Bambeka ya masanzoli oyo esepelisaka Yehova
“Bókaba nzoto na bino lokola mbeka ya bomoi oyo ya bulɛɛ mpe oyo ebongi ete Nzambe ayamba yango.”—BALOMA 12:1.
1. Biblia elobi nini mpo na bolamu ya ntango moke ya bambeka oyo bazalaki kopesa na kolanda Mibeko ya Mose?
“LOKOLA Mibeko ezali na elili ya makambo malamu oyo ekoya, kasi ezali bosolo mpenza ya makambo te, bato bakoki ata moke te, na nzela ya bambeka oyo bapesaka mbula na mbula, kokómisa baoyo bazali kopusana penepene bato ya kokoka.” (Baebele 10:1, NW) Na maloba yango, ntoma Paulo amonisi ete bambeka nyonso oyo bazalaki kopesa na kolanda Mibeko ya Mose ekokaki kobikisa bato mpo na libela te.—Bakolose 2:16, 17.
2. Mpo na nini ezali na ntina tóluka koyeba makambo mikemike oyo Biblia elobi mpo na makabo mpe bambeka na kati ya Mibeko?
2 Yango elingi nde koloba ete makambo nyonso oyo elobami na mikanda mitano ya liboso ya Biblia mpo na makabo mpe bambeka ezali na ntina moko te mpo na baklisto lelo oyo? Kutu, bato oyo balandaka Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na masangá ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, bautaki kotánga mikanda mitano ya liboso ya Biblia na boumeli ya mbula mobimba na mwa bapɔsɔ. Bamosusu basalaki makasi mpo na kotánga mpe koluka ndimbola ya mwa makambo mikemike nyonso oyo balobi kuna. Tokoloba nde ete bamipesaki mosala ya mpamba? Te, mpamba te “nyonso ikomamaki kalakala, ikomami mpo na kolakisa biso ete tózala na elikya na nzela na koyika mpiko mpe na [libɔndisi ya Makomami, NW].” (Baloma 15:4) Na yango, motuna ezali boye: Ndenge nini makambo oyo Mibeko elobi mpo na makabo mpe bambeka ekoki ‘kolakisa’ biso mpe ‘kobɔndisa’ biso?
Mpo na kolakisa biso mpe kobɔndisa biso
3. Tozalaka mpenza na mposa ya likambo nini?
3 Atako balobi na biso te ete tópesaka bambeka na ndenge oyo esɛngamaki na Mibeko, tozali na mposa mpenza ya eloko oyo bambeka ekokisaki mwa moke mpo na Bayisalaele, elingi koloba biso mpe tozali na mposa ete masumu na biso elimbisama mpe Nzambe andima biso. Lokola topesaka bambeka ya banyama te, ndenge nini tokoki kozwa bolamu yango? Nsima ya kolobela makambo oyo bambeka ya banyama ekokaki kosala te, Paulo alobaki lisusu boye: “Awa eyei Klisto kati na mokili, alobaki ete, Olingaki mbeka mpe makabo ya kotombwa te, kasi osili kobongisela ngai nzoto. Osepeli [na] mbeka ya kotumba mpe [mbeka ya masumu, NW] te. Boye nalobaki ete, Talá nasili koya, ekomami mpo na ngai kati na mokanda. Ɛ Nzambe, nayei kosala mokano na yo.”—Baebele 10:5-7.
4. Ndenge nini Paulo asalelaki Nzembo 40:6-8 mpo na Yesu Klisto?
4 Paulo azongelaki maloba ya Nzembo 40:6-8 mpe amonisaki ete Yesu ayaki koteya bato te ete bákoba kopesaka “mbeka mpe makabo,” “mbeka ya kotumba mpe mbeka ya masumu,” mpamba te ntango Paulo azalaki kokoma mokanda na ye, Nzambe asilaki koboya bambeka yango. Kasi, Yesu ayaki na nzoto oyo Tata na ye ya likoló abongisaki; nzoto yango ekokanaki mpenza na nzoto oyo Nzambe apesaki Adama ntango akelaki ye. (Genese 2:7; Luka 1:35; 1 Bakolinti 15:22, 45) Lokola Yesu azalaki moto ya kokoka mpe Mwana ya Nzambe, azalaki “mombóto” ya mwasi oyo balobelaki na esakweli ya Genese 3:15. Yesu asengelaki ‘kosasa Satana na motó,’ kasi basengelaki mpe ‘kosasa’ Yesu ‘na litindi.’ Na ndenge yango, mpo bato bábika, Yehova apesaki Yesu, moto oyo bato ya kondima bazalaki kozela banda na ntango ya Abele.
5, 6. Eloko nini ya malamu koleka baklisto bazali na yango mpo na kopusana penepene ya Nzambe?
5 Paulo alobaki mpo na mokumba yango monene ya Yesu, mpe ayebisaki boye: “Ye ayebaki lisumu moko te nde Nzambe azalisaki ye lisumu mpo na biso ete biso tózala na boyengebene na Nzambe kati na ye.” (2 Bakolinti 5:21) Maloba “azalisaki ye lisumu” ekoki mpe kobongolama “akómisaki ye lokola mbeka ya masumu.” Ntoma Yoane alobaki boye: “Ye azali mpe mbɔndi mpo na masumu na biso. Kasi bobele mpo na yango na biso te nde mpo na mokili mobimba.” (1 Yoane 2:2) Yango wana, bambeka oyo Bayisalaele bazalaki kopesa ekokaki kosalisa bango bápusana penepene ya Nzambe, nzokande baklisto bazali na eloko oyo eleki malamu oyo ekoki kosala ete Nzambe andima bango: bazali na mbeka ya Yesu Klisto. (Yoane 14:6; 1 Petelo 3:18) Soki, na misala na biso, tomonisi kondima na mbeka oyo Nzambe apesaki mpo biso tólongwa na boombo mpe soki totosi Ye, masumu na biso ekoki kolimbisama mpe Nzambe akondima biso mpe akopambola biso. (Yoane 3:17, 18) Likambo yango ezali mpenza kobɔndisa, boye te? Kasi, tokosala nini mpo na komonisa ete tozali kondima mbeka oyo epesamaki mpo na kobikisa biso?
6 Paulo amonisaki ete baklisto bazali na eloko oyo eleki malamu oyo ekoki kosalisa bango bápusana penepene ya Nzambe; na nsima, ndenge tozali kotánga na Baebele 10:22-25, alobeli makambo misato oyo, na nzela na yango, tokoki komonisa ete tozali na kondima mpe tozali kosepela na ebongiseli yango oyo ezali komonisa bolingo ya Nzambe. Atako Paulo alobaki maloba yango libosoliboso na baoyo bazali ‘kokɔta na esika mosantu,’ elingi koloba baklisto bapakolami, bato oyo bazali na elikya ya kokende na likoló, bato nyonso basengeli kotya likebi na maloba oyo elimo santu etindaki Paulo akoma soki balingi kozwa bolamu na nzela ya mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kolongola masumu.—Baebele 10:19, NW.
Tópesa bambeka oyo ezali pɛto mpe na mbeba te
7. (a) Ndenge nini Baebele 10:22 ezali komonisa likambo oyo bazalaki kosala mpo na mbeka? (b) Mpo Nzambe andima mbeka, eloko nini basengelaki kobosana te?
7 Ya liboso, Paulo alobi na baklisto boye: “Tóbɛlɛma na mitema ya sembo mpe na litondi na kondima mpenza, awa esili mitema na biso komwangisama mpo na kopɛtwa longwa na lisosoli mabe, awa mpe esili nzoto na biso kosukwa[ma] mai ya pɛto.” (Baebele 10:22) Maloba oyo esalelami awa emonisi makambo oyo ezalaki kosalema ntango bazalaki kopesa bambeka na kolanda Mibeko. Yango ebongi mpenza mpamba te liboso Nzambe andima mbeka, esengelaki kopesama na motema ya malamu mpe esengelaki kozala pɛto, na mbeba te. Nyama oyo bakokaba lokola mbeka ezalaki kouta na kati ya etonga ya bangɔmbɛ, bantaba to bampate, elingi koloba na kati ya banyama oyo ezalaki pɛto, mpe ezalaki “malamu,” mpe ezali na mbeba te. Soki moto alingi kopesa ndɛkɛ, esengelaki kozala bibenga to bana ya bibenga. Soki makambo wana ekokisami, mbeka “[esengelaki koyambama] na ntina na ye mpo na kozwela ye kozonga ya bondeko.” (Levitike 1:2-4, 10, 14; 22:19-25) Mbeka ya bilei oyo bazalaki kopesa basengelaki kotya yango levire te; levire ezali elilingi ya kobeba. Esengelaki mpe kotya yango mafuta ya nzoi te; maloba mafuta ya nzoi, na ntembe te elimboli mai nyonso oyo ebimaka na mbuma soki ekamolami, yango ekómisaka bilei ngai. Mbeka nyonso oyo bazalaki kopesa na etumbelo, ezala nyama to bilei, bazalaki kotya yango mungwa. Mungwa ebatelaka biloko mpo epola noki te.—Levitike 2:11-13.
8. (a) Nzambe asɛngaki eloko nini epai ya moto oyo azali kopesa mbeka? (b) Ndenge nini tokoki koyeba ete Nzambe azali kondima losambo na biso?
8 Nzambe asɛngaki nini mpo na moto oyo azali kopesa mbeka? Mibeko elobaki ete moto oyo ayei liboso ya Yehova asengelaki kozala pɛto mpe asengelaki kozala na likambo ya mabe te. Moto nyonso oyo azali mbindo, ata mpo na ntina nini, asengelaki naino kopesa mbeka ya masumu to mbeka ya ekweli mpo azala pɛto na miso ya Yehova, na nsima nde Nzambe akokaki kondima mbeka na ye ya kotumba to mbeka ya bondeko. (Levitike 5:1-6, 15, 17, NW) Tomoni ntina oyo tosengeli ntango nyonso kozala pɛto na miso ya Yehova? Soki tolingi Nzambe andima losambo na biso, tosengeli kosala nokinoki mpo na kobongisa makambo ntango tobuki mobeko ya Nzambe. Tosengeli kolanda nokinoki ebongiseli oyo Nzambe atii mpo na kosalisa biso, elingi koloba, kokutana na “bankulutu ya lisangá” mpe kosɛnga Nzambe bolimbisi na nkombo ya Yesu Klisto, oyo azali “mbɔndi mpo na masumu na biso.”—Yakobo 5:14, NW; 1 Yoane 2:1, 2.
9. Bokeseni nini ya monene ezalaki kati na bambeka oyo bazalaki kopesa Yehova na bambeka oyo bazalaki kopesa banzambe ya lokuta?
9 Kutu, likebi mingi oyo bazalaki kotya na likambo ya kozala mbindo te nde likambo ekesanisaki mpenza bambeka oyo bazalaki kopesa Yehova na bambeka oyo bato ya bikólo oyo ezalaki penepene na Yisalaele bazalaki kopesa banzambe ya lokuta. Mokanda moko oyo elobeli likambo yango mpo na bambeka na kati ya Mibeko ya Mose elobi boye: “Makambo ya kosakola mabombami ezalaki te, to losambo ya bilimu; bazalaki kolɛngalɛnga te to kosala bisalasala ya mangomba te, bazalaki komizokisa te, to kosala kindumba na tempelo te; kosala makambo ya nsɔni mpe kolya na lokoso epekisamaki mpenza; bazalaki kokaba bato lokola mbeka te; bazalaki kopesa mbeka te mpo na bato oyo bakufá.” Nyonso wana ezali komonisa likambo moko: Yehova azali mosantu mpe andimaka masumu te mpe andimaka makambo ya mabe te ezala ya ndenge nini. (Habakuku 1:13) Bato oyo bazalaki kosambela ye basengelaki kozala pɛto na nzoto, na elimo mpe na makanisi mpe bambeka oyo bazalaki kopesa ye esengelaki kozala pɛto mpe na mbeba te.—Levitike 19:2; 1 Petelo 1:14-16.
10. Soki tolandi toli ya Paulo na Baloma 12:1, 2, moto na moto asengeli komitalela na likambo nini?
10 Nyonso oyo esengeli kotinda biso tómitalela malamumalamu na bomoi na biso mobimba mpo tómindimisa ete Yehova azali kondima mosala oyo tozali kosalela ye. Tosengeli komikosa te na kokanisa ete soki tozali koyangana na makita ya lisangá mpe tozali kosakola, ata soki tozali kosala makambo nini na pembeni, ekosala eloko te. Lisusu, tosengeli kokanisa te ete kosala misala na lisangá ezali kopesa biso nzela ya kobuka mibeko ya Nzambe na makambo mosusu na bomoi na biso. (Baloma 2:21, 22) Tókanisa te ete Nzambe akopambola biso mpe akoyamba biso soki totiki ete makambo oyo ezali mbindo to mabe na miso na ye ebebisa makanisi to misala na biso. Tóbosana te maloba oyo ya Paulo: “Bandeko, nazali kobondela bino mpo na mawa ya Nzambe ete bókaba nzoto na bino lokola mbeka ya bomoi oyo na bulɛɛ mpe oyo ebongi ete Nzambe ayamba yango. Bongo bokosambela ye na ntina. [Bólandaka] makambo ya ntango oyo te kasi bóbongwana mpo na kozwa makanisi ya sika kino bokokoka kososola mokano ya Nzambe, yango malamu, yango bokoki koyamba, yango mpe ebongi kwa.”—Baloma 12:1, 2.
Tópesa mbeka ya masanzoli na motema mobimba
11. Maloba “kosakola . . . liboso ya bato” oyo ezali na Baebele 10:23 elimboli nini?
11 Na mokanda na ye epai ya Baebele, Paulo alobelaki mpe likambo mosusu ya ntina mingi mpo na losambo ya solo: “Tósimba makasi likambo ya kosakola elikya na biso liboso ya bato kozanga ete tótɛngatɛnga, mpamba te ye oyo alaki azali sembo.” (Baebele 10:23, NW) Maloba “kosakola . . . liboso ya bato” elimboli mpenzampenza “koyambola.” Paulo alobeli mpe “mbeka ya masanzoli.” (Baebele 13:15) Yango ezali kozongisa na makanisi biso mbeka oyo bato lokola Abele, Noa mpe Abalayama bapesaki.
12, 13. Ntango Moyisalaele azalaki kopesa mbeka ya kotumba, azalaki kondima likambo nini, mpe biso tokoki kosala nini mpo na komonisa elimo yango?
12 Ntango Moyisalaele azalaki kopesa mbeka ya kotumba, azalaki kosala yango “liboso ya Yehova mpo motema na ye esepeli.” (Levitike 1:3, NW) Na ntango apesi mbeka ndenge yango, azalaki kosakola na miso ya bato nyonso to azali kondima ete Yehova azali kopambola bato na ye mpe azali na boboto mpo na bango. Tóbosana te ete eloko ekesanisaki mbeka ya kotumba na bambeka mosusu ezali ete mpo na yango, bazalaki kotumba nyama mobimba na etumbelo; elilingi malamu mpenza mpo na komonisa komipesa mobimba mpo na kosalela Nzambe. Ndenge moko mpe, biso tokomonisa ete tozali kondima mpe tozali na botɔndi mpo na mbeka oyo epesamaki mpo na kobikisa biso ntango tozali kopesa Yehova “mbeka ya masanzoli, yango mbuma ya bibebu” na kotindikama te, kasi na motema na biso mobimba.
13 Ya solo, baklisto bapesaka banyama to bilei lokola mbeka te, kasi bazali na mokumba ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli ya Yesu Klisto. (Matai 24:14; 28:19, 20) Osakwelaka bato nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mbala nyonso oyo ozwi libaku ya kosala yango mpo ete bato ebele báyeba makambo kitoko oyo Nzambe akosalela bato oyo bazali kotosa ye? Motema na yo etindaka yo na kopesa ntango mpe kosalela makasi na yo na mosala ya koteya bato oyo basepeli na nsango mpe kosalisa bango bákóma bayekoli ya Yesu Klisto? Molende na biso na mosala ya kosakola esepelisaka mpenza Nzambe, ezali lokola nsolo kitoko oyo ezali kobima na mbeka ya kotumba.—1 Bakolinti 15:58.
Tósepela na boninga elongo na Nzambe mpe na bato
14. Ndenge nini maloba ya Paulo na Baebele 10:24, 25 eyokani na likanisi ya mbeka ya bondeko?
14 Na nsuka, Paulo alobeli boyokani na biso na baninga na biso baklisto oyo tozali kosambela na bango Nzambe. “Tótalanaka mpo tópusama na komonisa bolingo mpe misala malamu, tótika koyangana na biso te, lokola bamosusu bameseni kosala yango, kasi tólendisanaka, mingimingi lokola bomoni ete mokolo yango ekómi pene.” (Baebele 10:24, 25, NW) Maloba “tópusama na komonisa bolingo mpe misala malamu,” “koyangana na biso,” mpe “tólendisanaka,” ezali kozongisa makanisi na biso na makambo oyo mbeka ya bondeko ezalaki kosala mpo na libota ya Nzambe na Yisalaele.
15. Mbeka ya bondeko na makita ya lisangá ekokani na makambo nini?
15 Nkombo “mbeka ya bondeko” ebongolamaka ntango mosusu na “mbeka ya kimya.” Liloba ya Liebele oyo ebongolami awa na “kimya” ezali na boike (pluriel), mbala mosusu mpo na komonisa ete kosangana na bambeka motindo wana ezalaki kopesa kimya elongo na Nzambe mpe na basambeli mosusu ya Yehova. Na ntina etali mbeka ya bondeko, molimboli moko ya Biblia alobi boye: “Yango ezalaki mpenza ntango ya esengo elongo na Nzambe ya Kondimana, ntango oyo Nzambe azalaki komikitisa mpo na kozala Mopaya ya Yisalaele mpo na kolya mbeka, ezali lokola nde azalaki ntango nyonso Mopaya oyo bayambi.” Yango ezongisi na makanisi na biso likambo oyo Yesu alakaki ete: “Wana mibale to misato bayangani mpo na nkombo na ngai, ngai nazali kati na bango.” (Matai 18:20) Mbala nyonso soki tokei na makita ya lisangá, tozwaka litomba ya kosangana na baninga ya malamu, ya kozwa mateya oyo elendisaka biso, mpe na kokanisa ete Nkolo na biso Yesu Klisto azali na biso elongo. Yango nde esalaka ete makita ya lisangá ezala mpenza ntango ya esengo mpe elendisa kondima na biso.
16. Soki tokanisi mbeka ya bondeko, nini esalaka ete makita ya lisangá ezala na esengo mingi?
16 Ntango bazalaki kopesa mbeka ya bondeko, mafuta nyonso, oyo ezingi misɔpɔ, oyo ezingi bangei, oyo ezali likoló ya mabale (foie), na oyo ezali na mokɔngɔ, mpe lisusu mokɔndɔ ya mafutamafuta ya mpate, bazalaki kotumbela yango Yehova na etumbelo. (Levitike 3:3-16) Bazalaki kotalela mafuta lokola eteni ya nyama oyo eleki vitamini mpe eleki malamu. Na ntango bakabi yango na etumbelo ezalaki komonisa ete bapesi Yehova eteni oyo eleki malamu. Likambo oyo esalaka ete makita ya lisangá ezala mpenza esengo ezali ete kuna toteyamaka, mpe lisusu tosanzolaka Yehova. Tosalaka yango ntango tozali kosala molende, ata soki ezali moke, na koyemba na motema mobimba, kofungola matoi mpo na koyoka, mpe kopesa biyano ntango likoki ezali. Mokomi ya nzembo alobaki ete: “Aleluya! Bóyembela [Yehova] loyembo ya sika! Bósanzola ye kati na koyangana ya bayengebene.”—Nzembo 149:1.
Yehova akosopela biso mapamboli
17, 18. (a) Ntango bafungolaki tempelo ya Yelusaleme, Salomo apesaki mbeka monene ya biloko nini? (b) Fɛti ya bofungoli tempelo ememelaki bato mapamboli nini?
17 Ntango bafungolaki tempelo ya Yelusaleme, na sanza ya nsambo ya mobu 1026 L.T.B., Mokonzi Salomo apesaki “makabo liboso ya [Yehova],” ezalaki na “likabo ya kotumba mpe likabo ya bilei mpe ndambo ya mafuta na makabo ya kimya.” Longola mbeka ya bilei, bapesaki ngɔmbɛ 22 000 na mpate 120 000.—1 Mikonzi 8:62-65.
18 Kanisá ntalo ya biloko wana nyonso mpe mosala oyo esalemaki na fɛti monene wana! Kasi, tokanisi mpenza ete mapamboli oyo Bayisalaele bazwaki elekaki nyonso wana mosika. Ntango fɛti esilaki, Salomo “apalanganisaki bato mpe bapambolaki mokonzi; bazongaki epai na bango na kosepela mpe na mitema ya esengo mpo na malamu nyonso mamonisi [Yehova] epai na Davidi moombo na ye mpe epai na Yisalaele bato na ye.” (1 Mikonzi 8:66) Ya solo, lokola Salomo alobaki yango, “mapamboli ya [Yehova] ikoyeisa bozwi, akobakisa mawa na yango te.”—Masese 10:22.
19. Tokosala nini mpo Yehova apambola biso sikoyo mpe mpo na libela?
19 Lelo oyo tozali na ntango oyo “elili ya makambo malamu oyo ekoya” etiki esika na “bosolo mpenza ya makambo.” (Baebele 10:1, NW) Na mokumba na ye ya Nganga Monene ya solo, Yesu Klisto asi akɔti na likoló mpenza mpe alakisi motuya ya makila na ye moko mpo na kolimbisa masumu ya bato nyonso oyo, na misala na bango, bazali komonisa ete bandimi mbeka na ye. (Baebele 9:10, 11, 24-26) Na nzela ya mbeka monene wana mpe soki, na motema mobimba, tozali kopesa Nzambe mbeka ya masanzoli oyo ezali pɛto mpe ezali na mbeba te, biso mpe tokoki kokende liboso “na kosepela mpe na mitema ya esengo,” mpe kolikya ete Yehova akosopela biso mapamboli na ye.—Malaki 3:10.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini makambo oyo Mibeko elobaki mpo na bambeka na makabo ekoki kolakisa mpe kobɔndisa biso?
• Wapi lisɛngami ya liboso mpo mbeka endimama, mpe yango elimboli nini mpo na biso?
• Eloko nini tokoki kopesa oyo ekokani na mbeka ya kotumba oyo moto azalaki kopesa soki motema na ye esepeli?
• Na makambo nini tokoki kokokanisa makita ya lisangá na mbeka ya bondeko?
[Elilingi na lokasa 18]
Mpo bato bábika, Yehova abongisaki mbeka ya Yesu mpo na kosikola bango
[Elilingi na lokasa 20]
Mpo Yehova andima mosala na biso, tosengeli kozala pɛto na makambo nyonso
[Elilingi na lokasa 21]
Tondimaka malamu ya Yehova liboso ya bato nyonso ntango tozali kosakola.