Mokili moko kitoko—Esili kobelema!
“MPOSA makasi ya kofanda na paladiso ezali kati na bamposa ya nguya oyo emonani ete ezali ntango nyonso kati na makanisi ya bato. Ekoki kozala mposa eleki nguya mpe na koumela koleka bamposa nyonso mosusu. Bolingo makasi ya paladiso ezali komonana polele kati na lolenge nyonso ya mangomba,” ezali wana maloba ya búku The Encyclopedia of Religion.
Emonani ete bato nyonso bazalaka na mposa ya kofanda kati na mokili moko kitoko, lokola nde bazalaki kokanisa na mawa nyonso na ntina na mokili moko kitoko oyo mozalaki na ebandeli kasi ezali lisusu te. Yango emonisi ete na ebandeli paladiso ezalaki, kasi epai wapi? Moyekoli moko ya makambo matali mayoki ya bato, akokaki koloba ete lobánzo wana ezali komonisa mposa ya kozwa lisusu kobatelama oyo moto azali kobungisa yango longwa na libumu ya mama. Nzokande, ndimbola oyo ezali te kondimisa baoyo bakoyekolaka lisoló ya mangomba.
“Mposa makasi ya paladiso”—Mpo na nini?
Kozala ya mposa makasi motindo wana, lokola basusu bazali komonisa yango, ezali bobele mpo na kosalisa bato ete bándima bampasi mpe bándima likambo oyo ete bomoi ya moto ezali mokuse? To ezali nde na ndimbola mosusu?
Mpo na nini bato bazali na mposa makasi ya kofanda na mokili moko kitoko? Biblia ezali kopesa ndimbola ya polele mpe ya pɛtɛɛ: Bato bautaki longwa na mokili moko kitoko! Ya solo, paladiso ya ebandeli ezalaki. Liloba ya Nzambe lilobeli yango lokola “elanga” oyo ezalaki na etúká moko ya sikisiki kati na Moyen-Orient, oyo etondaki na “njete yɔnsɔ ijali na kitɔkɔ na kotala, mpe yango ejali malamu na kolia.” Nzambe apesaki yango epai na babalani ya liboso ete bábatela yango. (Genese 2:7-15) Ezalaki esika moko kitoko kati na yango bato bakokaki kozala mpenza na esengo.
Mpo na nini ezalela wana ya Paladiso eumelaki te? Ezali liboso mpo na botomboki ya ekelamu moko ya elimo mpe na nsima, mpo na botomboki ya babalani ya liboso. (Genese 2:16, 17; 3:1-6, 17-19) Na yango, moto abungisaki bobele Paladiso te, kasi abungisaki mpe ezaleli ya kokoka, kolɔngɔ́nɔ́, mpe bomoi bozangi nsuka. Makambo oyo mabandaki kobima makokaki te kobongisa mpenza bomoi ya moto. Nkutu, yango ebebaki mokemoke kino na ezalela oyo ezali lisusu mabe koleka ndenge tozali komona yango lelo oyo.—Mosakoli 3:18-20; Baloma 5:12; 2 Timoté 3:1-5, 13.
Bolukiluki ya Paladiso—Lisoló ya makanisi mpamba
Lokola ekoki kokanisama, “mposa makasi ya kofanda na paladiso” ezali likambo oyo ebandá uta kala. Ba Sumériens bamikundolaka ntango oyo na boumeli na yango, boyokani ezalaki kati na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba: “Bobangi, nsɔ́mɔ mpe kowelana ezalaki te. . . . Na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba, bato bazalaki kati na bomoko, bazalaki kopesa masanzoli epai na Enlil na lokótá moko,” ezali wana makambo mazwami kati na ntɔ́ki moko ya kala ya mikili ya Mésopotamie. Basusu, lokola Baezipito ya kala, bazalaki kolikya kokóma na mokili moko kitoko nsima na liwa na bango. Bazalaki kondima ete molimo mozangi kokufa mozalaki kokóma na oyo ebéngamaki ete bilanga ya Aaru. Kasi na ebandeli, elikya wana epesamelaki bobele bato oyo bazalaki na bozwi, mobólá akokaki te kolɔ́tɔ kokóma na mokili wana motondi na bomɛngo.
Kati na lingomba mosusu oyo ekeseni, ba Hindous bazalaki kozela boyei ya eleko ya mokili moko kitoko (yuga) uta bikeke mingi. Engebene mateya ya lingomba Hindou, yuga minei ekozongaka yango moko kati na zolongano oyo ezangi nsuka, mpe tozali sikawa kobika na boumeli ya yuga oyo eleki mabe. Na mawa nyonso, engebene basusu, Kali Yuga (eleko ya molili) wana, elongo na bampasi na yango mpe mabe na yango, ekoumela bambula 432 000. Atako bongo, ba Hindous ya sembo bazali kozela eleko kitoko, oyo ebéngami ete Krita Yuga.
Epai mosusu, Bagreke mpe Baloma balɔ́taki bokómi na Bisanga malamu, kati na Mai monene ebéngami Atlantique. Mpe bakomi mingi, lokola Hésiode, Virgile, mpe Ovide, balobaki na ntina na mokili moko kitoko oyo mozalaki na ebandeli, kolikyáká ete mokolo mosusu ekokoka kozongisama. Pene na nsuka ya ekeke ya yambo L.T.B., Virgile, mokomi na ntɔ́ki na lokótá Latin, asakolaki kobelema ya boyei ya aetas aurea (eleko kitoko) ya sika mpe oyo ekoumela. Na bikeke oyo bilandaki, búku The Encyclopedia of Religion elobi ete: “Koleka bayangeli zomi na motoba ya Loma bandimaki ete boyangeli na bango ezongisaki Eleko Kitoko.” Kasi lokola toyebi yango malamu lelo oyo, wana ezalaki bobele bisakolá mpamba ya bato ya politiki.
Ba Celtes mingi bazalaki na mposa ya oyo bazalaki kokanisa ete mokili ya kongɛnga na esanga moko (to kati na bisanga) bitangwi na mai, bazalaki kondima ete kuna bato bazalaki na bolamu ya kokoka. Engebene lisapo moko, Mokonzi Arthur, atako akufaki na ntina na mpota oyo azokaki, alandaki kozala na bomoi nsima na kokóma na esanga kitoko ebéngami ete Avalon.
Na ntango ya kala mpe na eleko ebéngami ete Moyen-Age, mingi bazalaki kokanisa ete elanga ya bisengo, elanga ya Edene, ezalaki naino esika moko boye, “na nsɔ́ngɛ́ ya ngomba moko molai to na ngámbo mosusu ya mai monene epai kuna moto akoki kokóma te,” ezali wana ndimbola epesamaki na Jean Delumeau, moyekoli na makambo ya kala. Atako Dante, mokomi na ntɔ́ki na mboka Italie, azalaki kondima paladiso ya likoló, azalaki kokanisa ete paladiso ya mabelé ezalaki na nsɔ́ngɛ́ ya ngomba ya Epongelo na ye, oyo ekeseni mpenza na engumba ya Yelusaleme. Basusu bazalaki kokanisa ete ezalaki na Azia, na mikili ya Mésopotamie, to na Himalaya. Mpe masapo ya Moyen-Age na ntina na paladiso ya Edene ezalaki mingi. Bato mingi bazalaki kokanisa ete kati na paladiso wana, ezalaki na bokonzi moko kitoko oyo etambwisamaki na Nganganzambe Yoane, moto na kobanga Nzambe. Lokola ezalaki pene na paladiso ya mabelé, ekanisamaki ete bomoi kati na bokonzi ya Nganganzambe Yoane ezalaki molai mpe na bolamu mingi, liziba ya seko ya bomɛngo mpe ya bozwi. Basusu, baoyo batyaka likebi mingi na masapo ya kala ya Greke, bazalaki kokanisa ete bisanga ya paladiso bizalaki na Mai monene Atlantique. Bakálati ya Moyen-Age emonisaki ete bato bandimaki mpenza ete elanga ya Edene ezalaki solo, ata mpe kolakisa esika yango ekokaki kozala.
Na ekeke ya 15 mpe na ekeke ya 16, batamboli oyo bakatisaki Mai monene ya Atlantique bazalaki mpenza koluka mokili oyo ezalaki ya sika mpe ya kala. Bakanisaki ete na ngámbo mosusu ya mai monene, bakokuta te bobele bisanga oyo bibéngami ete Indes, kasi lisusu elanga ya Edene. Na ndakisa, Christophe Colomb alukaki yango katikati na bangomba oyo ezalaki na mikili ya mpiɔ mpe na mikili ya molungé ya Amerika ya Súdi mpe ya Katikati. Balukiluki ya Mpótó oyo bakómaki na Brésil bandimaki mpenza ete paladiso oyo ebungaki esengelaki kozala kuna mpamba te, kobongwana ya bileko ezalaki malamu mpe bilei mpe miloná mizalaki mingi. Atako bongo, bayaki nokinoki koyeba likambo ya solo mpe ya mpasi.
Mikili ya makanisi mpamba—bisika bisengeli?
Na esika ya kosala milende mpo na koluka mokili kitoko kati na bisika bileki mosika na mabelé, basusu bamekaki kokana kosala yango kati na makanisi na bango. Yango wana, na 1516, Thomas More, mobotami ya mboka Angleterre, moyekoli na makambo ya bato, alobelaki esanga ya makanisi mpamba, esika kitoko, ya kimya, mpe ya boyokani malamu, oyo ekesenaki mpenza na mokili mabe oyo azalaki kofanda. Basusu bamekaki mpe kokana kosala mikili ya kitoko, mikili ya bozwi: na ekeke ya minei L.T.B., Platon alobelaki yango kati na búku na ye Republica; na 1602, Tommaso Campanella, sángó ya Italie mpe alobelaki engumba na ye oyo ebongisamaki malamu, Engumba ya Moi; bobele mwa bambula na nsima, Francis Bacon, filozofe ya Angleterre alobelaki “ekólo ya esengo mpe oyo ezalaki na biloko mingi,” oyo ye abéngaki ete Nouvelle Atlantide. Na boumeli ya bikeke, bato ya lolenge nyonso oyo bayebi kokanisa (ezala bandimi to bandimi te), balobelaki ebele ya mikili kitoko ya makanisi mpamba. Nzokande, bobele moke mpenza kati na yango nde endimamaki ete ezalaki ya solo.
Ezalaki mpe ata na baoyo bamekaki kotónga mikili na bango ya makanisi mpamba. Na ndakisa, na 1824 mozwi moko ya Angleterre, Robert Owen, azwaki ekateli ya kokende na Indiana (na Etats-unis) na mokano ya kokokisa makanisi na ye ya mpamba mpo na kosala mboka moko moke oyo abéngaki ete New Harmony. Lokola andimisamaki ete kati na bizaleli wana ya kitoko, bato bakozala malamu, asalelaki pene na bozwi na ye nyonso mpo na kosala oyo azalaki kotalela lokola ete mokili ya sika ya bizaleli malamu. Kasi makambo mabimaki mamonisaki ete bizaleli ya sika ya bomoi bikokaki te mpo na kosala bato ya sika.
Pene na makanisi nyonso ya politiki endimi ete moto akoki kobongisa mokili engebene boyebi na ye mpenza mpe bososoli na ye mpenza ya oyo ezali solo, na mokano ya koyeisa paladiso awa na mabelé. Nzokande, na bokeseni, milende mpo na kokokisa bilikya wana ememaki na bitumba mpe na mbongwana, lokola La Révolution française na 1789 mpe Révolution bolchevique na 1917. Na esika ya koyeisa paladiso, milende wana, mbala mingi, ememaki nde mawa mpe mpasi makasi.
Bilikya, myango, mikili kitoko ya makanisi mpamba, mpe komeka kokokisa yango—ezali lisoló ya mikano oyo mizangaki kokokisama. Na mikolo oyo, basusu bazali kolobela “ndɔ́tɔ ya kobulunganisa” mpe “nsuka ya ntango ya makanisi mpamba mpo na oyo etali mikili kitoko,” bazali kobyanga biso ete tóyekola “kozala na bomoi kozanga makanisi mpamba mpo na oyo etali mikili kitoko.” Elikya ezali ya komona mokili kitoko, to yango esengeli kozala ntango nyonso bobele ndɔ́tɔ mpamba?
Baklisto mpe mokili kitoko
Mokili ya sika ezali ndɔ́tɔ soko moke te—ezali elikya ya solo! Yesu Klisto, Mobandisi ya Boklisto, ayebaki ete mokili oyo mozali malamu te koleka mikili nyonso oyo mikoki kozala. Ateyaki ete mabelé makosangolama na bato ya bopɔlɔ mpe ete mokano ya Nzambe mokosalema na mabelé. (Matai 5:5; 6:9, 10) Ye mpe bayekoli na ye bayebaki ete mokili oyo motambwisami na monguna ya Nzambe, Satana Zábolo, mpe ete yango ezali ntina ya liboso ya mpasi mingi oyo bato bazali na yango. (Yoane 12:31; 2 Bakolinti 4:4; 1 Yoane 5:19; Emoniseli 12:12) Bayuda ya sembo bazalaki kozela mokolo oyo Nzambe alingaki kolongola libela bitumba, na mpasi mpe mabe awa na mabelé, mpo na kotondisa yango na bato oyo balingi kimya mpe bosembo. Bobele bongo, baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kozela na motema moko, ntango oyo ebongiseli ya biloko ya sika, “makoló ya sika mpe mabelé ya sika” ekokitana mokili ya lelo.—2 Petelo 3:13; Nzembo 37:11; 46:8, 9; Yisaya 25:8; 33:24; 45:18; Emoniseli 21:1.
Ntango Yesu Klisto atyamaki likoló na nzeté ya mpasi, azongelaki elaká ya mokili kitoko epai na mosáli moko na mabe oyo amonisaki mwa kondima epai na Ye. “[Yesu] alobaki na ye ete: ‘Ya solo, nalobi na yo lelo, okozala elongo na ngai kati na Paladiso.’” (Luka 23:40-43, NW) Mpo na mosáli wana na mabe, maloba wana malimbolaki nini? Yesu alingaki koloba ete mosáli wana na mabe asengelaki kokende ‘elongo na ye’ kati na likoló sé na mokolo wana, lokola mabongoli mosusu ya Biblia ya Katolike mpe ya Protestá mamonisi yango? Soko moke te, Yesu alingaki koloba bongo te, mpamba te, nsima na lisekwa na ye, Yesu alobaki na Malia na Magadala ete ‘amataki naino te epai na Tata na ye.’ (Yoane 20:11-18) Atako bateyamaki na Yesu na boumeli ya mbula misato na ndambo kobanda na Pantekote ya mobu 33 T.B., ata bantoma na ye bazalaki kolikya te mpo na paladiso ya likoló. (Misala 1:6-11) Mosáli wana na mabe asosolaki likambo oyo Bayuda mingi ya ntango wana bakokaki koyeba yango: Yesu alakaki mokili moko kitoko ete ekozala paladiso na mabelé. Moto moko ya mayele ya Allemagne andimaki ete: “Liteya ya kozwa lifuti nsima na liwa ezali te kati na Kondima ya Kala.”
Likambo oyo ete paladiso ekozala na mabelé na biso, limonisamaki na ntoma Paulo kati na mokanda na ye epai na Baebele. Ntango azalaki kolendisa baninga na ye bandimi ete ‘bátyola te lobiko monene oyo ebandaki kolobelama na nzela ya Yesu Klisto,’ Paulo andimi ete Yehova Nzambe apesaki Yesu bokonzi likoló na “mabelé mafandami [na Greke, oi·kou·meʹne] oyo makoya.” (Baebele 2:3, 5, NW) Kati na Makomami ya Greke ya Boklisto, liloba oi·kou·meʹne ntango nyonso elobelaka mabelé na biso mafandami na bato, kasi elobelaka mokili ya likoló te. (Kokanisá na Matai 24:14; Luka 2:1; 21:26; Misala 17:31.) Na yango, Bokonzi ya Nzambe oyo etambwisami na Klisto Yesu ekoyangela mabelé mafandami. Yango ekozala mpenza esika esengeli mpo na kofanda!
Atako Bokonzi yango moko ezali ya likoló, nzokande ekotalela makambo ya mabelé. Matomba nini yango ekopesa? Bokɔnɔ, minyoko, bobólá, mpe liwa ekokanisama lisusu te. Ata kobanga mpe kozanga bosepeli ekolongwa. (Emoniseli 21:3-5) Biblia elobi ete ‘Nzambe akofungola lobɔkɔ na ye mpe akokokisa mposa ya biloko nyonso na bomoi.’ (Nzembo 145:16) Mikakatano lokola kozanga mosala mpe kobeba ya mopepe mpe ya mai ekosila mpo na libela. (Yisaya 65:21-23; Emoniseli 11:18) Kasi oyo eleki mpenza, na lisalisi ya lipamboli ya Nzambe, ekozala bolóngi ya solo, ya bosembo, mpe ya kimya—bizaleli oyo bimonanaki lokola ete bisili mpenza kobunga.—Nzembo 85:7-13; Bagalatia 5:22, 23.
Nyonso oyo ezali bobele ndɔ́tɔ mpamba, makanisi ya mpamba? Te, eleko ya mpasi mingi oyo tozali kobika kati na yango emonisi ete, tozali kati “na mikolo ya nsuka” ya mokili oyo mpe ete mokili ya sika mosili bongo kobelema. (2 Timoté 3:1-5) Okolinga kozala na bomoi kati na yango? Luká koyeba lolenge yango ekoki kozwama na koyekoláká Biblia elongo na Batatoli ya Yehova. Mokili ya sika mosili kobelema, oyo ya kitoko mingi koleka nyonso oyo bato bakokaki kolɔ́tɔ. Ezali makanisi mpamba te—ezali likambo ya solo!
[Elilingi na lokasa 7]
Mokili moko kitoko—mosika te ekozala likambo ya solo