-
Boboto—Ezaleli ya ntina na miso ya NzambeLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2012 | Sanza ya 9 1
-
-
Boboto ezali ezaleli oyo Nzambe atyá na kati ya moto, mpe ezaleli yango ezali na motuya mingi na miso na ye; yango wana ebongi mpenza ete Nzambe asɛnga biso ‘tózalaka na boboto na kati na biso.’ (Baefese 4:32) Biblia epesi biso mpe toli oyo: “Bóbosana te ezaleli ya koyamba bapaya,” na maloba mosusu komonisela bapaya boboto.—Baebre 13:2.
-
-
Boboto—Ezaleli ya ntina na miso ya NzambeLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2012 | Sanza ya 9 1
-
-
Likambo ya ntina, nsima ya kolobela ntina ya komonisela bapaya boboto, ntoma Paulo abakisi boye: “Mpo na nzela na yango bamosusu, bayambaki baanzelu, kasi bayebaki te.” Kanisá ndenge olingaki komiyoka soki bapesaki yo libaku ya koyamba baanzelu! Kasi, Paulo abakisi ete “bayebaki te.” Na maloba mosusu, alingaki komonisa ete soki tozali na momeseno ya komonisela basusu boboto, ata mpe bapaya to bato oyo toyebi malamu te, tokozwela yango matomba na ndenge oyo tozali kokanisa te.
Babiblia mingi oyo ezali na ndimbola ya maloba mosusu na nse ya lokasa eyokanisi maloba ya Paulo na lisolo ya Abrahama mpe ya Lota oyo ezali na Ebandeli mokapo 18 mpe 19. Na masolo yango nyonso mibale, tozali kotánga ete baanzelu bayaki epai na bango lokola bapaya mpe bamemelaki bango nsango moko ya ntina mingi. Na lisolo ya Abrahama, nsango yango etalelaki kokokisama ya elaka oyo Nzambe apesaki ye ete akobota mwana mobali, mpe mpo na Lota, nsango yango elobelaki kobebisama ya engumba Sodoma mpe Gomora oyo elingaki kosalema mosika te mpe ndenge oyo alingaki kobika na likama yango.—Ebandeli 18:1-10; 19:1-3, 15-17.
Soki otángi bavɛrsɛ oyo ezali awa likoló, okomona ete ezala Abrahama to Lota, bango nyonso bamonisaki boboto epai ya bato oyo bazalaki baleki-nzela, oyo bango bayebaki te. Toboyi te, na ntango ya kala, koyamba bapaya, bázala bato ya mibembo to baleki-nzela—bázala baninga to bato ya libota, to bato oyo toyebi te—ezalaki momeseno mpe mokumba ya moto nyonso. Kutu, Mibeko ya Moize esɛngaki ete Bayisraele bákokisaka bamposa ya bapaya oyo bazalaki na ekoló na bango. (Kolimbola Mibeko 10:17-19) Atako koyamba bapaya ezalaki momeseno na ntango wana, Abrahama ná Lota basalaki koleka oyo mibeko eyaki kosɛnga na nsima. Basalaki milende mpenza mpo na komonisa boboto epai ya bapaya mpe bapambolamaki mpo na yango.
Boboto oyo Abrahama amonisaki ememaki mapamboli ebele
Boboto oyo Abrahama amonisaki ememelaki ye mapamboli mpo abotaki mwana mobali; ememelaki mpe biso matomba. Na ndenge nini? Abrahama ná mwana na ye Yisaka bakokisaki mokumba moko ya ntina na kokokisama ya mokano ya Nzambe. Bazalaki bato ya liboso na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu Masiya. Mpe bosembo na bango emonisaki ndenge oyo Nzambe akopesa lobiko epai ya bato mpo na bolingo mpe boboto na ye monene.—Ebandeli 22:1-18; Matai 1:1, 2; Yoane 3:16.
-