Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Koyika mpiko ezali na ntina mingi mpo na baklisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1993 | 15 Sanza ya 9
    • 17. (a) Yesu ayikaki mpiko na mimekamo nini? (b) Lolenge nini tokoki komikanisela mpasi makasi oyo Yesu ayikelaki yango mpiko? (Tala maloba na nsé na lokasa.)

      17 Biblia epesi biso toli ya “kotala” Yesu mpe ‘kotalela ye malamu.’ Ayikaki mpiko liboso na mimekamo nini? Mosusu kati na yango eutaki na bato na ntina na masumu na bango mpe kozanga kokoka. Yesu ayikaki mpiko bobele te “na koyinama na bato na masumu,” kasi ayikaki mpiko lisusu na mikakatano oyo mizalaki kobima katikati na bayekoli na ye, kati na yango, kowelana monene oyo bawelanaki mpo na koyeba nani alekaki monene. Na nsuka, kondima na ye ekutanaki na komekama moko makasi koleka. “Ayikelaki nzeté na mpasi mpiko.” (Baebele 12:1-3; Luka 9:46; 22:24) Ezali pɛtɛɛ te mpo na kokanisa mpasi na mayoki mpe na nzoto oyo azalaki na yango ntango akakisamaki na nzeté mpe nsɔni oyo aokaki na kobomama lokola motuki.a

      18. Engebene ntoma Paulo, wapi makambo mibale oyo masungaki Yesu?

      18 Nini esalisaki Yesu na koyika mpiko kino nsuka? Ntoma Paulo alobeli makambo mibale masungaki Yesu: ‘mabondeli mpe malɔmbo’ mpe lisusu “esengo oyo etyamaki liboso na ye.” Yesu, Mwana ya kokoka na Nzambe, aokaki nsɔni te mpo na kosenga lisalisi. Abondelaki “na kongánga makasi mpe na mpisoli.” (Baebele 5:7; 12:2) Mingi mpenza, ntango momekamo na ye ya monene mobelemaki, amonaki ntina ya kobondela mbala na mbala mpe na molende nyonso mpo ete akoka kolendisama. (Luka 22:39-44) Mpo na koyanola na mabondeli na Yesu, Jéhovah alongolaki momekamo te, kasi apesaki Yesu nguya ya koyikela yango mpiko. Yesu ayikaki mpe mpiko mpo ete atalelaki mbano na ye nsima na koyika mpiko na nzeté na mpasi​—esengo asengelaki kozala na yango mpo ete asangani na kokumisa nkombo ya Jéhovah mpe na kosikola bato longwa na kufa.​—Matai 6:9; 20:28.

  • Koyika mpiko ezali na ntina mingi mpo na baklisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1993 | 15 Sanza ya 9
    • 20 Mbala mosusu tosengeli koyika mpiko elongo na mpisoli. Mpo na Yesu, mpasi oyo azwaki na nzeté ya mpasi ezalaki mpenza ntina ya esengo te. Kasi, esengo ezalaki nde kati na mbano oyo etyamaki liboso na ye. Mpo na biso, ebongi te na komizela ete tosepela mpe tozala na esengo ntango nyonso wana tozali kati na momekamo. (Tala Baebele 12:11.) Nzokande, na kotaláká mbano oyo ezali liboso, tokoki mpenza ‘kotalela yango lokola esengo monene’ ata soki tokutani na mimekamo makasi. (Yakobo 1:2-4; Misala 5:41) Likambo ya ntina mingi ezali ete totelema ngwi​—ata soki esengeli kosalema elongo na mpisoli. Na nyonso wana, Yesu alobaki te ete: ‘Ye oyo akobimisa bobele mpisoli moke akobika’ kasi, “Ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.”​—Matai 24:13.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto