Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Yakobo mpe na mikanda ya Petelo
MBULA soki 30 nsima ya pantekote ya mobu 33 T.B., moyekoli Yakobo, ndeko ya Yesu, akomelaki “mabota zomi na mibale” ya Yisalaele ya elimo mokanda. (Yak. 1:1) Akomaki mokanda yango mpo na kolendisa bango bázala na kondima makasi mpe báyikaka mpiko na ntango ya mikakatano. Apesaki mpe toli mpo na kosembola makambo ya mabe oyo ezalaki na masangá.
Mwa moke liboso Néron, Amperɛrɛ ya Loma, abanda konyokola baklisto na mobu 64 T.B., ntoma Petelo akomelaki bango mokanda na ye ya liboso mpo na kolendisa bango bázala na kondima makasi. Na mokanda na ye ya mibale, oyo akomaki mwa moke nsima ya oyo ya liboso, Petelo alendisaki baklisto ete bátya likebi na Liloba ya Nzambe mpe akebisaki bango mpo na koya ya mokolo ya Yehova. Na yango, tokoki kozwa litomba soki totye likebi na nsango oyo ezali na mokanda ya Yakobo mpe na mikanda ya Petelo.—Ebe. 4:12.
NZAMBE APESAKA BWANYA EPAI YA BAOYO BASƐNGAKA “NA KONDIMA”
Yakobo akomaki ete: “Esengo na moto oyo azali kokoba koyika mpiko na komekama, mpamba te na kokómáká moto oyo andimami akozwa motole ya bomoi.” Bato oyo bazali ‘kokoba kosɛnga na kondima,’ Yehova apesaka bango bwanya oyo basengeli na yango mpo bálonga mikakatano.—Yak. 1:5-8, 12.
Kondima mpe bwanya ezali mpe na ntina mpo na baoyo ‘bakómi bateyi’ na lisangá. Nsima ya koloba ete “lolemo ezali enama moko ya moke” oyo ekoki ‘kotya matɔnɔ na nzoto mobimba,’ Yakobo akebisaki bandeko na bizaleli ya mokili oyo ekokaki kobebisa boyokani na bango na Nzambe. Ayebisaki bango mpe makambo oyo moto oyo abɛli na elimo asengeli kosala mpo abika.—Yak. 3:1, 5, 6; 5:14, 15.
Biyano na mituna ya Biblia:
2:13—Na ndenge nini “motema mawa esepelaka na bolongi mpenza likoló ya lisambisi”? Soki esengeli tózongisa monɔkɔ epai ya Nzambe, atalaka soki biso mpe toyokelaki basusu mawa mpe alimbisaka biso na nzela ya mbeka ya Mwana na ye. (Lom. 14:12) Omoni te ete mpo na ntina wana tosengeli komonisaka ezaleli yango mingi na bomoi na biso?
4:5—Mokapo nini Yakobo azongeli awa? Azongeli mokapo moko ya sikisiki te. Nzokande, ekoki kozala ete maloba wana eutaki na makanisi oyo ezali na Genese 6:5; 8:21; Masese 21:10; mpe Bagalatia 5:17.
5:20—Molimo nini “moto oyo alongoli mosumuki na libunga ya nzela na ye” akobikisa na liwa? Moklisto oyo alongoli mosumuki na nzela na ye ya mabe, abikisi molimo ya moto yango, oyo abongoli motema na liwa ya elimo, mpe mbala mosusu na liwa ya seko. Moto oyo azali kosalisa mosumuki na ndenge wana akozipa mpe “ebele ya masumu [ya moto yango].”
Mateya mpo na biso:
1:14, 15. Lisumu eutaka na mposa ya mabe. Yango wana, tosengeli te kofandaka na mposa ya mabe na motema. Tosengeli nde ‘kokoba kokanisa’ makambo oyo ekoki kolendisa biso mpe kotondisa mitema na biso na makambo yango.—Filp. 4:8.
2:8, 9. “Ezaleli ya koponapona” eyokani te na “mobeko ya mokonzi,” oyo ezali bolingo. Yango wana, baklisto ya solo baponaponaka te.
2:14-26. Tobikisami “na nzela ya kondima,” kasi te “na misala” ya Mobeko ya Moize to oyo ya baklisto. Kondima na biso esengeli kosuka kaka na monɔkɔ te. (Ef. 2:8, 9; Yoa. 3:16) Esengeli kotinda biso tósala makambo oyo eyokani na mokano ya Nzambe.
3:13-17. “Bwanya oyo euti na likoló” eleki mosika mpenza oyo “ya nse, ya bonyama mpe bademo.” Tosengeli ‘kokoba koluka bwanya ya Nzambe lokola biloko ya motuya oyo ebombami.’—Mas. 2:1-5.
3:18. Momboto ya nsango malamu ya Bokonzi esengeli ‘kolonama na kimya na baoyo batyaka kimya.’ Ezali mpenza na ntina ete tózala bato oyo batyaka kimya, kasi te bato ya lofundo, ya koswana to bato oyo balingá bitumba.
“BÓZALA MAKASI NA KATI YA KONDIMA”
Petelo akundwelaki baninga na ye baklisto ‘elikya na bango ya bomoi’ oyo basengelaki kozwa na likoló. Alobaki na bango boye: “Bino bozali ‘libota moko eponami, bonganga-nzambe moko ya bokonzi, libota moko mosantu.’” Nsima ya kopesa toli ya sikisiki na likambo etali kotosa, alendisaki bango nyonso ete bazalaka na “likanisi moko, bómityaka na esika ya bamosusu, bózalaka na bolingo ya bondeko, bato oyo bayokelaka bamosusu mawa mingi, bato ya elimo ya komikitisa.”—1 Pet. 1:3, 4; 2:9; 3:8.
Lokola ‘nsuka ya [ebongiseli ya makambo ya Bayuda] ekómaki pene,’ Petelo apesaki bandeko toli ete ‘bázala bato ya makanisi malamu mpe bázala ekɛngɛ na oyo etali mabondeli.’ Alobaki na bango ete: “Bóbatela makanisi na bino, bókebaka. . . . Bótɛmɛla [Satana], bózala makasi na kati ya kondima.”—1 Pet. 4:7; 5:8, 9.
Biyano na mituna ya Biblia:
3:20-22—Ndenge nini batisimo ebikisaka biso? Batisimo ezali moko ya masɛngami oyo bato oyo bazali koluka lobiko basengeli kokokisa. Kasi, batisimo yango moko ebikisaka biso te. Tokobika nde “na nzela ya lisekwa ya Yesu Klisto.” Moto oyo alingi kozwa batisimo asengeli kondima ete tokoki kobika kaka mpo Yesu amikabaki mpe akufaki, asekwaki mpe “azali na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe,” mpe azali na bokonzi likoló na bato ya bomoi mpe baoyo bakufá. Batisimo oyo moto azwi mpo akómi na kondima ya ndenge wana ekokani na ‘komemama ya milimo mwambe na mai.’
4:6—‘Bakufi oyo basakwelaki nsango malamu ezali banani’? Ezali bato oyo ‘bakufaki na kati ya mabunga mpe masumu na bango,’ to baoyo bakufaki na elimo liboso báyoka nsango malamu. (Ef. 2:1) Kasi, nsima ya kondima nsango malamu, bakómaki na boyokani na Nzambe.
Mateya mpo na biso:
1:7. Mpo kondima na biso ezala makasi, esengeli komekama. Kondima ya makasi ndenge wana nde ‘ebatelaka molimo na bomoi.’ (Ebe. 10:39) Tosengeli kozonga nsima te ntango kondima na biso emekami.
1:10-12. Baanzelu bazalaka koluka koyeba makambo mozindo ya Nzambe oyo basakoli na ye ya ntango ya kala bakomaki na ntina na lisangá ya baklisto bapakolami. Na yango, makambo yango ekómaki polele ntango Yehova abandaki kosalela lisangá yango. (Ef. 3:10) Biso mpe tosengeli kolanda ndakisa ya baanzelu mpe kosala makasi mpo na koluka koyeba “makambo mozindo ya Nzambe.”—1 Kol. 2:10.
2:21. Soki tolingi komekola Yesu Klisto, ndakisa na biso, tosengeli kondima konyokwama ata tii na liwa mpo na kosimba Bokonzi ya Yehova.
5:6, 7. Soki tozali kokitisa mitungisi na biso epai na Yehova, ye akosalisa biso tókoba kotya losambo ya solo na esika ya liboso na bomoi na biso na esika ya komitungisaka koleka ndelo soki lobi tokozala ndenge nini.—Mat. 6:33, 34.
“MOKOLO YA YEHOVA EKOYA”
Petelo akomaki ete “esakweli eyá ata mbala moko te na mokano ya moto, nde bato balobaki oyo eutaki epai ya Nzambe wana bazalaki kopusama na elimo santu.” Kotya likebi na liloba ya esakweli ekoki kobatela biso na “bateyi ya lokuta” mpe bato mosusu oyo bakoki kobebisa biso.—2 Pet. 1:21; 2:1-3.
Petelo alobaki ete “na mikolo ya nsuka basɛki bakoya ná kosɛka na bango.” Kasi, “mokolo ya Yehova ekoya lokola moyibi.” Petelo asukisi mokanda na ye na toli kitoko oyo apesi baoyo bazali ‘kozela mpe kobatela na makanisi mokolo wana.’—2 Pet. 3:3, 10-12.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:19—Nani azali “monzoto ya ntɔngɔ,” ntango nini abimaki, mpe ndenge nini toyebi ete likambo yango esalemaki? “Monzoto ya ntɔngɔ” ezali Yesu Klisto nsima ya kokóma mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. (Emon. 22:16) Na 1914, Yesu abimaki liboso ya bikelamu nyonso lokola Mokonzi Masiya, mpe yango emonisaki ete mokolo ya sika ebandi. Mbongwana ya Yesu ezalaki elilingi ya nkembo mpe nguya ya bokonzi na ye, mpe emonisaki bosolo ya liloba ya esakweli ya Nzambe. Kotya likebi na liloba yango engɛngisi mitema na biso, mpe na ndenge yango toyebi ete monzoto ya ntɔngɔ abimá.
2:4—“Tartare” ezali nini, mpe ntango nini baanzelu oyo batombokaki babwakamaki kuna? Na ndenge ya elilingi, Tartare ezali lokola bolɔkɔ, epai batyá kaka bikelamu ya elimo, kasi bato te. Kuna, bikelamu yango bayebaka ata moke te mikano ya Nzambe mpe elikya ezali te mpo na bango. Nzambe abwakaki baanzelu oyo batombokaki na Tartare na mikolo ya Noa, mpe bazali kuna tii ntango bakobomama.
3:17—Petelo alingaki koloba nini na maloba ‘koyeba liboso’? Petelo alobelaki boyebi ya makambo oyo esengelaki koya, oyo Nzambe ayebisaki ye mpe bakomi mosusu ya Biblia na lisalisi ya elimo santu. Lokola boyebi yango ezalaki ya makambo nyonso te, kozala na yango elimboli te ete baklisto ya liboso bayebaki makambo nyonso oyo esengelaki koya na nsima. Bayebaki makambo yango kaka likolólikoló.
Mateya mpo na biso:
1:2, 5-7. Longola kosalisa biso tókolisa “boyebi ya solosolo ya Nzambe mpe ya Yesu,” milende oyo tosalaka mpo na kokóma na bizaleli lokola kondima, mpiko, kokangama na Nzambe ekosalisa biso tózala te “bato oyo bazangi kosala mosala to bato oyo bazangi kobota mbuma na oyo etali boyebi” yango.—2 Pet. 1:8.
1:12-15. Mpo ‘tópikama makasi na kati ya solo,’ tosengeli ntango nyonso koyokaka makambo oyo Nzambe ateyaka biso na makita ya lisangá, ntango tozali koyekola mpe ntango tozali kotánga Biblia.
2:2. Tosengeli kokebaka ete etamboli na biso eyokisa Yehova mpe lisangá na ye nsɔni te.—Lom. 2:24.
2:4-9. Soki totali makambo oyo asalá na ntango ya kala, tokoki mpenza kondima ete “Yehova ayebi kosikola uta na komekama bato ya ezaleli ya kokangama na Nzambe, kasi kobomba mpo na mokolo ya lisambisi bato oyo bazangi boyengebene mpo bálongolama.”
2:10-13. Ata soki “bato oyo bazali na nkembo,” elingi koloba bankulutu, basali mabe mpe ntango mosusu batɛngami mwa moke, tosengeli te koloba mabe mpo na bango.—Ebe. 13:7, 17.
3:2-4, 12. Kotya likebi mpenza na “maloba oyo elobamaki kala na basakoli basantu mpe komandema ya Nkolo mpe Mobikisi” ekosalisa biso tóbosana te ete mokolo ya Yehova ekómi pene.
3:11-14. Lokola tozali ‘kozela mpe kobatela na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova,’ tosengeli (1) ‘kozala na etamboli ya bosantu,’ elingi koloba kozala pɛto na nzoto, na makanisi, na bizaleli mpe na elimo; (2) kotonda na misala ya “ezaleli ya kokangama na Nzambe,” na ndakisa kosakola nsango ya Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli; (3) kozala na “litɔnɔ” te na etamboli mpe bomoto na biso, elingi koloba kolanda te makambo mabe ya mokili; (4) “kozanga mbeba,” elingi koloba kosalaka makambo nyonso na makanisi malamu; mpe (5) Kozala na “kimya” na Nzambe, na bandeko baklisto mpe na bato mosusu nyonso.