-
Tózala bato oyo bazali na kondimaLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1999 | 15 Décembre
-
-
Lolenge malamu ya kosalela Liloba ya Nzambe
6. Epai wapi Paulo azwaki maloba oyo akomaki na Baebele 10:38?
6 Lokola asalelaki makanisi ya Biblia na lolenge ya malamu, Paulo alendisaki mpe kondima ya bandeko na ye. Na ndakisa, akomaki boye: “Nde moyengebene na ngai akobika na kondima. Soko mpe akozonga nsima, motema na ngai ekosepela na ye te.” (Baebele 10:38) Na vɛrsɛ yango, Paulo azongelaki maloba ya mosakoli Habakuku.a Na ntembe te Bayuda oyo bakómaki baklisto, baoyo Paulo atindelaki mokanda, bayebaki maloba yango mpamba te bayebaki malamu mikanda ya basakoli. Na kotalela mokano oyo azalaki na yango, soko na mobu 61 T.B., ya kolendisa kondima ya baklisto oyo bazalaki na Yelusaleme mpe na bamboka mosusu oyo ezalaki pembenipembeni na yango, tomoni mpenza ete asalaki malamu ndenge aponaki maloba ya Habakuku. Mpo na nini?
7. Habakuku akomaki esakweli na ye ntango nini, mpe na ntango wana makambo ezalaki ndenge nini na Yuda?
7 Emonani ete Habakuku akomaki mokanda na ye soki mbula 20 to koleka liboso báboma Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. Mosakoli amonaki emonaneli ya Bakaladi (to, bato ya Babilone), “libota yango ya bololo mpe ya koyoka nkanda noki,” bakɔtaki na Yuda mpe babebisaki Yelusaleme, basilisaki bato mpe babebisaki bamboka na bisika nyonso oyo bazalaki koleka. (Habakuku 1:5-11) Nzokande, likambo wana ya nsɔmɔ esakolamaki mbula koleka monkama liboso, na mikolo ya Yisaya. Na ntango ya Habakuku, mabe ekómaki lisusu mingi na Yuda ntango Yoyakimi akómaki mokonzi nsima ya mokonzi malamu Yosiya. Yoyakimi anyokolaki basakoli ya Yehova, mpe abomaki bango. (2 Ntango 36:5; Yilimia 22:17; 26:20-24) Yango wana mpenza tokoki kokamwa te ete Habakuku aloba boye na mpasi na motema: “Ɛ [Yehova], kino ntango nini?”—Habakuku 1:2.
8. Mpo na nini ndakisa ya Habakuku esalisaki baklisto na ekeke ya liboso mpe ezali kosalisa biso lelo oyo?
8 Habakuku ayebaki te ntango boni etikalaki mpo Yelusaleme ebomama. Ndenge moko mpe, baklisto ya ekeke ya liboso bayebaki te soki ebongiseli ya Bayuda ekosuka ntango nini. Biso mpe lelo oyo toyebi te “mokolo mpe ngonga” oyo Yehova akopesa mokili oyo mabe etumbu. (Matai 24:36) Yango wana, tótalela makambo mibale oyo ezali na eyano oyo Yehova apesaki Habakuku. Ya liboso, andimisaki mosakoli ete nsuka ekoya na ntango mpenza oyo Nzambe akanaki. Nzambe alobaki boye: “Ekoumela mingi te,” ata soki bato bamonaki lokola ete eumeli. (Habakuku 2:3) Ya mibale, Yehova ayebisaki Habakuku boye: “Nde moyengebene akobika mpo na kondima.” (Habakuku 2:4) Yoká maloba kitoko ya solo oyo ezangi mindɔndɔ! Na yango, likambo oyo eleki ntina ezali te koyeba ntango nini nsuka ekoya, kasi ezali nde ya koyeba soki tokozala ntango nyonso na kondima na bomoi na biso.
9. (a) Na mobu 607 L.T.B, ndenge nini bosembo ya basaleli ya Yehova oyo bazalaki na botosi ebikisaki bango? (b) Nsima ya mobu 66 T.B., ndenge nini bosembo ya basaleli ya Yehova oyo batosaki ebikisaki bango? (c) Mpo na nini ezali na ntina tólendisa kondima na biso?
9 Ntango Yelusaleme ebomamaki na mobu 607 L.T.B., Yilimia, na sekretɛrɛ na ye Baluku, na Ebede-Meleki, mpe Balekaba oyo bazalaki sembo bamonaki ndenge makambo oyo Yehova alakaki Habakuku ekokisamaki. Bango ‘babikaki’ ntango Yelusaleme ebomamaki nyɛɛ. Mpo na nini? Yehova apesaki bango mbano mpo na bosembo na bango. (Yilimia 35:1-19; 39:15-18; 43:4-7; 45:1-5) Ndenge moko mpe, Bayuda oyo bakómaki baklisto na ekeke ya liboso, na ntembe te balandaki toli ya Paulo, mpamba te ntango basoda ya Loma bayaki kobundisa Yelusaleme na mobu 66 T.B., mpe na nsima bazongaki mpo na ntina oyo eyebani te, baklisto yango balandaki na bosembo nyonso likebisi ya Yesu mpe bakimaki. (Luka 21:20, 21) Bosembo na bango ebikisaki bango. Biso mpe tokobika soki tokotikala sembo tii ntango nsuka ekoya. Talá ntina malamu mpenza oyo tosengeli kolendisa kondima na biso sikoyo!
-
-
Tózala bato oyo bazali na kondimaLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1999 | 15 Décembre
-
-
a Paulo azwaki maloba yango na Habakuku 2:4 na Biblia ya Septante oyo ebakisi maloba “soko moto akozonga nsima motema na ngai ekosepela na ye te.” Maloba yango ezali te na bamaniskri mosusu ya Liebele oyo ezali lelo oyo. Bato mosusu oyo balimbolaka Biblia balobaki ete bamaniskri oyo basalelaki mpo na kobongola Biblia ya Septante ezali lisusu te lelo oyo. Ata soki ezali bongo to te, ezali elimo santu ya Nzambe nde etindaki Paulo akoma yango na mokanda na ye. Na bongo, tokoloba ete Nzambe nde alingaki ezala bongo.
-