Ndenge nini komonisa motema mawa?
“Tiká tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza epai ya baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.”—BAGALATIA 6:10.
1, 2. Ndakisa ya Mosamalia ya motema malamu ezali koteya biso nini na ntina na motema mawa?
MOKOLO moko, mobali moko oyo ayebaki mpenza Mibeko atunaki Yesu boye: “Nani mpenza azali mozalani na ngai?” Na eyano na ye, Yesu alobaki ndakisa oyo: “Moto moko azalaki kokita banda na Yelusaleme mpo na kokende na Yeliko mpe akweaki na kati ya babandi, oyo babɔtɔlaki ye nyonso mpe babɛtabɛtaki ye, mpe bakendaki, batikaki ye penepene na liwa. Nzokande, na mbala moko kaka boye, nganga-nzambe moko azalaki kokita na nzela yango, kasi, ntango amonaki ye, alekaki na ngámbo mosusu. Ndenge moko mpe, Molevi moko lisusu, ntango akitaki na esika yango mpe amonaki ye, alekaki na ngámbo mosusu. Kasi Mosamalia moko azalaki koleka na nzela yango akómaki pembeni na ye mpe, ntango amonaki ye, mawa ekangaki ye. Bongo apusanaki pene na ye mpe akangaki bampota na ye, kosopeláká yango mafuta mpe vinyo. Boye amatisaki ye likoló ya nyama na ye moko mpe amemaki ye na ndako ya bato ya mobembo mpe abatelaki ye. Mpe na mokolo oyo elandaki abimisaki denali mibale, apesaki yango na mobateli ya ndako ya bato ya mobembo, mpe alobaki ete, ‘Batelá ye, mpe nyonso oyo okobimisa likoló ya oyo, nakozongisela yo yango ntango nakozonga awa.’” Na nsima, Yesu atunaki ye boye: “Nani na kati na bango misato amimonisi mozalani ya moto oyo akweaki na kati ya babandi?” Mobali yango ayanolaki ete: “Oyo amimonisaki moto ya motema mawa epai na ye.”—Luka 10:25, 29-37a.
2 Ndenge oyo Mosamalia asalisaki moto oyo azokaki emonisi malamu motema mawa ya solosolo! Mosamalia ayokelaki moto oyo azalaki na mpasi mawa mpe asalisaki ye. Kutu, moto yango azalaki ekólo moko te na Mosamalia. Ekólo ya moto, lingomba na ye, to mimeseno ya mboka na ye ekoki kopekisa biso te tómonisela ye motema mawa. Nsima ya kopesa ndakisa ya Mosamalia ya motema malamu, Yesu alobaki na moto oyo azalaki kosolola na ye ete: “Kende mpe yo moko salá se bongo.” (Luka 10:37b) Tosengeli kolanda toli yango mpe kosala makasi ya komoniselaka basusu motema mawa. Kasi ndenge nini tokoki kosalaka yango? Na makambo nini tokoki komonisa motema mawa na bomoi ya mokolo na mokolo?
“Soki ndeko . . . azali bolumbu”
3, 4. Mpo na nini tosengeli komonisaka motema mawa epai ya bandeko na biso basaleli ya Yehova?
3 Ntoma Paulo alobaki boye: “Wana tozali na ntango oyo ebongi mpo na yango, tiká tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza epai ya baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.” (Bagalatia 6:10) Na yango, tótalela naino makambo ndenge na ndenge oyo tokoki kosala mpo na komonisa ete tozali na motema mawa epai ya bandeko na biso basaleli ya Yehova.
4 Mpo na kolendisa baklisto ya solo bámonisanaka motema mawa, moyekoli Yakobo akomaki boye: “Moto oyo azali na momeseno ya komonisa motema mawa te akozwa lisambisi oyo ezangi motema mawa.” (Yakobo 2:13) Mokanda ya Yakobo emonisi biso mwa balolenge oyo tokoki komonisa motema mawa. Na ndakisa, na Yakobo 1:27 tozali kotánga boye: “Motindo ya losambo oyo ezali pɛto mpe ezangi mbindo na likanisi ya Nzambe na biso mpe Tata ezali oyo: kobatela bitike ná basi bakufelá mibali na kati ya bolɔzi na bango, mpe komibatela kozanga litɔnɔ ya mokili.” Yakobo 2:15, 16 ebakisi boye: “Soki ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko azali bolumbu mpe azangi bilei oyo ekoki mpo na mokolo, kasi moko na bino alobi na bango ete: ‘Bókende na kimya, bóyɔta mɔtɔ mpe bólya malamu,’ nde bopesi bango te biloko oyo esengeli mpo na nzoto na bango, litomba ezali wapi?”
5, 6. Ndenge nini tokoki komonisaka motema mawa na kati ya lisangá na biso?
5 Komibanzabanza mpo na bandeko mpe kosalisa baoyo bazali na bosɛnga ezali elembo ya baklisto ya solo. Tosengeli kosuka kaka te na kotombela bango bolamu. Kasi, motema mawa esengeli kotinda biso tósalisaka baoyo bazali mpenza na bosɛnga. (1 Yoane 3:17, 18) Kolambela moto ya maladi mwa eloko ya kolya, kosalela mobange moko misala ya ndako, kopesa ndeko mbongo ya tike mpo na kokende na makita to komema ye na motuka na biso, mpe kozala lobɔkɔ pɛtɛɛ epai ya baoyo bazali na bosɛnga ezali mwa makambo oyo tokoki kosalaka mpo na komonisa motema mawa.—Deteronome 15:7-10.
6 Nzokande, lisalisi eleki malamu oyo tokoki kopesa bandeko na kati ya lisangá ezali lisalisi ya elimo. Biblia elendisi biso ete ‘tólobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo ezali konyokwama na makanisi, tósalisa bato ya bolɛmbu.’ (1 Batesaloniki 5:14) “Mibange basi” mpe balendisami ete bázala “bateyi ya makambo ya malamu.” (Tito 2:3) Mpo na bakɛngɛli, Biblia elobi boye: “Moto na moto akozala lokola ebombelo mpo na mopɛpɛ, ezipelo na ntango ya mbula makasi.”—Yisaya 32:2.
7. Ndakisa ya baklisto ya Antiokia ya Sulia ezali koteya biso nini na likambo etali komonisa motema mawa?
7 Longola kosalisa mpe kolendisa basi oyo bakufelá mibali, bitike, mpe bandeko mosusu oyo bazalaki na bosɛnga na masangá na bango, baklisto ya siɛklɛ ya liboso bazalaki ntango mosusu kozwa bibongiseli mpo na kosunga bandeko na bango ya bisika mosusu. Na ndakisa, ntango Agabusi asakolaki ete “nzala moko monene ekokwela mabelé mobimba,” baklisto ya Antiokia ya Sulia “bazwaki mokano, moto na moto engebene oyo azalaki na yango, mpo na kotinda biloko ya lisungi epai ya bandeko oyo bazalaki kofanda na Yudea.” Batindaki biloko yango epai ya bankulutu na masangá ya etúká wana “na lobɔkɔ ya Balanabasi mpe Saulo.” (Misala 11:28-30) Ezali boni lelo oyo? “Moombo ya sembo mpe ya mayele” abongisi bakomite mpo na kosalisa bandeko oyo bakoki kokutana na makama lokola mipɛpɛ makasi, koningana ya mabelé, to mpela. (Matai 24:45) Tokomonisa mpenza motema mawa soki tozali kosalela ntango na biso, makasi na biso, mpe kopesa biloko na biso mpo na kosimba ebongiseli yango.
“Soki bozali kokoba komonisa ezaleli ya koponapona”
8. Na ndenge nini koponapona epekisaka moto amonisa motema mawa?
8 Yakobo akebisaki baklisto na ezaleli moko oyo epekisaka moto amonisa motema mawa mpe bolingo, oyo ebengami “mobeko ya mokonzi”; akomaki boye: “Soki bozali kokoba komonisa ezaleli ya koponapona, bozali kosala lisumu, mpo bopamelami na mobeko lokola babuki-mibeko.” (Yakobo 2:8, 9) Soki tozali koluka kosalela bato boboto mpo bazali na bozwi to bazali na bokonzi, tokoki kobanda kokanga matoi na ‘kolela ya mobola.’ (Masese 21:13) Koponapona epekisaka moto amonisa motema mawa. Tokomonisa motema mawa soki tozali kosalisa basusu kozanga kopona bilongi.
9. Mpo na nini ezali mabe te kotyela bato mosusu likebi mingi?
9 Kasi, soki totyeli moto moko likebi mingi yango elakisi ete tozali kopona bilongi? Te. Ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Filipi na ntina na Epafalodito, moklisto moko oyo asalaki na ye; alobaki boye: “Bókoba kolɛngɛla bato ya ndenge wana.” Mpo na nini? “Mpamba te mpo na mosala ya Nkolo akómaki mpenza pene na liwa, kotyáká molimo na ye na likama, mpo akoka kosala malamumalamu na esika na bino mpo bozalaki awa te mpo na kosalela ngai mpenza.” (Bafilipi 2:25, 29, 30) Ebongaki mpenza bápesa Epafalodito longonya mpo na mosala ya sembo oyo asalaki. Lisusu, 1 Timote 5:17 elobi boye: “Tiká ete bankulutu oyo bazali kokamba na ndenge ya malamu mpenza bátángama bato babongi na lokumu mibale, mingimingi mpenza baoyo bazali kosala mosala makasi na koloba mpe na koteya.” Esengeli mpe kondimaka bandeko oyo bazali komonisa bizaleli ya elimo. Kosala yango ezali koponapona te.
“Bwanya oyo euti na likoló . . . etondi na motema mawa”
10. Mpo na nini tosengeli kokebaka na lolemo na biso?
10 Yakobo alobaki boye: “Lolemo . . . ezali eloko mabe ya motó makasi, etondi na ngɛngɛ mabe oyo ebomaka. Na nzela na yango topambolaka Yehova, ɛɛ Tata, nzokande na yango mpe tolakelaka mabe bato oyo basalemá ‘na elilingi ya Nzambe.’ Kaka na monɔkɔ wana moko lipamboli mpe elakeli mabe ezali kobima.” Na mokapo yango kaka, Yakobo abakisaki boye: “Soki bozali na zuwa ya bololo mpe na kowelana na kati ya mitema na bino, bómikumisaka te mpe bókoselaka solo makambo te. Wana ezali bwanya oyo euti na likoló te, kasi ezali nde ya nse, ya bonyama, ya bademo. Mpo epai zuwa mpe kowelana ezali, mobulu ná makambo nyonso ya mabe mpe ezali wana. Kasi bwanya oyo euti na likoló ezali libosoliboso pɛto na bizaleli, na nsima kimya, makambo makasimakasi te, esepelaka kotosa, etondi na motema mawa mpe na bambuma ya malamu, eponaka bilongi te, ezalaka na bokosi te.”—Yakobo 3:8-10a, 14-17.
11. Ndenge nini tokoki komonisa motema mawa na ndenge ya kosalela lolemo na biso?
11 Na yango, ndenge oyo tosalelaka lolemo na biso emonisaka soki tozali na bwanya oyo “etondi na motema mawa.” Tokomonisa nini soki tozali komikumisa, kokosa, to koloba makambo oyo ezali kobebisa lokumu ya moto mpo na zuwa to kowelana? Nzembo 94:4 elobi boye: “Bango nyonso bakosalaka masumu bakomikumisa.” Na mwa ntango moke kaka, matɔngi ekoki kobebisa mpenza lokumu ya moto! (Nzembo 64:2-4) Longola yango, kanisá mabe oyo “motatoli mabe [oyo] akobimisaka nkuta” akoki kosala moto! (Masese 14:5; 1 Mikonzi 21:7-13) Nsima ya kolobela mabe oyo lolemo ekoki kosala, Yakobo abakisaki boye: “Ebongi te, bandeko na ngai, ete makambo wana ekoba kosalema bongo.” (Yakobo 3:10b) Motema mawa ya solosolo esɛngi ete tólobaka maloba ya pɛto, oyo etyaka kimya, mpe ya boboto. Yesu alobaki boye: “Nazali koyebisa bino ete liloba nyonso ya mpambampamba oyo bato balobaka, bakozongisa monɔkɔ mpo na yango na Mokolo ya Kosambisama.” (Matai 12:36) Ezali mpenza na ntina tómonisaka motema mawa na ndenge ya kosalela lolemo na biso!
‘Bólimbisa bato mabunga na bango’
12, 13. (a) Ndakisa ya moombo oyo azalaki na nyongo monene ya nkolo na ye ezali koteya biso nini na ntina etali motema mawa? (b) Kolimbisa ndeko na biso “tii na mbala ntuku nsambo na nsambo” elimboli nini?
12 Ndakisa ya moombo oyo azalaki na nyongo ya denali milio 60 ya mokonzi moko oyo azalaki nkolo na ye ezali koteya biso ndenge mosusu ya komonisa motema mawa. Lokola moombo yango azalaki na makoki ya kofuta nyongo yango te, abondelaki nkolo na ye ete ayokela ye mawa. “Lokola mawa ekangaki ye mpo na yango,” nkolo ya moombo alimbisaki nyongo yango. Moombo yango abimaki mpe amonaki moninga na ye moombo oyo azalaki na nyongo na ye ya denali 100 mpamba, ayokelaki ye ata mawa te, akangisaki ye. Ntango nkolo ayokaki likambo yango, abengisaki ye mpe alobaki na ye boye: “Moombo mabe, nabomaki nyongo wana nyonso ozalaki na yango, ntango obondelaki ngai. Yo osengelaki nde te, na ngala na yo, koyokela moninga na yo moombo mawa, ndenge ngai mpe nayokelaki yo mawa?” Na nsima, mokonzi apesaki ye na mabɔkɔ ya bakɛngɛli ya bolɔkɔ. Yesu asukisaki ndakisa na ye na maloba oyo: “Ezali ndenge wana nde Tata na ngai ya likoló mpe akosalela bino soki bozali kolimbisa te moto na moto ndeko na ye na mitema na bino.”—Matai 18:23-35.
13 Ndakisa yango ezali komonisa polele ete kozala na motema mawa esɛngi mpe kolimbisa basusu! Yehova alimbisi biso nyongo monene ya lisumu. Ebongi biso mpe ‘tólimbisaka bato mabunga na bango’! (Matai 6:14, 15) Liboso Yesu aloba ndakisa ya moombo oyo aboyaki koyokela moninga na ye mawa, Petelo atunaki ye motuna oyo: “Nkolo, mbala boni ndeko na ngai asengeli kosalela ngai lisumu mpe ngai nasengeli kolimbisa ye? Tii na mbala nsambo?” Yesu apesaki eyano oyo: “Nalobi na yo te, Tii na mbala nsambo, kasi Tii na mbala ntuku nsambo na nsambo.” (Matai 18:21, 22) Ya solo, moto oyo azali na motema mawa azalaka pene ya kolimbisa “tii na mbala ntuku nsambo na nsambo,” elingi koloba kozanga ndelo.
14. Na kotalela Matai 7:1-4, ndenge nini tokoki komonisa motema mawa na bomoi ya mokolo na mokolo?
14 Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu amonisaki ndenge mosusu ya komonisa motema mawa; alobaki boye: “Bótika kosambisa mpo bino bósambisama te; mpo ete na lisambisi oyo bozali kosambisa, bokosambisama na yango . . . Boye, mpo na nini ozali kotala lititi na liso ya ndeko na yo, kasi ozali te kokanisa libaya ya motɔndɔ na liso na yo moko? To ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo, ‘Tiká nalongola lititi na liso na yo’; ntango, talá! libaya ya motɔndɔ ezali na liso na yo moko?” (Matai 7:1-4) Na yango, tokoki komonisa motema mawa na bomoi ya mokolo na mokolo soki tozali kokanga motema na bolɛmbu ya basusu, elingi koloba tozali te kolandela mabunga na bango to kosambisa bango.
“Tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu”
15. Mpo na nini tosengeli te komonisa motema mawa kaka epai ya bandeko na biso basaleli ya Yehova?
15 Mokanda ya Yakobo ezali kolendisa baklisto bámonisanaka motema mawa; kasi yango elingi koloba te ete tosengeli komonisaka motema mawa kaka epai ya bandeko na biso basaleli ya Yehova. Nzembo 145:9 elobi ete: “[Yehova] azali malamu epai ya bato nyonso mpe ngɔlu na ye ezali likoló ya misala na ye nyonso.” Biblia ezali kolendisa biso ‘tókóma bamekoli ya Nzambe.’ (Baefese 5:1; Bagalatia 6:10) Ya solo, tosengeli ‘kolinga mokili te ná biloko oyo ezali na kati ya mokili,’ kasi ntango moto moko ya mokili azali na bosɛnga, tosengeli kokangela ye motema te.—1 Yoane 2:15.
16. Makambo nini tosengeli kotalela liboso ya komonisela moto motema mawa?
16 Biso baklisto tosengeli kokakatanaka te kosalisa bato oyo “likambo ekanami te” ekómeli bango to baoyo bazali na mikakatano. (Mosakoli 9:11, NW) Ya solo, tokosala makambo oyo makoki na biso ekopesa nzela. (Masese 3:27) Ntango tozali kosalisa moto, tosengeli kokeba ete tólendisa ye te akóma gɔigɔi. (Masese 20:1, 4; 2 Batesaloniki 3:10-12) Na yango, komonisela moto motema mawa ya solosolo esɛngaka koyeba mpasi na ye, komitya na esika na ye, mpe kokanisa likambo nini tosengeli kosala mpo na kosunga ye.
17. Wapi lolenge eleki malamu ya komonisa motema mawa epai ya baoyo bazali na lisangá ya Yehova te?
17 Lolenge eleki malamu ya komonisela bato oyo bazali na lisangá ya Yehova te motema mawa ezali koteya bango solo ya Biblia. Mpo na nini? Mpamba te bato mingi lelo oyo bazali na molili na elimo. Lokola bazali koyeba te ndenge ya kosilisa mikakatano na bango mpe bazali na elikya te mpo na mikolo ezali koya, bato mingi ‘batikami mpamba mpe bapalanganisami lokola bampate ezangá mobateli.’ (Matai 9:36) Liloba ya Nzambe ekoki kozala ‘mwinda na makaka na bango’; ekoki kosalisa bango bálonga mikakatano ya bomoi. Liloba ya Nzambe ekoki mpe kozala ‘pole na nzela na bango’ mpamba te ezali koyebisa mokano ya Nzambe, oyo ekopesa bango elikya. (Nzembo 119:105) Koyebisa nsango malamu ya Bokonzi epai ya bato oyo bazali mpenza na mposa na yango ezali likambo malamu mingi! Lokola ‘bolɔzi monene’ ekómi mpenza pene, sikoyo nde ntango ya kozala na molende na mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli. (Matai 24:3-8, 21, 22, 36-41; 28:19, 20) Ezali na mosala mosusu te ya motema mawa oyo ekokani na yango.
Tópesa “biloko oyo ezali na kati”
18, 19. Mpo na nini tosengeli kosala makasi tómonisaka motema mawa mingi na bomoi na biso?
18 Yesu alobaki ete: “Bópesa lokola makabo ya motema mawa biloko oyo ezali na kati.” (Luka 11:41) Mpo likambo oyo tosaleli moto emonisa ete tozali na motema mawa, esengeli kozala likabo oyo euti na kati, elingi koloba na motema oyo ezali na bolingo mpe na mposa ya kosalisa. (2 Bakolinti 9:7) Na mokili oyo etondi na makambo ya mabe, na moimi, mpe oyo bato bazali komitungisa te mpo na mpasi mpe mikakatano ya basusu, motema mawa ya ndenge wana esepelisaka mpenza!
19 Yango wana, tiká tósala makasi mpo tómonisaka motema mawa mingi na bomoi na biso. Soki tozali na motema mawa mingi, tokomonisa mpe bizaleli ya Nzambe mingi. Yango ekosalisa biso tózala na bomoi ya esengo mpe ya ntina.—Matai 5:7.
Oyekoli makambo nini?
• Mpo na nini ezali na ntina mingi tómonisaka motema mawa epai ya bandeko na biso basaleli ya Yehova?
• Ndenge nini tokoki komonisa motema mawa na kati ya lisangá?
• Ndenge nini tokoki kosala malamu epai ya bato oyo azali na lisangá ya Yehova te?
[Elilingi na lokasa 26]
Mosamalia amonisaki motema mawa
[Bililingi na lokasa 27]
Baklisto batondi na misala ya motema mawa
[Elilingi na lokasa 30]
Koteya bato solo ya Biblia ezali lolenge eleki malamu ya komonisela bango motema mawa