Kondima mpe mayele ezali na ntina mingi mpo na biso
Ndimbola ya makambo na ntina na mokanda na Yakobo
BASALELI na jéhovah bazali na mposa ya mpiko wana ezali bango kokutana na mimekano. Basengeli mpe komibatela mpo ete basala masumu te, likambo oyo likosala ete bazanga kondimama na Nzambe. Mokanda na Yakobo mozali komonisa makambo yango makeseni, kasi mpo na kosalela yango, esengeli kozala na kondima makasi mpe na mayele mauti na likoló.
Mokomi ya mokanda oyo amimonisi te lokola moko na bantoma na Yesu oyo ebéngamaki Yakobo, kasi lokola “moombo na Nzambe mpe na Nkolo Yesu Klisko.” Lolenge mpe Yuda. ndeko na Yesu, amilobaki ete azali “moombo na Yesu Klisko, kasi ndeko na Yakobo.” (Yakobo 1:1; Yuda 1; Matai 10:2, 3) Emonani bongo mpenza ete ezali ndeko na Yesu oyo na nkombo Yakobo nde akomaki mokanda oyo mazali na nkombo na ye.—Malako 6:3.
Mokanda yango molobeli te kobebisama oyo esalemaki na Yelusaleme na mobu 70, mpe mokomi ya makambo na kala, josèphe alobi ete Yakobo abomamaki mwa moke nsima na liwa ya guvernere Moromé, Festus, pene na mobu 62. Mokanda na Yakobo mokomamaki bongo li- boso na mobu oyo. Etindamaki epai na “mabota zomi na mibale” ya Yisraele ya elimo, mpamba te ekomamaki na ntina na baoyo bazali na “kondima epai na Nkolo na biso, Yesu Klisto.”—Yakobo 1:1; 2:1; Bagalatia 6:16.
Mpo ete kokanga batoli oyo kozanga nkaká, Yakobo asalelaki masese to bilakiseli. Na ndakisa amonisi biso ete moto oyo azali kosɛnga mayele epai na Nzambe asengeli kobɛta ntembe te, “mpo ete ye oyo akobetaka ntembe azali lokola mbongé na mai mapusami na mopepe mpe makoningana epai na épai.” (1:5-8) Tosengeli kobatela lolemo na biso, mpo ete yango ezali kotambwisa biso, lokola yenda ekokamba masuwa (3:1, 4) Mpe wana tozali kokutana na mimekamo, tosengeli koyika mpiko mpe kozala na motema molai lokola moloni na bilanga oyo akozelaka ete mbuma ebota.—5:7, 8.
Kondima, mimekamo, misala
Ya liboso, Yakobo alimboli ete baklisto bakoki kozala na esengo atako bakutani na mimekamo (1:1-18) Bamoko na mimekamo yango, lokola malali, ezali mpo na bato banso, kasi baklisto bazali lisusu konyokwama mpo ete ba- zali baombo na Nzambe mpe na Klisko. jéhovah akopesa biso mayele makoki na biso mpo na koyika mpiko soko tokolanda kosɛnga ye yango na kondima. Akomɛkaka biso te na mabe mpe tokoki kondimisama ete akopesa biso makambo malamu.
Mpo na kozwa lisalisi na Nzambe, esengeli na biso de kopesa ye losambo oyo lozali komonisama na misala malamu oyo mizali kolakisa kondima na biso. (1:19 kino 2:26) Tosengeli bongo komimonisa “batosi na liloba’ nde ’‘bayoki” mpamba te. Esengami na biso ete tosenzela lolemo na biso, ete tosalisa bitike mpe basi-bakufeli-mibali, mpe ete komibatela pɛto na makambo nyonso ya mokili Soko tokokumisa mozwi mpe kotyola mobólá boye tozali kotɛmɛla ‘mobeko na bokonzi” na bolingo. Tosengeli koyeba ete kondima ekomonisamaka na misala lokola emonisami na bandakisa ya Abrahame mpe Rahabe.Ya solo, ‘kondima oyo ezangi misala esili kokufa.’
Mayele na likoló mpe libondeli
Baoyo bazali koteya bazalani na bango bazali na mposa ya kondima mpe mayele mpo ete bakokisa mikumba na bango (3:1-18) Na lolenge na bango ya balakisi bazali na mokumba monene. Lokola bango, tosengeli kosenzela likoló na lolemo na biso, mpe mayele na likoló makosalisa biso na yango.
Mayele ezali lisusu kosalisa biso na kokanga ntina ete, soko tomipesi na makanisi ya mokili. yango ekobebisa boyokani na biso elongo na Nzambe. (4:1 kino 5:12) Soko towelanaki mpo na kozwa matomba na moimi to tolobaki mabe epai na ndeko moko, tosengeli kobongola motema. Ezali na ntina mpo na kokima boninga ya mokili, yango ezali bongo ekobo na elimo. Tosengeli kobosana mokano na Nzambe le likoló na mikano ya mosuni. Tosenzela ete komipesa le na kozala na motema likoló mpe ete toimaima te bamoko mpo na bamosusu.
Moto oyo azali na malali na elimo asengeli koluka lisalisi epai na bankulutu ya lisangá. (5:13-20) Soki moto moko asalaki lisumu amimonisi ete abongoli motema, mabondeli mpe batoli na mayele ya bankulutu ekosa- lisa ye ete azwa lisusu kolɔngɔnɔ na elimo. Solo mpenza “ye oyo akobutwisa moto na masumu longwa na epɛngweli na ye, akobikisa bomoi na ye [moto yango] longwa na liwa [ya elimo oyo ekobikisama lisusu te].”
[Etanda na lokasa 23]
Batósi na liloba: Tosengeli kozala “batosi na liloba, nde bayoki mpamba te.” (Yakobo 1:22-25) Moyoki mpamba ‘’azali lokola moto oyo amitali elongi na ye na talata. Nsima na komitala nokinoki, akei ‘mpe abosani soki azali motindo nini.” kasi ‘motosi na liloba’ akotalelaka malamu mpenza mobeko na kokoka, oyo na Nzambe, mobeko oyo mozali na masengami nyonso ya moklisto. Moto yango ‘akolendendela kati na yango’ na kolandáká kotalela mobeko yango na mokano ya kosala mabongwani masɛngami mpo na kokangama mpenza na yango. (Nzembo 119:16) Kokesena nini ezali kati na ‘motósi oyo azali na misala’ mpe moto oyo azali komitala na talatala nde na nsima, akobosana oyo ye atalaki? ‘Motósi oyo azali na misala’ akosalelaka liloba na Jéhovah mpe akozwaka ngolu na Ye.—Nzembo 19:7-11.