Nzambe azali komibanzabanza mpo na yo
MARY, mwasi moklisto oyo azali na mibu koleka 40, asili komona mpasi mingi na bomoi na ye. Mobali na ye asalaki ekobo, mpe mpo na yango libala na bango likufaki esili koleka mibu zomi. Na nsima, Mary abundaki makasi mpo na kokokisa mokumba na ye lokola moboti na kobɔkɔláká bana na ye minei bobele ye moko. Kasi kino lelo azali bobele ye moko, mpe na bantango mosusu kozala ye moko epesaka ye mpasi mingi. Mary amituni ete, ‘Yango elimboli ete Nzambe amibanzabanzaka mpo na ngai te to mpo na bana na ngai oyo bazangi tata?’
Ezala ete osilá kokutana na likambo ya mpasi motindo oyo to osilá naino kokutana na yango te, na ntembe te, okoki koyoka mawa mpo na mayoki oyo Mary azali na yango. Biso nyonso tosilá kokutana na mikakatano, mpe ekoki kozala ete tomitunaki soki ntango nini mpe lolenge nini Yehova akosunga biso. Makambo mosusu makómelaka biso mpo na bokangami na biso na mibeko ya Nzambe. (Matai 10:16-18; Misala 5:29) Mosusu makómelaka biso mpo ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe tozali kobika kati na mokili oyo eyangelami na Satana. (1 Yoane 5:19) Ntoma Paulo akomaki ete: “Bikelamu nyonso bizali kokimela mpe bizali kati na mpasi.”—Baloma 8:22, NW.
Nzokande, kozala kati na momekano makasi elimboli te ete Yehova asundoli yo to ete amibanzabanzaka te mpo na bolamu na yo. Lolenge nini okoki kondimisama na likambo yango? Nini emonisi ete Nzambe amibanzabanzaka mpo na yo?
Ndakisa moko ya ntango ya kala
Biblia ezali kopesa bilembeteli ya polele ete Yehova amibanzabanzaka mpo na moto mokomoko. Tótalela ndakisa ya Davidi. Yehova azalaki komibanzabanza mpenza mpo na elenge mobateli wana ya bampate, amonaki ete azalaki “moto oyo akosepelisa motema na ye.” (1 Samwele 13:14) Na nsima, ntango Davidi akómaki koyangela lokola mokonzi, Yehova alakaki ye ete: “Nakozala na yo elongo epai nyonso ekokenda yo.”—2 Samwele 7:9, NW.
Yango elimboli ete Davidi azalaki na bomoi ya “pɛtɛɛ,” kozanga mikakatano? Te, Davidi akutanaki na mimekano makasi liboso mpe na boumeli ya boyangeli na ye. Na boumeli ya bambula mingi liboso ete akóma mokonzi, Mokonzi Saulo azalaki ntango nyonso koluka ete aboma ye. Na boumeli ya eleko yango ya bomoi na ye, Davidi akomaki ete: “Molimo na ngai mozali katikati na nkɔsi . . . bana na bato, oyo mino na bango ekokani na makonga mpe mbanzi.”—Nzembo 57:4, NW.
Ata kati na ezalela wana ya mpasi, Davidi andimisamaki ete Yehova azalaki komibanzabanza mpo na ye. Alobaki kati na libondeli moko epai na Yehova ete: “Yo osili kokoma na ntina na ezalela na ngai ya kokimakima.” Ee, mpo na Davidi, ezalaki lokola nde Yehova akomaki makambo na ye nyonso ya mpasi kati na mokanda. Na bongo, Davidi abakisaki ete: “Tyá mpisoli na ngai kati na mozaka na yo. Ezali kati na mokanda na yo te?”a (Nzembo 56:8, NW) Na nzela ya elilingi wana, Davidi amonisaki elikya ete Yehova ayebaki bobele ezalela na ye te, kasi ayebaki mpe bopusi na yango likoló na mayoki na ye.
Pene na nsuka ya bomoi na ye, Davidi akokaki kokoma engebene makambo oyo ye moko akutanaki na yango: “[Yehova] akokendisa moto na nzela, akobongisa ye oyo atamboli na nzela ekosepelisa Ye. Ata akokwea, akobwakama na nsé te, zambi [Yehova] akotombola lobɔkɔ na ye likoló.” (Nzembo 37:23, 24) Yo mpe okoki kondimisama ete ata soki komekama oyo ekómeli yo ezali koumela mpe ezali sé kokóba, Yehova azali komona mpe azali kosepela na bompikiliki na yo. Paulo akomaki ete: “Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na bino mpe bolingo bosili bino kotalisa na nkombo na ye, awa esalelaki bino Babulami mpe bozali naino kosalela bango.”—Baebele 6:10.
Lisusu, Yehova akoki kokɔtela yo na kopesáká yo nguya mpo ete okoka koyika mpiko liboso na mabaku ya lolenge nyonso oyo matyami kati na nzela na yo. Davidi akomaki ete: “Moyengebene azali na makambo mingi na mpasi nde [Yehova] akobikisa ye.” (Nzembo 34:19) Ya solo, Biblia ezali koyebisa biso ete miso ya Yehova “ikotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.”—2 Ntango 16:9.
Yehova asili kobenda biso
Tokoki kozwa elembeteli mosusu oyo emonisi ete Yehova amibanzabanzaka mpo na mokomoko na biso kati na maloba ya Yesu. Alobaki ete: “Moto akoki koya epai na ngai te bobele soko Tata, Motindi na ngai, akobenda ye.” (Yoane 6:44) Ee, Yehova asungaka moto mokomoko ete azwa matomba ya mbeka ya Yesu Klisto. Na lolenge nini? Na bonene, ezali bongo na nzela ya mosala ya kosakola Bokonzi. Ya solo, mosala oyo mozali kosalelama lokola “litatoli na mabota nyonso,” kasi ezali kokóma epai na moto mokomoko. Lokola ozali koyoka mpe koyamba malamu makambo oyo nsango malamu wana ezali koyebisa, ezali elembeli ete Yehova azali komibanzabanza mpo na yo.—Matai 24:14.
Na nzela ya elimo santu, Yehova abendaka mpe bato epai na Mwana na ye mpe epai na elikya ya bomoi ya seko. Yango ezali kopesa nzela epai na moto mokomoko ete asosola mpe asalela makambo ya solo ya elimo atako bolɛmbu to ezalela na biso ya kozanga kokoka oyo tosangolaki ezali. Ya solo, moto moko te akoki koyeba malamu mikano ya Nzambe kozanga ete elimo ya Nzambe esunga ye. (1 Bakolinti 2:11, 12) Lokola Paulo akomaki epai na Batesaloniki, ‘bato nyonso te nde bazali na kondima.’ (2 Batesaloniki 3:2) Yehova apesaka elimo na ye bobele epai na baoyo bamitikaka ete bábendama na ye.
Yehova abendaka bato mpo ete alingaka mokomoko na bango mpe alingi ete bábika. Oyo nde endimiseli makasi ete Yehova ye moko mpenza amibanzabanzaka mpo na biso! Yesu alobaki ete: “Bongo ezali mokano na Tata na bino na Likoló te ete moko na oyo mike abunga.” (Matai 18:14) Ee, na miso ya Nzambe moto mokomoko mpenza azali na ntina. Yango wana, Paulo akomaki ete: “Akopesa moto na moto libonza likokoka na misala na ye.” (Baloma 2:6) Mpe ntoma Petelo alobaki ete: “Nzambe akokabolaka bato te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.”—Misala 10:34, 35.
Makamwisi ya Yesu
Lolenge oyo Nzambe ye moko amibanzabanzaka mpo na bato emonisamaki polele kati makamwisi oyo Mwana na ye, Yesu, asalaki. Ezalaki bongo mayoki mozindo nde mapusaki Yesu ete asala makamwisi wana mpo na kobikisa bato. (Malako 1:40, 41) Lokola Yesu “akoki kosala likambo ye moko te, kasi bobele yango emoni ye ete Tata azali kosala,” ezaleli na ye ya motema mawa emonisi ete Yehova amibanzabanzaka mpo na basaleli na ye moko na moko.—Yoane 5:19.
Tótalela lisoló lizwami na Malako 7:31-37 oyo ezali kolobela likamwisi moko oyo Yesu asalaki. Awa, Yesu abikisaki mobali moko akufa matoi mpe ayebaki koloba mpenza te. Biblia eyebisi ete: “Atangoli [mobali yango] na ebele epai na ye mpenza.” Na nsima, “atali na Likoló, akimeli, alobi na ye ete, Efata! ntina na yango ete, zipwá!”
Mpo na nini Yesu atangolaki mobali yango mosika na ebele ya bato? Ekokaki kozala mpo ete moto wana oyo akufa matoi, oyo akokaki mpenza koloba te alingaki koyoka nsɔ́ni liboso na bato mingi. Mbala mosusu Yesu ayebaki yango, mpe ezalaki bongo mpo na ntina wana nde amonaki malamu ete abikisa ye na esika ya nkuku. Nganga-mayele moko ya Biblia alobaki ete: “Lisoló yango mobimba emonisi biso na nguya nyonso ete Yesu atalelaki mobali yango bobele lokola moto ya maladi te; atalelaki ye lokola moto mpenza. Mobali yango azalaki na mposa moko ya sikisiki mpe azalaki na mokakatano moko ya sikisiki, mpe na lolenge mpenza ya boboto mingi, Yesu asungaki ye na lolenge boye ete ayokisama nsɔ́ni te mpe na lolenge oyo moto yango akokaki kososola malamu.”
Lisoló oyo limonisi ete Yesu azalaki mpenza komibanzabanza mpo na bato. Okoki kondimisama ete azali mpe komibanzabanza bongo mpo na yo. Ya solo, liwa na ye oyo akufaki lokola mbeka ezalaki elembo ya komonisa bolingo mpo na bato nyonso oyo bakoki kosombama kati na mokili. Nzokande, okoki kotalela yango lokola libaku lipesami mpo na yo mpenza, lokola Paulo asalaki yango, ye oyo akomaki ete: “Mwana na Nzambe . . . alingaki ngai mpe amipesaki ye mpenza mpo na ngai.” (Bagalatia 2:20) Mpe lokola Yesu alobaki ete “oyo amoni ngai asili komona Tata,” tokoki kondimisama solo ete Yehova mpe amibanzabanzaka motindo wana mpo na basaleli na ye moko na moko.—Yoane 14:9.
Yehova akómi mopesi-mbano
Kozwa boyebi ya Nzambe elimboli koyeba makambo nyonso matali bomoto na ye lokola yango emonisami kati na Biblia. Bobele nkombo mpenza Yehova elimboli “Azali koyeisa,” komonisáká ete Yehova akoki kokóma oyo nyonso aponi kokóma mpo ete akokisa mokano na ye. Na boumeli ya lisoló ya bato, asili kokokisa mikumba ndenge na ndenge, lokola Mozalisi, Tata, Nkolo Moyangeli, Mobateli na mpate, Yehova na bibele, Moyoki na mabondeli, Mosambisi, Molakisi monene mpe Mosombi.b
Mpo na kososola malamu ndimbola ya nkombo ya Nzambe, tosengeli mpe koyeba Yehova na mokumba na ye ya Mopesi mbano. Paulo akomaki ete: “Soko na kondima te, ekoki kosepelisa Nzambe te. Mpo ete ekoki na babɛlɛmi na Nzambe kondima ete azali mpe ete akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye.”—Baebele 11:6.
Yehova alaki bomoi ya seko kati na Paladiso awa na mabelé epai na baoyo bazali lelo kosepela kosalela ye na motema na bango mobimba. Kozela na motema likoló kokokisama ya elaka wana monene ezali likambo ya moimi te, mpe komimona ete ozali kobika kati na yango ezali likambo ya lolendo te. Mose “atyaki miso na ye epai na libonza.” (Baebele 11:26) Paulo mpe azelaki na motema likoló kokokisama ya elaka ya Nzambe oyo epesamaki mpo na baklisto bapakolami. Akomaki ete: “Nazali kobila kino nsuka mpo na libonza oyo ezali ebyangeli na Nzambe kuna na Likoló, kati na Klisto Yesu.”—Bafilipi 3:14.
Yo mpe okoki kozela na esengo nyonso mbano oyo Yehova alaki kopesa epai na baoyo bazali koyika mpiko. Kozela mbano yango na motema likoló ezali eteni mpenza ya boyebi na yo ya Nzambe mpe ya bompikiliki na yo kati na mosala na ye. Na yango, omanyola mokolo na mokolo likoló na mapamboli oyo Yehova abombeli yo. Mary, oyo alobelami na ebandeli ya lisoló oyo, asili kosala milende makasi mpo na kosala bongo. Alobi ete: “Mpo na mbala ya liboso kati na bomoi na ngai, nauti kondima kala mingi te ete mbeka ya lisiko ya Yesu ezali na litomba mpo na ngai. Nabandi komiyoka ete Yehova amibanzabanzaka mpo na ngai mpenza. Esili koleka mibu 20 uta nakómaki moklisto, kasi bobele na mikolo oyo miuti koleka nde nabandi mpenza kondimela yango.”
Na lisalisi ya boyekoli mpe bomanyoli mozindo likoló na Biblia, Mary, elongo na bamilió ya bato mosusu, ayei koyeba ete Yehova amibanzabanzaka mpo na bato na ye bobele lokola etuluku te kasi mpe moto mokomoko. Ntoma Petelo andimisamaki na yango makasi na boye ete akomaki: “Bóbwaka epai na [Nzambe] makambo mazali kotungisa bino, [mpamba te azali komibanzabanza mpo na bino, NW].” (1 Petelo 5:7) Ee, Nzambe azali komibanzabanza mpo na yo!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mozaka ezali mbeki esalemi na loposo ya nyama, ezalaki kosalelama mpo na kobomba biloko lokola mai, mafuta, miliki, vinyo, manteka, mpe fromage. Na kala mbeki ezalaki ya ndenge na ndenge, ekesanaki na bonene mpe na lolenge na yango, misusu ezalaki na lolenge ya saki esalemi na loposo ya nyama mpe misusu izalaki na lolenge na mbeki ya nkingo moke mpe na bikangeli na yango.
b Talá Basambisi 11:27; Nzembo 23:1; 65:2; 73:28; 89:26; Yisaya 8:13; 30:20; 40:28; 41:14; talá mpe Les Saintes Écritures — Traduction du nouveau — avec références, Appendix 1J, lokasa 1568, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Etanda na lokasa 6]
Lisekwa ezali elembeteli ete Nzambe amibanzabanzaka mpo na biso
ELEMBETELI monene oyo emonisi ete Nzambe amibanzabanzaka mpo na moto mokomoko ezwami kati na Yoane 5:28, 29: “Ntango ekoya wana nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo na [Yesu], mpe bakobima.”
Likambo ya kobenda likebi ezali oyo ete, ezali nde liloba ya Greke mne·meiʹon (nkunda na kokanisa) esalelami awa na esika ete liloba taʹphos (lilita) esalelama. Liloba taʹphos emonisi bobele likanisi ya kokunda. Kasi mne·meiʹon emonisi ete lolenge ya bomoi ya moto oyo akufaki ekanisami.
Mpo na yango, kanisá naino na ntina na makambo oyo ekosɛnga na Nzambe ete akokisa yango na ntango ya lisekwa. Mpo na kozongisa moto na bomoi, asengeli koyeba makambo nyonso matali bomoi ya moto yango—kati na yango mpe bizaleli oyo abotamaki na yango mpe makanisi na ye nyonso. Bongo na nsima na yango nde moto akoki kosekwisama na lolenge azalaki liboso.
Ya solo, moto akoki kosala yango te, kasi “epai na Nzambe makambo nyonso makoki kosalama.” (Malako 10:27) Akoki kutu koyeba malamu nini ezali kati na motema ya moto. Ata soki moto akufaki esili koleka bikeke mingi, Nzambe akoki soko moke te kobunga makambo na ye, likoki ya Nzambe ya kosimba makambo ezalaka ntango nyonso makasi. (Yobo 14:13-15) Na yango, wana alobaki na ntina na Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo, ata bikeke mingi nsima ya kokufa na bango, Yesu akokaki koloba ete Yehova “azali Nzambe na bakufi te, kasi na bato na bomoi, mpo ete mpo na ye bato nyonso bazali na bomoi.”—Luka 20:38.
Na yango, mpo na bamiliare ya bato oyo basilá kokufa, Nzambe abosani bango soko moke te. Oyo ezali mpenza elembeteli makasi ete Nzambe amibanzabanzaka mpo na moto mokomoko!
[Elilingi na lokasa 7]
Yesu amibanzabanzaki mpo na bato oyo ye abikisaki