‘Tóyeba kosalela malamu Liloba na Solo’
LILOBA ya Nzambe ezali ebombelo ya mitindá oyo ezali na ntina mingi mpo na bomoi ya malamu. Ekoki kosalisa ministre na koteya, na kopamela, mpe na kosembola. (2 Timoté 3:16, 17) Nzokande, mpo na kozwa matomba mingi na litambwisi wana lipesami na Nzambe, tosengeli kolanda toli oyo ntoma Paulo apesaki Timoté: “Omeka na nguya nyonso komimonisa yo moko epai na Nzambe lokola mosali oyo abongi koyoka nsɔni te, awa ezali yo [kosalela malamu, NW] liloba na solo.”—2 Timoté 2:15.
Liloba ya Nzambe ekokisami na makambo mingi, na ndakisa na mabɛ́lɛ ya komɛla, na bilei ya makasi, mai oyo makitisaka motema mpe oyo mapɛtolaka, na talatálá, mpe na mopanga oyo mopeli. Koyeba soki maloba wana malimboli nini ekosalisa ministre na kosalela Biblia na mayele mpenza.
Kopesa mabɛ́lɛ ya Liloba ya Nzambe
Mabɛ́lɛ ezali bilei oyo bisengeli mpo na bana mike. Wana mwana moke azali kokóla, bilei makasi bikobanda kotyama mokemoke na bilei na ye, kasi na ebandeli akomɛlaka bobele mabɛ́lɛ. Na makambo mingi, baoyo bayebi makambo moke na ntina na Liloba ya Nzambe bazali lokola bana mike. Soki moto abandi kosepela sika na Liloba ya Nzambe to soki asili komesana na yango uta na mwa ntango, soki azali bobele na bososoli moke ya makambo oyo Biblia ezali koloba, azali mwana moke na elimo mpe azali na mposa ya bilei ya pɛtɛpɛtɛ—“mabɛlɛ” ya elimo. Akoki naino te mpo na kolya “bilei makasi,” makambo mozindo ya Liloba ya Nzambe.—Baebele 5:12.
Ezali likambo oyo emonanaki na lisangá ya sika oyo liutaki kosalema na Kolinti wana Paulo akomaki epai na bango ete: “Namɛlisaki bino mabɛlɛ, napesaki bino bilei na makasi te, mpo ete bokokaki na yango te.” (1 Bakolinti 3:2) Bakolinti basengelaki liboso koyekola “makambo mikemike na liboso na mateya na Nzambe.” (Baebele 5:12) Na kotalela bokóli na bango, “makambo mozindo na Nzambe,” makoki na bango te.—1 Bakolinti 2:10.
Lokola Paulo, lelo oyo baministre baklisto bazali komonisa ete bazali komibanzabanza mpo na bana mike na elimo na kopesáká bango “mabɛ́lɛ,” elingi koloba, na kosalisáká bango ete bákangama ngwi kati na mateya ya moboko ya boklisto. Bazali kolendisa bato wana ya sika to bato oyo bakɔmɛli naino te na “koyoka mposa makasi ya mabɛ́lɛ oyo ebebisami te oyo ezali na liloba.” (1 Petelo 2:2, NW) Ntoma Paulo amonisaki ete azalaki kososola mposa ya bato wana ya sika wana akomaki ete: “Moto na moto oyo akomɛlaka mabɛ́lɛ akososolaka liloba na boyengebene te, azali naino mwana.” (Baebele 5:13) Motema pɛtɛɛ, limemya, bososoli, mpe boboto esɛngami epai na baministre ya Nzambe wana bazali kopesa mabɛ́lɛ ya pɛto ya Liloba epai na bato ya sika mpe baoyo bazangi eksperiansi na nzela ya boyekoli ya Biblia kati na bandako ya bato mpe kati na lisangá.
Kosalela malamu bilei makasi ya Liloba ya Nzambe
Mpo na kokóla kino kozwa lobiko, moklisto asengeli bobele na “mabɛ́lɛ” te. Nsima wana moto asosoli makambo ya solo ya ebandeli mpe andimi yango, akomilɛngɛla mpo na kolya ‘bilei makasi oyo ezali mpo na bato bakɔmɛli.’ (Baebele 5:14) Lolenge nini akoki kosala yango? Mpenzampenza, na nzela ya momeseno ya boyekoli na ye moko mpe na bosangani na makita ya boklisto. Mimeseno malamu motindo wana mikosalisa moklisto ete azala makasi na elimo, akɔmɛla mpe abota mbuma kati na mosala ya kosakola. (2 Petelo 1:8) Tosengeli te kobosana ete longola boyebi, kosala mokano ya Nzambe ezali mpe bilei ya elimo.—Yoane 4:34.
Lelo oyo, “moombo ya sembo mpe ya mayele” asili kotyama mpo na kopesa basaleli ya Nzambe bilei na ntango ekoki mpe mpo na kosalisa bango ete básosola “mingi motindo na motindo na mayele ya Nzambe.” Yehova, na nzela ya elimo na ye, azali komonisa makambo ya solo mozindo ya Makomami na nzela ya moombo na ye ya sembo, oyo na bosembo nyonso azali kobimisa “na ntango ekoki bilei” ya elimo. (Matai 24:45-47; Baefese 3:10, 11; kokanisá na Emoniseli 1:1, 2.) Moklisto moko na moko azali na mokumba ya kosalela malamumalamu bilei yango oyo ebimisami.—Emoniseli 1:3.
Ya solo, kati na Biblia makambo mosusu mazali “makasi mpo na kososola,” ata mpo na baklisto oyo bakɔmɛli. (2 Petelo 3:16) Ezali na maloba ya makasi, na bisakweli, mpe na masese oyo masɛngaka koyekola mpe komanyola mingi. Na yango, boyekoli ya moto na moto esangisi kotimola mozindo kati na Liloba ya Nzambe. (Masese 1:5, 6; 2:1-5) Mingimingi bankulutu bazali na mokumba kati na likambo yango wana bazali koteya lisangá. Ezala ete bazali kotambwisa Boyekoli ya Mokanda na lisangá to Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, to ezala bazali kopesa masukúlu ya bato banso, to ezala ete bazali kosalela makoki na bango mosusu ya koteya, bankulutu basengeli koyeba malamu makambo oyo bakoloba mpe komilɛngɛla mpo na kotya likebi na “makoki ya koteya” oyo bazali na yango wana bazali kopesa bilei makasi ya elimo na lisangá.—2 Timoté 4:2.
Mai oyo makitisaka motema mpe oyo mapɛtolaka
Yesu ayebisaki na mwasi Mosamalia pene na libulu ya mai ete akokaki kopesa ye mai ya komɛla oyo elingaki kokóma kati na mwasi wana “liziba na mai makopunzwapunzwa kino bomoi na seko.” (Yoane 4:13, 14; 17:3) Mai oyo makopesaka bomoi ezali bongo bibongiseli nyonso Nzambe akamati mpo na kozwa bomoi na nzela ya Mwana na Mpate ya Nzambe, mpe bibongiseli yango bilimbolami kati na Biblia. Lokola bato oyo bazali na mposa mpo na “mai” wana, tondimi libyangami oyo elimo mpe mwasi na libala ya Klisto bazali kopesa ya “kokamata mai na bomoi lokola likabo.” (Emoniseli 22:17) Komɛla mai wana ekoki kolimbola bomoi ya seko.
Lisusu, Biblia epesi mitindá ya bizaleli malamu mpe ya elimo mpo na baklisto ya solo. Wana tozali kosalela mitindá wana mipesami na Nzambe, topɛtolami na Liloba ya Yehova, “tosukwami pɛto” na misala nyonso oyo Yehova Nzambe azali koyina. (1 Bakolinti 6:9-11) Mpo na ntina wana, solo oyo ezali kati na Liloba lipemami ebyangami “mai na kosukola.” (Baefese 5:26, NW) Soki topesi nzela te na solo ya Nzambe ete epɛtola biso lolenge wana, losambo na biso ekondimama epai na ye te.
Likambo ya kobenda likebi, bankulutu oyo ‘bayebi kosalela malamu liloba na solo’ bakokisami mpe na mai. Yisaya alobi ete bazali “lokola bitima na mai kati na esika ekauki.” (Yisaya 32:1, 2) Bankulutu ya bolingo bazali kokokisa maloba oyo ntango bazali kotala bandeko na bango lokola babateli ya mpate na elimo, kosaleláká Liloba ya Nzambe oyo lizali kokitisa motema mpo na kolendisa, kobɔndisa, na makambo ya elimo oyo mazali kokembisa mpe kopesa makasi.—Kokanisá na Matai 11:28, 29.a
Basangani ya lisangá bazali komizela ete bankulutu bátalaka bango. Bonnie alobi ete: “Nayebi ete bankulutu bazali mpenza bato oyo bakoki kopesa libɔndisi, mpe nazali na esengo mingi lokola Yehova asili kosala ebongiseli wana.” Lynda, mama oyo azali monzemba, akomi ete: “Na bilendiseli ya Makomami, bankulutu balendisaki ngai mpo ete nalónga. Bazalaki koyoka ngai mpe bamoniselaki ngai motema mawa.” Michael alobi ete: “Bapesaki ngai mayoki ya kozala na lisangá oyo ezali komibanzabanza mpo na bato.” Mosusu alobi ete: “Koya ya bankulutu esalisaki ngai na kolónga eleko ya kotungisama makasi na makanisi.” Wana nkulutu moko ayei kotala yo mpo na kolendisa yo na elimo ekoki kozala lokola mai ya mpiɔ mpo na kokitisa motema. Bato oyo bakokani na bampate bazali kobɔndisama wana bankulutu ya bolingo bazali kosalisa bango na komona lolenge mitindá ya Makomami misalelami na makambo matali bango.—Baloma 1:11, 12; Yakobo 5:14.
Kosalela Liloba ya Nzambe lokola talatálá
Wana moto azali kolya bilei makasi, mokano ezali te bobele ya koyoka elɛngi ya bilei. Nzokande, mposa na ye ezali ete bilei bipesa ye makasi mpo na mosala. Soki azali mwana, azali komizela ete bilei yango bikosalisa ye na kokóla mpo ete akóma mokóló. Ezali bobele bongo mpo na bilei ya elimo. Boyekoli ya Biblia ya moto na moto ekoki kozala elɛngi, kasi yango ezali te ntina bobele moko mpo na yango. Bilei ya elimo bisengeli kobongola biso. Ezali kosalisa biso ete tóyebana malamu mpe tóbota mbuma ya elimo mpe ezali kosunga biso ete tólata “bomoto ya sika, oyo na nzela ya boyebi ya sikisiki ezalisami sika engebene elilingi ya Ye oyo azalisaki yango.” (Bakolose 3:10, NW; Bagalatia 5:22-24) Bilei ya elimo mpe bizali kosalisa biso ete tókóla kino kokɔmɛla, kosaláká ete tózala na makoki mingi mpo na kosalela mitindá ya Makomami mpo na kosilisa mikakatano na biso mpe mpo na kosalisa basusu ete básilisa oyo ya bango.
Lolenge nini tokoki koloba soki Biblia ezali na bopusi motindo wana likoló na biso? Tozali kosalela Biblia lokola talatálá. Yakobo alobaki ete: “Bózalaka nde batosi na liloba, bobele bayoki mpamba te . . . Mpo ye oyo akoyokaka liloba nde akotosaka yango te azali lokola mobali oyo amitali elongi na nzoto na ye na talatálá. Amitali mpe alongwi nde nokinoki abosani soko azali motindo nini. Nde ye oyo azali kotalatala na mobeko mobongi, mobeko na bonsomi, mpe aumeli kotalatala wana, azali moyoki oyo akobosana te kasi akosalaka misala; ye wana akozala na esengo kati na misala na ye.”—Yakobo 1:22-25.
Tozali ‘kotalatala’ kati na Liloba ya Nzambe ntango tozali kotalela yango mpenza mpe kokokanisa yango na lolenge oyo tosengeli kozala engebene mibeko ya Nzambe. Kosaláká bongo, tokokóma “batosi na liloba, bobele bayoki mpamba te.” Biblia ekozala na bopusi malamu likoló na biso.
Liloba ya Nzambe lokola mopanga
Na nsuka, ntoma Paulo asalisi biso na komona lolenge tokoki kosalela Liloba ya Nzambe lokola mopanga. Wana azali kokebisa biso na ntina na “nguya mpe na mikonzi na mokili oyo na molili, mpe na bilimo mabe kati na Likoló,” alendisi biso ete ‘tókamata . . . mopanga na elimo, yango Liloba na Nzambe.’ (Baefese 6:12, 17) Liloba ya Nzambe ezali ebundeli ya ntina oyo tokoki kosalela mpo na kokweisa makanisi oyo mazali “kotɛmɛla boyebi ya Nzambe.”—2 Bakolinti 10:3-5.
Kozanga ntembe, “liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya.” (Baebele 4:12) Yehova azali koloba na bato na nzela na nkasa ya Liloba na ye lipemami. Salelá yango malamu mpo na koteya basusu mpe mpo na kotɔndɔla mateya ya lokuta. Salelá yango mpo na kolendisa, kotonga, kokitisa motema, kobɔndisa, kopusa, mpe kokembisa basusu na elimo. Mpe tiká ete Yehova ‘abongisa yo na misala nyonso malamu ete osala mokano na ye,’ mpo ete osala ntango nyonso oyo ezali “kosepelisa ye.”—Baebele 13:21.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisoló ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali na motó na likambo ete “Bazali kobatela bampate mike na motema mawa nyonso,” 15 Sɛtɛ́mbɛ 1993, nkasa 20-23.
[Elilingi na lokasa 31]
Bankulutu basalisaka basusu, ete ‘báyeba kosalela malamu liloba na solo’