Bandeko mibale oyo bakesanaki na bizaleli
BIKATELI oyo baboti bazwaka ekoki kobebisa to kobongisa bomoi ya bana na bango. Tomonaka bosolo ya likambo yango lelo ndenge mpe emonanaki kala na elanga ya Edene. Botomboki ya Adama na Eva etyá elembo monene na bomoi ya bato nyonso. (Genese 2:15, 16; 3:1-6; Baloma 5:12) Atako bongo, moto moko na moko azali naino na likoki ya kosala boyokani ya malamu na Mozalisi na biso soki alingi. Likambo yango emonani na lisolo ya Kaina na Abele, bandeko ya liboso mpenza na mokili.
Epai moko te Biblia emonisi ete Nzambe asololaki lisusu na Adama na Eva nsima ya kobengana bango na Edene. Atako bongo, Yehova aboyaki te kosolola na bana na bango. Na ntembe te, baboti ya Kaina na Abele bateyaki bango makambo nyonso oyo elekaki. Bazalaki komona “bakeluba na mopanga ya mɔ́tɔ, mokobongwana bipai nyonso ete básɛnzɛla nzela ya nzete ya bomoi.” (Genese 3:24) Mibali yango bamonaki na miso bosolo ya esakweli ya Nzambe ete bakobimisa motɔki mpe bakomona mpasi mikolo nyonso ya bomoi na bango.—Genese 3:16, 19.
Na ntembe te, Kaina na Abele bayebaki maloba Yehova alobaki na nyoka: “Nakotya mpe koyinana kati na yo na mwasi, kati na mombóto na yo mpe mombóto na ye. Ye akosasa yo na motó mpe yo okosasa ye na litindi.” (Genese 3:15, NW) Makambo oyo Kaina na Abele bayebaki mpo na Yehova elingaki kosalisa bango bákolisa boyokani ya malamu na ye.
Kaina na Abele basengelaki kokanisa likoló ya bisakweli ya Yehova mpe ezaleli malamu na ye ya Mosungi mpo bázala na mposa ya kosepelisa Nzambe. Kasi basengelaki kokolisa mposa yango tii wapi? Bakolanda mposa ya mitema na bango ya kosambela Nzambe mpe ya kokolisa elimo na bango tii komonisa kondima epai na ye?—Matai 5:3.
Bandeko yango mibale bamemi makabo
Mokolo mosusu, Kaina na Abele bamemelaki Nzambe makabo. Kaina amemaki mbuma ya elanga, mpe Abele apesaki bana ya liboso ya nyama ya etonga na ye. (Genese 4:3, 4) Ekokaki kozala ete mibali yango bazalaki na mbula soki 100, mpamba te Adama asilaki kokokisa mbula 130 ntango abotaki Sete, mwana na ye ya mobali ya misato.—Genese 4:25; 5:3.
Makabo na bango emonisaki ete Kaina na Abele bayebaki malamu ezaleli na bango ya bato ya masumu mpe bazalaki na mposa ya kondimama na Nzambe. Bakanisaki mbala mosusu elaka ya Yehova oyo etali nyoka mpe Mombóto ya mwasi. Ekomami te soki Kaina na Abele balekisaki ntango boni mpe milende nini basalaki mpo na kokolisa boyokani ya malamu na Yehova. Kasi tokozwa likoki ya kososola makanisi ya mokomoko na bango soki totaleli lolenge oyo Yehova atalelaki makabo na bango.
Bato ya mayele balobaka ete ntango mosusu Eva azalaki kokanisa ete Kaina nde moto azalaki “mombóto” oyo ekoboma nyoka, mpamba te ntango abotaki Kaina alobaki ete: “Nazwi mobali mpo na kosungama na [Yehova].” (Genese 4:1) Soki Kaina mpe azalaki kokanisa bongo, amikosaki mpenza. Kasi, Abele apesaki mbeka na ye na kondima. Yango wana, “mpo na kondima, Abele alekaki Kaina na kotombwela Nzambe mbeka malamu.”—Baebele 11:4.
Kasi bandeko wana mibale bakesanaki kaka te na lolenge Abele azalaki na likoki ya kokanga ntina ya makambo ya elimo mpe Kaina azangaki yango. Bokeseni ezalaki mpe na bizaleli na bango. Yango wana, “[Yehova] andimaki Abele mpe likabo na ye lokola. Nde andimaki Kaina te mpe likabo na ye te.” Emonani mpenza ete Kaina akanisaki mpenza te ntina oyo azalaki kopesa likabo mpe azalaki kosala yango kaka mpo na kosala. Kasi Nzambe andimaka te losambo oyo esalemaka kaka mpo na momeseno. Kaina akómaki na motema mabe, mpe Yehova ayebaki ete bamposa na ye ezalaki malamu te. Ezaleli ya Kaina ya solosolo emonanaki polele na makambo asalaki ntango mbeka na ye endimamaki te. Na esika aluka kobongisa makambo, “Kaina asilikaki mingi, mpe elongi na ye ezalaki na nkanda.” (Genese 4:5) Makambo yango efundaki ete azalaki kokanisa mpe kolinga mabe.
Ndenge ayambaki likebisi
Lokola ayebaki ezaleli ya Kaina, Nzambe apesaki ye toli oyo: “Mpo nini ozali kosilika mpe elongi na yo ezali na nkanda? Soko osali malamu okondimama te? Mpe soko osali malamu te . . . lisumu ezali kolala na ekuke na yo. Mposa na yango elingi kosimba yo nde ekoki ete oleka yango.”—Genese 4:6, 7.
Awa, tokoki kozwa liteya moko na likambo oyo. Ya solo, masumu ezali pembeni na biso mpo na kolya biso. Atako bongo, Yehova apesá biso bonsomi ya kopona, mpe tokoki kopona kosala oyo ezali sembo. Yehova asɛngaki Kaina ‘asala malamu’ kasi atindaki ye na makasi te ete abongwana. Ye moko Kaina aponaki nzela na ye.
Lisolo oyo epemami elobi lisusu boye: “Kaina alobelaki ndeko na ye Abele ete, Tókenda na lisobe. Wana ezalaki bango na lisobe, Kaina amibwakaki likoló na ndeko na ye Abele mpe abomaki ye.” (Genese 4:8) Na bongo, Kaina akómaki mobomi moko ya motema mabe, oyo azangá botosi. Ayokaki mawa ata moke te ntango Yehova atunaki ye ete: “Wapi ndeko na yo Abele?” Kutu Kaina ayanolaki na lolenge moko ezangá mawa mpe na lofundo mpenza ete: “Ngai nayebi te. Ngai nazali nde mobateli ya ndeko na ngai?” (Genese 4:9) Motema makasi ya Kaina emonanaki polele na lolenge abukaki lokuta mpe aboyaki kondima mabe asalaki.
Yehova alakelaki Kaina mabe mpe abenganaki ye akende mosika na Edene. Kolakelama mabe ya mabele oyo Yehova alakaki liboso elingaki ezala makasi koleka mpo na Kaina, mpe mabele elingaki kobotela ye mbuma malamu te. Akobanda koyengayenga mpe kokimakima na mabele. Ntango Kaina alelelaki Yehova mpo etumbu yango elekaki makasi, amitungisaki na kobanga ete ntango mosusu bakoki koboma ye mpo na kozongisa nkanda ya liwa ya ndeko na ye, kasi abongolaki motema solo te. Yehova atyaki “elembo” mpo na Kaina—ekoki kozala abimisaki ekateli oyo bamosusu bayebaki mpe bazalaki kotosa, mpe ntina na yango ezalaki ya kobatela Kaina abomama te mpo na kozongisela ye mabe.—Genese 4:10-15.
Na nsima Kaina “alongwaki na miso na [Yehova], mpe afandaki kuna na mokili [ya Kokimakima, NW], longwa na Edene epai na ebimelo na ntango.” (Genese 4:16) Nsima ya kokamata mwasi na kati ya bandeko na ye ya basi to na kati ya bana basi ya bandeko na ye, atongaki mboka moko oyo apesaki yango nkombo ya mwana na ye ya liboso Enoka. Lameke, mwana ya mwana ya Kaina azalaki na mobulu kaka lokola ye. Kasi libota nyonso ya Kaina elimwaki na kati ya Mpela ya mikolo ya Noa.—Genese 4:17-24.
Mateya oyo tozwi
Tokoki kozwa liteya na lisolo ya Kaina na Abele. Ntoma Yoane alendisi baklisto bálinganaka, “[lokola, NW] Kaina te, oyo autaki na oyo mabe mpe abomaki ndeko na ye.” Misala ya Kaina ‘ezalaki mabe, nde oyo ya ndeko na ye ezalaki na boyengebene.’ Yoane alobi lisusu boye: “Moto na moto oyo akoyinaka ndeko na ye azali na bomoi ya seko koumela kati na ye te.” Ya solo, lolenge na biso ya kofanda na baklisto mosusu ezali na bopusi mingi na boyokani na biso na Nzambe mpe na elikya na biso ya kozwa bomoi ya seko. Tokoki te kondimama na Yehova ntango tozali koyina moko ya baninga na biso bandimi.—1 Yoane 3:11-15; 4:20.
Kaina na Abele babɔkwamaki ndenge moko kasi Kaina azangaki kondima epai ya Nzambe. Amonisaki ete azalaki na elimo ya Zabolo, ‘mobomi ya bato longwa na ebandeli mpe tata na lokuta.’ (Yoane 8:44) Etamboli ya Kaina elakisi ete biso nyonso tokoki kopona oyo tokosala, mpe ete baoyo baponaka kosala masumu bamikabolaka na Nzambe, mpe Yehova apesaka etumbu na bato oyo balingaka kobongola mitema te.
Nzokande, Abele azalaki na kondima epai na Yehova. Ya solo, “mpo na kondima, Abele alekaki Kaina na kotombwela Nzambe mbeka malamu; na nzela yango azwaki litatoli ete ye moyengebene. Nzambe atatolaki boye mpo na makabo na ye.” Abele “azali naino koloba” na nzela ya kondima na ye oyo ezali ndakisa, atako epai moko te Makomami eyebisi maloba oyo abimisaki.—Baebele 11:4.
Abele azali moto ya yambo na molɔngɔ molai ya bato ya sembo. Babosani naino te makila na ye oyo ‘egangaki epai na [Yehova] longwa na mabele.’ (Genese 4:10; Luka 11:48-51) Soki tozali na kondima lokola oyo ya Abele, biso mpe tokozala na boyokani ya motuya monene mpe ya libela elongo na Yehova.
[Etanda na lokasa 22]
MOTO YA BILANGA NA MOBATELI YA MPATE
Kolona mpe kobatela banyama ezalaki mikumba mibale na kati na mikumba oyo Nzambe apesaki Adama. (Genese 1:28; 2:15; 3:23) Mwana na ye Kaina aponaki kozala moloni, mpe Abele akómaki mobateli ya mpate. (Genese 4:2) Kasi lokola bato bazalaki kolya bobele mbuma na ndunda tii na nsima ya Mpela, mpo na nini bazalaki kobɔkɔla bampate?—Genese 1:29; 9:3, 4.
Mpate ezali nyama oyo esengeli bato bábatelaka yango. Mosala ya Abele emonisi ete bato bazalaki kobɔkɔla bibwele yango kobanda ebandeli ya lisolo ya bato. Makomami elobaka te soki bato ya liboso bazalaki komɛla miliki to kosalela yango mpo na kozwa biloko mosusu ya kolya, kasi ata bato oyo balyaka kaka ndunda bakoki kosalela nsuki ya mpate. Mpe ntango mpate ekufi, basalelaka mposo na yango na makambo ebele ya ntina. Na ndakisa, mpo na kolatisa Adama na Eva, Yehova apesaki bango “bilamba milai ya mposo ya nyama.”—Genese 3:21, NW.
Tokoki mpenza kokanisa ete Kaina na Abele bazalaká kopesana mabɔkɔ na ebandeli. Misala bazalaki kosala ezalaki kolatisa mpe koleisa libota malamu mpenza.
[Elilingi na lokasa 23]
Misala ya Kaina ‘ezalaki mabe, nde oyo ya ndeko na ye ezalaki na boyengebene’