Ozali koyeba lisusu?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Na bongo, talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:
• Ndenge nini tokoki koloba malamu “monɔkɔ ya pɛto,” elingi koloba solo na ntina na Nzambe mpe mokano na ye? (Sef. 3:9)
Ndenge moko na minɔkɔ mosusu, mpo na koloba malamu “monɔkɔ ya pɛto,” tosengeli koyokaka malamu, komekola bato oyo balobaka yango malamu, kokanga na motó bankombo ya mikanda ya Biblia mpe bavɛrsɛ mosusu, kozongela makambo oyo toyekoli, kotánga na mongongo makasi, kotalela gramɛrɛ, to ndakisa ya mateya ya solo, kosala makasi mpo na kokende liboso, komityela ntango mpo na koyekola, mpe kozala na momeseno ya “koloba” monɔkɔ ya pɛto.—15/8, nkasa 21-25.
• Koyeba Nzambe elimboli mpenza nini?
“[Yehova] ezali nkombo na ye,” mpe alingi ete tóyeba ye na nkombo yango. (Ex. 15:3) Azali “Nzambe ya bolingo mpe ya kimya.” (2 Kol. 13:11) Azali “Nzambe ya boyebi” mpe ya ‘lobiko.’ (1 Sam. 2:3; Nz. 25:5) Nzambe apusanaka penepene na baoyo bayebi ye ndenge wana.—1/9, nkasa 4-7.
• Na libala, maloba “nkamba ya nsinga misato” elimboli nini?
“Nkamba ya nsinga misato” ezali maloba ya elilingi. (Mos. 4:12) Na libala, basalelaka maloba yango mpo na kolobela mwasi ná mobali, nsinga mibale ya liboso, oyo esangani na nsinga ya misato, Nzambe. Soki mwasi ná mobali bapesi Nzambe esika na libala na bango, bakozala na likoki ya kosilisaka mikakatano na bango mpe bakozala malamu na libala.—15/9, lokasa 16.
• “Kotyama mabɔkɔ” oyo Baebele 6:2 elobeli, elimboli nini?
Maloba yango elobeli koponama ya bankulutu te; kasi, ekoki kozala ete elimboli kotya bato mabɔkɔ mpo na kopesa bango makabo ya elimo. (Mis. 8:14-17; 19:6)—15/9, lokasa 32.
• Tata ya malamu ayebaka ete bana na ye bazali na bamposa nini?
Bana bazalaka na mposa ya (1) bolingo na ye (2) ndakisa ya malamu, (3) kozala na esika ya esengo, (4) mateya ya makambo ya Nzambe, (5) kozwa disipilini, (6) kobatelama.—1/10, nkasa 18-21.
• Ndenge nini bato oyo bazali na mikumba bakoki kopesa basusu lokumu?
Ndenge moko oyo nkulutu akoki kosala yango ezali ya kosɛnga basusu ata mokolo moko te básala makambo oyo ye moko alingaka kosala te. Longola yango, akomonisa lokumu soki azali koyebisa bango ntina ya malako oyo apesi bango to ya mosala oyo asɛngi bango básala.—15/10, lokasa 22.
• Tángá makambo oyo moto akoki kosala mpo na kokokisa ndai ya libala.
Makambo yango ezali mibale: (1) Kotya libala na esika ya liboso. (2) Kokima lolenge nyonso ya ekobo. Ezala ete bozali na kimya to na matata na kati ya libala na bino, molongani na yo asengeli koyeba ete ozali na mposa makasi ete libala na bino elonga; makambo wana mibale ekosalisa bino.—1/11, nkasa 18-21.
• Liteya nini nkulutu akoki kozwa na ndenge Moyisalaele oyo azali mobateli ya mpate azalaki kosalela mwa nzete moko oyo egumbamá na nsɔngɛ?
Mobateli ya mpate azalaki kosalela mwa nzete moko oyo egumbamá na nsɔngɛ mpo na kotambwisa bampate na ye. Ntango bampate bazali kokɔta to kobima na etonga, basengelaki ‘koleka na nse ya nzete,’ na ndenge yango mobateli ya mpate azalaki kotánga yango. (Lev. 27:32) Ndenge moko mpe, mokɛngɛli moklisto asengeli koyeba etonga mobimba ya Nzambe mpe koyeba makambo oyo ezali kotungisa mpate mokomoko.—15/11, lokasa 9.
• Ndenge nini mama akoki komonisa ete bopɛto ezali na ntina na miso na ye?
Mikrobɛ ekoki kokɔta na bilei na banzela mingi; yango wana, asukolaka mabɔkɔ na ye malamu liboso ya kosimba bilei mpe azipaka yango malamu. Abatelaka ndako pɛto mpo na kokimisa bampoko, mpe banyama-nkɛkɛ. Asukolaka mpe bilamba mpe nzoto na ye mbala na mbala. Kosala makambo wana eyokani na mitinda ya Biblia.—1/12, nkasa 9-11.