpiko na makambo ya mpasi ndenge na ndenge. Longola konyokwama na makanisi na butu wana ya nsuka, kanisá mpasi oyo amonaki mpe kosambwa oyo asambwaki. Moko ya baninga na ye atɛkaki ye, baninga na ye ya motema basundolaki ye; na tribinale ya mboka, bakonzi ya mangomba basambisaki ye na kozanga bosembo, basɛkaki ye, babwakelaki ye nsoi, mpe babɛtaki ye makofi. Kasi, ayikelaki makambo wana nyonso mpiko mpe na kimya mpe na limemya.—Matai 26:46-49, 56, 59-68.
8 Ntango akómaki pene na liwa, Yesu anyokwamaki makasi na nzoto, kasi ayikaki mpiko. Abɛtamaki fimbo, kobɛtama moko ya nsɔmɔ ndenge oyo Biblia elobi mpo na ye ete “azokaki bampota makasi mpe makila ebimaki mingi.” Abakamaki na nzete, ndenge ya koboma oyo ezalaki kosala ete moto “anyokwama naino makasi liboso akufa.” Kanisá naino mpasi oyo ayokaki na nzete ntango bazalaki kobaka ye nsɛtɛ minene na mabɔkɔ mpe na makolo. (Yoane 19:1, 16-18) Kanisá mpe mpasi oyo ayokaki ntango batɛlɛmisaki nzete yango, wana nzoto na ye ezalaki kopasuka na bansɛtɛ mpe mposo ya mokɔngɔ na ye ezalaki kolongwa ntango ezalaki kotutana na nzete. Ayikelaki nyonso wana mpiko atako azalaki kotungisama na makanisi, ndenge tolobelaki yango na ebandeli ya mokapo oyo.
9. Mpo na biso, komema “nzete ya mpasi” mpe kolanda Yesu esɛngi nini?
9 Makambo nini biso baoyo tolandaka Kristo tokoki koyikela yango mpiko? Yesu alobaki ete: “Soki moto alingi kolanda ngai . . . amema nzete na ye ya mpasi mpe akoba kolanda ngai.” (Matai 16:24) Maloba “nzete ya mpasi” esalelami awa mpo na komonisa mpasi, nsɔni ata mpe liwa. Kolanda Kristo ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Mibeko oyo biso bakristo tolandaka ekesenisaka biso ná bato mosusu. Mokili oyo eyinaka biso mpo tozali bato na yango te. (Yoane 15:18-20; 1 Petro 4:4) Ata bongo, tondimi komema nzete na biso ya mpasi, elingi koloba konyokwama, ata mpe kokufa na esika ya kotika kolanda moto oyo azali ndakisa na biso.—2 Timote 3:12.
10-12. (a) Mpo na nini kozanga kokoka ya bato oyo bazalaki elongo na Yesu etyaki koyika mpiko na ye na komekama? (b) Wapi makambo mosusu ya mpasi oyo Yesu ayikelaki mpiko?
10 Na boumeli ya mosala na ye, Yesu akutanaki na komekama mosusu oyo eutaki na kozanga kokoka ya bato oyo bazalaki elongo na ye. Tóbosana te ete azalaki “mosali ya mayele,” oyo Yehova asalelaki mpo na kozalisa mabele mpe biloko nyonso oyo ezali na mabele. (Masese 8:22-31) Na yango, Yesu ayebaki mokano ya Yehova mpo na bato; basengelaki koyeba ntina oyo Yehova akelaki bato, komonisa bizaleli ya Yehova mpe kozala na bomoi moko ya kokoka. (Ebandeli 1:26-28) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonaki na miso makambo mabe oyo lisumu ebimisá; lokola moto, akokaki kokanisa mpe kozala na mayoki lokola moto nyonso. Kanisá mpasi oyo ayokaki ntango azalaki komona ndenge bato bazangaki ezaleli ya kokoka oyo Adama ná Eva bazalaki na yango! Na yango, nyonso wana esengelaki kosalisa Yesu ayeba soki azalaki na ezaleli ya koyika mpiko to te. Alɛmbaki nde nzoto mpe atikaki na ye, mpo amonaki ete bato bazalaki mpenza na ezaleli ya kozanga kokoka mpe bakoki kobongwana soki moke te? Tiká tótalela yango.
11 Kozanga kondima ya Bayuda epesaki Yesu mawa mingi, yango wana alelaki. Kozanga kondima na bango elɛmbisaki nde molende na ye to etindaki ye atika kosakola? Ata moke te, kutu “mokolo na mokolo akobaki koteya na tempelo.” (Luka 19:41-44, 47) Ye “ayokaki mpenza mawa mingi” mpo na motema makasi ya Bafarisai oyo bazalaki kotala ye na likebi nyonso mpo na komona soki akobikisa moto na Sabata. Atikaki nde ete banguna wana oyo bazalaki komimona bato ya sembo bábangisa ye? Soki moke te! Abangaki te mpe abikisaki moto yango, na kati mpenza ya sinagoga!—Marko 3:1-5.
12 Likambo mosusu mpe etyaki Yesu na komekama: bolɛmbu ya bayekoli oyo bazalaki elongo na ye. Ndenge tomonaki yango na Mokapo 3, bayekoli bazalaki ntango nyonso komonisa mposa ya kozala na esika ya lokumu. (Matai 20:20-24; Luka 9:46) Yesu apesaki bango toli mbala na mbala na likambo etali kozala na komikitisa. (Matai 18:1-6; 20:25-28) Atako bongo, babongolaki makanisi na bango mbala moko te. Kutu, ata na butu ya nsuka oyo azalaki elongo na bango, “ntembe makasi” ebimaki kati na bango mpo na koyeba nani kati na bango alekaki bamosusu! (Luka 22:24) Yesu alɛmbaki nde nzoto, mpe akanisaki ete bakobongwana lisusu te? Te! Ntango nyonso amonisaki motema molai, azalaki na makanisi malamu mpe abungisaki elikya te; azalaki komona bizaleli malamu oyo bazalaki na yango. Ayebaki ete bazalaki kolinga Yehova na motema na bango mpe bazalaki mpenza na mposa ya kosala mokano na Ye.—Luka 22:25-27.
13. Komekama nini Yesu ayikelaki mpiko, oyo biso mpe tokoki kokutana na yango?
13 Biso mpe tokoki kokutana na komekama lokola oyo Yesu ayikelaki mpiko. Na ndakisa, tokoki kokutana na bato oyo baboyaka nsango ya Bokonzi to mpe batɛmɛlaka yango. Tokotika makanisi wana ya mabe elɛmbisa biso, to tokokoba nde kosakola na molende? (Tito 2:14) Kozanga kokoka ya bandeko na biso bakristo ekoki mpe kotya biso na komekama. Bakoki koloba to kosala likambo moko kozanga kokanisa oyo ekoki koyokisa biso mpasi na motema. (Masese 12:18) Tokotika nde mabunga ya bandeko na biso bakristo etinda biso tóboya bango, to tokokoba nde kokanga motema na mabunga na bango mpe koluka nde bizaleli na bango ya malamu?—Bakolose 3:13.
Oyo esalisaki Yesu ayika mpiko
14. Wapi makambo mibale oyo esalisaki Yesu atɛlɛma ngwi?
14 Nini esalisaki Yesu atɛlɛma ngwi mpe abatela bosembo na ye, atako basambwisaki ye, balɛmbisaki ye nzoto, mpe bamonisaki ye mpasi? Makambo mibale ya ntina nde esalisaki Yesu. Ya liboso, azalaki kotala likoló, azalaki kosɛnga “Nzambe apesa [ye] ezaleli yango ya koyika mpiko.” (Baroma 15:5) Ya mibale, Yesu azalaki kotala liboso, azalaki kotya likebi na mbano oyo akozwa soki ayiki mpiko. Tiká tótalela makambo yango mokomoko.
15, 16. (a) Nini emonisi ete mpo Yesu ayika mpiko atyaki motema te na makasi na ye moko? (b) Likambo nini Yesu andimaki mpo na Tata na ye, mpe mpo na nini?
15 Atako Yesu azalaki Mwana ya kokoka ya Nzambe, atyaki motema te na makasi na ye moko mpo na koyika mpiko. Kasi azalaki nde kotyela Tata na ye ya likoló motema mpe azalaki kobondela ye mpo na kosɛnga lisalisi. Ntoma Paulo akomaki: Kristo “asalaki mabondeli mpe lisusu asɛngaki na koganga makasi mpe na mai ya miso epai ya Moto oyo azalaki na likoki ya kobikisa ye na liwa.” (Baebre 5:7) Tósimba ete Yesu asukaki te na ‘kosɛnga’, kasi asalaki mpe malɔmbɔ. (Talá mpe nɔti na liloba mabondeli.) Liloba “malɔmbɔ” ezali mingimingi komonisa kobondela na motema moko mpe na molende, elingi koloba kobondela mpo na kosɛnga lisalisi. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “malɔmbɔ” emonisi ete Yesu azalaki kobondela Yehova mbala na mbala. Na ntembe te, na elanga ya Getesemane, Yesu abondelaki mbala na mbala mpe na molende.—Matai 26:36-44.
16 Yesu andimaki na motema mobimba ete Yehova akoyanola na makambo oyo asɛngaki ye, mpo ayebaki ete Tata na ye azali “Moyoki ya libondeli.” (Nzembo 65:2) Liboso aya awa na mabele, Mwana ya liboso ya Nzambe amonaki ndenge Tata na ye azalaki koyanola na mabondeli ya basambeli na ye ya sembo. Na ndakisa, wana azalaki na likoló, Mwana amonaki ndenge Yehova atindaki anzelu moko ayanola na libondeli oyo mosakoli Danyele asalaki na motema moko, liboso kutu Danyele asilisa kobondela. (Danyele 9:20, 21) Bongo ekobanda boni Tata azanga koyanola Mwana na ye se moko oyo abotamaki, ntango azalaki kofungwela ye motema na “koganga makasi mpe na mai ya miso”? Yehova ayanolaki na mabondeli ya Mwana na ye mpe atindaki anzelu moko alendisa ye mpo ayika mpiko na komekama makasi oyo azalaki kokutana na yango.—Luka 22:43.
17. Mpo tóyika mpiko, mpo na nini tosengeli kotala likoló, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?
17 Mpo biso mpe tóyika mpiko, tosengeli kotala na likoló epai ya Nzambe ‘oyo apesaka nguya.’ (Bafilipi 4:13) Soki Mwana ya kokoka ya Nzambe amonaki ntina ya kobondela Yehova mpo na kosɛnga lisalisi, biso mpe tosengeli kosala lisusu mingi koleka! Lokola Yesu, biso mpe tosengeli kobondelaka Yehova mbala na mbala. (Matai 7:7) Tozelaka te ete Nzambe atindela biso anzelu moko boye mpo aloba na biso, kasi tóbosana te likambo oyo: Nzambe na biso ya bolingo akoyanola na mabondeli ya mosaleli na ye ya sembo oyo “atingamaka na malɔmbɔ mpe na mabondeli butu moi.” (1 Timote 5:5) Ezala komekama nini oyo tokoki kokutana na yango, na ndakisa, kobɛla, liwa ya moto oyo tolingaka, to minyoko oyo euti epai ya batɛmɛli, Yehova akoyanola na mabondeli oyo tobondelaka na motema moko mpo na kosɛnga bwanya, molende mpe makasi mpo tóyika mpiko.—2 Bakorinti 4:7-11; Yakobo 1:5.
18. Likambo nini mosusu esalisaki Yesu ayika mpiko?
18 Likambo ya mibale oyo esalisaki Yesu ayika mpiko ezali ete azalaki kotya makanisi na ye na mbano oyo akozwa nsima ya mikakatano oyo azalaki kokutana na yango. Biblia elobi mpo na Yesu ete: “Mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye ayikelaki nzete ya mpasi mpiko.” (Baebre 12:2) Ndakisa ya Yesu emonisi ete elikya, esengo, mpe koyika mpiko etambolaka nzela moko. Tokoki kolobela yango na mokuse boye: Elikya ekoki kosalisa biso tózala na esengo, mpe esengo esalisaka biso tókoba koyika mpiko. (Baroma 15:13; Bakolose 1:11) Yesu ayebaki ete makambo mingi ya malamu esengelaki kosalema soki ayiki mpiko. Ayebaki ete soki atikali sembo, akolongisa lotomo oyo Tata na ye azali na yango ya koyangela mpe yango ekosalisa ye apesa lisiko mpo na kolongola bato na lisumu mpe na liwa. Lisusu, Yesu azalaki na elikya ya kozala Mokonzi mpe Nganga-nzambe Monene, mpo na kopesa bato ya botosi mapamboli mingi. (Matai 20:28; Baebre 7:23-26) Lokola Yesu atyaki makanisi na ye na mapamboli wana mpe na elikya kitoko wana, yango esalisaki ye azala na esengo mpe ayika mpiko.
19. Ntango kondima na biso emekami, ndenge nini elikya, esengo, mpe koyika mpiko ekoki kosalisa biso?
19 Lokola Yesu, biso mpe tosengeli kozala na elikya mpe na esengo mpo tokoka koyika mpiko. Ntoma Paulo alobaki ete: “Bósepelaka na elikya.” Na nsima, abakisaki ete: “Bóyika mpiko ntango bozali kokutana na minyoko.” (Baroma 12:12) Sikoyo ezali nde na likambo moko oyo ezali mpenza komeka kondima na yo? Soki bongo, kanisá na mozindo na mapamboli oyo okozwa soki oyiki mpiko. Kobosana te ete soki oyiki mpiko, okosanzola nkombo ya Yehova. Kobá kokanisa ntango nyonso elikya kitoko oyo ozali na yango ya kozala na bomoi na nse ya Bokonzi ya Nzambe. Salá lokola nde ozali na mokili ya sika ya Nzambe oyo ezali koya, mpe moná lokola nde ozwi mapamboli na Paradiso. Moná lokola nde makambo kitoko oyo Yehova alaki ekokisami, na ndakisa akómi koyangela biloko nyonso, makambo ya mabe ezali lisusu te na mabele, maladi mpe liwa esili. Soki osali bongo, motema na yo ekotonda na esengo, mpe esengo yango ekosalisa yo oyika mpiko na komekama nyonso oyo ekoki kokómela yo. Soki tokokanisi bampasi ya bomoi ya lelo ná makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala, na ntembe te, bampasi yango ezali mpenza ya “ntango mokuse mpe ya pɛpɛlɛ.”—2 Bakorinti 4:17.
‘Tólanda matambe na ye malamumalamu’
20, 21. Na oyo etali koyika mpiko, Yehova azali kosɛnga biso nini, mpe ekateli nini tosengeli kozwa?
20 Yesu ayebaki ete kolanda ye ekozala pɛtɛɛ te, ekosɛnga koyika mpiko. (Yoane 15:20) Alakisaki biso ndenge ya koyika mpiko na komekama mpe ayebaki ete ndakisa na ye ekolendisa basusu. (Yoane 16:33) Ya solo, na oyo etali koyika mpiko, Yesu atiká ndakisa ya kokoka, nzokande biso tozali bato ya kozanga kokoka. Yehova azali kosɛnga nini epai na biso? Petro alobi: “Kristo . . . amonaki mpasi mpo na bino, atikeli bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.” (1 Petro 2:21) Na makambo oyo asalaki ntango akutanaki na komekama, Yesu atikelá biso “ndakisa,” likambo oyo tosengeli komekola.a Tokoki kokokanisa makambo oyo Yesu alobaki mpe asalaki na “matambe,” to bilembo ya makolo. Tokoki te kolanda matambe yango na ndenge ya kokoka, kasi tokoki kolanda yango “malamumalamu.”
21 Na yango, tózala na ekateli ya kosala nyonso oyo tokoki mpo na kolanda ndakisa ya Yesu. Tóbosana te ete soki tolandi matambe ya Yesu malamumalamu, tokozala na nyonso oyo tosengeli mpo na koyika mpiko “tii na nsuka”, ezala nsuka ya mokili oyo to nsuka ya bomoi na biso. Toyebi te nsuka nini ekoya liboso, kasi likambo toyebi yango oyo: Yehova akopesa biso mbano ya seko mpo na ezaleli na biso ya koyika mpiko.—Matai 24:13.
a Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “ndakisa” elimboli mpenzampenza “likomi ya komekola.” Na bakomi nyonso ya Makomami ya Grɛki ya Bokristo kaka ntoma Petro nde asaleli liloba yango, oyo elimboli “‘likomi oyo ekomami likoló’ na kaye ya mwana; ekomami na ndenge ya malamu mpenza mpo mwana amekola yango.”