-
“Asepelisaki mpenza Nzambe”Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso)—2017 | No. 1
-
-
“AMEMAMAKI ESIKA MOSUSU MPO AMONA LIWA TE”
Bomoi ya Enoka esukaki ndenge nini? Kutu, liwa na ye ekamwisaka mpe ebendaka likebi ya bato koleka bomoi na ye. Mokanda ya Ebandeli, elobi kaka boye: “Enoka akobaki kotambola elongo na Nzambe ya solo. Na nsima azalaki lisusu te, mpo Nzambe akamataki ye.” (Ebandeli 5:24) Ndenge nini Nzambe akamataki Enoka? Na nsima ntoma Paulo akomaki boye: “Na kondima Enoka amemamaki esika mosusu mpo amona liwa te, mpe amonanaki ata esika moko te mpo Nzambe amemaki ye esika mosusu; mpo liboso amemama esika mosusu, azwaki litatoli ete asepelisaki mpenza Nzambe.” (Baebre 11:5) Paulo alingaki koloba nini ntango alobaki ete Enoka, “amemamaki esika mosusu mpo amona liwa te”? Mabongoli mosusu ya Biblia elobaka ete Nzambe amemaki Enoka na likoló. Kasi ekoki kozala bongo te. Biblia emonisi ete Yesu Kristo azali moto ya liboso oyo asekwaki mpo na kokende na likoló.—Yoane 3:13.
Kasi na ndenge nini Enoka “amemamaki” mpo “amona liwa te”? Ekoki kozala ete Yehova asalaki ete akufa na pɛtɛɛ nyonso mpo ayoka ata mpasi moko te ya liwa. Kasi liboso na yango, Enoka azwaki “litatoli ete asepelisaki mpenza Nzambe.” Na ndenge nini? Ekoki kozala ete liboso akufa, Nzambe alakisaki ye paradiso awa na mabele na emonaneli. Nsima ya komona elembo wana oyo emonisaki ete Nzambe andimi ye, Enoka alalaki mpɔngi ya liwa. Ntango ntoma Paulo akomaki na ntina etali Enoka mpe mibali ná basi mosusu ya sembo, alobaki boye: “Bango nyonso bakufaki na kati ya kondima.” (Baebre 11:13) Ekoki kozala ete na nsima, banguna na ye balukaki nzoto na ye kasi “amonanaki ata esika moko te,” ekoki kozala mpo Yehova abombaki yango mpo básambwisa yango te to básalela yango te na losambo ya lokuta.b
Na makanisi wana ya Biblia na motó, tómeka sikoyo komona na makanisi ndenge mbala mosusu bomoi ya Enoka esukaki. Tómeka naino kokanisa boye, kasi tóbosana te ete ezali kaka ndakisa. Enoka azali kokima mbangu, mpe makasi ekómi kosila ye. Banguna bazali kaka kolanda ye, bazali na nkanda mpo na nsango ya bitumbu oyo apesaki. Enoka amoni esika moko oyo akoki kobatama mpo na kopema mwa moke, kasi ayebi ete nsukansuka bakokanga ye kaka. Liwa moko ya nsɔmɔ ezali kozela ye kala mingi te. Ntango azali kopema, abondeli Nzambe na ye. Na nsima, kimya moko makasi ezwi ye. Azwi emonaneli moko oyo ezali komonisa lokola ye moko mpe azali na kati ya likambo yango.
Ekoki kozala ete Enoka alingaki kokufa liwa moko ya nsɔmɔ ntango Yehova akamataki ye
Meká komona ndenge balakisi ye mokili moko oyo ekeseni mpenza na oyo ayebi. Mpo na ye, mokili yango ezali kitoko lokola elanga ya Edene, kasi bakeruba bazalaki te mpo na kobatela yango mpo bato bákɔta te. Ebele ya basi mpe mibali oyo bazali nzoto malamu mpenza bazalaki wana. Bazali na kimya. Koyina to konyokola bato mpo na makambo ya losambo ezalaki te ndenge ye akutanaki na yango. Enoka amonaki mpenza ete Yehova apesaki ye elikya, alingaki ye mpe andimaki ye. Andimisamaki ete esika na ye ezalaki nde wana; ekozala mpenza mboka na ye. Ntango kimya yango ezalaki kokɔtela ye, Enoka akangaki miso mpe mpɔngi moko ya mozindo oyo ezangá ndɔtɔ ezwaki ye.
Mpe tii lelo atikalá kaka na kati ya mpɔngi wana ya liwa, mpe Yehova Nzambe abombá mpenza Enoka na makanisi na ye oyo ezangi ndelo! Ndenge Yesu alakaki, mokolo moko baoyo nyonso bazali na makanisi ya Nzambe bakoyoka mongongo ya Kristo mpe bakobima na malita, bakomona mokili moko ya sika oyo ezali kitoko mpe na kimya.—Yoane 5:28, 29.
-
-
“Asepelisaki mpenza Nzambe”Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso)—2017 | No. 1
-
-
b Ndenge moko mpe, ekoki kozala ete Nzambe asalaki ete nzoto ya Moize mpe ya Yesu básala yango mpe bongo te.—Kolimbola Mibeko 34:5, 6; Luka 24:3-6; Yuda 9.
-