Tózala bato oyo bazali na kondima
“Tozali . . . bango bakondimaka mpe bakobikisa milimo.”—BAEBELE 10:39.
1. Mpo na nini tokoki koloba ete kondima ya mosaleli mokomoko ya sembo ya Yehova ezali na motuya monene?
MBALA ya nsima oyo okozala lisusu na Ndako ya Bokonzi elongo na ebele ya basambeli ya Yehova, tɛlɛmá mwa moke mpe bwaká miso epai na epai. Kanisá makambo ndenge na ndenge oyo bato yango basalaka mpo na komonisa kondima na bango. Mbala mosusu okomona mibange oyo bazali kosalela Nzambe banda bambula ebele, bilenge oyo, mokolo na mokolo bazali kosala nyonso mpo na koboya kolanda makambo ya baninga na bango, baboti oyo bazali kobunda etumba mpo na kobɔkɔla bana na bango ete bázala bato oyo babangaka Nzambe. Okomona bankulutu na basaleli ya misala oyo bazali kokokisa mikumba ebele. Mbala mosusu okomona bandeko ya elimo, bilenge mpe mikóló, oyo bazali kolonga mikakatano ndenge na ndenge mpo na kosalela Yehova. Kondima ya ndeko mokomoko ezali mpenza na motuya monene!—1 Petelo 1:7.
2. Mpo na nini tokoki koloba ete toli ya Paulo na Baebele mokapo 10 na 11 ezali malamu mingi mpo na biso lelo?
2 Ntoma Paulo ayebaki ntina ya kondima koleka bato mingi to mpe koleka bato nyonso. Asosolaki ete kondima ya solosolo ‘ebikisaka molimo.’ (Baebele 10:39) Kasi, Paulo ayebaki ete kondima emekamaka mpe ekoki kobeba na kati ya mokili oyo ezangi kondima. Azalaki komibanzabanza mingi mpo na Bayuda oyo bakómaki baklisto oyo bafandaki na Yelusaleme mpe na Yudea; bandeko yango bazalaki kobunda etumba mpo na kobatela kondima na bango. Tótalela mwa bavɛrsɛ ya Baebele mokapo 10 mpe mokapo 11 mpe tólanda malamu mayele oyo Paulo asalelaki mpo na kolendisa kondima na bango. Ntango tozali kosala yango, tokomona ndenge nini tokoki kosala mpo biso moko na baninga na biso, tózala na kondima makasi.
Tótyelanaka motema
3. Ndenge nini maloba ya Paulo na Baebele 10:39 emonisi ete azalaki kotyela bandeko na ye bandimi motema?
3 Mbala mosusu, eloko ya liboso tokomona ezali ete Paulo azalaki na makanisi malamu mpo na bato oyo akomelaki mokanda. Akomaki boye: “Biso tozali kati na bango te baoyo bakozongaka nsima mpe bakobebisama; kasi tozali kati na bango bakondimaka mpe bakobikisa milimo.” (Baebele 10:39) Paulo azalaki na makanisi malamu mpo na bandeko na ye baklisto, mpe azalaki kokanisela bango mabe te. Lisusu, tomoni ete asalelaki liloba “biso.” Paulo azalaki moto ya sembo. Kasi, azalaki komitombola te liboso ya bato oyo akomelaki mokanda, lokola nde ye azalaki sembo mingi koleka bango. (Talá Mosakoli 7:16.) Kasi, ye moko amityaki na kati na bango. Azalaki na elikya ete ezala ye moko to baninga na ye baklisto ya sembo oyo akomelaki mokanda bakokutana na mikakatano mpe bakozala na mpiko ete bázonga nsima te mpo na kobebisama, kasi bakozala bato oyo bazali na kondima.
4. Mpo na nini Paulo azalaki kotyela bandeko na ye bandimi motema?
4 Ndenge nini Paulo akokaki kotyela bandeko na ye motema bongo? Boye, ayebaki te ete Bayuda oyo bakómaki baklisto bazalaki kosala mabe? Ayebaki, kutu apesaki bango toli oyo ebongi mpenza mpo na kosalisa bango ete bátika mabunga na makambo ya elimo oyo bazalaki kosala. (Baebele 3:12; 5:12-14; 6:4-6; 10:26, 27; 12:5) Ezalaki na ntina mosusu ya malamu soki mibale oyo etindaki Paulo na kotyela bandeko na ye motema. (1) Lokola azalaki kolanda ndakisa ya Yehova, Paulo azalaki kosala makasi atalelaka basaleli ya Yehova ndenge ye moko Yehova atalelaka bango. Yehova atalaka kaka mabunga na bango te, kasi atalaka bizaleli na bango ya malamu mpe mposa na bango ya kopona kosala malamu na mikolo ekoya. (Nzembo 130:3; Baefese 5:1) (2) Paulo azalaki mpenza na kondima ete elimo santu ezali makasi mingi. Ayebaki ete ezali na mokakatano moko te to bolɛmbu ya moto oyo ekokaki kopekisa Yehova apesa moklisto nyonso oyo azali kosala makasi ya kosalela ye na bosembo “nguya oyo eleki nguya ya bato.” (2 Bakolinti 4:7, NW; Bafilipi 4:13) Na yango, Paulo amikosaki te to amindimisaki na ndenge oyo eleki te lokola azalaki kotyela bandeko na ye motema. Asalaki yango na ntina mpenza mpe yango endimamaki na makanisi ya Biblia.
5. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Paulo mpo na kotyela bandeko motema, mpe ekobota mbuma nini?
5 Bato mosusu mpe balandaki ndakisa ya Paulo na likambo ya kotyela bandeko motema. Na ntembe te elobeli ya kolendisa oyo Paulo asalelaki na mokanda oyo atindelaki bandeko ya masangá ya Yelusaleme mpe ya Yudea ebimisaki mpenza litomba monene. Lokola Bayuda oyo bazalaki banguna na bango bazalaki kotyola bango mingi mpe bazalaki komona bango lokola biloko mpamba, maloba wana esalisaki Bayuda oyo bakómaki baklisto bálɛmba te na mokano na bango ya kozala baoyo bazali na kondima. Biso mpe tokoki kosala bongo lelo oyo epai ya bandeko na biso? Ezali mpasi te na komona mabunga mpe mabe ya bato mosusu. (Matai 7:1-5) Kasi, tokosalisana mingi soki tozali kotya likebi na biso na kondima ya mokomoko na biso mpe kokumisa yango. Soki tozali kolendisana ndenge yango, na ntembe te kondima na biso ekokola.—Baloma 1:11, 12.
Lolenge malamu ya kosalela Liloba ya Nzambe
6. Epai wapi Paulo azwaki maloba oyo akomaki na Baebele 10:38?
6 Lokola asalelaki makanisi ya Biblia na lolenge ya malamu, Paulo alendisaki mpe kondima ya bandeko na ye. Na ndakisa, akomaki boye: “Nde moyengebene na ngai akobika na kondima. Soko mpe akozonga nsima, motema na ngai ekosepela na ye te.” (Baebele 10:38) Na vɛrsɛ yango, Paulo azongelaki maloba ya mosakoli Habakuku.a Na ntembe te Bayuda oyo bakómaki baklisto, baoyo Paulo atindelaki mokanda, bayebaki maloba yango mpamba te bayebaki malamu mikanda ya basakoli. Na kotalela mokano oyo azalaki na yango, soko na mobu 61 T.B., ya kolendisa kondima ya baklisto oyo bazalaki na Yelusaleme mpe na bamboka mosusu oyo ezalaki pembenipembeni na yango, tomoni mpenza ete asalaki malamu ndenge aponaki maloba ya Habakuku. Mpo na nini?
7. Habakuku akomaki esakweli na ye ntango nini, mpe na ntango wana makambo ezalaki ndenge nini na Yuda?
7 Emonani ete Habakuku akomaki mokanda na ye soki mbula 20 to koleka liboso báboma Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. Mosakoli amonaki emonaneli ya Bakaladi (to, bato ya Babilone), “libota yango ya bololo mpe ya koyoka nkanda noki,” bakɔtaki na Yuda mpe babebisaki Yelusaleme, basilisaki bato mpe babebisaki bamboka na bisika nyonso oyo bazalaki koleka. (Habakuku 1:5-11) Nzokande, likambo wana ya nsɔmɔ esakolamaki mbula koleka monkama liboso, na mikolo ya Yisaya. Na ntango ya Habakuku, mabe ekómaki lisusu mingi na Yuda ntango Yoyakimi akómaki mokonzi nsima ya mokonzi malamu Yosiya. Yoyakimi anyokolaki basakoli ya Yehova, mpe abomaki bango. (2 Ntango 36:5; Yilimia 22:17; 26:20-24) Yango wana mpenza tokoki kokamwa te ete Habakuku aloba boye na mpasi na motema: “Ɛ [Yehova], kino ntango nini?”—Habakuku 1:2.
8. Mpo na nini ndakisa ya Habakuku esalisaki baklisto na ekeke ya liboso mpe ezali kosalisa biso lelo oyo?
8 Habakuku ayebaki te ntango boni etikalaki mpo Yelusaleme ebomama. Ndenge moko mpe, baklisto ya ekeke ya liboso bayebaki te soki ebongiseli ya Bayuda ekosuka ntango nini. Biso mpe lelo oyo toyebi te “mokolo mpe ngonga” oyo Yehova akopesa mokili oyo mabe etumbu. (Matai 24:36) Yango wana, tótalela makambo mibale oyo ezali na eyano oyo Yehova apesaki Habakuku. Ya liboso, andimisaki mosakoli ete nsuka ekoya na ntango mpenza oyo Nzambe akanaki. Nzambe alobaki boye: “Ekoumela mingi te,” ata soki bato bamonaki lokola ete eumeli. (Habakuku 2:3) Ya mibale, Yehova ayebisaki Habakuku boye: “Nde moyengebene akobika mpo na kondima.” (Habakuku 2:4) Yoká maloba kitoko ya solo oyo ezangi mindɔndɔ! Na yango, likambo oyo eleki ntina ezali te koyeba ntango nini nsuka ekoya, kasi ezali nde ya koyeba soki tokozala ntango nyonso na kondima na bomoi na biso.
9. (a) Na mobu 607 L.T.B, ndenge nini bosembo ya basaleli ya Yehova oyo bazalaki na botosi ebikisaki bango? (b) Nsima ya mobu 66 T.B., ndenge nini bosembo ya basaleli ya Yehova oyo batosaki ebikisaki bango? (c) Mpo na nini ezali na ntina tólendisa kondima na biso?
9 Ntango Yelusaleme ebomamaki na mobu 607 L.T.B., Yilimia, na sekretɛrɛ na ye Baluku, na Ebede-Meleki, mpe Balekaba oyo bazalaki sembo bamonaki ndenge makambo oyo Yehova alakaki Habakuku ekokisamaki. Bango ‘babikaki’ ntango Yelusaleme ebomamaki nyɛɛ. Mpo na nini? Yehova apesaki bango mbano mpo na bosembo na bango. (Yilimia 35:1-19; 39:15-18; 43:4-7; 45:1-5) Ndenge moko mpe, Bayuda oyo bakómaki baklisto na ekeke ya liboso, na ntembe te balandaki toli ya Paulo, mpamba te ntango basoda ya Loma bayaki kobundisa Yelusaleme na mobu 66 T.B., mpe na nsima bazongaki mpo na ntina oyo eyebani te, baklisto yango balandaki na bosembo nyonso likebisi ya Yesu mpe bakimaki. (Luka 21:20, 21) Bosembo na bango ebikisaki bango. Biso mpe tokobika soki tokotikala sembo tii ntango nsuka ekoya. Talá ntina malamu mpenza oyo tosengeli kolendisa kondima na biso sikoyo!
Bandakisa ya bato oyo bazalaki na kondima
10. Ndenge nini Paulo alobelaki kondima ya Mose, mpe ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Mose na likambo yango?
10 Paulo alendisaki mpe kondima na ndenge oyo alobelaki bandakisa malamu ya bato ya kondima. Tángá Baebele mokapo 11 mpe talá ndenge oyo alobelaki bato oyo Biblia elobeli bango. Na ndakisa, alobi ete Mose “ayikaki mpiko lokola ete azali komona ye oyo akomonanaka te.” (Biso nde totɛngisi makomi; Baebele 11:27) Yango elingi koloba ete mpo na Mose, Yehova azalaki mpenza solo, ezalaki lokola nde azali komona Nzambe oyo amonanaka te. Ezali mpe bongo mpo na biso? Ezali mpasi te na kolobela likambo ya kozala moninga ya Yehova, kasi mpo na kosala mpe kobongisa boninga yango, esɛngi mosala. Tosengeli kosala mosala yango! Tomonaka mpenza ete Yehova azali solo mpe totalelaka makanisi na ye ntango tolingi kozwa mokano moko, ata na makambo oyo ekoki komonana lokola makambo mike? Soki tozali na kondima ya ndenge wana, ekosalisa biso tóyika mpiko ata soki tokutani na komekama makasi.
11, 12. (a) Ekoki kozala ete kondima ya Enoka emekamaki na makambo nini? (b) Mbano nini Enoka azwaki?
11 Tólobela mpe kondima ya Enoka. Tokoki koyeba te botɛmɛli oyo akutanaki na yango. Enoka asengelaki kosakola nsango moko mabe oyo elobaki ete Yehova akopesa bato mabe ya ntango wana etumbu. (Yuda 14, 15) Na ntembe te ndenge ya mabe mpe ya nsɔmɔ oyo balingaki konyokola moto yango ya sembo, esalaki ete Yehova ‘alongola’ ye, elingi koloba akamataki ye na bomoi mpe alalisaki ye mpɔngi na liwa liboso ete banguna na ye bákoka kosimba ye. Yango wana, Enoka amonaki te ndenge oyo makambo oyo asakolaki ekokisamaki. Atako bongo, azwaki likabo oyo ezalaki malamu koleka na makambo mosusu.—Baebele 11:5, Liloba lya Nzambe; Genese 5:22-24.
12 Paulo alobi boye: “Liboso naino atombwaki te, azwaki litatoli ete asepelisi Nzambe.” (Baebele 11:5) Maloba yango elimboli nini? Elingi koloba ete liboso Enoka akufa, ekoki kozala amonaki emonaneli moko; mbala mosusu emonaneli ya paladiso awa na mabelé epai akosekwa na mikolo ezali koya. Ata soki ezali bongo to te, Yehova amonisaki Enoka ete asepelaki mingi na bosembo na ye. Enoka asepelisaki motema ya Yehova. (Talá Masese 27:11.) Ntango tozali kokanisa bomoi ya Enoka, yango ezali mpenza kosimba motema na biso, boye te? Okolinga ete yo mpe ozala sembo ndenge wana na bomoi na yo? Kanisá bandakisa wana malamu; moná bango ete bazalaki bato ya solo. Zwá mokano ya komonisa mokolo na mokolo na bomoi na yo ete ozali moto ya kondima. Kobosana mpe te ete baoyo bazali na kondima basalelaka Nzambe na kotala dati te to ntango oyo Nzambe akosala makambo oyo alakaki. Tosengeli nde kozala na mokano ya kosalela Yehova libela na libela! Soki tozali kosala bongo, tokozala na bomoi ya malamu koleka na mokili oyo mpe na mokili ya sika oyo ezali koya.
Ndenge ya kokóma na kondima makasi
13, 14. (a) Ndenge nini maloba ya Paulo na Baebele 10:24, 25 ekoki kosalisa biso na kosala ete makita ezalaka ntango ya esengo? (b) Ntina ya libosoliboso ya makita ya lisangá ezali nini?
13 Paulo alakisaki Baebele oyo bakómaki baklisto mwa makambo oyo bakoki kosala mpo na kolendisa kondima na bango. Tótalela makambo mibale. Na ntembe te toyebi malamu maloba ya Baebele 10:24, 25 oyo ezali kosɛngisa biso tóyanganaka mbala na mbala na makita ya lisangá. Kasi, tóyeba ete makambo oyo Paulo akomaki na lisalisi ya elimo santu elimboli te ete tosengeli kozala te bato oyo bakendaka na makita kaka mpo na koyoka bamosusu. Kasi, Paulo amonisi ete makita ezali esika oyo tokoki koyebana na bandeko na biso, kosungana mpo na kosalela Nzambe malamu koleka, mpe kolendisana. Tokendaka na makita mpo na kopesa, kasi mpo na kozwa kaka te. Yango ekosala ete makita na biso ezalaka bantango ya esengo.—Misala 20:35.
14 Kasi, tokendaka makita libosoliboso mpo na kosambela Yehova Nzambe. Tosalaka yango ntango tozali kosangana na libondeli mpe tozali kosangisa mingongo na nzembo, ntango tozali kofungola matoi na biso mpo na koyoka, mpe ntango tozali kopesa “mbuma ya bibebu” lokola mbeka, elingi koloba ntango tozali kosanzola Yehova na biyano mpe na badevuare na biso na makita. (Baebele 13:15) Soki tozali kobosana mikano wana te mpe tozali kosalela yango na makita nyonso, na ntembe te, kondima na biso ekozala kolendisama ntango nyonso.
15. Mpo na nini Paulo alendisaki Baebele oyo bakómaki baklisto ete bákangama na mosala na bango, mpe mpo na nini ezali toli malamu lelo oyo?
15 Lolenge mosusu oyo tokoki kolendisa kondima na biso ezali na kosangana na mosala ya kosakola. Paulo akomaki boye: “Tósimba ngwi eyambweli na elikya na biso, mpo ete ye oyo apesaki elaka azali sembo.” (Baebele 10:23) Okoki kolendisa bato mosusu básimba ngwi eloko moko ntango emonani ete balingi kotika yango. Na ntembe te, Satana azalaki kosala nyonso mpo Baebele oyo bakómaki baklisto bálɛmba mosala ya kosakola. Azali mpe kosala basaleli ya Nzambe ndenge yango lelo oyo. Tokosala nini mpo na yango? Tótalela likambo oyo Paulo asalaki.
16, 17. (a) Ndenge nini Paulo azwaki mpiko mpo na kosakola? (b) Mikano nini tosengeli kozala na yango soki tobangaka makambo mosusu oyo etali mosala ya kosakola?
16 Paulo akomelaki baklisto ya Tesaloniki boye: “Boyebi ’te banyokolaki biso mpe bafingaki biso na mboka Filipi. Kasi Nzambe apesaki biso molende [“mpiko,” NW] ya kosakola Nsango Malamu na ye epai na bino . . . , atako etumba ezalaki makasi.” (1 Tesalonika 2:2, Boyokani ya Sika) Na ndimbola nini “bafingaki” Paulo na baninga na ye na Filipi? Bato mosusu oyo balimbolaka Biblia balobi ete liloba ya Greke oyo Paulo asalelaki elimboli “kotyola, koyokisa nsɔni, to kosambwisa.” Bakonzi ya mboka Filipi babɛtaki Paulo na baninga na ye fimbo, batyaki bango na bolɔkɔ, mpe bakangaki bango na minyɔlɔlɔ. (Misala 16:16-24) Mpasi wana esalaki Paulo nini? Tokanisi ete bato ya Tesaloniki, mboka oyo elandaki, na mobembo na ye ya misionɛrɛ bamonaki Paulo azongi nsima mpe azali kobanga? Te, kutu ‘azwaki nde mpiko.’ Abangaki te mpe akobaki kosakola na molende.
17 Eloko nini epesaki Paulo mpiko? Mpiko yango eutaki epai na ye moko? Te, alobaki ete ‘Nzambe apesaki bango’ mpiko. Mokanda moko ya babongoli ya Biblia elobi ete maloba wana ekoki kobongolama boye: “Nzambe alongolaki kobanga na mitema na biso.” Soki ozalaka mpenza na mpiko te mpo na kosakola, to soki makambo mosusu oyo etali mosala ya kosakola ebangisaka yo, ebongi osɛnga Yehova asala mpe bongo epai na yo. Sɛngá ye alongola yo kobanga. Asalisa yo ozwa mpiko mpo na kosakola. Mpe lisusu, bongisá mpe makambo na yo mosusu. Na ndakisa, bongisá programɛ na yo mpo obimaka na moto oyo asalaka malamu lolenge ya mosala ya kosakola oyo ezalaka mwa kwokɔsɔ mpo na yo. Ekoki kozala kosakola na bamagazini, kosakola na balabala, kosakola na libaku malamu, to kosakola na telefone. Mbala mosusu ndeko yango akosepela ete ye abanda naino. Soki bosali bongo, yo talaká ye malamu mpe landá ndenge oyo azali kosala. Nde na nsima, okozwa mpiko mpe okomeka kosala ndenge yango.
18. Mapamboli nini tokozwa soki tozwi makasi ya kosakola?
18 Kanisá matomba oyo ekoki kobima soki ozwi makasi ya kosakola. Soki olendendeli mpe olɛmbi te, na ntembe te ntango ozali kosakola solo ya Biblia okokutana na makambo malamu oyo mbala mosusu olingaki kozanga yango. (Talá na lokasa 25.) Okozala na esengo ya koyeba ete osepelisi motema ya Yehova na ndenge osali likambo oyo ezalaki mpasi mpo na yo. Akopambola yo mpe akosalisa yo obangaka te. Kondima na yo ekokóma makasi. Ya solo mpenza, okoki kolendisa kondima ya bato mosusu te soki ozali kolendisa kondima na yo moko te.—Yuda 20, 21.
19. Mbano nini ezali kozela ‘baoyo bazali na kondima’?
19 Tiká ete olendisa ntango nyonso kondima na yo mpe oyo ya baninga na yo. Okoki kosala yango soki ozali kotonga kondima na yo mpe ya bato mosusu ntango ozali kosalela malamu Liloba ya Nzambe, ntango ozali kotalela bandakisa ya bato ya kondima oyo Biblia elobeli mpe soki ozali kokanisa makambo na bango, soki ozali komibongisa mpe ozali kopesa biyano na makita, mpe soki okangami makasi na mosala ya lokumu ya kosakola nsango malamu. Ntango ozali kosala makambo yango, yebá ete ozali mpenza na kati ya ‘bato ya kondima.’ Yebá mpe ete bato ya ndenge yango bakozwa mbano monene. Bazali “baoyo bakondimaka mpe bakobikisa milimo.”b Tiká ete kondima na yo ekola ntango nyonso, mpe tiká Yehova Nzambe abatela yo na bomoi libela na libela!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Paulo azwaki maloba yango na Habakuku 2:4 na Biblia ya Septante oyo ebakisi maloba “soko moto akozonga nsima motema na ngai ekosepela na ye te.” Maloba yango ezali te na bamaniskri mosusu ya Liebele oyo ezali lelo oyo. Bato mosusu oyo balimbolaka Biblia balobaki ete bamaniskri oyo basalelaki mpo na kobongola Biblia ya Septante ezali lisusu te lelo oyo. Ata soki ezali bongo to te, ezali elimo santu ya Nzambe nde etindaki Paulo akoma yango na mokanda na ye. Na bongo, tokoloba ete Nzambe nde alingaki ezala bongo.
b Mokapo ya mobu 2000 mpo na Batatoli ya Yehova elobi boye: “Tozali kati na baoyo bazongaka nsima te . . . kasi tozali kati na baoyo bazali na kondima.”—Baebele 10:39, NW.
Okopesa eyano nini?
◻ Ndenge nini Paulo amonisaki ete azalaki kotyela Baebele oyo bakómaki baklisto motema, mpe tokoki kozwa liteya nini na likambo yango?
◻ Mpo na nini ebongaki mpenza Paulo atánga maloba ya Habakuku?
◻ Paulo alobelaki bandakisa nini ya bato ya kondima oyo Biblia elobeli bango?
◻ Paulo apesaki toli nini mpo na kolendisa kondima?
[Elilingi na lokasa 23]
Nsima ya konyokwama na mboka Filipi, Paulo azwaki makasi mpe akendaki lisusu kosakola
[Bililingi na lokasa 24]
Okoki kozwa makasi ya komeka lolenge nyonso ya mosala ya kosakola?