Baklisto bazwaka formasyo mpo na kopesa litatoli malamumalamu
“Bokozala batatoli na ngai na Yelusaleme mpe na kati ya Yudea mobimba mpe na Samalia mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabelé.”—MISALA 1:8.
1, 2. Petelo azwaki mokumba nini, mpe nani apesaki ye yango?
“YESU oyo azalaki moto ya Nazalete . . . atindaki biso tósakola epai ya bato ya ekólo mpe tópesa litatoli malamumalamu ete ye azali Moto oyo atyami na Nzambe mpo na kozala mosambisi ya bato ya bomoi mpe ya bakufi.” (Misala 10:38, 42) Ntoma Petelo alobaki maloba wana mpo na kolimbwela Koloneyi ná libota na ye mokumba azwaki ya kozala mopalanganisi ya nsango malamu.
2 Ntango nini Yesu apesaki mokumba wana? Na ntembe te, Petelo azalaki kokanisa maloba ya Yesu nsima ya lisekwa na ye, liboso amata na likoló. Mokolo yango, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ya sembo boye: “Bokozala batatoli na ngai na Yelusaleme mpe na kati ya Yudea mobimba mpe na Samalia mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabelé.” (Misala 1:8) Kasi, Petelo ayebaki kobanda mwa kala ete lokola azalaki moyekoli ya Yesu, asengelaki kotatola kondima na ye epai ya bato mosusu.
Formasyo ya mbula misato
3. Yesu asalaki likamwisi nini, mpe alobaki nini epai ya Petelo ná Andele?
3 Yesu azwaki batisimo na mobu 29 ya ntango na biso (T.B.); mwa basanza na nsima, akendaki kosakola pembeni ya Mbu ya Galilai, na esika oyo Petelo ná ndeko na ye Andele bazalaki kosala mosala ya koboma mbisi. Mibali yango basalaki butu mobimba kasi bazwaki eloko te. Kasi, Yesu alobaki na bango ete: “Pusá tii na esika oyo ezali mozindo, mpe bókitisa minyama na bino mpo na kokanga mbisi.” Ntango basalaki ndenge Yesu alobaki, “bakangaki bambisi ebele mpenza. Kutu, minyama na bango ebandaki kopasuka.” Ntango Petelo amonaki likamwisi wana, abangaki makasi, kasi Yesu akitisaki ye motema mpe alobaki na ye ete: “Tiká kobanga. Banda sikoyo okobanda kokanga bato na bomoi.”—Luka 5:4-10.
4. (a) Ndenge nini Yesu abongisaki bayekoli na ye mpo na kopesa litatoli? (b) Bokeseni nini esengelaki komonana kati na mosala ya Yesu ná oyo ya bayekoli na ye?
4 Kaka mokolo wana, Petelo ná Andele, mpe na nsima bana ya Zebedai, Yakobo mpe Yoane, basundolaki bamasuwa na bango mpe balandaki Yesu. Pene na mbula misato mobimba, bazalaki kotambola na Yesu na bisika nyonso oyo azalaki kokende mpo na kosakola mpe bazwaki formasyo ya bapalanganisi ya nsango malamu. (Matai 10:7; Malako 1:16, 18, 20, 38; Luka 4:43; 10:9) Na nsuka ya mbula misato yango, mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B., Yesu alobaki na bango boye: “Moto oyo azali komonisa kondima na kati na ngai, moto yango akosala mpe misala oyo ngai nazali kosala; mpe akosala misala ya minene koleka oyo.” (Yoane 14:12) Maloba yango elimboli ete bayekoli ya Yesu basengelaki kopesa litatoli malamumalamu ndenge ye moko asalaki, kasi bango basengelaki kosala yango na bamboka mingi koleka. Mwa moke na nsima, bayekoli bayebaki ete litatoli yango ekopesama na “bikólo nyonso” tii na “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.”—Matai 28:19, 20.
5. Ndenge nini biso mpe tokoki kolanda formasyo oyo Yesu apesaki bayekoli na ye?
5 Tozali sikoyo na “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (Matai 24:3) Lelo oyo, tokoki te kozala na libaku oyo bayekoli ya liboso bazwaki ya kotambola na Yesu mpe komona ye ndenge oyo azali kosakola. Atako bongo, tokoki kolanda formasyo na ye soki tozali kotánga na Biblia ndenge oyo azalaki kosakola mpe malako oyo apesaki bayekoli na ye. (Luka 10:1-11) Na lisolo oyo tokolobela mpe likambo moko ya ntina mingi oyo Yesu amonisaki bayekoli na ye: ndenge malamu ya kotalela mosala ya kosakola.
Yesu azalaki komibanzabanza mpo na bato
6, 7. Ezaleli nini esalisaki Yesu asala mosala ya malamu, mpe ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na ye na likambo yango?
6 Mpo na nini Yesu apesaki litatoli malamumalamu? Ntina moko ezali ete azalaki mpenza komibanzabanza mpo na bato. Mokomi ya nzembo asakolaki ete Masiya “akoyokela moto ya bolɔzi mpe mobola mawa.” (Nzembo 72:13) Yesu akokisaki mpenza esakweli yango. Biblia elobeli likambo moko elekaki mokolo mosusu: “Ntango amonaki bibele wana ya bato ayokelaki bango mawa, mpo batikamaki mpamba mpe bapalanganisamaki lokola bampate ezangá mobateli.” (Matai 9:36) Ata basumuki ya minene bamonaki ete Yesu azalaki komibanzabanza mpo na bato mpe bazalaki kopusana penepene na ye.—Matai 9:9-13; Luka 7:36-38; 19:1-10.
7 Biso mpe lelo oyo tokopesa litatoli malamumalamu soki tozali komibanzabanza mpo na bato. Yango wana, liboso ya kobima na mosala ya kosakola, ezali malamu ozwaka ntango ya kokanisa ndenge nsango oyo ozali komemela bato ekoki kosalisa bango. Kanisá mikakatano oyo bazali kokutana na yango oyo, kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa yango. Lokola oyebi te nani akondima koyoka yo to nani akoboya, zwá ekateli ya kopesa moto nyonso litatoli. Toyebi te mbala mosusu moto oyo okosolola na ye autaki kobondela mpo moto moko akende kosalisa ye!
Bolingo ezalaki kotinda ye asakola
8. Na ndakisa ya Yesu, nini etindaka bayekoli na ye na kosakola nsango malamu?
8 Nsango malamu oyo Yesu azalaki kosakola ezalaki kolobela makambo ya ntina mingi: ndenge Yehova akokokisa mokano na ye, ndenge nkombo na Ye ekosantisama, mpe ndenge boyangeli na ye ekolongisama. (Matai 6:9, 10) Yesu atikalaki sembo tii na nsuka mpe apesaki litatoli malamumalamu mpo na Bokonzi oyo ekokokisa makambo wana mpo alingaki Tata na ye. (Yoane 14:31) Lokola bayekoli ya Yesu lelo oyo balingaka mpe Tata na bango, bamipesaka mpenza na mosala ya kosakola. Ntoma Yoane alobaki boye: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka bakomandema na ye.” Moko na bakomandema yango esɛngi biso tósakola nsango malamu mpe tókómisa bato bayekoli.—1 Yoane 5:3; Matai 28:19, 20.
9, 10. Longola bolingo mpo na Nzambe, bolingo mpo na nani lisusu etindaka biso tópesa litatoli malamumalamu?
9 Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Soki bolingaka ngai, bokotosa bakomandema na ngai. Moto oyo azali na bakomandema na ngai mpe azali kotosa yango, moto wana nde alingaka ngai.” (Yoane 14:15, 21) Na bongo, bolingo na biso mpo na Yesu esengeli kotinda biso tópesa litatoli na ntina etali solo mpe tótosa bakomandema na ye mosusu. Mokolo moko oyo Yesu abimelaki bayekoli na ye nsima ya lisekwa na ye, alobaki na Petelo boye: “Leisá bana-mpate na ngai. . . . Batelá bampate na ngai ya mike. . . . Leisá bampate na ngai ya mike.” Nini esengelaki kotinda Petelo asala yango? Yesu amonisaki eyano na motuna oyo azongelaki mbala misato ete: “Olingaka ngai? . . . Olingaka ngai? . . . Olingaka ngai mingi?” Tomoni mpenza ete bolingo makasi oyo Petelo alingaki Yesu, esengelaki kotinda ye na kopesa litatoli malamumalamu, na koluka ‘bampate mike’ ya Yesu, mpe na nsima, na kozala mobateli na bango.—Yoane 21:15-17.
10 Biso toyebi Yesu te ndenge Petelo ayebaki ye. Atako bongo, toyebi malamu mpenza makambo oyo Yesu asalaki mpo na biso. Bolingo monene oyo etindaki ye ‘akufela moto nyonso’ esimbaka mpenza mitema na biso. (Baebele 2:9; Yoane 15:13) Toyokaka ndenge Paulo ayokaki ntango akomaki ete: “Bolingo oyo Klisto azali na yango ezali kopusa biso . . . Akufelaki bato nyonso mpo baoyo bazali na bomoi bákoka kozala na bomoi mpo na bango moko lisusu te, kasi mpo na [ye].” (2 Bakolinti 5:14, 15) Tokomonisa ete tozali mpenza na botɔndi mpo na bolingo oyo Yesu amoniselaki biso mpe ete tolingaka ye soki tozali kozwa na lisɛki te mokumba oyo apesi biso ya kopesa litatoli malamumalamu. (1 Yoane 2:3-5) Tokolinga soki moke te kotalela mosala ya kosakola kaka bongobongo, lokola nde mbeka ya Yesu ezali eloko ya motuya moke.—Baebele 10:29.
Tótya makanisi nyonso na mosala
11, 12. Mpo na nini Yesu ayaki awa na mokili, mpe ndenge nini atyaki makanisi na ye na mosala wana?
11 Ntango Yesu asambaki liboso ya Ponsi Pilato, alobaki na mokonzi yango boye: “Ezali mpo na yango nde nabotamaki, mpe ezali mpo na yango nde nayaki na mokili, mpo napesa litatoli na ntina etali solo.” (Yoane 18:37) Yesu atikaki ata eloko moko te elongola likebi na ye na mosala ya kopesa litatoli na ntina etali solo. Yango nde ezalaki mokano ya Nzambe mpo na ye.
12 Satana amekaki Yesu na likambo yango. Mwa mikolo nsima ya kozwa batisimo, Satana alobaki na ye ete akoki kokómisa ye moto monene na mokili, alakaki kopesa ye “makonzi nyonso ya mokili mpe nkembo na yango.” (Matai 4:8, 9) Na nsima, Bayuda balukaki kokómisa ye mokonzi. (Yoane 6:15) Bato mosusu bakoki kokanisa ete elingaki kozala malamu mingi soki Yesu andimaki bokonzi wana, alingaki kosalela bato makambo mingi ya malamu. Kasi, Yesu akanisaki ndenge wana te. Atyaki makanisi na ye nyonso na mosala ya kopesa litatoli na ntina etali solo.
13, 14. (a) Likambo nini elongolaki likebi ya Yesu na mosala na ye te? (b) Atako Yesu azalaki na bozwi ya mokili te, likambo nini asalaki?
13 Lisusu, Yesu atikaki mokumba na ye te mpo na kokóma moto ya bozwi. Yango wana, azalaki moto ya bomɛngo te. Kutu, azalaki ata na ndako te. Mokolo mosusu alobaki boye: “Bagambala bazalaka na mabulu mpe bandɛkɛ ya likoló bazalaka na bazumbu, kasi Mwana ya moto azali na esika ya kolalisa motó na ye te.” (Matai 8:20) Mokolo Yesu akufaki, eloko kaka moko ya valɛrɛ atikaki ezalaki elamba moko oyo basoda ya Loma babɛtaki mbɛsɛ mpo moko na bango azwa yango. (Yoane 19:23, 24) Kasi, tokoki nde koloba ete Yesu asalaki likambo ya malonga te na bomoi na ye? Te!
14 Makambo oyo Yesu asalaki eleki mosika oyo moto oyo aleki bato nyonso na mbongo mpe oyo asalisaka babola akoki kosala. Paulo alobaki boye: “Boyebi boboto monene ya Nkolo na biso Yesu Klisto, ete atako azalaki moto ya bomɛngo akómaki mobola mpo na bino, mpo bino bókoka kokóma bato ya bomɛngo na nzela ya bobola na ye.” (2 Bakolinti 8:9; Bafilipi 2:5-8) Atako Yesu azalaki na bozwi ya mokili te, afungolelaki bato ya komikitisa nzela ya bomoi ya seko na nzoto ya kokoka. Tozali mpenza kotɔnda ye! Tozali kosepela mingi na mbano oyo azwaki lokola atyaki makanisi na ye nyonso na kokokisa mokano ya Nzambe!—Nzembo 40:8; Misala 2:32, 33, 36.
15. Eloko nini eleki bozwi ya mokili na motuya?
15 Baklisto oyo bazali mpe kosala makasi bálanda ndakisa ya Yesu lelo oyo, baboyaka komipesa na koluka bomɛngo ya mokili. (1 Timote 6:9, 10) Bayebi ete bozwi ekoki kosalisa moto asilisa mikakatano mosusu ya bomoi, kasi babosanaka te ete bomɛngo epesaka moto bomoi ya seko te. Soki moklisto akufi, bozwi na ye ezalaka lisusu na ntina moko te mpo na ye, ndenge kaka elamba ya Yesu ezalaki lisusu na mosala te mpo na ye ntango akufaki. (Mosakoli 2:10, 11, 17-19; 7:12) Ntango moklisto akufi, eloko kaka moko ya motuya oyo etikalaka ezali boyokani na ye na Yehova mpe na Yesu Klisto.—Matai 6:19-21; Luka 16:9.
Abangaki banguna te
16. Yesu asalaki nini epai ya bato oyo bazalaki kotɛmɛla ye?
16 Atako banguna bazalaki kotɛmɛla Yesu, yango elongolaki te likebi na ye na mosala ya kopesa litatoli na ntina etali solo. Atako ayebaki ete na nsuka ya mosala na ye awa na mabelé akokufa mpo na kopesa bomoi na ye lokola mbeka, yango elɛmbisaki ye te. Paulo alobaki na ntina na Yesu ete: “Mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye ayikelaki nzete moko ya mpasi mpiko, kotyoláká nsɔni, mpe afandi na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya Nzambe.” (Baebele 12:2) Tomoni vɛrsɛ elobi ete Yesu ‘atyolaki nsɔni.’ Azalaki komituna te soki banguna bakoloba nini mpo na ye. Atyaki makanisi na ye nyonso na kosala mokano ya Nzambe.
17. Liteya nini tokoki kozwa na ezaleli ya koyika mpiko ya Yesu?
17 Paulo azwaki ndakisa ya mpiko ya Yesu mpo na koteya baklisto boye: “Bótya likebi mpenza epai ya moto oyo asili koyika mpiko na maloba ya botɛmɛli motindo wana ya basumuki oyo bazali bongo kotɛmɛla matomba na bango moko, mpo ete bósila makasi te mpe bólɛmba te na milimo na bino.” (Baebele 12:3) Ya solo, soki mokolo na mokolo bazali kotɛmɛla to kosɛka biso, yango elɛmbisaka mpenza. Kobunda etumba ntango nyonso mpo na koboya makambo ya mokili oyo ezali kobenda biso to koboya kolanda maloba ya bandeko na biso oyo bazali kolendisa biso tósala “ata eloko moko mpo na avenire na biso” ekoki kozala mpasi. Kasi, lokola Yesu, mokano na biso ezali ya kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso, na elikya ete Yehova akosunga biso.—Matai 6:33; Baloma 15:13; 1 Bakolinti 2:4.
18. Liteya nini tokoki kozwa na maloba oyo Yesu alobaki na Petelo?
18 Yesu amonisaki ete alingaki te ata eloko moko elongola likebi na ye na kokokisa mokano ya Yehova ntango abandaki koyebisa bayekoli na ye ete liwa na ye ekómi pene. Petelo alobaki na ye ete ‘azala na boboto’ epai na ye moko mpe abakisaki ete ‘likambo wana ekokómela ye te.’ Yesu aboyaki koyoka maloba oyo ekokaki kolɛmbisa ekateli na ye ya kosala mokano ya Yehova. Apesaki Petelo mokɔngɔ mpe alobaki ete: “Leká nsima na ngai, Satana! Ozali epai na ngai libaku oyo ekweisaka, mpamba te ozali kokanisa, makanisi ya Nzambe te, kasi oyo ya bato.” (Matai 16:21-23) Tiká ete biso mpe tózala na ekateli ya koboya makanisi ya bato mpe tólandaka ntango nyonso makanisi ya Nzambe.
Bokonzi ekomema bolamu ya solosolo
19.Atako Yesu azalaki kosala makamwisi, mosala na ye ya libosoliboso ezalaki nini?
19 Yesu asalaki makamwisi mingi mpo na komonisa ete azali Masiya. Asekwisaki ata bato oyo bakufaki. Ebele ya bato bazalaki kolanda Yesu mpo na makamwisi oyo azalaki kosala, kasi ye ayaki awa na mabelé te kaka mpo na kosalisa bato bázala na bomoi ya malamu. Ayaki kopesa litatoli na ntina etali solo. Ayebaki ete malamu nyonso oyo akokaki kosalela bato ezalaki kaka mpo na mwa ntango moke. Ata bato oyo asekwisaki bakufaki lisusu. Lolenge kaka moko oyo akokaki kosalisa bato mpo bázwa bomoi ya seko ezalaki kotatola na ntina etali solo.—Luka 18:28-30.
20, 21. Ndenge nini baklisto bazalaka na bokatikati na likambo etali kosala misala ya malamu?
20 Lelo oyo, bato mosusu bazali komeka kolanda ndakisa ya Yesu; na ndakisa bazali kotonga balopitalo to kosalisa babola. Ntango mosusu, bato yango bamipesaka mpenza mpo na kosala makambo yango, mpe tokoki kopesa bango longonya mpo na milende na bango; kasi bolamu nyonso oyo bakoki kosala mpo na bato, ezali kaka mpo na mwa ntango mokuse. Kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekomemela bato bolamu ya libela. Yango wana, na ndakisa ya Yesu, Batatoli ya Yehova bamipesaka libosoliboso na kopesa litatoli na ntina etali solo ya Bokonzi yango.
21 Kasi, baklisto ya solo basalaka mpe misala ya malamu. Paulo akomaki boye: “Wana tozali na ntango oyo ebongi mpo na yango, tiká tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza epai ya baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.” (Bagalatia 6:10) Na ntango mpasi ekɔti na mboka moko to ntango moto moko azali kokelela, tokakatanaka te ‘kosala oyo ezali malamu’ mpo na bazalani na biso to bandeko na biso baklisto. Atako bongo, totyaka makanisi na biso mingimingi na kopesa litatoli na ntina etali solo.
Tózwa liteya na ndakisa ya Yesu
22. Mpo na nini baklisto basakolaka epai ya bazalani na bango?
22 Paulo akomaki boye: “Mawa na ngai soki nasakoli te nsango malamu!” (1 Bakolinti 9:16) Paulo azalaki kotalela mosala ya kosakola nsango malamu bongobongo te mpamba te ayebaki ete yango nde esengelaki kopesa ye moko ná bato oyo bazalaki koyoka ye bomoi. (1 Timote 4:16) Biso mpe totalelaka mosala ya kosakola ndenge wana. Tozalaka na mposa ya kosalisa bazalani na biso. Tomonisaka ete tolingaka Yehova. Tomonisaka ete tolingaka Yesu mpe tozali na botɔndi mpo na bolingo na ye monene epai na biso. Yango wana, tosakolaka nsango malamu mpe na ndenge yango, tosalelaka bomoi na biso mpo na kokokisa “bamposa ya bato lisusu te, kasi na mokano ya Nzambe.”—1 Petelo 4:1, 2.
23, 24. (a) Liteya nini tozwi na likamwisi ya bambisi? (b) Banani bazali kopesa litatoli malamumalamu lelo oyo?
23 Na ndakisa ya Yesu, ata soki bazali kosɛka biso to bazali koboya nsango na biso, totikaka te ete yango elongola likebi na biso na mosala wana. Tozwaka liteya na likamwisi oyo Yesu asalaki ntango abengaki Petelo ná Andele bálanda ye. Toyebi ete soki totosi Yesu mpe tobwaki minyama na biso ya elilingi ata na bisika oyo ezali komonana lokola mbisi ezali te, mosala na biso ekoki kobota mbuma. Baklisto mingi babuki mbuma ya malamu nsima ya kosakola bambula ebele na bisika oyo ezalaki komonana lokola mbuma ekobotama te. Bamosusu bakendaki na bisika oyo mosala ya kosakola ezali kobota mbuma mingi mpe babuki mbuma ya malamu. Ata soki tozali kosala wapi, tosengeli kotika te kobwaka minyama na biso. Toyebi ete Yesu alobi naino te ete mosala ya kosakola esuki ata na mboka moko na mokili.—Matai 24:14.
24 Lelo oyo, Batatoli ya Yehova koleka milio 6 bazali kosakola na mikili koleka 230. Lapolo ya mosala ya kosakola mpo na mobu 2004 ekobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali 2005. Lapolo yango ekomonisa ete Yehova azali mpenza kopambola mosala ya kosakola. Liboso ebongiseli ya makambo oyo esuka, na mwa ntango oyo etikali, tókoba kolanda elendiseli ya ntoma Paulo ete: “Sakolá liloba, salá yango na molende.” (2 Timote 4:2) Tiká tókoba kopesa litatoli malamumalamu tii ntango Yehova akoloba ete mosala esili.
Kobanda mbula oyo, lapolo ya mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba ekobima lisusu na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali te. Ekobanda kobima nde na nimero ya 1 Febwali.
Okoki kopesa eyano?
• Ndenge nini tokoki kolanda formasyo oyo Yesu apesaki bayekoli na ye?
• Ndenge nini Yesu azalaki kotalela bato oyo azalaki kosakwela nsango malamu?
• Nini etindaka biso tópesa litatoli malamumalamu?
• Na ndakisa ya Yesu, nini ekosalisa biso tótya makanisi na biso na kosala mokano ya Nzambe?
[Elilingi na lokasa 15]
Na ndakisa ya Yesu, tokosala mosala malamu soki tozali komibanzabanza mpo na bato
[Elilingi na lokasa 16]
Yesu ayaki awa na mabelé libosoliboso mpo na kopesa litatoli na ntina etali solo
[Bililingi na lokasa 17]
Batatoli ya Yehova batyaka makanisi na bango na kopesa litatoli malamumalamu