Bótika te kopota mbangu mpo na bomoi!
“Tópota na etingya na emekaneli na mbangu etyami liboso na biso.”—BAEBELE 12:1.
1, 2. Makambo nini ya esengo mazali kosepelisa basaleli ya Yehova na mikolo oyo ya nsuka?
TOZALI kobika na eleko ya yikiyiki mpe ya mpasi. Esili sikawa koleka mbula 80 na ndambo, na 1914, Yesu asilaki kotyama Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe kuna na likoló. “Mokolo na Nkolo,” esika moko na “ntango na nsuka” ya ebongiseli ya biloko oyo ebandaki. (Emoniseli 1:10; Danyele 12:9) Uta ntango yango bopoti mbangu ya boklisto mpo na bomoi ekómi likambo ya lombangu mpenza. Basaleli ya Nzambe bazali kosala milende mingi mpo na kolanda likalo ya Yehova, lisangá na ye ya likoló, oyo ezali kotambola ntango nyonso liboso mpo na kokokisa mikano ya Yehova.—Ezekiele 1:4-28; 1 Bakolinti 9:24.
2 Basaleli ya Nzambe basili kozwa esengo wana bazali ‘kopota mbangu’ mpo na bomoi ya seko? Ɛɛ, ezali boye! Bazalaki na esengo na komona koyanganisama ya batikali bandeko ya Yesu, mpe bazali na esengo ya koyeba ete kotyama elembo ya nsuka mpo na batikali ya ba 144 000 ezali kokende na nsuka na yango. (Emoniseli 7:3, 4) Lisusu, bazali kosepela na kososola ete Mokonzi aponami na Yehova asili kolekisa likwangola na ye mpo na kobuka “biloko na kobuka na mokili.” (Emoniseli 14:15, 16) Mpe biloko yango bizali mingi mpenza! (Matai 9:37) Kino sikawa, milimo koleka milió mitano misili koyanganisama—“ebele monene, oyo moto te akoki kotánga motuya na bango; bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso; na bibolo nyonso; na minɔkɔ nyonso.” (Emoniseli 7:9) Moto te akoki koloba lolenge ebele monene yango ekozala na nsuka, mpamba te moto te akoki kotánga motuya na yango.
3. Mikakatano nini misengeli kopekisa biso te wana tozali komeka ntango nyonso kolóna elimo ya esengo?
3 Ya solo, Satana azali komeka kokweisa biso to kolɛmbisa biso wana tozali kopota mbangu. (Emoniseli 12:17) Mpe ezali pɛtɛɛ te kokóba kopota mbangu kati na bitumba, nzala, maladi, mpe makambo mosusu ya mpasi oyo mazali komonisa ntango ya nsuka. (Matai 24:3-9; Luka 21:11; 2 Timoté 3:1-5) Atako bongo, mitema na biso mizali kopumbwa na esengo wana tozali kopusana na nsuka ya bopoti mbangu. Tozali kosala milende mpo na komonisa elimo oyo Paulo alendisaki epai ya baninga baklisto na mikolo na ye ete: “Bósepelaka ntango nyonso kati na Nkolo. Nazali koloba lisusu ete, Bósepelaka!”—Bafilipi 4:4.
4. Baklisto ya Filipi bazalaki na elimo ya motindo nini?
4 Na ntembe te baklisto oyo Paulo akomelaki maloba yango bazalaki na esengo kati na kondima na bango, mpamba te Paulo alobaki na bango ete: “Bókóba kosepela kati na Nkolo.” (Bafilipi 3:1, NW) Lisangá ya Filipi ezalaki na bokabi, na bolingo mpe bazalaki kosala na molende mpe na mɔ́tɔ. (Bafilipi 1:3-5; 4:10, 14-20) Kasi, na ekeke ya liboso, elimo yango ezalaki epai ya baklisto nyonso te. Na ndakisa, bamoko kati na baklisto Bayuda baoyo Paulo akomelaki mokanda ya Baebele, bango bazalaki na makambo mosusu oyo epusaki ye ete amitungisa.
“Kotya motema na etingya na koleka”
5. (a) Elimo nini baklisto Baebele bazalaki na yango ntango lisangá ya liboso ya boklisto esalemaki? (b) Lobelá elimo oyo baklisto mosusu Baebele bazalaki na yango pene na mobu 60 T.B.
5 Lisangá ya libosoliboso ya boklisto kati na lisoló ya bato esangisaki Bayuda na mosuni mpe baprozelite mpe esalemaki na Yelusaleme na mobu 33 T.B. Ezalaki na elimo ya lolenge nini? Esengeli bobele kotánga mikapo ya ebandeli ya mokanda ya Misala mpo na koyeba mɔ́tɔ mpe esengo na yango, ata kati na minyoko. (Misala 2:44-47; 4:32-34; 5:41; 6:7) Nzokande, nsima ya bambula mingi, makambo mabongwanaki, mpe emonani ete Bayuda mingi oyo basilaki kokóma baklisto balɛmbaki kopota mbangu mpo na bomoi. Búku moko elobi boye na ntina na ezalela na bango pene na mobu 60 T.B.: “Goigoi mpe bolɛmbu, na ntina na kozanga kokokisama ya makambo oyo bazelaki, na bilikya oyo biumelaki mingi, kozanga kokokisa makambo na nkó mpe komonisa kozanga kondima na makambo ya mokolo na mokolo. Bazalaki baklisto kasi bakómaki na bosepeli moke mpo na nkembo ya libyangi na bango.” Lolenge nini baklisto bapakolami bakokaki kokóma na ezalela motindo wana? Botaleli ya mwa mikapo ya mokanda ya Paulo epai ya Baebele (ekomamaki pene na mobu 61 T.B.) ekosalisa biso na koyanola na motuna wana. Botaleli yango ekosalisa biso nyonso lelo oyo mpo ete tópɛngola kokwea na bolɛmbu ya elimo motindo wana.
6. Wapi mwa makambo ya bokeseni kati na losambo na nsé ya Mibeko ya Mose mpe losambo oyo ezwi moboko na kondimela Yesu Klisto?
6 Baklisto Baebele bautaki na Lingomba ya Bayuda, ebongiseli ya losambo epai bamilobaki ete bazalaki kotosa Mibeko oyo Yehova apesaki na nzela ya Mose. Emonani ete baklisto Bayuda mingi bazalaki naino kobendama na Mibeko yango, mbala mosusu mpo ete na boumeli ya bikeke mingi ebongiseli wana nde ezalaki nzela bobele moko mpo na kobɛlɛma na Yehova, mpe ezalaki ebongiseli monene ya losambo, na bonganga na yango, na bambeka ezalaki kopesama ntango nyonso, mpe na tempelo na yango na Yelusaleme oyo lokumu na yango etambolaki mokili mobimba. Boklisto ezali lolenge mosusu. Yango esɛngi kozala na liso ya elimo, lokola oyo ya Mose, moto oyo “atyaki miso na ye epai na libonza [na mikolo mizali liboso]” mpe “ayikaki mpiko lokola ete azali komona ye oyo akomonanaka te.” (Baebele 11:26, 27) Emonani ete Bayuda mingi oyo bakómaki baklisto bazangaki liso ya elimo motindo wana. Bazalaki kokakatana na esika ete bápota mbangu na mokano ya kozwa libonza.
7. Lolenge nini ebongiseli ya biloko oyo tobimi kati na yango ezali na bopusi likoló na bopoti mbangu na biso na emekaneli mpo na bomoi?
7 Makambo motindo yango mazali mpe komonana lelo oyo? Ya solo, lelo oyo makambo mazali mpenza lolenge moko te. Kasi, baklisto bauti na ebongiseli ya biloko oyo ezali komikumisa na makambo mingi. Mokili ezali kolakisa makambo ndenge na ndenge oyo mazali kosepelisa mayoki, kasi sé na ntango yango, ezali mpe kosɛnga makambo mingi epai ya bato. Lisusu, mingi kati na biso bafandi na mikili epai kuna ezaleli ya kobɛta ntembe ezali komonana mingi mpe epai kuna bato bazali na ezaleli ya moimi, mpe ya koluka liboso matomba na bango moko. Soki tomitiki kozwama na bopusi ya ebongiseli motindo yango, na bolɛmbu nyonso ‘miso ya motema na biso’ makolɛmba. (Baefese 1:18) Lolenge nini tokopota malamu na emekaneli mpo na bomoi soki tozali lisusu kososola malamumalamu te epai tozali kokende?
8. Kati na makambo nini boklisto eleki losambo na nsé ya Mibeko?
8 Mpo na kolendisa baklisto Bayuda, Paulo akundwelaki bango ete ebongiseli ya boklisto eleki ebongiseli ya Mibeko ya Mose na bonene. Ya solo, ntango Yisalaele ya mosuni ezalaki libota ya Yehova na nsé ya Mibeko, Yehova asololaki na bango na nzela ya basakoli bapemami. Kasi, Paulo alobi ete lelo oyo azali koloba “kati na Mwana oyo atii ye mosangoli na libula na biloko nyonso; na ye mpe azalisaki [bibongiseli ya biloko, NW].” (Baebele 1:2) Lisusu, Yesu aleki bakonzi nyonso na libota ya Davidi, “bazalani” na ye. Aleki ata baanzelu.—Baebele 1:5, 6, 9.
9. Lokola baklisto Bayuda na mikolo ya Paulo, mpo na nini tozali na mposa ya “kotya motema na etingya na koleka” na makambo oyo Yehova azali koloba?
9 Na yango, Paulo apesaki baklisto Bayuda toli ete: “Ekoki na biso kotya motema na etingya na koleka na makambo masili biso koyoka ete tópɛngwa nzela te.” (Baebele 2:1) Atako koyeba Klisto ezalaki lipamboli monene, makambo mosusu masɛngamaki. Basengelaki kotya likebi mingi na Liloba ya Nzambe mpo na komibatela na bopusi ya ebongiseli ya Bayuda oyo ezingaki bango. Biso mpe tosengeli “kotya motema na etingya na koleka” na maloba ya Yehova na kotalela makambo ndenge na ndenge mazali kobima na mokili oyo. Yango elimboli kokólisa mimeseno malamu ya boyekoli mpe kozala na manáka malamu ya botángi Biblia. Lokola Paulo alobaki yango na nsima kati na mokanda na ye epai na Baebele, yango elimboli mpe koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita mpe koyambola kondima na biso epai ya basusu. (Baebele 10:23-25) Momeseno motindo yango ekosalisa biso ete tósɛnzɛla ntango nyonso na elimo mpo ete tókóba komona elikya na biso ya nkembo. Soki totondisi elimo na biso na makanisi ya Yehova, tokozindisama te to tokotɛngatɛnga te ezala na likambo nini oyo mokili ekoki kosala biso.—Nzembo 1:1-3; Masese 3:1-6.
“Bópesanaka toli kati na bino mpenza”
10. (a) Nini ekoki kokómela moto oyo azali te kotya motema na etingya koleka na Liloba ya Yehova? (b) Lolenge nini tokoki kokóba “kopesana toli”?
10 Soki tozali mpenza kotya likebi mingi te na makambo ya elimo, tokoki komona lokola ete bilaka ya Nzambe bizali solo te. Likambo yango esalemaki na ekeke ya liboso ntango masangá mazalaki sé na baklisto bapakolami mpe wana bantoma mosusu bazalaki naino na bomoi. Paulo akebisaki Baebele ete: “Bandeko, bókebaka ete motema mabe mpe na kozanga kondima ezala kati na moko na bino te ete bótangwa na Nzambe na bomoi te. Kasi bópesanaka toli kati na bino mpenza mokolo na mokolo naino ezali yango kobyangama Lelo ete moko kati na bino te azalisama makasi na bozimbisi na masumu.” (Baebele 3:12, 13) Liloba “bókeba” oyo Paulo asaleli ezali komonisa mpenza ntina ya kosɛnzɛla. Likama ezali! Kozanga kondima—“lisumu”—ekoki kokóla na mitema na biso, mpe tokoki kopɛngwa mosika na Nzambe na esika ya kobɛlɛma na ye. (Yakobo 4:8) Paulo akundweli biso ete ‘tópesana toli biso mpenza.’ Tozali na mposa ya mɔ́tɔ ya bondeko. “Ye oyo akomitangola na bamosusu akolukaka yango ekosepelisa ye moko; akosilika na makambo nyonso na mayele.” (Masese 18:1) Lelo oyo, mposa ya bondeko motindo wana ezali kopusa baklisto ete báyanganaka na makita ya lisangá pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, na mayangani ya mike mpe ya minene.
11, 12. Mpo na nini tosengeli te kosuka bobele na koyeba makambo ya moboko ya mateya ya boklisto?
11 Nsima kati na mokanda na ye, Paulo apesi toli mosusu ya ntina mingi: “Ata na ntango oyo ebongi na bino kozala balakisi na bamosusu, bozali naino na bosɛnga ete moto alakisa bino lisusu makambo mikemike na liboso na mateya na Nzambe. Bozali na bosɛnga na [miliki, NW] nde na bilei makasi te. . . . Bilei makasi izali mpo na bato bakómi minene; mpo na bango basili kolakisa esoswelo na bango kokabola kati na malamu mpe mabe.” (Baebele 5:12-14) Ezali polele ete Bayuda mosusu oyo bakómaki baklisto bakólisaki te makoki na bango ya kokanisa. Bazalaki mpenza kondima te pole oyo ebakisamaki na ntina na Mibeko mpe kokatama ngenga. (Misala 15:27-29; Bagalatia 2:11-14; 6:12, 13) Ekoki kozala ete bamosusu bazalaki naino kopesa motuya na mimeseno ya bonkɔkɔ lokola Sabata ya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpe Mokolo ya Mbɔndi oyo ezalaki kosalema mbula na mbula.—Bakolose 2:16, 17; Baebele 9:1-14.
12 Na yango, Paulo alobi ete: “Boye tótika makambo mikemike na liboso na mateya na Klisto mpe [tókende liboso kino kokɔmela, NW].” (Baebele 6:1) Mopoti mbangu oyo azali kotya likebi mingi na lolenge na ye ya komileisa akozala na makoki mingi ya kolendendela na emekaneli ya mbangu oyo ezali molai mpe oyo elɛmbisaka. Lolenge moko, moklisto oyo azali kotya likebi na lolenge na ye ya komileisa na elimo—oyo azali kosuka te na mateya ya moboko, ‘ya liboso’—akozala na makoki mingi ya kokóba kopota mbangu mpe kokende kino nsuka. (Kokanisá na 2 Timoté 4:7.) Yango elimboli kokólisa bosepeli mpo na “monene mpe molai mpe bozindo” ya solo, na bongo kokóla kino kokóma moto akɔmeli.—Baefese 3:18.
“Bozali na mposa ya motema molai”
13. Lolenge nini baklisto Bayuda bamonisaki kondima na bango na ntango ya kala?
13 Na mikolo oyo elandaki Pentekote ya mobu 33 T.B., baklisto Bayuda batikalaki ngwi atako bakutanaki na botɛmɛli makasi. (Misala 8:1) Ekoki kozala ete Paulo akanisaki yango ntango akomaki ete: “Bókanisa lisusu mikolo na liboso ete wana esili bino kongɛngɛlama na moi, boyikaki mpiko kati na bolɔ́zi monene.” (Baebele 10:32) Koyika mpiko na bosembo motindo wana emonisaki bolingo na bango mpo na Nzambe mpe epesaki bango molende ya koloba liboso na ye. (1 Yoane 4:17) Paulo alendisi bango ete bábwaka yango te na ntina na kozanga kondima. Ayebisi bango ete: “Bosɛngi mitema milai ete bósala mokano na Nzambe mpe ete bózwa yango esili ye kolaka. Mpo ete naino mwa ntango moke, Ye oyo azali koya akoya mpe [akoumela, NW] te.”—Baebele 10:35-37.
14. Makambo nini masengeli kosalisa biso na kolendendela ata nsima ya kolekisa bambula mingi na mosala ya Yehova?
14 Ezali boni mpo na biso lelo oyo? Mingi kati na biso tozalaki na molende ntango toyekolaki solo ya boklisto mbala ya liboso. Tozali ntango nyonso na molende wana? To tosili nde ‘kotika bolingo na biso ya liboso’? (Emoniseli 2:4) Mɔ́tɔ na biso esili nde kokita, mbala mosusu bilikya na biso bikokisami te to tolɛmbi kozela Armagedon? Kasi, tófanda naino mpe tókanisa. Solo ezali ntango nyonso malamu mingi lokola ezalaki liboso. Yesu azali ntango nyonso Mokonzi na biso na likoló. Tozali ntango nyonso kolikya bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé, mpe tozali ntango nyonso na boyokani elongo na Yehova. Mpe tóbosana soko moke te ete: “Ye oyo azali koya akoya mpe [akoumela, NW] te.”
15. Lokola Yesu, lolenge nini baklisto mosusu bayikelaki minyoko makasi mpiko?
15 Na yango, maloba ya Paulo makomami na Baebele 12:1, 2 mabongi mpenza: “Tólongola bipekiseli nyonso mpe masumu [kozanga kondima] mazali kokanga biso tópota na etingya na emekaneli na mbangu etyami liboso na biso, awa ezali biso kotala Yesu, ye Mobandisi mpe [Mokokisi ya kondima na biso, NW]. Mpo na esengo etyami liboso na ye, ayikeli [nzeté na mpasi, NW] mpiko, atyoli nsɔni na yango mpe azali kofanda na lobɔkɔ na mobali na kiti na bokonzi na Nzambe.” Basaleli ya Nzambe bayikeli makambo mingi mpiko na mikolo oyo ya nsuka. Lokola Yesu, oyo azalaki sembo kino liwa ya mpasi, bandeko na biso mosusu mibali mpe basi, na bosembo nyonso, bayikelaki monyoko makasi mpiko—bolɔ́kɔ, kobɛtama makasi, kosangisa na bango nzoto na makasi, ata mpe liwa. (1 Petelo 2:21) Motema na biso ezali kofuluka na bolingo mpo na bango wana tozali kotalela bosembo na bango, boye te?
16, 17. (a) Mikakatano nini mitali kondima na bango baklisto mingi bazali kobunda na yango? (b) Likambo nini tosengeli komikundola mpo na kosalisa biso ete tókóba kopota mbangu na emekaneli mpo na bomoi?
16 Nzokande, mpo na baklisto mingi, maloba ya Paulo oyo malandi, mazali solo ete: “Na etumba na bino kobunda na masumu, bobundi naino kino kotangisa makila te.” (Baebele 12:4) Atako bongo, kati na ebongiseli oyo, nzela ya solo ezali pɛtɛɛ te mpo na biso nyonso. Bamoko bazali kolɛmbisama na “botɛmɛli euti na bato na masumu” ezala na esika ya mosala to na eteyelo, bazali koyikela botyoli mpiko to bazali kotɛmɛla masɛnginya ya kosala lisumu. (Baebele 12:3, NW) Komekama makasi esili kolɛmbisa ekateli ya bamoko ya kobatela mitindá mitombwani ya Nzambe. (Baebele 13:4, 5) Bapɛngwi basili kobebisa etɛlɛmɛlo malamu ya elimo ya mwa ndambo moke ya bato oyo bazali koyoka maloba na bango, oyo mazali na ngɛngɛ ekoki koboma. (Baebele 13:9) Kozanga boyokani kati na bamoko esili kolongola basusu esengo na bango. Komipesa mingi na kominanola esili kolɛmbisa baklisto mosusu. Mpe mingi bazali komona ete mikakatano ya bomoi na ebongiseli oyo mileki bango bozito mingi.
17 Ya solo, moko te kati na makambo yango ezali ‘etumba kino kotangisa makila.’ Mpe makambo mosusu makoki kouta na bikateli mabe oyo biso moko tozali kozwa. Kasi nyonso ezali komekama makasi mpo na kondima na biso. Na ntina yango tosengeli kotya ntango nyonso miso na biso na ndakisa kitoko ya kolendendela oyo Yesu atikaki. Tóbosana soko moke te elikya na biso kitoko. Tóbosana te endimiseli na biso ete Yehova “akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye.” (Baebele 11:6) Na bongo, tokozala na nguya ya elimo mpo na kokóba kopota mbangu mpo na bomoi.
Tokoki kolendendela
18, 19. Makambo nini masalemaki na ntango ya kala mamonisi ete baklisto Baebele kati na Yelusaleme balandaki toli epemami ya Paulo?
18 Lolenge nini baklisto Bayuda bayanolaki na mokanda ya Paulo? Pene na mbula motoba nsima ya kokomama ya mokanda ya Baebele, bitumba bikɔtaki na Yudea. Na mobu 66 T.B., mampinga ya Loma mazingaki Yelusaleme, kokokisáká maloba ya Yesu ete: “Soko bokomona Yelusaleme kozingama na bibele na basodá, bóyeba na ntango yango ete libebisi na yango esili kobɛlɛma.” (Luka 21:20) Nzokande, mpo na litomba ya baklisto oyo bazalaki naino kati na Yelusaleme na eleko yango, Yesu alobaki ete: “Na ntango yango bango na kati na Yuda bákima kuna na ngomba, mpe bango na kati na mboka bálongwa wana, mpe bango na bilanga bákɔta na mboka te.” (Luka 21:21) Na bongo, etumba na Baloma ebimisaki komekama: Baklisto Bayuda balingaki nde kotika Yelusaleme, esika monene ya losambo ya Bayuda mpe mboka ya tempelo ya nkembo?
19 Na mbalakaka, mpe mpo na ntina eyebani te, Baloma bazongaki epai na bango. Emonani ete Bayuda oyo bamipesaki na losambo batalelaki likambo yango lokola elembo ete Nzambe azalaki kobatela engumba na bango ya bulɛɛ. Ezali boni mpo na baklisto? Lisoló ya makambo ya kala eyebisi biso ete bakimaki. Na nsima, na mobu 70 T.B., Baloma bayaki lisusu mpe babebisaki Yelusaleme nyɛɛ mpe babomaki bato na lolenge ya nsɔ́mɔ. “Mokolo na Yehova” oyo esakolamaki na Yoele ekwelaki Yelusaleme. Kasi baklisto ya sembo bazalaki lisusu wana te. ‘Babikaki.’—Yoele 2:30-32; Misala 2:16-21.
20. Lokola toyebi ete “mokolo” monene “ya Yehova” ekómi pene, yango esengeli kozala na bopusi nini epai na biso?
20 Lelo oyo, toyebi ete mosika te “mokolo” monene mosusu “ya Yehova” mokobebisa ebongiseli mobimba ya biloko ya ntango oyo. (Yoele 3:12-14) Toyebi te ntango nini mokolo yango ekoya. Kasi Liloba ya Nzambe endimisi biso ete ekoya! Yehova alobi ete ekoumela te. (Habakuku 2:3; 2 Petelo 3:9, 10) Na yango, ‘tótya motema na etingya na koleka na makambo masili biso koyoka.’ Tóboya ezalela ya kozanga kondima, “masumu mazali kokanga biso.” Tózala na ekateli ya kolendendela ntango nyonso. Tóbosana te, ebongiseli monene ya Yehova na likoló oyo ekokani na likalo ezali kotambola. Ekokokisa mokano na yango. Boye, tókóba kopota mbangu mpe tótika te kati na emekaneli mpo na bomoi!
Ozali komikundola?
◻ Kotya likebi na elendiseli nini ya Paulo epai ya Bafilipi ekosalisa biso na kolendendela na bopoti mbangu kati na emekaneli mpo na bomoi?
◻ Nini ekosalisa biso ete tópekisa elimo ya mokili oyo kopɛngola makanisi na biso?
◻ Lolenge nini tokoki kosalisana mpo na kolendendela kati na bopoti mbangu?
◻ Wapi mwa makambo oyo makoki kolɛmbisa moklisto?
◻ Lolenge nini ndakisa ya Yesu ekoki kosalisa biso ete tólendendela?
[Elilingi na lokasa 8,9]
Lolenge moko na bapoti mbangu, baklisto basengeli kotika te ete eloko moko epɛngola likebi na bango
[Elilingi na lokasa 10]
Eloko moko te ekoki kopekisa likalo monene ya Yehova kokokisa mokano ya Nzambe