“Bóya epai na ngai, . . . mpe nakobɔndisa bino”
Makita oyo elendisaka bolingo mpe misala ya malamu
BANDA na Toronto tii na Tokyo, banda na Moscou tii na Montevideo, bamilio ya Batatoli ya Yehova na bato mosusu basepelaka kokenda na bisika na bango ya losambo mikolo mingi na kati ya pɔsɔ. Kati na bango ezali na batata ya mabota oyo, nsima ya kosala mosala mokolo mobimba, balɛmbaka; basi ya molende, bamama na bana na bango ya mike; bilenge ya nzoto makasi oyo bakendaka kelasi; mibange oyo balɛmbi mpe batambolaka malɛmbɛmalɛmbɛ mpo na mingai mpe mpasi na nzoto; basi oyo bakufelá mibali mpe bitike; mpe lisusu bato oyo bazali na mposa ya libɔndisi mpo bazali konyokwama na makanisi.
Batatoli ya Yehova bamataka mpe na bingbunduka oyo etambolaka mbangu, bamosusu batambolaka na mpunda, bamosusu bamataka na métro mpe bamosusu na mituka ya minene. Bamosusu bakatisaka bibale oyo ezali na bangando, mpe bamosusu oyo bafandi na bingumba minene bayikaka mpiko mpo na makɛlɛlɛ. Mpo na nini bato wana nyonso basalaka milende wana?
Libosoliboso mpo ete koyangana mpe kopesa biyano na makita ya boklisto ezali lolenge moko ya ntina mingi mpo na kosambela Yehova Nzambe. (Baebele 13:15) Ntoma Paulo alobelaki ntina mosusu ntango akomaki boye: “Tótyelanaka likebi mpo na kopusama na komonisa bolingo mpe misala ya malamu, tótika koyangana na biso te, . . . kasi tólendisanaka, mpe tósala bongo na koleka mpenza lokola bomoni ete mokolo yango ekómi pene.” (Baebele 10:24, 25, NW) Na bavɛrsɛ yango, Paulo amonisaki makanisi ndenge moko na Davidi oyo ayembaki ete: “Nasepeli mingi wana balobelaki ngai ete, Tiká tókende na ndako ya [Yehova].”—Nzembo 122:1.
Mpo na nini baklisto basepelaka koyangana na makita? Mpo ete bayangani bakendaka te kaka mpo na kotala mpe koyoka. Kasi, na nzela ya makita, bayebanaka. Mingimingi, makita yango epesaka bango mabaku ya kopesa, kasi ya kozwa kaka te; epesaka bango mpe mabaku ya kolendisana mpe komonisana bolingo mpe misala ya malamu. Yango esalaka ete makita elendisa. Lisusu, na nzela ya makita ya boklisto mpe, Yesu akokisaka likambo oyo alakaki ete: “Bóya epai na ngai, . . . mpe nakobɔndisa bino.”—Matai 11:28, NW.
Esika ya kozwa libɔndisi mpe lisalisi
Batatoli ya Yehova bamonaka ete makita na bango ezalaka esika ya kopema. Mpamba te na makita yango, “moombo ya sembo mpe ya mayele” apesaka bilei ya elimo na ntango na yango. (Matai 24:45) Lisusu, makita esalisaka mpenza basaleli ya Yehova na kokóma bato oyo bayebi mpenza koteya Liloba ya Nzambe mpe bazali na molende na mosala yango. Mpe, na Ndako ya Bokonzi moto akoki kozwa baninga oyo bazali na bolingo, baninga oyo bamibanzabanzaka mpo na bamosusu mpe balendisaka basusu, oyo bazali na mposa ya kosalisa mpe ya kobɔndisa basusu na ntango ya mpasi.—2 Bakolinti 7: 5-7.
Yango ezali likambo oyo ekómelaki Phillis, mwasi oyo akufelaki mobali ntango mwana na ye moko azalaki na mbula mwambe mpe mosusu na mbula mitano. Alobeli matomba oyo ye na bana na ye bazwaki na makita ya boklisto: “Kokende na Ndako ya Bokonzi ezalaki kobɔndisa ngai mpo ete bandeko kati na lisangá bazalaki ntango nyonso komonisa bolingo mpe bazalaki komibanzabanza mpo na biso, bazalaki koyamba biso, koloba na biso mwa likambo moko ya Makomami to mpe koningisa biso mwa moke ntango bapesi biso mbote ya lobɔkɔ. Nazalaki koyoka mposa tózalaka ntango nyonso wana.”—1 Batesaloniki 5:14.
Nsima ya kosala Marie lipaso moko ya monene, monganga ayebisaki ye ete akokóma malamu nsima ya pɔsɔ motoba. Na bapɔsɔ ya liboso oyo Marie azalaki kopema, azalaki kokende makita te. Monganga amonaki ete Marie azalaki lisusu na esengo te ndenge azalaki na yango liboso. Ntango ayebaki ete Marie azalaki lisusu koyangana na makita te, monganga alendisaki ye akendaka na makita. Marie alobaki ete lokola mobali na ye azali na lingomba mosusu, akotika ye te ete akende na makita mpo ete nzoto na ye ezali naino malamu te. Yango wana, monganga akomelaki ye “nkisi” ete Marie asengeli kokende na Ndako ya Bokonzi mpo na kolendisama mpe mpo na kokutana na baninga ya malamu. Marie asukisi boye: “Nsima ya koyangana mbala moko na makita, namiyokaki malamu mpenza. Nabandaki kolya, kolala mpɔngi butu mobimba, nazalaki lisusu komɛla nkisi mingimingi te oyo ekitisaka mpasi, mpe nabandaki lisusu kosɛka!”—Masese 16:24.
Ezala bato oyo bazali Batatoli te bamonaka ete Batatoli bamonisakana bolingo na makita na bango. Moyekoli moko ya iniversite aponaki koyekola makambo ya Batatoli ya Yehova mpo na kokoma lisolo moko na mateya oyo bayekolaka bizaleli ya bato (ethnologie). Ntango atalaki ndenge makambo esalamaka na makita, akomaki boye na lisolo na ye: “Lokola bayambaki ngai malamu . . . [ezalaki] likambo ya kokamwa mpenza. . . . Bataloli ya Yehova bazali mpenza na boboto mpe ezaleli yango emonanaka mingi na Ndako ya Bokonzi.”—1 Bakolinti 14:25.
Kati na mokili oyo etondi na mobulu, lisangá ya boklisto ezali esika ya kopema na elimo. Ezali esika ya kimya mpe ya bolingo. Soki tozali koyangana ntango nyonso na makita, tokomona bosolo ya maloba ya mokomi na nzembo oyo elobi boye: “Talá lokola ezali malamu mpe na esengo soki bandeko bakozalana motema moko!”—Nzembo 133:1.
[Etanda/Elilingi na lokasa 25]
BAZALI KOKOKISA MPOSA YA BATO OYO BAKUFÁ MATOI
Ndenge nini bato oyo bayokaka te bakoki kozwa litomba na makita ya boklisto? Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bazali kosala masangá ya lokota ya bikela. Na boumeli ya mbula 13 oyo eleki, masangá 27 mpe bituluku 43 ya lokota ya bikela esalemaki na États-Unis. Lelo oyo, masangá 140 ya lokota ya bikela ezali na mikili mosusu soki 40. Bakasɛti-video oyo ezali na makambo oyo ezali na mikanda ya Batatoli ya Yehova ezali na nkota 13 ya bikela.
Lisangá ya boklisto epesi bato oyo bakufá matoi libaku ya kosanzola Yehova. Odile, mwasi oyo azalaká Mokatolike na France, anyokwamaki mingi na makanisi mpe azalaki kokanisa komiboma, azali na botɔndi mpo na mateya ya Biblia oyo azwaki na makita ya boklisto. Alobi boye: “Nzoto na ngai ezongaki makasi mpe nazali lisusu na esengo ya bomoi. Kasi, likambo eleki malamu ezali ete nayebi lingomba ya solo. Sikoyo bomoi na ngai ekómi na ntina.”