Mokapo 35
Ndenge nini nakoki kokóma moninga ya Nzambe?
Nsima ya kokutana na likama, Jérémie amonaki ntina ya kozala moninga ya Nzambe. Alobi boye: “Ntango nazalaki na mbula 12, tata asundolaki biso. Mokolo moko na butu, nazalaki kobondela na mbeto, nazalaki kosɛnga Yehova asalisa tata azonga ndako.”
Lokola azalaki na elikya lisusu te, Jérémie azwaki Biblia na ye mpe abandaki kotánga. Ntango akómaki na Nzembo 10:14, akanisaki mingi. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Epai na yo moto ya mawa, mwana mobali oyo tata akufá, azali komitika. Yo moko okómi mosungi na ye.” Jérémie alobi boye: “Nayokaki lokola nde Yehova azali koloba na ngai mpe koyebisa ngai ete azali mosungi na ngai mpe tata na ngai. Tata nani ya malamu koleka ye nakoki kozwa lisusu?”
EZALA okutani na mokakatano lokola oyo ya Jérémie to te, Biblia emonisi ete Yehova alingi ozala moninga na ye. Kutu, Biblia elobi ete: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8) Kanisá naino na ndimbola ya maloba yango: Atako okoki komona Yehova te mpe ete azali na nivo na yo ata moke te, asɛngi yo ozala moninga na ye!
Kasi kozala moninga ya Nzambe esɛngaka kosala milende. Tózwa ndakisa: Soki ozali na fololo na kati ya ndako, oyebi malamu ete ekolaka kaka yango moko boye te. Mpo ekola malamu, esengeli kobwakela yango mai mpe kotya yango na esika ya malamu. Ezali mpe bongo mpo na kozala moninga ya Nzambe. Makambo nini osengeli kosala mpo boninga yango ezalaka kaka makasi?
Koyekolaka Biblia ezali na ntina
Mpo na kozala moninga ya solosolo, esengeli kokokisa makambo mibale ntango bozali kosolola: koyoka mpe koloba. Ezali mpe bongo mpo na kozala moninga ya solosolo ya Nzambe. Kotánga mpe koyekola Biblia ezali lolenge oyo toyokaka makambo oyo Nzambe alingi koyebisa biso.—Nzembo 1:2, 3.
Mbala mosusu koyekola esepelisaka yo te. Na esika ya koyekola, bilenge mingi balingaka kotala televizyo, kosakana, to kolekisa ntango ná baninga. Kasi soki olingi kozala moninga ya Nzambe, osengeli kokokisa masɛngami. Osengeli koyekolaka Liloba ya Nzambe, mpo na koyoka ye.
Kasi kobanga te. Koyekola Biblia esengeli te kozala lokola mokumba ya kilo. Okoki kokóma kosepela na yango ata soki omonaka ete ozalaka makasi na koyekola te. Likambo ya liboso ya kosala ezali, kobomba ntango mpo na koyekola Biblia. Elenge mwasi moko na nkombo Lais alobi ete: “Nazalaka na programɛ na ngai. Eloko ya liboso oyo nasalaka soki nalamuki na ntɔngɔ, ezali kotánga mokapo moko ya Biblia.” Maria, oyo azali na mbula 15, azali mpe na programɛ na ye. Alobi boye: “Natángaka Biblia mwa moke na butu, liboso nalala.”
Mpo na kosalisa yo ozala na programɛ ya koyekola, talá etanda oyo ezali na lokasa 292. Na nsima, komá awa na nse ntango nini okoki kolekisa ata miniti 30 mpo na koyekola Liloba ya Nzambe.
․․․․․
Kosala programɛ ezali finale ya makambo te. Ntango obandi mpenza koyekola Biblia, mbala mosusu okomona ete koyekola Biblia ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Mbala mosusu yo mpe okondima makanisi ya Girès, oyo alobi polele ete: “Biteni mosusu ya Biblia ezalaka makasi, mpe esepelisaka mpenza te.” Soki yo mpe omonaka bongo, kolɛmba te. Taleláká boyekoli ya Biblia lokola libaku oyo ozali na yango ya koyoka Yehova Nzambe, moninga na yo. Nsukansuka, milende na yo ekosala ete boyekoli ya Biblia esepelisa yo mingi mpe ememela yo matomba!
Kobondela ezali na ntina
Libondeli ezali nzela oyo tósololaka na Nzambe. Libondeli ezali likabo moko kitoko mpenza! Okoki kosolola na Yehova ntango nyonso oyo olingi, ezala na butu to na moi. Mpe ntango nyonso akoyoka yo. Longola yango, azalaka na mposa ya koyoka makambo oyo olingi koyebisa ye. Yango wana Biblia elendisi yo ete: “Na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na [yo] eyebana epai ya Nzambe.”—Bafilipi 4:6.
Ndenge vɛrsɛ oyo emonisi, ezali na makambo mingi oyo okoki koyebisa Yehova. Ekoki kozala mikakatano mpe mitungisi oyo ozali na yango. Okoki mpe kobondela mpo na kopesa ye matɔndi. Opesaka baninga na yo matɔndi te mpo na makambo malamu oyo basalelá yo? Okoki mpe kosala bongo epai ya Yehova, mpamba te asalelá yo makambo mingi koleka baninga na yo nyonso.—Nzembo 106:1.
Komá awa na nse mwa makambo oyo etindaka yo ozala na botɔndi epai ya Yehova.
․․․․․
Na ntembe te, na ntango mosusu okutanaka na makambo oyo ebangisaka yo mpe etungisaka yo mingi. Nzembo 55:22 elobi ete: “Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosunga yo. Akopesa nzela ata moke te ete moyengebene atengatenga.”
Komá na mikɔlɔtɔ oyo ezali awa na nse mwa makambo oyo etungisaka yo, oyo okosepela kolobela na mabondeli na yo.
․․․․․
Makambo oyo Yehova asalá mpo na yo
Mpo na kozala moninga ya Nzambe, ezali mpe na likambo mosusu oyo osengeli kobosana te. Davidi, moko ya bakomi ya nzembo akomaki ete: “Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu.” (Nzembo 34:8) Davidi akomaki Nzembo ya 34 ntango autaki kokutana na likambo moko ya nsɔmɔ. Azalaki kokima Mokonzi Saulo oyo azalaki koluka koboma ye, mpe yango ezalaki mpenza likambo oyo etungisaki Davidi. Lisusu, esengelaki akende komibomba epai ya banguna na ye Bafilistia. Kuna, akutanaki na likama moko oyo ekokaki komema ye na liwa, kasi akosanaki ligboma mpe yango esalisaki ye akima.—1 Samwele 21:10-15.
Davidi alobaki te ete mayele na ye moko nde ebikisaki ye; kasi apesaki lokumu nyonso epai ya Yehova. Mwa liboso, na nzembo oyo tolobelaki; akomaki ete: “Natunaki Yehova, mpe ayanolaki ngai, mpe abikisaki ngai na makambo nyonso oyo ezalaki kopesa ngai nsɔmɔ.” (Nzembo 34:4) Na yango, makambo oyo Yehova asalaki mpo na Davidi, etindaki ye alendisa basusu ete ‘bámeka mpe bámona ete Yehova azali malamu.’a
Oyebi lisusu likambo moko oyo ekómelaki yo, oyo emonisi ete Yehova amibanzabanzaka mpo na yo? Soki ezali bongo, komá yango awa na nse. Ekosɛnga te ete ezala kaka likambo moko ya monene. Meká kokanisa ata na mwa mapamboli ya mikemike oyo ozwaka mokolo na mokolo, oyo mbala mosusu ekoki komonana lokola ezali mpenza na ntina te.
․․․․․
Mbala mosusu baboti na yo nde bateyá yo Biblia. Soki ezali bongo, ezali mpenza lipamboli. Kasi, ata bongo, osengeli yo moko koluka kokóma moninga ya Nzambe. Soki osali yango naino te, okoki kosalela makambo oyo ezali na mokapo oyo mpo obanda. Yehova akopambola milende na yo. Biblia elobi ete: “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino; bókoba koluka, mpe bokomona.”—Matai 7:7.
MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 38 MPE 39, NA VOLIMI 1
Omonaka ete ezali mpasi koyebisa basusu makambo ya Nzambe? Okomona ndenge oyo okoki kolobela mateya ya Biblia oyo ondimaka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Biblia moko ebongoli maloba “bómeka mpe bómona” na ‘bómeka mpe bóyoka esengo na yango.’—Bible na lingala ya lelo oyo.
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”—Matai 5:3.
TOLI
Soki ozali kotánga nkasa mitano ya Biblia mokolo na mokolo, okosilisa kotánga yango nsima ya mbula moko.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Lokola ozali kotánga buku oyo mpe ozali kolanda toli na yango oyo euti na Biblia, yango emonisi ete Yehova atyelaka yo likebi.—Yoane 6:44.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Mpo nazwa matomba mingi koleka na boyekoli na ngai ya Biblia, nako ․․․․․
Mpo nakóma na momeseno ya kobondela, nako ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․
OKANISI NINI?
● Makambo nini okoki kosala mpo osepela mingi koleka na boyekoli na yo ya Biblia?
● Mpo na nini Yehova alingaka koyoka mabondeli ya bato ya kozanga kokoka?
● Ndenge nini okoki kobongisa lisusu mabondeli na yo?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 291]
‘‘Ntango nazalaki mwana moke, nazalaki kozongela kaka makambo moko na mabondeli na ngai. Kasi sikoyo nasalaka makasi nalobela makambo malamu mpe mabe oyo nakutanaka na yango mokolo na mokolo. Lokola makambo oyo tokutanaka na yango mokolo na mokolo ezalaka ndenge moko te, yango esalisaka ngai nazongelaka te likambo moko mbala na mbala.’’—Eve
[Etanda/Elilingi na lokasa 292]
Luká koyeba Biblia na yo malamumalamu
1. Poná lisolo moko ya Biblia oyo olingi kotánga. Sɛngá bwanya mpo okanga ntina ya lisolo yango.
2. Tángá lisolo yango malamumalamu. Kokende mbangumbangu te. Ntango ozali kotánga, kanisá na mozindo. Salá lokola nde ozali komona makambo yango mpe ozali koyoka mingongo ya bato, kolumbuta nsolo, komeka elɛngi ya biloko, mpe bongo na bongo. Salá lokola nde ozali wana ntango makambo yango ezali kosalema!
3. Kanisá makambo oyo outi kotánga. Omituna mituna lokola:
● Mpo na nini Yehova akomisaki lisolo oyo na Liloba na ye?
● Banani nasengeli kolanda ndakisa na bango, mpe banani nakoki te kolanda ndakisa na bango?
● Mateya nini nakoki kozwa na lisolo oyo nauti kotánga?
● Lisolo yango eteyi ngai nini na ntina na Yehova mpe ndenge oyo asalaka makambo?
4. Salá libondeli ya mokuse. Yebisá Yehova mateya oyo ozwi na boyekoli na yo ya Biblia mpe ndenge oyo okani kosalela yango na bomoi na yo. Pesáká matɔndi ntango nyonso mpo na likabo oyo apesi yo, elingi koloba Liloba na ye, Biblia Mosantu!
[Elilingi na lokasa 292]
“Liloba na yo ezali mwinda na lokolo na ngai, mpe pole na nzela na ngai.”—Nzembo 119:105.
[Etanda/Elilingi na lokasa 294]
Tyáká makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso
Omonaka ete ozali na ntango te mpo na kobondela to koyekola Biblia? Mbala mingi, yango ezali kotalela makambo oyo otyaka na esika ya liboso.
Meká kosala boye: Zwá katini moko mpe tyá mabanga ya minene na kati. Na nsima, sopá zɛlɔ na katini yango tii etonda. Okomona ete katini yango etondi na mabanga ná zɛlɔ.
Sikoyo, bimisá mabanga ná zɛlɔ yango mpe tyá yango pembeni. Na mbala oyo, tondisá liboso zɛlɔ na katini, mpe na nsima meká kotya mabanga na kati. Omoni ete esika ya kotya mabanga mingi ezali te? Ezali mpo na mbala oyo, otyaki zɛlɔ liboso.
Yango eteyi yo nini? Biblia elobi ete: “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.” (Bafilipi 1:10) Soki otye makambo lokola kominanola na esika ya liboso, okomona ete ozali lisusu na ntango te mpo na makambo oyo eleki ntina na bomoi, elingi koloba makambo oyo etali boyokani na yo ná Yehova. Kasi soki olandi toli oyo ya Biblia, okomona ete ozali na ntango, ezala mpo na makambo ya Nzambe, mpe mwa ntango mpo na kominanola. Nyonso ekotalela eloko oyo okotya liboso na katini na yo!
[Elilingi na lokasa 290]
Lokola esɛngaka kosopelaka fololo mai, ndenge moko, mpo na kobatela boninga ná Nzambe, esengeli kobongisaka yango