‘Tozali kotambola na kondima kasi na komona te’
“Tokotambolaka na kondima nde na komona te.”—2 BAKOLINTI 5:7.
1. ‘Kotambola na kondima’ elimboli nini?
MBALA nyonso oyo tobondelaka na kolandáká malako oyo mamonisami kati na Liloba ya Nzambe, tomonisaka ete tozali na mwa kondima. Ntango tobandi kotatola epai na basusu na ntina na Bokonzi ya Nzambe, yango mpe emonisaka ete tozali na kondima. Mpe ntango tomipesi na Yehova, tozali komonisa ete tozali na mposa ya ‘kotambola na kondima,’ elingi koloba, kozala na lolenge ya bomoi oyo etambwisami na kondima.—2 Bakolinti 5:7; Bakolose 1:9, 10.
2. Mpo na nini kosangana na misala ya lisangá ezalaka ntango nyonso te elembo ete moto azali na kondima?
2 Soki tolingi bomoi ya lolenge yango, tosengeli kozala na kondima oyo ezali na moboko ya malamu. (Baebele 11:1, 6) Bato mingi basepelaka na Batatoli ya Yehova mpo na mitindá mitombwani ya bizaleli malamu oyo batosaka mpe mpo na bolingo oyo bamonisanaka. Yango ezali ebandeli malamu, kasi yango elimboli te ete bato wana bazali na kondima. Basusu bakoki kozala na mobalani to moboti oyo azali na kondima makasi, mpe bakoki kosangana na misala mosusu ya elimo oyo molingami na bango asalaka. Kozala na moto oyo azali na bopusi motindo wana kati na ndako ezali solo lipamboli, kasi yango mpe ekoki te kozwa esika ya bolingo oyo moto ye moko asengeli kozala na yango mpo na Nzambe mpe ekoki te kozwa esika ya kondima oyo moto asengeli komonisa epai ya Nzambe.—Luka 10:27, 28.
3. (a) Mpo ete tózala na kondima etongami na moboko ya malamu, tosengeli kondimisama na nini mpo na oyo etali Biblia? (b) Mpo na nini bato mosusu bandimaka noki koleka basusu ete Biblia epemami na Nzambe?
3 Baoyo bazali solo kotambola na kondima bandimisami mpenza ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Bilembeteli bizali mingi oyo bimonisi solo ete Makomami Mosantu “mapemami na Nzambe.”a (2 Timoté 3:16) Bilembeteli boni moto asengeli kotalela liboso ete andimisama? Yango ekoki kotalela makambo oyo moto asilá kokutana na yango kati na bomoi na ye. Elembeteli oyo endimisi mpenza moto moko ekoki ntango mosusu kondimisa moto mosusu te. Moto mosusu, ata soki bamonisi ye bilembeteli mingi ya solosolo, akoki koboya kondima likambo oyo bilembeteli yango bizali komonisa. Mpo na nini? Mpo na bamposa oyo ebombami kati na motema na ye. (Yilimia 17:9) Yango wana, atako moto akoki koloba ete asepelaka na mokano ya Nzambe, motema na ye ekoki kozala na mposa ete andimama na mokili. Ekoki kozala ete alingi kotika te lolenge ya bomoi oyo eyokani te na mitindá ya Biblia. Nzokande, soki moto moko azali mpenza na mposa ya mateya ya solo, soki azali sembo na motema na ye, mpe soki azali na komikitisa, nsukansuka akososola ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe.
4. Nini esɛngami epai na moto mpo ete akóma na kondima?
4 Mbala mingi, bato oyo bazali kozwa lisungi mpo na koyekola Biblia bazali kososola nsima ya mwa basanza ete basili kozwa bilembeteli mingi bimonisi ete yango ezali Liloba ya Nzambe. Soki yango epusi bango ete báfungola mitema na bango mpo na kolakisama na Yehova, boye mokemoke makanisi na bango, bamposa na bango, mpe matindiki na bango makolanda makambo oyo bazali koyekola. (Nzembo 143:10) Baloma 10:10 elobi ete ezali “na motema” nde moto amonisaka kondima. Kondima lolenge yango emonisaka mpenza mayoki ya moto, mpe yango ekomonana na lolenge ya bomoi na ye.
Noa asalaki na kondima oyo ezalaki na moboko ya malamu
5, 6. Kondima ya Noa etongamaki likoló na nini?
5 Noa azalaki na kondima oyo ezalaki na moboko ya malamu. (Baebele 11:7) Kondima na ye ezalaki na moboko nini? Noa azalaki na liloba ya Nzambe, ekomami te, kasi oyo elobamaki epai na ye. Genese 6:13 elobi ete: “Nzambe alobaki na Noa ete, Nasili kokana kosilisa bato nyonso, mpo ete mokili etondi na yauli mpo na bango.” Yehova apesaki Noa mokumba ya kotonga masuwa mpe apesaki ye malako ya sikisiki mpo na kosala yango. Na nsima Nzambe alobaki lisusu ete: “Ngai moko nakotinda mpela na mokili mpo na kobebisa mosuni nyonso yango ezali na mpema na bomoi na nsé na likoló. Nyonso izali na mokili ikokufa.”—Genese 6:14-17.
6 Mbula ezalaki kobɛta liboso ya ntango wana? Biblia elobi eloko te mpo na yango. Genese 2:5 elobi ete: “[Yehova] Nzambe anɔkisaki mbula na mokili te.” Kasi, yango ezali na lolenge oyo Mose, moto oyo azalaki na bomoi bikeke mingi na nsima, amonisaki makambo na kolobeláká mikolo ya Noa te kasi eleko oyo ezalaki liboso na yango mpenza. Lokola emonisami na Genese 7:4, Yehova alobelaki mbula ntango azalaki kosolola na Noa, mpe emonani ete Noa akangaki ntina ya maloba ya Nzambe. Kasi, kondima ya Noa etongamaki te na makambo oyo akokaki komona. Ntoma Paulo akomaki ete Noa ‘akebisamaki na Nzambe mpo na makambo mamonani naino te.’ Nzambe ayebisaki Noa ete akoyeisa “mpela,” to “mbu ya likoló,” lolenge Traduction du monde nouveau emonisi yango na maloba na nsé ya lokasa mpo na Genese 6:17. Kino ntango wana, likambo motindo wana esalemaki naino te. Kasi mpo na Noa, biloko nyonso bizalisami na Nzambe bizalaki elembeteli ete Nzambe akokaki koyeisa mpela motindo wana mpo na koboma. Mpo na kondima, Noa atongaki masuwa.
7. (a) Eloko nini Noa azalaki na mposa na yango te mpo na kosala oyo Nzambe atindaki ye? (b) Lolenge nini tozali kozwa litomba na kotalela kondima ya Noa, mpe lolenge nini kondima na biso ekoki kozala lipamboli mpo na basusu?
7 Nzambe ayebisaki Noa te mokolo oyo Mpela esengelaki kobanda. Kasi, Noa atalelaki likambo yango te lokola ntina mpo na kozela naino mpe kotala ndenge makambo makoleka, kotyáká mosala ya botongi masuwa mpe kosakola nsima ya misala na ye mosusu. Na ntango ebongi, Nzambe ayebisaki Noa ntango nini asengeli kokɔta na masuwa. Liboso ete ntango yango ekoka, “Noa asalaki lokola Nzambe atindaki ye, asalaki bobele bongo.” (Genese 6:22, NW) Noa atambolaki na kondima, kasi na komona te. Tozali mpenza na botɔ́ndi na ndenge asalaki! Mpo na kondima na ye, lelo oyo biso tozali na bomoi. Biso mpe na ngala na biso, kondima oyo tozali komonisa ekoki kobimisa matomba mingi na mikolo mizali koya, bobele mpo na biso te kasi, lisusu mpo na bana na biso mpe bato mosusu zingazinga na biso.
Kondima ya Abalayama
8, 9. (a) Abalayama atongaki kondima na ye likoló na moboko nini? (b) Na nzela nini Yehova ‘amonanaki’ na Abalayama?
8 Tótalela ndakisa mosusu—oyo ya Abalayama. (Baebele 11:8-10) Abalayama atongaki kondima na ye likoló na moboko nini? Na esika oyo akólaki, na engumba Ulu ya Bakaladi, bato bazalaki kosambela bikeko mpe bamipesaki mingi na koluka biloko ya mosuni. Kasi makambo mosusu nde mazalaki na bopusi likoló ya lolenge oyo Abalayama azalaki kotalela bomoi. Na ntembe te ayebanaki mpe azalaki kosolola na Semi, mwana ya Noa, oyo azalaki na ye na bomoi na eleko moko na boumeli ya mbula 150. Abalayama akómaki na kondima ete Yehova azali “Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, Mozalisi na likoló mpe na mokili.”—Genese 14:22.
9 Likambo mosusu mpe ezalaki na bopusi makasi likoló na Abalayama. Yehova “amonanaki na . . . Abalayama, wana ezalaki ye na Mesopotamia, naino efandi ye na Halana te. Alobi na ye ete, Longwá na yo na mokili na yo mpe na biboto na yo, mpe kendá kuna na mokili oyo nakotalisa yo.” (Misala 7:2, 3) Na lolenge nini Yehova ‘amonanaki’ na Abalayama? Abalayama amonaki Nzambe na miso te. (Exode 33:20) Nzokande, ekoki mpenza kozala ete Yehova amonanaki na Abalayama na ndɔtɔ, na etaliseli ya nkembo ya kokamwa, to na nzela ya anzelu oyo asalaki lokola momemi-nsango, to momonisi. (Kokanisá na Genese 18:1-3; 28:10-15; Levitike 9:4, 6, 23, 24.) Ata soki Yehova amonanaki na Abalayama na nzela nini, mobali yango ya sembo andimisamaki ete Nzambe apesaki ye libaku malamu ya ntina mingi. Abalayama amonisaki kondima na likambo yango.
10. Lolenge nini Yehova alendisaki kondima ya Abalayama?
10 Mpo na kondima, Abalayama alukaki naino te koyeba makambo nyonso matali mokili epai Nzambe alingaki kotinda ye. Kondima na ye etalelaki te likambo ya koyeba ntango nini bakopesa ye mokili yango. Azalaki na kondima mpamba te ayebaki ete Yehova azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. (Exode 6:3) Yehova ayebisaki Abalayama ete mwana akobotamela ye, kasi ntango mosusu Abalayama azalaki komituna lolenge nini yango ekoki kosalema mpamba te abandaki konuna. (Genese 15:3, 4) Yehova alendisaki kondima ya Abalayama na koyebisáká ye ete atala minzoto mpe atánga yango soki akokoka. Nzambe alobaki ete, “mombóto na yo ekokóma bongo.” Mayoki ya Abalayama esimbamaki makasi. Ezalaki polele ete Mozalisi ya biloko wana ya kokamwisa oyo bizali na likoló azalaki na makoki ya kokokisa elaka na ye. Abalayama “andimelaki Yehova.” (Genese 15:5, 6, NW) Abalayama andimaki bobele te mpo ete asepelaki na maloba oyo ayokaki; kondima na ye etongamaki na moboko ya malamu.
11. (a) Wana akómaki pene na mibu 100, lolenge nini Abalayama atalelaki elaka ya Nzambe ete Sala oyo akómaki mobangé akobota mwana mobali? (b) Na kondima ya lolenge nini Abalayama alóngaki komekama oyo etalelaki komema mwana na ye na Ngomba Moliya mpe kokaba ye lokola mbeka?
11 Ntango Abalayama akómaki na mibu pene na 100 mpe mwasi na ye Sala, akómaki na mibu pene na 90, Yehova azongelaki lisusu elaka na ye ete Abalayama asengeli kozwa mwana mpe ete Sala nde akobota ye. Na bosembo mpenza, Abalayama atalaki naino bambula oyo bakómaki na yango. Kasi “abɛtaki elaka na Nzambe ntembe te, kasi akembaki mingi kati na kondima; apesaki Nzambe nkembo. Andimaki na motema mobimba ete Nzambe akoki kosala yango esili ye kolaka.” (Baloma 4:19-21) Abalayama ayebaki ete elaka ya Nzambe ekozanga kokokisama te. Na nsima, mpo na kondima na ye, Abalayama atosaki ntango Nzambe ayebisaki ye ete akamata Yisaka mwana na ye mpe amema ye na mokili ya Moliya mpe akaba ye lokola mbeka. (Genese 22:1-12) Abalayama atyaki motema mobimba ete Nzambe oyo, na nzela ya ekamwiseli, asalaki ete mwana abotama, akoki mpe kozongisa ye na bomoi mpo na kokokisa bilaka na Ye mosusu oyo apesaki na ntina na ye.—Baebele 11:17-19.
12. Abalayama atambolaki na kondima na boumeli ya ntango boni, mpe mbano nini ezali kozela ye mpe basangani ya libota na ye oyo bamonisaki kondima makasi?
12 Abalayama amonisaki ete atambwisamaki na kondima bobele na mwa mabaku te kasi na bomoi na ye mobimba. Na boumeli ya bomoi na ye, Nzambe apesaki Abalayama ata eteni moko te ya Mokili ya Ndaka lokola libula. (Misala 7:5) Kasi, Abalayama alɛmbaki te mpe azongaki na Ulu ya Bakaladi te. Na boumeli ya mbula 100, elingi koloba uta kobima na ye na Ulu kino na liwa na ye, Abalayama afandaki na bahema na mokili epai Nzambe atindaki ye. (Genese 25:7) Na ntina na ye, na Sala, mwasi na ye, na Yisaka, mwana na bango, na Yakobo, mwana ya mwana na bango, Baebele 11:16 elobi ete: “Nzambe ayoki nsɔni te ete abyangama Nzambe na bango. Mpo ete abongiseli bango mboka.” Ɛɛ, Yehova abongiseli bango esika awa na mabelé na nsé ya Bokonzi ya Masiya.
13. Lelo oyo, banani kati na basaleli ya Nzambe bazali komonisa ete bazali na kondima lokola ya Abalayama?
13 Lelo oyo kati na basaleli ya Yehova, ezali na baoyo bazali lokola Abalayama. Basili kotambola na kondima na boumeli ya bambula mingi. Na lisalisi ya nguya oyo Nzambe apesaka, basili kolónga mikakatano minene lokola ngomba. (Matai 17:20) Atako bayebi te ntango nini Nzambe akopesa bango libula oyo alakaki, bazali kotɛngatɛnga te kati na kondima. Bayebi ete liloba ya Yehova ekoki kozanga te kokokisama, mpe bazali kopesa motuya monene na libaku malamu ya kozala Batatoli na ye. Yo mpe ozali na mayoki motindo wana?
Kondima oyo epusaki Mose
14. Lolenge nini moboko etyamaki mpo na kondima ya Mose?
14 Ndakisa mosusu ya moto oyo amonisaki kondima ezali bongo Mose. Kondima na ye etongamaki na moboko nini? Ebandaki uta bomwana. Atako mwana mwasi ya Falo akutaki Mose kati na kitunga esalemi na papirise na Ebale Nil mpe akamataki ye lokola mwana na ye, kasi ezali Yokebede, mama na ye mpenza, ye Moyuda nde moto amɛlisaki ye mabɛlɛ mpe abɔkɔlaki ye na bomwana na ye. Emonani ete Yokebede ateyaki ye malamu, akɔtisaki na motema na ye bolingo mpo na Yehova mpe bosepeli mpo na bilaka na Ye oyo apesaki Abalayama. Na nsima, lokola mosangani ya libota ya Falo, Mose ‘ateyamaki na mayele nyonso ya Baezipito.’ (Misala 7:20-22; Exode 2:1-10; 6:20; Baebele 11:23) Nzokande, atako azalaki na etɛlɛmɛlo ya lokumu, motema ya Mose ezalaki esika moko na libota ya Nzambe oyo ezalaki na boombo.
15. Komitya na ngámbo ya libota ya Yehova elimbolaki nini mpo na Mose?
15 Ntango akokisaki mbula 40, Mose abomaki Moezipito moko mpo na kobikisa Moyisalaele oyo azalaki konyokolama mpamba. Likambo yango emonisaki mayoki Mose azalaki na yango mpo na libota ya Nzambe. Ɛɛ, “mpo na kondima, wana ezalaki Mose mokolo, aboyaki kotángama mwana na mwana mwasi na Falo.” Na esika ya kokangama na “bisengo na masumu bikoumela bobele mwa ntango moke” lokola mosangani ya ndako ya Mokonzi ya Ezipito, apusamaki na kondima mpo na komitya na ngámbo ya libota ya Nzambe oyo lizalaki konyokwama.—Baebele 11:24, 25; Misala 7:23-25.
16. (a) Yehova apesaki Mose mokumba nini, mpe lolenge nini Nzambe asungaki ye? (b) Na kokokisáká mokumba na ye, lolenge nini Mose amonisaki kondima?
16 Mose azalaki na mposa makasi ya kosala eloko moko mpo na kosikola libota na ye, kasi mpo na Nzambe, ntango ekokaki naino te mpo na kosikola bango. Mose asengelaki kokima Ezipito. Mbula pene na 40 na nsima, na nzela ya anzelu, Yehova atindaki Mose ete azonga na Ezipito mpo na kobimisa Bayisalaele na mokili yango. (Exode 3:2-10) Mose atalelaki likambo yango lolenge nini? Abɛtaki ntembe te na makoki ya Yehova ya kobikisa Yisalaele, kasi amiyokaki ete ye nde abongi te na mokumba oyo Nzambe apesaki ye. Na bolingo nyonso, Yehova apesaki Mose elendiseli oyo esengelaki. (Exode 3:11–4:17) Kondima ya Mose ekómaki makasi. Azongaki na Ezipito mpe mbala na mbala akebisaki Falo ntango azalaki kokutana na ye ete malɔzi makokwela Ezipito lokola moyangeli yango aboyaki kotika Yisalaele ete bákende kosambela Yehova. Mose azalaki na nguya te mpo na koyeisa malɔzi wana. Atambolaki na kondima, kasi na komona te. Atyaki kondima na ye epai na Yehova mpe kati na liloba na ye. Falo akanelaki Mose. Kasi Mose alendendelaki. “Mpo na kondima, atikaki Ezipito, abangaki nkanda na mokonzi te, zambi ayikaki mpiko lokola ete azali komona ye oyo akomonanaka te.” (Baebele 11:27) Mose azalaki moto ya kokoka te. Asalaki mabunga. (Mituya 20:7-12) Nzokande, nsima wana Nzambe apesaki ye mokumba, bomoi na ye mobimba etambwisamaki na kondima.
17. Kotambola na kondima epesaki litomba nini mpo na Noa, Abalayama, mpe Mose, atako bamonaki te mokili ya sika ya Nzambe?
17 Tiká ete kondima na yo ezala lokola oyo ya Noa, ya Abalayama, mpe ya Mose. Ezali solo ete bamonaki mokili ya sika ya Nzambe te na mikolo na bango. (Baebele 11:39) Mpo na Nzambe, ntango na ye ekokaki naino te; makambo mosusu matali mokano na ye masengelaki naino kokokisama. Kasi, kondima na bango kati na Liloba ya Nzambe etɛngatɛngaki te, mpe bankombo na bango ezali kati na búku ya Nzambe mpo na bomoi.
18. Mpo na baoyo babyangami kozala na bomoi na likoló, mpo na nini ezali na ntina ete bátambola na kondima?
18 Ntoma Paulo akomaki ete: “Nzambe abombeli biso eloko eleki malamu.” Elingi koloba ete Nzambe abombaki eloko eleki malamu mpo na baoyo, lokola Paulo, babyangami mpo na bomoi ya likoló esika moko na Klisto. (Baebele 11:40) Ezali bango mpenza nde Paulo azalaki kokanisa ntango akomaki maloba mazali na 2 Bakolinti 5:7: “Tokotambolaka na kondima nde na komona te.” Ntango maloba yango makomamaki, moko te kati na bango asilaki kozwa mbano ya bomoi na likoló. Bakokaki komona yango te na miso na bango ya mosuni, kasi kondima na bango na likambo yango etongamaki na moboko ya malamu. Klisto asilaki kosekwisama kati na bakufi, mbuma ya liboso kati na baoyo bakozwa lipamboli ya bomoi na likoló. Mpe batatoli koleka 500 bamonaki ye liboso ete amata na likoló. (1 Bakolinti 15:3-8) Bazalaki na bantina ekoki mpo na kotambwisa bomoi na bango mobimba na kondima wana. Biso mpe tozali na bantina malamu ya kotambola na kondima.
19. Lokola emonisami na Baebele 1:1, 2, na nzela ya nani Nzambe asili koloba na biso?
19 Lelo oyo, Yehova azali koloba na libota na ye na nzela ya anzelu te, lokola asalaki yango epai na Mose kati na nzeté moke oyo ezalaki kopela na mɔ́tɔ. Nzambe asili koloba na nzela ya Mwana na ye. (Baebele 1:1, 2) Makambo oyo Nzambe alobaki na nzela na ye, akomisaki yango kati na Biblia, oyo esili kobongolama na nkota ya bato na mokili mobimba.
20. Lolenge nini ezalela na biso ezali malamu mingi koleka oyo ya Noa, Abalayama, mpe Mose?
20 Lelo oyo tozali na Liloba ya Nzambe koleka oyo Noa, Abalayama, mpe Mose bazalaki na yango. Tozali na Liloba ya Nzambe na mobimba na yango. Mpe bisakweli na yango mingi bisili kokokisama. Na kotaleláká oyo Biblia elobi mpo na mibali mpe basi oyo bamonisaki ete bazali batatoli ya sembo ya Yehova liboso ya minyoko ndenge na ndenge, Baebele 12:1 epesi toli oyo: “Tólongola bipekiseli nyonso mpe masumu mazali kokanga biso tópota na etingya na emekaneli na mbangu etyami liboso na biso.” Tókanisa te ete tokoki te kozanga kondima. “Masumu mazali kokanga biso” ezali bongo kozanga kondima. Tosengeli kobunda makasi mpo na kokóba “kotambola na kondima.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá búku La Bible : Parole de Dieu ou des hommes ? , ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Okanisi nini?
◻ ‘Kotambola na kondima’ esɛngi nini?
◻ Ndenge nini tokoki kozwa litomba na lolenge oyo Noa amonisaki kondima?
◻ Lolenge nini motindo oyo Abalayama amonisaki kondima ezali kosalisa biso?
◻ Mpo na nini Biblia ezali komonisa Mose lokola ndakisa ya moto na kondima?
[Elilingi na lokasa 10]
Abalayama atambolaki na kondima
[Elilingi na lokasa 10]
Mose na Alona bamonisaki kondima ntango bazalaki liboso ya Falo