Tosalela malamu bonsomi na biso ya boklisto
“Bozala lokola bato na bonsomi, kobateláká bonsomi na bino . . . lokola baombo na Nzambe.”—1 PETELO 2:16.
1. Bonsomi nini Adam abungisaki, mpe bonsomi nini Jéhovah akozongisela bato?
NTANGO baboti na biso ya yambo basalaki lisumu, kati na elenge ya Edene, babungisaki libula moko kitoko mpo na bana na bango, bonsomi oyo eleki nyonso: bazwaki lisumu mpe libebi. Na ntina yango, biso banso tobotami baombo ya libebi mpe ya liwa. Kasi na esengo, Jéhovah azali kokana kopesa epai na bato ya sembo bonsomi moko ya kitoko koleka. Lelo oyo, bato na motema sembo bazali kozela na motema likoló “komonana na bana na Nzambe,” na nzela na yango ‘bakosikolama na boombo na libebi kino bonsomi na nkembo na bana na Nzambe.’—Baloma 8:19-21.
‘Bapakolami mpo na kosakola’
2, 3. (a) Banani bazali “bana na Nzambe?” (b) Etelemelo nini kitoko bazali na yango, mpe ezali bongo komema mokumba nini?
2 Banani bazali “bana na Nzambe”? Ezali bandeko na Yesu bapakolami na elimo, baoyo bakoyangela elongo na ye kati na Bokonzi ya likoló. Bamonanaki na ekeke ya liboso ya ntango na biso. Bandimaki solo ya kosikola oyo Yesu ateyaki, mpe, kobanda na Pantekote ya mobu 33, basanganaki na mabaku kitoko oyo Petelo alobelaki ntango akomelaki bango ete: “Kasi bino, bozali ‘libota lipɔnami, bonganga na bokonzi, libota mosantu, bato balakami mpo na kozala libota na Nzambe.’”—1 Petelo 2:9a; Yoane 8:32.
3 Kozala mpo na Nzambe libota liponami, oyo nde lipamboli kitoko! Mpe, na ntango na biso, batikali na bana yango na Nzambe bapakolami na elimo bazali na etelemelo motindo moko liboso na Nzambe. Kasi libaku kitoko litombwani lokola oyo lizali komema mikumba Petelo alobelaki moko kati na yango ntango abakisaki ete: “‘Mpo ete bosakola bizaleli malamu’ na ye oyo abyangi bino longwa na molili mpo na kokɔta na pole na ye monene.”—1 Petelo 2:9b.
4. Lolenge nini baklisto bapakolami bakokisaki mokumba oyo bonsomi na bango ya baklisto ememeli bango?
4 Baklisto bapakolami bakokisaki mokumba wana: kosakola bizaleli malamu na Nzambe? Ee. Kolobaka na lolenge ya esakweli mpo na bapakolami kobanda na 1919, Yisaya alobaki ete: “Elimo na Jéhovah ezali likoló na ngai mpo ete Jéhovah apakoli ngai mpo na kosakola nsango malamu epai na basokemi, atindi ngai kobongisa batutami na motema; kosakola ekangweli epai na bakangami mpe kozipolama na ekangelo epai na baoyo bakangami; kosakola mbula na boboto na Jéhovah, mokolo na kobukanisa na Nzambe na biso.” (Yisaya 61:1, 2) Lelo oyo, batikali bapakolami, bazali kolanda ndakisa na Yesu oyo akokisaki liboso maloba wana, bazali kosakola na molende nsango malamu ya bonsomi.—Matai 4:23-25; Luka 4:14-21.
5, 6. (a) Litomba nini ezwami na mosala ya kosakola na molende oyo baklisto bapakolami bazali kosala? (b) Matomba nini kitoko mpe mikumba nini ebele monene bazali na yango?
5 Na lisalisi ya kosakolama wana ya molende, ebele monene ya bampate mosusu ebimi kati na mokili na mikolo oyo ya nsuka. Bato yango babimi kati na mikili nyonso mpo na kosalela Jéhovah elongo na bapakolami, bango mpe solo esikoli bango. (Zakari 8:23; Yoane 10:16) Lokola Abalayama bango mpe batangami bayengebene na nzela na kondima mpe bazali na boyokani ya penepene elongo na Jéhovah Nzambe. Mpe motindo moko na Rahabe, likambo ya kotangama bayengebene epesi bango likoki ya kobika—mpo na bango, kobika na Armagedon. (Yakobo 2:23-25; Emoniseli 16:14, 16) Kasi mabaku minene boye masengaka mpe mokumba ya koloba epai na bazalani na ntina na nkembo na Nzambe. Tala ntina Yoane amonaki bango kokumisa Jéhovah polele, “bangangi na mongongo makasi, kolobaka ete: ‘Lobiko na Nzambe na biso oyo afandi na kiti na bokonzi, mpe na Mwana na mpate.’”—Emoniseli 7:9, 10, 14.
6 Mobu moleki, ebele monene, oyo sikawa baleki milió minei, elongo na etuluku moke na batikali ya baklisto bapakolami, balekisaki pene na ngonga miliare moko mpo na kosakola bizaleli malamu na Jéhovah. Basalelaki bonsomi na bango ya elimo na lolenge eleki malamu.
“Bokumisa mokonzi”
7, 8. Bonsomi na boklisto epesi biso mokumba nini liboso na mikonzi ya mokili, mpe na ntina yango, ezaleli nini mabe tosengeli kozala na yango te?
7 Bonsomi na biso ya boklisto ezali komema mikumba mosusu. Petelo ayebisaki mwa ndambo na yango ntango akomaki ete: “Bokumisa bato nyonso, bolinga bandeko; bobanga Nzambe, bokumisa mokonzi.” (1 Petelo 2:17) Liloba “bokumisa mokonzi” elimboli nini?
8 “Mokonzi” ezali komonisa mikonzi ya mokili oyo. Lelo kati na mokili elimo ya kozanga limemya mpo na bokonzi ezali komonana mingi mpe yango ekoki kobebisa baklisto. Ekoki kozala ete moklisto moko azali komituna soki mpo na nini asengeli kokumisa “mokonzi,” mpo ete “mokili mobimba mozali na nse na nguya na ye oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Na yango, akoki kokanisa ete azali na lotomo ya koboya kotosa mibeko oyo mizali kotungisa ye mpe kofuta te mpako mosusu, soki nde akoki kosala yango kozanga ete azwa etumbu. Kasi yango ekozala na boyokani te na etinda ya sikisiki oyo Yesu apesaki, na ‘kopesa biloko na Kaisala epai na Kaisala, kasi biloko na Nzambe epai na Nzambe.’ Mpo na koloba malamu ekozala ‘kosalela bonsomi na yo lokola ezipeli mpo na makambo mabe.’—Matai 22:21; 1 Petelo 2:16.
9. Tanga bantina mibale mpo na yango tosengeli kozala na botosi epai na mikonzi ya mokili oyo.
9 Baklisto bazali na mokumba ya kokumisa mikonzi mpe kotosa bango, ata soki botosi yango ezali na ndelo. (Misala 5:29) Mpo na nini? Na 1 Petelo 2:14, 15, Petelo apesi bantina misato ntango alobi ete bayangeli “batindami na [Nzambe] mpo na kopesa bitumbu epai na basali na mabe, kasi mpo na kokumisa baoyo bakosalaka malamu.” Kobanga etumbu ezali ntina ekoki mpo na kotosa mokonzi. Oyo nde nsoni mpo na Témoin de Jéhovah na kofuta lomande to na kokangama mpo ete abeti moto, mpo na moyibi to mpo na mabe mosusu! Kanisa na esengo oyo basusu bakozwa na koyebisaka likambo motindo wana. Epai mosusu, lokola lokumu na biso ya bato na botosi na mibeko ezali kobakisama, tozali kozwa makumisi ya bakonzi malamu na leta. Likoki lizali ete tozwa lisusu bonsomi koleka mpo na kokokisa mosala na biso ya kosakola nsango malamu. Lisusu, na ‘kosalaka malamu tozali kosukisa bozoba ya bato bazangi mayele.’ (1 Petelo 2:15b) Tala ntina ya mibale mpo na kotosa mikonzi.—Baloma 13:3.
10. Ntina nini eleki monene mpo na yango tosengeli kotosa mikonzi ya mokili oyo?
10 Kasi ezali na ntina mosusu ya monene koleka. Mikonzi bazali mpo ete Jéhovah atiki nzela mpo na yango. Lokola Petelo alobi yango, mikonzi na politike “batindami na” Jéhovah, mpe ezali “mokano na Nzambe” ete baklisto batosa bango. (1 Petelo 2:15a) Motindo moko, ntóma Paul alobi ete mikonzi “oyo bazali, batelemi bamoko liboso na basusu mpo na ndingisa na Nzambe.” Na ntina yango, lisosoli na biso oyo liteyami na Makomami lizali kopusa biso na kotosa mikonzi. Soki toboyi kotosa bango, ekomonana ete ‘totemeli ebongiseli na Nzambe.’ (Baloma 13:1, 2, 5) Nani kati na biso akolinga kotemela na nkó ebongiseli na Nzambe? Mbele ekozala mpenza kosalela na lolenge moko mabe bonsomi ya boklisto!
‘Tolinga bandeko’
11, 12. (a) Bonsomi na biso ya boklisto epesi biso mokumba nini liboso ya bandeko na biso oyo tozali na bango kondima moko? (b) Banani babongi mpenza ete tomonisela bango bolingo mpe limemya na biso, mpe mpo na nini?
11 Petelo alobaki lisusu ete moklisto asengeli ‘kolinga libota mobimba ya bandeko.’ (1 Petelo 2:17) Tala mokumba mosusu oyo euti na bonsomi ya boklisto. Mingi kati na biso bazali basangani ya lisangá moko. Mpe biso banso, tozali kati na libota, to lisangá, ya mokili mobimba ya bandeko. Na komonisaka bolingo epai na bango, tozali kosalela na lolenge ya mayele bonsomi na biso.—Yoane 15:12, 13.
12 Ntóma Paulo alobelaki sikisiki etuluku moko ya baklisto oyo babongi mpenza ete tolinga bango. Alobaki ete: “Botosa bango bakokambaka bino mpe bomisokisa liboso na bango. Mpamba te bazali kokengelaka milimo na bino lokola bato oyo bakozongisa monoko na ntina na makambo na bango. Tika ete basala mosala na esengo kasi na mawa te mpo ete yango ekosungaka bino te.” (Baebele 13:17) Ezali bankulutu nde bazali na motó ya lisangá. Ya solo, mibali yango bazali bato na kokoka te. Kasi, baponami na botambwisi ya Collège central. Bazali kopesa ndakisa mpe bazali na bolingo; lisusu, baponami mpo na kosenzela likoló na milimo na biso. Oyo nde mokumba monene! (Baebele 13:7) Na esengo nyonso, masangá mingi mazali na elimo malamu ya boyokani, mpe ezali esengo mpo na bankulutu na kosala elongo na yango. Mokumba ezali kokoma kilo ntango basangani balingi kosala na boyokani te. Atako bongo nkulutu akosala mosala na ye, kasi, lokola Paulo alobi yango, akosala yango na “mawa.” Ya solo, tolingi te ete bankulutu batungisama na ntina na biso! Tolingi ete bazala na esengo kati na mosala na bango mpo ete bakoka kolendisa biso.
13. Wapi mwa makambo oyo tokoki kosala na boyokani elongo na bankulutu?
13 Wapi mwa bamoko na makambo oyo tokoki kosala na boyokani elongo na bankulutu? Ya liboso, na kopesaka maboko mpo na kobongisa mpe kopetola Salle du Royaume. Ya mibale na kosalaka na bomoko kati na mosala ya kotala bandeko oyo bazali kobela mpe na kosalisaka bibosono. Lisusu, tokoki kosala molende na kotikala makasi kati na elimo mpo ete tokoma bozito te. Likambo moko monene oyo tosengeli kosala na boyokani ezali ya kobatela bopeto ya elimo na lisangá, ekosalema na etamboli na biso mpe na koyebisaka masumu minene oyo biso tomoni.
14. Lolenge nini tosengeli komemya meko na kopesa bitumbu oyo bikamatami na bankulutu?
14 Mbala mosusu, mpo na kobatela bopeto ya lisangá, bankulutu basengeli kobimisa mosumuki moko oyo aboyi kobongola motema. (1 Bakolinti 5:1-5) Meko wana ezali kobatela lisangá. Ekoki mpe lisusu kosalisa mosumuki. Mbala mingi, etumbu wana ezali kosalisa mosumuki na kozongela makanisi malamu. Kasi, ezali boni, soki mobimisami na lisangá azali moninga ya motema to mosangani ya libota na biso? Toloba ete azali tata na biso, mama na biso, mwana na biso ya mobali to mwana na biso ya mwasi. Tokotosa atako bongo meko ekamatami na bankulutu? Ya solo, yango ekoki kozala mpasi. Kasi tokobebisa bonsomi na biso soki totelemeli ekateli ya bankulutu mpe soki tozali kolanda kozala na boyokani ya elimo elongo na moto oyo ayebani ete azali na bopusi mabe kati na lisangá! (2 Yoane 10, 11) Lokola lisangá, basaleli na Nzambe babongi kozwa lokumu mpo na lolenge oyo bazali kosala na boyokani kati na likambo wana. Na ntina yango, lisangá na Jéhovah lizali kotikala peto kati na mokili oyo ya mbindo.—Yakobo 1:27.
15. Soki moto moko asali lisumu monene, eloko nini asengeli kosala nokinoki?
15 Tokosala nini soki tosali lisumu moko monene? Mokonzi David alobaki na maloba oyo mpo na baoyo bazali na ngolu na Jéhovah. “Nani akobuta na ngomba na Jéhovah? Nani mpe akotelema na esika na ye na bulɛɛ? Bobele ye oyo azali na maboko [masali] mabe te mpe motema pɛto, oyo aboyi kopesa molimo na Ye epai na lokuta, mpe oyo akati ndai na lokuta te.” (Nzembo 24:3, 4) Soki, mpo na ntina moko, tozali lisusu na “maboko mazangi ekweli te mpe motema na pɛɔto te,” tosengeli kozwa ekateli kozanga koumela. Bomoi na biso ya seko ezali na likama.
16, 17. Mpo na nini ye oyo asali masumu minene asengeli komeka te kobungisa likambo yango ye moko?
16 Basusu bazali komeka kobomba masumu minene, na kokanisaka mbala mosusu na lolenge oyo: ‘Nayambolaki lisumu na ngai liboso na Jéhovah mpe nasili kobongola motema. Na bongo mpo na nini koloba yango epai na bankulutu?’ Ekoki kozala ete mosumuki azali koyoka nsoni to azali kobanga mpo na oyo bankulutu bakoki kosala. Nzokande asengeli komikundola likambo moko: atako ezali bobele Jéhovah nde akoki kopetola biso na lisumu, nzokande abongisaki ete bankulutu bazala babateli na bopeto ya lisangá. (Nzembo 51:2) Bazali wana mpo na kobikisa, mpo na “kobongisa babulami.” (Baefese 4:12) Koboya kokende kokutana na bango ntango tozali na mposa ya lisalisi na elimo, ezali lokola koboya kokende kokutana na monganga ntango tozali na bokono.
17 Basusu, oyo bazali komeka kobongisa likambo bango moko, bazali komona ete, basanza to bambula mingi na nsima, lisosoli na bango lizali se kotungisa bango makasi ntango nyonso. Likambo na mawa monene, bamoko kati na baoyo bazali kobomba lisumu monene bazali kokwea kati na lisumu mbala ya mibale mpe ata mbala ya misato. Ntango makambo makoya koyebana epai na bankulutu, ekomonana ete lisumu yango lisili kozongelama mbala mingi. Ebongi malamu kolanda toli na Yakobo. Akomaki ete: “Moko na bino abeli malali? Tika ete abyanga mikolo na lingomba babondela mpo na ye, esili bango kopakwela ye mafuta na nkombo na Jéhovah.” (Yakobo 5:14) Ezali na ntango moko mpo na kobikisa: tosalela yango mpo na kokende kokutana na bankulutu. Soki tozeli mingi, motema na biso ekoki kokoma makasi na kotambolaka kati na masumu.—Mosakoli 3:3; Yisaya 32:1, 2.
Molato mpe konyolisa nzoto
18, 19. Mpo na nini sángo moko alobaki malamu na ntina na ba Témoins de Jéhovah?
18 Ekoki sikawa mibu mitano, sángo moko ya ltalie alobaki na esengo nyonso na ntina na ba Témoins de Jéhovah, kati na zulunalo moko ya lingomba.a Alobaki ete: “Ngai mpenza, nalingaka ba Témoins de Jéhovah; nandimi yango na motema moko . . . Baoyo nayebi bazali na bizaleli malamu koleka, bazali koloba na bopolo . . . [mpe] bazali na elobeli ya kondimisa. Ntango nini tokoyeba ete solo esengeli kolakisama na lolenge ete endimama? Ete baoyo bazali kosakola solo basengeli kozala bato na kokakatana te, na nsolo na nzoto te, na nsuki mobulumobulu te mpe na molato ya bongo na bongo te?”
19 Na kotalela maloba oyo, kati na makambo masepelisaki sángo, tokotanga lolenge oyo Batemwe bazali kolata mpe bazali koloba epai na bato. Ezali polele ete, baoyo akutanaki na bango bayokaki batoli ya “moombo na sembo mpe na mayele” na boumeli ya mibu mileki. (Matai 24:45) Biblia elobi ete basi basengeli kolata molato ‘mobongisami malamu mpe na bopolo.’ (1 Timote 2:9) Na ntango na biso oyo ya mabe, toli wana ezali mpe na ntina mpo na mibali. Ezali likambo ya mayele ete bamonisi na Bokonzi na Nzambe bazala na molato mobongi, wana ezali bango koloba epai na bato.
20. Mpo na nini moklisto asengeli kosenzela ntango nyonso na lolenge oyo azali kolata?
20 Basusu bandimi likambo oyo ete mpo na makita mpe kati na mosala ya kosakola basengeli kosenzela na molato na bango, kasi mpo na bantango mosusu bakokanisaka ete mitinda na Biblia mizali kotalelama te. Nzokande, ezali ata na ntango moko oyo tokoki kotika naino pembeni mokumba na biso ya bamonisi ya Bokonzi na Nzambe? Ya solo, makambo makoki kokesena. Ntango tozali kopesa maboko na botongi ya Salle du Royaume, tokolata lolenge moko te lokola ntango tozali koyangana na likita moko kati na Salle du Royaume yango. Na ntango ya kominanola, tolataka bilamba ya kilo mingi te. Kasi mbala nyonso oyo bato mosusu bazali komona biso, molato na biso esengeli kozala ete ebongisami malamu mpe ya bopolo.
21, 22. Ndenge nini tobatelami na kominanola to konyolisa nzoto, oyo ezali kobimisa makama, mpe lolenge nini tosengeli kotalela batoli na ntina na likambo yango?
21 Kominanola to konyolisa nzoto ezali likambo mosusu oyo ebongi kokanisa na yango mingi. Bato nyonso, mpe mingi mpenza bilenge, bazali na mposa ya kominanola. Ezali lisumu te to kobebisa ntango te mpo na kokana kominanola kati na libota. Ata Yesu abyangaki bayekoli na ye na ‘kopema moke.’ (Malako 6:31) Kasi tokeba ete kominanola to konyolisa nzoto emema libebi na elimo te. Tozali kobika kati na mokili oyo masano mazali kokumisa pite, mobulu makasi, nsomo mpe misala ya bilimu mabe. (2 Timote 3:3; Emoniseli 22:15) Moombo na sembo mpe na mayele azali na bokengi mpo na makama yango mpe azali kokebisa biso mbala na mbala. Tokanisaka ete bokundoli wana ezali konyata bonsomi na biso? To tozali na botondi na lisangá ya Jéhovah mpo ezali komibanzabanza mpenza na ntina na biso mpo na kokebisa biso na ntina na makama wana?—Nzembo 19:7; 119:95.
22 Tobosana yango te, atako bonsomi na biso euti na Jéhovah, tokozongisa monoko epai na ye likoló na lolenge oyo tozali kosalela yango. Soki toboyi kolanda batoli kitoko mpe ete tokamati bikateli mabe, tokoki kopamela moto moko te mpo na yango. Ntóma Paulo alobi ete: “Moto na moto [kati] na biso akotanga makambo na ye mpenza liboso na Nzambe.”—Baloma 14:12; Baebele 4:13.
Tozela bonsomi ya bana na Nzambe
23. (a) Mapamboli nini mauti na bonsomi tozali na yango uta sikawa? (b) mapamboli nini tozali kozela na motema likoló?
23 Tozali mpenza libota lipambolami. Tozali baombo ya mangomba ya lokuta te mpe ya biyambayamba te. Na lisalisi ya mbeka na lisiko, tokoki kobelema pene na Jéhovah na lisosoli moko lipetolami, mpo ete kati na elimo tozali baombo ya lisumu te mpe ya liwa te. Mosika te ntango ya “komonana na bana na Nzambe” ekokoka. Na Armagedon, bandeko na Yesu kati na nkembo na bango bakomonisama epai na bato kati na mokumba na bango ya babomi na banguna na Jéhovah. (Baloma 8:19; 2 Batesaloniki 1:6-8; Emoniseli 2:26, 27) Na nsima bana wana ya Nzambe bakomonisama lokola nzela oyo mapamboli makosopama longwa na kiti na Bokonzi na Nzambe kino epai na bato. (Emoniseli 22:1-5) Na nsuka na yango, komonana wana ya bana na Nzambe ekopesa lipamboli epai na bato na sembo: bikozala na bonsomi na nkembo ya bana na Nzambe. Tozali na motema mɔ́tɔ ete ntango yango eya noki? Na bongo, tosalela bonsomi na biso na boklisto na mayele. Tosalela Nzambe lokola baombo uta sikawa, mpe tokosepela na bonsomi wana kitoko mpo na libela.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nsima na koloba makumisi oyo, sángo abongolaki maloba na ye, ekoki kozala mpo na bopusi ya bato.
Bozongeli
◻ Motindo nini bapakolami mpe bampate mosusu bazali kokumisa Jéhovah?
◻ Mpo na nini baklisto basengeli kokumisa bakonzi ya mokili oyo?
◻ Lolenge nini moklisto akoki kosala na boyokani elongo na bankulutu?
◻ Mpo na oyo etali molato, mpo na nini ba Témoins de Jéhovah bakeseni na bato mingi?
◻ Mpo na oyo etali kominanola to konyolisa nzoto, na likambo nini tosengeli kokeba?
[Elilingi na lokasa 17]
Bankulutu babongi mpenza ete tomonisela bango bolingo mpe kosala na boyokani elongo na bango
[Bililingi na lokasa 18]
Moklisto asengeli kozala na molato mobongisami malamu, ya bopolo mpe mokoki na likambo na likambo