“Batosi na Liloba” na esengo
“Na bopɔlɔ, bóyamba liloba likomami kati na bino, likoki kobikisa milimo na bino. Bózalaka nde batosi na liloba, bobele bayoki mpamba te.”—YAKOBO 1:21, 22.
1. Lolenge nini tosengeli kotalela mokapo na biso ya mobu 1996?
“BÓZALAKA BATOSI NA LILOBA.” Liloba oyo ya pɛtɛɛ ezali na nsango moko ya nguya mpenza. Ezwami kati na “mokanda ya Yakobo” oyo ezali kati na Biblia, mpe ekotyama kati na Bandako ya Bokonzi lokola mokapo ya mobu 1996.
2, 3. Mpo na nini ebongaki ete Yakobo nde akoma mokanda oyo ebéngami na nkombo na ye?
2 Yakobo, ndeko na Nkolo Yesu, azalaki na mokumba monene kati na lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso. Mokolo mosusu, nsima ya lisekwa na ye, Nkolo na biso Yesu abimelaki Yakobo mpe na nsima abimelaki mpe bantoma nyonso. (1 Bakolinti 15:7) Na nsima, wana ntoma Paulo abimisamaki na bolɔ́kɔ na lolenge ya likamwisi, ayebisaki etuluku ya baklisto oyo bayanganaki esika moko ete: “Bóyebisa Yakobo na bandeko makambo oyo.” (Misala 12:17) Emonani ete Yakobo, atako ye mpenza azalaki ntoma te, azalaki kokamba likita ya lisangani ya mikóló-bakambi na Yelusaleme na ntango bantoma mpe bankulutu bazwaki ekateli ete Bapakano oyo babongwanaki basengelaki te kokatama ngɛnga. Yakobo akataki makambo, mpe ekateli oyo elimo santu endimisaki etindamaki na masangá nyonso.—Misala 15:1-29.
3 Na ntembe te, bososoli malamu ya Yakobo epesamelaki motuya mingi. Nzokande, alobaki na komikitisa nyonso ete ye mpenza azalaki bobele “moombo na Nzambe mpe na Nkolo Yesu.” (Yakobo 1:1) Mokanda na ye oyo epemami ezali na batoli mingi ya kitoko mpe koyikisama mpiko mpo na baklisto lelo. Asilisaki kokoma yango bambula minei liboso ete Loma ebundisa Yelusaleme mpo na mbala ya liboso, na nsé ya litambwisi ya Cestius Gallus mokonzi monene ya basodá, nsima wana nsango malamu esilaki kosakolama na mozindo mpenza “epai na bato nyonso na nsé na Likoló.” (Bakolose 1:23) Ezalaki ntango ya mpasi, mpe basaleli ya Yehova bayebaki malamu ete ekateli na Ye ekómaki pene na kokokisama likoló na ekólo ya Bayuda.
4. Nini emonisi ete baklisto ya liboso batyaki elikya makasi kati na Liloba ya Nzambe?
4 Baklisto wana basilaki kozwa Makomami ya Liebele na mobimba na yango mpe eteni monene ya Makomami ya Greke. Lolenge baklisto oyo bakomaki Biblia balobeli mbala mingi makambo oyo mazwami kati na makomi ya kala, emonisi polele ete bazalaki kotya elikya makasi kati na Liloba ya Nzambe. Bobele bongo, biso lelo mpe tosengeli koyekola liloba ya Nzambe kozanga bopɔtu mpe kosalela yango kati na bomoi na biso. Mpo na koyika mpiko, tosengeli kozala makasi na elimo mpe kozala na mpiko oyo Makomami Mosantu mazali kopesa.—Nzembo 119:97; 1 Timoté 4:13.
5. Mpo na nini tozali na mposa ya litambwisi ya sikisiki lelo, mpe tokoki kozwa yango epai wapi?
5 Lelo mokili ekómi pene na komona “bolózi monene oyo esilá naino kobima liboso te uta ebandeli ya mokili kino sikawa, ekobima mpe lisusu te.” (Matai 24:21, NW) Kobika na biso ezali kati na litambwisi ya Nzambe. Lolenge nini tokoki kozwa litambwisi yango? Na kofungoláká mitema na biso ete miyamba mateya oyo mazwami kati na Liloba lipemami na Nzambe. Yango ekokamba biso ete ‘tózalaka batosi na liloba,’ na ndakisa ya basaleli ya sembo ya Nzambe ya ntango ya kala. Tosengeli kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe na etingya mpe kosalela yango mpo na kosanzola Yehova.—2 Timoté 2:15; 3:16, 17.
Tóyika mpiko na esengo nyonso
6. Mpo na nini tosengeli kozwa esengo wana tozali kokutana na komekama?
6 Na ebandeli ya mokanda na ye, Yakobo alobeli esengo, mbuma ya mibale ya elimo ya Nzambe. Akomi ete: “Bandeko na ngai, bókanisa ete ezali bobele esengo wana ekokwea bino kati na komekama na mitindo na mitindo. Boyebi ete komekama na kondima na bino ekoyeisa mpiko. Tiká mpe ete mpiko ekokisa mosala na yango nyɛɛ ete bózala basembwi mpe babongi kozanga eloko te.” (Yakobo 1:2-4; Bagalatia 5:22, 23) Mpo na nini tokoki koloba ete kokutana na komekama mingi ezali “bobele esengo”? Yesu mpe alobaki kati na Lisoló na ye likoló na Ngomba ete: “[Esengo ezali, NW] na bino wana bakotuka bino mpe bakonyokola bino mpe bakolobela bino mabe nyonso mpo na ngai. Bósepela mpe bóyoka esengo zambi libonza na bino ezali monene kati na Likoló.” (Matai 5:11, 12) Esengo monene ezali na komona lolenge Yehova azali kopambola milende na biso wana tozali kosala makasi mpo na kokokisa mokano ya kozwa bomoi ya seko.—Yoane 17:3; 2 Timoté 4:7, 8; Baebele 11:8-10, 26, 35.
7. (a) Lisungi nini tokoki kozwa mpo ete tókoka koyika mpiko? (b) Lokola Yobo, mbano nini biso mpe tokoki kozwa?
7 Yesu ye moko mpe ayikaki mpiko ‘mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye.’ (Baebele 12:1, 2) Biso mpe tokoki koyika mpiko soki totaleli na likebi nyonso ndakisa ya mpiko ya Yesu! Lokola Yakobo amonisi yango na nsuka ya mokanda na ye, Yehova asopaka mapamboli na ye mingi likoló na baoyo babatelaka bosembo na bango. Yakobo alobi ete: “Talá, tolobi ete tobyangi bango bato na esengo baoyo bayiki mpiko bongo. Bosili koyoka mpo na mpiko na Yobo, bosili komona nsuka na makambo na ye epai na [Yehova, NW], zambi [Yehova, NW] atondi na mawa mpe na boboto.” (Yakobo 5:11) Tómikundola mbano oyo Yobo azwaki mpo na bosembo na ye, na kozongisamáká na kolɔngɔ́nɔ́ malamu mpe na kozongisamáká na bomoi ya esengo monene elongo na balingami na ye. Koyika mpiko mpe kobatela bosembo ekoki komemela biso esengo motindo moko kati na Paladiso ya mokili ya sika oyo molakami na Nzambe, ekozala esengo eleki monene ya kosalela Yehova uta sikawa.
Tóluka kozwa mayele
8. Lolenge nini tokoki kozwa mayele ya solo, oyo ekoki kosalisa biso na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, mpe libondeli ekokisaka mokumba nini kati na likambo yango?
8 Boyekoli na biso ya liloba ya Nzambe na etingya, mpe kosalela yango na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, ekopesa biso mayele mauti na Nzambe, kopesáká biso likoki ya koyika mpiko kati na komekama oyo ezali kati na ebongiseli ya Satana oyo ekómi pene ya kokufa. Lolenge nini tokoki kondimisama ete tosili kozwa mayele motindo wana? Yakobo ayebisi biso ete: “Soko moko na bino azangi mayele, alɔmba Nzambe oyo akopesaka na bato nyonso na kopesa malamu, oyo mpe akopamelaka te. Bongo akozwa yango. Kasi alɔmba na kondima, abɛta ntembe te mpo ete ye oyo akobɛta ntembe azali lokola mbóngé na mai kopusama na mopepe mpe kotambola epai na epai.” (Yakobo 1:5, 6) Tosengeli kobondela na etingya nyonso, na elikya oyo ezangi kotengatenga, ete Yehova akoyoka malɔmbo na biso mpe ete akoyanola yango na ntango oyo ye moko asili kobongisa mpe na motindo oyo ye moko aponi kosala yango.
9. Lolenge nini Yakobo alobeli mayele kati na limemya mozindo mpe lolenge nini tokoki kosalela yango?
9 Mayele kati na limemya mozindo ezali likabo liuti na Yehova. Kolobáká na ntina na makabo motindo wana, Yakobo alobi ete: “Makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi makokitaka na nsé longwa na Tata na moi. Ye azali na kobongwana te, akoyeisa ata molili moke mpe te.” Lisusu, kati na mokanda na ye, Yakobo alobelaki matomba ya kozala na mayele ya solosolo: “Nani kati na bino azali moto na mayele mpe na kososola malamu? Tiká ete amonisa misala na ye na bizaleli malamu kati na bopɔlɔ mpe na mayele. . . . Nde mayele mauti na likoló ezali liboso na pɛtɔ, na nsima ezali na kimya na boboto, na kotosa noki, matondi na mawa mpe na mbuma malamu, na ntembe te, na bokosi mpe te.”—Yakobo 1:17; 3:13-17.
10. Lolenge nini mangomba ya lokuta makeseni na lingomba ya solo?
10 Kati na lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta, ezala na mikili oyo emitángaka ete ezali ya boklisto to na mikili misusu, bato ya mangomba bazalaka mingi na momeseno ya koyemba nzembo ya masanzoli, koyoka mabondeli oyo mazongelamaka mbala na mbala, mpe mbala mosusu bayokaka lisukúlu. Elendiseli moko te epesamaka likoló na kosakolama ya nsango oyo epesaka elikya, mpamba te mangomba mingi mpenza mazali na elikya ya solo te mpo na mikolo mizali koya. Ata mpe elikya ya nkembo oyo ezali kati na Bokonzi ya Masiya ya Nzambe elobelamaka soko moke te to basosolaka yango soko moke te. Kati na esakweli moko, Yehova alobaki na ntina na basangani ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba ete: “Zambi bato na ngai basáli masumu mibale, batiki ngai, liziba na mai na bomoi, mpe bamitimoleli mabulu, mabulu matobwani, makosimbaka mai te.” (Yilimia 2:13) Mangomba yango mazali na mai ya solo te. Bazangi mayele mauti na likoló.
11, 12. (a) Lolenge nini mayele mauti na Nzambe masengeli kopusa biso? (b) Mayele mauti na Nzambe mazali kokebisa biso na ntina na likambo nini?
11 Mangomba yango makeseni mpenza na Batatoli ya Yehova lelo! Na lisalisi ya nguya mingi oyo Nzambe azali kopesa bango, Batatoli bazali kotondisa mokili na nsango malamu ya Bokonzi na Ye oyo ezali koya. Mayele oyo balobelaka ezwi moboko na yango makasi kati na Liloba ya Nzambe. (Kokanisá na Masese 1:20; Yisaya 40:29-31.) Ya solo, kati na bomoi na bango ya mokolo na mokolo, basalelaka boyebi mpe mayele wana ya solo na kosakoláká mikano minene ya Nzambe na biso mpe Mozalisi na biso. Mposa na biso esengeli kozala ete biso nyonso kati na lisangá ‘tótonda na boyebi na mokano na [Nzambe], na mayele nyonso mpe na bososoli na [elimo, NW].’ (Bakolose 1:9) Awa moboko motindo oyo ezali kati na bango, ezala bilenge to mpe mikóló bakopusama ntango nyonso ete ‘bázalaka batosi na liloba.’
12 “Mayele mauti na likoló” makebisaka biso na ntina na masumu oyo makoki kosala ete Nzambe aboya biso. Yakobo alobi ete: “Tiká ete moto na moto azala na koyoka noki nde aloba malɛmbɛ; ayoka mpe nkɛlɛ malɛmbɛ lokola. Zambi nkɛlɛ na bato ekosalaka boyengebene na Nzambe te.” Ee, tosengeli kosala nokinoki, na likebi nyonso, mpo na kolanda batoli ya Nzambe mpe mpo na kosalela yango. Nzokande, tosengeli komibatela ete tósalela te “elembo moke,” lolemo na biso, na lolenge mabe. Na nzela ya maloba ya komikumisa, ya kotɔ́nga, to ya komitombola, na elobeli ya elilingi, lolemo ekoki kozikisa ‘zámba monene.’ Na yango, kati na boninga na biso elongo na baninga, tosengeli kokólisa esengo mpe komipekisa.—Yakobo 1:19, 20; 3:5.
13. Mpo na nini ezali na ntina ete tóndima ‘liloba lilonami kati na biso’?
13 Yakobo akomi ete: “Na boye, bólongola makambo nyonso na mbindo mpe litondi na mabe; nde na bopɔlɔ, bóyamba liloba [lilonami, NW] kati na bino, likoki kobikisa milimo na bino.” (Yakobo 1:21) Mokili oyo etondi na ezaleli ya moimi ezali pene na koleka, elongo na ezaleli ya bato na yango ya komitombola, ya koluka komizwela liboso mpenza bango moko biloko ya mosuni, bakisá mpe kobebisama ya bizaleli malamu. “Nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumelaka seko.” (1 Yoane 2:15-17) Na bongo, ezali mpenza na ntina ete tóndima ‘liloba lilonami kati na biso’! Mayele oyo Liloba ya Nzambe ezali kopesa ezali na bokeseni monene na makambo mabe ya mokili oyo ekómi pene na kokufa. Toboyi makambo nyonso wana ya mabe. (1 Petelo 2:1, 2) Esengeli ete kolinga solo mpe ete kondima makasi elonama kati na mitema na biso; na bongo, tokozwa ekateli makasi ete tópɛngwa te longwa na banzela ya sembo ya Yehova. Kasi esengeli kosuka bobele na koyoka Liloba ya Nzambe?
Lolenge oyo tokoki kozala “batosi na liloba”
14. Lolenge nini tokoki kozala “bayoki” mpe “batosi” ya liloba?
14 Tozali kotánga kati na Yakobo 1:22 ete: “Bózalaka nde batosi na liloba, bobele bayoki mpamba te, komizimbisa bino mpenza.” “Bózalaka batosi na liloba”! Oyo ezali nde motó ya likambo emonisami polele kati na mokanda ya Yakobo. Tosengeli koyoka, mpe na nsima kosala “bobele bongo”! (Genese 6:22) Lelo oyo bato mingi bazali komilobela ete ekoki bobele koyoka lisoló moko ya lingomba mpe kosangana kati na lolenge moko ya losambo na ntango libaku limonani, mpe esuki bobele wana. Bakoki kokanisa ete lokola bazali na ‘etamboli malamu’ engebene mibeko na bango moko, yango ekoki bobele bongo. Nzokande, Yesu Klisto alobaki ete: “Soko nani alingi koya nsima na ngai, tiká ete amiboya ye moko mpe atombola [nzeté na ye ya mpasi mpe alanda ngai ntango nyonso, NW].” (Matai 16:24) Makambo oyo mazali komonisa elimo ya komipesa mpe ya bompikiliki wana tozali kolanda ndakisa ya Yesu ya kosala mokano ya Nzambe ezali mpenza na ntina mpo na baklisto ya solo. Mpo na bango, mokano ya Nzambe ezali lelo lolenge moko lokola ezalaki na ekeke ya liboso wana Yesu oyo asekwisamaki alobaki ete: “Boye bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso.” (Matai 28:19) Ozali kosala malamu kati na likambo yango?
15. (a) Elakiseli nini Yakobo apesi, oyo emonisi lolenge tokoki kozala “batosi na liloba” na esengo? (b) Mpo na nini bobele losambo ya momeseno mpamba ekoki te?
15 Soki tolandi ntango nyonso kotalatala Liloba ya Nzambe na likebi nyonso, ekoki kozala lokola talatála oyo ezali komonisa biso lolenge mpenza bomoto na biso ezali. Yakobo alobi ete: “Ye oyo azali kotalatala na Mobeko mobongi, Mobeko na bonsomi, mpe aumeli kotalatala wana, azali moyoki oyo akobosana te kasi akosalaka misala; ye wana akozala na esengo kati na misala na ye.” (Yakobo 1:23-25) Ee, akozala ‘motosi na liloba na esengo.’ Lisusu, ezali na ntina ete tózala “batosi” kati na makambo nyonso matali bomoi na biso ya boklisto. Tosengeli te komikosa na kokanisáká ete bobele losambo ya momeseno mpamba nde ekoki. Yakobo alendisi biso ete tótalela mwa makambo mosusu matali losambo ya solo, oyo ata baklisto ya molende basilaki mbala mosusu kotalela yango na bopɔtu. Akomi ete: “Losambo na pɛtɔ mpe lobongi epai na Nzambe Tata na biso ezali boye: kotalaka bitike mpe basi bakufeli-mibali kati na mpasi na bango mpe komibatela [ete tózwa litɔnɔ te, NW] na makambo na mokili.”—Yakobo 1:27.
16. Ndenge nini Abalayama akómaki “moninga na [Yehova],” mpe lolenge nini biso tokoki kokóma baninga na Ye?
16 Ekoki te bobele koloba ete: ‘Nandimelaka Nzambe,’ mpe kosuka bobele wana. Kati na Yakobo 2:19 totángi ete: “Yo ondimi ete Nzambe azali? Osali malamu, nde [bademó, NW] bandimaka bongo mpe bakolengaka.” Yakobo alobi ete “kondima, soko ezangi misala, esili kokufa kati na yango mpenza,” mpe alobi na ntina na Abalayama ete: “Kondima na ye esalaki mosala esika moko na misala na ye.” (Yakobo 2:17, 20-22) Kati na misala ya Abalayama tokoki kotánga ete: apesaki bandeko na ye lisalisi, amonisaki ezaleli ya koyamba bapaya, andimaki kopesa Yisaka lokola mbeka, mpe ‘ayambolaki polele’ kondima ezangi kotengatenga kati na elaka ya Nzambe etali “mboka oyo ezali na miboko [ya solosolo, NW],” Bokonzi ya Masiya oyo ezali koya. (Genese 14:16; 18:1-5; 22:1-18; Baebele 11:8-10, 13, 14; 13:2) Na lolenge lobongi mpenza, Abalayama “abéngami mpe Moninga na Nzambe.” (Yakobo 2:23) Biso mpe tokoki kobéngama ‘baninga ya Yehova’ awa ezali biso koyambola kondima na biso mpe elikya na biso na molende nyonso na ntina na Bokonzi na ye ya boyengebene oyo ezali koya.
17. (a) Mpo na nini Lahaba “atángamaki moyengebene,” mpe mbano nini azwaki? (b) Biblia etángi nkombo ya banani oyo ‘bazalaki batosi na liloba’? (c) Mbano nini Yobo azwaki, mpe mpo na nini?
17 Baoyo ‘bazali batosi na liloba’ basili mpenza ‘kotángama basembwi mpo na misala, kasi bobele mpo na kondima te.’ (Yakobo 2:24, NW) Lahaba atyaki kondima kati na “liloba” oyo ayokaki na ntina na misala ya nguya ya Yehova. Abombaki banɔ́ngi Bayisalaele mpe asungaki bango ete bákima, mpe na nsima ayanganisaki libota ya tata na ye mpo ete bábikisama. Na ntango ya lisekwa, akozala mpenza na esengo ya koyeba ete kondima na ye, oyo esimbamaki na misala, ememaki kino kokóma nkɔ́kɔ ya Masiya! (Yosua 2:11; 6:25; Matai 1:5) Baebele mokapo 11 epesi bankombo mingi ya basusu oyo ‘bazalaki batosi na liloba’ na komonisáká kondima na bango, mpe bakozwa mapamboli mingi. Tosengeli mpe kobosana Yobo te, oyo ntango azalaki kati na komekama makasi alobaki ete: “Nkombo na [Yehova] esanzolama.” Lokola tomonaki yango liboso, kondima na ye mpe misala na ye ememelaki ye mbano monene. (Yobo 1:21; 31:6; 42:10; Yakobo 5:11) Bobele bongo, molende na biso lelo lokola “batosi na liloba” ekosala ete tósepelisa Yehova.
18, 19. Lolenge nini bandeko oyo banyokwamaki na boumeli ya bambula mingi bamonisaki ete ‘bazalaki batosi na liloba,’ mpe mosala na bango ememaki mapamboli nini?
18 Bandeko na biso ya Mpótó ya Ɛ́sti bazali mpe kati na baoyo bayikaki mpiko na boumeli ya bambula mingi. Lokola bipekiseli mingi bisili sikawa kolongolama, bamonisi ete ‘bazali batosi na liloba’ kati na ezingelo na bango ya sika. Bamisionɛrɛ mpe babongisi-nzela ya bamboka ya pembeni bazali kokende kuna mpo na kopesa mabɔkɔ kati na mosala ya kosakola mpe ya kotya makambo na molɔngɔ́. Filiale ya Finlande mpe bafiliale mosusu ya la Société Watch Tower esili kotinda bandeko oyo bayebi malamu mosala ya botongi, mpe bandeko ya mokili mobimba oyo bazali na elimo ya kokaba bapesaki makabo mpo ete babiro ya bafiliale ya sika mpe Bandako ya Bokonzi ekoka kotongama.—Kokanisá na 2 Bakolinti 8:14, 15.
19 Na molende nyonso, bandeko wana oyo banyokwamaki na boumeli ya bambula mingi bamonisaki botondi na bango na kosanganáká mingi kati na mosala ya kosakola! ‘Bazali kosala makasi mpe bazali komipesa mpenza,’ mpo na kozwa mabaku oyo bazangaki yango na boumeli ya “eleko mabe.” (1 Timoté 4:10; 2 Timoté 4:2, NW) Na ndakisa, na sanza ya Apríli ya mobu 1995, na Albanie, epai kuna epekiseli ezalaki makasi, ebele nyonso ya batrakte Nsango ya Bokonzi oyo ezali na motó ya likambo “Mpo na nini bomoi etondi na mikakatano” oyo etindamaki kuna esilaki kokabolama nyonso na boumeli ya mikolo misato mpamba. Yango ezalaki mosala kitoko mosalemaki na nsima ya Ekaniseli ya Nkolo, oyo bato 3 491 bayanganaki na yango—oyo elekaki bongo motuya ya basakoli ya molende 538.
20. Lapólo ya baoyo bayanganaki na Ekaniseli emonisi nini, mpe lolenge nini mingi na bango bakoki kopesamela lisalisi?
20 Bamboka mosusu mpe ezali kokokisa mokumba monene mpo ete lapólo ya bato oyo bayanganaka na Ekaniseli, na bambula oyo motángo na bango esili kokóla koleka 10 000 000. Na mikili mingi bato ya sika bazali ‘kokóma batosi na liloba’ mpo na elendiseli oyo bazwaki nsima ya koyangana mpe ya komona Ekaniseli. Tokoki kolendisa lisusu mingi bato ya sika mpo ete bákóma baoyo babongi na kozwa libaku wana?
21. Na boyokani na mokapo ya mobu, etamboli nini tosengeli kozala na yango, mpe na mokano nini?
21 Na ndakisa ya baklisto wana ya molende ya ekeke ya liboso, mpe ya baklisto mingi mosusu uta ntango wana, tiká ete tózala na ekateli makasi ya komipesa na ‘kolandáká mokano oyo ezali liboso na biso,’ oyo ya kozwa bomoi ya seko, ezala kati na Bokonzi ya likoló to awa na mabelé oyo ekoyangelama na Bokonzi yango. (Bafilipi 3:12-14, NW) Ebongi ete tósala na makasi nyonso oyo ekoki na biso kosala mpo ete tólonga na mokano yango. Oyo ezali ntango ya kozonga nsima te na kozaláká bobele bayoki mpamba, kasi ezali nde ntango ya ntina mingi mpo na ‘kozala makasi mpe kosala mosala.’ (Hagai 2:4; Baebele 6:11, 12) Nsima na ‘kondima liloba lilonami kati na biso,’ tiká ete ‘tózala batosi na liloba’ yango uta sikawa mpe kino na bomoi ya seko oyo ezali koya.
Okoyanola lolenge nini?
◻ Lolenge nini tokoki koyika mpiko na esengo nyonso?
◻ “Mayele mauti na likoló mazali lolenge nini,” mpe ndenge nini tokoki koluka yango?
◻ Mpo na nini tosengeli ‘kozala batosi na liloba, kasi bayoki mpamba te’?
◻ Balapólo nini esengeli kolendisa biso mpo ete ‘tózalaka batosi na liloba’?
[Elilingi na lokasa 17]
Tiká ete biso mpe tófungola mitema na biso ete miyamba mateya mauti na Nzambe
[Elilingi na lokasa 18]
Yobo azwaki mbano mpo na bosembo na ye, na kozongisamáká na bomoi ya esengo monene elongo na balingami na ye