Tambolá elongo na Nzambe na ntango oyo ya yikiyiki
“Enoka atambolaki na Nzambe [ya solo] elongo. Na nsima, azalaki te mpo ete Nzambe akamataki ye.”—GENESE 5:24.
1. Wapi mwa makambo ya ntango na biso oyo ezali kokómisa yango mpasi mpenza?
NTANGO ya yikiyiki! Maloba oyo ebongi mpenza mpo na kolobela bambula ya mabe mpe ya mobulu oyo bato bamoni kobanda Bokonzi ya Masiya etyamá na 1914. Na boumeli ya ntango yango, bato bazali “na mikolo ya nsuka.” Makambo ya mabe lokola nzala, maladi, koningana ya mabelé, mpe bitumba enyokoli bato na ndenge oyo esalemá naino te. (2 Timote 3:1; Emoniseli 6:1-8) Ata bato oyo basambelaka Yehova mpe banyokwamaka. Na lolenge moko to mosusu, biso nyonso tozali kokutana na makambo ya mpasi oyo ezali koleka lelo na mokili. Mikakatano ya nkita, yikiyiki na makambo ya politiki, mobulu, mpe maladi ezali na kati ya makambo oyo ezali kokómisa bomoi mpasi mpenza.
2. Basaleli ya Yehova bakutanaka na mikakatano nini?
2 Lisusu, basaleli ya Yehova mingi bazali kokutana na ebele ya mikakatano, mpamba te Satana azali ntango nyonso kobundisa baoyo “bazali kotosa bakomandema ya Nzambe mpe bazali na mosala ya kopesa litatoli na ntina etali Yesu.” (Emoniseli 12:17) Ata soki biso nyonso tokutaná na minyoko te, baklisto nyonso ya solo basengeli kosala makasi mpo na kotɛmɛla Satana Zabolo mpe elimo oyo azali kobimisa na kati ya bato. (Baefese 2:2; 6:12) Tosengeli ntango nyonso kozalaka na bokɛngi mpo tóbɛndama te na elimo yango, mpamba te tokutanaka na yango na mosala, na eteyelo, mpe bisika mosusu oyo tokutanaka na bato oyo basepelaka na losambo ya pɛto te.
Tambolá elongo na Nzambe, kasi na bikólo te
3, 4. Na ndenge nini baklisto bakeseni na mokili?
3 Baklisto ya ekeke ya liboso mpe batɛmɛlaki makasi elimo ya mokili oyo, yango wana bakesanaki na bato oyo bazalaki na lisangá ya boklisto te. Paulo amonisaki bokeseni yango ntango akomaki ete: “Na yango, nazali koloba boye mpe kotatola yango na kati ya Nkolo, ete bókoba lisusu te kotambola ndenge bikólo mosusu mpe batambolaka na kati ya ezaleli ya mpambampamba ya makanisi na bango, wana bazali na kati ya molili na makanisi, mpe batangwi mosika na bomoi oyo ezali ya Nzambe, mpo na kozanga boyebi oyo ezali na kati na bango, mpo na ezaleli makasi ya mitema na bango. Kobungisáká bizaleli nyonso ya malamu, bamipesá na etamboli ya mbindo mpo na kosala bosɔtɔ ya ndenge nyonso na lokoso.”—Baefese 4:17-19.
4 Maloba wana elobeli mpenza polele molili makasi ya elimo mpe ya makanisi oyo ezalaki na eleko ya Paulo mpe ezali na eleko na biso! Na ndakisa ya ekeke ya liboso, lelo oyo, baklisto bazali ‘kotambola te ndenge bikólo mosusu etambolaka.’ Kasi, bazali na libaku malamu ya kotambola elongo na Nzambe. Nzokande, bato mosusu bakoki koloba ete ekoki kosalema te bato mpamba, ya kozanga kokoka, bátambola elongo na Yehova. Kasi, Biblia emonisi ete bato bakoki kotambola elongo na Nzambe. Kutu, Yehova asɛngaka bato bátambola elongo na ye. Na ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Mosakoli Mika akomaki maloba epemami oyo: “[Yehova] alingi nini epai na yo? Bobele ete osala na boyɛngɛbɛnɛ mpe ete olinga boboto mpe ete otambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe na yo.”—Mika 6:8.
Ndenge nini mpe mpo na nini kotambola elongo na Nzambe?
5. Ndenge nini moto ya kozanga kokoka akoki kotambola elongo na Nzambe?
5 Ndenge nini tokoki kotambola elongo na Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, Nzambe oyo amonanaka te? Ezali polele ete tokoki te kotambola elongo na Yehova ndenge bato mibale batambolaka. Na kati ya Biblia, liloba “kotambola” ekoki kolimbola “komitambwisa na ndenge oyo esɛngami.”a Na yango, tosimbi ete moto oyo azali kotambola elongo na Nzambe, azali kolanda etamboli oyo Nzambe azali kosɛnga mpe oyo ezali kosepelisa ye. Kolanda etamboli wana ekesenisaka biso na bato mosusu oyo bazali zingazinga na biso. Ya solo, yango nde ezali liponi kaka moko ya malamu oyo moklisto asengeli kosala. Mpo na nini? Bantina ezali mingi.
6, 7. Mpo na nini kotambola elongo na Nzambe ezali bomoi eleki malamu?
6 Ya liboso, Yehova azali Mozalisi na biso, mpe Moto oyo apesaka biso biloko nyonso oyo tosengeli na yango mpo tózala na bomoi. (Emoniseli 4:11) Na ntina yango, kaka ye nde azali na lotomo ya kolakisa biso lolenge tosengeli kotambola. Lisusu, kotambola elongo na Nzambe ezali bomoi oyo eleki malamu. Mpo na baoyo bazali kotambola elongo na ye, Yehova azwi bibongiseli mpo na kolimbisa masumu na bango, mpe apesi bango elikya ya bomoi ya seko. Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo, azali mpe kopesa baoyo bazali kotambola elongo na ye toli ya bwanya mpo bálonga na bomoi sikoyo, atako bazali bato ya kozanga kokoka mpe bazali na mokili oyo ezali kolala na kati ya nguya ya Satana. (Yoane 3:16; 2 Timote 3:15, 16; 1 Yoane 1:8; 2:25; 5:19) Ntina mosusu ya kotambola elongo na Nzambe ezali ete mposa na biso ya kosala bongo ezali kosala ete kimya mpe bomoko ezala na lisangá.—Bakolose 3:15, 16.
7 Ntina ya nsuka mpe oyo eleki nyonso ezali ete, ntango tozali kotambola elongo na Nzambe, tozali komonisa ngámbo oyo toponi na ntembe monene oyo ebimaki na elanga ya Edene, elingi koloba ntembe na ntina na boyangeli. (Genese 3:1-6) Tozali komonisa na bomoi na biso ete tozali mpenza na ngámbo ya Yehova, mpe tozali kosakola kozanga kobanga ete kaka ye nde azali Mokonzi oyo abongi. (Nzembo 83:18) kosala bongo, ekozala na boyokani na libondeli oyo ete nkombo ya Nzambe esantisama mpe mokano na ye esalema. (Matai 6:9, 10) Baoyo bazali kopona kotambola elongo na Nzambe bazali mpenza bato ya bwanya! Basengeli mpenza kondima ete bazali kokende na nzela ya malamu, mpamba te Yehova ‘kaka nde azali moto ya bwanya.’ Asalaka mabunga soki moke te.—Baloma 16:27.
8. Ndenge nini ntango ya Enoka mpe Noa ekokani na oyo ya biso?
8 Kasi, ndenge nini tokoki kokoba komitambwisa lokola baklisto na ntango oyo ya yikiyiki mpe oyo bato mingi bazali kolinga te kosalela Yehova? Tokoki kozwa eyano soki totali ndenge mibali ya sembo ya kala babatelaki bosembo na bango na ntango ya mpasi makasi. Mibale kati na bato yango ezali Enoka mpe Noa. Bango nyonso bazalaki na bomoi na eleko oyo makambo ezalaki lokola na eleko na biso. Mabe ekómaki mingi. Na mikolo ya Noa, mabelé etondaki na mobulu, pite mpe ekobo. Nzokande, Enoka mpe Noa batɛmɛlaki elimo ya mokili ya ntango na bango mpe batambolaki elongo na Yehova. Nini esalisaki bango bálonga? Mpo na koyanola na motuna wana, tokolobela ndakisa ya Enoka na lisolo oyo. Na lisolo oyo ekolanda, tokolobela ndakisa ya Noa.
Enoka atambolaki elongo na Nzambe na ntango ya yikiyiki
9. Makambo nini toyebi na ntina etali Enoka?
9 Enoka azali moto ya liboso oyo Makomami emonisi ete atambolaki elongo na Nzambe. Biblia elobi ete: “Enoka atambolaki na Nzambe [ya solo] elongo. . . na nsima ya kobotama ya Metusela.” (Genese 5:22) Nsima ya kolobela bambula oyo Enoka aumelaki na bomoi, bambula oyo ezalaki mingi soki tokokanisi yango na oyo ya biso, kasi ezalaki moke na kotalela oyo bato bazalaki koumela mikolo wana; lisolo yango elobi boye: “Enoka atambolaki na Nzambe [ya solo] elongo, na nsima azalaki te mpo ete Nzambe akamataki ye.” (Genese 5:24) Emonani polele ete Yehova azwaki bomoi ya Enoka liboso ete banguna na ye básala ye mabe. (Baebele 11:5, 13) Longola bavɛrsɛ oyo tolobeli awa, ezali mpe na mwa bavɛrsɛ mosusu na kati ya Biblia oyo elobeli Enoka. Na kotalela makambo oyo tomoni awa mpe makambo mosusu, tokoki mpenza koloba ete ntango ya Enoka ezalaki ntango ya yikiyiki.
10, 11. (a) Ndenge nini mabe ekolaki nsima ya botomboki ya Adama ná Eva? (b) Enoka asakolaki nini, mpe bato batalelaki nsango yango ndenge nini?
10 Tótala na ndakisa ndenge mabe ekolaki nokinoki na kati ya bato nsima ya lisumu ya Adama. Biblia eyebisi biso ete Kaina, mwana ya liboso ya Adama, akómaki mobomi ya liboso ntango abomaki ndeko na ye Abele. (Genese 4:8-10) Nsima ya liwa ya nsɔmɔ ya Abele, Adama ná Eva, babotaki mwana mosusu ya mobali, mpe bapesaki ye nkombo Sete. Tozali kotánga mpo na ye boye: “Sete mpe abotaki mwana mobali mpe apesaki ye nkombo Enosa. Na ntango yango bato babandaki kobenga nkombo ya [Yehova].” (Genese 4:25, 26) Likambo ya mawa, bazalaki nde ‘kobenga nkombo ya Yehova’ na ndenge ya lipɛngwi.b Bambula mingi nsima ya kobotama ya Enosa, mokitani moko ya Kaina na nkombo Lameke abongisaki loyembo moko mpo na basi na ye mibale; na loyembo yango alobaki ete abomaki elenge mobali moko oyo azokisaki ye. Alobaki lisusu ete: “Soki bayini ya Kaina bakobukanisama mbala nsambo, mbele bayini na ngai Lameke, mbala ntuku nsambo na nsambo.”—Genese 4:10, 19, 23, 24.
11 Mwa makambo lokola oyo tolobeli emonisi ete mabe oyo Satana akɔtisaki na Elanga ya Edene esalaki ete mabe ekola nokinoki kati na bana ya Adama. Na mokili ya ndenge wana, Enoka azalaki mosakoli ya Yehova, oyo akomaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe maloba ya nguya oyo ezali na ntina ata na mikolo na biso. Yuda alobi ete Enoka asakolaki boye: “Talá! Yehova ayaki na bamiliadi na ye basantu, mpo na kokokisa lisambisi epai ya bato nyonso, mpe kokweisa baoyo nyonso batyolaka Nzambe mpo na misala na bango nyonso ya kotyola Nzambe oyo basalaki na ndenge ya kotyola Nzambe, mpe mpo na makambo nyonso ya kozokisa oyo basumuki oyo batyolaka Nzambe balobaki na ntina etali ye.” (Yuda 14, 15) Maloba wana ekokokisama na mobimba na yango na Armagedon. (Emoniseli 16:14, 16) Tokoki mpenza kondima ete ata na mikolo ya Enoka, “basumuki oyo batyolaka Nzambe,” oyo bazalaki kosepela te na makambo oyo Enoka azalaki kosakola bazalaki mingi. Yehova amonisaki mpenza bolingo ndenge azwaki bomoi ya mosakoli yango mpo básala ye mabe te!
Nini epesaki Enoka makasi ya kotambola elongo na Nzambe?
12. Eloko nini ekesenisaki Enoka na bato ya eleko na ye?
12 Na elanga ya Edene, Adama ná Eva bayokelaki Satana, mpe Adama atombokelaki Yehova. (Genese 3:1-6) Mwana na bango Abele alandaki etamboli na bango te, mpe Yehova andimaki ye. (Genese 4:3, 4) Likambo ya mawa, bana mingi ya Adama balandaki lokolo ya Abele te. Nzokande, Enoka, oyo abotamaki bankama ya bambula na nsima, alandaki lokolo ya Abele. Nini ezalaki kokesenisa Enoka ná bana mingi ya Adama? Ntoma Paulo ayanolaki na motuna yango ntango akomaki ete: “Na kondima Enoka atindamaki esika mosusu mpo amona liwa te, mpe azalaki komonana ata esika moko te mpo Nzambe atindaki ye esika mosusu; mpo liboso ya kotindama na ye esika mosusu litatoli epesamaki mpo na ye ete asepelisaki mpenza Nzambe.” (Baebele 11:5) Enoka azalaki na kati ya “lipata monene ya Batatoli oyo [bazalaki na bomoi liboso Klisto aya na mabelé”], mpe bazalaki ndakisa malamu ya kondima. (Baebele 12:1) Kondima nde esalisaki Enoka amonisa etamboli malamu na boumeli ya mbula koleka 300 ya bomoi na ye, bambula yango eleki oyo ya bato mingi kati na biso koleka mbala misato.
13. Enoka azalaki na kondima ya ndenge nini?
13 Paulo alobelaki kondima ya Enoka mpe ya Batatoli mosusu ntango akomaki ete: “Kondima ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa, elakiseli ya polelepolele ya makambo ya solosolo atako ezali komonana te.” (Baebele 11:1) Ya solo, kondima ezali ezaleli na kozela na motema mobimba, elikya makasi ete makambo oyo tozali kozela ekokokisama solosolo. Lokola elikya yango ezalaka makasi, yango esalaka ete moto atya makanisi na ye nyonso kaka na yango. Kondima ya ndenge wana esalisaki Enoka atambola elongo na Nzambe atako mokili oyo ezingaki ye ezalaki kotambola elongo na Nzambe te.
14. Boyebi nini ya sikisiki esalaki ete Enoka azala na kondima makasi?
14 Kondima ya solo eutaka na boyebi ya sikisiki. Enoka azalaki na boyebi ya ndenge nini? (Baloma 10:14, 17; 1 Timote 2:4) Kozanga ntembe, ayebaki makambo oyo elekaki na Edene. Ekoki kozala ete bayebisaki ye ndenge bomoi ezalaki na elanga ya Edene, oyo ntango mosusu ezalaki naino na ntango wana, kasi Nzambe apekisaki bato bákɔta kuna. (Genese 3:23, 24) Ayebaki mpe ete mokano ya Nzambe ezalaki ete bana ya Adama bátondisa mabelé mobimba mpe bákómisa yango ndenge paladiso yango ezalaki. (Genese 1:28) Lisusu, Enoka azalaki kosepela na elaka oyo Yehova apesaki ya kobimisa momboto oyo akokaki kopanza motó ya Satana mpe kolongola mpasi oyo eutaki na lokuta ya Satana. (Genese 3:15) Ya solo, esakweli ya Enoka, oyo ezali na mokanda ya Yuda, elobelaki kobomama ya momboto ya Satana. Lokola Enoka azalaki na kondima, toyebi ete azalaki kosambela Yehova lokola moto oyo “akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” (Baebele 11:6) Atako Enoka azalaki na boyebi ya makambo nyonso te lokola biso, boyebi oyo azalaki na yango esalisaki ye azala na kondima makasi. Kondima motindo wana, esalisaki ye abatela bosembo na ye na ntango ya yikiyiki.
Tólanda ndakisa ya Enoka
15, 16. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Enoka?
15 Lokola tolingi kosepelisa Yehova na ntango oyo ya yikiyiki ndenge Enoka asepelisaki ye, tosengeli kolanda ndakisa na ye. Tosengeli kozwa mpe kobatela boyebi ya sikisiki ya Yehova mpe ya mokano na ye. Kasi tosengeli mpe kosala makambo mosusu. Tosengeli kotika ete boyebi wana ya sikisiki etambwisaka biso. (Nzembo 119:101; 2 Petelo 1:19) Tosengeli kotambwisama na makanisi ya Nzambe, kosala ntango nyonso makasi ete makanisi na biso mpe misala na biso nyonso esepelisa ye.
16 Toyebi moto mosusu te oyo azalaki kosalela Yehova na ntango ya Enoka, kasi emonani polele ete Enoka azalaki kaka ye moko mosaleli ya Yehova to azalaki na kati ya mwa bato oyo bazalaki kosalela Yehova. Biso mpe tozali moke na mokili, kasi yango elɛmbisaka biso te. Ata soki nani alingi kosala biso mabe, Yehova akobatela biso. (Baloma 8:31) Enoka asakolaki na mpiko libebi oyo esengelaki kokómela bato oyo bazalaki kotosa Nzambe te. Biso mpe tosakolaka “nsango malamu oyo ya bokonzi” na mpiko atako bato bazali kosɛka, kotɛmɛla mpe konyokola biso. (Matai 24:14) Enoka aumelaki bambula mingi te lokola bato mingi ya eleko na ye. Nzokande, elikya na ye ezalaki na mokili wana te. Atyaki makanisi na ye nyonso na eloko moko oyo eleki monene. (Baebele 11:10, 35) Biso mpe totye makanisi na biso nyonso na kokokisama ya mokano ya Yehova. Yango wana, tosalelaka mokili oyo na makambo nyonso te. (1 Bakolinti 7:31) Nzokande, tosalelaka makasi mpe biloko na biso libosoliboso mpo na mosala ya Yehova.
17. Boyebi nini tozali na yango oyo Enoka azalaki na yango te, mpo na yango tosengeli kosala nini?
17 Enoka azalaki na kondima ete momboto oyo Nzambe alakaki akobima na ntango oyo Yehova abongisi. Eleki sikoyo mbula soki 2 000 banda momboto yango elingi koloba Yesu Klisto abimá, ye apesaki lisiko mpe afungolaki nzela mpo na biso mpe mpo na batatoli ya sembo ya kala, na ndakisa Enoka, mpo tozwa bomoi ya seko. Momboto yango, oyo azali sikoyo mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, abwakaki Satana awa na mabelé; yango nde ntina oyo tozali komona bolɔzi lelo oyo. (Emoniseli 12:12) Ya solo, biso tozali na boyebi mingi lelo koleka oyo Enoka azalaki na yango. Na yango, tiká ete tozala na kondima makasi lokola ye. Tiká ete elikya makasi oyo tozali na yango ete bilaka ya Nzambe ekokokisama ekóma kotambwisa makambo nyonso oyo tozali kosala. Lokola Enoka, tiká ete tótambola elongo na Nzambe, atako tozali na ntango ya yikiyiki.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá na buku Étude perspicace des Écritures vol. 1, lokasa 228, paragrafe 4, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Liboso Enosa abotama, Yehova asololaki na Adama. Abele apesaki mbeka oyo Yehova andimaki. Nzambe asololaki kutu na Kaina liboso zuwa mpe nkanda emema ye na koboma moto. Na yango, bato babandaki ‘kobenga nkombo ya Yehova’ na lolenge mosusu, kasi na nzela ya losambo ya pɛto te.
Okopesa eyano nini?
• Kotambola elongo na Nzambe elimboli nini?
• Mpo na nini kotambola elongo na Nzambe ezali bomoi eleki malamu?
• Nini esalisaki Enoka atambola elongo na Nzambe atako ntango ya yikiyiki ezalaki?
• Ndenge nini tokoki komekola Enoka?
[Elilingi na lokasa 15]
Na kondima, “Enoka atambolaki na Nzambe [ ya solo] elongo”
[Elilingi na lokasa 17]
Tóndimaka na motema mobimba ete bilaka ya Yehova ekokokisama
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 13]
Mwasi moko, na nsuka ya lobɔkɔ ya mobali: Fɔtɔ ya FAO/B. Imevbore; ndako ebukani: San Hong R-C Picture Company