Kondima ezali kopusa biso na mosala!
“Omoni ete kondima na [Abalayama] esalaki mosala esika moko na misala na ye, mpe kondima na ye ebongaki kati na misala na ye.”—YAKOBO 2:22.
1, 2. Lolenge nini tokosala soki tozali na kondima?
BATO mingi balobaka ete bazali na kondima epai na Nzambe. Kasi kondima ya maloba mpamba esili kokufa lokola ebembe. Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Kondima, soko ezangi misala, esili kokufa kati na yango mpenza.” Alobaki lisusu ete Abalayama, moto oyo azalaki na bobangi Nzambe azalaki na kondima oyo “esalaki mosala esika moko na misala na ye.” (Yakobo 2:17, 22) Maloba yango mazali na ndimbola nini mpo na biso?
2 Soki tozali na kondima ya solo, tokosuka te bobele na kondima makambo oyo tozali koyoka na makita ya boklisto. Tokomonisa bilembeteli ya kondima mpo ete tozali Batatoli ya Yehova oyo bazali kosala mosala. Ɛɛ, kondima ekopusa biso ete tósalela Liloba ya Nzambe kati na bomoi mpe ekopusa biso na mosala.
Ezaleli ya koponapona eyokani te na kondima
3, 4. Kondima ekozala na bopusi nini likoló ya lolenge na biso ya kotalela basusu?
3 Soki tozali na kondima ya solosolo epai na Nzambe mpe Klisto, tokomonisa ezaleli ya koponapona te. (Yakobo 2:1-4) Bamoko kati na baoyo Yakobo akomelaki mokanda na ye bazalaki mpenza komonisa te kozanga koponapona oyo esɛngami epai ya baklisto ya solo. (Baloma 2:11) Na yango, Yakobo atuni: “Bozali te na kondima ya Nkolo na biso Yesu Klisto, nkembo na biso, na misala ya kozanga koponapona, boye te?” (NW) Soki mopakano oyo azali mozwi ayei na makita alati mpɛtɛ ya wolo mpe bilamba kitoko mpe bongo “mobólá na bilamba bibebi,” bango nyonso basengelaki koyambama malamu, kasi likebi mingi ezalaki kopesama na bazwi. Bazalaki kopesa bango bifandelo “na esika malamu,” nzokande bazalaki koyebisa na bapakano oyo bazalaki babólá ete bátɛlɛma to báfanda na nsé na etyelo ya makolo ya moto.
4 Yehova apesaki Yesu Klisto lokola mbeka ya lisiko mpo na bato nyonso, bázala bazwi to babólá. (2 Bakolinti 5:14) Na yango, soki tozali kopona bobele bazwi, tozali kotangwa na kondima ya Klisto, oyo ‘akómaki mobólá mpo ete tókóma bazwi mpo na bobólá na ye.’ (2 Bakolinti 8:9) Tiká ete tókabola bato te na lolenge yango—kozaláká na mokano mabe ya kokumisa bato. Nzambe azali na koponapona te, kasi soki tomonisaki koponapona, boye ‘tosambisaki na makanisi mabe.’ (Yobo 34:19) Na ntembe te, lokola tozali na mposa ya kosepelisa Nzambe, tokokwea te na komekama ya koponapona to ‘kosanzola bilongi na bato mpo na kozwa litomba.’—Yuda 4, 16.
5. Banani Nzambe aponi ete bázala “bazwi na kondima,” mpe mbala mingi bazwi na mosuni basalaka makambo nini?
5 Yakobo amonisi nani azali mozwi ya solo mpe asɛngi ete tómonisa bolingo epai na bato nyonso kozanga koponapona. (Yakobo 2:5-9) ‘Nzambe aponi babólá ete bázala bazwi kati na kondima mpe basangoli ya libula ya bokonzi.’ Ezali bongo mpamba te mbala mingi ezali babólá nde bandimaka nsango malamu. (1 Bakolinti 1:26-29) Lokola etuluku, bazwi na mosuni banyokolaka bato mosusu na makambo ya nyongo, ya lifuti, mpe kofunda na bisambiselo. Bazali koloba mabe na ntina na Klisto mpe bazali konyokola biso mpo ete tozali komema nkombo na ye. Kasi, tiká ete tózala na ekateli makasi ya kotosa “mokonzi na Mibeko,” oyo esɛngi ete tólinga bazalani—komonisáká bolingo lolenge moko epai na bazwi mpe epai na babólá. (Levitike 19:18; Matai 22:37-40) Lokola Nzambe nde asɛngi yango, komonisa ezaleli ya koponapona ezali bongo “kosala lisumu.”
‘Ngɔlu ekolónga kati na kosambisama’
6. Lolenge nini tokomimonisa babuki na mibeko soki tozangi ngɔlu mpo na basusu?
6 Soki tozali komonisa ezaleli ya koponapona kozanga ngɔlu, tozali kobuka mibeko. (Yakobo 2:10-13) Soki tokwei na ezaleli yango, tokómi babuki na mibeko nyonso ya Nzambe. Bayisalaele oyo basalaki ekobo te kasi bazalaki bayibi bakómaki babuki na Mibeko ya Mose. Biso baklisto, tozali kosambisama na “Mobeko [ya bato] na bonsomi”—Yisalaele ya elimo kati na kondimana ya sika, oyo mibeko na yango mizali kati na mitema na bango.—Yilimia 31:31-33.
7. Mpo na nini baoyo bazali kokóba na ezaleli ya koponapona bakoki komizela kozwa ngɔlu ya Nzambe te?
7 Soki tolobi ete tozali na kondima kasi tozali kokóba komonisa ezaleli ya koponapona, tozali na likámá. Baoyo bazangi bolingo mpe bazangi ngɔlu bakosambisama na ngɔlu te. (Matai 7:1, 2) Yakobo alobi ete: “Mawa [“ngɔlu,” NW] ekolónga kati na kosambisama.” Soki tondimi litambwisi ya elimo santu ya Yehova na komonisáká ngɔlu na misala na biso nyonso, tokokweisama te na kosambisama. Kútu, tokozwa ngɔlu mpe tokolónga liboso ya boyengebene ya makasi to lisambisi ya kokweisama.
Kondima ebotaka misala malamu
8. Moto oyo alobi ete azali na kondima kasi azangi misala azali ndenge nini?
8 Longola likambo ya kokómisa biso bato ya bolingo mpe ya ngɔlu, kondima ebotaka misala mosusu ya malamu. (Yakobo 2:14-26) Ya solo, kondima ya maloba mpamba oyo ezangi misala ekobikisa biso te. Ɛɛ, tokoki te kozala na etɛlɛmɛlo ya sembo liboso ya Nzambe na kokokisáká misala ya Mibeko. (Baloma 4:2-5) Yakobo azali kolobela misala oyo miuti na kondima mpe bolingo, kasi na mibeko mikomami te. Soki topusami na bizaleli motindo wana, tokosuka te bobele na kotombela makambo malamu epai na ndeko na biso mondimi oyo azali na bosɛnga. Tokopesa lisungi ya mosuni epai na ndeko mobali to ndeko mwasi oyo azangi bilamba ya kolata to bilei. Yakobo atuni ete: ‘Soki bolobi na ndeko mobali to ndeko mwasi oyo azali na bosɛnga ete: “Kendá na kimya, yoká mɔ́tɔ, tondá” kasi bopesi ye yango ezangi ye na nzoto te, wapi litomba?’ Ezali te. (Yobo 31:16-22) “Kondima” motindo wana esili kokufa!
9. Nini emonisaka ete tozali na kondima?
9 Ekoki kozala ete na bantango mosusu tosanganaka na libota ya Nzambe, kasi bobele misala misalami na motema mobimba nde mikomonisa kondima na biso. Ezali malamu soki tosilaki kobwaka liteya ya Bosato mpe tozali kondima ete Nzambe ya solo azali bobele moko. Kasi, endimeli mpamba ezali kondima te. “Bademó bandimaka,” mpe “bakolɛngaka” na nsɔ́mɔ mpamba te libebi ezali kozela bango. Soki tozali mpenza na kondima, yango ekopusa biso ete tósala misala lokola kosakola nsango malamu mpe kosunga baninga na biso bandimi oyo bazali na bosɛnga ya bilamba mpe ya bilei. Yakobo atuni ete: “Yo moto na mpumbulu [oyo ozangi boyebi ya sikisiki ya Nzambe], olingi koyeba ete kondima oyo ezangi misala ezali mpamba?” Ɛɛ, kondima esɛngaka misala.
10. Mpo na nini Abalayama abéngami “tata na bango nyonso bazali [na] kondima”?
10 Kondima ya tata ya mabota Abalayama, oyo azalaki na bobangi Nzambe, epusaki ye na misala. Lokola azali “tata na bango nyonso bazali [na] kondima,” ‘alóngaki mpo na misala wana etombolaki ye mwana na ye Yisaka na etumbelo.’ (Baloma 4:11, 12; Genese 22:1-14) Nini elingaki kosalema soki Abalayama andimaki te ete Nzambe akokaki kosekwisa Yisaka mpe kokokisa elaka na Ye ya kobimisa mombóto moko na nzela na ye? Mbɛlɛ Abalayama alingaki soko moke te kokaba mwana na ye. (Baebele 11:19) “Kondima na [Abalayama] ebongaki,” to ekokisamaki na nzela ya misala na ye ya botosi. Na yango, “likomi [Genese 15:6] likoki oyo elobi ete, Abalayama andimaki Nzambe mpe yango etángameli ye mpo na boyengebene.” Misala ya Abalayama na komekáká kokaba Yisaka, mindimisaki maloba oyo Nzambe alobaki liboso ete Abalayama azalaki moyengebene. Na misala ya kondima, amonisaki bolingo na ye mpo na Nzambe mpe abyangamaki “Moninga na Nzambe.”
11. Elembeteli nini ya kondima Laaba amonisaki?
11 Abalayama amonisaki “ete moto akolónga mpo na misala na ye mpe bobele mpo na kondima te.” Likambo yango ezalaki mpe solo mpo na Laaba, mwasi ya pite na engumba Yeliko. ‘Atangamaki moyengebene nsima wana anyangelaki banɔ́ngi [Bayisalaele] mpe abimisaki bango na nzela mosusu’ na boye ete bakimaki liboso ya banguna na bango Bakanana. Liboso ya koyamba banɔ́ngi Bayisalaele, Laaba andimaki ete Yehova azali Nzambe ya solo, mpe maloba na ye oyo abimisaki na nsima mpe kotika pite ezalaki elembeteli ya kondima na ye. (Yosua 2:9-11; Baebele 11:31) Nsima ya kopesa ndakisa oyo ya mibale ya kondima emonisami na misala, Yakobo alobi ete: “Ntina ete, lokola nzoto oyo ezangi mpema esili kokufa, bongo kondima oyo ezangi misala esili kokufa lokola.” Soki moto akufi, azali lisusu na nguya ya kosala mosala te, to “elimo,” kati na ye te, mpe akoki kosala eloko moko te. Kondima ya maloba mpamba esili kokufa mpe ezali na ntina te lolenge moko na nzoto oyo ezangi bomoi. Nzokande, soki tozali na kondima ya solo, yango ekopusa biso ete tósala misala mindimami na Nzambe.
Batelá lolemo na yo!
12. Bankulutu na lisangá basengeli kosala nini?
12 Koloba na koteya ekoki mpe kopesa bilembeteli ya kondima, kasi tosengeli kozala na komipekisa. (Yakobo 3:1-4) Lokola bazali balakisi kati na lisangá, bankulutu bazali na mokumba monene mpe bakozongisa monɔkɔ epai na Nzambe. Na yango, na komikitisa nyonso, basengeli kotalela matindiki mpe makoki na bango. Longola boyebi mpe makoki, mibali yango basengeli kozala na bolingo mozindo mpo na Nzambe mpe baninga na bango bandimi. (Baloma 12:3, 16; 1 Bakolinti 13:3, 4) Toli ya bankulutu esengeli kotongama likoló ya Makomami. Soki nkulutu moko apesi toli mabe mpe yango ememeli bato mosusu mikakatano, akozala na ekweli na kosambisama ya Nzambe na nzela na Klisto. Na ntina yango, bankulutu basengeli kozala na komikitisa mpe basengeli koyekolaka mingi, kokangamáká na bosembo nyonso na Liloba ya Nzambe.
13. Mpo na nini tobɛtaka mabaku na maloba?
13 Ata balakisi oyo bazali na makoki mingi—ɛɛ, biso nyonso—“tokokweaka na makambo mingi” na ntina na kozanga kokoka. Kobɛta libaku na maloba ezali moko na mabunga oyo eleki kosalema mpe oyo ekoki kosala mabe. Yakobo alobi ete: “Soko moto akokweaka na liloba na ye te, ye moto abongi nyonso mpe ayebi kopekisa nzoto na ye mobimba.” Na bokeseni na Yesu Klisto, biso tozali na likoki te ya kobatela lolemo na biso na lolenge ya kokoka. Soki tolóngi kosala yango, boye tokokoka mpe kozala na bokonzi likoló na binama mosusu ya nzoto na biso. Totyaka bibende na minɔkɔ ya mpunda mpo ete bákenda epai tokolakisa, mpe na lisalisi ya yenda moke, ata masuwa monene oyo mazali komemama na mopɛpɛ makasi makoki kokambama engebene mposa ya motambwisi na yango.
14. Lolenge nini Yakobo abendi likebi na ntina ya kosala milende mpo na kobatela lolemo?
14 Biso nyonso tosengeli kondima na bosembo nyonso ete esengeli tósala milende mpo na kobatela lolemo na biso. (Yakobo 3:5-12) Soki tokokanisi yango na mpunda, ebende oyo batyaka na monɔkɔ na yango ezali moke mpenza; lolenge moko, yenda ezali moke soki tokokanisi yango na masuwa. Mpe soki tokokanisi yango na nzoto ya moto, lolemo ezali moke “mpe ekomikumisaka makambo minene.” Lokola Makomami mamonisi yango polele ete Nzambe asepelaka na ezaleli ya komikumisa te, tóluka lisalisi na ye mpo na kopekisa likambo yango. (Nzembo 12:3, 4; 1 Bakolinti 4:7) Tópekisa mpe lolemo na biso na ntango batumoli biso, komikundoláká ete esengeli sé mwa mɔ́tɔ moke mpo na kozikisa zamba monene. Lokola Yakobo amonisi yango, “lolemo ezali mɔ́tɔ” oyo ekoki kobimisa mbeba monene. (Masese 18:21) Ɛɛ, lolemo oyo ebatelami te “ezali lokola mokili na bokesene”! Likambo nyonso ya mabe na mokili oyo ezali kotyola Nzambe eyokani na lolemo oyo ebatelami te. Ezali eutelo ya makambo oyo mabebisaka na ndakisa matɔ́ngi mpe mateya ya lokuta. (Levitike 19:16; 2 Petelo 2:1) Okanisi boni? Kondima na biso esengeli kopusa biso ete tósala makasi mpo na kobatela lolemo na biso, boye te?
15. Mabe nini lolemo oyo ebatelami te ekoki kosala?
15 Lolemo oyo ebatelami te ‘ekobebisa biso’ mpenza. Na ndakisa, soki tozwami mbala na mbala ete tozali kobuka lokuta, tokoki koyebana lokola bakosi. Na yango, lolenge nini lolemo oyo ebatelami te ‘ekozikisa bizaleli na biso nyonso’? Na kokómisáká bomoi mpasi lokola moto azwami na zolongano oyo ezangi esika ya kobimela. Lisangá mobimba ekoki kobulunganisama na lolemo moko oyo ebatelami te. Yakobo alobeli “Geena,” lobwaku ya Hinomo. Libosoliboso, esika yango esalelamaki mpo na kotumba bana lokola mbeka, na nsima ekómaki esika ya kobwaka mpe kozikisa na mɔ́tɔ bosɔtɔ nyonso ya engumba Yelusaleme. (Yilimia 7:31) Na bongo, Geena ezali elembo ya kobomama nyɛɛ. Na ndimbola mosusu, Geena esalelami mpo na komonisa ete nguya na yango ya koboma ezali lolenge moko na lolemo oyo ebatelami te. Soki topekisi lolemo na biso te, tokoki biso moko kozika na mɔ́tɔ oyo topelisi. (Matai 5:22) Tokoki ata kobimisama na lisangá mpo na ezaleli ya kofinga.—1 Bakolinti 5:11-13.
16. Na kotaleláká mbeba oyo lolemo ebatelami te ekoki kobimisa, tosengeli kosala nini?
16 Mbala mosusu, na nzela ya botángi na yo ya Liloba ya Nzambe, osili koyeba ete Yehova alobaki ete moto asengeli kozala na bokonzi likoló na nyama. (Genese 1:28) Moto asili kotosisa mitindo nyonso ya bikelamo. Na ndakisa, moto asili kobɔkɔla ndɛkɛ ebéngami faucon mpe kosalela yango na bokila. Ekoki kozala ete nyoka oyo izali kotosa balɛngoli ezali kati na ‘biloko bikolandaka na mabelé’ oyo Yakobo alobeli. (Nzembo 58:4, 5) Bato bakoki kotosisa ata mbisi monene ebéngami baleine, kasi lokola tozali bato ya masumu tokoki te kobatela lolemo na biso na lolenge ya kokoka. Atako bongo, tosengeli kopɛngola maloba mabe, ya kozokisa, to matɔ́ngi. Lolemo oyo ebatelami te ekoki kozala esaleli mabe oyo etondi na ngɛngɛ oyo ekoki koboma. (Baloma 3:13) Likambo ya mawa, lolemo ya balakisi ya lokuta epɛngwisaki baklisto mosusu ya ekeke ya liboso na nzela ya Nzambe. Na yango, tótika nzela te ete maloba ya bapɛngwi matondi na ngɛngɛ málónga biso, ezala ete malobami na monɔkɔ to makomami na mikanda.—1 Timoté 1:18-20; 2 Petelo 2:1-3.
17, 18. Bongolabongola nini Yakobo 3:9-12 elobeli, mpe tosengeli kosala nini na likambo yango?
17 Kondima Nzambe mpe mposa ya kosepelisa ye ekoki kobatela biso na lipɛngwi mpe ekoki kopekisa biso ete tósalela te lolemo na biso na lolenge ya mabe. Mpo na bongolabongola ya bato mosusu, Yakobo alobi ete ‘na lolemo tokokumisaka Tata na biso, Yehova, mpe na yango tokofingaka bato bazalisami na lolenge na Nzambe.’ (Genese 1:26) Yehova azali Tata na biso na boye ete “akopesaka bato nyonso bomoi, na mpema, na biloko nyonso.” (Misala 17:24, 25) Na elimo, azali mpe Tata ya baklisto bapakolami. Biso nyonso tozali na “lolenge na Nzambe” na oyo etali bizaleli ya elimo mpe makanisi, kati na yango bolingo, boyengebene, mpe mayele oyo ezali kokesenisa biso na banyama. Na yango, lolenge nini tosengeli komitambwisa soki tozali na kondima epai ya Yehova?
18 Soki tolakeli bato mabe, yango elimboli ete tosɛngi, to tobyangi makambo mabe ete mákómela bango. Lokola tozali te basakoli bapemami na Nzambe oyo bazwaki ndingisa ya kobyanga mabe likoló ya moto mosusu, maloba wana makomonisa ete tozali koyina mpe na lolenge yango, maloba na biso ya kokumisa Nzambe makozala na ntina te. Elongobani te ete maloba ya “kokumisa mpe [ya] kofinga” mábima na monɔkɔ moko. (Luka 6:27, 28; Baloma 12:14, 17-21; Yuda 9) Ekozala mpenza lisumu koyemba nzembo ya kosanzola Nzambe na makita mpe na nsima koloba mabe likoló na bandeko na biso bandimi! Mai ya elengi mpe mai ya bololo ekoki kobima na libulu moko te. Lokola ‘mosuke eyebi kobota mbuma na bilaya te soko mowiti kobota mbuma na mosuke te,’ mai ya mongwa ekoki kopesa mai ya elengi te. Soki biso baoyo tosengeli koloba makambo malamu, tozali kokóba kobimisa maloba mabe, elimboli ete eloko moko ezali malamu te kati na elimo na biso. Soki yango ezali momeseno na biso, tóbondela Yehova ete asunga biso tótika maloba lolenge wana.—Nzembo 39:1.
Tósala na mayele mauti na likoló
19. Soki totambwisami na mayele mauti na likoló, bopusi nini tokozala na yango epai ya basusu?
19 Biso nyonso tozali na mposa ya mayele mpo na koloba mpe kosala makambo mabongi na bato bazali na kondima. (Yakobo 3:13-18) Soki tozali na bobangi Nzambe, ye akopesa biso mayele mauti na likoló, elingi koloba likoki ya kosalela boyebi na lolenge malamu. (Masese 9:10; Baebele 5:14) Liloba na Ye ezali koteya biso lolenge ya komonisa “bizaleli malamu kati na bopɔlɔ mpe na mayele.” Mpe soki tozali na bopɔlɔ, tokolendisa kimya kati na lisangá. (1 Bakolinti 8:1, 2) Baoyo nyonso bazali komikumisa ete bazali balakisi minene ya bandeko na bango bandimi bazali ‘koloba lokuta mpe kotɛmɛla makambo na solo [ya boklisto],’ oyo ezali kokweisa lolendo na bango. (Bagalatia 5:26) “Mayele” na bango “mauti na mokili”—ya bato ya masumu oyo batangwi mosika na Nzambe. Ezali mayele “ya nzoto,” mauti na mposa ya nzoto. Ɛɛ, mazali kútu “mayele ya bademó,” mpamba te bilimu mabe nde batondi na lolendo! (1 Timoté 3:6) Na yango, tiká ete tósala na mayele mpe na komikitisa mpo tópesa nzela te na ‘makambo mpamba’ lokola matɔ́ngi mpe koponapona ete ekóla kati na biso.
20. Lolenge nini okolimbola mayele mauti na likoló?
20 “Mayele mauti na likoló ezali liboso na pɛto,” kopɛtoláká biso na elimo mpe na makanisi. (2 Bakolinti 7:11) Mazali “na kimya,” kopusáká biso ete tóluka kimya. (Baebele 12:14) Mayele mauti na likoló ezali kokómisa biso bato ya “boboto,” oyo tozali na makambo makasi te mpe oyo tondimaka makanisi ya bato mosusu mpe toyebi kofanda na baninga. (Bafilipi 4:5) Mayele mauti na likoló mazali “na kotosa noki,” kolendisáká botosi na mateya ya Nzambe mpe kosalana elongo na lisangá ya Yehova. (Baloma 6:17) Mayele mauti na likoló mazali mpe kokómisa biso bato na ngɔlu, mpe na koyokela basusu mawa. (Yuda 22, 23) Mayele yango “matondi na mbuma malamu,” na boye ete mazali kopusa na komibanzabanza mpo na basusu mpe kosala makambo na motema malamu, na boyengebene, mpe na solo. (Baefese 5:9) Mpe lokola tozali bayeisi ya kimya, tozali na “mbuma na boyengebene” oyo ezali kokóla na ezalela ya kimya.
21. Engebene Yakobo 2:1–3:18, kondima na biso epai na Nzambe esengeli kopusa biso na misala nini?
21 Solo mpenza, kondima ezali kopusa biso na mosala. Ezali kokómisa biso bato bazangi koponapona, bato na ngɔlu, mpe na misala malamu. Kondima ezali kosalisa biso ete tóbatela lolemo na biso mpe tósala makambo na mayele mauti na likoló. Kasi makambo oyo tokoki koyeba na mokanda na ye masuki wana te. Yakobo azali na toli mosusu oyo ekoki kosalisa biso mpo ete tómitambwisa na lolenge lobongi na bato oyo bazali na kondima epai na Yehova.
Okoyanola ndenge nini?
◻ Wapi mabe ya ezaleli ya koponapona?
◻ Boyokani nini ezali kati na kondima mpe misala?
◻ Mpo na nini ezali likambo ya ntina mingi ete tóbatela lolemo na biso?
◻ Mayele mauti na likoló mazali ndenge nini?